Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Décembre nk. 8-13
  • “Okozala na ngai na Paradiso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Okozala na ngai na Paradiso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BOMOI EKOZALA NDENGE NINI NA PARADISO?
  • BOYANGELI YA MOKONZI SALOMO​—ELILI YA PARADISO
  • MOKUMBA NINI BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BAKOZALA NA YANGO?
  • “BAMPATE MOSUSU” BASENGELI KOSALA NINI MPO BÁKOKISA MASƐNGAMI YA KOZALA NA PARADISO?
  • OKOKI KOZALA NA BOMOI LIBELA NA LIBELA NA PARADISO
  • Liteya nini tokoki kozwa epai ya mosali-mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Tokomonana na Paradiso!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Banani bakosekwa? Bakofanda epai wapi?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Paradiso oyo Biblia elobeli ezali wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Décembre nk. 8-13

LISOLO YA BOYEKOLI 50

“Okozala na ngai na Paradiso”

“Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.”​—LUKA 23:43.

LOYEMBO 145 Nzambe alaki biso Paradiso

NA MOKUSEa

1. Na kotalela Luka 23:39-43, Yesu alobaki nini na mosali-mabe oyo azalaki pene na ye mwa moke liboso akufa?

YESU ná basali-mabe mibale bazalaki koyoka mpasi mpenza ntango bazalaki kokufa malɛmbɛmalɛmbɛ. (Luka 23:32, 33) Basali-mabe mibale wana bazalaki kotyola Yesu, yango emonisi polele ete bazalaki bayekoli na ye te. (Mat. 27:44; Mrk. 15:32) Kasi moko na bango abongolaki makanisi na ye. Alobaki ete: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Yesu azongiselaki ye ete: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.” (Tángá Luka 23:39-43.) Ezali na elembeteli moko te oyo emonisi ete mosali-mabe yango andimaki nsango ya “bokonzi ya likoló” oyo Yesu azalaki kosakola. Lisusu, Yesu alobaki soki moke te ete moto yango akozala na Bokonzi yango kuna na likoló. (Mat. 4:17) Yesu azalaki kolobela nde Paradiso oyo ekoya. Mpo na nini tokoki koloba bongo?

Yesu azali likoló ya nzete ya mpasi. Mosali-mabe moko oyo azali pene na ye azali kosolola na ye.

Tokoki koloba nini mpo na mosali-mabe oyo asololaki na Yesu mpe makambo nini mosali-mabe yango ayebaki? (Talá paragrafe 2-3)

2. Nini emonisi ete mosali-mabe wana azalaki Moyuda?

2 Ekoki kozala ete mosali-mabe oyo abongolaki mpenza motema azalaki Moyuda. Mosali-mabe yango alobaki na moninga na ye boye: “Yo ozali kobanga Nzambe te, awa yo ná moto oyo bozwi lisambisi moko?” (Luka 23:40) Bayuda bazalaki kosambela kaka Nzambe moko, kasi bato ya bikólo bazalaki kondimela banzambe mingi. (Kob. 20:2, 3; 1 Ko. 8:5, 6) Soki basali-mabe wana bazalaki bato ya bikólo, mbɛlɛ motuna oyo moko na bango atunaki elingaki kozala boye: “Yo ozali kobanga banzambe te?” Longola yango, Yesu atindamaki te epai ya bato ya bikólo, kasi nde epai ya “bampate ya ndako ya Yisraele oyo babungá.” (Mat. 15:24) Nzambe ayebisaki Bayisraele ete Yesu akosekwa uta na bakufi. Ekoki kozala ete mosali-mabe wana ayebaki likambo yango, mpe ndenge maloba na ye emonisi yango, andimaki ete Yehova akosekwisa Yesu mpo ayangela na Bokonzi ya Nzambe. Emonani polele ete moto yango azalaki na elikya ete Nzambe akosekwisa mpe ye.

3. Na kotalela Ebandeli 2:15, mbala mosusu mosali-mabe wana azalaki kokanisa nini ntango Yesu alobelaki Paradiso? Limbolá.

3 Lokola azalaki Moyuda, mosali-mabe wana oyo abongolaki mpenza motema asengelaki koyeba masolo ya Adama ná Eva mpe Paradiso esika oyo Yehova atyaki bango. Yango wana, mosali-mabe wana akokaki kondima ete Paradiso oyo Yesu azalaki kolobela ekozala elanga moko ya kitoko awa na mabele.​—Tángá Ebandeli 2:15.

4. Maloba oyo Yesu alobaki na mosali-mabe wana etindaka biso tókanisa nini?

4 Maloba oyo Yesu alobaki na mosali-mabe wana etindaka biso tókanisa ndenge bomoi ekozala na Paradiso. Na ntembe te, tokoki koyekola likambo moko etali Paradiso na boyangeli ya kimya ya Mokonzi Salomo. Lisusu, tozali kozela makambo oyo Yesu, moto oyo aleki Salomo akosala elongo na bato oyo bakoyangela na ye mpo na kokómisa mabele oyo Paradiso. (Mat. 12:42) Ezali polele ete “bampate mosusu” basengeli kotya likebi na makambo oyo basengeli kosala mpo na kozala na bomoi ya seko na Paradiso.​—Yoa. 10:16.

BOMOI EKOZALA NDENGE NINI NA PARADISO?

5. Okanisaka bomoi ekozala ndenge nini na Paradiso?

5 Okanisaka bomoi ekozala ndenge nini na Paradiso? Mbala mosusu okanisaka ezali parkɛ moko ya kitoko, lokola elanga ya Edene. (Eba. 2:7-9) Okoki komikundwela esakweli oyo Mika akomaki ete bato ya Nzambe bakofanda “moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi.” (Mika 4:3, 4) Okoki mpe komikundwela bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi ete biloko ya kolya ekozala beboo. (Nz. 72:16; Yis. 65:21, 22) Na yango, okoki komimona na kati ya elanga moko ya kitoko, mpe ofandi na mesa oyo etondi na bilei ya kitoko. Okoki kokanisa mopɛpɛ kitoko oyo euti na banzete mpe bafololo ya nsolo kitoko. Oyo eleki ntina, okoki komona na makanisi ndenge bandeko na yo ya libota mpe baninga na yo, ezala mpe bato oyo bakosekwa, bazali kosɛka mpe kosepela kolekisa ntango elongo na yo. Nyonso wana ezali ndɔtɔ te. Na ntembe te, makambo lokola oyo wana ekosalema awa na mabele. Kasi, tokozala na mosala kitoko ya kosala na Paradiso.

Ndeko mobali ya mobange na lisolo oyo eleki, sikoyo akómi elenge mpe azali na Paradiso, azali koteya mosali-mabe oyo abomamaki elongo na Yesu.

Tokozala na mosala ya ntina ya koteya bato oyo bakosekwa (Talá paragrafe 6)

6. Na kotalela elilingi, tokosala nini na Paradiso?

6 Yehova akelá biso mpo tósepela na mosala na biso. (Mos. 2:24) Tokozala na misala mingi ya kosala na boumeli ya Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Kristo. Baoyo bakobika na bolɔzi monene, ezala mpe bamilio ya bato oyo bakosekwa, bakozala na mposa ya bilamba, bilei mpe bisika ya kofanda. Mpo na kokokisa makambo nyonso wana, ekosɛnga tósala mosala makasi! Kaka ndenge Adama ná Eva basengelaki kobongisa elanga oyo bazalaki kofanda, biso mpe tokozala na libaku ya kobongisa mabele mpo ekóma Paradiso. Kanisá esengo oyo tokozwa ntango tokoteya bamilio ya bato oyo bakosekwa, oyo bayebaki mwa makambo etali Yehova mpe mokano na ye; mpe ntango tokosalisa bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele báyekola makambo oyo esalemaki nsima ya liwa na bango.

7. Tokoki komindimisa na likambo nini, mpe mpo na nini?

7 Tokoki komindimisa ete ntango tokozala na Paradiso, tokozala na kimya, na biloko nyonso oyo tokozala na yango mposa mpe makambo ekotambola na molɔngɔ. Mpo na nini? Mpo Yehova asili koyebisa biso ndenge bomoi ekozala na nse ya boyangeli ya Mwana na ye. Tokoki komona yango na lisolo oyo elobeli boyangeli ya Mokonzi Salomo.

BOYANGELI YA MOKONZI SALOMO​—ELILI YA PARADISO

8. Maloba oyo Mokonzi Davidi akomaki na Nzembo 37:10, 11, 29, ekokisamaki ndenge nini? (Talá “Mituna ya batángi” na nimero oyo.)

8 Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Davidi akomaki ndenge bomoi ekozala ntango mokonzi ya bwanya mpe ya sembo akofanda na kiti ya bokonzi. (Tángá Nzembo 37:10, 11, 29.) Totángelaka bato mosusu Nzembo 37:11 mbala na mbala ntango tolobelaka Paradiso oyo ekoya. Ebongi tósala bongo, mpo Yesu azongelaki maloba yango na Lisolo na ye na likoló ya Ngomba, mpe amonisaki ete ekokokisama na mikolo ezali koya. (Mat. 5:5) Kasi maloba ya Davidi emonisi mpe ndenge bomoi ekozala na boyangeli ya Mokonzi Salomo. Ntango Salomo azalaki koyangela Yisraele, basaleli ya Nzambe bazalaki na kimya mpe biloko mingi na mokili “oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.” Nzambe alobaki boye: “Soki bokobi kotambola na mibeko na ngai . . . , nakotya kimya na mokili, mpe bokolala mpenza, kozanga ete moto moko alɛngisa bino.” (Lev. 20:24; 26:3, 6) Bilaka nyonso wana ekokisamaki na boumeli ya boyangeli ya Salomo. (1 Nt. 22:9; 29:26-28) Mpe Yehova alobaki ete bato mabe oyo bazalaki kosambela banzambe mosusu ‘bakozala lisusu te.’ (Nz. 37:10) Na yango, maloba ya Nzembo 37:10, 11, 29 ekokisamaki na ntango ya kala mpe ekokokisama na mikolo ezali koya.

9. Mokonzi-mwasi ya Sheba alobaki nini mpo na boyangeli ya Mokonzi Salomo?

9 Mokonzi-mwasi ya Sheba ayokaki nsango ya kimya mpe bomɛngo oyo Bayisraele bazalaki na yango na boumeli ya boyangeli ya Salomo. Mokonzi-mwasi wana autaki na mboka moko ya mosika mpe akómaki na Yerusaleme mpo na komona na miso na ye moko makambo oyo ayokaki. (1 Bak. 10:1) Nsima ya kotala bokonzi ya Salomo, alobaki boye: “Oyo bayebisaki ngai ekómi ata na katikati te. . . . Esengo na bato na yo; esengo na basaleli na yo oyo batɛlɛmaka ntango nyonso liboso na yo, mpe bayokaka bwanya na yo!” (1 Bak. 10:6-8) Kasi makambo oyo ezalaki kosalema na nse ya boyangeli ya Salomo ezalaki elili ya makambo oyo Yehova akosala mpo na bato na nse ya boyangeli ya Mwana na ye, Yesu.

10. Na ndenge nini Yesu aleki Salomo?

10 Yesu aleki Salomo na makambo nyonso. Salomo azalaki moto ya kozanga kokoka oyo asalaki mabunga minene oyo nsukansuka esalaki ete mabe ekómela basaleli ya Nzambe. Nzokande, Yesu azali Moyangeli ya kokoka oyo asalaka ata libunga te. (Luka 1:32; Ebr. 4:14, 15) Yesu atikalaki sembo epai ya Nzambe atako Satana amekaki ye makasi. Kristo amonisaki ete akosala lisumu moko te to likambo moko te oyo ekosala ete mabe ekómela bato ya sembo oyo akoyangela. Ezali mpenza lokumu ete azala Mokonzi na biso.

11. Banani bakoyangela elongo na Yesu?

11 Yesu ná bato 144 000 oyo bakoyangela na ye bakosala elongo mpo na kobatela bato mpe kokokisa mokano ya Yehova mpo na mabele. (Em. 14:1-3) Lokola bato yango bayikaki mpiko na komekama mpe mikakatano ntango bazalaki awa na mabele, na yango bakomitya na esika ya bato oyo bazali koyika mpiko na komemaka mpe mikakatano awa na mabele. Mokumba nini ya sikisiki bato oyo bakoyangela elongo na Yesu bakozala na yango?

MOKUMBA NINI BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BAKOZALA NA YANGO?

12. Mosala nini Yehova apesi bato 144 000?

12 Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakozala na makambo mingi ya kosala koleka oyo Salomo asalaki. Mokonzi Salomo azalaki na mokumba ya kobatela bamilio ya bato kaka na ekólo moko. Nzokande, baoyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe bakobatela bamiliare ya bato oyo bakozala na bomoi awa na mabele mobimba. Yehova apesi bato 144 000 lokumu moko monene!

13. Mokumba nini ya ntina mingi bato oyo bakoyangela elongo na Yesu bakozala na yango?

13 Ndenge moko na Yesu, bato 144 000 bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe. (Em. 5:10) Na nse ya Mibeko ya Moize, banganga-nzambe bazalaki libosoliboso kosalisa bato mpo bázala malamu na mosuni mpe bázala penepene na Yehova. Mobeko ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya,” yango wana ezali mabe te koloba ete bato oyo bakoyangela elongo na Yesu bakopesa mabɔkɔ na mosala wana monene ya kosalisa basaleli ya Nzambe bázala malamu na mosuni mpe bátikala penepene na Yehova. (Ebr. 10:1) Sikoyo toyebi te ndenge bakonzi mpe banganga-nzambe yango bakosolola ná bato oyo bakozala na nse ya Bokonzi ya Nzambe oyo bakozala awa na mabele. Ezala ebongiseli nini Yehova azwi, tokoki komindimisa ete na Paradiso oyo ekoya, baoyo bakozala awa na mabele bakozwa litambwisi oyo basengeli na yango.​—Em. 21:3, 4.

“BAMPATE MOSUSU” BASENGELI KOSALA NINI MPO BÁKOKISA MASƐNGAMI YA KOZALA NA PARADISO?

14. Boyokani nini ezali kati na “bampate mosusu” mpe “etonga moke”?

14 Yesu abengaki baoyo bakoyangela elongo na ye “etonga moke.” (Luka 12:32) Lisusu, alobelaki etuluku ya mibale, oyo abengaki “bampate mosusu.” Bituluku wana nyonso mibale esali etonga kaka moko. (Yoa. 10:16) Bituluku yango mibale ezali kosala elongo, mpe ekokoba kosala elongo tii mabele oyo ekokóma Paradiso. Na ntembe te, na ntango wana, bato oyo bazali na “etonga moke” bakozala kuna na likoló mpe bato oyo bazali “bampate mosusu” bakozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele. Nzokande, ezali na makambo oyo “bampate mosusu” basengeli kosala mpo bákokisa masɛngami ya kozala na Paradiso.

Kaka ndeko wana ya mobange azali kosolola na monganga moko na nzela ya mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!”

Banda sikoyo tokoki komonisa ete tozali komilɛngɛla mpo na kozala na Paradiso oyo ekoya (Talá paragrafe 15)b

15. (a) Ndenge nini “bampate mosusu” basalaka na bomoko elongo na bandeko ya Kristo? (b) Na kotalela elilingi, ndenge nini okoki komekola ndakisa ya ndeko mobali oyo azali na farmasi?

15 Mosali-mabe wana akufaki liboso amonisa ete azalaki na botɔndi mpo na makambo oyo Kristo asalaki mpo na ye. Nzokande, biso “bampate mosusu” tozali na mabaku mingi sikoyo ya komonisa ndenge oyo tozali komiyoka mpo na Yesu. Na ndakisa, tomonisaka ete tolingaka ye na ndenge tosalelaka bandeko oyo batyami mafuta na elimo makambo. Yesu alobaki ete akosambisa bampate mosusu na kolanda makambo oyo bakosalela bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Mat. 25:31-40) Tokoki kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ ntango tozali kosakwela bato na molende mpenza mpe kokómisa bango bayekoli. (Mat. 28:18-20) Yango wana, tolingaka kosalela malamu bisaleli oyo esalisaka biso mpo na koyekola na bato Biblia oyo bazali kopesa biso, na ndakisa, buku Sepelá na bomoi libela na libela! Soki ozali koyekola na moto moko te Biblia, okoki komityela mokano ya kosɛnga bato mingi oyekola na bango Biblia soki esengeli.

16. Tokoki kosala nini mpo tózala bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela?

16 Tosengeli kozela te tii ntango tokozala na Paradiso nde tókóma lolenge ya bato oyo Yehova alingi bázala kuna. Banda sikoyo, tokoki kosala makasi tózala sembo na maloba, na misala na biso, mpe tólekisa ndelo te na bizaleli na biso. Lisusu, tokoki kozala sembo epai ya Yehova, molongani na biso, mpe bandeko na biso bakristo. Soki tozali kotosa Yehova sikoyo na mokili oyo mabe, ekozala mpasi te mpo na biso tótosa ye na Paradiso. Tokoki mpe kokolisa makoki mpe bizaleli na biso mpo na komonisa ete tozali komilɛngɛla mpo na kozala kuna libela na libela. Talá lisolo “Omilɛngɛli mpo na ‘kozwa libula ya mabele’?” oyo ezali na nimero oyo.

17. Tosengeli kolɛmba nzoto mpo na masumu na biso ya kala? Limbolá.

17 Tosengeli mpe kosala makasi tótika kozala na ngambo mpo na masumu ya minene oyo tosalá kala. Na yango, tosengeli soki moke te kozwa mbeka ya lisiko libaku mpo na ‘kozala na momeseno ya kosala lisumu na nko.’ (Ebr. 10:26-31) Kasi soki tobongolaki mpenza motema na lisumu monene oyo tosalaki, tolukaki lisalisi oyo Yehova apesaka, mpe tobongolaki bizaleli na biso, tokoki komindimisa ete asilá kolimbisa biso mpenza. (Yis. 55:7; Mis. 3:19) Kobosana te maloba oyo Yesu alobaki na Bafarisai: “Nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.” (Mat. 9:13) Mbeka ya lisiko ezali na nguya ya kozipa masumu na biso nyonso.

OKOKI KOZALA NA BOMOI LIBELA NA LIBELA NA PARADISO

18. Okolinga kosolola nini na mosali-mabe oyo akufaki pene na Yesu?

18 Okoki komimona na Paradiso, ozali kosolola na mosali-mabe wana oyo asololaki na Yesu? Na ntembe te, bino nyonso mibale bokozala na botɔndi mpo na mbeka ya Yesu. Mbala mosusu okoki kotuna ye ayebisa yo makambo mingi oyo esalemaki na bangonga ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele mpe ndenge ayokaki ntango Yesu ayanolaki na bosɛnga na ye. Ntango mosusu, ye mpe akotuna yo mpo na koyeba soki bomoi ezalaki ndenge nini na mikolo ya nsuka ya mokili ya Satana. Ekozala mpenza lokumu koyekola Biblia na bato lokola ye!​—Ef. 4:22-24.

Kaka ndeko wana ya mobange, sikoyo akómi elenge mpe azali na Paradiso, azali koyema elilingi wana ndeko mwasi moko azali kotala. Bangomba, banzete mpe bafololo ya kitoko ezingi bango. Pene na bango ezali na bankɔsi, ba lapin, mpe bantaba ya zamba, bango nyonso bazali kofanda na kimya.

Na boumeli ya Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Kristo, ndeko mobali moko azali kosepela kosalela likoki moko oyo azalaki kozela na mposa makasi mpo na kokolisa yango (Talá paragrafe 19)

19. Mpo na nini bomoi na Paradiso ekolɛmbisa soki moke te? (Talá elilingi ya ezipeli.)

19 Bomoi na Paradiso ekolɛmbisa soki moke te. Tokozala ntango nyonso elongo na bato malamu mpe mosala ya malamu ya kosala. Oyo eleki nyonso, mokolo na mokolo tokozala na likoki ya koyekola koyeba Tata na biso ya likoló malamumalamu mpe kosepela na biloko oyo apesá biso. Tokozanga makambo ya koyekola te mpo na ye, mpe tokozala na makambo mingi ya koyekola na biloko oyo akelá. Ntango nyonso oyo tokozala na bomoi, tokokóma lisusu kolinga Nzambe mingi. Tozali na botɔndi mingi mpo na Yehova mpe Yesu mpo balaki biso ete tokozala na bomoi libela na libela na Paradiso!

OKOPESA EYANO NINI?

  • Bomoi ekozala ndenge nini na Paradiso?

  • Mokumba nini bandeko ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo bakozala na yango mpo na kokómisa mabele Paradiso?

  • “Bampate mosusu” basengeli kosala nini mpo bákokisa masɛngami ya kozala na Paradiso?

LOYEMBO 22 Bokonzi ezali koyangela​—Tiká eya!

a Okanisaka ntango nyonso soki bomoi ekozala ndenge nini na Paradiso? Kosala bongo ezali kolendisa. Soki tozali kokanisa mingi makambo oyo Yehova alaki kopesa biso na mikolo ezali koya, tokozala na mposa makasi ya koteya basusu makambo etali mokili ya sika. Lisolo oyo ekosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi na elaka ya Paradiso oyo Yesu apesaki mpo na mikolo ezali koya.

b ELILINGI: Ndeko mobali oyo azali na elikya ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya koteya bato oyo bakosekwa azali koteya basusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto