Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo baboteli biso mwana,+ bapesi biso mwana mobali;+ mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.+ Mpe bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko,+ Nkumu ya Kimya.+

  • Yirimia 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+

  • Yirimia 33:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na mikolo yango mpe na ntango yango, nakobimisela Davidi etape ya boyengebene,+ mpe ye akosala mpenza na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+

  • Ezekiele 34:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe nakobimisela yango mobateli moko ya mpate,+ mpe akoleisa yango mpenza, ɛɛ mosaleli na ngai Davidi.+ Ye nde akoleisa yango, mpe ye nde akokóma mobateli na yango.+

  • Mika 5:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+ yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda,+ uta na yo+ moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele,+ oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Malaki 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Talá! Nazali kotinda mo-memi-nsango na ngai,+ mpe akobongisa mpenza nzela liboso na ngai.+ Mpe Nkolo ya solosolo+ oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye+ ná momemi-nsango+ ya kondimana+ oyo bino bozali kosepela na ye.+ Talá! Ye akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.+

  • Luka 24:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe alimbwelaki bango makambo na ye na kati ya Makomami nyonso, banda na Moize+ tii na Basakoli nyonso.+

  • Luka 24:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Sikoyo alobaki na bango ete: “Oyo ezali maloba nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino,+ ete makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na mibeko ya Moize mpe na Basakoli+ mpe na Nzembo+ esengeli kokokisama.”

  • Baroma 3:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Kasi sikoyo lokola mibeko ezali te, boyengebene ya Nzambe+ emonani polele, ndenge Mibeko+ mpe Basakoli+ batatoli+ mpo na yango;

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto