Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/4 lok. 13
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baklisto ya liboso na mokili ya Bagreki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Libongoli ya Biblia oyo ebongolaki mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/4 lok. 13

Oyebaki yango?

Mpo na nini Yesu abengaki Yehova “Abba, Tata” na libondeli moko oyo asalaki?

Na monɔkɔ ya Aramɛyɛ, liloba ʼab·baʼʹ ekoki kolimbola “tata” to “Ee Tata.” Na bisika nyonso misato oyo liloba yango esalelami na Makomami, ezali na kati ya libondeli, mpe elobeli Yehova, Tata na biso ya likoló. Liloba yango elimboli mpenza nini?

Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi boye: “Na ntango ya Yesu, liloba ʼabbāʼ ezalaki kosalelama mingimingi mpo na komonisa komesana makasi oyo ezali kati na bato mibale mpe limemya ya mwana epai ya tata na ye.” Ezali liloba oyo ezalaki komonisa bolingo ya mwana epai ya tata na ye, mpe ezalaki moko ya maloba ya libosoliboso oyo mwana azalaki koyekola koloba. Yesu asalelaki liloba yango na libondeli moko oyo asalaki na motema mobimba epai ya Tata na ye. Na elanga ya Getesemane, mwa bangonga liboso akufa, Yesu abondelaki Yehova mpe abengaki ye, “Abba, Tata.”​—Malako 14:36.

Buku yango ebakisi boye: “Na makomi ya Bayuda na ntango oyo Bagrɛki mpe Baloma bazalaki koyangela mokili, bazalaki mpenza kosalela liloba ʼAbbāʼ te mpo na koloba na Nzambe; na ntembe te mpo na bango, kobenga Nzambe bongo ezalaki kozanga limemya.” Nzokande, “ntango Yesu . . . asalelaki liloba yango, alingaki komonisa ete azali mpenza na boyokani makasi na Nzambe ndenge azalaki koyebisa bato.” Mbala mibale mosusu oyo liloba “Abba” esalelami, ezali na mikanda ya Paulo mpe emonisi ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki mpe kosalela yango na mabondeli na bango.​—Baloma 8:15; Bagalatia 4:6.

Mpo na nini eteni mosusu ya Biblia ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki?

Ntoma Paulo alobaki ete “maloba mosantu ya Nzambe” epesamaki libosoliboso epai ya Bayuda. (Baloma 3:1, 2) Na yango, eteni ya liboso ya Biblia ekomamaki mingimingi na Liebele, monɔkɔ ya Bayuda. Kasi, Makomami ya boklisto ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki.a Mpo na nini?

Na ekeke ya minei liboso ya ntango na biso (L.T.B.), basoda ya Alesandala Monene bazalaki koloba minɔkɔ ndenge na ndenge oyo eutaki na Grɛki, oyo ekómaki kosangana mpo na kobimisa Grɛki mosusu oyo babengi Koine. Ntango Alesandala akómaki kozwa mikili mosusu mpo na koyeisa bokonzi na ye monene, monɔkɔ yango ekómaki kolobama na bato ya mikili mingi. Na ntango yango, Bayuda bapalanganaki na mikili mingi. Mingi bazongaki lisusu na Palestine te nsima ya boombo na bango na Babilone, oyo esukaki mwa bikeke liboso. Mpo na yango, Bayuda mingi bayebaki lisusu monɔkɔ ya Liebele malamu te mpe bakómaki koloba Grɛki. (Misala 6:1) Mpo na kosalisa bango, babongolaki Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba; libongoli yango ebengamaki Septante.

Buku moko (Dictionnaire de la Bible) elobi ete ezalaki na monɔkɔ mosusu te “lokola Grɛki oyo ezalaki na maloba mingi, kitoko mpe bato mingi bazalaki koloba.” Lokola Grɛki ezalaki na maloba mingi, gramɛrɛ ya malamu mpenza mpe ya polele, ezalaki “monɔkɔ oyo ezalaki kosalelama mpo na kosolola na bato mosusu, monɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koyeba​—monɔkɔ oyo ebongaki mpenza mpo na baklisto.” Omoni te ete ebongaki mpenza ete nsango malamu ekomama na monɔkɔ yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biteni mosusu ya Makomami ya Liebele ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ. Emonani ete Evanzile ya Matai ekomamaki liboso na monɔkɔ ya Liebele mpe na nsima ekoki kozala ete Matai ye moko abongolaki yango na monɔkɔ ya Grɛki.

[Elilingi na lokasa 13]

Biteni ya maniskri ya Libongoli ya Septante

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Courtesy of Israel Antiquities Authority

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto