Mituna ya batángi
Mpo na nini bato mosusu balobaka ete maloba ya Nzembo 12:7 etali “maloba ya Yehova” (vɛrsɛ 6), nzokande Libongoli ya Mokili ya Sika emonisi ete etali “bato ya mpasi” (vɛrsɛ 5)?
Makambo oyo nzembo yango elobeli emonisi vɛrsɛ 7 etaleli bato.
Na Nzembo 12:1-4 elobi ete “bato ya sembo balimwe na kati ya bato.” Sikoyo tótalela Nzembo 12:5-7, bavɛrsɛ oyo ezali na motuna oyo tozali kotalela.
“‘Lokola bato ya mpasi bazali konyokwama,
Lokola babola bazali kolelalela,
Nakotɛlɛma mpo nasala likambo,’ Yehova alobi bongo.
‘Nakobikisa bango na mabɔkɔ ya baoyo bazali kosalela bango makambo na nko.’
Maloba ya Yehova ezali pɛto;
Ezali lokola palata oyo epɛtolami na ndako ya mɔtɔ makasi oyo esalemi na mabele, epɛtolami mbala nsambo.
Okokɛngɛla bango, Ee Yehova;
Okobatela mpo na libela mokomoko na bango na mabɔkɔ ya libota oyo.”
Vɛrsɛ 5 emonisi oyo Yehova akosala mpo na “bato ya mpasi.” Akobikisa bango.
Vɛrsɛ 6 ebakisi ete “maloba ya Yehova ezali pɛto,” ‘lokola palata oyo epɛtolami.’ Yango emonisi ndenge tomiyokaka mpo na Liloba ya Yehova.—Nz. 18:30; 119:140.
Sikoyo tótalela vɛrsɛ oyo elandi, Nzembo 12:7: “Okokɛngɛla bango, Ee Yehova; okobatela mpo na libela mokomoko na bango na mabɔkɔ ya libota oyo.” Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli liloba “bango” na vɛrsɛ yango?
Lokola vɛrsɛ 7 eyei na nsima ya vɛrsɛ 6 oyo elobeli “maloba ya Yehova,” bato mosusu bakoki kokanisa ete vɛrsɛ yango ezali kolobela maloba ya Nzambe. Ya solo Nzambe abateli Biblia na milende nyonso ya batɛmɛli mpo na kopekisa yango mpe kobebisa yango.—Yis. 40:8; 1 Pe. 1:25.
Kasi, makambo oyo ezali na vɛrsɛ 5 mpe ezali solo. Yehova akokoba kosalisa mpe kobikisa “bato ya mpasi” mpe baoyo “bazali konyokwama.”—Yobo 36:15; Nz. 6:4; 31:1, 2; 54:7; 145:20.
Na yango, vɛrsɛ 7 elobeli nini?
Makambo mosusu oyo ezali na nzembo yango emonisi ete vɛrsɛ 7 etaleli bato.
Nzembo 12:1 elobeli likambo oyo ezali kokómela “bato ya sembo” oyo mbala mosusu bato mabe bazalaki kobuba. Na nsima, tozali komona ete Yehova akopesa etumbu na baoyo basalelaka lolemo na bango mabe. Mokomi ya nzembo amonisi ete tokoki kotya motema ete Nzambe akosalisa basaleli na ye mpo maloba na ye ezali pɛto.
Yango wana vɛrsɛ 7 elobi ete Yehova akokɛngɛla mpe akobatela “bango,” elingi koloba, baoyo bato mabe bazali komonisa mpasi.
Liloba “bango” esalelami na makomi ya Ebre ya Bamasorete. Libongoli ya Grɛki oyo babengi Septante esaleli liloba “biso” mbala mibale na vɛrsɛ 7, mpo na kolobela lisusu bato ya sembo oyo bazali komona mpasi mpe konyokwama. Mpo na kosukisa, vɛrsɛ 7 elobi ete “mokomoko” ya bato ya sembo akobatelama “na mabɔkɔ ya libota oyo,” bato oyo “bakumisaka makambo ya mabe.” (Nz. 12:7, 8) Na Targoum ya Aramɛyɛ, vɛrsɛ 7 elobi boye: “Yo, Ee NKOLO, okobatela bato ya sembo, okokɛngɛla bango na libota mabe oyo mpo na libela.” Yango mpe emonisi ete Nzembo 12:7 ezali kolobela maloba ya Nzambe te.
Na yango, vɛrsɛ yango epesi “bato ya sembo” elikya ete Nzambe akosala mpo na bango.