MITÁNGO*
1 Mpe Yehova asololaki na Moize na esobe ya Sinai,+ na kati ya hema ya kokutana,+ na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale na mbula ya mibale ya kobima na bango na mokili ya Ezipito.+ Alobaki ete: 2 “Bózwa motángo+ ya liyangani mobimba ya Bayisraele* mokomoko, na kolanda mabota na bango, na kolanda mabota ya batata na bango mpe na kolanda motángo ya bankombo ya mibali nyonso. 3 Yo ná Arona bokokoma bankombo ya bato nyonso na Yisraele na kolanda bituluku* na bango, oyo bakoki kokende etumba, mpe bázala na mbula 20 to koleka.+
4 “Bózwa elongo na bino mobali moko na libota moko; mokomoko asengeli kozala nkumu na ndako ya batata na ye.+ 5 Talá bankombo ya mibali oyo bakotɛlɛma elongo na bino: Na libota ya Rubene, Elizure+ mwana ya Shedeure; 6 na libota ya Simeone, Shelumiele+ mwana ya Zurishadai; 7 na libota ya Yuda, Nahashone+ mwana ya Aminadabe; 8 na libota ya Isakare, Netanele+ mwana ya Zuare; 9 na libota ya Zebulone, Eliabe+ mwana ya Helone; 10 na bana ya Yozefe: na libota ya Efraime,+ Elishama mwana ya Amihude; na libota ya Manase, Gamaliele mwana ya Pedazure; 11 na libota ya Benyamina, Abidane+ mwana ya Gideoni; 12 na libota ya Dani, Ahiezere+ mwana ya Amishadai; 13 na libota ya Ashere, Pagiele+ mwana ya Okrane; 14 na libota ya Gade, Eliasafe+ mwana ya Duele; 15 na libota ya Nafatali, Ahira+ mwana ya Enane. 16 Wana nde bato ya liyangani oyo babengamaki. Bazalaki bankumu+ ya mabota ya batata na bango, bankumu ya bankóto ya bato ya Yisraele.”+
17 Bongo Moize ná Arona bazwaki mibali yango oyo batángamaki na nkombo. 18 Bayanganisaki liyangani mobimba na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, mpo bákoma nkombo na bango mokomoko na kolanda mabota na bango, na kolanda mabota ya batata na bango, kobanda na mbula 20 to koleka,+ 19 kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. Akomaki bango nkombo na esobe ya Sinai.+
20 Bana ya Rubene, mwana ya liboso ya Yisraele,+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 21 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Rubene ezalaki 46 500.
22 Bana ya Simeone+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 23 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Simeone ezalaki 59 300.
24 Bana ya Gade+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 25 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Gade ezalaki 45 650.
26 Bana ya Yuda+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 27 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Yuda ezalaki 74 600.
28 Bana ya Isakare+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 29 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Isakare ezalaki 54 400.
30 Bana ya Zebulone+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 31 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Zebulone ezalaki 57 400.
32 Bana ya Yozefe na nzela ya Efraime+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 33 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Efraime ezalaki 40 500.
34 Bana ya Manase+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 35 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Manase ezalaki 32 200.
36 Bana ya Benyamina+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 37 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Benyamina ezalaki 35 400.
38 Bana ya Dani+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 39 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Dani ezalaki 62 700.
40 Bana ya Ashere+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 41 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Ashere ezalaki 41 500.
42 Bana ya Nafatali+ bakomamaki nkombo na kolanda mabota na bango, mpe mabota ya batata na bango. Batángaki nkombo mokomoko ya mibali nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba, 43 mpe motángo ya bato oyo bakomisamaki nkombo kati na libota ya Nafatali ezalaki 53 400.
44 Wana ezali bato oyo Moize elongo na Arona ná bankumu 12 ya Yisraele bakomaki nkombo, mokomoko na bango azalaki komonisa ndako ya batata na ye. 45 Bayisraele nyonso kobanda na mbula 20 to koleka oyo bakoki kokende etumba bakomisamaki nkombo na kolanda ndako ya batata na bango, 46 mpe motángo ya bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo ezalaki 603 550.+
47 Kasi, Balevi+ bakomamaki nkombo te na kati na bango na kolanda libota ya batata na bango.+ 48 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 49 “Kaka libota ya Levi nde okokoma nkombo na bango te, mpe okozwa te motángo na bango mobimba na kati ya Bayisraele mosusu.+ 50 Okotya Balevi bátalelaka tabernakle ya Litatoli+ mpe bátalelaka bisaleli na yango nyonso mpe bátalelaka eloko na yango nyonso.+ Bakomema tabernakle ná bisaleli na yango nyonso,+ mpe bakosala mosala kati na yango,+ mpe bakotya kaa zingazinga ya tabernakle.+ 51 Ntango ekosɛnga kolongola tabernakle, Balevi bakokitisa yango;+ mpe ntango ekosɛnga kotya tabernakle, Balevi bakotɛlɛmisa yango; mpe moto oyo apesami nzela te,* oyo akopusana pene akobomama.+
52 “Moyisraele mokomoko akotya kaa, moto mokomoko na kolanda etuluku na ye ya mabota misato,+ mpe na kolanda bituluku* na bango. 53 Mpe Balevi bakotya kaa zingazinga ya tabernakle ya Litatoli, mpo nkanda ekwela liyangani ya Bayisraele te;+ mpe Balevi basengeli kozala na mokumba ya kokokisa* mosala oyo esɛngami na tabernakle ya Litatoli.”+
54 Bato ya Yisraele basalaki nyonso oyo Yehova apesaki Moize mitindo. Basalaki kaka bongo.
2 Sikoyo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: 2 “Bayisraele bakotya kaa na esika oyo bapesi etuluku na bango ya mabota misato;+ moto mokomoko akozala pene ya elembo ya ndako ya batata na ye. Bakotya kaa epai na epai, ekotalana na hema ya kokutana.
3 “Baoyo bakotya kaa na ɛsti, epai moi ebimaka, ekozala etuluku ya mabota misato ya kaa ya Yuda na kolanda bituluku* na bango; nkumu ya bana ya Yuda ezali Nahashone+ mwana ya Aminadabe. 4 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 74 600.+ 5 Baoyo bakotya kaa pene na ye ekozala libota ya Isakare; nkumu ya bana ya Isakare ezali Netanele+ mwana ya Zuare. 6 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 54 400.+ 7 Oyo elandi ekozala libota ya Zebulone; nkumu ya bana ya Zebulone ezali Eliabe+ mwana ya Helone. 8 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 57 400.+
9 “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na mampinga ya kaa ya Yuda bazali 186 400. Bakozala bato ya liboso ya kolongola kaa.+
10 “Etuluku ya mabota misato ya kaa ya Rubene+ na kolanda bituluku* na bango ekozala na sudi; nkumu ya bana ya Rubene ezali Elizure+ mwana ya Shedeure. 11 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 46 500.+ 12 Baoyo bakotya kaa pene na ye ekozala libota ya Simeone; nkumu ya bana ya Simeone ezali Shelumiele,+ mwana ya Zurishadai. 13 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 59 300.+ 14 Oyo elandi ekozala libota ya Gade; nkumu ya bana ya Gade ezali Eliasafe,+ mwana ya Rewele. 15 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 45 650.+
16 “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na mampinga ya kaa ya Rubene bazali 151 450, mpe bakozala bato ya mibale ya kolongola kaa.+
17 “Ntango hema ya kokutana ekolongolama,+ kaa ya Balevi ekozala na katikati ya bakaa mosusu.
“Bakolongwa na kolanda ndenge bakotya kaa na bango,+ moto na moto na esika na ye, na kolanda bituluku na bango ya mabota misato misato.
18 “Etuluku ya mabota misato ya kaa ya Efraime na kolanda bituluku* na bango ekozala na wɛsti; nkumu ya bana ya Efraime ezali Elishama,+ mwana ya Amihude. 19 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 40 500.+ 20 Pene na ye ekozala libota ya Manase;+ nkumu ya bana ya Manase ezali Gamaliele,+ mwana ya Pedazure. 21 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 32 200.+ 22 Oyo elandi ekozala libota ya Benyamina; nkumu ya bana ya Benyamina ezali Abidane+ mwana ya Gideoni. 23 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 35 400.+
24 “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na mampinga ya kaa ya Efraime bazali 108 100, mpe bakozala bato ya misato ya kolongola kaa.+
25 “Etuluku ya mabota misato ya kaa ya Dani na kolanda bituluku* na bango ekozala na nɔrdi; nkumu ya bana ya Dani ezali Ahiezere,+ mwana ya Amishadai. 26 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 62 700.+ 27 Baoyo bakotya kaa pene na ye ekozala libota ya Ashere; nkumu ya bana ya Ashere ezali Pagiele,+ mwana ya Okrane. 28 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 41 500.+ 29 Oyo elandi ekozala libota ya Nafatali; nkumu ya bana ya Nafatali ezali Ahira,+ mwana ya Enane. 30 Baoyo bakomisamaki nkombo na limpinga na ye bazali 53 400.+
31 “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kaa ya Dani bazali 157 600. Bakozala bato ya nsuka ya kolongola kaa,+ na kolanda bituluku na bango ya mabota misato misato.”
32 Bango nde Bayisraele oyo bakomisamaki nkombo na kolanda mabota ya batata na bango; bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na bakaa na kolanda mampinga na bango bazalaki 603 550.+ 33 Kasi Balevi bakomisamaki nkombo te+ elongo na Bayisraele mosusu,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 34 Bayisraele basalaki nyonso oyo Yehova apesaki Moize mitindo. Ndenge wana nde batyaki kaa, na kolanda bituluku na bango ya mabota misato misato,+ mpe ndenge wana nde balongolaki kaa,+ moto na moto na kolanda libota na ye mpe mabota ya batata na ye.
3 Sikoyo, talá molɔngɔ ya mabota ya Arona ná Moize na mokolo oyo Yehova asololaki na Moize na Ngomba Sinai.+ 2 Talá nkombo ya bana mibali ya Arona: Nadabe mwana ya liboso, Abihu,+ Eleazare+ mpe Itamare.+ 3 Wana nde bankombo ya bana mibali ya Arona, banganga-nzambe oyo batyamaki mafuta,* mpe batyamaki mpo básala mosala ya banganga-nzambe.+ 4 Nzokande, Nadabe ná Abihu bakufaki na miso ya Yehova ntango bapesaki liboso ya Yehova mɔtɔ oyo epesamaki nzela te+ na esobe ya Sinai, mpe babotaki bana te. Kasi Eleazare+ ná Itamare+ bakobaki kosala mosala ya banganga-nzambe elongo na Arona tata na bango.
5 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 6 “Memá libota ya Levi+ liboso, mpe okotɛlɛmisa bango liboso ya Arona nganga-nzambe, mpe bakosalela+ ye. 7 Bakokokisa mokumba na bango epai na ye mpe epai ya liyangani mobimba liboso ya hema ya kokutana na ndenge bakosala mosala oyo ezali na boyokani na tabernakle. 8 Bakobatela bisaleli nyonso+ ya hema ya kokutana mpe bakokokisa mikumba na bango epai ya Bayisraele na ndenge bakosala mosala oyo ezali na boyokani na tabernakle.+ 9 Okopesa Balevi epai ya Arona ná bana na ye ya mibali. Bazali bato oyo bapesami, bapesami epai na ye kati na Bayisraele.+ 10 Okotya Arona ná bana na ye ya mibali, mpe bakokokisa mikumba na bango ya bonganga-nzambe,+ mpe moto nyonso oyo apesami nzela te,* oyo akopusana pene akobomama.”+
11 Yehova akobaki koloba na Moize ete: 12 “Mpo na ngai, talá! Nazwi Balevi na kati ya Bayisraele na esika ya bana nyonso ya liboso* ya Bayisraele,+ mpe Balevi bakokóma ya ngai. 13 Mpo mwana nyonso ya liboso azali ya ngai.+ Na mokolo oyo nabɛtaki mwana nyonso ya liboso na mokili ya Ezipito,+ nasantisaki mpo na ngai mwana nyonso ya liboso na Yisraele banda na moto tii na nyama.+ Bakokóma ya ngai. Ngai nazali Yehova.”
14 Yehova alobaki lisusu na Moize na esobe ya Sinai+ ete: 15 “Komá bankombo ya bana ya Levi na kolanda mabota ya batata na bango mpe mabota na bango. Okokoma nkombo ya mobali nyonso oyo azali na mbula kobanda na sanza moko matá.”+ 16 Bongo Moize akomaki bankombo na bango na kolanda etinda ya Yehova, kaka ndenge azwaki mitindo. 17 Talá bana mibali ya Levi na kolanda bankombo na bango: Gereshone, Kohate, mpe Merari.+
18 Sikoyo talá bankombo ya bana mibali ya Gereshone na kolanda mabota na bango: Libini ná Shimei.+
19 Bana mibali ya Kohate na kolanda mabota na bango, bango oyo: Amirame, Yizare, Hebrone, mpe Uziele.+
20 Bana mibali ya Merari na kolanda mabota na bango, bango oyo: Maheli+ ná Mushi.+
Wana nde mabota ya Balevi na kolanda mabota ya batata na bango.
21 Na Gereshone: libota ya Balibini+ ná libota ya Bashimei. Wana nde mabota ya Bagereshone. 22 Motángo ya mibali nyonso kobanda sanza moko matá oyo bakomisamaki nkombo ezalaki 7 500.+ 23 Mabota ya Bagereshone etyaki kaa nsima ya tabernakle+ na wɛsti. 24 Nkumu ya ndako ya batata ya Bagereshone ezalaki Eliasafe mwana ya Laele. 25 Mokumba ya bana mibali ya Gereshone+ na hema ya kokutana ezalaki ya kobatela tabernakle ná hema,+ ezipeli na yango,+ elamba ya kozipa*+ ekɔtelo ya hema ya kokutana, 26 barido+ ya lopango, elamba ya kozipa*+ ekɔtelo ya lopango oyo ezali zingazinga ya tabernakle ná etumbelo, bansinga na yango ya hema, mpe mosala nyonso oyo ezali na boyokani na yango.
27 Na Kohate: libota ya Baamirame, libota ya Bayizare, libota ya Bahebrone, mpe libota ya Bauziele. Wana ezalaki mabota ya Bakohate.+ 28 Motángo ya mibali nyonso, kobanda sanza moko matá ezalaki 8 600; bazalaki na mokumba ya kobatela esika mosantu.+ 29 Mabota ya bana ya Kohate batyaki kaa na ngámbo ya sudi ya tabernakle.+ 30 Nkumu ya ndako ya batata ya mabota ya Bakohate ezalaki Elizafane mwana ya Uziele.+ 31 Mokumba na bango ezalaki ya kobatela Sanduku,+ mesa,+ etɛlɛmiselo ya miinda,+ bitumbelo,+ bisaleli+ oyo bazalaki kosalela na esika mosantu, elamba ya kozipa,*+ mpe mosala nyonso oyo ezali na boyokani na yango.+
32 Nkumu ya bankumu ya Balevi ezalaki Eleazare+ mwana ya Arona nganga-nzambe, oyo azalaki kokamba baoyo bazalaki kokokisa mikumba oyo etali esika mosantu.
33 Na Merari: libota ya Bamaheli ná libota ya Bamushi. Wana ezalaki mabota ya Merari.+ 34 Motángo ya mibali nyonso, kobanda na sanza moko matá ezalaki 6 200.+ 35 Nkumu ya ndako ya batata ya mabota ya Merari ezalaki Zuriele mwana ya Abihaile. Batyaki kaa na ngámbo ya nɔrdi ya tabernakle.+ 36 Bana ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela bakadrɛ+ ya tabernakle, bikangiseli+ na yango, makonzí+ na yango, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu, bisaleli+ na yango nyonso, mpe kolandela mosala nyonso oyo ezali na boyokani na yango,+ 37 ata mpe makonzí ya lopango oyo ezali zingazinga, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu,+ bapike na yango, mpe bansinga na yango.
38 Baoyo batyaki kaa liboso ya tabernakle na ɛsti, liboso ya hema ya kokutana epai moi ebimaka, ezalaki Moize, Arona ná bana na ye ya mibali. Bazalaki kokokisa mokumba na esika mosantu mpe mokumba na bango epai ya Bayisraele. Moto nyonso oyo apesami nzela te* oyo akopusana pene akobomama.+
39 Balevi nyonso ya mibali kobanda sanza moko matá oyo Moize ná Arona bakomaki nkombo na kolanda mabota na bango na etinda ya Yehova, bazalaki 22 000.
40 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Komá bankombo ya bana mibali nyonso ya liboso ya Bayisraele, kobanda na sanza moko matá,+ tángá bango, mpe zwá motángo ya bankombo na bango. 41 Osengeli kozwa Balevi mpo na ngai na esika ya bana nyonso ya liboso ya Bayisraele,+ mpe okozwa banyama ya mboka ya Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya banyama ya mboka ya Bayisraele.+ Ngai nazali Yehova.” 42 Mpe Moize akomaki bankombo ya bana nyonso ya liboso kati na Bayisraele, kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. 43 Motángo ya bana mibali nyonso ya liboso oyo bakomamaki nkombo kobanda na sanza moko matá ezalaki 22 273.
44 Yehova akobaki koloba na Moize ete: 45 “Zwá Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso kati na Bayisraele, mpe zwá banyama ya mboka ya Balevi na esika ya banyama na bango ya mboka, mpe Balevi basengeli kokóma ya ngai. Ngai nazali Yehova. 46 Mpo na motuya ya lisiko+ ya bato 273 kati na bana ya liboso ya Bayisraele, oyo baleki motángo ya Balevi,+ 47 okozwa shekele* mitano mpo na moto mokomoko,+ na kolanda shekele ya esika mosantu.* Shekele moko ezali gera* 20.+ 48 Osengeli kopesa Arona ná bana na ye ya mibali mbongo yango mpo ezala motuya ya lisiko ya baoyo baleki motángo na bango.” 49 Bongo Moize azwaki mbongo ya motuya ya lisiko epai ya baoyo balekaki motángo ya motuya ya lisiko ya Balevi. 50 Azwaki mbongo epai ya bana ya liboso ya Bayisraele: shekele 1 365, na kolanda shekele ya esika mosantu. 51 Na nsima, Moize apesaki Arona ná bana na ye ya mibali mbongo ya motuya ya lisiko, na kolanda liloba* ya Yehova, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
4 Sikoyo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: 2 “Na kati na bana mibali ya Levi, bokozwa bankombo ya bana mibali ya Kohate,+ na kolanda mabota na bango mpe mabota ya batata na bango, 3 baoyo nyonso bazali na mbula 30+ tii 50,+ oyo bazali na kati ya etuluku ya kosala mosala na hema ya kokutana.+
4 “Talá mosala ya bana mibali ya Kohate na hema ya kokutana.+ Ezali eloko oyo eleki mosantu: 5 Arona ná bana na ye ya mibali bakokɔta ntango kaa ezali kolongwa, bakokitisa rido oyo ezipaka+ mpe bakozipa na yango sanduku+ ya Litatoli. 6 Bakotya ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ likoló na yango, mpe bakotanda elamba mobimba ya bulé na likoló na yango mpe bakotya banzete ya komema+ na esika na yango.
7 “Bakotanda mpe elamba ya bulé likoló ya mesa ya mampa ya kolakisa,+ mpe bakotya likoló na yango basaani, bakɔpɔ, mabakuli ná bilokó ya likabo ya masanga;+ likabo ya mampa ya ntango nyonso+ ekotikala likoló na yango. 8 Bakotanda elamba oyo epakolami langi ya motane makasi likoló na yango mpe bakozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ mpe bakotya banzete ya komema+ na esika na yango. 9 Na nsima, bakozwa elamba ya bulé mpe bakozipa etɛlɛmiselo ya miinda+ mpo na pole, ná miinda na yango,+ bapɛnsi na yango ya mike, biloko na yango ya kotya mɔtɔ,+ mpe bambɛki na yango nyonso mpo na mafuta oyo basalelaka mpo na etɛlɛmiselo ya miinda. 10 Bakozipa yango ná bisaleli na yango nyonso na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ mpe bakotya yango likoló ya nzete ya komema yango. 11 Mpe bakotanda elamba ya bulé likoló ya etumbelo ya wolo,+ bakozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ, mpe bakotya banzete ya komema+ yango na esika na yango. 12 Na nsima, bakozwa bisaleli nyonso+ oyo basalaka na yango mosala ntango nyonso na esika mosantu mpe bakotya yango na elamba ya bulé mpe bakozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ, mpe bakotya yango likoló ya nzete ya komema.
13 “Bakolongola putulu ya mɔtɔ* na etumbelo+ mpe bakotanda elamba ya lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé likoló na yango. 14 Bakotya likoló na yango bisaleli na yango nyonso oyo basalelaka ntango bazali kosala na etumbelo: biloko ya kotya mɔtɔ, nkanya, bapau ná mabakuli, mpe bisaleli nyonso ya etumbelo;+ mpe basengeli kotanda likoló na yango ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ mpe bakotya banzete ya komema+ na esika na yango.
15 “Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kosilisa kozipa esika mosantu+ mpe bisaleli nyonso ya esika mosantu, wana kaa ezali kolongwa. Nsima na yango, bana mibali ya Kohate bakokɔta mpo na komema yango,+ kasi basengeli te kosimba esika mosantu noki bákufa.+ Biloko wana ezali mokumba ya bana mibali ya Kohate mpo na hema ya kokutana.
16 “Eleazare+ mwana ya Arona nganga-nzambe azali na mokumba ya kotalela mafuta ya engɛngiseli,+ mpaka ya malasi ya nsolo kitoko,+ likabo ya mbuma* ya ntango nyonso, mpe mafuta mosantu.+ Azali na mokumba ya kotalela tabernakle mobimba mpe nyonso oyo ezali na kati na yango, ezala mpe esika mosantu ná bisaleli na yango.”
17 Yehova alobaki lisusu na Moize ná Arona ete: 18 “Bótika te etuluka ya mabota ya Bakohate+ elongwa na Balevi. 19 Kasi bósalela bango boye mpo bátikala na bomoi mpe bákufa te wana bakopusana na biloko oyo eleki mosantu.+ Arona ná bana na ye ya mibali bakokɔta, mpe bakopesa bango moto na moto mosala na ye mpe biloko oyo akomema. 20 Basengeli kokɔta te mpo na komona biloko mosantu ata mpo na mwa ntango moke, noki bákufa.”+
21 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 22 “Esengeli kozwa motángo mobimba ya bana mibali ya Gereshone+ na kolanda mabota ya batata na bango mpe mabota na bango. 23 Okokoma bankombo ya bato nyonso oyo bazali na mbula kobanda 30 tii 50, oyo bazali na etuluku ya kosala mosala na hema ya kokutana. 24 Talá mosala oyo mabota ya Bagereshone bakosala mpe biloko oyo bakomema:+ 25 Bakomema bilamba ya hema ya tabernakle,+ hema ya kokutana, ezipeli na yango ná ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ oyo ezali na likoló,+ elamba ya kozipa* ekɔtelo ya hema ya kokutana,+ 26 barido ya lopango,+ elamba ya kozipa* ekɔtelo ya lopango+ oyo ezali zingazinga ya tabernakle ná etumbelo, bansinga na yango ya hema ná bisaleli na yango nyonso mpe eloko nyonso oyo basalelaka na mosala yango. Yango nde mokumba na bango. 27 Mosala nyonso mpe mikumba nyonso ya Bagereshone+ ekosalema na litambwisi ya Arona ná bana na ye ya mibali; bokopesa bango mokumba ya komema biloko nyonso wana. 28 Wana ezali mosala oyo mabota ya Bagereshone bakosala na hema ya kokutana,+ mpe mosala na bango ekosalema na litambwisi ya Itamare+ mwana ya Arona nganga-nzambe.
29 “Mpo na bana mibali ya Merari,+ okokoma bankombo na bango na kolanda libota na bango mpe libota ya tata na bango. 30 Okokoma bankombo ya mibali oyo bazali na mbula kobanda 30 tii 50, baoyo nyonso bazali na etuluku ya kosala mosala na hema ya kokutana. 31 Talá mokumba oyo bakozala na yango+ mpo na mosala na bango na hema ya kokutana: bakadrɛ+ ya tabernakle, bikangiseli+ na yango, makonzí+ na yango, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu,+ 32 makonzí+ oyo ezali zingazinga ya lopango, bitɛlɛmiselo na yango oyo ezali na mabulu,+ bapike+ na yango ná bansinga na yango esika moko na bisaleli na yango nyonso mpe na mosala na yango nyonso oyo etali biloko yango. Bokopesa bango mokumba ya komema bisaleli na kolanda bankombo ya biloko yango. 33 Wana ezali mosala oyo mabota ya bana mibali ya Merari+ bakosala na hema ya kokutana, na litambwisi ya Itamare mwana ya Arona nganga-nzambe.”+
34 Moize ná Arona mpe bankumu+ ya liyangani bakomaki bankombo ya bana mibali ya Bakohate+ na kolanda mabota na bango mpe na kolanda libota ya tata na bango, 35 baoyo nyonso bazali na mbula kobanda 30 tii 50, oyo bazalaki na etuluku ya kosala mosala na hema ya kokutana.+ 36 Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kolanda mabota na bango bazalaki 2 750.+ 37 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya mabota ya Bakohate, baoyo nyonso bazalaki kosala na hema ya kokutana. Moize ná Arona bakomaki bankombo na bango na kolanda etinda ya Yehova na nzela ya Moize.+
38 Bana mibali ya Gereshone+ bakomisamaki nkombo na kolanda mabota na bango mpe libota ya tata na bango, 39 baoyo nyonso bazali na mbula kobanda 30 tii 50, oyo bazalaki na etuluku ya kosala mosala na hema ya kokutana. 40 Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kolanda mabota na bango mpe ndako ya tata na bango bazalaki 2 630.+ 41 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na mabota ya bana mibali ya Gereshone, baoyo nyonso bazalaki kosala na hema ya kokutana. Moize ná Arona bakomaki bankombo na bango na kolanda etinda ya Yehova.+
42 Bana mibali ya Merari bakomisamaki nkombo na kolanda mabota na bango mpe ndako ya tata na bango, 43 baoyo nyonso bazali na mbula kobanda 30 tii 50, oyo bazalaki na etuluku ya kosala mosala na hema ya kokutana.+ 44 Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kolanda mabota na bango bazalaki 3 200.+ 45 Wana nde bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya mabota ya bana mibali ya Merari, baoyo Moize ná Arona bakomaki bankombo na bango na kolanda etinda ya Yehova na nzela ya Moize.+
46 Moize ná Arona mpe bankumu ya Yisraele bakomaki bankombo ya Balevi yango nyonso na kolanda mabota na bango mpe mabota ya batata na bango; 47 bazalaki na mbula kobanda 30 tii 50, mpe bapesaki bango nyonso mosala ya kosala mpe mosala ya komema mikumba mpo na hema ya kokutana.+ 48 Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 8 580.+ 49 Bakomisamaki nkombo na kolanda etinda ya Yehova na nzela ya Moize, moto na moto na kolanda mosala oyo bapesaki ye mpe mokumba na ye; bakomisamaki nkombo kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
5 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 2 “Pesá Bayisraele mitindo ete bábimisa na kaa moto nyonso oyo azali na maba+ mpe moto nyonso oyo azali na eloko oyo ezali kotanga+ ye mpe moto nyonso oyo akómisami mbindo na moto* oyo akufi.+ 3 Ezala mobali to mwasi, bokobimisa bango. Bokobimisa bango na libándá ya kaa, mpo bákómisa bakaa ya bato oyo nazali kofanda+ kati na bango mbindo te.”+ 4 Na yango, Bayisraele basalaki kaka bongo mpe babimisaki bango libándá ya kaa. Bayisraele basalaki kaka ndenge Yehova alobaki na Moize.
5 Yehova akobaki koloba na Moize ete: 6 “Lobá na Bayisraele ete: ‘Soki mobali to mwasi asali moko ya masumu oyo bato basalaka mpe azangi bosembo epai ya Yehova, moto* yango amemi ngambo.+ 7 Asengeli* koyambola+ lisumu oyo asali,* mpe akopesa motuya mobimba oyo ekokani na ngambo oyo amemi, mpe lisusu akobakisa likoló na yango moko ya bandambo mitano ya motuya na yango;+ akopesa yango epai ya moto oyo ye asalelaki mabe. 8 Kasi soki moto oyo basaleli ye mabe azali na ndeko ya pene te oyo akozwa motuya ya ngambo, motuya yango ya ngambo ekozongisama epai ya Yehova, mpe ekozala ya nganga-nzambe, longola kaka mpate-mobali ya kozipa masumu oyo akozipa na yango masumu ya moto yango.+
9 “‘Likabo mosantu nyonso+ ya Bayisraele, oyo bapesi nganga-nzambe, ekokóma ya ye.+ 10 Biloko mosantu ya moto na moto ekotikala ya ye moko. Eloko nyonso oyo moto na moto apesi nganga-nzambe, yango ekozala ya nganga-nzambe.’”
11 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 12 “Lobá na Bayisraele, mpe yebisá bango boye: ‘Ekosalema boye, soki mwasi ya mobali moko boye abungi nzela mpo azangi bosembo epai ya mobali na ye, 13 mpe soki mobali mosusu asangisi na ye nzoto,+ kasi mobali na ye ayebi yango te mpe likambo yango ebombani, mwasi yango amikómisi mbindo, kasi moto oyo akoki kotatola mpo na kofunda ye azali te, mpe bakangi ye te: 14 Soki mobali akómi na zuwa mpe akómi kotya ntembe na bosembo ya mwasi na ye, ezala mwasi yango amikómisi mbindo to te, 15 mobali yango asengeli koya na mwasi na ye epai ya nganga-nzambe, elongo na likabo na ye: moko ya bandambo zomi ya efa* ya farini ya ɔrje. Asengeli te kosopa mafuta likoló na yango mpe kotya olibana likoló na yango, mpo yango ezali likabo ya mbuma* ya zuwa, likabo ya mbuma mpo na kokanisa mabe yango.
16 “‘Nganga-nzambe akomema mwasi yango mpe akotɛlɛmisa ye liboso ya Yehova.+ 17 Nganga-nzambe akozwa mai mosantu na mbɛki ya mabele, mpe nganga-nzambe akozwa ndambo ya putulu oyo ezali na nse ya tabernakle, mpe akotya yango na mai. 18 Mpe nganga-nzambe akotɛlɛmisa mwasi yango liboso ya Yehova, akofungola nsuki ya motó ya mwasi yango, mpe akotya na mabɔkɔ ya mwasi yango likabo ya mbuma mpo na kokanisa, elingi koloba, likabo ya mbuma ya zuwa,+ mpe na lobɔkɔ na ye nganga-nzambe akozala na mai ya bololo oyo ememaka elakeli mabe.+
19 “‘Na nsima, nganga-nzambe akolapisa mwasi yango ndai, mpe akoloba na ye ete: “Soki mobali mosusu asangisi na yo nzoto te wana ozali na nse ya bokonzi ya mobali na yo+ mpe opɛngwi nzela te mpe omikómisi mbindo te, likambo ya mabe oyo euti na mai ya bololo oyo ememaka elakeli mabe ekómela yo te. 20 Kasi soki opɛngwi nzela wana ozali na nse ya bokonzi ya mobali na yo na ndenge omikómisi mbindo mpe osangisaki nzoto na mobali mosusu,+ longola mobali na yo—” 21 Bongo nganga-nzambe akolapisa mwasi yango ndai oyo ezali na elakeli mabe, mpe nganga-nzambe akoloba na mwasi yango ete: “Yehova asala ete libumu na yo evimba mpe ebɛlɔ na yo ekɔnda,* mpe Yehova asala ete bato na yo bátángaka nkombo na yo na bilakeli mabe mpe na bandai na bango. 22 Mai oyo ememaka elakeli mabe ekokɔta na misɔpɔ na yo mpo na kovimbisa libumu na yo mpe kokɔndisa ebɛlɔ.”* Na yango, mwasi akoloba: “Amen! Amen!”*
23 “‘Na nsima, nganga-nzambe akokoma bilakeli mabe wana na buku mpe akoboma yango na kati ya mai yango ya bololo. 24 Mpe akomɛlisa mwasi yango mai ya bololo oyo ememaka elakeli mabe, mpe mai oyo ememaka elakeli mabe ekokɔta kati na ye mpe ekobimisa eloko moko ya bololo. 25 Mpe nganga-nzambe akozwa likabo ya mbuma ya zuwa+ na lobɔkɔ ya mwasi yango mpe akoningisa likabo ya mbuma epai na epai liboso ya Yehova, mpe akomema yango pene na etumbelo. 26 Nganga-nzambe akotɔndisa lobɔkɔ na ye na likabo ya mbuma lokola elembo ya likabo mpe akosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo,+ mpe na nsima, akomɛlisa mwasi yango mai yango. 27 Nsima ya komɛlisa ye mai yango, soki amikómisaki mbindo mpe asalelaki mobali na ye likambo moko ya kozanga bosembo, mai oyo ememaka elakeli mabe ekokɔta kati na ye lokola eloko moko ya bololo, mpe libumu na ye ekovimba, mpe ebɛlɔ na ye ekokɔnda,* mpe bato na ye bakobanda kotánga nkombo ya mwasi yango na bilakeli mabe. 28 Nzokande, soki mwasi yango amikómisaki mbindo te mpe azali pɛto, akozwa etumbu wana te, mpe akozala na likoki ya kozwa zemi mpe kobota bana.
29 “‘Oyo ezali mobeko mpo na zuwa,+ ntango mwasi apɛngwi mpe amikómisi mpenza mbindo wana azali na nse ya bokonzi ya mobali na ye, 30 to ntango mobali akómi na zuwa, mpe akaniseli mwasi na ye mabe ete azangi bosembo; akosala ete mwasi na ye atɛlɛma liboso ya Yehova, mpe nganga-nzambe asengeli kosalela ye makambo nyonso ya mobeko oyo. 31 Mobali akozala na ngambo te, kasi mwasi yango akozongisa monɔkɔ mpo na libunga na ye.’”
6 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 2 “Lobá na Bayisraele mpe yebisá bango boye: ‘Soki mobali moko to mwasi moko asali elako moko monene ya kozala Monaziri*+ mpo na Yehova, 3 akoboya vinyo mpe masanga mosusu oyo elangwisaka. Akomɛla vinɛgrɛ ya vinyo te to ya masanga mosusu oyo elangwisaka.+ Akomɛla mai oyo esalemi na mbuma ya vinyo te mpe akolya mbuma ya vinyo te, ezala ya mobesu to ya kokauka. 4 Mikolo nyonso ya Bonaziri na ye, akolya eloko moko te oyo basali na nzete ya vinyo, ezala mbuma ya vinyo oyo eteli te to mpe mposo na yango.
5 “‘Mikolo nyonso ya elako ya Bonaziri na ye, razware ekoleka na motó na ye te.+ Akotikala mosantu ndenge akotika nsuki ya motó na ye ekola tii mikolo na ye ya kotyama pembeni mpo na Yehova ekokoka. 6 Mikolo nyonso oyo akotyama pembeni mpo na Yehova, akopusana te pene na moto oyo akufi.* 7 Ata soki tata na ye to mama na ye to ndeko na ye ya mobali to ndeko na ye ya mwasi akufi, akomikómisa mbindo te,+ mpamba te na motó na ye, azali na elembo ya Bonaziri na ye mpo na Nzambe na ye.
8 “‘Azali mosantu mpo na Yehova mikolo nyonso ya Bonaziri na ye. 9 Kasi soki moto akufi na mbalakaka pene na ye,+ mpe akómisi mbindo nsuki oyo ezali elembo na ye ya kotyama pembeni mpo na Nzambe,* asengeli kokokola+ motó na ye na mokolo ya kopɛtolama na ye. Akokokola yango na mokolo ya nsambo. 10 Mpe na mokolo ya mwambe, akomema bipopo* mibale to bana mibale ya bibenga epai ya nganga-nzambe na ekɔtelo ya hema ya kokutana. 11 Nganga-nzambe akobongisa moko lokola likabo mpo na lisumu mpe mosusu lokola likabo ya kotumba mpe akozipa masumu na ye, mpo na lisumu na ye+ na oyo etali moto* oyo akufi. Na nsima asengeli kosantisa motó na ye na mokolo yango. 12 Mpe asengeli kotyama pembeni mpo na Yehova ntango nyonso oyo akozala Monaziri, mpe akomema mwana-mpate ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo ya ngambo. Kasi mikolo ya liboso ekotángama te mpo akómisaki Bonaziri na ye mbindo.
13 “‘Sikoyo talá mobeko oyo etali Monaziri: Ntango mikolo ya Bonaziri na ye ekokoka,+ bakomema ye na ekɔtelo ya hema ya kokutana. 14 Asengeli kopesa Yehova likabo na ye kuna: mwana-mpate moko ya mobali oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo ya kotumba,+ mwana-mpate moko ya mwasi oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo ezala likabo mpo na lisumu,+ mpate moko ya mobali oyo ezangi mbeba, mpo ezala mbeka ya kimya,*+ 15 kitunga ya mampa ya farini ya malamu oyo ezangi levire, oyo basali lokola lopɛtɛ, oyo esangisami na mafuta, bagalɛti oyo ezangi levire, oyo epakolami mafuta, ná likabo na yango ya mbuma*+ mpe makabo na yango ya masanga.+ 16 Nganga-nzambe akopesa yango liboso ya Yehova mpe akopesa likabo na ye mpo na lisumu ná likabo na ye ya kotumba. 17 Akopesa Yehova mpate-mobali mpo ezala mbeka ya kimya, nzela moko na kitunga ya mampa oyo ezangi levire, mpe nganga-nzambe akopesa likabo na yango ya mbuma+ ná likabo na yango ya masanga.
18 “‘Mpe Monaziri asengeli kokokola motó na ye*+ na ekɔtelo ya hema ya kokutana, mpe akozwa nsuki ya motó na ye oyo ekolaki na boumeli ya Bonaziri na ye mpe akotya yango na mɔtɔ oyo ezali na nse ya mbeka ya kimya. 19 Mpe nganga-nzambe asengeli kozwa lipeka ya mpate-mobali oyo batɔkisi,+ mpe kozwa na kitunga limpa moko oyo ezangi levire, oyo basali lokola lopɛtɛ, mpe galɛti moko oyo ezangi levire, mpe akotya yango na mabɔkɔ ya Monaziri nsima ya kokokola elembo ya Bonaziri na ye. 20 Mpe nganga-nzambe asengeli koningisa yango epai na epai lokola likabo ya koningisa liboso ya Yehova.+ Ezali eloko moko mosantu mpo na nganga-nzambe, elongo na ntolo ya likabo ya koningisa ná lokolo ya likabo.+ Nsima na yango, Monaziri akoki komɛla vinyo.
21 “‘Talá mobeko etali Monaziri+ oyo asali elako: Soki asali elako mpe akoki kopesa Yehova likabo koleka oyo esɛngami mpo na Bonaziri na ye, asengeli kokokisa elako na ye na kolanda mobeko ya Bonaziri na ye.’”
22 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 23 “Lobá na Arona ná bana na ye ya mibali boye: ‘Talá ndenge bokopambola+ bato ya Yisraele, bokoloba na bango ete:
24 “Yehova apambola yo+ mpe abatela yo.
25 Yehova angɛngisa elongi na ye epai na yo,+ mpe tiká ye andima yo.
26 Yehova atombola elongi na ye epai na yo mpe apesa yo kimya.”’+
27 Mpe basengeli kotángela bato ya Yisraele nkombo+ na ngai, mpo napambola bango.”+
7 Na mokolo oyo Moize asilisaki kotɛlɛmisa tabernakle,+ atyaki yango mafuta+ mpe asantisaki yango elongo na biloko na yango nyonso, etumbelo mpe bisaleli na yango nyonso.+ Ntango atyaki biloko yango mafuta mpe asantisaki yango,+ 2 bankumu ya Yisraele,+ bankumu ya mabota ya batata na bango, bapesaki likabo. Bankumu yango ya mabota oyo bazalaki kokamba bato oyo bakomisamaki nkombo, 3 bamemaki likabo na bango liboso ya Yehova: bapusu motoba oyo ezipami mpe bangɔmbɛ 12, pusu moko mpo na bankumu mibale mpe ngɔmbɛ moko mpo na mokomoko na bango; mpe bapesaki yango liboso ya tabernakle. 4 Yehova alobaki na Moize ete: 5 “Ndimá kozwa biloko yango na mabɔkɔ na bango, mpo ekosalelama na mosala ya hema ya kokutana, mpe okopesa yango Balevi, moto na moto na kotalela mosala na ye.”
6 Bongo Moize andimaki kozwa bapusu yango ná bangɔmbɛ mpe apesaki yango Balevi. 7 Apesaki bana mibali ya Gereshone bapusu mibale mpe ngɔmbɛ minei na kotalela mosala na bango;+ 8 mpe apesaki bana mibali ya Merari bapusu minei mpe ngɔmbɛ mwambe na kotalela mosala na bango, na litambwisi ya Itamare mwana ya Arona nganga-nzambe.+ 9 Kasi apesaki bana mibali ya Kohate eloko te, mpo mosala ya esika mosantu ezalaki mokumba na bango,+ mpe bazalaki komema biloko mosantu na mapeka na bango.+
10 Sikoyo bankumu bapesaki likabo na bango na ntango ya bofungoli+ etumbelo na mokolo oyo yango etyamaki mafuta. Ntango bankumu bapesaki likabo na bango liboso ya etumbelo, 11 Yehova alobaki na Moize ete: “Mokolo na mokolo nkumu moko akopesa likabo na ye mpo na bofungoli etumbelo.”
12 Moto oyo apesaki likabo na ye na mokolo ya liboso ezalaki Nahashone+ mwana ya Aminadabe ya libota ya Yuda. 13 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele* 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,*+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;*+ 14 kɔpɔ* moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 15 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 16 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 17 mpe mpo na mbeka ya kimya:*+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Nahashone mwana ya Aminadabe.+
18 Na mokolo ya mibale, Netanele+ mwana ya Zuare, nkumu ya Isakare, apesaki likabo. 19 Apesaki likabo ya saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 20 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 21 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 22 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 23 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Netanele mwana ya Zuare.
24 Na mokolo ya misato ezalaki nkumu ya bana mibali ya Zebulone, Eliabe+ mwana ya Helone. 25 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 26 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 27 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 28 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 29 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Eliabe+ mwana ya Helone.
30 Na mokolo ya minei ezalaki nkumu ya bana mibali ya Rubene, Elizure+ mwana ya Shedeure. 31 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 32 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 33 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 34 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 35 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Elizure+ mwana ya Shedeure.
36 Na mokolo ya mitano ezalaki nkumu ya bana mibali ya Simeone, Shelumiele+ mwana ya Zurishadai. 37 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 38 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 39 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 40 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 41 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Shelumiele+ mwana ya Zurishadai.
42 Na mokolo ya motoba ezalaki nkumu ya bana mibali ya Gade, Eliasafe+ mwana ya Duele. 43 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 44 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 45 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 46 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 47 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Eliasafe+ mwana ya Duele.
48 Na mokolo ya nsambo ezalaki nkumu ya bana mibali ya Efraime, Elishama+ mwana ya Amihude. 49 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 50 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 51 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 52 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 53 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Elishama+ mwana ya Amihude.
54 Na mokolo ya mwambe ezalaki nkumu ya bana mibali ya Manase, Gamaliele+ mwana ya Pedazure. 55 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 56 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 57 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 58 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 59 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Gamaliele+ mwana ya Pedazure.
60 Na mokolo ya libwa ezalaki nkumu+ ya bana mibali ya Benyamina, Abidane+ mwana ya Gideoni. 61 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 62 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 63 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 64 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 65 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Abidane+ mwana ya Gideoni.
66 Na mokolo ya 10 ezalaki nkumu ya bana mibali ya Dani, Ahiezere+ mwana ya Amishadai. 67 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 68 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 69 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 70 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 71 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Ahiezere+ mwana ya Amishadai.
72 Na mokolo ya 11 ezalaki nkumu ya bana mibali ya Ashere, Pagiele+ mwana ya Okrane. 73 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 74 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 75 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 76 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 77 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Pagiele+ mwana ya Okrane.
78 Na mokolo ya 12 ezalaki nkumu ya bana mibali ya Nafatali, Ahira+ mwana ya Enane. 79 Likabo na ye ezalaki saani moko ya palata, kilo na yango ezalaki shekele 130 mpe kibakuli moko ya palata ya shekele 70, na kolanda shekele ya esika mosantu,+ nyonso mibale etondi na farini ya malamu oyo esangisami na mafuta mpo na likabo ya mbuma;+ 80 kɔpɔ moko ya wolo ya shekele 10, etondi na mpaka ya malasi; 81 mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali, mpate-mobali moko, mpe mwana-mpate moko ya mobali, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, mpo na likabo ya kotumba;+ 82 mwana-ntaba moko mpo na likabo mpo na lisumu;+ 83 mpe mpo na mbeka ya kimya:+ ngɔmbɛ mibale, mpate-mibali mitano, ntaba-mibali mitano, mpe bana-mpate mitano ya mibali, mokomoko ezali na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya Ahira+ mwana ya Enane.
84 Wana ezalaki likabo oyo bankumu ya Yisraele bapesaki na mokolo ya bofungoli+ etumbelo ntango etyamaki mafuta: basaani 12 ya palata, mabakuli 12 ya palata, bakɔpɔ 12 ya wolo;+ 85 shekele 130 mpo na saani mokomoko ya palata, mpe 70 mpo na kibakuli mokomoko, palata nyonso ya bambɛki ezalaki shekele 2 400, na kolanda shekele ya esika mosantu;+ 86 kɔpɔ 12 ya wolo oyo etondi na mpaka ya malasi, kɔpɔ mokomoko ezalaki na shekele 10, na kolanda shekele ya esika mosantu, wolo nyonso ya bakɔpɔ ezalaki shekele 120. 87 Bibwɛlɛ nyonso mpo na likabo ya kotumba ezalaki ngɔmbɛ-mibali 12, mpate-mibali 12, bana-mpate ya mibali 12, mokomoko ezalaki na mbula moko, ná makabo na yango ya mbuma, mpe bana-ntaba 12 mpo na likabo mpo na lisumu; 88 mpe bibwɛlɛ nyonso ya mbeka ya kimya ezalaki ngɔmbɛ-mibali 24, mpate-mibali 60, ntaba-mibali 60, bana-mpate ya mibali 60, mokomoko ezalaki na mbula moko. Wana ezalaki likabo ya bofungoli+ etumbelo nsima ya kotya yango mafuta.+
89 Ntango nyonso oyo Moize azalaki kokɔta na hema ya kokutana mpo na kosolola na Nzambe,*+ azalaki koyoka mongongo ezali kosolola na ye uta na likoló ya ezipeli+ oyo ezalaki likoló ya sanduku ya Litatoli, uta na katikati ya bakeruba mibale;+ mpe Nzambe azalaki koloba na ye.
8 Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Lobá na Arona, mpe yebisá ye boye: ‘Ntango okopelisa miinda, miinda yango nsambo esengeli kongɛngisa esika oyo ezali liboso ya etɛlɛmiselo ya miinda.’”+ 3 Bongo Arona asalaki boye: Apelisaki miinda yango mpo na esika oyo ezalaki liboso ya etɛlɛmiselo ya miinda,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 4 Etɛlɛmiselo ya miinda esalemaki boye: Ezalaki ya wolo mpe ebɛtamaki na marto; kobanda na nzete na yango tii na bafololo na yango, ezalaki eloko oyo ebɛtami na marto.+ Etɛlɛmiselo ya miinda esalemaki na kolanda emonaneli+ oyo Yehova alakisaki Moize.
5 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 6 “Zwá Balevi na kati ya Bayisraele, mpe pɛtolá bango.+ 7 Talá ndenge okopɛtola bango: mwangiselá bango mai oyo epɛtolaka moto na lisumu, mpe basengeli kolekisa razware na nzoto na bango mobimba mpe bakosukola bilamba na bango mpe bakomipɛtola.+ 8 Na nsima, bakozwa mwana-ngɔmbɛ+ moko ya mobali ná likabo na yango ya mbuma+ ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta, mpe okozwa mwana-ngɔmbɛ mosusu ya mobali mpo na likabo mpo na lisumu.+ 9 Mpe okoya na Balevi liboso ya hema ya kokutana mpe okoyanganisa liyangani mobimba ya Bayisraele.+ 10 Ntango okoya na Balevi liboso ya Yehova, Bayisraele bakotya mabɔkɔ likoló ya Balevi.+ 11 Mpe Arona akolakisa* Balevi liboso ya Yehova lokola likabo ya koningisa+ oyo euti na Bayisraele, mpe bakosala mosala ya Yehova.+
12 “Bongo Balevi bakotya mabɔkɔ na bango na mitó ya bangɔmbɛ-mibali.+ Nsima na yango, okopesa moko ezala likabo mpo na lisumu mpe mosusu ezala likabo ya kotumbela Yehova mpo na kozipa masumu+ ya Balevi. 13 Mpe okotɛlɛmisa Balevi liboso ya Arona ná bana na ye ya mibali mpe okolakisa bango* liboso ya Yehova lokola likabo ya koningisa. 14 Osengeli kokabola Balevi na Bayisraele, mpe Balevi bakokóma ya ngai.+ 15 Na nsima, Balevi bakokɔta mpo na kosala na hema ya kokutana. Ndenge wana nde okopɛtola bango mpe okolakisa bango* lokola likabo ya koningisa. 16 Mpo bazali bato oyo bapesami, bapesami epai na ngai longwa na kati ya Bayisraele. Na esika ya baoyo nyonso bazali bana ya liboso* na kati ya Bayisraele,+ nakozwa bango mpo na ngai moko. 17 Mpo mwana nyonso ya liboso na kati ya Bayisraele azali ya ngai, ezala moto to nyama.+ Nasantisaki bango mpo na ngai moko mokolo oyo nabomaki mwana nyonso ya liboso na mokili ya Ezipito.+ 18 Nakozwa Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso na kati ya Bayisraele. 19 Nakopesa Balevi bázala bato oyo bapesami epai ya Arona ná bana na ye ya mibali kati na Bayisraele, básala mosala mpo na Bayisraele na hema ya kokutana+ mpe mpo na kozipa masumu ya Bayisraele, mpo mpasi ekómela Bayisraele te+ mpo bato ya Yisraele bapusani pene ya esika mosantu.”
20 Moize ná Arona ná liyangani mobimba ya Bayisraele basalaki bongo mpo na Balevi. Na kolanda mitindo nyonso oyo Yehova apesaki Moize mpo na Balevi, Bayisraele basalaki bango kaka bongo. 21 Bongo Balevi bamipɛtolaki mpe basukolaki bilamba na bango,+ nsima na yango Arona alakisaki bango* liboso ya Yehova lokola likabo ya koningisa.+ Na nsima, Arona azipaki masumu na bango mpo na kopɛtola bango.+ 22 Nsima na yango, Balevi bakɔtaki mpo na kosala mosala na bango na hema ya kokutana liboso ya Arona ná bana na ye ya mibali. Kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo mpo na Balevi, basalaki kaka bongo mpo na bango.
23 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: 24 “Talá likambo oyo etali Balevi: Banda na mbula 25 matá, mobali akokɔta na etuluku ya baoyo basalaka na hema ya kokutana. 25 Kasi nsima ya mbula 50, akotika etuluku ya baoyo basalaka mpe akosala lisusu te. 26 Akoki kosalela bandeko na ye oyo bazali kokokisa mikumba oyo etali hema ya kokutana, kasi asengeli kosala mosala moko te kuna. Ndenge wana nde okosala mpo na Balevi mpe mikumba na bango.”+
9 Yehova alobaki na Moize na esobe ya Sinai na sanza ya liboso+ ya mbula ya mibale nsima ya kobima na bango na mokili ya Ezipito, ete: 2 “Bayisraele basengeli kobongisa mbeka ya Elekeli+ na ntango na yango oyo etyamá.+ 3 Na mokolo ya 14 ya sanza oyo, liboso molili ekɔta,* bosengeli kobongisa yango na ntango na yango oyo etyamá. Bosengeli kobongisa yango na kolanda mibeko na yango nyonso mpe ndenge nyonso oyo basalaka yango.”+
4 Bongo Moize alobaki na Bayisraele ete bábongisa mbeka ya Elekeli. 5 Mpe babongisaki mbeka ya Elekeli na mokolo ya 14 ya sanza ya liboso, liboso molili ekɔta,* na esobe ya Sinai. Bayisraele basalaki kaka bongo na kolanda mitindo nyonso oyo Yehova apesaki Moize.
6 Sikoyo ezalaki na bato oyo bakómaki mbindo mpo basimbaki ebembe,*+ yango wana bakokaki te kobongisa mbeka ya Elekeli na mokolo yango. Bongo, mibali yango bayaki liboso ya Moize ná Arona na mokolo yango,+ 7 mpe balobaki na ye ete: “Tokómi mbindo mpo tosimbi ebembe.* Mpo na nini te tópesa Yehova likabo elongo na Bayisraele mosusu na ntango na yango oyo etyamá?”+ 8 Na yango, Moize alobaki na bango ete: “Bózela wana, mpe bótika ngai nayoka mitindo oyo Yehova akopesa mpo na bino.”+
9 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 10 “Lobá na Bayisraele boye: ‘Soki moto moko na kati na bino to na kati ya mabota na bino oyo ekoya akómi mbindo mpo asimbi ebembe*+ moko to azali na mobembo mosika, asengeli mpe kobongisa mbeka ya Elekeli mpo na Yehova. 11 Bakobongisa yango na mokolo ya 14, ya sanza ya mibale,+ liboso molili ekɔta.* Basengeli kolya yango elongo na limpa oyo ezangi levire mpe na ndunda ya bololo.+ 12 Basengeli kotika ndambo na yango te tii na ntɔngɔ,+ mpe bakobuka mokuwa na yango ata moko te.+ Bakobongisa yango na kolanda mobeko mokomoko ya Elekeli. 13 Kasi soki moto azalaki pɛto to azalaki na mobembo te mpe abongisi mbeka ya Elekeli te, moto* yango asengeli kobomama* na kati ya bato na ye,+ mpo apesaki likabo ya Yehova te na ntango na yango oyo etyamá. Moto yango akozongisa monɔkɔ mpo na lisumu na ye.
14 “‘Mpe soki mopaya afandi ná bino, asengeli mpe kobongisa mbeka ya Elekeli mpo na Yehova.+ Akosala yango na kolanda mobeko ya Elekeli mpe na kolanda ndenge oyo basalaka yango.+ Mobeko ekozala kaka moko mpo na bino, ezala mpo na moto oyo afandi mopaya mpe mwana-mboka ya mokili yango.’”+
15 Sikoyo na mokolo oyo tabernakle etɛlɛmisamaki,+ lipata ezipaki tabernakle ya hema ya Litatoli, kasi na mpokwa, eloko oyo emonanaki lokola mɔtɔ etikalaki likoló ya tabernakle tii na ntɔngɔ.+ 16 Ntango nyonso ezalaki kosalema boye: Lipata ezalaki kozipa yango na moi, mpe ezalaki komonana lokola mɔtɔ na butu.+ 17 Ntango nyonso oyo lipata ezalaki komata, elongwe likoló ya hema, Bayisraele bazalaki mbala moko kolongwa,+ mpe na esika oyo lipata ezalaki kotɛlɛma, na esika yango nde Bayisraele bazalaki kotya kaa.+ 18 Na etinda ya Yehova, Bayisraele bazalaki kolongwa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kotya kaa.+ Ntango nyonso oyo lipata ezalaki kotɛlɛma likoló ya tabernakle, bazalaki kotya kaa. 19 Ntango lipata ezalaki kotɛlɛma mikolo mingi likoló ya tabernakle, Bayisraele mpe bazalaki kotosa Yehova: bazalaki kolongwa te.+ 20 Ntango mosusu, lipata ezalaki kotɛlɛma mikolo moke likoló ya tabernakle. Na etinda ya Yehova, bazalaki kotɛlɛmisa kaa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kolongwa. 21 Ntango mosusu, lipata ezalaki kotikala kaka kobanda na mpokwa tii na ntɔngɔ, mpe ntango lipata ezalaki komata na ntɔngɔ, bazalaki kolongwa. Ezala na moi to na butu, soki lipata emati, bazalaki kolongwa.+ 22 Ezala lipata esali mikolo mibale to sanza moko to mikolo mingi koleka, likoló ya tabernakle, Bayisraele bazalaki kotɛlɛmisa kaa; bazalaki kolongwa te. Kasi ntango lipata emati, bazalaki kolongwa. 23 Na etinda ya Yehova, bazalaki kotya kaa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kolongwa. Bazalaki kokokisa mokumba na bango epai ya Yehova na kolanda etinda oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.
10 Na nsima Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Omisalela kelelo mibale+ ya palata; ekozala eloko oyo ebɛtami na marto, mpe okosalela yango mpo na kobengisa liyangani mpe mpo na kolongola bakaa. 3 Soki bobɛti* yango nyonso mibale, liyangani mobimba esengeli koya epai na yo na ekɔtelo ya hema ya kokutana.+ 4 Kasi soki bobɛti kaka moko, bankumu oyo bazali bankumu ya bankóto ya Yisraele bakoya epai na yo.+
5 “Soki bobimisi lokito oyo ezali komata mpe kokita, bakaa ya baoyo bazali na ɛsti+ ekolongwa. 6 Soki bobimisi mpo na mbala ya mibale lokito oyo ezali komata mpe kokita, bakaa ya baoyo bazali na sudi+ ekolongwa. Bakobimisa lokito yango ndenge wana mbala nyonso oyo kaa moko ekolongwa.
7 “Sikoyo ntango bokobengisa lisangá, bokobɛta bakelelo,+ kasi bokobimisa te lokito oyo ezali komata mpe kokita. 8 Bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, bakobɛta bakelelo,+ mpe ndenge ya kosalela yango ekozala mobeko ya libela mpo na bino, na boumeli ya mabota na bino.
9 “Soki bokokende na etumba na mokili na bino mpo na kobunda na monyokoli oyo azali kotungisa bino, bokobɛta bakelelo mpo na koyokisa mbela ya etumba,+ mpe Yehova Nzambe na bino akokanisa bino mpe akobikisa bino na banguna na bino.
10 “Lisusu, na milulu na bino ya esengo+—bafɛti+ na bino mpe na ebandeli nyonso ya basanza —, bokobɛta bakelelo likoló ya makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino ya kimya;+ ekozala ekaniseli mpo na bino liboso ya Nzambe na bino. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.”+
11 Sikoyo na mokolo ya 20, na sanza ya mibale+ ya mbula ya mibale, lipata emataki, elongwe likoló ya tabernakle+ ya Litatoli. 12 Bongo Bayisraele babandaki kolongwa na esobe ya Sinai na kolanda ndenge milɔngɔ na bango ya kokende ebongisamaki,+ mpe lipata etɛlɛmaki na esobe ya Parane.+ 13 Ezalaki mbala ya liboso oyo balongwaki na kolanda etinda oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.+
14 Bongo etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Yuda elongwaki liboso ya bituluku nyonso, na kolanda bituluku* na bango, mpe Nahashone+ mwana mobali ya Aminadabe azalaki kokamba etuluku yango. 15 Netanele+ mwana mobali ya Zuare azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Isakare. 16 Eliabe+ mwana mobali ya Helone azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Zebulone.
17 Ntango tabernakle elongolamaki,+ bana mibali ya Gereshone+ ná bana mibali ya Merari,+ oyo bazalaki komema tabernakle, balongwaki.
18 Na nsima, etuluku ya mabota misato ya kaa ya Rubene elongwaki na kolanda bituluku* na bango, mpe Elizure+ mwana mobali ya Shedeure azalaki kokamba etuluku yango. 19 Shelumiele+ mwana mobali ya Zurishadai azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Simeone. 20 Eliasafe+ mwana mobali ya Duele azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Gade.
21 Mpe Bakohate, baoyo bazalaki komema biloko ya esika mosantu,+ balongwaki. Tabernakle ekotɛlɛmisama liboso ete bango bákóma.
22 Na nsima, etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Efraime elongwaki na kolanda bituluku* na bango, mpe Elishama+ mwana mobali ya Amihude azalaki kokamba etuluku na yango. 23 Gamaliele+ mwana mobali ya Pedazure azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Manase. 24 Abidane+ mwana mobali ya Gideoni azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Benyamina.
25 Mpe etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Dani elongwaki na kolanda bituluku* na bango, esalaki molɔngɔ ya bato oyo bakɛngɛlaka na nsima mpo na bakaa nyonso, mpe Ahiezere+ mwana mobali ya Amishadai azalaki kokamba etuluku na yango. 26 Pagiele+ mwana mobali ya Okrane azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Ashere. 27 Ahira+ mwana mobali ya Enane azalaki kokamba etuluku ya libota ya bana ya Nafatali. 28 Ndenge wana nde Bayisraele babongisamaki ná bituluku* na bango ntango bazalaki kolongwa.+
29 Bongo Moize alobaki na Hobabe mwana ya Rewele*+ moto ya Midiane, bokilo ya Moize boye: “Tozali kolongwa mpo na kokende na esika oyo Yehova alobaki ete: ‘Nakopesa bino yango.’+ Yaká elongo na biso,+ mpe tokosalela yo makambo na ndenge ya malamu, mpo Yehova alaki makambo ya malamu mpo na Yisraele.”+ 30 Kasi alobaki na ye ete: “Nakokende te. Nakozonga na mboka na ngai moko mpe epai ya bandeko na ngai.” 31 Na yango, alobaki ete: “Nabondeli yo, kotika biso te, mpo yo oyebi esika tokotya kaa na esobe, mpe okoki kozala motambwisi* na biso. 32 Mpe soki oyei elongo na biso,+ bolamu nyonso oyo Yehova akosalela biso, biso mpe tokosalela yo mpenza yango.”
33 Bongo babandaki kotambola mobembo ya mikolo misato kobanda na ngomba ya Yehova,+ mpe sanduku+ ya kondimana ya Yehova ezalaki kotambola liboso na bango mpo na mobembo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.+ 34 Mpe lipata ya Yehova+ ezalaki likoló na bango na moi ntango bazalaki kolongwa na esika batyaki kaa.
35 Ntango nyonso oyo bazalaki kolongola Sanduku, Moize azalaki koloba ete: “Tɛlɛmá, Ee Yehova,+ mpe tiká banguna na yo bápalangana, mpe tiká baoyo bayinaka yo bákima, bálongwa liboso na yo.” 36 Mpe wana bazalaki kokitisa yango, azalaki koloba ete: “Zongá, Ee Yehova, epai ya bankóto ya bato ya Yisraele oyo bakoki kotángama te.”*+
11 Sikoyo bato babandaki komilelalela mpenza liboso ya Yehova. Ntango Yehova ayokaki yango, nkanda na ye engalaki; mɔtɔ oyo eutaki epai ya Yehova ebandaki kongalela bango mpe kozikisa bamosusu oyo bazalaki na nsuka ya kaa. 2 Na yango, bato babandaki kobelela Moize, ye abondelaki Yehova,+ mpe mɔtɔ ekufaki. 3 Bongo bapesaki esika yango nkombo Tabera,* mpo mɔtɔ ya Yehova engalelaki bango.+
4 Ebele ya bato ndenge na ndenge*+ oyo bazalaki na kati na bango bamonisaki mposa na bango na lokoso,+ bongo Bayisraele mpe babandaki kolela lisusu mpe koloba ete: “Nani akopesa biso mosuni ya kolya?+ 5 Talá tozali kokanisa mbisi oyo tomesanaki kolya ofele na Ezipito, ná bakɔkɔmbrɛ, bapastɛkɛ, bapwaro, matungulu ná ayi!+ 6 Kasi sikoyo makasi na biso ezali kosila. Tozali komona eloko mosusu te kaka mana oyo.”+
7 Nzokande, mana+ ezalaki lokola mbuma ya koriandre,+ mpe ezalaki komonana lokola bedeliume. 8 Bato bazalaki kopalangana epai na epai mpe bazalaki kolɔkɔta yango mpe bazalaki konika yango na binikelo ya mabɔkɔ to bazalaki kotuta yango na liboka. Na nsima bazalaki kotɔkisa yango na banzungu ya kolambela to bazalaki kosala yango mampa ya libungutulu,+ mpe ezalaki elɛngi lokola gato ya kitoko oyo etyami mafuta. 9 Ntango mamwɛ* ezalaki kokita na kaa na butu, mana ezalaki mpe kokita.+
10 Moize ayokaki bato bazali kolela, libota na libota, moto na moto na ekɔtelo ya hema na ye. Mpe Yehova ayokaki nkanda makasi,+ Moize mpe asepelaki na yango te. 11 Bongo Moize alobaki na Yehova ete: “Mpo na nini omonisi mosaleli na yo mpasi? Mpo na nini nandimami na miso na yo te, mpo otye mokumba ya bato oyo nyonso likoló na ngai?+ 12 Ngai nde nakumbaki zemi ya bato oyo nyonso? Ngai nde moto nabotaki bango, mpo oloba na ngai ete: ‘Memá bango na ntolo na yo, kaka ndenge mobateli amemaka mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ,’ tii na mokili oyo olapaki ndai ete okopesa batata na bango?+ 13 Epai wapi nakozwa mosuni ya kopesa bato oyo nyonso? Mpo bazali kaka kolelela ngai ete: ‘Pesá biso mosuni tólya!’ 14 Nakokoka te komema bato oyo nyonso ngai moko; ezali mokumba monene mpo na ngai.+ 15 Soki ndenge wana nde okosalela ngai makambo, nabondeli yo, bomá ngai sikoyo.+ Soki nandimami na miso na yo, kotika te ete namona mpasi mosusu.”
16 Yehova ayanolaki Moize ete: “Yanganiselá ngai mibali 70 kati na bankulutu ya Yisraele, mibali oyo oyebi ete bazali bankulutu mpe bakapita ya bato,+ mpe okomema bango na hema ya kokutana, mpe okotɛlɛmisa bango kuna elongo na yo. 17 Nakokita+ mpe nakosolola na yo kuna,+ mpe nakozwa ndambo ya elimo+ oyo ezali likoló na yo mpe nakotya yango likoló na bango, mpe bakosalisa yo na komema mokumba ya bato, mpo omema yango yo moko te.+ 18 Okoloba na bato ete: ‘Bómisantisa mpo na lobi,+ mpo bokolya mpenza mosuni, mpamba te boleli na matoi ya Yehova,+ mpe bolobi: “Nani akopesa biso mosuni ya kolya? Tozalaki na biso malamu mpenza na Ezipito.”+ Yehova akopesa bino mpenza mosuni, mpe bokolya.+ 19 Bokolya, kaka mokolo moko te to mikolo 2 te to mikolo 5 te to mikolo 10 te to mikolo 20 te, 20 kasi mpo na sanza mobimba, tii yango ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango mabe mpenza,*+ mpo boboyi Yehova, oyo azali na kati na bino, mpe bozalaki kolela liboso na ye, na maloba oyo: “Mpo na nini tobimi na Ezipito?”’”+
21 Bongo Moize alobaki ete: “Bato oyo nazali kati na bango bazali mibali* 600 000,+ kasi yo moko olobi ete: ‘Nakopesa bango mosuni, ekozala ebele mpe bakolya yango mpo na sanza mobimba’! 22 Soki babomi etonga mobimba ya bampate ná ya bangɔmbɛ, ekokoka bango mpenza? To soki bakangeli bango mbisi nyonso ya mbu, ekokoka bango mpenza?”
23 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?+ Sikoyo okomona soki oyo nalobi ekokómela yo to te.”
24 Na nsima, Moize abimaki mpe ayebisaki bato maloba ya Yehova. Mpe ayanganisaki mibali 70 kati na mikóló ya bato mpe atɛlɛmisaki bango zingazinga ya hema.+ 25 Bongo Yehova akitaki na kati ya lipata+ mpe alobaki na ye+ mpe azwaki ndambo ya elimo+ oyo ezalaki likoló na ye mpe atyaki yango likoló ya mokomoko ya bankulutu yango 70. Mpe ntango kaka elimo yango ekitelaki bango, babandaki kosala ndenge basakoli basalaka,*+ kasi basalaki bongo lisusu te.
26 Ezalaki na mibali mibale oyo batikalaki na kaa. Bankombo na bango ezalaki Eledade mpe Medade. Mpe elimo ebandaki kokitela bango, mpo bazalaki na kati ya baoyo bankombo na bango ekomamaki, kasi bakendaki na hema te. Bongo babandaki kosala na kati ya kaa ndenge basakoli basalaka. 27 Mpe elenge mobali moko apotaki mbangu mpe ayebisaki Moize ete: “Eledade ná Medade bazali kosala na kati ya kaa ndenge basakoli basalaka!” 28 Bongo Yosua+ mwana ya Nunu, mosaleli ya Moize banda na bolenge na ye, azongisaki maloba ete: “Nkolo na ngai Moize, pekisá bango!”+ 29 Kasi, Moize alobaki na ye ete: “Ozali nde na zuwa mpo na ngai? Te, nakolinga kutu bato nyonso ya Yehova bázala basakoli, mpe Yehova akotya elimo na ye likoló na bango!” 30 Na nsima, Moize azongaki na kaa elongo na bankulutu ya Yisraele.
31 Mpe mopɛpɛ moko eutaki na Yehova, epɛpaki mpe ebandaki komema bandɛkɛ na nkombo kayɛ uta na mbu mpe kokweisa yango na kaa+ na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko na ngámbo oyo mpe na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko na ngámbo mosusu, zingazinga na kaa, mpe na ntaka soki ya mapeko* mibale likoló ya mabele. 32 Bongo mokolo wana mobimba mpe butu mobimba mpe mokolo mobimba oyo elandaki, bato bazalaki kaka kolɔkɔta kayɛ. Moto moko te alɔkɔtaki na nse ya homɛrɛ* 10, mpe bazalaki kotanda yango bipai nyonso mpo na bango moko, zingazinga ya kaa. 33 Kasi wana mosuni ezalaki naino na mino na bango, liboso ete bányamuta yango, nkanda ya Yehova engalelaki bato, mpe Yehova abandaki koboma bato na koboma moko monene mpenza.+
34 Mpe bapesaki esika yango nkombo Kibrote-hataava,*+ mpo kuna nde bakundaki bato oyo bamonisaki mposa na lokoso.+ 35 Bato balongwaki na Kibrote-hataava, mpe bakendaki na Hazerote,+ mpe bakobaki kofanda kuna.
12 Sikoyo Miriame ná Arona babandaki koloba mabe mpo na Moize mpo abalaki mwasi Mokushi, mpamba te azwaki mwasi Mokushi.+ 2 Bazalaki koloba ete: “Ezali kaka na nzela ya Moize nde Yehova alobaki? Ye alobaki mpe na nzela na biso te?”+ Mpe Yehova azalaki koyoka.+ 3 Kasi Moize azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso*+ oyo bazalaki na mabele.
4 Na mbala moko, Yehova alobaki na Moize ná Arona mpe Miriame ete: “Bóbima, bino misato, bókende na hema ya kokutana.” Bongo bango misato babimaki. 5 Mpe Yehova akitaki kati na likonzí ya lipata+ mpe atɛlɛmaki na ekɔtelo ya hema mpe abengaki Arona ná Miriame. Na yango, bango mibale bapusanaki. 6 Na nsima alobaki ete: “Nabondeli bino, bóyoka maloba na ngai. Soki mosakoli moko ya Yehova azalaki na kati na bino, nalingaki komimonisa na ye na emonaneli+ mpe nalingaki koloba na ye na ndɔtɔ.+ 7 Kasi na mosaleli na ngai Moize ezali bongo te! Napesi ye bato na ngai nyonso.*+ 8 Nalobaka na ye boye mpenza*+ na ndenge ya polele, kasi na sambole te; mpe amonaka mpenza kobima ya Yehova. Bongo mpo na nini bobangaki te koloba mabe mpo na mosaleli na ngai, mpo na Moize?”
9 Na yango, nkanda ya Yehova engalelaki bango mpe akendaki. 10 Lipata elongwaki likoló ya hema, mpe talá! Miriame azwaki maladi ya maba, mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+ Bongo Arona abalukaki epai ya Miriame, mpe amonaki ete Miriame azwaki maladi ya maba.+ 11 Na mbala moko, Arona alobaki na Moize ete: “Nabondeli yo, nkolo na ngai! Nabondeli yo, kotángela biso te lisumu oyo tosali! Tosali makambo na bozoba. 12 Nabondeli yo, kotika ye te akoba kozala lokola mwana oyo akufi na libumu ya mama, oyo ndambo ya mosuni na ye elyami!” 13 Mpe Moize abandaki kobelela Yehova na maloba oyo: “Ee Nzambe, nabondeli yo, bikisá ye, nabondeli yo!”+
14 Yehova ayanolaki Moize ete: “Soki tata na ye abwakeli ye mpenza nsoi na elongi, alingaki kosambwa mikolo nsambo te? Tiká atyama mosika na bato mikolo nsambo na libándá ya kaa,+ mpe na nsima, akoki kozongisama na kaa.” 15 Na yango, Miriame atyamaki mosika na bato na libándá ya kaa mikolo nsambo,+ mpe bato balongolaki kaa te tii Miriame azongisamaki. 16 Na nsima, bato balongwaki na Hazerote+ mpe babandaki kotya kaa na esobe ya Parane.+
13 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Tindá mibali mpo bánɔnga* mokili ya Kanana, oyo nazali kopesa Bayisraele. Bokotinda mobali moko na libota mokomoko ya bankɔkɔ na ye, mokomoko azala nkumu+ na kati na bango.”+
3 Bongo na etinda ya Yehova, Moize atindaki bango longwa na esobe ya Parane.+ Mibali yango nyonso bazalaki bankumu ya Bayisraele. 4 Bankombo na bango yango oyo: na libota ya Rubene, Shamua mwana ya Zakure; 5 na libota ya Simeone, Shafate mwana ya Hori; 6 na libota ya Yuda, Kalebe+ mwana ya Yefune; 7 na libota ya Isakare, Yigale mwana ya Yozefe; 8 na libota ya Efraime, Hoshea+ mwana ya Nunu; 9 na libota ya Benyamina, Palati mwana ya Rafu; 10 na libota ya Zebulone, Gadiele mwana ya Sodi; 11 na libota ya Yozefe,+ mpo na libota ya Manase,+ Gadi mwana ya Susi; 12 na libota ya Dani, Amiele mwana ya Gemali; 13 na libota ya Ashere, Seture mwana ya Mikaele; 14 na libota ya Nafatali, Nahebi mwana ya Vofisi; 15 na libota ya Gade, Guele mwana ya Maki. 16 Wana ezali bankombo ya mibali oyo Moize atindaki mpo na konɔnga mokili. Mpe Moize apesaki Hoshea mwana ya Nunu nkombo Yosua.*+
17 Ntango Moize atindaki bango mpo bánɔnga mokili ya Kanana, alobaki na bango ete: “Bómata kuna tii na Negebe, mpe na nsima bokomata tii bokokɔta na etúká ya ngombangomba.+ 18 Bosengeli kotala soki ezali mokili ya ndenge nini+ mpe soki bato oyo bazali kofanda kuna, bazali makasi to te, soki bazali moke to mingi; 19 mpe soki mokili oyo bazali kofanda ezali malamu to mabe, mpe soki bingumba oyo bazali kofanda ezali na bakaa to na mapango ya makasi; 20 bótala mpe soki mabele ezali ya malamu to te,+ mpe soki ezali na banzete to te. Bosengeli kozala na mpiko+ mpe kozwa ndambo ya mbuma ya mokili yango.” Nzokande, ezalaki eleko oyo mbuma ya liboso ya vinyo etelaka.+
21 Bongo bamataki mpe banɔngaki mokili yango longwa na esobe ya Zine+ tii na Rehobe,+ pene na Lebo-hamate.*+ 22 Ntango bamataki tii bakɔti na Negebe, bakómaki na Hebrone,+ esika oyo Ahimane, Sheshai ná Talamai,+ Baanakime+ bazalaki kofanda. Nzokande, Hebrone etongamaki mbula nsambo liboso ya Zoane ya Ezipito. 23 Ntango bakómaki na Lobwaku* ya Eshikole,+ bakataki etape ya etuka moko ya mbuma ya vinyo, oyo mibali mibale na kati ya mibali yango bamemaki yango na nzete, ná ndambo ya mbuma ya grenade mpe ndambo ya mbuma ya figi.+ 24 Babengaki esika yango Lobwaku* ya Eshikole,*+ mpo na etuka oyo Bayisraele bakataki kuna.
25 Na nsuka ya mikolo 40,+ nsima ya konɔnga mokili yango, bazongaki. 26 Bongo bazongaki epai ya Moize ná Arona mpe liyangani mobimba ya Bayisraele na esobe ya Parane, na Kadeshe.+ Mpe bamemelaki liyangani mobimba maloba mpe balakisaki bango mbuma ya mokili yango. 27 Makambo bayebisaki Moize yango oyo: “Tokɔtaki na mokili oyo otindaki biso, mpe yango etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe talá mbuma na yango.+ 28 Kasi, bato oyo bazali kofanda na mokili yango bazali makasi, mpe bingumba oyo ebatelami makasi ezali minene mpenza. Kuna tomonaki mpe bana ya Anake.+ 29 Baamaleke+ bazali kofanda na mokili ya Negebe,+ mpe Bahiti, Bayebusi,+ mpe Baamore+ bazali kofanda na etúká ya ngombangomba, mpe Bakanana+ bazali kofanda pembeni ya mbu+ mpe pembenipembeni ya Yordani.”
30 Bongo Kalebe amekaki kokitisa motema ya bato oyo batɛlɛmaki liboso ya Moize; alobaki ete: “Tómata kaka sikoyo mpe tokozwa mpenza yango, mpo tokoki mpenza kolonga yango.”+ 31 Kasi mibali oyo bamataki elongo na ye balobaki ete: “Biso tokokoka te komata mpo na kobunda na bato yango, mpo baleki biso na makasi.”+ 32 Mpe bazalaki kaka kopesa Bayisraele nsango ya mabe+ mpo na mokili oyo banɔngaki, bazalaki koloba ete: “Mokili oyo tolekaki na kati na yango mpo na konɔnga yango ezali mokili moko oyo elyaka bato oyo bafandi kuna, mpe bato nyonso oyo tomonaki na kati bazali mibali ya mbinga na ndenge moko ya kokamwa.+ 33 Mpe kuna tomonaki Banefilime, bana ya Anake,+ oyo bauti na* Banefilime, mpe soki tomikokanisi na bango, biso tozali lokola mabanki,* bango mpe bazalaki komona biso bongo.”
14 Bongo liyangani mobimba etombolaki mongongo, mpe bato bakobaki koganga mpe kolela butu wana mobimba.+ 2 Bayisraele nyonso babandaki koimaima mpo na Moize mpe Arona,+ mpe liyangani mobimba elobaki na bango ete: “Soki tókufaka ata na mokili ya Ezipito, to soki tókufaka ata na esobe oyo! 3 Mpo na nini Yehova azali komema biso na mokili oyo mpo tókwea na mopanga?+ Basi na biso ná bana na biso bakokóma biloko ya kopunza.+ Ekoleka malamu te tózonga na biso na Ezipito?”+ 4 Bazalaki kutu kolobana ete: “Tópona mokambi, mpe tózonga na Ezipito!”+
5 Na yango, Moize ná Arona bakweaki bilongi na nse liboso ya lisangá mobimba ya Bayisraele, oyo eyanganaki wana. 6 Yosua+ mwana ya Nunu ná Kalebe+ mwana ya Yefune, oyo bazalaki na kati ya baoyo banɔngaki mokili yango, bapasolaki bilamba na bango, 7 mpe balobaki na liyangani mobimba ya Bayisraele boye: “Mokili oyo tokendaki konɔnga, ezali mokili moko ya malamu mingi, mingi mpenza.+ 8 Soki Yehova asepeli na biso, akokɔtisa mpenza biso na mokili oyo mpe akopesa biso yango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ 9 Kasi bosengeli te kotombokela Yehova, mpe bosengeli te kobanga bato ya mokili yango,+ mpo tokolonga bango mpenza.* Bazali lisusu na libateli te mpe Yehova azali elongo na biso.+ Bóbanga bango te.”
10 Nzokande, liyangani mobimba elobaki ete bábamba bango mabanga.+ Kasi nkembo ya Yehova emonanaki likoló ya hema ya kokutana liboso ya bato nyonso ya Yisraele.+
11 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Tii ntango nini bato oyo bakozanga limemya epai na ngai,+ mpe tii ntango nini bakondimela ngai te atako bilembo nyonso oyo nasalaki na kati na bango?+ 12 Tiká natindela bango maladi mabe mpe nabengana bango, mpe nakómisa yo ekólo moko monene mpe ya makasi koleka bango.”+
13 Kasi Moize alobaki na Yehova ete: “Na nguya na yo obimisaki bato na yo na Ezipito. Ntango Baezipito bakoyoka yango,+ 14 bakoyebisa yango bato oyo bafandi na mokili oyo. Bango mpe bayoká ete yo, Yehova, ozali kati na bato oyo,+ mpe omonanaki epai na bango boye na miso.+ Ozali Yehova, mpe lipata na yo ezali kotɛlɛma likoló na bango, mpe ozali kotambola liboso na bango na kati ya likonzí ya lipata na moi mpe na kati ya likonzí ya mɔtɔ na butu.+ 15 Soki obomi bato oyo nyonso mbala moko,* bato ya bikólo oyo bayokaki nsango ya lokumu na yo bakoloba ete: 16 ‘Yehova azalaki na likoki te ya kokɔtisa bato oyo na mokili oyo alapelaki bango ndai ete akopesa bango, yango wana abomaki bango na esobe.’+ 17 Sikoyo, nabondeli yo, Yehova, tiká nguya na yo ezala monene, kaka ndenge opesaki elaka, ntango olobaki ete: 18 ‘Yehova, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo,*+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko, kasi akozanga ata moke te kopesa basali mabe etumbu, mpe mpo na libunga ya batata, ayeisaka etumbu na bana mpe bana ya bana, na libota ya misato mpe na libota ya minei.’+ 19 Nabondeli yo, limbisá libunga ya bato oyo na kotalela bonene ya bolingo ya sembo na yo, kaka ndenge olimbisaki bato oyo kobanda na Ezipito tii sikoyo.”+
20 Bongo Yehova alobaki ete: “Nalimbisi bango ndenge olobi.+ 21 Kasi, lokola nazali solo na bomoi, mabele mobimba ekotonda na nkembo ya Yehova.+ 22 Kasi, mpo na bato oyo bamoni nkembo na ngai mpe bilembo+ na ngai oyo nasali na Ezipito mpe na esobe mpe atako bongo bazali kaka komeka ngai+ mbala zomi oyo, mpe bayoki te mongongo na ngai,+ moko te na kati na bango 23 akomona ata moke mokili oyo nalapelaki batata na bango ndai. Te, ata moto moko te na kati ya baoyo bazali kozanga limemya epai na ngai, akomona yango.+ 24 Kasi, lokola mosaleli na ngai Kalebe+ azalaki na makanisi ya ndenge mosusu mpe atosaki ngai na motema na ye mobimba, nakokɔtisa ye mpenza na mokili epai akendaki, mpe bana na ye bakozwa yango.+ 25 Lokola Baamaleke ná Bakanana+ bazali kofanda na lobwaku,* lobi bóbaluka, mpe bókende na esobe na nzela ya Mbu Motane.”+
26 Yehova alobaki lisusu na Moize mpe na Arona ete: 27 “Tii ntango nini liyangani mabe oyo ekokoba koimaima mpo na ngai?+ Nayoki ndenge Bayisraele bazali koimaima mpo na ngai.+ 28 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova, “nakosalela bino kaka ndenge nayoki bino bozali koloba!+ 29 Na esobe oyo, bibembe na bino ekolala,+ ɛɛ, motángo mobimba ya baoyo nyonso bakomisamaki nkombo kobanda na mbula 20 to koleka, bino nyonso bato oyo boimaimaki mpo na ngai.+ 30 Moto moko te na kati na bino akokɔta na mokili oyo nalapaki ndai* ete nakopesa bino bófanda,+ longola kaka Kalebe mwana ya Yefune mpe Yosua mwana ya Nunu.+
31 “‘“Mpe nakokɔtisa bana na bino na mokili yango, oyo bolobaki ete bakokóma eloko ya kopunza,+ mpe bakoyeba mokili oyo bino boboyi.+ 32 Kasi bibembe na bino moko ekolala na esobe oyo. 33 Sikoyo, bana na bino bakokóma babateli ya mpate na esobe mbula 40,+ mpe bakozongisa monɔkɔ mpo na misala na bino ya kozanga bosembo* tii ebembe ya nsuka na bibembe na bino ekolala na esobe.+ 34 Na kolanda motángo ya mikolo oyo bonɔngaki mokili yango, mikolo 40,+ mokolo moko mpo na mbula moko, mokolo moko mpo na mbula moko, bokozongisa monɔkɔ mpo na mabunga na bino mbula 40.+ Bongo, bokoyeba ete kotɛmɛla ngai* ezali mabe mpenza.
35 “‘“Ngai Yehova nalobi. Tála likambo nakosala na liyangani mobimba oyo ya mabe, baoyo bayanganaki mpo na kotɛmɛla ngai: Na esobe oyo, bakosila mpe bakokufa awa.+ 36 Mibali oyo Moize atindaki mpo na konɔnga mokili mpe oyo basalaki ete liyangani mobimba eimaima mpo na ye, mpo ntango bazongaki bapesaki nsango ya mabe mpo na mokili yango,+ 37 ɛɛ, mibali oyo bapesaki nsango mabe na ntina na mokili yango, bakozwa etumbu mpe bakokufa liboso ya Yehova.+ 38 Kasi Yosua mwana ya Nunu mpe Kalebe mwana ya Yefune, oyo bazalaki na kati ya mibali oyo bakendaki konɔnga mokili yango, bakokoba mpenza kozala na bomoi.”’”+
39 Ntango Moize ayebisaki Bayisraele nyonso maloba yango, bato babandaki kolela mingi mpenza. 40 Lisusu, balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe bamekaki komata na nsɔngɛ ya ngomba mpe balobaki ete: “Tosali lisumu. Kasi sikoyo, tozali pene ya komata na esika oyo Yehova alobelaki.”+ 41 Kasi Moize alobaki ete: “Mpo na nini bozali kotosa te etinda ya Yehova? Bokolonga te. 42 Bómata te, mpo Yehova azali elongo na bino te; mpe banguna na bino bakolonga bino.+ 43 Mpo Baamaleke ná Bakanana bazali kuna liboso na bino,+ mpe bokokwea na mopanga. Lokola bopesaki Yehova mokɔngɔ, Yehova akozala elongo na bino te.”+
44 Nzokande, na lofundo nyonso bamataki na nsɔngɛ ya ngomba yango,+ kasi sanduku ya kondimana ya Yehova ná Moize balongwaki te na katikati ya kaa.+ 45 Bongo Baamaleke ná Bakanana oyo bazalaki kofanda na ngomba yango, bakitaki mpe babɛtaki bango mpe bapanzaki bango tii na Horoma.+
15 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 2 “Lobá na Bayisraele, mpe yebisá bango boye: ‘Nsukansuka, ntango bokokɔta na mokili oyo nazali kopesa bino mpo bófanda,+ 3 mpe ntango bokopesa Yehova likabo oyo etumbami na mɔtɔ, oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ to na etonga ya bampate—ezala likabo ya kotumba+ to mbeka mpo na kosala elako moko monene to likabo ya bolingo+ to likabo na boumeli ya bafɛti na bino na bileko oyo etyamá,+ mpo na kosala ete yango ebimisa nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova+— 4 moto oyo azali kopesa likabo na ye asengeli mpe kopesa Yehova likabo ya mbuma ya farini ya malamu,+ moko ya bandambo zomi ya efa,* oyo esangisami na moko ya bandambo minei ya hini* ya mafuta. 5 Okopesa mpe vinyo lokola likabo ya masanga, moko ya bandambo minei ya hini, nzela moko na likabo ya kotumba+ to mpo na mbeka ya mwana-mpate mokomoko ya mobali. 6 To mpo na mpate-mobali moko, okopesa likabo ya mbuma ya mibale ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu, oyo esangisami na moko ya bandambo misato ya hini ya mafuta. 7 Mpe okopesa vinyo lokola likabo ya masanga, moko ya bandambo misato ya hini, mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova.
8 “‘Kasi soki okopesa nyama moko ya mobali oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ mpo ezala likabo ya kotumba+ to mbeka mpo na kosala elako moko monene+ to bambeka ya kimya epai ya Yehova,+ 9 okopesa mpe nzela moko na nyama yango ya mobali oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ, likabo ya mbuma+ oyo esalemi na misato ya bandambo zomi ya efa ya farini ya malamu, oyo esangisami na hini moko ya mafuta kabola na mibale. 10 Okopesa mpe vinyo lokola likabo ya masanga,+ hini moko kabola na mibale, mpo ezala likabo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova. 11 Ekosalema ndenge wana mpo na ngɔmbɛ-mobali mokomoko to mpo na mpate-mobali mokomoko to mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali to ntaba mokomoko. 12 Ezala soki bokopesa motángo nini, ndenge wana nde bokosala mpo na mokomoko, na kotalela motángo na yango. 13 Ndenge wana nde Moyisraele nyonso oyo azali mwana-mboka, akopesa likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova.
14 “‘Soki mopaya oyo afandi epai na bino to moto oyo azali na kati na bino mpe aumeli na bino mabota na mabota, asengeli mpe kopesa likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova, akosala kaka ndenge bokosala.+ 15 Bino bato ya lisangá mpe mopaya oyo azali kofanda elongo na bino bokozala na mobeko kaka moko. Ekozala mobeko mpo na libela na boumeli ya mabota na bino. Moto oyo afandi mopaya akozala ndenge moko na bino liboso ya Yehova.+ 16 Mobeko ekozala kaka moko mpe ekateli kaka moko mpo na bino mpe mpo na mopaya oyo azali kofanda elongo na bino.’”
17 Yehova alobaki lisusu na Moize boye: 18 “Lobá na Bayisraele, mpe yebisá bango ete: ‘Ntango bokokɔta na mokili epai nazali komema bino, 19 mpe ntango bokolya mampa* ya mokili yango,+ bokopesa Yehova likabo. 20 Bokopesa likabo na bino ya farini ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso;+ bokosala na yango mampa oyo ezali lokola lopɛtɛ. Bokopesa yango ndenge bopesaka likabo ya esika ya kotutatuta mbuma. 21 Bokopesa Yehova likabo ya ndambo ya farini na bino ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso, na boumeli ya mabota na bino.
22 “‘Sikoyo soki bosali libunga mpe botosi te mitindo oyo nyonso, oyo Yehova alobi na Moize, 23 mitindo nyonso oyo Yehova apesi bino na nzela ya Moize, banda na mokolo oyo Yehova apesaki mitindo, mpe na nsima na mabota na bino, 24 mpe soki ezalaki kaka libunga mpe liyangani eyebaki yango te, wana liyangani mobimba esengeli kopesa mwana-ngɔmbɛ moko ya mobali lokola likabo ya kotumba mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova, nzela moko na likabo na yango ya mbuma* ná likabo na yango ya masanga na kolanda ndenge esalemaka,+ mpe mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu.+ 25 Nganga-nzambe akozipa masumu ya liyangani mobimba ya Bayisraele, mpe bakolimbisama.+ Mpo ezalaki libunga, mpe bamemaki lokola likabo epai ya Yehova, likabo oyo batumbi na mɔtɔ mpe likabo mpo na lisumu liboso ya Yehova mpo na libunga na bango. 26 Liyangani mobimba ya Bayisraele ná mopaya oyo azali kofanda na kati na bango bakolimbisama libunga yango, mpo bato yango nyonso basalaki na nko te.
27 “‘Soki moto* moko asali lisumu na nko te, asengeli kopesa ntaba-mwasi, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, lokola likabo mpo na lisumu.+ 28 Mpe nganga-nzambe akozipa masumu ya moto* oyo asali libunga na nko te liboso ya Yehova, mpo na kozipa yango, mpe akolimbisama.+ 29 Mpo na Moyisraele oyo azali mwana-mboka kati na Bayisraele mpe mopaya oyo azali kofanda na kati na bango, mobeko ekozala kaka moko mpo na bino mpo na likambo moko oyo esalemi na nko te.+
30 “‘Kasi moto* oyo asali likambo moko na nko,+ ezala mwana-mboka to moto oyo afandi mopaya, moto yango azali kotuka Yehova, mpe asengeli kobomama* na kati ya bato na ye. 31 Lokola atyoli liloba ya Yehova mpe abuki mobeko na ye, moto* yango asengeli mpenza kobomama.+ Libunga na ye ezali likoló na ye moko.’”+
32 Wana Bayisraele bazalaki naino na esobe, bakutaki mobali moko azali kolɔkɔta nkoni na mokolo ya Sabata.+ 33 Baoyo bakutaki ye azali kolɔkɔta nkoni bamemaki ye epai ya Moize ná Arona mpe epai ya liyangani mobimba. 34 Batyaki ye esika moko boye,+ mpo eloko oyo basengelaki kosala ye eyebanaki polele te.
35 Mpe Yehova alobaki na Moize ete: “Mobali yango akobomama mpenza,+ mpe liyangani mobimba ekobamba ye mabanga na libándá ya kaa.”+ 36 Bongo liyangani mobimba ememaki ye na libándá ya kaa mpe ebambaki ye mabanga mpe akufaki, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
37 Yehova alobaki na Moize lisusu ete: 38 “Lobá na Bayisraele, mpe yebisá bango ete basengeli komisalela ndelo ya malendamalenda na nsɔngɛ ya bilamba na bango na boumeli ya mabota na bango, mpe bakotya nsinga ya bulé na likoló ya ndelo yango ya malendamalenda ya nsɔngɛ ya elamba.+ 39 ‘Bokosala ndelo ya malendamalenda yango mpo ntango bokobanda komona yango, bokokanisa mibeko nyonso ya Yehova mpe bokotosa yango.+ Bosengeli te kolanda mitema na bino moko mpe miso na bino, oyo ezali komema bino na bondumba ya elimo.+ 40 Yango ekosalisa bino bókanisa, mpe bokotosa mibeko na ngai nyonso mpe bokozala basantu liboso ya Nzambe na bino.+ 41 Ngai Yehova Nzambe na bino, moto nabimisi bino na mokili ya Ezipito mpo namonisa ete nazali Nzambe na bino.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”+
16 Na nsima, Kora+ mwana ya Yizare,+ mwana ya Kohate,+ mwana ya Levi,+ atɛlɛmaki elongo na Datane ná Abirame bana ya Eliabe,+ mpe One mwana ya Peleti, bana ya Rubene.+ 2 Batɛmɛlaki Moize elongo na mibali 250 na kati ya Bayisraele, bankumu ya liyangani, bamonisi ya lisangá, mibali ya lokumu. 3 Bongo bayanganaki mpo na kotɛmɛla+ Moize ná Arona mpe balobaki na bango ete: “Tolɛmbi bino! Liyangani mobimba ezali mosantu,+ bango nyonso, mpe Yehova azali na kati na bango.+ Sikoyo, mpo na nini bozali komitombola likoló ya lisangá ya Yehova?”
4 Ntango Moize ayokaki yango, akweaki mbala moko elongi na nse. 5 Na nsima, alobaki na Kora mpe na bato oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ ete: “Na ntɔngɔ Yehova akomonisa nani azali moto na ye,+ nani azali mosantu, mpe moto oyo akopusana pene na ye;+ moto oyo ye akopona+ akopusana pene na ye. 6 Bósala boye: Kora ná bato oyo bazali kopesa yo mabɔkɔ,+ bózwa biloko ya kotya mɔtɔ,+ 7 mpe bótya mɔtɔ na kati na yango mpe lobi bótya mpaka malasi likoló na yango liboso ya Yehova, mpe moto oyo Yehova akopona,+ ye nde mosantu. Bino bana ya Levi+ bolekisi ndelo!”
8 Na nsima, Moize alobaki na Kora ete: “Bóyoka, nabondeli bino, bino bana ya Levi. 9 Bomoni yango likambo moke ndenge Nzambe ya Yisraele akaboli bino na liyangani ya Yisraele,+ mpe apesi bino nzela ya kopusana pene na ye mpo na kosala mosala na tabernakle ya Yehova, mpe kotɛlɛma liboso ya liyangani mpo na kosalela bango,+ 10 mpe ndenge amemi yo pene na ye ná bandeko na yo nyonso ya mibali, bana ya Levi? Bosengeli koluka lisusu kozwa bonganga-nzambe?+ 11 Yango wana, yo ná bato nyonso oyo bazali kopesa yo mabɔkɔ, bino baoyo boyangani, bozali kotombokela Yehova. Bongo Arona, ye azali nani mpo bóimaima mpo na ye?”+
12 Na nsima, Moize atindaki bábenga Datane ná Abirame+ bana ya Eliabe, kasi balobaki ete: “Tokoya te! 13 Omoni yango mpenza likambo moke ndenge olongoli biso na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi mpo na koboma biso na esobe?+ Sikoyo olingi lisusu komikómisa mpenza mokonzi na biso na makambo nyonso? 14 Kutu, okɔtisi biso te na mokili yango oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi+ mpe opesi biso te libula ya elanga ná elanga ya vinyo. Olingi nde kotɔbɔla miso ya mibali oyo? Tokoya te!”
15 Na yango, Moize asilikaki makasi mpe alobaki na Yehova ete: “Kobaluka te mpo na kotala likabo na bango ya mbuma.* Nazwi mpunda na bango ata moko te, mpe nasaleli moko na bango mabe te.”+
16 Na nsima, Moize alobaki na Kora ete: “Yo ná bato nyonso oyo bazali kopesa yo mabɔkɔ, lobi bóya liboso ya Yehova, yo ná bango mpe Arona. 17 Moto na moto azwa eloko na ye ya kotya mɔtɔ, mpe atya mpaka malasi likoló na yango, mpe moto na moto akopusana ná eloko na ye ya kotya mɔtɔ liboso ya Yehova, biloko ya kotya mɔtɔ 250, elongo na yo ná Arona; moto na moto ná eloko na ye ya kotya mɔtɔ.” 18 Bongo mokomoko na bango azwaki eloko na ye ya kotya mɔtɔ mpe atyaki mɔtɔ likoló na yango mpe atyaki mpaka malasi likoló na yango mpe batɛlɛmaki na ekɔtelo ya hema ya kokutana elongo na Moize mpe Arona. 19 Ntango Kora ayanganisaki bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ+ mpo na kotombokela bango na ekɔtelo ya hema ya kokutana, nkembo ya Yehova emonanaki liboso ya liyangani mobimba.+
20 Sikoyo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: 21 “Bólongwa na kati ya etuluku ya bato oyo, mpo nasilisa bango nyɛɛ na mbala moko.”+ 22 Na yango, bakweaki bilongi na nse mpe balobaki ete: “Ee Nzambe, Nzambe oyo apesaka bato nyonso bomoi,*+ okosilikela liyangani mobimba mpo na lisumu ya moto moko?”+
23 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 24 “Lobá na liyangani mpe yebisá bango ete: ‘Bólongwa zingazinga ya bahema ya Kora, Datane mpe Abirame!’”+
25 Na nsima, Moize atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya Datane ná Abirame, mpe bankulutu+ ya Yisraele bakendaki elongo na ye. 26 Alobaki na liyangani ete: “Nabondeli bino, bólongwa liboso ya bahema ya mibali mabe oyo mpe bósimba eloko na bango ata moko te, mpo bóbomama te na lisumu na bango nyonso.” 27 Na mbala moko, balongwaki liboso ya bahema ya Kora, Datane mpe Abirame, bipai nyonso. Datane ná Abirame babimaki, batɛlɛmi na ekɔtelo ya bahema na bango, elongo na basi na bango, bana na bango ya mibali, mpe bana na bango ya mike.
28 Na nsima, Moize alobaki ete: “Na likambo oyo, bokoyeba ete Yehova atindi ngai nasala makambo oyo nyonso, mpe euti na motema na ngai moko te: 29 Soki bato oyo bakufi ndenge bato nyonso bakufaka mpe soki etumbu na bango ezali lokola ya bato nyonso, wana Yehova atindi ngai te.+ 30 Kasi soki Yehova asali likambo moko ya nsɔmɔ mpo na bango mpe mabele efungwami,* emɛli bango ná biloko na bango nyonso mpe bakiti na Nkunda* wana bazali naino na bomoi, bokoyeba mpenza ete mibali oyo bazangi limemya epai ya Yehova.”
31 Ntango kaka asilisaki koloba maloba wana nyonso, mabele oyo ezalaki na nse na bango epasukaki.+ 32 Mabele efungwamaki* mpe emɛlaki bango ná bato ya bandako na bango mpe ná bato nyonso ya Kora+ mpe biloko na bango nyonso. 33 Bongo, bango ná bato na bango nyonso bakitaki na Nkunda* wana bazali naino na bomoi, mabele ezipaki bango, mpe bakufaki, balongwe na kati ya lisangá.+ 34 Bayisraele nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango bakimaki ntango bayokaki koganga na bango, mpo balobaki ete: “Tozali kobanga ete mabele emɛla biso!” 35 Na nsima, mɔtɔ eutaki epai ya Yehova+ mpe ezikisaki mibali 250 oyo bazalaki kopesa mpaka malasi.+
36 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: 37 “Lobá na Eleazare mwana ya Arona nganga-nzambe alongola biloko ya kotya mɔtɔ+ na kati ya mɔtɔ mpo ezali mosantu. Lobá na ye lisusu ete apanza mɔtɔ mwa mosika. 38 Biloko ya kotya mɔtɔ ya mibali oyo babungisaki bomoi* na bango mpo na lisumu akokómisa yango manzanza ya papala mpo na kozipa na yango etumbelo,+ mpo bapesaki yango liboso ya Yehova, mpe ekómaki mosantu. Ekozala elembo mpo na Bayisraele.’”+ 39 Na yango, Eleazare nganga-nzambe azwaki biloko ya kotya mɔtɔ oyo basalá na kwivre, oyo bato oyo bazikaki na mɔtɔ bapesaki, mpe babɛtaki yango mpo na kozipa etumbelo, 40 kaka ndenge Yehova alobaki na ye na nzela ya Moize. Ezalaki ekaniseli mpo na Bayisraele ete moto oyo apesami nzela te,* oyo azali na kati ya libota ya Arona te, akopusana te mpo na kotumba mpaka malasi liboso ya Yehova+ mpe ete moto moko te akóma lokola Kora ná bato oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ.+
41 Kaka na mokolo oyo elandaki, liyangani mobimba ya Bayisraele babandaki koimaima mpo na Moize mpe Arona,+ na maloba oyo: “Bino mibale nde bobomi bato ya Yehova.” 42 Ntango liyangani eyanganaki mpo na kotombokela Moize ná Arona, babalukaki epai ya hema ya kokutana, mpe talá! lipata ezipaki yango, mpe nkembo ya Yehova ebandaki komonana.+
43 Moize ná Arona bayaki liboso ya hema ya kokutana,+ 44 mpe Yehova alobaki na Moize ete: 45 “Bólongwa na kati ya liyangani oyo, mpo nasilisa bango nyɛɛ na mbala moko.”+ Na yango, bakweaki bilongi na nse.+ 46 Na nsima, Moize alobaki na Arona ete: “Zwá eloko ya kotya mɔtɔ mpe tyá mɔtɔ oyo euti na etumbelo+ na kati na yango mpe tyá mpaka malasi na kati na yango mpe kende mbangu na liyangani mpe zipá masumu na bango,+ mpo Yehova ayoki nkanda. Etumbu ebandi!” 47 Na mbala moko, Arona azwaki yango, kaka ndenge Moize alobaki, mpe akendaki mbangu kokɔta na kati ya lisangá, mpe talá! etumbu ebandaki na kati ya bato. Bongo atyaki mpaka malasi na eloko ya kotya mɔtɔ mpe abandaki kozipa masumu ya bato. 48 Akobaki kotɛlɛma kati na bakufi ná bato ya bomoi, nsukansuka etumbu esilaki. 49 Bato oyo bakufaki na bolɔzi bazalaki 14 700, longola baoyo bakufaki mpo na Kora. 50 Nsukansuka, ntango Arona azongaki epai ya Moize na ekɔtelo ya hema ya kokutana, etumbu esilaki.
17 Sikoyo Yehova alobaki na Moize boye: 2 “Lobá na Bayisraele mpe zwá epai na bango lingenda moko mpo na libota mokomoko, epai ya bankumu na bango nyonso, na kolanda libota+ na bango, nyonso ekozala mangenda 12. Komá nkombo ya mokomoko likoló ya lingenda na ye. 3 Okokoma nkombo ya Arona likoló ya lingenda ya Levi, mpo lingenda ezali kaka moko mpo na nkumu ya libota mokomoko. 4 Tyá mangenda na kati ya hema ya kokutana liboso ya Litatoli,+ epai namimonisaka mbala na mbala epai na bino.+ 5 Mpe lingenda ya moto oyo nakopona,+ ekobimisa nkasa ya sika, mpe nakosukisa mpenza koimaima ya Bayisraele oyo bazali koimaima mpo na ngai,+ oyo bazali mpe koimaima mpo na bino.”+
6 Bongo Moize alobaki na Bayisraele, mpe bankumu na bango nyonso bapesaki ye mangenda—lingenda moko mpo na nkumu mokomoko ya libota na bango, nyonso mangenda 12 —mpe lingenda ya Arona ezalaki na kati ya mangenda na bango. 7 Na nsima, Moize atyaki mangenda yango liboso ya Yehova na kati ya hema ya Litatoli.
8 Na mokolo oyo elandaki, ntango Moize akɔtaki na hema ya Litatoli, talá! lingenda ya Arona mpo na ndako ya Levi ebimisaki nkasa ya sika, mpe ezalaki kobimisa nkasa ya sika ná bafololo mpe ebotaki mbuma ya amande oyo eteli. 9 Bongo Moize alongolaki mangenda nyonso liboso ya Yehova mpe abimisaki yango libándá epai ya bato nyonso ya Yisraele. Batalaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye moko.
10 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Zongisá lingenda ya Arona+ liboso ya Litatoli ezala eloko oyo esengeli kobatelama lokola elembo+ mpo na bana ya botomboki,+ mpo koimaima na bango esila liboso na ngai mpe mpo bákufa te.” 11 Na mbala moko, Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.
12 Mpe Bayisraele balobaki na Moize ete: “Sikoyo tokokufa, tokokufa mpenza, biso nyonso tokokufa mpenza. 13 Moto nyonso oyo akopusana ata pene na tabernakle ya Yehova, akokufa!+ Tosengeli nde kosila na kokufa ndenge wana?”+
18 Bongo Yehova alobaki na Arona ete: “Yo ná bana na yo ya mibali mpe ndako ya tata na yo, bokomema ngambo mpo na libunga nyonso oyo basaleli esika mosantu,+ mpe yo ná bana na yo ya mibali, bokomema ngambo mpo na libunga oyo basaleli bonganga-nzambe na bino.+ 2 Mpe yaká na bandeko na yo ya mibali ya libota ya Levi, libota ya bankɔkɔ na yo, mpo bázala elongo na yo mpe básalela yo,+ yo ná bana na yo ya mibali, liboso ya hema ya Litatoli.+ 3 Basengeli kokokisa mikumba na bango epai na yo mpe na hema mobimba.+ Kasi basengeli te kopusana pene na bisaleli ya esika mosantu mpe na etumbelo mpo ezala bino to bango bókufa te.+ 4 Bakozala elongo na yo mpe bakokokisa mikumba na bango na oyo etali hema ya kokutana mpe mosala nyonso ya hema, mpe moto oyo apesami nzela te* akopusana te pene na bino.+ 5 Bosengeli kokokisa mokumba na bino mpo na esika mosantu+ mpe mpo na etumbelo,+ mpo nkanda+ ekitela bato ya Yisraele lisusu te. 6 Ngai moko nazwi bandeko na bino ya mibali, Balevi, na kati ya Bayisraele, bázala likabo mpo na bino.+ Bapesami epai ya Yehova mpo na kosala mosala ya hema ya kokutana.+ 7 Yo ná bana na yo ya mibali bozali na mokumba ya kosala mosala na bino ya bonganga-nzambe na oyo etali etumbelo mpe biloko oyo ezali na nsima ya rido,+ mpe bosengeli kosala mosala yango.+ Napesi bino mosala ya bonganga-nzambe lokola likabo, mpe moto oyo apesami nzela te,* oyo akopusana pene akobomama.”+
8 Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Ngai moko napesi yo mosala ya kobatela makabo oyo bapesi ngai.+ Napesi yo ná bana na yo ya mibali mpo na libela eteni ya likabo ya biloko nyonso mosantu oyo Bayisraele bapesi.+ 9 Talá oyo ekozala ya yo na biloko oyo eleki mosantu, na likabo oyo etumbami na mɔtɔ: likabo na bango nyonso ná likabo na bango ya mbuma,*+ likabo na bango mpo na lisumu,+ mpe likabo na bango ya ngambo,+ oyo bakomemela ngai. Ezali eloko oyo eleki mosantu mpo na yo mpe mpo na bana na yo ya mibali. 10 Okolya yango na esika oyo eleki mosantu.+ Mobali nyonso akoki kolya yango. Ekozala eloko moko mosantu mpo na yo.+ 11 Oyo mpe ezali ya yo: makabo oyo bakopesa+ ná makabo nyonso ya koningisa+ ya Bayisraele. Napesi yo yango, ná bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi mpo na libela.+ Moto nyonso ya pɛto na ndako na yo akoki kolya yango.+
12 “Napesi yo+ mafuta nyonso oyo eleki kitoko mpe vinyo nyonso ya sika oyo eleki kitoko mpe mbuma, mbuma na bango ya liboso,+ oyo bapesi Yehova. 13 Mbuma nyonso ya liboso oyo eteli na mokili na bango, oyo bakomemela Yehova, ekokóma ya yo.+ Moto nyonso ya pɛto na ndako na yo akoki kolya yango.
14 “Eloko nyonso oyo ebongisami mpo na mosala moko mosantu* na Yisraele ekokóma ya yo.+
15 “Mwana nyonso ya liboso ya ekelamu ya bomoi,*+ oyo bakopesa Yehova, ekokóma ya yo, ezala moto to nyama. Nzokande, okosikola mpenza mwana ya liboso ya bato,+ mpe okosikola mwana ya liboso ya nyama ya mbindo.+ 16 Okosikola yango na motuya ya lisiko ntango ekokokisa sanza moko to koleka, na kolanda motuya oyo ekatami ya shekele* mitano ya palata,+ na kolanda shekele ya esika mosantu.* Ezali gera* 20. 17 Kasi okosikola te ngɔmbɛ-mobali oyo ezali mwana ya liboso to mwana-mpate ya mobali oyo ezali mwana ya liboso to ntaba oyo ezali mwana ya liboso.+ Ezali eloko moko mosantu. Okomwangisa makila na yango likoló ya etumbelo,+ mpe okosala ete mafuta na yango ebimisa milinga lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova.+ 18 Mpe mosuni na yango ekokóma ya yo. Lokola ntolo ya likabo ya koningisa mpe lokola lokolo ya mobali, ekokóma ya yo.+ 19 Makabo nyonso mosantu, oyo Bayisraele bakopesa Yehova,+ napesi yo yango ná bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi mpo na libela.+ Ezali kondimana ya mungwa* mpo na libela liboso ya Yehova mpo na yo mpe mpo na bana na yo elongo na yo.”
20 Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Na mokili na bango okozala na libula te, mpe eteni moko te ya mabele ekokóma ya yo.+ Ngai nazali eteni na yo mpe libula na yo na kati ya Bayisraele.+
21 “Talá! napesi bana ya Levi moko ya bandambo zomi nyonso+ na Yisraele ezala libula mpo na mosala oyo bazali kosala, mosala ya hema ya kokutana. 22 Bato ya Yisraele bakopusana na hema ya kokutana lisusu te, noki bakosala lisumu mpe bakokufa. 23 Balevi bango moko bakosala mosala ya hema ya kokutana, mpe bango nde bakozongisa monɔkɔ mpo na libunga na bango.+ Ezali mobeko mpo na libela na boumeli ya mabota na bino nyonso ete bakozwa libula te na kati ya Bayisraele.+ 24 Mpo napesi Balevi moko ya bandambo zomi lokola libula na nzela ya likabo oyo Bayisraele bakopesa Yehova. Yango wana, nalobi na bango ete: ‘Bakozwa libula te na kati ya Bayisraele.’”+
25 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 26 “Okoloba na Balevi boye: ‘Bokozwa epai ya Bayisraele moko ya bandambo zomi oyo napesi bino uta na bango mpo ezala libula na bino,+ mpe bokopesa likabo uta na yango lokola likabo mpo na Yehova, moko ya bandambo zomi uta na moko ya bandambo zomi.+ 27 Mpe bakotalela yango lokola likabo na bino, lokola nde ezalaki mbuma ya esika ya kotutatuta mbuma+ to lokola biloko nyonso oyo euti na ekamwelo ya vinyo mpe ya mafuta. 28 Ndenge wana nde bino mpe bokopesa Yehova likabo oyo euti na moko ya bandambo zomi nyonso oyo bokozwa epai ya Bayisraele, mpe na oyo wana, bokopesa Arona nganga-nzambe likabo mpo na Yehova. 29 Na makabo nyonso oyo bakopesa bino lokola eloko moko mosantu, bokopesa Yehova lolenge nyonso ya likabo oyo eleki kitoko.’+
30 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Ntango bokopesa eloko oyo eleki kitoko oyo euti na biloko yango, oyo ekotikala ekozala ya bino Balevi, lokola eloko ya esika ya kotutatuta mbuma na bino mpe lokola biloko oyo euti na ekamwelo ya vinyo mpe ya mafuta na bino. 31 Bino ná bato ya ndako na bino bokoki kolya yango na esika nyonso, mpo ezali lifuti na bino mpo na mosala oyo bozali kosala na hema ya kokutana.+ 32 Bokosala lisumu te mpo na yango ntango bokopesa eloko oyo eleki kitoko oyo euti na biloko yango, mpe bosengeli te kokómisa biloko mosantu ya Bayisraele biloko mpamba, mpo bókufa te.’”+
19 Yehova alobaki lisusu na Moize mpe Arona ete: 2 “Talá eloko oyo esɛngami na mobeko oyo Yehova apesi: ‘Lobá na Bayisraele ete bázwela yo ngɔmbɛ-mwasi ya motane, ya malamu, oyo ezali na mbeba te+ mpe oyo ekanganeli ata moko te etyamá likoló na yango. 3 Okopesa yango Eleazare nganga-nzambe, mpe ye akomema yango na libándá ya kaa, mpe ekobomama liboso na ye. 4 Na nsima, Eleazare nganga-nzambe akozwa ndambo ya makila na yango na mosapi na ye mpe akomwangisa ndambo na yango mbala nsambo epai ya ekɔtelo ya hema ya kokutana.+ 5 Ngɔmbɛ-mwasi yango ekozikisama na miso na ye. Ezala loposo na yango, mosuni na yango, makila na yango mpe nyɛi na yango nyonso ekozikisama.+ 6 Mpe nganga-nzambe akozwa nzete ya sɛdrɛ, nzete ya izope,+ biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe akobwaka yango na kati ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa ngɔmbɛ-mwasi yango. 7 Nganga-nzambe akosukola bilamba na ye mpe akosukola nzoto na ye na mai, mpe na nsima, akoki kokɔta na kaa; kasi nganga-nzambe akozala mbindo tii na mpokwa.
8 “‘Moto oyo azikisaki ngɔmbɛ-mwasi yango akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mai, mpe akozala mbindo tii na mpokwa.
9 “‘Moto moko oyo azali pɛto akosangisa putulu ya mɔtɔ ya ngɔmbɛ-mwasi+ yango mpe akotya yango na libándá ya kaa na esika moko ya pɛto; liyangani ya Bayisraele ekobatela yango mpe ekosalelama mpo na kobongisa mai ya kopɛtola.+ Ezali likabo mpo na lisumu. 10 Moto oyo azali kosangisa putulu ya mɔtɔ ya ngɔmbɛ-mwasi yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo tii na mpokwa.
“‘Yango ekozala mobeko ya libela mpo na Bayisraele mpe mopaya oyo azali kofanda kati na bango.+ 11 Moto nyonso oyo asimbi ebembe ya moto* moko, akozala mbindo mikolo nsambo.+ 12 Moto yango akomipɛtola na mai* na mokolo ya misato, mpe na mokolo ya nsambo akozala pɛto. Kasi soki amipɛtoli te na mokolo ya misato, na mokolo ya nsambo akozala pɛto te. 13 Moto nyonso oyo asimbi ebembe ya moto, mpe amipɛtoli te, akómisi tabernakle ya Yehova+ mbindo, mpe moto* yango asengeli kobomama* na Yisraele.+ Lokola mai ya kopɛtola+ emwangisami likoló na ye te, azali kaka mbindo. Mbindo na ye etikali likoló na ye.
14 “‘Talá mobeko soki moto akufi na kati ya hema: Moto nyonso oyo akɔti na hema yango, mpe moto nyonso oyo azalaki na kati ya hema yango, akozala mbindo mikolo nsambo. 15 Nzungu nyonso ya polele, oyo ezangi mofiniko likoló na yango, ezali mbindo.+ 16 Na esobe, moto nyonso oyo asimbi moto oyo babomi na mopanga to ebembe to mokuwa ya moto to lilita akozala mbindo mikolo nsambo.+ 17 Mpo na moto ya mbindo, bakotya na kati ya mbɛki ndambo ya putulu ya mɔtɔ ya likabo mpo na lisumu oyo batumbaki, mpe likoló na yango bakosopa mai oyo ezali kotíyola. 18 Na nsima, moto oyo azali pɛto+ akozwa nzete ya izope+ mpe akozindisa yango na mai, mpe akomwangisa yango likoló ya hema, likoló ya bambɛki nyonso mpe likoló ya bato* nyonso oyo bazalaki kuna mpe likoló ya moto oyo asimbaki mokuwa to moto oyo babomi to ebembe to lilita. 19 Moto ya pɛto akomwangisela yango moto ya mbindo na mokolo ya misato mpe na mokolo ya nsambo, mpe akopɛtola ye na lisumu na mokolo ya nsambo;+ na nsima, akosukola bilamba na ye mpe akosukola nzoto na mai, mpe akokóma pɛto na mpokwa.
20 “‘Kasi moto oyo azali mbindo mpe oyo akomipɛtola te, moto* yango asengeli kobomama* na kati ya lisangá,+ mpo akómisi esika mosantu ya Yehova mbindo. Mai ya kopɛtola emwangisamaki likoló na ye te, yango wana azali mbindo.
21 “‘Yango ekozala mobeko mpo na libela mpo na bango: Moto oyo azali komwangisa mai ya kopɛtola+ akosukola bilamba na ye, mpe moto oyo asimbi mai ya kopɛtola akozala mbindo tii na mpokwa. 22 Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba, ekozala mbindo, mpe moto* oyo asimbi yango akozala mbindo tii na mpokwa.’”+
20 Na sanza ya liboso, liyangani mobimba ya Bayisraele bakómaki na esobe ya Zine mpe bato babandaki kofanda na Kadeshe.+ Kuna nde Miriame+ akufaki mpe bakundaki ye.
2 Sikoyo mai ezalaki te mpo na liyangani,+ mpe Bayisraele bayanganaki mpo na kotombokela Moize ná Arona. 3 Bato babandaki koswanisa Moize+ mpe koloba ete: “Soki tókufaka ata ntango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yehova! 4 Mpo na nini bomemi lisangá ya Yehova na esobe oyo mpo tókufa awa biso ná bibwɛlɛ na biso?+ 5 Mpe mpo na nini bobimisi biso na Ezipito mpo na komema biso na esika mabe oyo?+ Ezali te esika ya mboto ná bafigi ná banzete ya vinyo ná mbuma ya grenade, mpe mai ya komɛla ezali te.”+ 6 Bongo Moize ná Arona balongwaki liboso ya lisangá mpo na koya na ekɔtelo ya hema ya kokutana mpe bakweaki bilongi na nse, mpe nkembo ya Yehova ebandaki kobimela bango.+
7 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 8 “Zwá lingenda mpe yanganisá liyangani, yo ná Arona ndeko na yo, mpe bóloba na libanga na miso na bango ete ebimisa mai na yango, mpe okobimisela bango mai na libanga mpe okopesa mai ya komɛla na liyangani ná bibwɛlɛ na bango.”+
9 Bongo Moize azwaki lingenda liboso ya Yehova,+ kaka ndenge apesaki ye mitindo. 10 Na nsima, Moize ná Arona babengisaki lisangá liboso ya libanga yango, mpe alobaki na bango ete: “Bóyoka sikoyo, bino batomboki! Tosengeli kobimisela bino mai na libanga oyo?”+ 11 Na yango, Moize atombolaki lobɔkɔ na ye mpe abɛtaki libanga mbala mibale na lingenda na ye, mpe mai mingi ebandaki kobima, mpe liyangani ná bibwɛlɛ na bango babandaki komɛla.+
12 Na nsima, Yehova alobaki na Moize mpe na Arona ete: “Lokola bondimelaki ngai te mpe bosantisaki ngai te na miso ya bato ya Yisraele, bokokɔtisa lisangá oyo te na mokili oyo nakopesa bango.”+ 13 Wana ezali mai ya Meriba,*+ epai Bayisraele baswanisaki Yehova, bongo asantisamaki na kati na bango.
14 Na nsima, Moize atindelaki mokonzi ya Edome+ bamemi-nsango uta na Kadeshe ete: “Talá oyo ndeko na yo Yisraele+ alobi: ‘Oyebi malamu mpasi nyonso oyo ekomelaki biso. 15 Batata na biso bakendaki na Ezipito,+ bafandaki na Ezipito bambula* mingi,+ mpe Baezipito banyokolaki biso ná batata na biso.+ 16 Nsukansuka, tolelelaki Yehova,+ mpe ayokaki biso mpe atindaki anzelu+ mpe abimisaki biso na Ezipito, mpe biso oyo na Kadeshe, engumba oyo ezali na ndelo ya teritware na yo. 17 Tobondeli yo, tiká tóleka na mokili na yo. Tokoleka ata moke te na elanga to na elanga ya vinyo, mpe tokomɛla mai ya libulu ata moko te. Tokotambola na balabala ya mokonzi mpe tokobaluka te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi, tii tokoleka na teritware na yo.’”+
18 Kasi Edome alobaki na ye ete: “Okoleka na teritware na ngai te. Soki omɛki, nakobima na mopanga mpo na kokutana na yo.” 19 Bongo Bayisraele balobaki na ye ete: “Tokomata na balabala monene, mpe soki biso ná bibwɛlɛ na biso tomɛli mai na yo, tokofuta mpo na yango.+ Tolingi eloko mosusu te kaka koleka na makolo.”+ 20 Kasi alobaki kaka ete: “Okoleka te.”+ Na yango, Edome abimaki na bato ebele mpe na limpinga* ya nguya mpo na kokutana na ye. 21 Bongo Edome aboyaki kopesa Yisraele nzela ya koleka na teritware na ye; yango wana Yisraele azwaki nzela mosusu.+
22 Bato ya Yisraele, liyangani mobimba, balongwaki na Kadeshe mpe bakómaki na Ngomba Hore.+ 23 Bongo Yehova alobaki na Moize mpe na Arona, na Ngomba Hore, pene na ndelo ya mokili ya Edome ete: 24 “Arona akoyanganisama na bato na ye.*+ Akokɔta te na mokili oyo nakopesa Bayisraele, mpo bino mibale botombokelaki etinda na ngai na likambo ya mai ya Meriba.+ 25 Zwá Arona ná mwana na ye Eleazare mpe matá na bango na Ngomba Hore. 26 Longolá Arona bilamba na ye ya bonganga-nzambe+ mpe latisá yango Eleazare+ mwana na ye, mpo Arona akokufa kuna.”*
27 Bongo Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki mitindo, mpe bamataki na Ngomba Hore na miso ya liyangani mobimba. 28 Na nsima, Moize alongolaki Arona bilamba na ye mpe alatisaki yango Eleazare mwana na ye. Nsima na yango, Arona akufaki kuna na nsɔngɛ ya ngomba.+ Mpe Moize ná Eleazare bakitaki na ngomba yango. 29 Ntango liyangani mobimba emonaki ete Arona akufaki, ndako mobimba ya Yisraele elelaki Arona mikolo 30.+
21 Ntango Mokanana, mokonzi ya Arade,+ oyo afandaki na Negebe, ayokaki ete Yisraele ayaki na nzela ya Atarime, abundisaki Yisraele mpe amemaki ndambo na bango bakangami. 2 Na yango, Yisraele asalaki elako oyo epai ya Yehova ete: “Soki opesi bato oyo na lobɔkɔ na ngai, nakobebisa mpenza bingumba na bango.” 3 Boye Yehova ayokaki mongongo ya Yisraele mpe akabaki Bakanana epai na bango, mpe babebisaki bango ná bingumba na bango. Yango wana bapesaki esika yango nkombo Horoma.*+
4 Wana bazalaki kokoba mobembo na bango banda na Ngomba Hore,+ na nzela ya Mbu Motane, mpo na koleka zingazinga na mokili ya Edome,+ bato bakokaki* lisusu kokanga motema te mpo na mobembo. 5 Mpe bato bazalaki kaka koloba mabe mpo na Nzambe ná Moize+ ete: “Mpo na nini bobimisaki biso na Ezipito mpo tókufa na esobe? Bilei mpe mai ezali te,+ mpe tokómi* koyina* mampa oyo ya mpamba.”+ 6 Bongo Yehova atindaki banyoka ya ngɛngɛ na kati ya bato, mpe ezalaki koswa bato, Bayisraele mingi bakufaki.+
7 Na yango, bato bayaki epai ya Moize mpe balobaki ete: “Tosali lisumu ndenge tolobi mabe mpo na Yehova mpe mpo na yo.+ Bondelá Yehova ete alongwela biso banyoka.” Mpe Moize abondelaki mpo na bato.+ 8 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Salá ekeko ya nyoka ya ngɛngɛ mpe tyá yango likoló ya likonzí. Mpe soki nyoka eswi moto, akotala yango mpe akotikala na bomoi.” 9 Na mbala moko Moize asalaki nyoka ya kwivre+ mpe atyaki yango likoló ya likonzí,+ mpe soki nyoka eswi moto mpe moto yango atali nyoka ya kwivre, azalaki kotikala na bomoi.+
10 Nsima na yango, Bayisraele bakendaki mpe batyaki kaa na Obote.+ 11 Na nsima balongwaki na Obote mpe batyaki kaa na Iye-abarime,+ na esobe oyo ezali na ngámbo oyo etalani na Moabe epai ya ɛsti. 12 Balongwaki kuna mpe batyaki kaa pene na Lobwaku* ya Zerede.+ 13 Balongwaki kuna mpe batyaki kaa na etúká ya Arnone,+ oyo ezali na esobe oyo ekei tii na ndelo ya Baamore, mpo Arnone ezali kati na Moabe ná Baamore. 14 Yango wana, buku ya Bitumba ya Yehova elobeli “Vahebe na Sufa mpe mabwaku* ya Arnone, 15 mpe kokita* ya mabwaku,* oyo ekei na ngámbo ya mboka Are mpe ekutani na ndelo ya Moabe.”
16 Na nsima, bakendaki na Beere. Ezali libulu ya mai oyo Yehova alobaki na Moize ete: “Yanganisá bato, napesa bango mai.”
17 Na ntango yango, Yisraele eyembaki loyembo oyo:
“Bimisá mai, Ee libulu!—Bózongisela yango maloba!*
18 Libulu ya mai oyo bankumu batimolaki, oyo bato ya lokumu na kati ya bato batimolaki,
Na lingenda ya komanda ná mangenda na bango moko.”
Na nsima, balongwaki na esobe mpe bakendaki na Matana, 19 balongwaki na Matana, bakendaki na Nahaliele, mpe balongwaki na Nahaliele, bakendaki na Bamote.+ 20 Balongwaki na Bamote, bakendaki na lobwaku oyo ezali na teritware* ya Moabe,+ na nsɔngɛ ya Pisga,+ oyo eleki Yeshimone* na molai.+
21 Sikoyo Yisraele atindelaki Sihone, mokonzi ya Baamore bamemi-nsango na maloba oyo:+ 22 “Tiká biso tóleka na mokili na yo. Tokoleka te na elanga to na elanga ya vinyo. Tokomɛla mai ya libulu ata moko te. Tokotambola na balabala ya Mokonzi tii tokoleka na teritware na yo.”+ 23 Sihone apesaki Yisraele nzela te ya koleka na teritware na ye. Kasi, Sihone ayanganisaki bato na ye nyonso mpe abimaki kokutana na Yisraele na esobe, mpe akómaki na Yahaze mpe abandaki kobunda na Yisraele.+ 24 Bongo Yisraele alongaki ye na mopanga+ mpe azwaki mokili+ na ye banda na Arnone+ tii na Yaboke,+ pene na Baamone, mpo Yazere+ ezali ndelo ya teritware ya Baamone.+
25 Na yango, Yisraele azwaki bingumba wana nyonso, mpe babandaki kofanda na bingumba nyonso ya Baamore,+ na Heshibone mpe na basité nyonso oyo esimbami* na yango. 26 Mpo Heshibone ezalaki engumba ya Sihone, mokonzi ya Baamore, oyo abundaki na mokonzi ya Moabe mpe azwaki mokili na ye nyonso na lobɔkɔ na ye tii na Arnone. 27 Yango nde ebimisá lisese oyo mpo na kotyola ete:
“Bóya na Heshibone.
Engumba ya Sihone etongama mpe etɛlɛmisama makasi.
28 Mpo mɔtɔ ebimi na Heshibone, mɔtɔ euti na engumba ya Sihone.
Ezikisi Are ya Moabe, bankolo ya bisika oyo etombwaná ya Arnone.
29 Mawa na yo, Moabe! Bokobebisama, Ee bato ya Kemoshe!+
Akokómisa bana na ye ya mibali bato oyo bazali kokimakima mpe bana na ye ya basi bakangami ya Sihone, mokonzi ya Baamore.
30 Tóbundisa bango.
Heshibone ekobebisama tii na Dibone;+
Tótika yango mpamba tii na Nofa;
Mɔtɔ ekopanzana tii na Medeba.”+
31 Bongo Yisraele akómaki kofanda na mokili ya Baamore. 32 Na nsima, Moize atindaki mwa bato bánɔnga Yazere.+ Bazwaki bingumba oyo esimbami* na yango, mpe babenganaki Baamore oyo bazalaki wana. 33 Nsima na yango, babalukaki mpe bamataki na nzela ya Bashane. Mpe Oge+ mokonzi ya Bashane abimaki ná bato na ye nyonso mpo na kobundisa bango na Edrei.+ 34 Yehova alobaki na Moize ete: “Kobanga ye te,+ mpo nakopesa ye ná bato na ye nyonso mpe mokili na ye na lobɔkɔ na yo,+ mpe okosala ye kaka ndenge osalaki Sihone mokonzi ya Baamore, oyo azalaki kofanda na Heshibone.”+ 35 Bongo bakobaki kobɛta ye ná bana na ye ya mibali mpe bato na ye nyonso, tii moto na ye ata moko te atikalaki na bomoi,+ mpe bazwaki mokili na ye.+
22 Na nsima Bayisraele bakendaki mpe batyaki kaa na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe, na ngámbo mosusu ya Yordani oyo etalani na Yeriko.+ 2 Balake+ mwana ya Zipore amonaki nyonso oyo Yisraele esalaki Baamore, 3 mpe Bamoabe bakómaki kobanga makasi bato yango, mpo bazalaki ebele; ɛɛ, Bamoabe babandaki koyoka Bayisraele nsɔmɔ mpe koyina bango.+ 4 Mpe Bamoabe balobaki na bankulutu ya Midiane+ ete: “Sikoyo lisangá oyo ekosilisa biloko nyonso zingazinga na biso ndenge ngɔmbɛ-mobali esilisaka matiti na elanga.”
Na ntango yango, Balake, mwana ya Zipore azalaki mokonzi ya Moabe. 5 Atindaki bamemi-nsango epai ya Balaama, mwana ya Beore, na Petore,+ oyo ezali pembeni ya Ebale,* na mokili oyo abotamaki, báloba na ye boye: “Talá! Bato babimi na Ezipito. Talá! Bazipi mabele* tii koleka esika oyo moto akoki komona,+ mpe bazali kofanda kaka liboso na ngai. 6 Sikoyo yaká, nabondeli yo, lakelá ngai bato oyo mabe,+ mpo bazali na nguya mingi koleka ngai. Mbala mosusu nakoki kolonga bango mpe kobengana bango na mokili oyo, mpo nayebi malamu ete moto oyo yo opambolaka apambolamaka mpe moto oyo yo olakelaka mabe alakelamaka mabe.”
7 Bongo bankulutu ya Moabe mpe bankulutu ya Midiane basalaki mobembo mpe bamemaki lifuti ya kopesa moto oyo akosakola makambo oyo ebombaná mpe bakendaki epai ya Balaama+ mpe bayebisaki ye maloba ya Balake. 8 Mpe alobaki na bango ete: “Bólala awa butu ya lelo, mpe nakoyebisa bino maloba oyo Yehova akoloba na ngai.” Bongo bankumu ya Moabe bafandaki elongo na Balaama.
9 Bongo Nzambe ayelaki Balaama mpe atunaki ye ete:+ “Mibali oyo bazali elongo na yo banani?” 10 Balaama alobaki na Nzambe ya solo ete: “Balake mwana ya Zipore, mokonzi ya Moabe, atindeli ngai maloba ete: 11 ‘Talá! Bato oyo bazali kobima na Ezipito, mpe bazipi mabele* tii koleka esika oyo liso ekoki komona. Sikoyo yaká, lakelá bango mabe mpo na ngai.+ Mbala mosusu nakokoka kobunda na bango mpe nakobengana bango.’” 12 Kasi Nzambe alobaki na Balaama ete: “Osengeli kokende elongo na bango te. Osengeli kolakela bato yango mabe te, mpo bapambolami.”+
13 Balaama alamukaki na ntɔngɔ mpe alobaki na bankumu ya Balake ete: “Bókende na mokili na bino, mpo Yehova aboyi nakende elongo na bino.” 14 Bongo bankumu ya Moabe bakendaki mpe bazongaki epai ya Balake mpe balobaki ete: “Balaama aboyi koya elongo na biso.”
15 Kasi, Balake atindaki lisusu bankumu ya lokumu koleka mpe bazalaki ebele koleka bankumu ya liboso. 16 Bayaki epai ya Balaama mpe balobaki na ye ete: “Talá oyo Balake mwana ya Zipore alobi: ‘Nabondeli yo, kotika te eloko moko epekisa yo koya epai na ngai, 17 mpo nakopesa yo lokumu mingi mpenza, mpe nakosala likambo nyonso oyo okoloba na ngai. Sikoyo, yaká, nabondeli yo, lakelá ngai bato oyo mabe.’” 18 Kasi Balaama ayanolaki basaleli ya Balake ete: “Ata soki Balake apesi ngai ndako na ye etondi na palata mpe na wolo, nakoki te kosala likambo oyo Yehova Nzambe apesi ngai etinda te, ezala likambo ya moke to ya monene.+ 19 Kasi, nabondeli bino, bófanda awa butu ya lelo mpo nayeba oyo Yehova akoloba na ngai lisusu.”+
20 Bongo Nzambe ayelaki Balaama na butu mpe alobaki na ye ete: “Soki mibali wana bayei nde mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi okoloba na bango kaka maloba oyo nakoyebisa yo.”+ 21 Na yango, Balaama alamukaki na ntɔngɔ mpe akangisaki kiti ya mpunda* mpe akendaki elongo na bankumu ya Moabe.+
22 Kasi nkanda ya Nzambe engalaki mpo akendaki, mpe anzelu ya Yehova atɛlɛmaki na nzela mpo na kotɛmɛla ye. Bongo Balaama amataki likoló ya mpunda na ye, mpe basaleli na ye mibale bazalaki elongo na ye. 23 Mpe ntango mpunda emonaki anzelu ya Yehova atɛlɛmi na nzela, na lobɔkɔ na ye, asimbi mopanga oyo abendi na libenga na yango, elukaki kolongwa na nzela mpo na kokɔta na esobe. Kasi Balaama abandaki kobɛta mpunda mpo na kozongisa yango na nzela. 24 Mpe anzelu ya Yehova atɛlɛmaki na nzela ya nkaka oyo eleki na kati ya bilanga mibale ya vinyo, oyo ezalaki na bifelo ya mabanga na ngámbo nyonso mibale. 25 Ntango mpunda emonaki anzelu ya Yehova, ebandaki komifina na efelo mpe kofina lokolo ya Balaama na efelo, mpe Balaama abandaki kobɛta yango lisusu.
26 Sikoyo anzelu ya Yehova alekaki lisusu mpe atɛlɛmaki na esika ya nkaka, epai nzela ezalaki te mpo na kobaluka na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi. 27 Ntango mpunda emonaki anzelu ya Yehova, elalaki na nse ya Balaama, bongo Balaama asilikaki makasi mpe akobaki kobɛta mpunda yango na lingenda na ye. 28 Nsukansuka, Yehova asalaki ete mpunda eloba,*+ mpe elobaki na Balaama ete: “Nasali yo nini mpo obɛta ngai mbala misato oyo mobimba?”+ 29 Balaama ayanolaki mpunda ete: “Mpo otyoli ngai. Soki kaka mopanga ezalaka na lobɔkɔ na ngai, mbɛlɛ nabomi yo!” 30 Bongo mpunda elobaki na Balaama ete: “Nazali mpunda na yo te oyo otambolá na yango bomoi na yo mobimba tii lelo oyo? Nasalá yo likambo ya boye?” Ayanolaki ete: “Te!” 31 Yehova afungolaki miso ya Balaama,+ mpe amonaki anzelu ya Yehova atɛlɛmi na nzela, asimbi na lobɔkɔ mopanga oyo abimisi na libenga na yango. Na mbala moko, agumbamaki mpe afukamaki elongi na nse.
32 Bongo anzelu ya Yehova alobaki na ye ete: “Mpo na nini obɛti mpunda na yo mbala misato oyo mobimba? Talá! Ngai moko nde nabimaki mpo na kotɛmɛla yo, mpo nzela na yo ezali mpenza kotɛmɛla mokano na ngai.+ 33 Mpunda emonaki ngai mpe elukaki kolongwa na nzela liboso na ngai mbala oyo misato.+ Kanisá soki elongwaka na nzela te mpo na kokima ngai! Mbɛlɛ sikoyo nabomi yo, mpe natiki mpunda na bomoi.” 34 Balaama alobaki na anzelu ya Yehova ete: “Nasali lisumu, mpo nayebaki te ete yo nde otɛlɛmaki na nzela mpo na kokutana na ngai. Mpe sikoyo, soki ezali mabe na miso na yo, nakozonga.” 35 Kasi anzelu ya Yehova alobaki na Balaama ete: “Kende elongo na mibali wana, kasi okoloba na bango kaka maloba oyo nakoyebisa yo.” Mpe Balaama akobaki kokende elongo na bankumu ya Balake.
36 Ntango Balake ayokaki ete Balaama ayei, na mbala moko abimaki kokutana na ye na engumba ya Moabe, oyo ezali pembenipembeni ya Arnone, na ndelo ya teritware. 37 Bongo Balake alobaki na Balaama ete: “Natindaki bato bábenga yo te? Mpo na nini oyaki te epai na ngai? Okanisaki ete nakoki mpenza kopesa yo lokumu te?”+ 38 Balaama ayanolaki Balake ete: “Sikoyo nayei epai na yo. Napesami nzela ya koloba mwa likambo? Nakoki koloba kaka maloba oyo Nzambe atye na monɔkɔ na ngai.”+
39 Bongo Balaama akendaki elongo na Balake, mpe bakómaki na Kiriate-huzote. 40 Balake apesaki mbeka ya bangɔmbɛ ná bampate mpe atindaki ndambo epai ya Balaama mpe epai ya bankumu oyo bazalaki elongo na ye. 41 Na ntɔngɔ Balake azwaki Balaama mpe amatisaki ye na Bamote-baala; mpo uta na esika wana, akoka komona bato nyonso.+
23 Bongo Balaama alobaki na Balake ete: “Tongá na esika oyo bitumbelo nsambo,+ mpe bongiselá ngai ngɔmbɛ-mibali nsambo mpe mpate-mibali nsambo.” 2 Na mbala moko, Balake asalaki kaka ndenge Balaama alobaki. Mpe Balake ná Balaama bapesaki na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.+ 3 Balaama alobaki lisusu na Balake ete: “Tɛlɛmá pembeni ya likabo na yo ya kotumba, mpe nakokende. Mbala mosusu Yehova akobimela ngai mpe akokutana na ngai. Nyonso oyo akomonisa ngai, nakoyebisa yo.” Bongo akendaki na ngomba moko ya moke oyo ezali polele.
4 Na nsima, Nzambe abimelaki Balaama,+ mpe Balaama alobaki na ye ete: “Natɛlɛmisi bitumbelo nsambo na milɔngɔ, mpe napesi na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.” 5 Yehova atyaki liloba oyo na monɔkɔ ya Balaama:+ “Zongá epai ya Balake, mpe yango nde okoloba na ye.” 6 Bongo azongaki mpe amonaki Balake ná bankumu nyonso ya Moabe batɛlɛmi pembeni ya likabo na ye ya kotumba. 7 Bongo alobaki liloba oyo ya lisese ete:+
“Balake mokonzi ya Moabe azwaki ngai banda na Arame,+
Longwa na bangomba ya ɛsti. Alobi:
‘Yaká, lakelá ngai Yakobo mabe.
Ɛɛ, yaká, osambwisa Yisraele.’+
8 Ndenge nini nalakela mabe baoyo Nzambe alakeli mabe te?
Mpe ndenge nini nasambwisa baoyo Yehova asambwisi te?+
9 Longwa na nsɔngɛ ya mabanga, nazali komona bango,
Mpe longwa na bangomba mike, nazali komona bango.
Tiká ngai nakufa* liwa ya bato ya sembo,
Mpe tiká nsuka na ngai ezala lokola ya bango.”
11 Bongo, Balake alobaki na Balaama ete: “Likambo nini osali ngai? Nazwaki yo mpo olakela banguna na ngai mabe, kasi talá, na esika osala yango, yo opamboli nde bango.”+ 12 Ayanolaki ete: “Nasengeli te koloba oyo Yehova atye na monɔkɔ na ngai?”+
13 Balake alobaki na ye ete: “Nabondeli yo, yaká elongo na ngai na esika mosusu oyo okoki komona bango. Okomona kaka ndambo na bango; okomona bango nyonso te. Lakelá ngai bango mabe na esika yango.”+ 14 Bongo amemaki ye na elanga ya Zofime, na nsɔngɛ ya Pisga,+ mpe atongaki bitumbelo nsambo mpe apesaki na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.+ 15 Mpe Balaama alobaki na Balake ete: “Tɛlɛmá awa pembeni ya likabo na yo ya kotumba, wana ngai nakei kokutana na Nzambe kuna.” 16 Mpe Yehova abimelaki Balaama mpe atyaki liloba oyo na monɔkɔ na ye:+ “Zongá epai ya Balake, mpe yango nde okoloba na ye.” 17 Bongo ayaki epai na ye, mpe amonaki ete ye azalaki kozela pembeni ya likabo na ye ya kotumba, mpe bankumu ya Moabe bazalaki elongo na ye. Balake atunaki ye ete: “Yehova alobi nini?” 18 Na yango, alobaki lisese oyo ete:+
“Tɛlɛmá, Balake, mpe yoká.
Yoká ngai, Ee Mwana ya Zipore.
Ntango ayebisi likambo, akosala yango te?
Ntango alobi likambo, akokokisa yango te?+
21 Apesaka nzela na nguya ata moko te ya maji esala Yakobo mabe,
Mpe atikaka te ete likambo ata moko ya mabe ekwela Yisraele.
Yehova Nzambe na bango azali elongo na bango,+
Mpe akumisami mpenza lokola mokonzi na kati na bango.
22 Nzambe azali kobimisa bango na Ezipito.+
Azali mpo na bango lokola maseke ya ngɔmbɛ-mobali ya zamba.+
23 Mpo bilembo ya makambo oyo ekoya mpo na kolɔka Yakobo ezali te,+
Ezali mpe na mosala moko te ya kosakola makambo oyo ebombaná oyo ekoki kosala Yisraele mabe.+
Na ntango oyo, ekoki kolobama mpo na Yakobo mpe Yisraele ete:
‘Talá likambo oyo Nzambe asali!’
Ekolala te liboso elya nyama oyo yango ekangi,
Mpe emɛla makila ya babomami.”
25 Na yango, Balake alobaki na Balaama ete: “Soki okoki ata moke te kolakela ye mabe, osengeli mpe kopambola ye ata moke te.” 26 Balaama ayanolaki Balake ete: “Nalobaki na yo te ete, ‘Nakosala nyonso oyo Yehova akoloba’?”+
27 Balake alobaki na Balaama ete: “Nabondeli yo, yaká mpe tiká namema yo lisusu na esika mosusu. Mbala mosusu ekozala malamu na miso ya Nzambe ya solo ete olakela bango mabe mpo na ngai na esika yango.”+ 28 Na yango, Balake amemaki Balaama na nsɔngɛ ya Peore, oyo ezali kotala na ngámbo ya Yeshimone.*+ 29 Bongo Balaama alobaki na Balake ete: “Tongá na esika oyo bitumbelo nsambo, mpe bongiselá ngai ngɔmbɛ-mibali nsambo mpe mpate-mibali nsambo.”+ 30 Bongo Balake asalaki kaka ndenge Balaama alobaki, mpe apesaki na etumbelo mokomoko ngɔmbɛ-mobali moko mpe mpate-mobali moko.
24 Ntango Balaama amonaki ete kopambola Yisraele ezalaki kosepelisa* Yehova, akendaki lisusu te koluka bilembo ya makambo oyo ekoya mpo na kolɔka,+ kasi atalisaki elongi na ye na esobe. 2 Ntango Balaama atombolaki miso na ye mpe amonaki Yisraele bafandi na bahema na kolanda mabota na bango,+ elimo ya Nzambe ekitelaki ye.+ 3 Na nsima, abimisaki liloba oyo ya lisese ete:+
“Liloba ya Balaama mwana ya Beore,
Mpe liloba ya mobali oyo miso efungwamaki,
4 Liloba ya moto oyo azali koyoka liloba ya Nzambe,
Oyo amonaki emonaneli ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,
Oyo agumbamaki miso polele:+
6 Lokola mabwaku* oyo etandami mosika,+
Lokola bilanga pembeni ya ebale,
Lokola banzete ya aloe* oyo Yehova aloni,
Lokola banzete ya sɛdrɛ pembeni ya mai.
7 Mai ezali kobima na katini na ye mibale ya mposo ya nyama,
8 Nzambe azali kobimisa ye na Ezipito;
Mpo na bango, azali lokola ngɔmbɛ-mobali ya zamba.
Akozikisa bikólo, banyokoli na ye,+
Mpe akolyalya mikuwa na bango, mpe akobukabuka bango na makula na ye.
9 Agumbamaki, alalaki lokola nkɔsi,
Mpe lokola nkɔsi, nani akomeka kolamwisa ye?
Baoyo bazali kopambola yo bakopambolama,
Mpe baoyo bazali kolakela yo mabe bakolakelama mabe.”+
10 Na yango, Balake asilikelaki Balaama makasi. Balake abɛtaki mabɔkɔ na nkanda, mpe alobaki lisusu na Balaama ete: “Nabengaki yo mpo olakela banguna na ngai mabe,+ kasi talá, na esika osala yango, yo opamboli nde bango mbala misato oyo. 11 Sikoyo zongá nokinoki na ndako na yo. Nazalaki kokanisa kopesa yo mpenza lokumu,+ kasi talá, Yehova aboyeli yo lokumu.”
12 Balaama ayanolaki Balake ete: “Nalobaki te na bamemi-nsango na yo ete: 13 ‘Ata soki Balake apesi ngai ndako na ye etondi na palata mpe na wolo, nakokaki te kosala eloko moko na ndenge na ngai* oyo ekobuka etinda ya Yehova, ezala malamu to mabe? Nalobaki te ete nakoloba kaka oyo Yehova akoloba na ngai?+ 14 Mpe sikoyo, nazali kokende epai ya bato na ngai. Yaká nayebisa yo makambo bato oyo bakosala bato na yo, na mikolo ezali koya.”* 15 Bongo alobaki lisese oyo ete:+
“Liloba ya Balaama mwana ya Beore,
Mpe liloba ya mobali makasi oyo miso efungwamaki,+
16 Liloba ya moto oyo azali koyoka maloba ya Nzambe,
Mpe moto oyo azwi boyebi ya Oyo-Aleki-Likoló,
Amonaki emonaneli ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso
Wana azalaki kogumbama miso polele:
17 Nakomona ye, kasi sikoyo te;
Nakotala ye, kasi sikoyo te.
18 Mpe Edome ekokóma eloko ya bato,+
Ɛɛ, Seire+ eloko ya banguna na ye,+
Wana Yisraele azali komonisa mpiko na ye.
19 Mpe moto moko akouta na Yakobo mpe akotya bato na nse ya bokonzi na ye,+
Mpe akobebisa moto nyonso oyo abiki na engumba.”
20 Ntango amonaki Amaleke, akobaki lisese na ye ete:
21 Ntango amonaki Bakeni,+ akobaki lisese na ye ete:
“Esika na yo ya kofanda ezali kobatelama, mpe esika na yo ya kofanda ezali likoló ya libanga.
22 Kasi moto moko akozikisa Kaine.
Ntango boni ekoleka liboso Asiri emema yo mokangami?”
23 Mpe akobaki lisese na ye ete:
“Mawa! Nani akobika ntango Nzambe akosala yango?
Kasi ye mpe akokufa mpenza.”
25 Na nsima, Balaama+ atɛlɛmaki mpe azongaki na esika na ye. Balake mpe akendaki.
25 Ntango Yisraele ezalaki kofanda na Shitime,+ bato babandaki kosala pite ná bana basi ya Moabe.+ 2 Basi babengaki bato bákende na bambeka ya banzambe na bango,+ mpe bato babandaki kolya mpe kogumbamela banzambe na bango.+ 3 Bongo Yisraele esanganaki na losambo ya* Baala ya Peore,+ mpe Yehova asilikelaki mpenza Yisraele. 4 Yehova alobaki na Moize ete: “Zwá bakambi nyonso* kati na bato oyo, mpe nsima ya koboma bango, tandá bibembe na bango liboso ya Yehova na moi mpenza,* mpo nkanda ya kongala ya Yehova elongwa na Yisraele.” 5 Bongo Moize alobaki na basambisi ya Yisraele ete:+ “Mokomoko na bino aboma bato na ye oyo basanganaki na losambo ya* Baala ya Peore.”+
6 Kasi kaka na ntango yango, Moyisraele moko azalaki koya na mwasi moko Momidiane,+ epai ya bandeko na ye, na miso ya Moize mpe liyangani mobimba ya Bayisraele, wana bazalaki kolela na ekɔtelo ya hema ya kokutana. 7 Ntango Finehase+ mwana ya Eleazare, mwana ya Arona nganga-nzambe amonaki yango, na mbala moko atɛlɛmaki, alongwe na kati ya liyangani mpe azwaki likɔnga na lobɔkɔ na ye. 8 Bongo alandaki mobali yango ya Yisraele na kati ya hema mpe atɔbɔlaki bango mibale, mobali Moyisraele ná mwasi yango na nzoto na ye ya basi. Na yango, bolɔzi epai ya Bayisraele ekatanaki.+ 9 Baoyo bakufaki na bolɔzi bazalaki 24 000.+
10 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 11 “Finehase+ mwana ya Eleazare, mwana ya Arona, nganga-nzambe alongoli nkanda makasi na ngai likoló ya bato ya Yisraele mpo atiki nzela ata moke te básalela ngai bombanda na kati na bango.+ Yango wana, nasilisi Bayisraele nyɛɛ te mpo ngai nasɛngaka bato bákangama kaka na ngai.+ 12 Mpo na yango, lobá boye: ‘Nazali kopesa ye kondimana na ngai ya kimya. 13 Mpe ekozala kondimana ya bonganga-nzambe ya libela mpo na ye mpe mpo na bana na ye nsima na ye,+ mpo atikaki nzela te básalela Nzambe na ye bombanda+ mpe azipaki masumu ya bato ya Yisraele.’”
14 Nzokande, nkombo ya mobali yango Moyisraele oyo abomamaki elongo na mwasi Momidiane, ezalaki Zimiri mwana ya Salu, nkumu ya ndako ya batata ya Basimeone. 15 Nkombo ya mwasi Momidiane oyo abomamaki ezalaki Kozibi, mwana ya Zure;+ ye azalaki mokambi ya bituluka ya ndako ya batata na Midiane.+
16 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 17 “Bónyokola Bamidiane, mpe bóboma bango,+ 18 mpo bazali konyokola bino na misala na bango ya mayele mabe na likambo ya Peore+ mpe ya Kozibi, mwana mwasi ya nkumu ya Midiane, ndeko na bango oyo abomamaki+ na mokolo ya bolɔzi mpo na likambo ya Peore.”+
26 Nsima ya bolɔzi+ yango, Yehova alobaki na Moize mpe na Eleazare, mwana ya Arona nganga-nzambe ete: 2 “Bózwa motángo ya liyangani mobimba ya Bayisraele banda na mbula 20 matá, na kolanda mabota ya batata na bango; bótánga bato nyonso na Yisraele oyo bakoki kokende etumba.”+ 3 Bongo Moize ná Eleazare+ nganga-nzambe balobaki na bango na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe,+ pene na Yordani, na Yeriko+ ete: 4 “Bózwa motángo na bango nyonso banda na mbula 20 matá, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.”+
Sikoyo bana ya Yisraele oyo babimaki na mokili ya Ezipito bango oyo: 5 Rubene,+ mwana ya liboso ya Yisraele; bana mibali ya Rubene+ ezalaki: ya Hanoke, na libota ya Bahanoke; ya Palu, na libota ya Bapalu; 6 ya Hezerone, na libota ya Bahezerone; ya Karami, na libota ya Bakarami. 7 Wana nde mabota ya Barubene, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 43 730.+
8 Mwana ya Palu ezalaki Eliabe. 9 Mpe bana mibali ya Eliabe ezalaki: Nemuele, Datane ná Abirame. Datane yango ná Abirame bazalaki bato oyo baponamaki na liyangani, bango nde batɛmɛlaki Moize+ mpe Arona na etuluku ya Kora,+ ntango batɛmɛlaki Yehova.+
10 Bongo mabele efungwamaki* mpe emɛlaki bango. Kasi Kora akufaki elongo na bato oyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ ntango mɔtɔ ezikisaki mibali 250.+ Mpe bakómaki ndakisa oyo ezali kokebisa.+ 11 Nzokande, bana mibali ya Kora bakufaki te.+
12 Bana mibali ya Simeone+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Nemuele, na libota ya Banemuele; ya Yamine, na libota ya Bayamine; ya Yakine, na libota ya Bayakine; 13 ya Zera, na libota ya Bazera; ya Shaule, na libota ya Bashaule. 14 Wana nde mabota ya Basimeone: 22 200.+
15 Bana mibali ya Gade+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Zefone, na libota ya Bazefone; ya Hagi, na libota ya Bahagi; ya Shuni, na libota ya Bashuni; 16 ya Ozni, na libota ya Baozni; ya Eri, na libota ya Baeri; 17 ya Arodi, na libota ya Baarodi; ya Areli, na libota ya Baareli. 18 Wana nde mabota ya bana mibali ya Gade, bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 40 500.+
19 Bana mibali ya Yuda+ ezalaki Ere ná Onane.+ Nzokande, Ere ná Onane bakufaki na mokili ya Kanana.+ 20 Mpe bana mibali ya Yuda na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Shela,+ na libota ya Bashela; ya Pereze,+ na libota ya Bapereze; ya Zera,+ na libota ya Bazera. 21 Mpe bana mibali ya Zera ezalaki: ya Hezerone,+ na libota ya Bahezerone; ya Hamule,+ na libota ya Bahamule. 22 Wana nde mabota ya Yuda, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 76 500.+
23 Bana mibali ya Isakare+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Tola,+ na libota ya Batola; ya Puva, na libota ya Bapuni; 24 ya Yashube, na libota ya Bayashube; ya Shimirone, na libota ya Bashimirone. 25 Wana nde mabota ya Isakare, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 64 300.+
26 Bana mibali ya Zebulone+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: ya Serede, na libota ya Baserede; ya Elone, na libota ya Baelone; ya Yahaleele, na libota ya Bayahaleele. 27 Wana nde mabota ya Zebulone, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 60 500.+
28 Bana mibali ya Yozefe+ na kolanda mabota na bango ezalaki: Manase ná Efraime.+ 29 Bana mibali ya Manase+ ezalaki: ya Makire+ na libota ya Bamakire; mpe Makire abotaki Gileade; ya Gileade,+ na libota ya Bagileade. 30 Bana mibali ya Gileade bango oyo: ya Iyezere, na libota ya Baiyezere; ya Heleke, na libota ya Baheleke; 31 ya Asiriele, na libota ya Baasiriele; ya Shekeme, na libota ya Bashekeme; 32 ya Shemida, na libota ya Bashemida; ya Hefere, na libota ya Bahefere. 33 Sikoyo Zelofehade mwana ya Hefere azalaki na bana mibali te, kaka bana basi,+ mpe nkombo ya bana basi ya Zelofehade+ ezalaki Mahala, Noa, Hogla, Milka mpe Tireza. 34 Wana nde mabota ya Manase, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 52 700.+
35 Bana mibali ya Efraime+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Shutela,+ na libota ya Bashutela; ya Bekere, na libota ya Babekere; ya Tahane, na libota ya Batahane. 36 Mpe bana mibali ya Shutela bango oyo: ya Erane, na libota ya Baerane. 37 Wana nde mabota ya bana mibali ya Efraime, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 32 500.+ Wana nde bana mibali ya Yozefe na kolanda mabota na bango.
38 Bana mibali ya Benyamina+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Bela,+ na libota ya Babela; ya Ashebele, na libota ya Baashebele; ya Ahirame, na libota ya Baahirame; 39 ya Shefufame, na libota ya Bashufame; ya Hufame, na libota ya Bahufame. 40 Bana mibali ya Bela ezalaki Arde ná Naamane:+ ya Arde, na libota ya Baarde; ya Naamane, na libota ya Banaamane. 41 Wana nde bana mibali ya Benyamina na kolanda mabota na bango, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 45 600.+
42 Bana mibali ya Dani+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Shuhame, na libota ya Bashuhame. Wana nde mabota ya Dani na kolanda mabota na bango. 43 Mabota nyonso ya Bashuhame, na bato na bango oyo bakomisamaki nkombo, bazalaki 64 400.+
44 Bana mibali ya Ashere+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Yimena, na libota ya Bayimena; ya Yishivi, na libota ya Bayishivi; ya Beria, na libota ya Baberia; 45 na bana mibali ya Beria: ya Hebere, na libota ya Bahebere; ya Malikiele, na libota ya Bamalikiele. 46 Nkombo ya mwana mwasi ya Ashere ezalaki Sera. 47 Wana nde mabota ya bana mibali ya Ashere, bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 53 400.+
48 Bana mibali ya Nafatali+ na kolanda mabota na bango, bango oyo: ya Yahazeele, na libota ya Bayahazeele; ya Guni, na libota ya Baguni; 49 ya Yezere, na libota ya Bayezere; ya Shileme, na libota ya Bashileme. 50 Wana nde mabota ya Nafatali na kolanda mabota na bango, mpe bato na bango oyo bakomisamaki nkombo bazalaki 45 400.+
51 Motángo mobimba ya bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya Bayisraele ezalaki: 601 730.+
52 Nsima na yango, Yehova alobaki na Moize ete: 53 “Na kati ya baoyo wana nde mokili yango ekokabolama lokola libula na kolanda ndenge bankombo elandani.*+ 54 Bituluku oyo ezali na bato ebele okobakisa libula na bango, mpe bituluku oyo ezali na bato moke okokitisa libula na bango.+ Okopesa etuluku mokomoko libula na kotalela motángo ya bato na yango oyo bakomisamaki nkombo. 55 Nzokande, mpo na kokabola mokili esengeli kobwaka mbɛsɛ.+ Bakozwa libula na kolanda bankombo ya mabota ya batata na bango. 56 Libula mokomoko ekopesama na kolanda ndenge mbɛsɛ ebwakami mpe ekokabolama na kolanda bonene to moke ya etuluku.”
57 Sikoyo bato oyo bakomisamaki nkombo na kati ya Balevi,+ na kolanda mabota na bango ezalaki: ya Gereshone, na libota ya Bagereshone; ya Kohate,+ na libota ya Bakohate; ya Merari, na libota ya Bamerari. 58 Mabota ya Balevi yango oyo: libota ya Balibini,+ libota ya Bahebrone,+ libota ya Bamaheli,+ libota ya Bamushi,+ libota ya Bakora.+
Kohate abotaki Amirame.+ 59 Mpe nkombo ya mwasi ya Amirame ezalaki Yokebede,+ mwana ya Levi, oyo mwasi ya Levi abotelaki ye na Ezipito. Mpe Yokebede abotelaki Amirame Arona ná Moize mpe Miriame ndeko na bango ya mwasi.+ 60 Na nsima, Arona abotaki Nadabe, Abihu, Eleazare mpe Itamare.+ 61 Kasi Nadabe ná Abihu bakufaki mpo bapesaki liboso ya Yehova mɔtɔ oyo endimami te.+
62 Motángo mobimba ya mibali nyonso oyo bakomisamaki nkombo banda na sanza moko matá, ezalaki 23 000.+ Bakomisamaki nkombo te na kati ya Bayisraele mosusu,+ mpo esengelaki te kopesa bango libula na kati ya Bayisraele.+
63 Wana nde bato oyo Moize ná Eleazare nganga-nzambe bakomisaki nkombo, ntango bakomisaki Bayisraele nkombo na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pembeni na Yordani, na Yeriko. 64 Kasi na kati na bango, moto moko azalaki te na kati ya baoyo Moize ná Arona nganga-nzambe bakomisaki nkombo, ntango bakomisaki Bayisraele nkombo na esobe ya Sinai.+ 65 Mpo Yehova alobaki na ntina na bango ete: “Bakokufa mpenza na esobe.”+ Bongo moto moko te na kati na bango atikalaki, longola kaka Kalebe mwana ya Yefune mpe Yosua mwana ya Nunu.+
27 Bongo bana basi ya Zelofehade,+ mwana ya Hefere, mwana ya Gileade, mwana ya Makire, mwana ya Manase, na mabota ya Manase mwana ya Yozefe, bapusanaki. Bankombo ya bana na ye ya basi yango oyo: Mahala, Noa, Hogla, Milka ná Tireza. 2 Batɛlɛmaki liboso ya Moize, Eleazare nganga-nzambe, bankumu,+ mpe liboso ya liyangani mobimba, na ekɔtelo ya hema ya kokutana, balobaki ete: 3 “Tata na biso akufaki na esobe, kasi azalaki te na kati ya etuluku ya baoyo basanganaki mpo na kotombokela Yehova, bato oyo bapesaki Kora mabɔkɔ;+ kasi akufaki nde mpo na lisumu na ye moko mpe azalaki na bana mibali te. 4 Mpo na nini nkombo ya tata na biso elimwa na libota na ye, kaka mpo azalaki na mwana mobali te? Pesá biso mabele na kati ya bandeko ya tata na biso.” 5 Na yango, Moize amemaki likambo na bango liboso ya Yehova.+
6 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 7 “Bana basi ya Zelofehade balobi solo. Okopesa mpenza bango mabele ya libula na kati ya bandeko ya tata na bango, mpe lekisá libula ya tata na bango epai na bango.+ 8 Mpe yebisá Bayisraele ete: ‘Soki mobali moko akufi, kasi azali na mwana mobali te, bosengeli kolekisa libula na ye epai ya bana na ye ya basi. 9 Mpe soki azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali. 10 Mpe soki azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye. 11 Mpe soki tata na ye azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko na ye ya makila, oyo azali mpenza ndeko na ye ya libota, mpe akozwa yango. Ekateli yango ekozala lokola mobeko mpo na Bayisraele, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.’”
12 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Matá na ngomba oyo ya Abarime,+ mpe talá mokili oyo nakopesa Bayisraele.+ 13 Nsima ya komona yango, okoyanganisama mpe na bato na yo,*+ kaka ndenge esalemaki mpo na Arona ndeko na yo,+ 14 mpo ntango liyangani ezalaki koswanisa ngai na esobe ya Zine, botombokelaki etinda na ngai mpe bosantisaki ngai te na miso ya bato ntango nabimisaki mai.+ Ezali mai ya Meriba,+ na Kadeshe,+ na esobe ya Zine.”+
15 Bongo Moize alobaki na Yehova ete: 16 “Tiká Yehova, Nzambe oyo apesaka bato nyonso bomoi,* atya moto oyo akokamba liyangani, 17 oyo akobima liboso na bango mpe oyo akokɔta liboso na bango mpe oyo akobimisa bango mpe oyo akokɔtisa bango, mpo liyangani ya Yehova ekóma te lokola bampate oyo ezangi mobateli.” 18 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Zwá Yosua mwana ya Nunu, moto oyo elimo ezali na kati na ye, mpe tyá lobɔkɔ na yo likoló na ye.+ 19 Na nsima, tɛlɛmisá ye liboso ya Eleazare nganga-nzambe mpe liboso ya liyangani mobimba, mpe osengeli kopesa ye mokumba na miso na bango.+ 20 Okopesa ye ndambo ya bokonzi* na yo,+ mpo liyangani mobimba ya Bayisraele eyoka ye.+ 21 Akotɛlɛma liboso ya Eleazare nganga-nzambe, mpe Eleazare akotunela ye litambwisi epai ya Yehova na nzela ya Urime.+ Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná Bayisraele nyonso mpe liyangani mobimba.”
22 Na yango, Moize asalaki kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo. Azwaki Yosua mpe atɛlɛmisaki ye liboso ya Eleazare nganga-nzambe mpe liboso ya liyangani mobimba, 23 mpe atyaki mabɔkɔ na ye likoló na ye mpe apesaki ye mokumba,+ kaka ndenge Yehova alobaki na nzela ya Moize.+
28 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Pesá Bayisraele mitindo mpe lobá na bango boye: ‘Bokopesa ngai likabo na ngai, limpa na ngai. Makabo oyo bokopesa ngai, oyo etumbami na mɔtɔ mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* ngai, esengeli kopesama na bantango oyo etyamá.’+
3 “Mpe lobá na bango ete: ‘Talá likabo oyo etumbami na mɔtɔ oyo bokopesa Yehova: mokolo na mokolo, mpe ntango nyonso bokopesa bana-mpate mibale ya mibali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula moko, mpo ezala likabo ya kotumba.+ 4 Okopesa mwana-mpate moko ya mobali na ntɔngɔ, mpe okopesa mwana-mpate mosusu ya mobali na mpokwa, liboso molili ekɔta,*+ 5 okopesa yango elongo na moko ya bandambo zomi ya efa* ya farini ya malamu, oyo esangisami na moko ya bandambo minei ya hini* ya mafuta ya mbuma ya olive oyo etutami lokola likabo ya mbuma.*+ 6 Ezali likabo ya kotumba ya ntango nyonso+ oyo endimamaki na Ngomba Sinai, likabo oyo batumbi na mɔtɔ mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova, 7 nzela moko na likabo na yango ya masanga: moko ya bandambo minei ya hini mpo na mwana-mpate mobali mokomoko.+ Okosopa na esika mosantu masanga makasi mpo ezala likabo ya masanga mpo na Yehova. 8 Mpe okopesa mwana-mpate mobali mosusu na mpokwa, liboso molili ekɔta.* Elongo na likabo ya mbuma ya ndenge moko na oyo ya ntɔngɔ mpe nzela moko na likabo na yango ya masanga ya ndenge moko, okopesa yango lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova.+
9 “‘Nzokande, na mokolo ya Sabata,+ likabo yango ekozala bana-mpate mibale ya mibali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula moko, mpe mibale ya bandambo zomi ya farini ya malamu lokola likabo ya mbuma oyo esangisami na mafuta, nzela moko na likabo na yango ya masanga. 10 Yango ezali likabo ya kotumba ya Sabata, elongo na likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya masanga.+
11 “‘Na ebandeli ya sanza mokomoko,* bokopesa Yehova likabo ya kotumba: bana-ngɔmbɛ mibale ya mibali, mpate-mobali, ná bana-mpate nsambo ya mibali, oyo ezangi mbeba, mokomoko ezali na mbula moko,+ 12 ná misato ya bandambo zomi ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta lokola likabo ya mbuma+ mpo na ngɔmbɛ-mobali mokomoko ná mibale ya bandambo zomi ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta lokola likabo ya mbuma mpo na mpate-mobali,+ 13 mpe moko ya bandambo zomi ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta lokola likabo ya mbuma mpo na mwana-mpate mobali mokomoko, lokola likabo ya kotumba, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa,*+ likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ. 14 Mpe makabo na yango ya masanga ekozala hini moko ya vinyo kabola na mibale mpo na ngɔmbɛ-mobali+ mpe moko ya bandambo misato ya hini mpo na mpate-mobali+ mpe moko ya bandambo minei ya hini mpo na mwana-mpate mobali.+ Yango nde likabo ya kotumba sanza na sanza, ekopesama sanza nyonso na boumeli ya mbula. 15 Longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso ná likabo na yango ya masanga, bakopesa lisusu Yehova mwana-ntaba lokola likabo mpo na lisumu.
16 “‘Na sanza ya liboso, na mokolo ya 14 ya sanza yango, ekozala Elekeli ya Yehova.+ 17 Mpe na mokolo ya 15 ya sanza yango ekozala fɛti. Mampa ezangá levire ekolyama mikolo nsambo.+ 18 Na mokolo ya liboso, ekozala liyangani moko mosantu. Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te. 19 Mpe bokopesa likabo oyo etumbami na mɔtɔ, likabo ya kotumbela Yehova: bana-ngɔmbɛ mibale ya mibali, mpate-mobali, mpe bana-mpate nsambo ya mibali, mokomoko ekozala na mbula moko. Bokopesa banyama oyo ezangi mbeba.+ 20 Mpo na makabo na yango ya mbuma ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta,+ bokopesa misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali mpe mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali. 21 Okopesa moko ya bandambo zomi mbala nyonso mpo na mwana-mpate mobali mokomoko kati na bana-mpate yango nsambo ya mibali, 22 mpe ntaba-mobali moko ya likabo mpo na lisumu mpo na kozipa masumu na bino. 23 Bokobakisa yango na likabo ya kotumba ya ntɔngɔ, oyo ezali mpo na likabo ya kotumba ya ntango nyonso. 24 Bokopesa makabo yango ndenge moko mokolo na mokolo na boumeli ya mikolo nsambo lokola bilei,* likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova. Ekopesama nzela moko na likabo ya kotumba ya ntango nyonso, mpe na likabo na yango ya masanga. 25 Na mokolo ya nsambo, bokozala na liyangani moko mosantu.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+
26 “‘Na mokolo ya mbuma ya liboso oyo eteli,+ ntango bokopesa Yehova likabo ya mbuma na bino ya sika,+ na bafɛti na bino ya bapɔsɔ,+ bokosala liyangani moko mosantu. Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+ 27 Bokopesa lokola likabo ya kotumba mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova: bana-ngɔmbɛ mibale ya mibali, mpate-mobali, mpe bana-mpate nsambo ya mibali, mokomoko ekozala na mbula moko,+ 28 mpe lokola likabo na yango ya mbuma ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta: misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali mokomoko, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali, 29 moko ya bandambo zomi mbala nyonso mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali kati na bana-mpate yango nsambo ya mibali, 30 mpe mwana-ntaba moko mpo na kozipa masumu na bino.+ 31 Yango ekobakisama na likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma. Ekozala banyama oyo ezangi mbeba,+ bokopesa yango nzela moko na makabo na yango ya masanga.
29 “‘Mpe na sanza ya nsambo, na mokolo ya liboso ya sanza yango, bokosala liyangani moko mosantu. Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+ Ekozala mokolo oyo bokobɛta kelelo.+ 2 Bokopesa likabo ya kotumba mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova: mwana-ngɔmbɛ ya mobali, mpate-mobali, mpe bana-mpate mibali nsambo, mokomoko ekozala na mbula moko mpe ezanga mbeba, 3 mpe likabo na yango ya mbuma ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta: misato ya bandambo zomi ya efa mpo na ngɔmbɛ-mobali, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali, 4 mpe moko ya bandambo zomi mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali ná bana-mpate mibali nsambo, 5 mpe mwana-ntaba moko ya mobali lokola likabo mpo na lisumu mpo na kozipa masumu na bino. 6 Yango ekobakisama na likabo ya kotumba ya sanza na sanza mpe likabo na yango ya mbuma*+ ná likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma,+ nzela moko na makabo na yango ya masanga,+ ndenge basalaka yango, mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa,* likabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ.
7 “‘Mpe na mokolo ya zomi ya sanza yango ya nsambo, bokosala liyangani moko mosantu,+ mpe bosengeli komiyokisa mpasi.* Bosengeli kosala mosala ata moko te.+ 8 Mpe bokopesa likabo ya kotumba, mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova: mwana-ngɔmbɛ ya mobali, mpate-mobali, bana-mpate mibali nsambo, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ekozala banyama oyo ezangi mbeba.+ 9 Mpe likabo na yango ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta: misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali, 10 moko ya bandambo zomi mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali ná bana-mpate mibali yango nsambo, 11 mpe mwana-ntaba moko lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo mpo na lisumu mpo na kozipa masumu+ mpe likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma, nzela moko na makabo na yango ya masanga.
12 “‘Mpe na mokolo ya 15 ya sanza ya nsambo, bokosala liyangani moko mosantu. Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te, mpe bosengeli kosala fɛti mpo na Yehova mikolo nsambo.+ 13 Mpe bokopesa likabo ya kotumba,+ likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova: bana-ngɔmbɛ mibali 13, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ekozala banyama oyo ezangi mbeba.+ 14 Mpe likabo na yango ya mbuma ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta: misato ya bandambo zomi mpo na ngɔmbɛ-mobali mokomoko ná ngɔmbɛ-mibali 13 yango, mibale ya bandambo zomi mpo na mpate-mobali mokomoko ná mpate-mibali yango 2, 15 mpe moko ya bandambo zomi mpo na mwana-mpate mokomoko ya mobali na bana-mpate mibali 14 yango, 16 mpe mwana-ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma, mpe likabo na yango ya masanga.+
17 “‘Mpe na mokolo ya mibale: bana-ngɔmbɛ mibali 12, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba,+ 18 ná likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali, mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka, 19 mpe mwana-ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma, nzela moko na makabo na yango ya masanga.+
20 “‘Mpe na mokolo ya misato: ngɔmbɛ-mibali 11, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba,+ 21 ná likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali, mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka, 22 mpe ntaba-mobali lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
23 “‘Mpe na mokolo ya minei: ngɔmbɛ-mibali 10, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba,+ 24 likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali, mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka, 25 mpe mwana-ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma, mpe likabo na yango ya masanga.+
26 “‘Mpe na mokolo ya mitano: ngɔmbɛ-mibali 9, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba+ 27 ná likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka, 28 mpe ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
29 “‘Mpe na mokolo ya motoba: ngɔmbɛ-mibali 8, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba,+ 30 ná likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali, mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka, 31 mpe ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma, mpe makabo na yango ya masanga.+
32 “‘Mpe na mokolo ya nsambo: ngɔmbɛ-mibali 7, mpate-mibali 2, bana-mpate mibali 14, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba,+ 33 ná likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga mpo na bangɔmbɛ-mibali, bampate-mibali, mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka yango, 34 mpe ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso, likabo na yango ya mbuma, mpe likabo na yango ya masanga.+
35 “‘Na mokolo ya mwambe, bokosala liyangani moko monene. Bokosala mosala ya makasi ata moko te.+ 36 Bokopesa likabo ya kotumba, likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa* Yehova: ngɔmbɛ-mobali moko, mpate-mobali moko, mpe bana-mpate mibali nsambo, mokomoko ezali na mbula moko, nyonso ezangi mbeba,+ 37 ná likabo na yango ya mbuma mpe makabo na yango ya masanga mpo na ngɔmbɛ-mobali, mpate-mobali, mpe bana-mpate mibali na kolanda motángo na yango ndenge basalaka, 38 mpe ntaba lokola likabo mpo na lisumu, longola likabo ya kotumba ya ntango nyonso mpe likabo na yango ya mbuma mpe likabo na yango ya masanga.+
39 “‘Yango nde bokopesa Yehova na bafɛti na bino na bileko oyo etyamá,+ ekobakisama na makabo na bino ya elako,+ makabo na bino ya bolingo+ mpo ezala makabo na bino ya kotumba,+ makabo na bino ya mbuma,+ makabo na bino ya masanga,+ mpe bambeka na bino ya kimya.’”+ 40 Moize ayebisaki Bayisraele mitindo nyonso oyo Yehova apesaki ye.
30 Bongo Moize alobaki na bankumu+ ya mabota ya Bayisraele ete: “Mitindo oyo Yehova apesi yango oyo: 2 Soki mobali moko asali elako+ epai ya Yehova to alapi ndai+ mpo na koboya eloko moko, azanga kokokisa liloba na ye te.+ Akosala kaka ndenge oyo alobaki.+
3 “Mpe soki mwasi moko asali elako epai ya Yehova to asali elako ya koboya eloko moko, wana azali elenge mpe azali kofanda na ndako ya tata na ye, 4 mpe tata na ye ayoki elako na ye to elako na ye ya koboya eloko moko mpe tata na ye alobi likambo te, bilako na ye nyonso ekondimama, mpe elako nyonso oyo asali ya koboya eloko moko ekondimama. 5 Kasi soki tata na ye apekisi ye ntango ayoki ete asali bilako oyo asengeli kokokisa to asali elako ya koboya eloko moko, yango ekondimama te. Yehova akolimbisa ye mpo tata na ye apekisaki ye.+
6 “Nzokande, soki abali wana elako oyo asalaki to elaka oyo apesaki kozanga kokanisa ezali naino, 7 mpe mobali na ye ayoki yango mpe alobi likambo te mokolo oyo ayoki yango, bilako na ye to bilako na ye ya koboya eloko moko ekondimama. 8 Kasi soki mobali na ye apekisi ye na mokolo oyo ayoki yango, akoki kolongola elako to elaka oyo apesaki kozanga kokanisa,+ mpe Yehova akolimbisa ye.
9 “Kasi soki mwasi oyo mobali akufá to mwasi oyo libala ekufá asali elako, esengeli asala kaka ndenge alobaki.
10 “Nzokande, soki mwasi asali elako moko to elako ya koboya eloko moko, wana azali na ndako ya mobali na ye, 11 mpe mobali na ye ayoki yango mpe alobeli ye eloko te to apekisi ye te, bilako na ye nyonso to elako nyonso oyo akosala ya koboya eloko moko ekondimama. 12 Kasi soki mobali na ye alongoli yango nyonso na mokolo oyo ayoki bilako to elako ya koboya eloko moko, yango ekondimama te.+ Lokola mobali na ye alongolaki yango, Yehova akolimbisa ye. 13 Na kotalela elako nyonso to ndai nyonso ya elako ya koboya eloko mpo na komiyokisa mpasi, mobali na ye akondimisa yango to mobali na ye akolongola yango. 14 Kasi soki mobali na ye azali koloba na ye ata eloko moko te mokolo na mokolo, andimisi bilako na ye nyonso to bilako na ye nyonso ya koboya eloko moko oyo ezali likoló na ye. Andimisi yango mpo alobaki eloko moko te mokolo oyo ayokaki yango. 15 Kasi soki alongoli yango nsima ya mokolo oyo ayokaki yango, akomema ngambo ya libunga ya mwasi na ye.+
16 “Wana nde malako oyo Yehova apesaki Moize lokola mitindo, etali mobali ná mwasi na ye, mpe tata ná mwana na ye ya mwasi oyo azali kofanda na ndako na ye.”
31 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Zongiselá Bamidiane mabe+ mpo na Bayisraele.+ Na nsima, okoyanganisama na bato na yo.”*+
3 Bongo Moize alobaki na bato ete: “Bópesa mibali oyo bazali na kati na bino bibundeli mpo na etumba,* mpe bábunda na Midiane mpo Yehova azongisela Midiane mabe. 4 Bokotinda na etumba bato 1 000 ya libota mokomoko na mabota nyonso ya Yisraele.” 5 Na yango, na bankóto ya Yisraele,+ baponaki bato 1 000 na libota mokomoko, bato 12 000 bazwaki bibundeli mpo na kokende etumba.*
6 Na nsima, Moize atindaki bango, bato 1 000 na libota mokomoko mpo na kokende etumba. Finehase+ mwana ya Eleazare nganga-nzambe, akendaki elongo na limpinga, mpe na lobɔkɔ na ye azalaki na bisaleli mosantu mpe bakelelo mpo na kobɛta.+ 7 Bakendaki kobunda ná Midiane, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo, mpe babomaki mobali nyonso. 8 Babomaki mpe bakonzi ya Midiane, elingi koloba, Evi, Rekeme, Zure, Hure ná Reba, bakonzi mitano ya Midiane. Babomaki mpe Balaama+ mwana ya Beore na mopanga. 9 Kasi Bayisraele bamemaki basi ya Midiane ná bana na bango ya mike bakangami. Bapunzaki mpe banyama na bango nyonso ya mboka, bibwɛlɛ na bango nyonso mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. 10 Mpe bazikisaki na mɔtɔ bingumba na bango mpe bisika na bango nyonso ya kofanda na bahema.* 11 Mpe bazwaki biloko nyonso oyo epunzamaki ná nyonso oyo bakangaki, ezala bato mpe banyama. 12 Bamemaki bakangami ná biloko nyonso oyo bapunzaki epai ya Moize, Eleazare nganga-nzambe mpe liyangani ya Bayisraele, na kaa, na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe,+ oyo ezali pene na Yordani, na Yeriko.
13 Bongo Moize ná Eleazare nganga-nzambe mpe bankumu nyonso ya liyangani babimaki kokutana na bango na libándá ya kaa. 14 Kasi Moize asilikelaki mibali oyo batyamaki na bituluku ya babundi, bakonzi ya bankóto mpe bakonzi ya bankama oyo bautaki na etumba. 15 Moize alobaki na bango ete: “Botiki basi nyonso na bomoi? 16 Talá! Bango nde baoyo basalelamaki, na liloba ya Balaama, mpo na kobenda Bayisraele bázanga bosembo+ epai ya Yehova na likambo ya Peore,+ bongo bolɔzi ekwelaki liyangani ya Yehova.+ 17 Sikoyo, bóboma bana mibali nyonso, mpe bóboma mwasi nyonso oyo asangisá nzoto na mobali. 18 Kasi bokoki kotika na bomoi bilenge basi nyonso oyo basangisá naino nzoto na mobali te.+ 19 Mpe bokofanda libándá ya kaa mikolo nsambo. Kati na bino mpe bakangami na bino, moto nyonso oyo abomi moto* mpe moto nyonso oyo asimbi moto oyo babomi,+ akomipɛtola+ na mokolo ya misato mpe na mokolo ya nsambo. 20 Mpe bokopɛtola bilamba nyonso,* eloko nyonso oyo esalemi na mposo ya nyama, na nsuki ya ntaba, mpe eloko nyonso ya libaya.”
21 Bongo Eleazare nganga-nzambe alobaki na mibali ya limpinga oyo bakendaki na etumba ete: “Talá eloko oyo esɛngami na mobeko oyo Yehova apesaki Moize: 22 ‘Kaka wolo, palata, kwivre, ebende, etini ná mondɔlu, 23 eloko nyonso oyo ekoki kozika na mɔtɔ te, bokolekisa yango na mɔtɔ, mpe ekozala pɛto. Kasi ekopɛtolama mpe na mai ya kopɛtola.+ Eloko nyonso oyo ekoki kozika na mɔtɔ, bokolekisa yango na mai. 24 Mpe bokosukola bilamba na bino na mokolo ya nsambo mpe bokozala pɛto, mpe na nsima, bokoki kokɔta na kaa.’”+
25 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: 26 “Zwá motángo mobimba ya biloko oyo bapunzaki, motángo ya bakangami, bato ná banyama; bótánga yango elongo na Eleazare nganga-nzambe mpe bankumu ya mabota ya batata ya liyangani. 27 Bókabola na biteni mibale biloko nyonso oyo bapunzaki mpe bópesa eteni moko baoyo bakendaki na etumba, mpe eteni mosusu na bato nyonso ya liyangani oyo batikalaki.+ 28 Mpo na mpako ya Yehova, okozwa epai ya basoda oyo babimaki kobunda, molimo* moko na milimo 500: na bato, na bangɔmbɛ, na bampunda mpe na bampate. 29 Bokozwa mpako yango na ndambo na bango mpe okopesa yango Eleazare nganga-nzambe mpo ezala likabo ya Yehova.+ 30 Na ndambo oyo epesami na Bayisraele, okozwa moko na biloko 50: na bato, na bangɔmbɛ, na bampunda mpe na bampate, na lolenge nyonso ya nyama ya mboka, mpe okopesa yango Balevi,+ bato oyo bakokisaka mokumba oyo ezali na boyokani na tabernakle ya Yehova.”+
31 Bongo Moize ná Eleazare nganga-nzambe basalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 32 Biloko nyonso oyo bapunzaki, biloko oyo etikalaki na biloko oyo ebɔtɔlamaki, oyo bato bakendaki na etumba bazwaki, ezalaki bampate 675 000, 33 bangɔmbɛ 72 000, 34 bampunda 61 000. 35 Basi oyo basangisaki nzoto na mibali te,+ bazalaki 32 000. 36 Ndambo oyo bapesaki baoyo bakendaki na etumba ezalaki bampate 337 500. 37 Mpako mpo na Yehova oyo euti na bampate ezalaki 675. 38 Mpe bangɔmbɛ ezalaki 36 000, mpako na yango mpo na Yehova ezalaki 72. 39 Mpe bampunda ezalaki 30 500, mpe mpako na yango mpo na Yehova ezalaki 61. 40 Mpe bato bazalaki* 16 000, mpe mpako na yango mpo na Yehova ezalaki bato* 32. 41 Bongo Moize apesaki mpako na Eleazare nganga-nzambe mpo ezala likabo ya Yehova,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
42 Na ndambo oyo ezalaki ya Bayisraele, oyo Moize akabolaki na ndambo mosusu oyo ezalaki ya mibali oyo babundaki etumba yango oyo: 43 ndambo ya bampate ezalaki 337 500, 44 mpe ya bangɔmbɛ, 36 000, 45 mpe ya bampunda, 30 500, 46 mpe ya bato,* 16 000. 47 Bongo Moize azwaki, na ndambo oyo ezalaki ya Bayisraele, moko na biloko 50: na bato, na banyama, mpe apesaki yango Balevi,+ bato oyo bakokisaka mokumba ya tabernakle ya Yehova,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
48 Na nsima, mibali oyo batyamaki, oyo bazalaki na kati ya bankóto ya bato ya limpinga,+ bakonzi ya bankóto mpe bakonzi ya bankama, bapusanaki pene na Moize, 49 mpe balobaki na Moize ete: “Basaleli na yo bazwi motángo ya mibali ya etumba oyo bazali na mabɔkɔ na biso mpe moko te kati na biso azangi.+ 50 Bongo tiká moto na moto apesa lokola likabo ya Yehova, oyo azwaki: biloko ya wolo, mwa minyɔlɔlɔ oyo balataka na makɛsɛ, bikɔmɔ, mpɛtɛ ya kotya bilembo, biloko ya matoi, mpe babiju mosusu mpo na kozipa masumu na biso* liboso ya Yehova.”
51 Na yango, Moize ná Eleazare nganga-nzambe bandimaki kozwa wolo oyo euti na bango, babiju nyonso. 52 Wolo nyonso ya likabo oyo bapesaki Yehova ezalaki shekele* 16 750, eutaki na bakonzi ya bankóto mpe bakonzi ya bankama. 53 Mibali ya limpinga bazwaki moto na moto biloko oyo bapunzaki. 54 Moize ná Eleazare nganga-nzambe bandimaki wolo oyo euti na bakonzi ya bankóto mpe ya bankama mpe bamemaki yango na kati ya hema ya kokutana mpo ezala ekaniseli mpo na bato ya Yisraele liboso ya Yehova.
32 Sikoyo bana ya Rubene+ mpe bana ya Gade+ bazalaki na bibwɛlɛ ebele, mpe bamonaki ete mokili ya Yazere+ mpe ya Gileade ezalaki etúká oyo ebongaki mpo na bibwɛlɛ. 2 Na yango, bana ya Gade mpe bana ya Rubene bayaki epai ya Moize, Eleazare nganga-nzambe, mpe bankumu ya liyangani mpe balobaki ete: 3 “Atarote, Dibone, Yazere, Nimira, Heshibone,+ Eleale, Sebame, Nebo+ mpe Beone,+ 4 mokili oyo Yehova alongaki liboso ya liyangani ya Yisraele,+ ezali mokili oyo ebongi mpo na bibwɛlɛ, mpe basaleli na yo bazali na bibwɛlɛ ebele.”+ 5 Bakobaki ete: “Soki tondimami na miso na yo, tiká mokili oyo epesama na basaleli na yo mpo ezala ya bango. Kokatisa biso Yordani te.”
6 Na yango, Moize alobaki na bana ya Gade mpe na bana ya Rubene ete: “Bandeko na bino bákende na etumba, bongo bino bótikala kofanda awa? 7 Mpo na nini bozali kolɛmbisa bato ya Yisraele nzoto mpo bákatisa te mpo na kokɔta na mokili oyo Yehova akopesa mpenza bango? 8 Yango nde batata na bino basalaki ntango natindaki bango longwa na Kadeshe-barnea mpo na kotala mokili.+ 9 Ntango bamataki na Lobwaku* ya Eshikole+ mpe bamonaki mokili, balɛmbisaki bato ya Yisraele nzoto mpo bákɔta te na mokili oyo Yehova alingaki kopesa bango.+ 10 Nkanda ya Yehova engalaki na mokolo yango, bongo alapaki ndai ete:+ 11 ‘Mibali oyo babimaki na Ezipito, kobanda na mbula 20 matá, bakomona te mokili+ oyo nalapaki ndai epai ya Abrahama, Yisaka mpe Yakobo,+ mpo batosaki ngai te na motema mobimba— 12 longola kaka Kalebe+ mwana ya Yefune Mokenize mpe Yosua+ mwana ya Nunu, mpo batosaki Yehova na motema na bango mobimba.’+ 13 Bongo nkanda ya Yehova engalelaki Yisraele mpe asalaki ete bango báyengayenga na esobe mbula 40,+ tii bato nyonso ya ntango wana oyo bazalaki kosala mabe na miso ya Yehova basilaki.+ 14 Talá sikoyo bobimi na esika ya batata na bino lokola lisangá ya bato ya masumu oyo bamatisi lisusu nkanda ya Yehova epai ya Yisraele. 15 Soki bokopesa ye mokɔngɔ mpe bokotika kolanda ye, akotika mpenza bango lisusu na esobe, mpe bokoyeisela bato oyo nyonso libebi.”
16 Na nsima, bapusanaki epai na ye mpe balobaki ete: “Tiká tótonga awa mapango ya mabanga mpo na bitonga ya bibwɛlɛ na biso mpe bingumba mpo na bana na biso. 17 Kasi tokokoba komibongisa mpo na etumba+ mpe tokokende liboso ya Bayisraele tii tokokómisa bango na esika na bango, wana bana na biso bakofanda na bingumba oyo ezali na mapango ya makasi, mosika na bato oyo bafandi na mokili yango. 18 Tokozonga te na bandako na biso tii Bayisraele bakozwa mabele, moto na moto libula na ye moko.+ 19 Mpo tokozwa te libula elongo na bango na ngámbo mosusu ya Yordani mpe koleka, mpo tozwi libula na biso na ngámbo ya ɛsti ya Yordani.”+
20 Moize alobaki na bango ete: “Soki bokosala boye, soki bozwi bibundeli liboso ya Yehova mpo na etumba,+ 21 mpe soki moto nyonso na kati na bino oyo azwi bibundeli mpe akatisi Yordani liboso ya Yehova, wana azali kobengana banguna na ye liboso na ye,+ 22 tii mokili yango etyami na nse ya bokonzi ya Yehova,+ nsima na yango bokoki kozonga+ mpe bokozala na ngambo te epai ya Yehova mpe epai ya Yisraele. Mpe mokili oyo ekokóma ya bino liboso ya Yehova.+ 23 Kasi soki bosali ndenge wana te, bokosalela Yehova lisumu. Soki bongo, bóyeba ete lisumu na bino ekozwa bino. 24 Na yango, bokoki kotonga bingumba mpo na bana na bino mpe mapango mpo na bitonga na bino,+ kasi bosengeli kosala makambo oyo bopesaki elaka.”
25 Bana ya Gade mpe bana ya Rubene balobaki na Moize ete: “Basaleli na yo bakosala kaka ndenge nkolo na ngai azali kopesa mitindo. 26 Bana na biso, basi na biso, bibwɛlɛ na biso, mpe banyama na biso nyonso ya mboka bakotikala kuna na bingumba ya Gileade,+ 27 kasi basaleli na yo bakokatisa, mobali nyonso akozwa bibundeli mpo na etumba liboso ya Yehova,+ kaka ndenge nkolo na ngai alobi.”
28 Na yango, Moize apesaki Eleazare nganga-nzambe mpe Yosua mwana ya Nunu mpe bankumu ya batata ya mabota ya Yisraele mitindo mpo na bango. 29 Moize alobaki na bango ete: “Soki bana ya Gade mpe bana ya Rubene bakatisi Yordani elongo na bino, mobali nyonso azwi bibundeli mpo na etumba liboso ya Yehova, mpe mokili etyami na nse ya bokonzi na bino, bokopesa bango mokili ya Gileade ezala ya bango.+ 30 Kasi soki bazwi bibundeli te mpe bakatisi te elongo na bino, wana bakofanda na kati na bino na mokili ya Kanana.”
31 Na yango, bana ya Gade mpe bana ya Rubene bazongisaki maloba ete: “Oyo Yehova alobi na basaleli na yo, yango nde tokosala. 32 Biso tokozwa bibundeli mpe tokokatisa liboso ya Yehova tii na mokili ya Kanana,+ kasi biloko ya libula oyo tokozwa ekozala na ngámbo oyo ya Yordani.” 33 Na yango, Moize apesaki bana ya Gade, bana ya Rubene,+ mpe ndambo ya libota ya Manase+ mwana ya Yozefe, bokonzi ya Sihone+ mokonzi ya Baamore mpe bokonzi ya Oge+ mokonzi ya Bashane, mokili ya bingumba na yango, oyo ezali na bateritware yango, mpe bingumba ya mokili ya zingazinga.
34 Mpe bana ya Gade batongaki* Dibone,+ Atarote+ ná Aroere,+ 35 Atrote-shofane, Yazere,+ Yogebeha,+ 36 Bete-nimira,+ ná Bete-harane,+ bingumba oyo ezali na mapango ya makasi, mpe batongaki mapango ya mabanga mpo na bitonga. 37 Mpe bana ya Rubene batongaki Heshibone,+ Eleale,+ Kiriataime,+ 38 Nebo,+ mpe Baala-meone+—bankombo na yango ebongwanaki—ná Sibima; mpe babandaki kopesa bankombo na bingumba oyo batongaki lisusu.
39 Bana ya Makire+ mwana ya Manase babundisaki Gileade mpe bazwaki yango mpe babenganaki Baamore oyo bazalaki kuna. 40 Bongo Moize apesaki Gileade epai ya Makire mwana ya Manase, mpe abandaki kofanda kuna.+ 41 Mpe Yaire mwana ya Manase abundisaki bango mpe azwaki bamboka na bango ya hema, mpe abandaki kobenga yango Havote-yaire.*+ 42 Mpe Noba abundaki mpe azwaki Kenate ná bingumba oyo ezali zingazinga na yango, mpe abandaki kobenga yango Noba, na nkombo na ye moko.
33 Talá mibembo oyo bato ya Yisraele basalaki ntango babimaki na Ezipito,+ na kolanda bituluku*+ na bango, na litambwisi ya Moize ná Arona.+ 2 Moize azalaki kokoma bisika oyo bazalaki kolongwa, mobembo na mobembo, na kolanda etinda ya Yehova. Talá mibembo oyo basalaki, longwa na esika moko tii na esika mosusu:+ 3 Na mokolo ya 15 ya sanza ya liboso, Bayisraele balongwaki na Ramesese.+ Kaka na mokolo oyo elandaki Elekeli,+ Bayisraele babimaki na mpiko nyonso,* na miso ya Baezipito nyonso. 4 Na ntango wana, Baezipito bazalaki kokunda bana nyonso ya liboso oyo Yehova abomaki na kati na bango,+ mpo Yehova apesaki banzambe na bango bitumbu.+
5 Bongo Bayisraele balongwaki na Ramesese mpe batyaki kaa na Sukote.+ 6 Na nsima, balongwaki na Sukote mpe batyaki kaa na Etame,+ oyo ezali na ndelo ya esobe. 7 Balongwaki na Etame mpe bazongaki nsima epai ya Pihahirote, oyo etalani na Baala-zefone,+ mpe batyaki kaa liboso ya Migidole.+ 8 Nsima na yango, balongwaki na Pihahirote mpe balekaki na kati ya mbu+ tii na esobe+ mpe batambolaki mobembo ya mikolo misato na esobe ya Etame+ mpe batyaki kaa na Mara.+
9 Na nsima, balongwaki na Mara mpe bakómaki na Elime. Nzokande na Elime ezalaki na maziba ya mai 12 mpe nzete ya mbila 70, bongo batyaki kaa wana.+ 10 Balongwaki na Elime mpe batyaki kaa pene na Mbu Motane. 11 Nsima na yango, balongwaki na Mbu Motane mpe batyaki kaa na esobe ya Sine.+ 12 Balongwaki na esobe ya Sine mpe batyaki kaa na Dofeka. 13 Na nsima, balongwaki na Dofeka mpe batyaki kaa na Alushe. 14 Balongwaki na Alushe mpe batyaki kaa na Refidime,+ esika oyo mai ezalaki te mpo bato bámɛla. 15 Nsima na yango, balongwaki na Refidime mpe batyaki kaa na esobe ya Sinai.+
16 Balongwaki na esobe ya Sinai mpe batyaki kaa na Kibrote-hataava.+ 17 Na nsima, balongwaki na Kibrote-hataava mpe batyaki kaa na Hazerote.+ 18 Balongwaki na Hazerote mpe batyaki kaa na Ritima. 19 Na nsima, balongwaki na Ritima mpe batyaki kaa na Rimone-pereze. 20 Balongwaki na Rimone-pereze mpe batyaki kaa na Libina. 21 Balongwaki na Libina mpe batyaki kaa na Risa. 22 Na nsima, balongwaki na Risa mpe batyaki kaa na Kehelata. 23 Balongwaki na Kehelata mpe batyaki kaa na Ngomba Shefere.
24 Nsima na yango, balongwaki na Ngomba Shefere mpe batyaki kaa na Harada. 25 Balongwaki na Harada mpe batyaki kaa na Makelote. 26 Na nsima, balongwaki+ na Makelote mpe batyaki kaa na Tahate. 27 Balongwaki na Tahate mpe batyaki kaa na Tera. 28 Na nsima, balongwaki na Tera mpe batyaki kaa na Mitika. 29 Balongwaki na Mitika mpe batyaki kaa na Hashimona. 30 Na nsima, balongwaki na Hashimona mpe batyaki kaa na Moserote. 31 Balongwaki na Moserote mpe batyaki kaa na Bene-yaakane.+ 32 Nsima na yango, balongwaki na Bene-yaakane mpe batyaki kaa na Hore-hagidigade. 33 Balongwaki na Hore-hagidigade mpe batyaki kaa na Yotebata.+ 34 Na nsima, balongwaki na Yotebata mpe batyaki kaa na Abrona. 35 Balongwaki na Abrona mpe batyaki kaa na Ezione-gebere.+ 36 Nsima na yango balongwaki na Ezione-gebere mpe batyaki kaa na esobe ya Zine,+ elingi koloba, Kadeshe.
37 Na nsima, balongwaki na Kadeshe mpe batyaki kaa na Ngomba Hore,+ na ndelo ya mokili ya Edome. 38 Mpe Arona nganga-nzambe amataki na Ngomba Hore na etinda ya Yehova, mpe akufaki kuna na mbula ya 40 ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano.+ 39 Arona azalaki na mbula 123 ntango akufaki na Ngomba Hore.
40 Sikoyo mokonzi ya Arade,+ Mokanana, oyo azalaki kofanda na Negebe, na mokili ya Kanana, ayokaki ete Bayisraele bazali koya.
41 Na nsima, balongwaki na Ngomba Hore+ mpe batyaki kaa na Zalmona. 42 Nsima na yango, balongwaki na Zalmona mpe batyaki kaa na Punone. 43 Na nsima, balongwaki na Punone mpe batyaki kaa na Obote.+ 44 Balongwaki na Obote mpe batyaki kaa na Iye-abarime na ndelo ya Moabe.+ 45 Na nsima, balongwaki na Iyime mpe batyaki kaa na Dibone-gade.+ 46 Nsima na yango, balongwaki na Dibone-gade mpe batyaki kaa na Almone-diblataime. 47 Balongwaki na Almone-diblataime mpe batyaki kaa na bangomba ya Abarime+ liboso ya Nebo.+ 48 Nsukansuka, balongwaki na bangomba ya Abarime mpe batyaki kaa na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani, na Yeriko.+ 49 Bakobaki kofanda na bakaa pene na Yordani, banda na Bete-yeshimote tii na Abele-shitime,+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe.
50 Yehova alobaki na Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani, na Yeriko, ete: 51 “Lobá na Bayisraele, mpe yebisá bango boye: ‘Bozali kokatisa Yordani mpo na kokɔta na mokili ya Kanana.+ 52 Bosengeli kobengana bato nyonso oyo bafandi na mokili liboso na bino, mpe kobebisa bililingi na bango nyonso ya mabanga,+ mpe bikeko na bango nyonso ya ebende,*+ mpe bokobebisa bisika na bango nyonso oyo etombwaná ya losambo.+ 53 Mpe bokozwa mokili yango mpe bokofanda kuna, mpo nakopesa mpenza bino mokili yango mpo bózwa yango.+ 54 Bosengeli kokabola mokili mpo ezala ya bino na kobwaka mbɛsɛ,+ na kolanda mabota na bino. Moto oyo azali na bato mingi, bokobakisa libula na ye, mpe moto oyo azali na bato moke, bokokitisa libula na ye.+ Libula ya moto na moto ekozala esika oyo mbɛsɛ ekobimisa mpo na ye. Bokozwa mabele na kolanda mabota ya batata na bino.+
55 “‘Kasi, soki bobengani te bato oyo bafandi na mokili yango liboso na bino,+ bato oyo bokotika, bakokóma lokola biloko oyo ezali koswa na miso na bino mpe lokola banzubɛ na mipanzi na bino, mpe bakotungisa bino na mokili epai bokofanda.+ 56 Mpe nakosala bino kaka ndenge nakanisaki kosala bango.’”+
34 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 2 “Pesá Bayisraele mitindo oyo: ‘Ntango bokokɔta na mokili ya Kanana,+ oyo ezali bandelo ya mokili oyo bakokabolela bino lokola libula:+
3 “‘Ngámbo na bino ya sudi ekozala banda na esobe ya Zine pembenipembeni ya Edome, mpe ndelo na bino ya sudi ekozala banda na nsuka ya Mbu ya Mungwa.*+ 4 Ndelo na bino ekobaluka kobanda na sudi na nzela ya komata Akrabime+ mpe ekokoba tii na Zine, mpe nsuka na yango ekozala na sudi ya Kadeshe-barnea.+ Mpe ekobima na Hazare-adare+ mpe ekokoba tii na Azemone. 5 Ndelo yango ekobaluka na Azemone ekei na Lobwaku ya Ezipito,* mpe nsuka na yango ekozala na Mbu.*+
6 “‘Ndelo na bino ya wɛsti ekozala Mbu Monene* ná mabele ya pembenipembeni na yango. Ekozala ndelo na bino ya wɛsti.+
7 “‘Sikoyo talá oyo ekozala ndelo na bino ya nɔrdi: Kobanda na Mbu Monene, bokokata ndelo tii na Ngomba Hore+ mpo na bino. 8 Kobanda na Ngomba Hore, bokokata ndelo tii na Lebo-hamate,*+ mpe nsuka ya ndelo na yango ekozala na Zedade.+ 9 Mpe ndelo yango ekokende tii na Zifrone, mpe nsuka na yango ekozala na Hazare-enane.+ Ekozala ndelo na bino ya nɔrdi.
10 “‘Na nsima, bokokata ndelo na ɛsti kobanda na Hazare-enane tii na Shefame. 11 Ndelo ekokende kobanda Shefame tii na Ribla na ɛsti ya Aine, mpe ndelo yango ekokita mpe ekokatisa esika oyo ekitá ya mbu ya Kinerete,* na ɛsti.+ 12 Ndelo ekokende tii na Yordani, mpe nsuka na yango ekozala Mbu ya Mungwa.+ Yango ekozala mokili na bino+ mpe zingazinga ya bandelo na yango.’”
13 Bongo Moize apesaki Bayisraele malako ete: “Talá mokili oyo bino bokokabola na kobwaka mbɛsɛ+ mpo ezala ya bino, kaka ndenge Yehova apesaki mitindo ete bápesa na mabota libwa na ndambo. 14 Mpo libota ya Barubene, na kolanda ndako ya batata na bango, libota ya Bagade, na kolanda ndako ya batata na bango, mpe ndambo ya libota ya Manase basilaki kozwa libula na bango.+ 15 Mabota wana mibale na ndambo basilaki kozwa libula na bango etalani na Yeriko, na ɛsti ya ebale Yordani, epai moi ebimaka.”+
16 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 17 “Talá bankombo ya mibali oyo bakokabolela bino mokili mpo ezala ya bino: Eleazare+ nganga-nzambe mpe Yosua+ mwana ya Nunu. 18 Mpe bokozwa nkumu moko na libota mokomoko mpo na kokabola mokili mpo ezala ya bino.+ 19 Talá bankombo ya mibali yango: na libota ya Yuda:+ Kalebe+ mwana ya Yefune; 20 na libota ya bana ya Simeone:+ Shemuele mwana ya Amihude; 21 na libota ya Benyamina:+ Elidade mwana ya Kisilone; 22 na libota ya bana ya Dani:+ nkumu moko, Buki mwana ya Yogli; 23 na bana ya Yozefe,+ na libota ya bana ya Manase:+ nkumu moko, Hananiele mwana ya Efode; 24 na libota ya bana ya Efraime:+ nkumu moko, Kemuele mwana ya Shifitane; 25 na libota ya bana ya Zebulone:+ nkumu moko, Elizafane mwana ya Parnake; 26 na libota ya bana ya Isakare:+ nkumu moko, Palatiele mwana ya Azane; 27 na libota ya bana ya Ashere:+ nkumu moko, Ahihude mwana ya Shelomi; 28 na libota ya bana ya Nafatali:+ nkumu moko, Pedahele mwana ya Amihude.” 29 Bango nde bato oyo Yehova apesaki mitindo ete bákabolela Bayisraele mabele na mokili ya Kanana.+
35 Yehova alobaki lisusu na Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani,+ na Yeriko, ete: 2 “Lobá na Bayisraele ete, na mabele oyo ezali libula na bango, basengeli kopesa Balevi bingumba mpo na kofanda,+ mpe bakopesa Balevi esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti oyo ezali zingazinga ya bingumba yango.+ 3 Bakofanda na bingumba, mpe bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti ekozala mpo na bibwɛlɛ na bango, biloko na bango, mpe mpo na banyama na bango nyonso mosusu. 4 Bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na bingumba oyo bokopesa Balevi ekozala mapeko* 1 000, kobanda na efelo ya engumba, zingazinga nyonso. 5 Bokotánga mapeko 2 000 na libándá ya engumba na ngámbo ya ɛsti, na ngámbo ya sudi mapeko 2 000, na ngámbo ya wɛsti mapeko 2 000, mpe na ngámbo ya nɔrdi mapeko 2 000, engumba ekozala na katikati. Yango ekozala bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na bingumba na bango.
6 “Bingumba oyo bokopesa Balevi ekozala bingumba 6 ya ekimelo,+ oyo bokopesa mpo moto oyo abomi moto akima kuna,+ mpe bingumba mosusu 42. 7 Bingumba nyonso oyo bokopesa Balevi ekozala 48, ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+ 8 Bingumba oyo bokopesa bango ekouta na mabele ya Bayisraele.+ Na libota oyo bazali mingi bokozwa mingi, mpe na libota oyo bazali moke bokozwa moke.+ Libota mokomoko ekopesa Balevi ndambo ya bingumba na yango, na kotalela libula oyo ekozwa.”
9 Yehova akobaki koloba na Moize ete: 10 “Lobá na Bayisraele mpe yebisá bango boye: ‘Bozali kokatisa Yordani mpo na kokɔta na mokili ya Kanana.+ 11 Bokopona bingumba oyo ebongi na bino mpo ezala bingumba ya ekimelo, esika moto oyo abomi moto* na nko te, akokima.+ 12 Bingumba yango ekozala esika na bino ya kokima liboso ya mozongisi mabe mpo na makila,+ mpo moto oyo abomi moto akufa te tii akotɛlɛma liboso ya liyangani mpo na kosambisama.+ 13 Bingumba motoba ya ekimelo oyo bokopesa, ekozala mpo na bino. 14 Bokopesa bingumba misato na ngámbo oyo ya Yordani,+ mpe bingumba misato na mokili ya Kanana+ mpo ezala bingumba ya ekimelo. 15 Bingumba motoba wana ekozala esika ya kokima mpo na Bayisraele, mpo na moto oyo afandi mopaya,+ mpe mpo na moto oyo autá na mboka mosusu oyo azali kati na bango, mpo moto nyonso oyo abomi moto* na nko te akima kuna.+
16 “‘Kasi soki abɛti ye na esaleli ya ebende mpe akufi, azali mobomi-moto. Mobomi-moto akobomama mpenza.+ 17 Mpe soki abɛti ye na libanga oyo ekoki koboma ye mpe akufi, azali mobomi-moto. Mobomi-moto akobomama mpenza. 18 Mpe soki abɛti ye na esaleli ya nzete, oyo akoki kokufa na yango mpe akufi, azali mobomi-moto. Mobomi-moto akobomama mpenza.
19 “‘Mozongisi mabe mpo na makila nde akoboma mobomi-moto. Soki akutani na mobomi-moto yango, ye moko akoboma ye. 20 Soki ezali na koyina nde atindiki ye to abwakeli ye eloko na likanisi ya mabe,*+ 21 to soki ezali na koyina nde abɛti ye na lobɔkɔ na ye mpe akufi, moto oyo abɛti ye akobomama mpenza. Azali mobomi-moto. Mozongisi mabe mpo na makila akoboma mobomi-moto yango soki akutani na ye.
22 “‘Kasi soki ezali na nko te, na koyina te mpe atindiki ye to abwakeli ye eloko moko na likanisi ya mabe te,*+ 23 to soki amoni ye te mpe abwakeli ye libanga mpe azalaki monguna na ye te to azalaki koluka kosala ye mabe te, mpe moto yango akufi, 24 liyangani ekokata likambo kati na moto oyo abɛti ye mpe mozongisi mabe mpo na makila, na kolanda bikateli oyo wana.+ 25 Bongo liyangani ekobikisa moto oyo abomi moto na lobɔkɔ ya mozongisi mabe mpo na makila, mpe ekozongisa ye na engumba na ye ya ekimelo epai akimaki, mpe asengeli kofanda kati na yango tii na liwa ya nganga-nzambe monene, oyo atyamaki mafuta mosantu.+
26 “‘Kasi soki moto oyo abomi moto abimi na ndelo ya engumba na ye ya ekimelo epai akimaki, 27 mpe soki mozongisi mabe mpo na makila akutani na ye na libándá ya ndelo ya engumba na ye ya ekimelo, mpe abomi mobomi-moto yango, azali na ngambo ya makila te. 28 Mpo asengelaki kofanda na kati ya engumba na ye ya ekimelo tii na liwa ya nganga-nzambe monene. Kasi nsima ya liwa ya nganga-nzambe monene, moto oyo abomi moto akoki kozonga na mabele na ye.+ 29 Yango ekozala mpo na bino mobeko ya lisambisi na boumeli ya mabota na bino mpe bisika na bino nyonso oyo bokofanda.
30 “‘Moto nyonso oyo abomi moto* akobomama lokola mobomi-moto+ na maloba ya monɔkɔ ya batatoli,+ kasi moto* moko te akobomama na litatoli ya moto kaka moko. 31 Bosengeli te kozwa lisiko mpo na bomoi* ya mobomi-moto oyo abongi kokufa, mpo akobomama mpenza.+ 32 Mpe bosengeli te kozwa lisiko mpo na moto oyo akimi na engumba na ye ya ekimelo, mpo na kopesa ye nzela azonga kofanda na mokili na ye liboso ya liwa ya nganga-nzambe monene.
33 “‘Bosengeli te kobebisa mokili epai bozali; mpo makila ebebisaka mokili,+ mpe kozipama ya masumu ya mokili ekozala te mpo na makila oyo esopami likoló na yango, longola kaka na makila ya moto oyo asopi yango.+ 34 Osengeli te kokómisa mbindo mokili epai bozali kofanda, mokili epai nazali kofanda; mpo ngai, Yehova, nazali kofanda na kati ya bato ya Yisraele.’”+
36 Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Gileade mwana ya Makire,+ mwana ya Manase na mabota ya bana ya Yozefe bapusanaki mpe balobaki liboso ya Moize mpe bankumu, bakonzi ya mabota ya Bayisraele. 2 Balobaki ete: “Yehova apesaki nkolo na ngai mitindo ya kokabolela Bayisraele mokili lokola libula na kobwaka mbɛsɛ;+ mpe nkolo na ngai azwaki mitindo epai ya Yehova ya kopesa libula ya ndeko na biso ya mobali Zelofehade epai ya bana na ye ya basi.+ 3 Soki babalani na mibali ya mabota mosusu ya Bayisraele, libula ya basi yango ekolongolama na libula ya batata na biso mpe ekobakisama na libula ya libota oyo bango bakɔti, bongo ekolongolama na mabele ya libula na biso. 4 Sikoyo soki Yubilé+ ekómi mpo na bato ya Yisraele, libula ya basi yango ekobakisama mpe na libula ya libota oyo bakɔti, boye libula na bango ekolongolama na libula ya libota ya batata na biso.”
5 Bongo, na etinda ya Yehova, Moize apesaki Bayisraele mitindo ete: “Libota ya bana ya Yozefe ezali koloba malamu. 6 Talá mitindo oyo Yehova apesi mpo na bana basi ya Zelofehade, alobi: ‘Bakoki kobalana na bato oyo bango balingi. Kasi bakobalana kaka na bato ya libota ya etuluka ya batata na bango. 7 Libula ya Bayisraele ekolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu te, mpo Bayisraele bakokangama na libula ya libota ya bankɔkɔ na bango. 8 Mpe mwana mwasi nyonso oyo azwi libula kati na mabota ya Yisraele akokóma mwasi ya moto ya libota ya tata na ye,+ mpo Bayisraele bábatela libula ya bankɔkɔ na bango. 9 Libula moko te ekolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, mpo mabota ya Yisraele ekokangama na libula na yango moko.’”
10 Bana basi ya Zelofehade basalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+ 11 Na yango, Mahala, Tireza, Hogla, Milka ná Noa, bana basi ya Zelofehade,+ babalanaki na bana mibali ya bandeko mibali ya tata na bango. 12 Bakómaki basi ya mibali ya mabota ya Manase mwana ya Yozefe, mpo libula na bango ekoba kozala na libota ya tata na bango.
13 Wana nde mitindo mpe bikateli oyo Yehova apesaki Bayisraele na nzela ya Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani, na Yeriko.+
Ebengami mpe “Mituya.”
Lil., “bana ya Yisraele.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mopaya moko te,” elingi koloba, moto oyo azali Molevi te.
Lil., “na kolanda mampinga.”
To, “kobatela; kosala.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “lobɔkɔ na bango ekotondisama na nguya.”
Lil., “mopaya,” elingi koloba, moto oyo azali na libota ya Arona te.
Lil., “oyo bafungoli libumu.”
To, “rido.”
To, “rido.”
To, “rido.”
Lil., “Mopaya moko te,” elingi koloba, moto oyo azali Molevi te.
Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.
To, “na kolanda shekele mosantu.”
Gera moko = 0,57 g. Talá Ap. B14.
Lil., “monɔkɔ.”
To, “putulu ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta,” elingi koloba, putulu oyo esangani na mafuta ya bambeka.
To, “mbuma ya kosala farini.”
To, “rido.”
To, “rido.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “Basengeli.”
Lil., “basali.”
Moko ya bandambo zomi ya efa = 2,2 L. Tála Ap. B14.
To, “mbuma ya kosala farini.”
Ekoki mpenza kozala, kozanga kobota.
Ekoki mpenza kozala, binama ya kobotela.
To, “Ezala bongo! Ezala bongo!”
Ekoki mpenza kozala, kozanga kobota.
Liloba ya Ebre nazir, elimboli, “moto oyo akabwani na basusu; moto amipesi; moto oyo atyami pembeni.”
To, “molimo oyo ekufi.”
To, “akómisi motó ya Bonaziri na ye mbindo.”
Lolenge moko ya ebenga ya zamba oyo ezalaka moke.
To, “molimo.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mbuma ya kosala farini.”
To, “kokokola motó ya Bonaziri na ye.”
Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.
To, “na kolanda shekele mosantu.”
To, “mbuma ya kosala farini.”
To, “kibakuli ya moke.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ye.”
Lil., “akoningisa epai na epai.”
Lil., “okoningisa bango epai na epai.”
Lil., “okoningisa bango epai na epai.”
To, “bana nyonso ya liboso oyo bafungoli mabumu.”
Lil., “aningisaki bango epai na epai.”
Lil., “kati na mpokwa mibale.”
Lil., “kati na mpokwa mibale.”
To, “molimo ya moto.”
To, “molimo ya moto.”
To, “molimo ya moto.”
Lil., “kati na mpokwa mibale.”
To, “molimo.”
Lil., “kolongolama.”
To, “boyuli.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mampinga.”
Elingi koloba, Yetro.
To, “miso.”
To, “bamiriade.”
Elimboli, “kozika,” elingi koloba, kopɛla ya mɔtɔ.
Emonani ete ezali baoyo bazalaki Bayisraele te, oyo bazalaki kati na bango.
Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
To, “bokoyoka yango mpii.”
Lil., “mibali oyo bazali kotambola na makolo,” elingi koloba, mibali oyo babongisami mpo na etumba.
To, “babandaki kosakola.”
Lipeko moko = 44,5 cm. Talá Ap. B14.
Homɛrɛ moko = 220 L. Talá Ap. B14.
Elimboli, “bankunda ya bilulela.”
To, “ezaleli ya boboto koleka moto mosusu nyonso.”
Lil., “Na ndako na ngai mobimba, ye nde amonisi ete azali sembo.”
Lil., “Nalobaka na ye monɔkɔ na monɔkɔ.”
Elingi koloba, koluka koyeba makambo etali mokili ya Kanana.
To, “Yehoshua,” oyo elimboli, “Yehova azali lobiko.”
To, “ekɔtelo ya Hamate.”
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
Elimboli, “etuka ya mbuma ya vinyo.”
To, “bana ya.”
Na bisika mosusu babengaka yango “mapalela to makɔnkɔ.”
Lil., “mpo bazali limpa mpo na biso.”
Lil., “lokola moto moko.”
To, “boboto monene.”
To, “lobwaku patatalu.”
Lil., “natombolaki lobɔkɔ na ngai.”
Lil., “bondumba.”
To, “kozwa ngai lokola monguna.”
Lil., “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
Moko ya bandambo zomi ya efa = 2,2 L. TálaAp. B14.
Hini moko = 3,67 L. Tála Ap. B14.
To, “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “bilei.”
To, “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “mbuma ya kosala farini.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “kolongolama.”
To, “molimo.”
To, “mbuma ya kosala farini.”
Lil., “Nzambe ya bilimo ya bikelamu nyonso ya mosuni.”
Lil., “efungoli monɔkɔ na yango.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “efungolaki monɔkɔ.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “basalelaki milimo na bango moko lisumu.”
Lil., “mopaya moko te.”
Lil., “mopaya,” elingi koloba, moto oyo azali na libota ya Arona te.
Lil., “mopaya,” elingi koloba, moto oyo azali na libota ya Arona te.
To, “mbuma ya kosala farini.”
Elingi koloba, eloko oyo esantisami mpo na Nzambe, ekoki kobongwana te mpe ekoki kosombama ata moke te.
Lil., “ya mosuni nyonso.”
Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.
To, “shekele mosantu.”
Gera moko = 0,57 g. Talá Ap. B14.
Lil., “kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
Elingi koloba, kondimana ya libela mpe oyo ebongwanaka te.
To, “ebembe ya molimo nyonso ya moto.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na yango.”
To, “molimo.”
Lil., “kolongolama.”
To, “milimo.”
To, “molimo.”
Lil., “kolongolama.”
To, “molimo.”
Elimboli, “koswanisa.”
Lil., “mikolo.”
Lil., “lobɔkɔ.”
Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.
Lil., “akoyanganisama mpe akokufa kuna.”
Elimboli, “epesami mpo na kobebisama.”
To, “milimo ya bato ekokaki.”
To, “milimo na biso ekómi.”
To, “koyoka mpii.”
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bawadi.”
Lil., “monɔkɔ.”
To, “bawadi.”
To, “Bóyembela yango!”
Lil., “mokili.”
To mbala mosusu, “mokili ekauká; esobe.”
To, “ezali zingazinga.”
To, “ezali zingazinga.”
Ekoki mpenza kozala, Efrate.
To, “mokili.”
To, “mokili.”
Lil., “mpunda ya mwasi.”
Lil., “afungolaki monɔkɔ ya mpunda ya mwasi.”
To, “molimo na ngai ekufa.”
To, “ayoka mawa na likambo asali.”
To mbala mosusu, “mokili ekauká; esobe.”
Lil., “ezalaki malamu na miso ya.”
To, “bawadi.”
Ezali nkombo ya nzete moko oyo ebimisaka nsolo kitoko, eloko moko ya nzete yango ezalaki kosalelama lokola malasi na ntango ya kala.
To, “libota.”
Lil., “na motema na ngai.”
To, “na mikolo ya nsuka.”
To, “mpakatoi ya motó ya Moabe.”
To, “ekanganaki na.”
Lil., “baoyo nyonso bazali mitó.”
Lil., “liboso ya moi.”
To, “bakanganaki na.”
Lil., “efungolaki monɔkɔ na yango.”
To, “ekokabolama na kolanda motángo ya bankombo oyo ekomami.”
Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.
Lil., “Nzambe ya bilimo nyonso ya mosuni.”
To, “lokumu.”
To, “oyo ezali kokitisa motema na.” Lil., “kopemisa.”
Lil., “kati na mpokwa mibale.”
Moko ya bandambo zomi ya efa = 2,2 L. Talá Ap. B14.
Hini moko = 3,67 L. Tála Ap. B14.
To, “mbuma ya kosala farini.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
Lil., “kati na mpokwa mibale.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
Lil., “ya basanza na bino.”
To, “oyo ezali kokitisa motema.” Lil., “kopemisa.”
Lil., “limpa.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “mbuma ya kosala farini.”
To, “oyo ezali kokitisa motema.” Lil., “kopemisa.”
To, “bokoyokisa milimo na bino mpasi.” Mbala mingi maloba yango emonisaka lolenge mingi oyo moto ye moko andimi komipimela, na ndakisa kokila bilei.
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
To, “oyo ezali kokitisa motema ya.” Lil., “kopemisa.”
Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.
To, “mpo na limpinga.”
To, “mpo na limpinga.”
To, “bakaa na bango oyo ezingami na bifelo.”
To, “molimo.”
To, “bokopɛtola bilamba nyonso na lisumu.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “milimo ya bato ezalaki.”
To, “milimo.”
To, “milimo ya bato.”
To, “milimo na biso.”
Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “batongaki lisusu.”
Elimboli, “bamboka ya bahema ya Yaire.”
Lil., “mampinga.”
Lil., “mabɔkɔ likoló.”
To, “ebende oyo enyangwisami.”
Elingi koloba, Mbu Ekufá.
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, Mbu Monene, Mediterane.
Elingi koloba, Mediterane.
To, “ekɔtelo ya Hamate.”
Elingi koloba, laki ya Genezarete, to mbu ya Galile.
Lipeko moko = 44,5 cm. Talá Ap. B14.
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “wana abatami mpo na kozela ye.”
Lil., “abatami te mpo na kozela ye.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”