Baapolojiste—Bazalaki kokɔtela mateya ya bokristo to bazalaki nde bato ya filozofi?
NA EKEKE ya mibale ya ntango na biso, bazalaki koloba ete bakristo bazalaki kosangisa nzoto na bandeko na bango, koboma bana, mpe kolya misuni ya bato. Yango ebimisaki botɛmɛli makasi na boye ete bakomi oyo bazalaki komibenga bakristo bamonaki ete basengeli kokɔtela kondima na bango. Na nsima, bayaki koyebana na nkombo ya baapolojiste, to bato oyo bazalaki kokɔtela kondima na bango; bakomi yango bazwaki mokano ya komonisa ete kondima na bango ezalaki mabe te mpo bakonzi ya Roma mpe bato nyonso bándima bango.
Kosala bongo ezalaki likama mpo mbala mingi, bakonzi mpe bato mosusu ya mboka bazalaki kokitisa motema kaka soki moto alandi makanisi na bango. Ezalaki mpe na likama mosusu mpo ekokaki kosala ete botɛmɛli ekóma lisusu makasi koleka to mpe ekokaki kolɛmbisa kondima ya bakristo. Kasi, ndenge nini baapolojiste bakɔtelaki kondima na bango? Makanisi nini bazalaki kosalela? Mpe milende na bango ebimisaki nini?
Baapolojiste mpe Ampire ya Roma
Baapolojiste bazalaki bato ya ekeke ya mibale mpe ya ebandeli ya ekeke ya misato oyo batángaki mingi. Baoyo bayebanaki mingi ezalaki Justin Martyr, Clément d’Alexandrie, mpe Tertullien.a Makomi na bango ezalaki libosoliboso mpo na bapakano mpe bakonzi ya Roma, mokano na yango ezalaki ya kolimbolela bango kondima ya bokristo, mpe ezalaki na mikapo mingi ya Biblia. Longola yango, baapolojiste batɛmɛlaki bato oyo bazalaki konyokola bakristo, bawanganaki makambo oyo bazalaki kofunda bango na yango, mpe bazalaki kolobela bakristo na ndenge ya malamu.
Moko ya bamposa makasi ya baapolojiste ezalaki ya kondimisa bakonzi ya politiki ete bakristo bazalaki te banguna ya amperɛrɛ to mpe ya ampire. Tertullien alobaki mpo na amperɛrɛ ete “Nzambe na biso atyá ye,” mpe Athénagore alobaki ete kiti ya bokonzi ya ampire ezali ya bato ya libota moko, na ndenge yango akɔtaki na makambo ya politiki ya ntango wana. Kosala bongo, emonisaki ete babosanaki maloba oyo ya Yesu Kristo ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”—Yoane 18:36.
Baapolojiste basɛngaki mpe ete boyokani ezala kati na Roma mpe lingomba ya bokristo. Mpo na Méliton, bokonzi ya Roma mpe lingomba ezalaki kosala na bomoko mpe ezalaki kosala mpo na bolamu ya ampire. Mokomi ya buku moko (The Epistle to Diognetus) oyo nkombo na ye eyebani te, akokanisaki bakristo na molimo oyo ‘esimbaki mokili.’ Mpe Tertullien akomaki ete bakristo basambelaki mpo ampire ekende liboso mpe mpo nsuka ya mokili oyo eya noki te. Mpo na yango, emonanaki ete koya ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki mpenza na ntina te.—Matai 6:9, 10.
“Bokristo” ekómi filozofi
Celse, moto moko ya filozofi atyolaki bakristo ete bazali “bato ya bilanga, bato oyo basalaka to babongisaka basapato, bato oyo babɔkɔlaka banyama, bato oyo bayekolá te mpe bayebi makambo te.” Lityo ya ndenge wana esalaki baapolojiste mpasi makasi. Bazwaki ekateli ya kosalela mayele mosusu mpo bato bándima bango. Bwanya ya mokili oyo baboyaki liboso, bakómaki sikoyo kosalela yango mpo na kokɔtela “bokristo.” Na ndakisa, Clément d’Alexandrie, amonaki filozofi ete ezali “teoloji ya solo.” Kasi, Justin oyo azalaki koboya filozofi ya bapakano, akómaki moto ya liboso ya kosalela maloba ya filozofi mpe makanisi na yango mpo na kolobela mateya ya “bokristo,” mpe azalaki komonisa ete filozofi ya ndenge wana “ezali mabe te mpe ezali na litomba.”
Kobanda wana, mayele na bango ezalaki te ya koboya filozofi, kasi ya kosala ete filozofi ya bakristo eleka oyo ya bapakano. Justin akomaki boye: “Na makambo mosusu, tozali koteya kaka ndenge moko na bapowɛti mpe bafilozofe oyo bokumisaka, mpe makambo mosusu oyo tozali koteya ezali mpenza ya Nzambe.” Lokola bakómisaki mateya na bango kitoko na makambo ya filozofi oyo babimisaki, mateya ya baapolojiste ekómaki komonana malamu mpe ete ebongi bato bálanda yango. Baapolojiste bazalaki mpe koloba ete babuku ya bakristo eumelaki mingi koleka oyo ya Bagrɛki mpe ete basakoli ya Biblia bazalaki na bomoi liboso ya bafilozofe ya Grɛki. Baapolojiste mosusu kutu balobaki ete bafilozofe bazwaki kaka makambo ya basakoli. Bazalaki kutu koloba ete Platon azalaki moyekoli ya Moize!
Bokristo ebebi
Mayele wana ya sika esalaki ete bokristo esangana na filozofi ya bapakano. Bazalaki kokokanisa banzambe ya Bagrɛki na bato oyo Biblia elobeli. Bazalaki kokokanisa Yesu na Persée; mpe zemi ya Maria na zemi ya Danaë, mama ya Persée oyo balobaki ete azalaki mpe ngɔndɔ.
Mateya mosusu ebongwanaki makasi. Na ndakisa, na Biblia Yesu abengami “Logos,” elingi koloba “Liloba” to molobeli ya Nzambe. (Yoane 1:1-3, 14-18; Emoniseli 19:11-13) Na ebandeli mpenza, Justin, oyo azalaki filozofe, abebisaki liteya yango mpe asalelaki ndimbola mibale ya liloba ya Grɛki logos: “liloba” mpe “makanisi.” Alobaki ete bakristo bayambaki liloba epai ya Kristo ye moko. Kasi, logos mpo na kolimbola makanisi, ezalaka epai ya moto nyonso ata mpe bapakano. Na yango, asukisaki ete baoyo bazali na bomoi oyo eyokani na makanisi bazali bakristo, ata baoyo bazalaki koloba to kotalelama lokola bato oyo balobaka ete Nzambe azali te, na ndakisa Socrates mpe bato mosusu.
Lisusu, lokola alukaki komonisa na makasi ete boyokani ezali kati na Yesu mpe logos ya filozofi ya Bagrɛki, oyo ezalaki mpenza na boyokani na bomoto ya Nzambe, baapolojiste, ata mpe Tertullien babimisaki likambo oyo nsukansuka ememaki lingomba ya bokristo na liteya ya Bosato.b
Liloba “molimo” ezali mbala koleka 850 na Biblia, mpe ezali mbala koleka 100 na Grɛki. Elobelaka bikelamu ya bomoi oyo ekufaka, bato to banyama. (1 Bakorinti 15:45; Yakobo 5:20; Emoniseli 16:3) Kasi, baapolojiste, babebisaki mateya wana ya Biblia na ndenge bakokanisaki yango na filozofi ya Platon oyo elobaka ete molimo ekabwanaka na nzoto, emonanaka te mpe ekufaka te. Kutu, Minucius Felix alobaki ete liteya ya lisekwa ebandaki libosoliboso na mateya ya Pythagore, oyo elobelaka ete molimo ekɔtaka na nzoto mosusu soki moto akufi. Mateya ya Bagrɛki ememaki bango mosika mpenza na mateya ya Biblia!
Liponi ya mabe
Baapolojiste mosusu bamonaki likama oyo filozofi ekoki kosala na kondima ya bokristo. Kasi, atako bazalaki komona ete makambo ya bafilozofe ezali mabe, bazalaki se kolinga ndenge oyo bafilozofe bazalaki kolimbola makambo na bango. Na ndakisa, Tatien, amonisaki polele ete bafilozofe bazali kosala eloko moko te ya malamu, kasi kaka ye abengaki lingomba ya bokristo ete “filozofi na biso” mpe amikɔtisaki na makanisi yango ya filozofi. Tertullien, alobelaki ndenge filozofi ya bapakano ekoki kobebisa makanisi ya bakristo. Epai mosusu, alobaki ete azali na mposa ya kolanda “Justin, filozofe mpe martiru; Miltiade, moto moko ya mayele na lingomba” mpe bato mosusu. Athénagore amibengaki “mokristo ya filozofi ya Atene.” Balobaka ete Clément, amonaki ete bakristo basengeli kosalela “filozofi lokola eloko oyo ekoki kopesa bango bwanya mpe ekoki kosalisa bango bákɔtela kondima na bango.”
Ata soki baapolojiste yango balongaki na ndenge bakɔtelaki kondima na bango, basalaki libunga monene na mayele oyo basalelaki mpo na kokɔtela kondima na bango. Ndenge nini? Ntoma Paulo akundwelaki bakristo ete kati na bibundeli ya elimo oyo bazali na yango, moko te ezali na ntina koleka “liloba ya Nzambe,” oyo ezali na “bomoi mpe ezali na nguya.” Paulo alobaki ete na yango, tozali “kokweisa makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”—Baebre 4:12; 2 Bakorinti 10:4, 5; Baefese 6:17.
Na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Yoane 16:33) Mpasi mpe minyoko oyo akutanaki na yango na mokili ebebisaki te kondima mpe bosembo na ye epai ya Tata na ye. Ndenge moko mpe Yoane, ntoma ya nsuka oyo atikalaki na bomoi, akomaki boye: “Bolongi oyo elongi mokili yango oyo: kondima na biso.” (1 Yoane 5:4) Atako baapolojiste balukaki kokɔtela kondima ya bokristo, basalaki liponi mabe ndenge balandaki makanisi mpe bafilozofi ya mokili. Na ndenge yango, baapolojiste bakosamaki na bafilozofi ya ndenge wana mpe batikaki ete mokili elonga bango mpe lokumu na bango ya bakristo. Na yango, na esika ya kokɔtela kondima ya bokristo ya solo, baapolojiste ya lingomba ya ebandeli, ntango mosusu kozanga koyeba, bakweaki na motambo ya Satana, oyo ‘amimonisaka lokola anzelu ya pole.’—2 Bakorinti 11:14.
Bakonzi ya mangomba mpe bato ya teoloji ya lelo oyo balandá mpenza lokolo yango. Na esika ya kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kokɔtela mateya ya bokristo, mbala mingi bakitisaka lokumu ya Biblia mpe basalelaka filozofi ya mokili na mateya na bango mpo bato bándima bango. Na esika ya kokebisa bato na makama ya kolanda makambo ya mokili oyo Biblia eboyi, bakómi nde bateyi oyo basalaka nyonso mpo na koyebisa bayoki na bango makambo oyo ‘matoi na bango elingaka koyoka’ mpo bákóma na bandimi ebele. (2 Timote 4:3) Likambo ya mawa, ndenge kaka baapolojiste ya liboso basalaki, bateyi yango baboyi kolanda likebisi oyo ya ntoma Paulo: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.” Mpe tosengeli kobosana te ete “nsuka na bango ekozala na kolanda misala na bango.”—Bakolose 2:8; 2 Bakorinti 11:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tokoki mpe kotánga Quadratus, Aristide, Tatien, Apollinaris, Athénagore, Théophile, Méliton, Minucius Felix, mpe mwa bakomi mosusu oyo bayebani mingi te. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2003, nkasa 27-29, mpe ya 15 Marsi 1996, nkasa 28-30.
b Mpo na koyeba makambo mosusu na mateya ya Tertullien, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2002, nkasa 29-31.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]
“Tozali kokweisa makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”—2 BAKORINTI 10:5
[Elilingi na lokasa 28]
Mpo na Justin, kolanda filozofi ezalaki ‘mabe te, ezalaki nde na litomba’
[Elilingi na lokasa 29]
Clément amonaki filozofi ete ezali “teoloji ya solo”
[Elilingi na lokasa 29]
Filozofi ya Tertullien efungolaki nzela na liteya ya Bosato
[Elilingi na lokasa 29]
Tatien abengaki bokristo “filozofi na biso”
[Elilingi na lokasa 30]
Bakonzi ya mangomba mpe bato ya teoloji ya lelo balandi lokolo ya baapolojiste
[Elilingi na lokasa 31]
Ntoma Paulo akebisaki bakristo mpo na filozofi mpe bokosi ya bato
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]
Clément: Historical Pictures Service; Tertullien: © Bibliothèque nationale de France