Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/8 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Motuna 1: Bomoi na ngai ezali mpenza na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/8 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Ezali na bomoi mosusu ya malamu koleka oyo?

Mobali moko ya mobange ná bebe moko bazali kotala mosika

Na bantango mosusu omonaka ete bomoi ezali mpenza mokuse?

Osí omituná soki longola kosakana, kosala mosala, kobala, kobota mpe konuna ezali na bomoi mosusu ya malamu koleka? (Yobo 14:1, 2) Biblia emonisi ete ata bato ya bwanya koleka bamitunaki mituna ya ndenge wana.​—Tángá Mosakoli 2:11.

Bomoi ezali mpenza na ntina? Liboso, tosengeli komituna soki bomoi ebandá ndenge nini. Nsima ya kotalela ndenge bɔɔngɔ mpe nzoto na biso mobimba ezalaka, bato mingi bamoni ete ezali na Mozalisi moko ya bwanya nde akelá biso. (Tángá Nzembo 139:14.) Soki ezali bongo, boye, akelá biso na mokano moko! Koluka koyeba mokano yango ekoki kosala ete tómona ete bomoi na biso ezali mpenza na ntina.

Mpo na nini Nzambe akelaki bato?

Nzambe apambolaki mobali ná mwasi ya liboso mpe apesaki bango mokumba moko ya malamu mpenza. Mokano na ye mpo na bango ezalaki bátondisa mabele, bákómisa yango paradiso mpe bázala na bomoi libela na libela.​—Tángá Ebandeli 1:28, 31.

Mokano ya Nzambe ezongaki nsima ntango bato batombokelaki Bokonzi na ye. Kasi, Nzambe asundoli biso te mpe abongoli mokano na ye mpo na mabele te. Biblia eyebisi biso ete Nzambe azali kotambwisa makambo mpo na kobikisa bato ya sembo mpe ete mokano na ye mpo na mabele ekokokisama! Na yango, Nzambe alingi ete otalela bomoi na ndenge oyo ye akanaki ete ezala! (Tángá Nzembo 37:29.) Yekolá Biblia mpo oyeba ndenge oyo okoki kozwela makambo oyo Nzambe alaki matomba.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto