Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 19
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

1 Bakonzi 19:1

Mitindami

  • +1Ba 16:29; 21:25
  • +1Ba 16:31
  • +1Ba 18:40

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 101

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 18

1 Bakonzi 19:2

Mitindami

  • +1Ba 20:10
  • +Mis 23:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 101

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 19

1 Bakonzi 19:3

Mitindami

  • +Kob 2:15; 1Sa 27:1; Mas 16:14; 22:3; Mt 10:23
  • +Eb 21:31
  • +Yos 15:28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 101-102

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, nk. 19-20

1 Bakonzi 19:4

Mitindami

  • +Yon 4:6
  • +Mit 11:15; Yb 3:21; Yon 4:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    6/2019, nk. 15-16

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2014, lok. 15

    1/7/2011, nk. 19-20

    15/5/1997, lok. 13

    Mekolá, nk. 102-103

1 Bakonzi 19:5

Mitindami

  • +Yb 30:4
  • +Nz 34:7
  • +Da 10:10; Mis 12:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 103

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 20

1 Bakonzi 19:6

Mitindami

  • +1Ba 17:12; Yis 33:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 103

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 20

1 Bakonzi 19:7

Mitindami

  • +Ebr 1:14
  • +Nz 103:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 103

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 20

1 Bakonzi 19:8

Mitindami

  • +Kob 24:18; Mib 9:9; Lk 4:2
  • +Kob 3:1; 19:18; Mal 4:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 103-104

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, nk. 20-21

1 Bakonzi 19:9

Mitindami

  • +Kob 33:22; Ebr 11:38
  • +Eb 16:8; Nz 139:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 104

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 21

1 Bakonzi 19:10

Mitindami

  • +Kob 20:5; Mit 25:11; 2Ba 10:16; Nz 69:9; 119:139; 2Ko 11:2
  • +Mib 29:25; Bas 2:20; 1Ba 8:9; 2Ba 17:15; Ebr 8:9
  • +Ro 11:3
  • +1Ba 18:4
  • +1Ba 18:22; Mas 24:10; Ro 11:3
  • +1Ba 19:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 104

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 21

1 Bakonzi 19:11

Mitindami

  • +Kob 34:2
  • +Kob 33:22; Hab 3:3
  • +Yb 38:1; Nz 50:3; Yis 29:6
  • +1Sa 14:15; Yb 9:6; Nz 68:8; Nah 1:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Penepene na Yehova, nk. 37-38, 43

    Mekolá, lok. 106

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, nk. 21-22

1 Bakonzi 19:12

Mitindami

  • +Mib 4:11
  • +Kob 34:6; Mib 4:33

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Penepene na Yehova, nk. 37-38, 43

    Mekolá, nk. 106-107

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, nk. 21-22

    15/5/1997, lok. 13

1 Bakonzi 19:13

Mitindami

  • +Kob 3:6
  • +1Ba 19:9

1 Bakonzi 19:14

Mitindami

  • +Mib 31:20; Nz 78:37; Yis 1:4; Yir 22:9; Ro 11:3
  • +1Ba 19:10

1 Bakonzi 19:15

Mitindami

  • +2Ba 8:7
  • +2Ba 8:8, 12; Am 1:4
  • +1Sa 2:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 106-107

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 22

    15/5/1997, lok. 13

1 Bakonzi 19:16

Mitindami

  • +2Ba 9:2, 30
  • +2Ba 9:14
  • +2Ba 2:9; Lk 4:27
  • +Bas 7:22; 1Ba 4:12
  • +2Ba 2:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/1997, lok. 13

1 Bakonzi 19:17

Mitindami

  • +2Ba 8:12; 9:14; 10:32; 13:3
  • +2Ba 9:24; 10:6, 25
  • +2Ba 2:24

1 Bakonzi 19:18

Mitindami

  • +Yis 1:9; Ro 11:4, 5; 2Ti 2:19
  • +Kob 20:5
  • +Hos 13:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 107

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 22

1 Bakonzi 19:19

Mitindami

  • +Kob 3:1; Bas 6:11; 2Sa 7:8
  • +2Ba 2:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 12

    1/11/1997, nk. 30-31

1 Bakonzi 19:20

Mitindami

  • +Eb 31:28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/1997, nk. 30-31

1 Bakonzi 19:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “apesaki mbeka.”

Mitindami

  • +Le 19:5
  • +2Sa 24:22
  • +Kob 24:13; 2Ba 2:3; 3:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/1997, nk. 30-31

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 19:11Ba 16:29; 21:25
1 Bak. 19:11Ba 16:31
1 Bak. 19:11Ba 18:40
1 Bak. 19:21Ba 20:10
1 Bak. 19:2Mis 23:13
1 Bak. 19:3Kob 2:15; 1Sa 27:1; Mas 16:14; 22:3; Mt 10:23
1 Bak. 19:3Eb 21:31
1 Bak. 19:3Yos 15:28
1 Bak. 19:4Yon 4:6
1 Bak. 19:4Mit 11:15; Yb 3:21; Yon 4:3
1 Bak. 19:5Yb 30:4
1 Bak. 19:5Nz 34:7
1 Bak. 19:5Da 10:10; Mis 12:7
1 Bak. 19:61Ba 17:12; Yis 33:16
1 Bak. 19:7Ebr 1:14
1 Bak. 19:7Nz 103:13
1 Bak. 19:8Kob 24:18; Mib 9:9; Lk 4:2
1 Bak. 19:8Kob 3:1; 19:18; Mal 4:4
1 Bak. 19:9Kob 33:22; Ebr 11:38
1 Bak. 19:9Eb 16:8; Nz 139:7
1 Bak. 19:10Kob 20:5; Mit 25:11; 2Ba 10:16; Nz 69:9; 119:139; 2Ko 11:2
1 Bak. 19:10Mib 29:25; Bas 2:20; 1Ba 8:9; 2Ba 17:15; Ebr 8:9
1 Bak. 19:10Ro 11:3
1 Bak. 19:101Ba 18:4
1 Bak. 19:101Ba 18:22; Mas 24:10; Ro 11:3
1 Bak. 19:101Ba 19:2
1 Bak. 19:11Kob 34:2
1 Bak. 19:11Kob 33:22; Hab 3:3
1 Bak. 19:11Yb 38:1; Nz 50:3; Yis 29:6
1 Bak. 19:111Sa 14:15; Yb 9:6; Nz 68:8; Nah 1:5
1 Bak. 19:12Mib 4:11
1 Bak. 19:12Kob 34:6; Mib 4:33
1 Bak. 19:13Kob 3:6
1 Bak. 19:131Ba 19:9
1 Bak. 19:14Mib 31:20; Nz 78:37; Yis 1:4; Yir 22:9; Ro 11:3
1 Bak. 19:141Ba 19:10
1 Bak. 19:152Ba 8:7
1 Bak. 19:152Ba 8:8, 12; Am 1:4
1 Bak. 19:151Sa 2:7
1 Bak. 19:162Ba 9:2, 30
1 Bak. 19:162Ba 9:14
1 Bak. 19:162Ba 2:9; Lk 4:27
1 Bak. 19:16Bas 7:22; 1Ba 4:12
1 Bak. 19:162Ba 2:15
1 Bak. 19:172Ba 8:12; 9:14; 10:32; 13:3
1 Bak. 19:172Ba 9:24; 10:6, 25
1 Bak. 19:172Ba 2:24
1 Bak. 19:18Yis 1:9; Ro 11:4, 5; 2Ti 2:19
1 Bak. 19:18Kob 20:5
1 Bak. 19:18Hos 13:2
1 Bak. 19:19Kob 3:1; Bas 6:11; 2Sa 7:8
1 Bak. 19:192Ba 2:8
1 Bak. 19:20Eb 31:28
1 Bak. 19:21Le 19:5
1 Bak. 19:212Sa 24:22
1 Bak. 19:21Kob 24:13; 2Ba 2:3; 3:11
  • Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Libongoli ya Mokili ya Sika
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 19:1-21

1 Bakonzi

19 Na nsima, Ahaba+ ayebisaki Yezabele+ makambo nyonso oyo Eliya asalaki mpe ndenge abomaki basakoli yango nyonso na mopanga.+ 2 Na yango, Yezabele atindelaki Eliya momemi-nsango moko, na maloba oyo: “Tiká banzambe básala bongo+ mpe bábakisa yango,+ soki lobi na ngonga oyo, nakokómisa te molimo na yo lokola molimo ya mokomoko na bango!” 3 Bongo Eliya abangaki. Na yango, atɛlɛmaki mpe abandaki kokima mpo na kobikisa molimo na ye+ mpe ayaki na Beere-sheba+ ya Yuda.+ Na nsima, atikaki mosaleli na ye kuna. 4 Mpe ye moko atambolaki na esobe mobembo ya mokolo moko, mpe nsukansuka ayaki mpe afandaki na nse ya nzete moko ya letama.+ Mpe abandaki kosɛnga ete molimo na ye ekufa mpe koloba boye: “Ekoki! Sikoyo, Ee Yehova, longolá molimo na ngai,+ mpo naleki bankɔkɔ na ngai te.”

5 Nsukansuka, alalaki mpe mpɔngi ezwaki ye na nse ya nzete ya letama.+ Kasi, talá! anzelu moko+ azali kosimba+ ye. Na nsima, alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, lyá.” 6 Ntango atalaki, amoni pene na motó na ye gato moko ya libungutulu+ likoló ya mabanga oyo ezali na mɔtɔ mpe elokó moko ya mai. Mpe abandaki kolya mpe komɛla, nsima na yango, alalaki lisusu. 7 Na nsima, anzelu yango+ ya Yehova azongaki mbala ya mibale mpe asimbaki ye mpe alobaki boye: “Tɛlɛmá, lyá, mpo mobembo na yo ekozala mpasi mingi.”+ 8 Na yango atɛlɛmaki, alei mpe amɛli, mpe na nguya ya biloko oyo alyaki, atambolaki mikolo ntuku minei (40) butu moi+ tii na Horebe,+ ngomba ya Nzambe ya solo.

9 Nsukansuka, kuna, akɔtaki na mobenga+ moko, mpo alala kuna na butu; mpe talá! liloba ya Yehova eyelaki ye, mpe elobaki na ye boye: “Eliya, ozali kosala nini awa?”+ 10 Bongo alobaki ete: “Nayoki zuwa mpenza+ mpo na Yehova Nzambe ya mampinga; mpo bana ya Yisraele batiki kondimana na yo,+ babuki bitumbelo na yo,+ mpe babomi basakoli na yo na mopanga,+ bongo natikali kaka ngai moko;+ mpe babandi koluka molimo na ngai mpo bálongola yango.”+ 11 Kasi Nzambe alobaki: “Bimá, mpe tɛlɛmá likoló ya ngomba liboso ya Yehova.”+ Mpe talá! Yehova azalaki koleka,+ mpe mopɛpɛ moko monene mpe makasi ezalaki kopasola bangomba mpe kobuka mabanga liboso ya Yehova.+ (Yehova azalaki na mopɛpɛ yango te.) Mpe nsima ya mopɛpɛ, ezalaki koningana ya mabele.+ (Yehova azalaki na koningana yango ya mabele te.) 12 Mpe nsima ya koningana ya mabele, ezalaki mɔtɔ.+ (Yehova azalaki na mɔtɔ yango te.) Mpe nsima ya mɔtɔ, ezalaki mongongo moko ya kimya, ya nse.+ 13 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Eliya ayokaki yango, na mbala moko azipaki elongi na ye na elamba na ye ya mosala+ mpe abimaki mpe atɛlɛmaki na monɔkɔ ya mobenga yango; mpe talá! mongongo moko eyeli ye, mpe elobi na ye: “Eliya, ozali kosala nini awa?”+ 14 Mpe ye alobaki ete: “Nayoki zuwa mpenza mpo na Yehova Nzambe ya mampinga; mpo bana ya Yisraele batiki kondimana na yo,+ babuki bitumbelo na yo, mpe babomi basakoli na yo na mopanga, bongo natikali kaka ngai moko; mpe babandi koluka molimo na ngai mpo bálongola yango.”+

15 Bongo Yehova alobaki na ye boye: “Kende, zongá na nzela na yo na esobe ya Damasi;+ mpe kɔtá mpe tyá Hazaele+ mafuta+ azala mokonzi ya Siri. 16 Mpe Yehu+ mwana ya mwana ya Nimishi+ okotya ye mafuta azala mokonzi ya Yisraele; mpe Elisha+ mwana ya Shafate moto ya Abele-mehola,+ okotya ye mafuta azala mosakoli na esika na yo.+ 17 Mpe ekosalema mpenza boye: moto oyo akokima mopanga ya Hazaele,+ Yehu akoboma ye;+ mpe moto oyo akokima mopanga ya Yehu, Elisha akoboma ye.+ 18 Mpe natiki bato nkóto nsambo (7 000) na Yisraele,+ baoyo nyonso mabɔlɔngɔ na bango efukameli Baala te,+ mpe baoyo nyonso monɔkɔ na bango epwɛpwi+ ye te.”

19 Na yango, alongwaki wana mpe akutaki Elisha mwana ya Shafate azali kobalola+ mabele na bangɔmbɛ ntuku mibale na minei (24) oyo bakangisi mibalemibale liboso na ye mpe ye azalaki na mibale oyo ya nsuka. Bongo Eliya akatisaki epai na ye mpe abwakelaki ye elamba+ na ye ya mosala. 20 Na yango, atikaki bangɔmbɛ mpe apotaki mbangu na nsima ya Eliya mpe alobaki boye: “Nabondeli yo, tiká napwɛpwa tata na ngai ná mama na ngai.+ Na nsima, nakolanda yo.” Na yango, Eliya alobaki na ye boye: “Kende, zongá; mpo nasali yo nini?” 21 Bongo azongaki, atikaki kolanda ye mpe na nsima, azwaki bangɔmbɛ mibale oyo bakangisi esika moko mpe abomaki*+ yango, mpe alambaki mosuni na yango na bisaleli ya mabaya oyo bakangisaki+ na bangɔmbɛ mpe na nsima, apesaki yango na bato, mpe babandaki kolya. Nsima na yango, atɛlɛmaki, alandi Eliya mpe abandaki kosalela+ ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto