Ezali mpenza kozanga bosembo?
“Kosá mwa moke mpo na aksida oyo osali, okomona makambo nyonso ekotambola malamu.”
“Bakonzi oyo bafutisaka mpako basengeli koyeba makambo nyonso te.”
“Likambo ya ntina ezali kaka ete bákanga yo te.”
“Mpo na nini kofuta ntango okoki kozwa yango ofele?”
OKOKI koyoka maloba ya ndenge wana ntango osɛngi toli na makambo etali mbongo. Bato mosusu bamonanaka lokola bazali na mayele ya kosilisa mokakatano nyonso. Motuna ezali ete mayele yango ezalaka mpenza sembo?
Kozanga bosembo ekómi mingi lelo oyo, yango wana bato bakómi kotalela lokuta, bokosi, mpe koyiba lokola ezali malamu mpo na kokima etumbu, kozwa mbongo, to kolonga na bomoi. Mbala mingi, bakonzi bapesaka ndakisa mabe na likambo etali bosembo. Na mokili moko ya Mpoto, makambo ya kanyaka mpe moyibi ekómaki komonana mingi (koleka 85%) kobanda 2005 tii 2006. Mpe yango etaleli te makambo ya mikemike ya kozanga bosembo. Ntango mosusu tokoki kokamwa te ete bato ya mombongo mpe ya politiki na ekólo yango basalisaki mikanda ya lokuta mpo makambo na bango ekende liboso.
Atako kozanga bosembo etondi kotonda na mokili, bato mingi bazalaka na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Ekoki kozala ete yo mpe ozali moko na bango. Ekoki kozala ete lokola olingaka Nzambe, olingaka kosala oyo ezali sembo na miso na ye. (1 Yoane 5:3) Okoki koyoka ndenge ntoma Paulo ayokaki, ntango akomaki ete: “Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Mpo na yango, tosɛngi yo otalela mwa makambo oyo ekoki kotya na komekama mposa oyo moto azali na yango ya kozala “sembo na makambo nyonso.” Tokotalela mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa ntango okutani na makambo ya ndenge wana.
Nani asengeli kofuta mpo na aksida?
Mokolo moko, ntango Lisa,a elenge mwasi moko azalaki kokumba motuka asalaki libunga mpe atutaki motuka mosusu. Moto moko te azokaki, kasi mituka nyonso mibale ebebaki. Na ekólo na bango, bilenge oyo babandi kokumba motuka sika bafutaka mbongo mingi ya asiransi ya motuka, mpe mbongo yango ebakisamaka ntango nyonso oyo aksida esalemi. Lokola Gregor, ndeko ya Lisa azalaki elongo na ye na motuka, moninga moko apesaki makanisi báloba ete Gregor nde azalaki kokumba motuka yango. Na ndenge yango, Lisa alingaki te kofuta mbongo mingi ya asiransi. Likanisi yango emonanaki lokola ezali malamu. Lisa asengelaki kosala nini?
Bakompanyi ya asiransi esalelaka mbongo oyo bato bafutaka mpo na makama. Na yango, soki Lisa alandi makanisi ya moninga na ye, ekosala ete bato mosusu báfuta mbongo ebele na esika na ye. Akosala kaka lapolo ya lokuta te, kasi akoyiba mpe bato mosusu. Ezali mpe bongo mpo na baoyo balobaka lokuta mpo mbongo na bango ya asiransi emata.
Soki Leta akangi moto na makambo ya ndenge wana ya kozanga bosembo akozwa etumbu makasi. Kasi, Liloba ya Nzambe emonisi ntina monene oyo tosengeli koboya kozanga bosembo. Moko ya Mibeko Zomi elobi ete: “Osengeli koyiba te.” (Kobima 20:15) Ntoma Paulo azongelaki mobeko yango mpo na bakristo ntango alobaki boye: “Moyibi ayiba lisusu te.” (Baefese 4:28) Kotosa Liloba ya Nzambe na makambo etali asiransi, ekosalisa yo osala te likambo oyo Nzambe aboyi. Okomonisa mpe ete olingaka mpe otosaka mibeko ya Nzambe mpe bazalani na yo.—Nzembo 119:97.
“Kaisala biloko ya Kaisala”
Peter azali moto ya mombongo. Moto na ye moko ya mosala oyo asimbelaka ye mbongo, apesi ye likanisi ete asɛnga bákitisela ye mpako mpo na “kosomba” ordinatɛrɛ moko ya ntalo mingi. Kosomba ordinatɛrɛ wana ezali likambo ya mpasi te mpo na moto lokola Peter. Atako Peter asombaki te ordinatɛrɛ yango, guvernɛma elingaki te koluka koyeba ntalo oyo asombi yango. Kokitisa mbongo wana ya mpako ekosala ete Peter afuta mbongo mingi te ya mpako. Asengeli kosala nini? Nini ekosalisa ye azwa ekateli?
Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya mikolo na ye ete: “Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso . . . Bózongisela bango nyonso oyo esengeli na bango: oyo asɛngi mpako, mpako; oyo asɛngi lifuti, lifuti.” (Baroma 13:1, 7) Baoyo nyonso balingi Nzambe andima bango, bafutaka bampako nyonso oyo bakonzi basɛngaka bango. Epai mosusu, soki mobeko ya mboka ekitiseli bato mosusu mpako, yango ezali mabe te kosɛnga bákitisela mpe biso soki tokokisi masɛngami.
Ndakisa oyo elandi emonisi ete esengeli mpe kofuta bampako. David azali mosali mabaya na kompanyi moko na mboka na bango. Kasi, baninga na ye mpe bato mosusu ya kartye basɛngi ye asalela bango biloko ya ndako, mpe esengelaki asala yango nsima ya ngonga ya mosala. Balakaki ye mbongo mingi koleka oyo bafutaka ye na kompanyi, kasi basɛngaki ye ayebisa yango te. Na ndenge yango, moto moko te akoyeba mosala oyo esalemi mpe moto moko te akofuta mpako. Bato mingi bakanisaka ete ezali malamu kosala bongo, mpo moto nyonso akoki kozwa litomba na likambo yango. Lokola David alingaka kosepelisa Nzambe, ndenge nini akotalela mosala oyo esalemi kozanga Leta ayeba?
Atako ekoki kosalema ete bákanga te moto oyo azali kosala misala ya ndenge wana, azali kofuta te bampako oyo guvernɛma ezali na lotomo ya kozwa. Yesu alobaki boye: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Matai 22:17-21) Yesu alobaki maloba wana mpo na kosembola makanisi ya bayoki na ye na likambo etali kofuta mpako. Bakonzi ya Leta oyo Yesu abengaki Kaisala, batalelaka kofuta mpako ete ezali eloko oyo ebongi mpenza bázwa. Yango wana, bayekoli ya Kristo batalelaka kofuta mpako lokola etinda ya Makomami.
Koyiba na ekzamɛ
Marta, oyo atángaka na eteyelo moko ya ntei, azali komibongisa mpo na baekzamɛ ya nsuka ya kelasi. Lokola esengeli azwa bapwɛ mingi mpo na kozwa mosala ya malamu, alekisaki bangonga mingi na koyekola. Baninga na ye mosusu mpe bamibongisaki, kasi na ndenge mosusu. Basengelaki kosalela bamasini, batelefone mpo na koyiba na ekzamɛ mpo bázwa diplome na bango na bapwɛ ebele. Esengeli Marta asala likambo oyo “bato nyonso” bazali kosala mpo na kozwa bapwɛ ya malamu?
Lokola koyiba ekómi bisika nyonso, bato mingi bakanisaka ezali mabe te kosala yango. Balobaka ete “likambo ya ntina ezali bákanga yo te.” Kasi, likanisi ya ndenge wana ebongi te mpo na bakristo ya solo. Atako molakisi akoki komona te baoyo bazali koyiba, ezali na moto moko oyo amonaka. Yehova Nzambe ayebaka oyo tozali kosala mpe akosɛnga biso tózongisa monɔkɔ mpo na misala na biso. Paulo akomaki boye: “Ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye, kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.” (Baebre 4:13) Koyeba ete Nzambe amonaka mpe amibanzabanzaka na makambo oyo tosalaka ya malamu, esengeli kotinda biso tózala sembo ntango tozali kosala ekzamɛ, boye te?
Okosala nini?
Lisa, Gregor, Peter, David mpe Marta bazwaki na lisɛki te makambo oyo bakutanaki na yango. Bazwaki ekateli ya kozala sembo mpe na ndenge yango babatelaki lisosoli mpe bosembo na bango. Okosala nini soki okutani na makambo ya ndenge wana?
Baninga na yo ya mosala, baninga na yo ya kelasi, mpe bato ya kartye bakoki kokipe te lokuta, bokosi, to koyiba. Kutu, bakoki kotyola yo mpo na kotinda yo na makasi osala lokola bango. Nini ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu atako bazali kotinda yo ozanga bosembo?
Kobosana te ete, kosala makambo oyo eyokani na mokano ya Nzambe esalisaka biso tózala na lisosoli ya pɛto mpe tóndimama na Nzambe. Mokonzi Davidi akomaki boye: “Ee Yehova, nani akoyambama na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo mosantu? Ye oyo azali kotambola na mbeba te mpe oyo azali kosala na boyengebene mpe azali koloba solo na motema na ye. . . . Ye oyo azali kosala makambo wana akotengatenga soki moke te.” (Nzembo 15:1-5) Kozala na lisosoli ya pɛto mpe kozala moninga ya Nzambe ezali malamu mingi koleka bozwi nyonso oyo tokoki kozwa na ndenge ya moyibi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
“Moyibi ayiba lisusu te.”
Kotosa mibeko ya Nzambe mpe kolinga bazalani etindaka biso tózala sembo na makambo etali asiransi
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
“Bózongisela bango nyonso oyo esengeli na bango: oyo asɛngi mpako, mpako.”
Mpo na kondimama na Nzambe tofutaka mpako nyonso oyo esɛngami na mibeko
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
“Biloko nyonso ezali . . . komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.”
Atako balakisi bakoki komona biso te ntango tozali koyiba, tosengeli kozala sembo liboso ya Nzambe
[Etanda/Bililingi na lokasa 14]
Koyiba oyo “emonanaka te”
Moninga na yo asombi programɛ ya sika ya ordinatɛrɛ mpe yo ozali na mposa na yango. Ayebisi yo obebisa mbongo te, akopesa yo programɛ yango. Yango ezali moyibi?
Ntango bato oyo basalelaka ordinatɛrɛ basombaka baprogramɛ, bandimaka ete bakolanda malako ya moto oyo asalaki programɛ yango. Yango ekoki kopesa nzela na moto oyo asombi programɛ atya mpe asalela programɛ yango kaka na ordinatɛrɛ moko. Na ntango yango, kopesa moto mosusu programɛ yango ezali kobuka malako ya nkolo-programɛ mpe yango eyokani te na mibeko ya Leta. (Baroma 13:4) Kosala bongo, ezali mpe moyibi, mpo ezali kozangisa moto oyo asalaki programɛ yango lotomo ya kozwa mbongo oyo asengeli kozwa.—Baefese 4:28.
Bato mosusu bakoki koloba ete ‘moto moko te akoyeba.’ Ata soki ezali solo, tosengeli kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Biso nyonso tosepelaka báfuta biso mpo na mosala oyo tosali mpe tolingaka basusu bámemya mosala na biso. Na yango, tosengeli mpe komemya mosala ya basusu. Toboyaka moyibi oyo “emonanaka te,” na ndakisa koyiba mayeleb ya moto mosusu.—Kobima 22:7-9.
[Maloba na nse ya lokasa]
b Mayele ya moto mosusu esangisi, kosala bakopi ya bakasɛti ya miziki, babuku to baprogramɛ ya ordinatɛrɛ, ezala kobimisa yango na papye to kobomba yango na ordinatɛrɛ. Kashɛ, breve, sekele ya mombongo, mpe lotomo ya kosala piblisite ezali mpe na molɔngɔ yango.