Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 14:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá basakoli bazali koloba na bango ete: ‘Bokomona mopanga te, mpe nzala ekokómela bino te, kasi nakopesa bino nde kimya ya solo na esika oyo.’”+

  • Yirimia 23:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete ‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+ Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kotambola na motó makasi na ye+ ete: ‘Mpasi ata moko te ekokwela bino.’+

  • Yirimia 27:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino ete: ‘Bokosalela mokonzi ya Babilone te,’+ mpo bazali nde kosakwela bino lokuta.+

  • Yirimia 28:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Nakobuka ekanganeli ya mokonzi ya Babilone.+

  • Bileli 2:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Basakoli na yo bamoni mpo na yo bimonaneli ya makambo oyo ezangi ntina mpe oyo esilisaka mposa te,+

      Mpe babimisi libunga na yo polele te mpo na kopekisa yo okende, okangama te,+

      Kasi bazalaki se komona mpo na yo bimonaneli ya mayebisi oyo ezangi ntina mpe ya bokosi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto