Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Yirimia 1:1-52:34
  • Yirimia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yirimia
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Yirimia

YIRIMIA

1 Oyo ezali maloba ya Yirimia* mwana ya Hilikiya, moko ya banganga-nzambe oyo bazalaki na Anatote+ na teritware ya Benyamina. 2 Yehova alobaki na ye na mikolo ya Yosiya+ mwana ya Amone,+ mokonzi ya Yuda, na mbula ya 13 ya boyangeli na ye. 3 Mpe Nzambe alobaki na ye lisusu na mikolo ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, tii na nsuka ya mbula ya 11 ya Zidikiya+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, tii ntango bato ya Yerusaleme bamemamaki na mboka mopaya na sanza ya mitano.+

4 Yehova alobaki na ngai boye:

 5 “Liboso nasala yo na kati ya libumu, nayebaki yo,*+

Mpe liboso obotama,* nasantisaki yo.*+

Nakómisaki yo mosakoli mpo na bikólo.”

 6 Kasi nalobaki ete: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso!

Nayebi koloba te,+ mpo nazali kaka mwana.”*+

 7 Bongo Yehova alobaki na ngai ete:

“Koloba te ete: ‘Nazali kaka mwana.’

Mpo osengeli kokende epai ya bato nyonso oyo nakotinda yo,

Mpe osengeli koloba likambo nyonso oyo nakopesa yo mitindo.+

 8 Kobanga bango te,+

Mpo ‘nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo,’+ yango nde liloba ya Yehova.”

9 Bongo Yehova asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki monɔkɔ na ngai.+ Mpe Yehova alobaki na ngai: “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo.+ 10 Talá, lelo oyo napesi yo mokumba ya kozala likoló ya bikólo mpe likoló ya makonzi, mpo na kopikola mpe kokweisa, kobebisa mpe kobuka, kotonga mpe kolona.”+

11 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: “Yirimia, ozali komona nini?” Nayanolaki: “Nazali komona etape ya nzete ya amande.”*

12 Yehova alobaki na ngai ete: “Omoni malamu, mpo nazali mpenza kosɛnzɛla mpo na kokokisa liloba na ngai.”

13 Yehova alobaki na ngai mpo na mbala ya mibale ete: “Ozali komona nini?” Nayanolaki ye: “Nazali komona nzungu* oyo ezali kotɔka,* mpe monɔkɔ na yango etɛngami longwa na nɔrdi.” 14 Bongo, Yehova alobaki na ngai ete:

“Mpasi ekouta na nɔrdi

Ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mokili.+

15 Mpo ‘nazali kobengisa mabota nyonso ya makonzi ya nɔrdi,’ yango nde liloba ya Yehova,+

‘Mpe bakoya; mokomoko na bango akotya kiti na ye ya bokonzi

Na esika ya kokɔta na baporte ya Yerusaleme,+

Liboso ya bifelo na yango zingazinga

Mpe liboso ya bingumba nyonso ya Yuda.+

16 Mpe nakoyebisa bango bitumbu mpo na mabe na bango nyonso,

Mpo basundolaki ngai,+

Mpe bazali kotumba bambeka* mpo na banzambe mosusu+

Mpe bazali kogumbamela misala ya mabɔkɔ na bango.’+

17 “Kasi yo, osengeli komibongisa mpo na kosala.*

Mpe osengeli kotɛlɛma mpe koloba na bango makambo nyonso oyo nazali kopesa yo mitindo.

Kolɛnga liboso na bango te,+

Soki te nakosala ete olɛnga liboso na bango.

18 Mpo lelo nakómisi yo engumba oyo ebatelami makasi,

Likonzí ya ebende mpe bifelo ya kwivrɛ mpo na kotɛmɛla mokili mobimba,+

Liboso ya bakonzi ya Yuda, mpe ya bankumu na yango,

Liboso ya banganga-nzambe mpe ya bato ya mokili.+

19 Mpe bakobunda mpenza na yo,

Kasi bakolonga yo te,

Mpo ‘nazali elongo na yo+ mpo na kobikisa yo,’ yango nde liloba ya Yehova.”

2 Yehova alobaki na ngai ete: 2 “Kende mpe lobá na bato ya Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:

“Nabosani te bolingo* oyo omonisaki ntango ozalaki elenge,+

Bolingo oyo omonisaki ntango tolakanaki libala,+

Ndenge olandaki ngai ntango natambwisaki yo na esobe,

Na mokili oyo baloná mboto te.+

 3 Yisraele azalaki mosantu mpo na Yehova,+ mbuma ya liboso mpo na Ye.”’

‘Moto nyonso oyo akosala ye mabe akomema ngambo.

Mpasi ekoyela bango,’ Yehova alobi bongo.”+

 4 Bóyoka liloba ya Yehova, Ee bino bana ya Yakobo,

Mpe mabota nyonso ya bato ya Yisraele.

 5 Talá oyo Yehova alobi:

“Libunga nini batata na bino bamonaki epai na ngai,+

Mpo bákóma mosika na ngai,

Mpe básambela bikeko ezangá ntina+ mpe bango moko bákóma mpamba?+

 6 Batunaki te ete: ‘Yehova azali wapi,

Moto oyo abimisaki biso na mokili ya Ezipito,+

Moto oyo atambwisaki biso na esobe,

Na mokili oyo ekauká+ mpe ya mabulu,

Na mokili oyo ezangá mai+ mpe ya molili makasi,

Na mokili oyo moto azalaki koleka te

Mpe esika oyo ata moto moko te azalaki kofanda?’

 7 Na nsima namemaki bino na mokili ya elanga ya banzete ya mbuma,

Mpo bólya mbuma na yango mpe biloko na yango ya kitoko.+

Kasi bokɔtaki mpe bokómisaki mokili na ngai mbindo;

Bokómisaki libula na ngai eloko oyo eyinamá.+

 8 Banganga-nzambe batunaki te ete: ‘Yehova azali wapi?’+

Bato oyo bateyaka mobeko bayebaki ngai te,

Babateli ya mpate batombokelaki ngai,+

Basakoli basakolaki na nkombo ya Baala,+

Mpe balandaki baoyo bakokaki kopesa ata litomba moko te.

 9 ‘Na yango nakobunda na bino lisusu,’+ yango nde liloba ya Yehova,

‘Mpe nakobunda na bana ya bana na bino.’

10 ‘Kasi bókatisa tii na mikili* ya Kitime oyo ezali pembeni ya mbu+ mpe bómona.

Ɛɛ, bótinda moto na Kedare+ mpo atala malamumalamu;

Mpe amona soki likambo ya boye esalemá.

11 Ekólo nini esilá kotya banzambe oyo ezalaka te na esika ya banzambe na yango?

Kasi bato na ngai batye eloko ezangi ntina na esika ya nkembo na ngai.+

12 Bino likoló, bótikala monɔkɔ polele na likambo oyo;

Nsɔmɔ makasi elɛngisa bino,’ Yehova alobi bongo,

13 ‘Mpo bato na ngai basali makambo mibale ya mabe:

Basundoli ngai, liziba ya mai ya bomoi,+

Mpe bamitimweli* mabulu,

Mabulu oyo ebukaná, oyo ekoki kobomba mai te.’

14 ‘Yisraele azali nde mosaleli, to moombo oyo abotami na ndako?

Kasi mpo na nini akómi eloko ya kopunza?

15 Bana-nkɔsi* ezali kogangela ye;+

Ezali koganga makasi.

Ekómisi mokili na ye eloko ya nsɔmɔ.

Bingumba na ye etyami mɔtɔ, mpe moto ata moko te afandi kuna.

16 Bato ya Nofe*+ mpe Tahapanese+ balyaka na nsɔngɛ ya motó na yo.

17 Yango te nde omilukelaki

Na ndenge osundolaki Yehova Nzambe na yo+

Na ntango oyo azalaki kotambwisa yo na nzela?

18 Sikoyo mpo na nini olingi kozwa nzela ya Ezipito,+

Mpo na komɛla mai ya Shihore?*

Mpo na nini olingi kozwa nzela ya Asiri+

Mpo na komɛla mai ya Ebale?*

19 Mabe na yo esengeli koteya yo,

Mpe misala na yo ya kozanga bosembo esengeli kopamela yo.

Yebá mpe moná ete ndenge osundoli Yehova Nzambe na yo

Ezali likambo moko ya mabe mpe ya bololo;+

Obangi ngai te,’+ Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga alobi bongo.

20 ‘Mpo kala nabebisaki ekanganeli na yo;+

Mpe nakataki minyɔlɔlɔ na yo.

Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,”

Mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+

Ozalaki komitanda mpe kosala bondumba.+

21 Nalonaki yo lokola nzete ya vinyo ya motane ya kitoko koleka,+ yango nyonso ezalaki momboto ya malamu.

Bongo ndenge nini obongwani liboso na ngai mpe okómi bitape oyo ebebi ya nzete ya vinyo ya bopaya?’+

22 ‘Ata soki omisukoli na mungwa ya bonkɔkɔ mpe osaleli sabuni ebele,

Okozala kaka na ngambo liboso na ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

23 Ndenge nini okoki koloba ete: ‘Namikómisi mbindo te.

Nasambeli Babaala te’?

Talá nzela na yo na lobwaku.

Talá makambo oyo osali.

Ozali lokola mwana-kamela ya mwasi ya mbangu

Oyo azali kopota bipotela epai na epai na banzela na ye,

24 Lokola mpunda ya zamba oyo emesaná na esobe,

Oyo ezali kobenda mopɛpɛ na zolo na mposa na yango.*

Nani akoki kopekisa yango ntango eyoki mposa ya kosangisa nzoto?

Baoyo nyonso bazali koluka yango bakolɛmba te.

Bakozwa yango na eleko na yango.*

25 Tɛlɛmá liboso ete otikala makolo ngulu,

Mpe mongongo na yo ekauka na mposa ya mai.

Kasi olobaki ete: ‘Nakobongola makanisi te!+

Te! Nalingi nde bapaya,*+

Mpe nakolanda bango.’+

26 Bayisraele bakoyokisama nsɔni

Lokola nsɔni oyo moyibi ayokaka ntango bakangi ye,

Bango, bakonzi na bango, mpe bankumu na bango,

Banganga-nzambe na bango mpe basakoli na bango.+

27 Bazali koloba na nzete ete: ‘Ozali tata na ngai,’+

Mpe na libanga: ‘Yo nde obotaki ngai.’

Bapesi ngai mokɔngɔ, kasi elongi na bango te.+

Mpe ntango bakozala na mpasi, bakoloba:

‘Tɛlɛmá mpe bikisá biso!’+

28 Sikoyo wapi banzambe na yo oyo omisaleli?+

Bátɛlɛma soki bakoki kobikisa yo ntango okozala na mpasi.

Mpo banzambe na yo, Ee Yuda, bakómi ebele lokola bingumba na yo.+

29 ‘Mpo na nini bozali kaka kobunda na ngai?

Mpo na nini bino nyonso bozali kotombokela ngai?’+ Yehova alobi bongo.

30 Nabɛti bana na bino kaka mpamba,+

Kasi bandimi disiplini te.+

Mopanga na bino moko elei basakoli na bino,+

Lokola nkɔsi oyo ezali kobebisa.

31 Ee libota, bótala bino moko liloba ya Yehova.

Nakómi epai ya Yisraele lokola esobe

To mokili ya molili oyo ezali kobangisa?

Mpo na nini bato oyo, bato na ngai, balobi ete: ‘Tozali kaka koyengayenga.

Tokoya epai na yo lisusu te’?+

32 Ngɔndɔ akoki nde kobosana biloko na ye ya kobongisa nzoto,

Mwasi ya libala bankamba na ye ya ntolo?

Kasi, bato na ngai babosani ngai ntango molai.+

33 Mpo na nini omibongisi malamu mpo na koluka mibali ete bálinga yo!

Oyekoli ndenge ya kosala mabe.+

34 Ata bilamba na yo ezali na makila ya babola oyo bazali na likambo te.+

Kasi nakutaki bango te bazali kobuka ndako na yo,

Makila na bango ezali nde na bilamba na yo nyonso.+

35 Kasi olobi ete: ‘Nazali na likambo te.

Ya solo mpenza azali koyokela ngai lisusu nkanda te.’

Sikoyo nazali kopesa yo etumbu

Mpo olobi: ‘Nasali lisumu te.’

36 Mpo na nini ozali komona ete kobongola nzela na yo ezali likambo ya mpamba?

Okoyoka mpe nsɔni mpo na Ezipito,+

Kaka ndenge oyokaki nsɔni mpo na Asiri.+

37 Mpo na ntina yango mpe, okobima otye mabɔkɔ na motó mpo na nsɔni,+

Mpo Yehova aboyi biloko na yo oyo ozali kotyela motema,

Ekosalisa yo te.”

3 Bato bamitunaka: “Soki mobali moko abengani mwasi na ye mpe mwasi yango akei, mpe akómi mwasi ya mobali mosusu, mobali yango akozongela ye lisusu?”

Mokili yango mobimba ekómi mbindo te?+

“Osali bondumba na mibali ebele,+

Mpe sikoyo osengeli nde kozongela ngai?” Yehova alobi bongo.

 2 “Tombolá miso na yo na bangomba mike oyo ezali polele mpe moná.

Esika nini oyo basangisi na yo nzoto na makasi te?

Ofandaki pembeni ya banzela mpo na kozela mibali na yo,

Lokola moto oyo ayengayengaka* na esobe.

Ozali kaka kokómisa mokili mbindo

Na bondumba mpe na mabe na yo.+

 3 Na yango, bapimeli yo mbula monene,+

Mpe ata mbula ya eleko ya prɛnta ezali te.

Elongi na yo esilá nsɔni lokola ya mwasi oyo azali kosala bondumba;

Oboyi koyoka nsɔni.+

 4 Kasi obeleli ngai sikoyo ete:

‘Tata na ngai, ozali moninga na ngai banda bolenge na ngai!+

 5 Okokanga nkanda mpo na libela,

To okokoba kotala masumu na biso mpo na libela?’

Yango nde ozali koloba,

Kasi ozali kokoba kosala makambo nyonso ya mabe oyo okoki kosala.”+

6 Na mikolo ya mokonzi Yosiya,+ Yehova alobaki na ngai boye: “‘Omoni likambo Yisraele oyo azangi bosembo asali? Amati na ngomba nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa mpo asala bondumba.+ 7 Ata nsima ya kosala makambo nyonso wana, nazalaki kaka koloba na ye ete azongela ngai,+ kasi azongaki te; mpe Yuda azalaki kaka kotala ndeko na ye ya mwasi oyo azali na bokosi.+ 8 Ntango namonaki bongo, nabenganaki Yisraele oyo azangi bosembo mpe napesaki ye mokanda ya koboma libala+ mpo na ekobo na ye.+ Kasi Yuda, ndeko na ye ya mwasi oyo azali kosala na bokosi, abangaki te, ye mpe akendaki mpe asalaki bondumba.+ 9 Amonaki bondumba na ye mabe te mpe azalaki kaka kokómisa mokili mbindo, mpe kosala ekobo na mabanga mpe na banzete.+ 10 Atako nyonso wana, Yuda ndeko na ye ya mwasi oyo azali kosala na bokosi azongelaki ngai na motema na ye mobimba te, kasi kaka na lokuta,’ Yehova alobi bongo.”

11 Yehova alobaki na ngai lisusu boye: “Yisraele oyo azangi bosembo amimonisi ete azali sembo koleka Yuda oyo azali kosala na bokosi.+ 12 Kende mpe sakolá maloba oyo epai na nɔrdi:+

“‘“Zongá, Ee Yisraele mopɛngwi,” Yehova alobi bongo.’+ ‘“Nakotala bino na nkanda te,*+ mpo nazali sembo,” Yehova alobi bongo.’ ‘“Nakokanga nkanda mpo na libela te. 13 Ndimá ete omemi ngambo, mpo otombokeli Yehova Nzambe na yo. Ozalaki kaka kolanda bapaya* na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa, kasi otosaki ngai te,” Yehova alobi bongo.’”

14 “Bózonga, Ee bino bana bapɛngwi,” Yehova nde alobi bongo. “Mpo ngai moko nakómi nkolo na bino;* mpe nakozwa bino, moko na engumba moko mpe mibale na libota moko, mpe nakomema bino na Siona.+ 15 Mpe nakopesa bino babateli oyo bakosala makambo ndenge nalingi,*+ mpe bakoleisa bino na boyebi mpe na mayele ya kososola. 16 Bokokóma mingi mpe bokobota mbuma na mokili na mikolo yango,” Yehova alobi bongo.+ “Bakoloba lisusu te ete: ‘Sanduku ya kondimana ya Yehova!’ Mpe yango ekoya na motema te, bakokanisa yango te, bakolela yango te, bakosala yango lisusu te. 17 Na ntango yango, bakobenga Yerusaleme kiti ya bokonzi ya Yehova;+ mpe bikólo nyonso ekoyanganisama mpo na kosanzola nkombo ya Yehova na Yerusaleme,+ mpe bakolanda lisusu te na motó makasi nyonso motema mabe na bango.”

18 “Na mikolo yango, bato ya Yuda ná bato ya Yisraele bakotambola elongo,+ mpe bakobima elongo na mokili ya nɔrdi mpo na kokɔta na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino libula.+ 19 Mpe namilobaki ete: ‘Talá ndenge natyaki yo na katikati ya bana mibali mpe napesaki yo mokili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko na kati ya bikólo!’*+ Nalobaki lisusu boye: Okobelela ngai ete: ‘Tata na ngai!’ Mpe okotika te kolanda ngai. 20 ‘Ya solo, ndenge oyo mwasi asaleli mobali na ye* makambo na bokosi mpe atiki ye, Ee bato ya Yisraele, bosaleli ngai makambo na bokosi,’+ Yehova alobi bongo.”

21 Lokito eyokani na bangomba mikemike oyo ezali polele,

Kolela mpe mabondeli* ya bato ya Yisraele,

Mpo babebisi nzela na bango;

Babosani Yehova Nzambe na bango.+

22 “Bózonga, bino bana bapɛngwi.

Nakobikisa bino na lipɛngwi na bino.”+

“Biso oyo! Toyei epai na yo, mpo yo,

Ee Yehova, ozali Nzambe na biso.+

23 Ya solo, bangomba mike mpe yikiyiki likoló ya bangomba ezali ya solo te.+

Ya solo, lobiko ya Yisraele ekouta epai ya Yehova Nzambe na biso.+

24 Kasi, banda bolenge na biso, eloko ya nsɔni* elyá mosala ya makasi ya bankɔkɔ na biso,+

Bitonga na bango ya bampate mpe ya bangɔmbɛ,

Bana na bango ya mibali mpe ya basi.

25 Tólala na kati ya nsɔni na biso,

Mpe kosambwa na biso ezipa biso,

Mpo tosaleli Yehova Nzambe na biso lisumu,+

Biso ná batata na biso banda bolenge na biso tii na mokolo ya lelo,+

Mpe totosi te Yehova Nzambe na biso.”

4 Yehova alobi boye: “Soki okozonga, Ee Yisraele,”

“Soki okozongela ngai.

Mpe soki okolongola bikeko na yo ya bosɔtɔ liboso na ngai,

Okozala te lokola moto oyo azali kokimakima.+

 2 Mpe soki olapi ndai na bosolo, na bosembo mpe na boyengebene ete:

‘Lokola Yehova azali mpenza na bomoi,’

Na yango bato ya bikólo bakomizwela lipamboli na nzela na ye,

Mpe bakomikumisa mpo na ye.”+

3 Mpo talá oyo Yehova alobi na bato ya Yuda mpe na Yerusaleme:

“Bótimola mabele oyo ebongi na bilanga,

Mpe bókoba te kolona na kati ya nzubɛ.+

 4 Bino bato ya Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme,

Bókatama ngenga mpo na Yehova,

Mpe bólongola misutu ya mitema na bino+

Mpo nkanda na ngai engala te lokola mɔtɔ,

Ezikisa mpe moto ya koboma yango azala te,

Mpo na misala na yo ya mabe.”+

 5 Bóyebisa yango na Yuda, mpe bósakola yango na Yerusaleme.

Bóganga mpe bóyula liseke na mokili mobimba.+

Bóbelela na mongongo makasi mpe bóloba ete: “Bóyangana,

Mpe tókima na bingumba oyo ebatelami makasi.+

 6 Bótɛlɛmisa elembo oyo ememi na Siona.

Bóluka esika ya komibatela mpe bótɛlɛma te,”

Mpo nazali kobimisa mpasi moko longwa na nɔrdi,+ libebi moko monene.

 7 Lokola nkɔsi oyo ezali kobima na mwa zamba na yango;+

Mobebisi ya bikólo asimbi nzela akei.+

Abimi na esika na ye mpo na kokómisa mokili na yo eloko ya nsɔmɔ.

Bingumba na yo ekobebabeba mpe moto ata moko te akofanda kuna.+

 8 Mpo na yango, bólata ngɔtɔ.*+

Bózala na mawa* mpe bóganga na kolela,

Mpo nkanda ya kongala ya Yehova elongwe naino epai na biso te.

 9 Yehova alobi boye: “Na mokolo yango,” “mokonzi akozanga mpiko,*+

Bankumu mpe bakozanga mpiko;*

Banganga-nzambe bakozala na nsɔmɔ, mpe basakoli bakotikala monɔkɔ polele.”+

10 Bongo nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Ya solo, okosi mpenza bato oyo+ mpe Yerusaleme, na ndenge olobi ete: ‘Bokozala na kimya,’+ kasi mopanga ezali na nkingo na biso.”*

11 Na ntango yango, bakoloba na bato oyo mpe na Yerusaleme boye:

“Mopɛpɛ moko oyo ekaukisaka oyo euti na bangomba mike ya polele na mokili moko oyo ekauká

Ekobɛta mwana mwasi ya* bato na ngai;

Ekoya te mpo na kopupola mbuma to kopɛtola yango.

12 Na etinda na ngai mopɛpɛ makasi eutaka na bisika yango.

Sikoyo nakoyebisa bango bikateli na ngai.

13 Talá! Akoya lokola mapata ya mbula,

Mpe makalo na ye ezali lokola mopɛpɛ makasi.+

Bampunda na ye ezali na mbangu koleka bampongo.+

Mawa na biso, mpo tobebisami!

14 Ee Yerusaleme, pɛtolá motema na yo, mabe elongwa mpo obika.+

Tii ntango nini okoumela na makanisi na yo ya mabe?

15 Mpo mongongo moko ezali koyebisa nsango uta na Dani+

Mpe ezali kosakola libebi uta na bangomba ya Efraime.

16 Bóyebisa yango, ɛɛ, epai ya bikólo.

Bósakwela yango Yerusaleme.”

“Bakɛngɛli* bazali koya, bauti na mokili ya mosika,

Mpe bakotombolela bingumba ya Yuda mingongo na bango.

17 Bazingi ye bipai nyonso lokola bakɛngɛli ya elanga,+

Mpo atombokeli ngai,”+ Yehova alobi bongo.

18 “Okofuta mpo na etamboli mpe misala na yo.+

Mpasi makasi ekokómela yo,

Mpo ekokóma tii na motema na yo!”

19 Aa natungisami mpenza,* natungisami mpenza!

Nayoki mpasi makasi na motema na ngai.*

Motema na ngai ebɛti makasi.

Nakoki kofanda nyɛɛ te,

Mpo nayoki lokito ya liseke,

Elembo ya kokebisa mpo na etumba.*+

20 Kaka nsango ya mpasi nde ezali koyokana,

Mpo mokili mobimba ebebisami.

Na pwasa, bahema na ngai ebebisami,

Mpe bilamba ya hema na ngai ebebisami na mbala moko.+

21 Tii ntango nini nakokoba komona elembo,

Nakokoba koyoka lokito ya liseke?+

22 “Mpo bato na ngai bazali bazoba;+

Batyeli ngai likebi te.

Bazali bana oyo bazangi mayele, bazali na bososoli te.

Bazali na mayele* mingi mpo na kosala mabe,

Kasi bayebi te ndenge ya kosala malamu.”

23 Namonaki mokili, mpe talá! etikalaki mpamba mpe esundolamaki.+

Natalaki likoló, mpe pole na yango ezalaki lisusu te.+

24 Namonaki bangomba, mpe talá! ezalaki koningana,

Mpe bangomba mike ezalaki kolɛnga.+

25 Namonaki, mpe talá! moto moko te azalaki,

Mpe bandɛkɛ nyonso ya likoló ekimaki.+

26 Namonaki, mpe talá! elanga ya banzete ya mbuma ekómaki esobe,

Mpe bingumba na yango nyonso ebebisamaki.+

Ezalaki mpo na Yehova,

Mpo na nkanda na ye ya kongala.

27 Mpo talá oyo Yehova alobi: “Mokili mobimba ekotikala mpamba,+

Kasi nakobebisa yango nyonso te.

28 Mpo na ntina yango mokili ekolela,+

Mpe kuna na likoló ekoyinda.+

Ezali mpo nalobi, nazwi ekateli,

Mpe nakobongola makanisi na ngai te,* nakozonga mpe nsima te.+

29 Na lokito ya bato oyo batambolaka na bampunda mpe ya bato oyo babwakaka mbanzi na litimbo,

Engumba mobimba ekimi.+

Bakɔti na mwa bazamba,

Bazali komata na mabanga.+

Engumba nyonso esundolami,

Mpe moto moko te azali kofanda kuna.”

30 Sikoyo, lokola obebisami, okosala nini?

Ozalaki kolata bilamba ya motane makasi,

Ozalaki kolata biloko ya wolo oyo ebongisaka nzoto,

Mpe ozalaki kokómisa miso na yo minene na langi ya monzɛlɛ ya moindo.

Kasi ozalaki komikómisa kitoko kaka mpamba,+

Mpo baoyo bazalaki kolula yo babwaki yo;

Sikoyo bazali koluka koboma yo.*+

31 Mpo nayoki mongongo lokola ya mwasi oyo azali na maladi,

Mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso,

Mongongo ya mwana mwasi ya Siona oyo azali kaka kopema na mpasi.

Azali kosembola mabɔkɔ mpe koloba:+

“Aa mawa na ngai, nalɛmbi* mpo na babomi!”

5 Bótambola epai na epai na babalabala ya Yerusaleme.

Bótala zingazinga na bino mpe bóluka koyeba.

Bóluka na bisika na yango minene ya bato nyonso soki bokomona

Moto moko oyo azali kosala na bosembo,+

Moto moko oyo azali koluka kozala moyengebene,

Mpe nakolimbisa engumba yango.

 2 Ata soki balobi: “Lokola Yehova azali solo na bomoi!”

Bakolapa kaka ndai ya lokuta.+

 3 Ee Yehova, miso na yo elukaka bosembo te?+

Obɛtaki bango, kasi esalaki bango eloko te.*

Osilisaki bango nyɛɛ, kasi baboyaki kondima disiplini.+

Bakómisaki bilongi na bango makasi koleka libanga,+

Mpe baboyaki kozonga nsima.+

 4 Yango wana ngai nalobaki boye: “Ya solo bazali mpenza bato mpamba.

Basali makambo na bozoba, mpo baboyi nzela ya Yehova,

Bikateli ya Nzambe na bango.

 5 Nakokende kosolola na bato ya lokumu,

Mpo bayebaki malamu mokano* ya Yehova,

Bikateli ya Nzambe na bango.+

Kasi bango nyonso babukaki ekanganeli

Mpe bakataki bansinga.”

 6 Yango wana nkɔsi ya zamba ebundisi bango,

Mbwa ya zamba ya mokili patatalu oyo ekauká ezali kopunza bango,

Nkoi ezali kosɛnzɛla na bingumba na bango.

Moto nyonso oyo azali kobima kuna azali kopasolama bitenibiteni.

Mpo makambo na bango ya kobuka mibeko ezali mingi;

Misala na bango ya kozanga bosembo ezali ebele.+

 7 Ndenge nini nakoki kolimbisa yo na likambo oyo?

Bana na yo basundoli ngai,

Mpe balapi ndai na nkombo ya eloko oyo ezali Nzambe te.+

Nakokisaki bamposa na bango,

Kasi bakobaki kosala ekobo,

Mpe bazalaki kosopana ebele na ndako ya mwasi ya ndumba.

 8 Bazali lokola bampunda oyo ezali na mposa makasi ya kosangisa nzoto.

Moto na moto azali kobelela mwasi ya moto mosusu.+

 9 “Nasengeli te kosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na makambo wana?” Yehova alobi bongo.

“Nasengeli te* kozongisa mabe na ekólo ya boye?”+

10 “Bómata na milɔngɔ na ye ya banzete ya vinyo mpe bóbebisa yango,

Kasi bósilisa yango nyonso te.+

Bólongola bitape na yango ya sika,

Mpo ezali ya Yehova te.

11 Mpo libota ya Yisraele mpe libota ya Yuda

Esaleli ngai mpenza makambo na bokosi,” Yehova alobi bongo.+

12 “Bawangani Yehova, mpe bazali kaka koloba,

‘Akosala eloko te.*+

Mpasi moko te ekoyela biso;

Tokomona etumba te to nzala te.’+

13 Maloba ya basakoli ezali mpamba,

Liloba ya Nzambe ezali na kati na bango te.

Bakokómisama mpamba ndenge maloba na bango ezali.”

14 Na yango, talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, alobi:

“Lokola bato oyo bazali koloba boye,

Talá! nazali kokómisa maloba na ngai mɔtɔ na monɔkɔ na yo,+

Mpe bato oyo bazali nkoni,

Mpe mɔtɔ ekozikisa bango.”+

15 “Ee libota ya Yisraele, talá! nazali komemela bino ekólo moko uta na mosika,”+ Yehova alobi bongo.

“Ezali ekólo moko oyo eumeli.

Ekólo moko ya kala,

Ekólo oyo oyebi monɔkɔ na yango te,

Mpe oyo okoki kokanga ntina ya maloba na yango te.+

16 Libenga ya makula na bango ezali lokola lilita oyo efungwami;

Bango nyonso bazali babundi-bitumba.

17 Bakolya mbuma oyo obuki na bilanga na yo mpe limpa na yo.+

Bakolya bana na yo ya mibali mpe ya basi.

Bakolya bitonga na yo ya bampate mpe ya bangɔmbɛ.

Bakolya nzete na yo ya vinyo mpe ya figi.

Bakobebisa na mopanga bingumba na yo oyo ebatelami makasi, oyo ozali kotyela motema.”

18 Yehova alobi boye: “Ata na mikolo yango, nakosilisa bino nyonso te.”+ 19 Mpe ntango bakotuna ete: ‘Mpo na nini Yehova Nzambe na biso asali biso makambo oyo nyonso?’ Okoyanola bango boye: ‘Kaka ndenge bosundolaki ngai mpo na kosalela nzambe mopaya na mokili na bino, ndenge wana nde bokosalela bapaya na mokili oyo ezali ya bino te.’”+

20 Bóyebisa likambo oyo na libota ya Yakobo,

Mpe bósakola yango na Yuda, bóloba ete:

21 “Bóyoka likambo oyo, bino bazoba mpe bato oyo bozangá bososoli:*+

Bazali na miso, kasi bakoki komona te;+

Bazali na matoi, kasi bakoki koyoka te.+

22 Yehova alobi boye: ‘Bozali kobanga ngai te?

Bozali kolɛnga liboso na ngai te?

Ngai nde natyá zɛlo mpo ezala ndelo ya mbu,

Mobeko ya seko oyo mbu ekoki koleka te.

Ata soki mbonge na yango ezali kotombwatombwana, ekolonga te;

Ata soki etomboki, ekoki koleka ndelo na yango te.+

23 Kasi bato oyo bazali na motema makasi mpe ya botomboki;

Batiki ngai mpe balandi nzela na bango moko.+

24 Mpe balobi na motema na bango te ete:

“Sikoyo, tiká tóbanga Yehova Nzambe na biso,

Moto oyo apesaka biso mbula na ntango na yango,

Mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta,

Moto oyo abatelaka mpo na biso bapɔsɔ oyo etyamá mpo na kobuka mbuma.”+

25 Mabunga na bino moko nde esali ete bózwa bolamu oyo te;

Masumu na bino moko nde epekisi bino bózwa biloko ya kitoko.+

26 Mpo bato mabe bazali na kati ya bato na ngai.

Bazali kaka kotala na likebi, lokola ntango bakangi-ndɛkɛ bagunzamaka.

Batye motambo oyo ebomaka.

Bazali kokanga nde bato.

27 Lokola mwa ndako ya banyama oyo etondi na bandɛkɛ,

Bandako na bango mpe etondi na bokosi.+

Yango wana bakómi bato minene mpe bazwi.

28 Bakómi nzoto mafutamafuta mpe loposo na bango ebandi kongɛnga;

Batondi na makambo mabe.

Mpo na kobatela bomɛngo na bango,

Basambi te mpo na kokɔtela mwana oyo tata akufá,+

Baboyaka kokata na bosembo likambo ya babola.’”+

29 “Nasengeli te kosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na makambo wana?” Yehova alobi bongo.

“Nasengeli te* kozongisa mabe na ekólo ya boye?

30 Likambo moko ya kokamwisa mpe ya nsɔmɔ esalemi na mokili:

31 Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta,+

Mpe banganga-nzambe bazali kosalela bokonzi na bango mpo na kokonza bato.

Mpe bato na ngai balingi ezala ndenge wana.+

Kasi bokosala nini ntango nsuka ekoya?”

6 Ee bana ya Benyamina, bóluka esika ya komibatela, mosika na Yerusaleme.

Bóyula liseke+ na Tekoa;+

Bópelisa elembo ya mɔtɔ na Bete-hakereme!

Mpo mpasi ezali kouta na nɔrdi, libebi moko monene.+

 2 Mwana mwasi ya Siona akokani na mwasi moko kitoko mpe oyo amesaná na makambo ya makasi te.+

 3 Babateli ya mpate bakoya ná bitonga na bango.

Bakotɛlɛmisa bahema na bango zingazinga na ye.+

Mobateli mokomoko akoleisa etonga oyo azali kobatela.+

 4 “Bómibongisa* mpo na kobundisa ye!

Bótɛlɛma, mpe tóbundisa ye na midi!”

“Mawa na biso, mpo moi ezali kokita,

Mpo molili ezali kokɔta!”

 5 “Bótɛlɛma, mpe tóbundisa ye na butu

Mpe tóbebisa bandako milai na ye ya makasi.”+

 6 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

“Bókata nzete mpe bósala mwa ngomba mpo na kobundisa Yerusaleme.+

Ezali engumba oyo esengeli kozongisa monɔkɔ;

Kati na yango eloko mosusu ezali te kaka monyoko.+

 7 Ndenge libulu ya kobomba mai ebatelaka mai na yango malili,

Ndenge wana nde abateli mabe na ye.

Mobulu mpe libebi eyokani epai na ye;+

Maladi mpe mpasi ezali ntango nyonso liboso na ngai.

 8 Yoká makebisi, Ee Yerusaleme, soki te nakoyoka yo mabe mpenza* mpe nakotika yo;+

Nakokómisa yo esika oyo etikali mpamba, mokili oyo bato bazali kofanda te.”+

 9 Yehova ya mampinga alobi boye:

“Bakolɔkɔta batikali ya Yisraele kaka ndenge balɔkɔtaka mbuma ya nsuka ya nzete ya vinyo.

Zongisá lobɔkɔ na yo lokola moto oyo azali kobuka mbuma ya vinyo na bitape ya nzete ya vinyo.”

10 “Nakoloba na nani mpe nakokebisa nani,

Nani akoyoka?

Talá! Matoi na bango ekangamá,* yango wana bakoki kotya likebi te.+

Talá! Liloba ya Yehova ekómi eloko oyo bazali kotyola,+

Basepelaka na yango te.

11 Mpe natondi na nkanda makasi ya Yehova,

Nakoki lisusu kobomba yango te.”+

“Sopelá yango mwana oyo azali na nzela,+

Etuluku ya bilenge mibali oyo bayangani.

Bango nyonso bakokangama, mobali ná mwasi na ye,

Mibange ná baoyo bakoli mpenza.*+

12 Bandako na bango ekopesama epai ya bato mosusu,

Ná bilanga mpe basi na bango.+

Mpo nakosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kotɛmɛla bato oyo bafandi na mokili yango,” Yehova alobi bongo.

13 “Mpo banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene na kati na bango, mokomoko na bango azali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+

Banda na mosakoli tii na nganga-nzambe, mokomoko na bango azali kobuba.+

14 Bazali komeka kobikisa bampota* ya bato na ngai likolólikoló, na ndenge bazali koloba na bango:

‘Kimya ezali! Kimya ezali!’

Nzokande kimya ezali te.+

15 Bayokaki nde nsɔni mpo basalaki likambo moko oyo eyinamá?

Bazali koyoka nsɔni ata moke te!

Bayebi ata te ndenge bayokaka nsɔni.+

Yango wana bakokwea na kati ya bato oyo bazali kokwea;

Ntango nakopesa bango etumbu bakobɛta libaku,” Yehova alobi bongo.

16 Yehova alobi boye:

“Bótɛlɛma na banzela oyo ekutaná, mpe bómona.

Bótuna soki banzela ya kala ezali wapi.

Bótuna soki nzela ya malamu ezali wapi,

Mpe bótambola na yango,+ mpe bokozwa kimya.”

Kasi balobi ete: “Tokotambola na yango te.”+

17 “Mpe natyaki basinzili,+ oyo balobaki ete:

‘Bótya likebi na lokito ya liseke!’”+

Kasi balobaki: “Tokotya likebi te.”+

18 “Na yango, bóyoka, Ee bikólo!

Ee liyangani, yebá

Likambo oyo ekokómela bango.

19 Yoká, Ee mabele!

Nazali komemela bato oyo mpasi+

Lokola lifuti ya makanisi na bango ya mabe,

Mpo batyaki likebi te na maloba na ngai

Mpe baboyaki mobeko na ngai.”*

20 “Olibana oyo ozali komemela ngai longwa na Sheba

Mpe nkokó ya nsolo mpimbo longwa na mokili ya mosika ekosala ngai nini?

Makabo na bino ya kotumba mobimba endimami te,

Mpe bambeka na bino ezali kosepelisa ngai te.”+

21 Na yango, talá oyo Yehova alobi:

“Talá nazali kotyela bato oyo biloko oyo ebɛtisaka libaku,

Mpe bakobɛta libaku,

Batata ná bana elongo,

Mozalani ná moninga na ye,

Mpe bango nyonso bakokufa.”+

22 Talá oyo Yehova alobi:

“Talá! Ekólo moko ezali kouta na mokili ya nɔrdi,

Mpe ekólo moko monene ekolamuka longwa na bisika oyo eleki mpenza mosika na mabele.+

23 Bakosimba litimbo mpe likɔnga moke.

Bazali mabe mpenza, mpe bakoyoka mawa te.

Mongongo na bango ekonguluma lokola mbu,

Mpe bakomata na bampunda.+

Bakosala molɔngɔ ya etumba lokola moto ya etumba mpo na kobunda na yo, Ee mwana mwasi ya Siona.”

24 Toyoki nsango na yango.

Mabɔkɔ na biso elɛmbi.+

Mawa ekangi biso,

Mpasi makasi lokola mpasi ya mwasi oyo azali kobota.+

25 Kobima mpo na kokende na elanga te,

Mpe kotambola na nzela te,

Mpo monguna azali na mopanga;

Bato bazali kobanga epai na epai.

26 Ee mwana mwasi ya bato na ngai,

Latá ngɔtɔ*+ mpe omibalola na putulu ya mɔtɔ.

Lelá ndenge balelaka mwana kaka moko ya mobali, kolela ya mawa,+

Mpo mobebisi akobimela biso na pwasa.+

27 “Nakómisi yo* momeki-bibende na kati ya bato na ngai,

Moto oyo azali koluka malamumalamu;

Osengeli kotya likebi mpe kotala malamumalamu nzela na bango.

28 Bango nyonso bazali bato ya mitó makasi,+

Bazali kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo.+

Bazali lokola kwivre mpe ebende.

Bango nyonso bazali kosala makambo na bokosi.

29 Eloko ya kofula mopɛpɛ* eziki.

Mondɔlu ezali kobima na mɔtɔ na bango.

Bazali kokoba kopɛtola makasi kaka mpamba,+

Mpe baoyo bazali mabe balongolami te na kati ya bato.+

30 Bato bakobenga bango palata oyo ebwakami,

Mpo Yehova abwaki bango.”+

7 Talá maloba oyo Yehova alobaki na Yirimia: 2 “Tɛlɛmá na porte ya ndako ya Yehova, mpe kuna sakolá nsango oyo: ‘Bóyoka liloba ya Yehova bino nyonso bato ya Yuda, bino baoyo bozali kokɔta na baporte oyo mpo na kogumbamela Yehova. 3 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bóbongisa etamboli na bino mpe misala na bino, mpe nakotika bino bókoba kofanda na esika oyo.+ 4 Bótya motema te na maloba ya lokuta, mpe bóloba te ete: ‘Oyo ezali* tempelo ya Yehova, tempelo ya Yehova, tempelo ya Yehova!’+ 5 Mpo soki bobongisi mpenza etamboli mpe misala na bino, bokati mpenza makambo na bosembo kati na moto ná mozalani na ye;+ 6 soki bonyokoli te bato oyo bafandi bapaya, bana oyo batata bakufá mpe basi oyo mibali bakufá,+ soki na esika oyo bosopi te makila ya moto oyo asali likambo te, mpe bolandi te banzambe mosusu mpo na komibendela mpasi;+ 7 na bongo nakotika bino bókoba kofanda na esika oyo, na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino mpo na libela.”’”

8 “Kasi bozali kotya motema na maloba ya lokuta,+ ekozala ata na litomba moko te. 9 Bokoki nde koyiba,+ koboma, kosala ekobo, kolapa ndai ya lokuta,+ kopesa bambeka* epai ya Baala+ mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te, 10 mpe koya kotɛlɛma liboso na ngai na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai mpe koloba: ‘Tokobikisama,’ atako bozali kosala makambo nyonso wana oyo eyinamá? 11 Bokómisi ndako oyo ebengami na nkombo na ngai mobenga ya miyibi na miso na bino?+ Talá, ngai moko namoni yango,” Yehova alobi bongo.

12 “‘Kasi bókende sikoyo na esika na ngai oyo ezalaki na Shilo,+ epai nafandisaki nkombo na ngai liboso,+ mpe bómona eloko nini nasalaki yango mpo na mabe ya bato na ngai Yisraele.+ 13 Kasi bokobaki kaka kosala makambo wana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe atako nalobaki na bino mbala na mbala,* boyokaki te,+ nazalaki kaka kobenga bino, kasi boyanolaki te.+ 14 Bongo nde nakosala ndako oyo ebengami na nkombo na ngai,+ oyo bozali kotyela motema,+ mpe esika oyo napesá bino ná bankɔkɔ na bino, kaka ndenge nasalaki Shilo.+ 15 Nakobwaka bino mosika na elongi na ngai, kaka ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso, libota mobimba ya Efraime.’+

16 “Mpe yo, kobondela mpo na bato oyo te, kobelela te, kobondela te mpe kosɛngasɛnga ngai te mpo na bolamu na bango,+ mpo nakoyoka yo te.+ 17 Ozali komona te makambo oyo bazali kosala na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme? 18 Bana bazali kolɔkɔta nkoni, batata bazali kopelisa mɔtɔ, mpe basi bazali kobɛta pɔtɔpɔtɔ ya farini mpo na kosalela Mokonzi-mwasi ya likoló*+ bagato ya mbeka; mpe bazali kosopela banzambe mosusu likabo ya masanga, mpo na kosilikisa ngai.+ 19 ‘Kasi ezali ngai nde bazali koyokisa mpasi?’* Yehova atuni bongo. ‘Bazali te komiyokisa mpasi bango moko, mpo na nsɔni na bango moko?’+ 20 Na yango, talá oyo Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Talá! Nkanda na ngai mpe nkanda na ngai ya kongala ekosopanela esika oyo,+ bato mpe banyama, nzete ya elanga mpe mbuma ya mabele; nkanda na ngai ekopela, mpe ekobomama te.’+

21 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bókende, bóbakisa makabo na bino ya kotumba mobimba likoló ya bambeka na bino mosusu mpe bólya mosuni bino moko.+ 22 Mpo na mokolo oyo nabimisaki bankɔkɔ na bino na mokili ya Ezipito, nayebisaki bango te, mpe napesaki bango mitindo te na oyo etali makabo ya kotumba mobimba mpe ya bambeka.+ 23 Kasi napesaki bango mitindo oyo: “Bótosa mongongo na ngai, mpe nakokóma Nzambe na bino, mpe bino bokokóma bato na ngai.+ Bosengeli kotambola na nzela na ngai nyonso oyo nakopesa bino mitindo, mpo makambo na bino etambola malamu.”’+ 24 Kasi bayokaki te, mpe batyaki likebi te,+ kutu batambolaki na mayele mabe* na bango moko, na motó makasi na bango bayokelaki motema na bango,+ bongo bazongaki nsima mpe bakendaki liboso te, 25 banda mokolo oyo bankɔkɔ na bino babimaki na mokili ya Ezipito tii na mokolo ya lelo;+ nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli, nazalaki kotinda bango mokolo na mokolo, mbala na mbala.*+ 26 Kasi baboyaki koyokela ngai, mpe batyaki likebi te,+ bakómaki mitó makasi.* Mpe basalaki mabe koleka bankɔkɔ na bango!

27 “Okoloba na bango maloba oyo nyonso,+ kasi bakoyoka yo te; okobenga bango, kasi bakoyanola yo te. 28 Mpe okoloba na bango boye: ‘Talá ekólo oyo etosi te mongongo ya Yehova Nzambe na bango, mpe eboyi kondima disiplini. Bosembo ezali lisusu te, mpe balobelaka yango lisusu te.’*+

29 “Katá nsuki na yo oyo ekatamaka te* mpe bwaká yango, mpe yembá loyembo ya mawa likoló ya bangomba mike oyo ezali polele, mpo Yehova abwaki mpe akotika libota oyo esilikisi ye. 30 ‘Mpo bato ya Yuda basali oyo ezali mabe na miso na ngai,’ Yehova alobi bongo. ‘Batye biloko na bango ya bosɔtɔ na ndako oyo ezali komema nkombo na ngai, mpo na kokómisa yango mbindo.+ 31 Batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete, oyo ezali na Lobwaku ya mwana ya Hinome,*+ mpo na kotumba na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe ya basi,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyá ata moke te na makanisi na ngai.’*+

32 “‘Na yango, talá! mikolo ezali koya,’ Yehova alobi bongo, ‘ntango bakobenga yango lisusu te ete Tofete to Lobwaku ya mwana ya Hinome,* kasi Lobwaku ya koboma; bakokunda bakufi na Tofete tii esika ya kokunda ekozala lisusu te.+ 33 Mpe bibembe ya bato oyo ekokóma mpenza bilei mpo na bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya mabele, oyo moto ata moko te akobangisa yango.+ 34 Nakosilisa mingongo ya kosepela makasi ná mingongo ya esengo na bingumba ya Yuda mpe na banzela ya Yerusaleme, mongongo ya mobali ya libala ná mongongo ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu te;+ mpo mokili ekokóma mpenza esika oyo etikalá mpamba.’”+

8 Yehova alobi boye: “Na ntango yango bato bakobimisa na malita mikuwa ya bakonzi ya Yuda, ya bankumu na yango, ya banganga-nzambe, ya basakoli ná mikuwa ya bato oyo bafandi na Yerusaleme. 2 Bakotanda yango liboso ya moi, ya sanza mpe ya limpinga mobimba ya likoló oyo balingaki, oyo basalelaki, oyo balandaki, oyo balukaki mpe oyo bagumbamelaki.+ Ekosangisama esika moko te, mpe ekokundama te. Ekokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.”+

3 “Baoyo bakotikala na libota oyo ya mabe na bisika nyonso oyo nakopalanganisa bango, bakopona liwa na esika ya kopona bomoi,” Yehova ya mampinga alobi bongo.

4 “Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova alobi:

“Bakokwea mpe bakotɛlɛma lisusu te?

Soki moko azongi, mosusu akozonga mpe te?

 5 Mpo na nini bato oyo, bafandi ya Yerusaleme, bazali kokoba kozanga bosembo epai na ngai?

Bazali kaka kosala makambo na bokosi;

Mpe baboyi kobongwana.+

 6 Natyaki likebi mpe nazalaki kaka koyoka, kasi balobaki likambo moko te ya solo.

Moto moko te abongolaki motema na mabe na ye to amitunaki: ‘Nasali nini?’+

Moto na moto azali kokoba kosala makambo ndenge bato nyonso basalaka, lokola mpunda oyo ezali kopumbuka mpo na kokɔta na etumba.

 7 Ata nkɔngi na likoló eyebaka bileko* na yango;

Epopo* ná ndɛkɛ babengi martinɛ mpe ndɛkɛ babengi bulubulu ezongaka na ntango oyo esengeli kozonga.

Kasi bato na ngai bayebi te ekateli ya Yehova.”’+

 8 ‘Ndenge nini bokoki koloba: “Tozali na bwanya, mpe tozali na mobeko* ya Yehova”?

Ya solo mpenza, ekomeli ya lokuta+ ya bakomeli* esalelami mpo na kokoma makambo ya lokuta.

 9 Bato ya bwanya bayokisami nsɔni.+

Bakómi na nsɔmɔ mpe bakokangama.

Talá! Babwaki liloba ya Yehova,

Mpe bwanya nini bazali na yango?

10 Na yango, nakopesa basi na bango epai ya mibali mosusu,

Bilanga na bango epai ya bankolo mosusu;+

Mpo banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene, mokomoko azali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+

Banda na mosakoli tii na nganga-nzambe, mokomoko na bango azali kobuba.+

11 Bazali komeka kobikisa bampota* ya mwana mwasi ya bato na ngai likolólikoló, na ndenge bazali koloba na bango:

“Kimya ezali! Kimya ezali!”

Nzokande kimya ezali te.+

12 Bayokaki nde nsɔni mpo basalaki likambo moko oyo eyinamá?

Bazali koyoka nsɔni ata moke te!

Bayebi ata te ndenge bayokaka nsɔni!+

Yango wana bakokwea na kati ya bato oyo bazali kokwea.

Ntango nakopesa bango etumbu, bakobɛta libaku,’+ Yehova alobi bongo.

13 ‘Ntango nakoyanganisa bango, nakosilisa bango,’ Yehova alobi bongo.

‘Na nzete ya vinyo, mbuma ekozala te, na nzete ya figi, figi ekozala te, mpe nkasa ekokauka.

Mpe bakobungisa biloko oyo napesaki bango.’”

14 “Mpo na nini tofandi awa?

Tóyangana esika moko, tókɔta na bingumba oyo ebatelami makasi,+ mpe tókufa kuna.

Mpo Yehova Nzambe na biso alingi kosilisa biso,

Mpe apesi biso mai oyo ezali na pwazɔ mpo tómɛla,+

Mpamba te tosaleli Yehova lisumu.

15 Tozalaki kozela kimya, kasi eloko moko te ya malamu eyaki,

Tozalaki kozela ntango ya kobika, kasi nsɔmɔ nde ezali!+

16 Longwa na Dani, makɛlɛlɛ ya bampunda ya banguna ezali koyokana.

Mpo na makɛlɛlɛ ya koganga ya bampunda na ye,

Mokili mobimba ezali koningana.

Banguna bakɔti mpe babebisi mokili ná nyonso oyo ezali na kati,

Engumba ná bafandi na yango.”

17 “Mpo talá! nazali kotinda banyoka kati na bino,

Banyoka ya ngɛngɛ, oyo ekoki kolengolama te,

Mpe ekoswa bino mpenza,” Yehova alobi bongo.

18 Mawa na ngai ezali na nkisi te;

Motema na ngai ezali kobɛla.

19 Uta na mosika mongongo ya kolela mpo na kosɛnga lisalisi ezali koyokana

Ezali mongongo ya mwana mwasi ya bato na ngai:

“Yehova azali na Siona te?

To mokonzi ya Siona azali kati na yango te?”

“Mpo na nini basilikisi ngai na bikeko na bango,*

Na banzambe na bango ya mpambampamba ya bapaya?”

20 “Ntango ya kobuka mbuma eleki, eleko ya molunge esili,

Kasi biso, tobikisami te!”

21 Nayoki mpasi makasi mpo na bampota ya mwana mwasi ya bato na ngai;+

Nayoki mawa.

Nsɔmɔ ekangi ngai.

22 Balsame* ezali na Gileade te?+

To moto oyo abikisaka* azali kuna te?+

Mpo na nini mwana mwasi ya bato na ngai azali kobika te?+

9 Ee soki motó na ngai ezalaka ata mai,

Soki miso na ngai ezalaka ata liziba ya mai ya miso!+

Mbɛlɛ naleli butu moi,

Mpo na kobomama ya bato na ngai.

 2 Aa! soki nazalaka ata na esika ya kofanda mpo na bato ya mobembo na esobe!

Mbɛlɛ nalingaki kotika bato na ngai mpe kokende mosika na bango,

Mpo bango nyonso bazali bato ya ekobo,+

Etuluku ya bato oyo basalaka makambo na bokosi.

 3 Bazali kogumba lolemo na bango lokola litimbo;

Mokili etondi na bokosi, bosembo ezali te.+

“Bazali kokoba kosala mabe,

Mpe batye ata moke te likebi epai na ngai,”+ Yehova alobi bongo.

 4 “Moto na moto akeba na moninga na ye,

Kotyela ata ndeko na yo motema te.

Mpo ndeko nyonso azali motɛki,+

Mpe moninga nyonso akoselaka bato makambo.+

 5 Moto na moto akosaka moninga na ye;

Mpe moto moko te alobaka solo.

Bayekolisi lolemo na bango elobaka lokuta.+

Bamilɛmbisi na kosala mabe.

 6 Ofandi na katikati ya bokosi.

Na bokosi na bango, baboyi koyeba ngai,” Yehova alobi bongo.

 7 Na yango, Yehova ya mampinga alobi boye:

“Nakonyangwisa bango lokola ebende mpe nakomeka bango,+

Nakosala lisusu nini mpo na mwana mwasi ya bato na ngai?

 8 Lolemo na bango ezali likula oyo ebomaka. Oyo elobaka makambo ya lokuta.

Moto nyonso azali kokoba kolobela kimya na mozalani na ye,

Kasi na motema azali kotyela ye motambo.”

 9 “Nasengeli te kosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na makambo wana?” Yehova alobi bongo.

“Nasengeli* te kozongisela ekólo ya boye mabe?+

10 Nakolela mpe nakolelalela mpo na bangomba

Mpe nakoyemba loyembo ya mawa mpo na bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na esobe,

Mpamba te etumbami, mpo moto moko te alekaka wana

Mpe mongongo ya bibwɛlɛ eyokani te.

Bandɛkɛ mpe banyama ekimi, ekei.+

11 Nakokómisa Yerusaleme mabondo ya mabanga,+ esika oyo bambwa ya zamba* efandaka,+

Mpe nakokómisa bingumba ya Yuda esika oyo etikalá mpamba, oyo bato bafandaka te.+

12 Nani azali moto ya bwanya, mpo akanga ntina ya likambo oyo?

Yehova alobi na nani, mpo ayebisa likambo yango?

Mpo na nini mokili ebebi?

Mpo na nini eziki lokola esobe,

Mpo moto moko te azali koleka kuna?”

13 Yehova ayanolaki boye: “Mpo basundolaki mobeko* na ngai oyo natyaki liboso na bango, mpe mpo batosaki yango te mpe batosaki ngai te. 14 Kasi na motó makasi na bango, bayokelaki motema na bango+ mpe basambelaki bikeko ya Baala, ndenge batata na bango bateyaki bango.+ 15 Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá nakoleisa bato oyo mbondo, mpe nakomɛlisa bango mai oyo ezali na pwazɔ.+ 16 Nakopanza bango na kati ya bikólo oyo bango mpe batata na bango bayebi te,+ mpe nakotinda mopanga nsima na bango tii nakosilisa bango nyɛɛ.’+

17 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

‘Bómitambwisa na mayele.

Bóbenga basi oyo bayembaka nzembo ya mawa,+

Mpe bótinda bábenga basi oyo bayebi mpenza kolela báya,

18 Mpe básala nokinoki mpe bátombola mongongo ya kolelalela mpo na biso,

Mpo miso na biso ebimisa mpisoli

Mpe mai ya miso ekita na matama na biso.+

19 Mpo mongongo ya kolelalela eyokani uta na Siona:+

“Tobebisami mpenza!

Toyoki nsɔni mingi mpenza!

Mpo totiki mokili, mpe bakweisi bisika na biso ya kofanda.”+

20 Bino basi, bóyoka liloba ya Yehova.

Litoi na bino ekanga ntina ya liloba oyo euti na monɔkɔ na ye.

Bóteya bana na bino ya basi ndenge ya kolela oyo,

Mpe moto na moto ateya moninga na ye loyembo oyo ya mawa.+

21 Mpo liwa emati na nzela ya bafɛnɛtrɛ na biso;

Ekɔti na bandako milai na biso ya kofanda

Mpo na kolongola bana na babalabala

Mpe bilenge mibali na bisika minene ya bato nyonso.’+

22 Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova alobi:

“Bibembe ya bato oyo ekokwea lokola nyɛi likoló ya elanga,

Lokola molɔngɔ ya mbuma oyo bakati sika nsima ya mobuki,

Oyo ezangi moto mpo na kolɔkɔta yango.”’”+

23 Talá oyo Yehova alobi:

“Moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye;+

Moto ya nguya amikumisa te mpo na nguya na ye;

Mpe moto ya bomɛngo amikumisa te mpo na bomɛngo na ye.”+

24 “Kasi moto oyo azali komikumisa,

Amikumisa mpo azali na mayele ya kososola mpe ayebi ngai,+

Ete nazali Yehova, ngai Moto namonisaka motema boboto,* bosembo mpe boyengebene kati na mabele,+

Mpo nasepelaka na makambo wana,”+ Yehova alobi bongo.

25 “Talá! Mikolo ezali koya,” Yehova alobi bongo, “nakosɛnga bato nyonso oyo bakatamá ngenga, nzokande bakatamá naino ngenga te, ete bázongisa monɔkɔ,+ 26 Ezipito+ ná Yuda,+ Edome,+ bana ya Amone+ ná Moabe,+ mpe baoyo nyonso bazali na nsuki oyo ekatami na mpakatoi, baoyo bazali kofanda na esobe;+ mpo bikólo nyonso ekatami ngenga te, mpe bato nyonso ya libota ya Yisraele bakatami ngenga na motema te.”+

10 Bóyoka liloba oyo Yehova alobi mpo na bino, Ee bato ya libota ya Yisraele. 2 Talá oyo Yehova alobi:

“Bólanda mimeseno ya bikólo te,+

Mpe bózala na nsɔmɔ te mpo na bilembo ya likoló

Mpamba te bato ya bikólo bazali na nsɔmɔ mpo na yango.+

 3 Mpo mimeseno ya bato ya bikólo ezali kaka ndɔtɔ mpamba.

Ezali kaka nzete oyo moto akati na zamba,

Moto ya misala ya mabɔkɔ asali yango na mabɔkɔ na ye na nzela ya esaleli na ye.*+

 4 Bakómisaka yango kitoko na palata mpe na wolo+

Bakangaka yango makasi na bansɛtɛ mpe na bamarto, mpo ata moko te ekwea.+

 5 Lokola dɔngɔlɔmiso* na elanga ya kɔkɔmbrɛ, ekoki koloba te;+

Esengeli bámema yango, mpo ekoki kotambola te.+

Bóbanga yango te, ekoki kosala mabe te,

Ekoki mpe kosala likambo moko ya malamu te.”+

 6 Ee Yehova, moto moko te azali lokola yo.+

Ozali monene, mpe nkombo na yo ezali monene mpe na nguya.

 7 Nani akobanga yo te, Ee Mokonzi ya bikólo,+ mpo yango ebongi na yo;

Mpo na bato nyonso ya bwanya na bikólo mpe na makonzi na bango nyonso,

Moto moko te akokani na yo.+

 8 Bango nyonso bazangi mayele, mpe bazali bazoba.+

Koteyama na nzete ezali mpenza ndɔtɔ mpamba.+

 9 Bazali komema longwa na Tarasisi palata oyo babɛtibɛti tii ekómi bitando ya papala,+ mpe wolo longwa na Ufaze,

Mosala ya moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe esalemi na mabɔkɔ ya mosali bibende.

Bilamba na bango ezali nsinga ya bulé mpe lɛnɛ ya mwa motane-bulé.

Yango nyonso esalemi na bato oyo bayebi mosala malamu.

10 Kasi Yehova azali mpenza Nzambe ya solo.

Azali Nzambe ya bomoi+ mpe Mokonzi ya seko.+

Mpo na nkanda na ye mabele ekoningana,+

Mpe bato ya bikólo bakokoka makaneli na ye te.

11* Talá oyo bosengeli koloba na bango:

“Banzambe oyo basalaki likoló mpe mabele te,

Bakolongolama na mabele mpe na nse ya lola oyo.”+

12 Azali Moto oyo asalaki mabele na nguya na ye,

Moto oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na bwanya na ye+

Mpe Oyo atandaki likoló na mayele na ye.+

13 Soki ayokisi mongongo na ye,

Mai oyo ezali na likoló ekómaka na yikiyiki,+

Asalaka ete mapata* emata uta na nsuka nyonso ya mabele.+

Atindaka mokalikali nzela moko na mbula,*

Abimisaka mopɛpɛ na bandako na ye ya kobomba biloko.+

14 Moto nyonso asalaka makambo na bozoba mpe na kozanga mayele.

Mosali bibende nyonso akoyokisama nsɔni mpo na ekeko;*+

Mpo ekeko na ye ya ebende* ezali lokuta,

Mpe elimo* ezali te kati na yango.+

15 Yango ezali ndɔtɔ mpamba, mosala ya kosɛka.+

Na ntango oyo Nzambe akopesa yango etumbu ekobebisama.

16 Likabo ya Yakobo ezali te lokola biloko wana,

Mpo ye azali Moto oyo asalaki eloko nyonso,

Mpe Yisraele ezali lingenda ya libula na ye.+

Yehova ya mampinga nde nkombo na ye.+

17 Lɔkɔtá bisaka na yo oyo ezali na mabele,

Ee yo mwasi oyo ozingami.

18 Mpo talá oyo Yehova alobi:

“Na mbala oyo nazali kobwaka* libándá bato oyo bafandi na mokili,+

Mpe nakoyokisa bango mpasi.”

19 Mawa na ngai mpo na bampota na ngai!+

Mpota na ngai ekoki kosila te.

Mpe nalobi ete: “Oyo ezali mpenza maladi na ngai, mpe nasengeli kokangela yango motema.

20 Hema na ngai ebebisami, mpe bansinga ya hema na ngai nyonso ekatani.+

Bana na ngai batiki ngai, mpe bazali lisusu te.+

Moto azali te mpo na kotanda hema na ngai to kotombola bilamba ya hema na ngai.

21 Mpo babateli ya mpate basali makambo na bozoba mpenza,+

Mpe batuni Yehova te.+

Yango wana basali te makambo na mayele ya kososola,

Mpe banyama na bango nyonso epalangani.”+

22 Yoká! Nsango moko ezali koya!

Kotutatuta monene oyo euti na mokili ya nɔrdi,+

Mpo na kokómisa bingumba ya Yuda esika oyo etikali mpamba,

Esika bambwa ya zamba* efandaka.+

23 Ee Yehova, nayebi malamu ete moto akoki te komitambwisa ye moko.

Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa makolo na ye.+

24 Ee Yehova, sembolá ngai na kolanda bosembo na yo,

Kasi na nkanda na yo te,+ noki oboma ngai.+

25 Sopelá bikólo oyo eyebi yo te nkanda makasi na yo+

Mpe na mabota oyo ebeleli nkombo na yo te.

Mpo balei Yakobo,+

Balei ye, tii basilisi ye mpenza,+

Mpe batiki esika na ye ya kofanda mpamba.+

11 Talá maloba oyo Yehova alobaki na Yirimia: 2 “Bóyoka maloba ya kondimana oyo!

“Lobá* yango epai ya bato ya Yuda mpe epai ya bafandi ya Yerusaleme. 3 Yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Alakelama mabe moto oyo azali kotosa te maloba ya kondimana oyo,+ 4 oyo napesaki bankɔkɔ na bino mitindo na mokolo oyo nabimisaki bango na mokili ya Ezipito,+ na ndako ya mɔtɔ makasi ya konyangwisa bibende,+ nalobaki na bango ete: ‘Bótosa mongongo na ngai, mpe bósala makambo nyonso oyo napesi bino mitindo; bokokóma bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bino,+ 5 mpo nakokisa ndai oyo nalapelaki bankɔkɔ na bino, ya kopesa bango mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ lokola na mokolo ya lelo.’”’”

Mpe nayanolaki ete: “Amen,* Ee Yehova.”

6 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: “Sakolá maloba oyo nyonso na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme ete: ‘Bóyoka maloba ya kondimana oyo, mpe bósalela yango. 7 Mpo nakebisaki polelepolele bankɔkɔ na bino na mokolo oyo nalongolaki bango na mokili ya Ezipito tii na mokolo ya lelo, nakebisaki bango mbala na mbala* ete: “Bótosa mongongo na ngai.”+ 8 Kasi bayokaki te mpe batyaki likebi te, kutu mokomoko na bango alandaki na motó makasi motema mabe na ye moko;+ napesaki bango etumbu na kolanda makambo oyo ekomami na kondimana yango, napesaki bango mitindo bátosa yango, kasi baboyaki kosalela yango.’”

9 Bongo Yehova alobaki na ngai ete: “Bato ya Yuda mpe bafandi ya Yerusaleme basali likita mpo na kotombokela ngai. 10 Bazongeli mabunga ya bankɔkɔ na bango, baoyo baboyaki kotosa maloba na ngai,+ bango mpe balandaki banzambe mosusu mpe basalelaki bango.+ Bato ya libota ya Yisraele mpe ya Yuda babuki kondimana na ngai oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango.+ 11 Na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Nakomemela bango mpasi+ oyo bakokoka kokima yango te. Ntango bakobelela ngai mpo na kosɛnga lisalisi, nakoyoka bango te.+ 12 Mpe bingumba ya Yuda mpe bafandi ya Yerusaleme bakokende epai ya banzambe oyo bazali kopesa bambeka* mpe bakobelela bango mpo na kosɛnga lisalisi,+ kasi banzambe yango bakobikisa bango ata moke te na ntango ya mpasi na bango. 13 Ee Yuda, banzambe na yo bakómi ebele lokola bingumba na yo; otongi bitumbelo mpe likoló na yango ozali kopesa bambeka epai ya nzambe ya nsɔni, Baala, bitumbelo yango ekómi ebele lokola babalabala na Yerusaleme.’+

14 “Kasi yo,* kobondela mpo na bolamu ya bato oyo te, kobelela ngai te mpo na bolamu na bango, mpe kobondela te mpo na bango,+ mpo nakoyoka te ntango bakobelela ngai mpo na mpasi na bango.

15 Bato oyo nalingaka bazali kosala nini na ndako na ngai,

Nzokande bato mingi bazali na mikano ya mabe?

Bakopekisa nde mpasi ekómela yo ntango bazali kopesa mbeka ya mosuni mosantu?*

Okozala na esengo na ntango wana?

16 Yehova azalaki kobenga yo liboso, Nzete ya olive oyo etondi na nkasa,

Oyo ezali komonana kitoko na mbuma.

Na lokito ya koganga makasi atye mɔtɔ na nzete,

Mpe babuki bitape na yango.

17 “Yehova ya mampinga, Moto oyo aloni yo,+ alobi ete mpasi ekokómela yo mpo na mabe oyo bato ya Yisraele mpe ya Yuda basali, baoyo basilikisi ngai na ndenge bapesi bambeka epai ya Baala.”+

18 Yehova ayebisaki ngai mpo nayeba yango.

Na ntango yango omonisaki ngai makambo oyo bazalaki kosala.

19 Nazalaki lokola mwana-mpate ya mobali, ya botosi, oyo amemami mpo na kobomama.

Nayebaki te ete bazalaki kosalela ngai likita:+

“Tóbebisa nzete ná mbuma na yango,

Tólongola ye na mokili ya bato ya bomoi,

Mpo nkombo na ye ekanisama lisusu te.”

20 Kasi, Yehova ya mampinga asambisaka na bosembo;

Atalatalaka motema mpe makanisi oyo ebombaná mpenza.*+

Tiká namona ndenge okozongisela bango mabe,

Mpo napesi likambo na ngai ya kosamba na mabɔkɔ na yo.

21 Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na bato ya Anatote+ oyo bazali koluka bomoi* na yo mpe bazali koloba: “Osengeli te kosakola na nkombo ya Yehova.+ Soki okobi kosala bongo, tokoboma yo”; 22 na yango, talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ. Bilenge mibali bakokufa na mopanga.+ Bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala.+ 23 Ata moto moko te akotikala na bomoi, mpo nakomemela bato ya Anatote mpasi,+ na mbula oyo nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ.”

12 Ee Yehova, ozali sembo+ ntango nazali komemela yo likambo na ngai,

Ntango nazali koloba na yo mpo na makambo ya kosamba.

Mpo na nini bato mabe bazali kolonga na makambo bazali kosala,+

Mpe mpo na nini baoyo basalaka na bokosi bazangi mitungisi?

 2 Oloni bango; bazwi mpe misisa.

Bakoli mpe baboti mbuma.

Balobelaka yo ntango nyonso, kasi ozali mosika na makanisi na bango oyo ebombaná mpenza.*+

 3 Kasi, Ee Yehova, oyebi ngai malamu;+ mpe omonaka ngai;

Otalitali motema na ngai mpe oyebi ete namipesá na yo.+

Tyá bato mabe pembeni lokola bampate oyo bazali komema mpo na kobomama,

Mpe tyá bango pembeni mpo na mokolo ya kobomama.

 4 Tii ntango nini mokili ekozala ya kokauka

Mpe milona ya elanga nyonso ekozala ya kokauka?+

Mpo na mabe ya bato oyo bafandi kati na yango,

Banyama mpe bandɛkɛ ekufi.

Mpo balobi: “Azali komona te oyo ekokómela biso.”

 5 Soki kopota mbangu ná bato ya makolo elɛmbisi yo,

Ekozala boni kopota mbangu ná bampunda?+

Ozali komiyoka ete obatelami na mokili ya kimya?

Kasi okosala ndenge nini ntango okozala na kati ya mwa bazamba oyo ekangamakangamá oyo ezali pembenipembeni ya Yordani?

 6 Mpo ata bandeko na yo ná bato ya ndako ya tata na yo,

Basaleli yo makambo na bokosi.+

Balakeli yo mabe.

Kondimela bango te,

Ata soki balobi na yo makambo ya malamu.

 7 “Natiki ndako na ngai;+ nasundoli libula na ngai;+

Nakabi moto oyo nalingaka* na lobɔkɔ ya banguna na ye.+

 8 Libula na ngai ekómi epai na ngai lokola nkɔsi na kati ya zamba.

Egangeli ngai makasi.

Yango wana, nsukansuka nayini yango.

 9 Libula na ngai ezali mpo na ngai lokola ndɛkɛ ya langilangi oyo ekangaka banyama;

Bandɛkɛ mosusu oyo ekangaka banyama ezingi yango mpe ezali koluka kolya yango.+

Bóya, bóyangana,

Bino banyama nyonso ya zamba bóya kolya.+

10 Babateli mingi ya mpate babebisi elanga na ngai ya vinyo;+

Banyatinyati eteni ya mabele na ngai.+

Eteni ya mabele na ngai ya kitoko, bakómisi yango esobe oyo etikali mpamba.

11 Ekómi mokili oyo etikali mpamba.

Ekauki;*

Etikali mpamba liboso na ngai.+

Mokili mobimba ekómi esika oyo etikali mpamba,

Kasi moto moko te atyeli yango likebi.+

12 Babebisi bayei na banzela nyonso oyo bato balekalekaka na esobe,

Mpo mopanga ya Yehova ezali kolya longwa na nsuka moko ya mokili tii na nsuka mosusu ya mokili.+

Kimya ezali te mpo na moto nyonso.*

13 Baloni blé, kasi babuki banzubɛ.+

Basali mosala ya makasi mpenza kaka mpamba.

Bakoyokela mbuma na bango nsɔni

Mpo na nkanda ya kongala ya Yehova.”

14 Talá oyo Yehova alobi mpo na bazalani na ngai nyonso ya mabe, oyo bazali kosimba libula oyo napesaki bato na ngai Yisraele:+ “Nazali kopikola bango na mabele na bango,+ mpe nakopikola bato ya libota ya Yuda na kati na bango. 15 Kasi nsima ya kopikola bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa mokomoko na bango na libula na ye mpe na mokili na ye.”

16 “Mpe soki bayekoli mpenza banzela ya bato na ngai mpe balapi ndai na nkombo na ngai ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi!’ kaka ndenge bateyaki bato na ngai kolapa ndai na nkombo ya Baala, bongo bakozwa esika na kati ya bato na ngai. 17 Kasi soki baboyi kotosa, nakopikola ekólo yango, nakopikola yango mpe nakobebisa yango,” Yehova alobi bongo.+

13 Talá oyo Yehova alobi na ngai: “Kende, mpe sombá mokaba ya lini mpe latá yango na loketo na yo, kasi kopɔlisa yango na mai te.” 2 Bongo nasombaki mokaba yango na kolanda liloba ya Yehova mpe nalataki yango na loketo na ngai. 3 Mpe Yehova alobaki na ngai mpo na mbala ya mibale ete: 4 “Zwá mokaba oyo osombaki, oyo olati na loketo na yo, mpe tɛlɛmá, kende na Efrate, mpe bombá yango kuna na lidusu ya libanga.” 5 Bongo nakendeki mpe nabombaki yango pembeni ya Efrate, kaka ndenge Yehova apesaki ngai mitindo.

6 Kasi nsima ya mikolo mingi Yehova alobaki na ngai ete: “Tɛlɛmá, kende na Efrate mpe zwá mokaba oyo napesaki yo mitindo ete obomba yango kuna.” 7 Bongo nakendeki na Efrate, natimolaki mpe nazwaki mokaba yango na esika oyo nabombaki, mpe namonaki ete mokaba yango ebebaki; ezalaki lisusu na ntina te.

8 Bongo Yehova alobaki na ngai ete: 9 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Ndenge wana nde nakobebisa lolendo ya bato ya Yuda mpe lolendo mingi ya bato ya Yerusaleme.+ 10 Bato mabe oyo bazali koboya kotosa maloba na ngai,+ baoyo na motó makasi na bango nyonso bazali koyokela motema na bango moko+ mpe baoyo bazali kosambela banzambe mosusu, basaleli mpe bagumbameli bango, bakokóma kaka lokola mokaba oyo ezali mpenza lisusu na ntina te.’ 11 ‘Mpo kaka ndenge mokaba ekangamaka na loketo ya moto, ndenge wana nde nasalaki ete ekólo* mobimba ya Yisraele mpe ekólo mobimba ya Yuda ekangama na ngai,’ Yehova alobi bongo, ‘mpo ekóma epai na ngai ekólo,+ nkombo,+ lisanzoli, mpe eloko moko ya kitoko. Kasi etosaki te.’+

12 “Mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Elokó nyonso ya monene esengeli kotondisama na vinyo.”’ Mpe bakoyanola yo ete: ‘Biso toyebi nde te ete elokó nyonso ya monene esengeli kotondisama na vinyo?’ 13 Okoloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Nazali kotondisa mpe kolangwisa bato nyonso oyo bafandi na mokili oyo,+ bakonzi oyo bafandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, banganga-nzambe, basakoli, mpe bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme. 14 Mpe nakotutanisa bango na bango, batata ná bana,” Yehova alobi bongo.+ “Nakomonisa motema mawa te, nakoyoka mpasi na motema ata moke te, nakoyokela bango mawa ata moke te, eloko moko te ekopekisa ngai naboma bango.”’+

15 Bóyoka mpe bótya likebi.

Bózala na lolendo te, mpo Yehova alobi.

16 Bópesa Yehova Nzambe na bino nkembo

Liboso ete ayeisa molili

Mpe liboso ete makolo na bino ebɛta libaku likoló ya bangomba na ebandeli ya molili.

Bokozala na elikya ya komona pole,

Kasi akosala ete molili makasi ekɔta;

Akobongola yango molili makasi mpenza.+

17 Mpe soki boboyi koyoka,

Nakolela* na ndenge ya kobombana, mpo na lolendo na bino.

Nakolela mingi mpe miso na ngai ekotonda na mai ya miso,+

Mpo etonga ya Yehova+ ememami lokola mokangami.

18 Lobá na mokonzi mpe mama-mokonzi* ete:+ ‘Bófanda na esika ya nse,

Mpo motole* na bino ya kitoko ekokwea, longwa na mitó na bino.’

19 Bingumba ya sudi ekangami,* moto akofungola yango azali te.

Bamemi bato nyonso ya Yuda na mboka mopaya. Bamemi bango nyonso mpenza.+

20 Tombolá miso na yo mpe talá baoyo bazali koya longwa na nɔrdi.+

Wapi etonga oyo bapesaki yo, etonga na yo ya kitoko?+

21 Ntango bato oyo omonaka lokola baninga na yo ya motema bakopesa yo etumbu, okoloba nini?+

Okoyoka mpasi te, lokola mpasi ya mwasi oyo alingi kobota?+

22 Mpe ntango oyo okoloba na motema na yo: ‘Mpo na nini makambo oyo ekweli ngai?’+

Ezali mpo na libunga monene oyo osali nde balongoli yo eteni ya nse ya elamba na yo,+

Mpe oyoki mpasi makasi na matindi na yo.

23 Mokushi* akoki nde kobongola loposo na ye to nkoi matɔnɔ na yango?+

Soki boye, bino mpe bokoki kosala malamu,

Bino baoyo boteyamá kosala mabe.

24 Boye nakopalanganisa bango ndenge mopɛpɛ ya mokili ekauká ememaka matiti ya blé.+

25 Yango nde libula na yo, eteni oyo namekeli yo,” Yehova alobi bongo,

“Mpo obosani ngai+ mpe ozali kondimela makambo ya lokuta.+

26 Na yango nakotombola bilamba na yo tii na elongi na yo,

Mpe nsɔni na yo ekomonana,+

27 Misala na yo ya ekobo+

Mpe mposa makasi na yo ya kosangisa nzoto,

Bondumba na yo ya nsɔni.

Namoni makambo na yo ya bosɔtɔ likoló ya mwa bangomba na kati ya esobe.+

Mawa na yo, Ee Yerusaleme!

Tii ntango nini okokoba kozala mbindo?”+

14 Talá oyo Yehova alobaki na Yirimia mpo na oyo etali bileko ya kokauka makasi:+

 2 Yuda ezali kolela,+ mpe baporte na yango ebebi.

Elɛmbi tii efandi na mabele,

Mpe koganga ya Yerusaleme emati likoló.

 3 Mpe bankolo na bango batindi basaleli na bango* bákende koluka mai.

Bakei na mabulu ya mai.* Kasi bakuti mai te.

Bazongi na bambɛki na bango mpamba.

Bapɔli na nsɔni mpe balɛmbi nzoto,

Mpe bazipi mitó na bango.

 4 Balɛmbi nzoto, bazipi mitó na bango,

Mpamba te mabele ebukanibukani,+

Mpo mbula ezali na mokili te.

 5 Ata na esobe nyama ebengami bishe eboti, kasi esundoli mwana,

Mpo matiti ya sika ezali te.

 6 Bampunda ya zamba etɛlɛmi likoló ya bangomba mike oyo ezali polele.

Ebendi mopɛpɛ na zolo lokola bambwa ya zamba;*

Miso na yango elɛmbi mpo matiti ezali te.+

 7 Ata soki mabunga na biso ezali kofunda biso,

Ee Yehova, salá mpo na nkombo na yo.+

Mpo misala na biso ya kozanga bosembo ezali ebele,+

Mpe tosaleli yo lisumu.

 8 Ee yo elikya ya Yisraele, Mobikisi na ye+ na ntango ya mpasi,

Mpo na nini ozali lokola mopaya na mokili,

Lokola moto ya mobembo oyo atɛlɛmi kaka mpo na kolekisa butu?

 9 Mpo na nini ozali lokola moto oyo akamwe makasi,

Lokola mobali moko ya nguya oyo akoki kobikisa te?

Nzokande, ozali kati na biso, Ee Yehova,+

Mpe biso tobengami na nkombo na yo.+

Kosundola biso te.

10 Talá oyo Yehova alobi mpo na bato oyo: “Balingaka koyengayenga;+ bapekisi makolo na bango te.+ Na yango, Yehova asepeli na bango te.+ Sikoyo akokanisa libunga na bango mpe akosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na masumu na bango.”+

11 Mpe Yehova alobaki na ngai boye: “Kobondela te mpo na bolamu ya bato oyo.+ 12 Ntango bazali kokila bilei, nazali koyoka te kosɛngasɛnga na bango,+ mpe ntango bazali kopesa makabo ya kotumba mobimba mpe makabo ya mbuma, nazali kosepela na yango te,+ mpo nakosilisa bango na bitumba,* na nzala, mpe na maladi mabe.”+

13 Na yango nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá basakoli bazali koloba na bango ete: ‘Bokomona mopanga te, mpe nzala ekokómela bino te, kasi nakopesa bino nde kimya ya solo na esika oyo.’”+

14 Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná ya lokuta, mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali kosakwela bino.+ 15 Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na basakoli oyo bazali kosakola na nkombo na ngai atako natindaki bango te. Baoyo bazali koloba ete mopanga to nzala ekokómela mokili oyo te: ‘Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala.+ 16 Mpe bato oyo bango basakwelaki bakokufa na nzala mpe na mopanga, bibembe na bango ekobwakama na babalabala ya Yerusaleme mpe moto ya kokunda yango akozala te+—bango, basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi. Mpo nakosopela bango mpasi oyo ebongi na bango.’+

17 “Osengeli koloba na bango boye:

‘Miso na ngai etangisa mai ya miso butu moi kozanga kotika,+

Mpo ngɔndɔ, mwana mwasi ya bato na ngai, abukani mpe atutami mpenza,+

Mpo mpota na ye ezali monene mpenza.

18 Soki nabimi mpo na kokɔta na elanga,

Nazali komona bato oyo babomami na mopanga!+

Mpe soki nakɔti na engumba,

Nazali komona bato oyo bazali kobɛla mpo na nzala!+

Mpo mosakoli ná nganga-nzambe bakei kotambolatambola na mokili oyo bayebi te.’”+

19 Obwaki mpenza Yuda, to oyini* mpenza Siona?+

Mpo na nini obɛti biso? Sikoyo tozali kokoka kobika te.+

Tozalaki kozela kimya, kasi eloko moko te ya malamu eyaki,

Tozalaki kozela ntango ya kobika, kasi nsɔmɔ nde ezali!+

20 Ee Yehova, tondimi mabe na biso,

Mpe libunga ya bankɔkɔ na biso,

Mpo tosaleli yo lisumu.+

21 Mpo na nkombo na yo kobwaka biso te;+

Kotyola te kiti na yo ya bokonzi ya nkembo.

Kanisá, mpe kobuka kondimana na yo ná biso te.+

22 Na bikeko ya mpamba ya bikólo ezali na moko oyo ekoki kobɛtisa mbula?

To likoló yango moko ekoki nde kopesa mbula monene?

Kaka yo moko nde okoki kosala yango, Ee Yehova Nzambe na biso!+

Mpe tozali kotyela yo elikya,

Mpo yo moko nde osali biloko oyo nyonso.

15 Bongo Yehova alobaki na ngai ete: “Ata soki Moize ná Samwele bátɛlɛmaka liboso na ngai,+ nalingaki komonisela bato oyo boboto te.* Bimisá bango liboso na ngai, bákende. 2 Mpe soki batuni yo ete: ‘Tokokende wapi?’ Osengeli koyanola bango ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:

“Basusu bakokufa na maladi!

Basusu bakokufa na mopanga!+

Basusu bakokufa na nzala!

Mpe basusu bakokende bakangami!”’+

3 “‘Mpe nakotindela bango mitindo minei ya mpasi,’*+ Yehova alobi bongo: ‘mopanga mpo na koboma, bambwa mpo na kobenda bibembe na bango, bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya mabele mpo na kolya mpe kobebisa.+ 4 Mpe nakosala ete bákóma eloko ya nsɔmɔ mpo na makonzi nyonso ya mabele,+ mpo na Manase mwana ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpo na oyo asalaki na Yerusaleme.+

 5 Nani akomonisela yo motema mawa, Ee Yerusaleme?

Nani akoya kotala yo na mpasi na yo?

Mpe nani akoya kotuna yo soki ozali malamu?’

 6 ‘Osundoli ngai,’ Yehova alobi bongo.+

‘Ozali kaka kopesa ngai mokɔngɔ.*+

Na yango nakosembolela yo lobɔkɔ na ngai mpe nakoboma yo.+

Nalɛmbi koyokela yo mawa.

 7 Mpe nakopupola bango na nkanya ya monene na baporte ya mokili.

Nakozangisa bango bana.+

Nakobebisa bato na ngai,

Mpo baboyi kotika etamboli na bango ya mabe.+

 8 Basi na bango oyo mibali bakufá bakokóma mingi koleka mbuma ya zɛlo ya mbu.

Na midi nakotindela bango mobebisi, akobundisa bamama ná bilenge mibali.

Nakomemela bango mobulungano mpe nsɔmɔ na pwasa.

 9 Mwasi oyo abotaki bana nsambo alɛmbi;

Azali kopema na mpasi.

Moi na ye elali nzokande mokolo ezali naino;

Ayoki nsɔni mpe asambwe.’

‘Mpe ndambo ya bato oyo batikali kati na bango,

Nakokaba bango na mopanga ya banguna na bango,’ Yehova alobi bongo.”+

10 Mawa na ngai, Ee mama na ngai, mpo na nini obotaki ngai?+

Bato na mabele mobimba bazali kowelana na ngai mpe kobundisa ngai.

Nadefisi te, badefisi ngai mpe te,

Kasi bango nyonso bazali kolakela ngai mabe.

11 Yehova alobi boye: “Nakosalisa yo mpenza.

Ya solo mpenza nakolobela mpo na yo na ntango ya likama,

Na ntango ya mpasi, liboso ya monguna.

12 Moto akoki nde kobukabuka ebende,

Ebende oyo euti na nɔrdi, mpe kwivre?

13 Bozwi na yo mpe biloko na yo ya motuya nakotika yango epunzama,+

Mpo na lifuti te, kasi mpo na kopesa yo etumbu mpo na masumu nyonso oyo osali na bateritware na yo nyonso.

14 Nakopesa yango epai ya banguna na yo

Mpo bámema yango na mokili oyo oyebi te.+

Mpo nkanda na ngai epelisi mɔtɔ,

Mpe epeli mpo na kozikisa yo.”+

15 Oyebi, Ee Yehova,

Kanisá ngai mpe tyelá ngai likebi.

Zongiselá banyokoli na ngai mabe mpo na ngai.+

Komonisela bango te motema molai noki báboma ngai.*

Yebá ete mpo na yo nazali komema nsɔni oyo.+

16 Ntango nazwaki maloba na yo, nalyaki yango lokola bilei;+

Mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai,

Mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga.

17 Nafandi te esika moko na bato oyo balingaka bisengo mpo nasepela.+

Nafandi kaka ngai moko mpo lobɔkɔ na yo ezali likoló na ngai,

Mpo otondisi ngai na nkanda na yo ya makasi.*+

18 Mpo na nini mpasi na ngai ezali kosila te mpe mpota na ngai ezali kobela te?

Eboyi kokauka.

Okokóma liziba ya mai oyo ezali kopesa mai te,

Oyo bakoki kotyela motema te?

19 Na yango, talá oyo Yehova alobi:

“Soki ozongi, nakondima yo lisusu.

Mpe okotɛlɛma liboso na ngai.

Soki okaboli eloko ya motuya na eloko oyo ezali mpamba,

Okokóma molobeli na ngai.*

Bango bakozongela yo,

Kasi yo okozongela bango te.”

20 “Nakómisi yo epai ya bato oyo efelo ya kwivre oyo ebatelami makasi;+

Bakobundisa yo mpenza,

Kasi bakolonga yo te.+

Mpo nazali elongo na yo, mpo na kobikisa yo mpe kosikola yo,” Yehova alobi bongo.

21 “Nakobikisa yo na lobɔkɔ ya bato mabe,

Mpe nakosikola yo na lobɔkɔ ya banyokoli.”

16 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Osengeli te kobala, mpe osengeli te kozala na bana mibali mpe ya basi na esika oyo. 3 Mpo talá oyo Yehova alobi mpo na bana mibali mpe bana basi oyo bazali kobotama na esika oyo, mpe mpo na bamama na bango oyo bazali kobota bango mpe mpo na batata na bango na mokili oyo: 4 ‘Bakokufa na bamaladi oyo ebomaka,+ kasi moto moko te akolela bango to akokunda bango. Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.+ Bakokufa na mopanga mpe na nzala,+ mpe bibembe na bango ekozala mpenza bilei mpo na bandɛkɛ ya likoló mpe mpo na banyama ya mabele.’

 5 Mpo talá oyo Yehova alobi:

‘Kokɔta te na ndako oyo bazali kosala fɛti ya matánga,

Mpe kokende kolela te mpe kobɔndisa bango te.’+

‘Mpo nalongoli kimya na ngai epai ya bato oyo,’ Yehova alobi bongo,

‘Nalongoli mpe bolingo ya sembo na ngai mpe motema mawa na ngai.+

 6 Bato minene mpe bato mike bakokufa na mokili oyo.

Bakokundama te,

Moto moko te akolela bango,

Moto moko te akomikatakata nzoto to akokokola motó mpo na bango.*

 7 Mpe moto moko te akopesa bilei mpo na baoyo bazali kolela,

Kobɔndisa bango mpo na bato oyo bakufi;

Mpe moto moko te akopesa bango kɔpɔ ya vinyo oyo ebɔndisaka

Mpo na komɛla ndenge babungisi tata to mama na bango.

 8 Mpe kokɔta te na ndako ya fɛti

Mpo na kofanda elongo na bango mpo na kolya mpe komɛla.’

9 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá na esika oyo, na miso na bino mpe na mikolo na bino, nakosukisa koganga ya kosepela mpe ya esengo, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala.’+

10 “Ntango okoyebisa bato oyo maloba oyo nyonso, bakotuna yo: ‘Mpo na nini Yehova alobi ete mpasi monene boye ekómela biso, libunga nini mpe lisumu nini tosaleli Yehova Nzambe na biso?’+ 11 Osengeli koyanola bango ete: ‘“Mpo batata na bino basundolaki ngai,”+ Yehova alobi bongo, “mpe bakobaki kosambela banzambe mosusu, kosalela bango mpe kogumbamela bango.+ Kasi basundolaki ngai, mpe batosaki te mobeko na ngai.+ 12 Mpe bino, bosali mabe mingi koleka batata na bino,+ mpe mokomoko na bino alandi na motó makasi motema mabe na ye na esika ya kotosa ngai.+ 13 Yango wana nakolongola bino na mokili oyo, mpe nakobwaka bino na mokili oyo ezala bino to batata na bino boyebi te,+ mpe kuna bokosalela mpenza banzambe mosusu butu moi,+ mpo nakomonisela bino boboto te.”’

14 Nzokande, Yehova alobi boye: “‘Mikolo ezali koya, bakoloba lisusu te ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito!”+ 15 Kasi bakoloba nde ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, moto oyo abimisaki bato ya Yisraele na mokili ya nɔrdi mpe na mikili nyonso epai apalanganisaki bango!” Mpe nakozongisa bango na mokili na bango, oyo napesaki bankɔkɔ na bango.’+

16 ‘Talá nazali kobengisa baluki-mbisi ebele,’ Yehova alobi bongo,

‘Mpe bakoluka bango ndenge balukaka mbisi;

Na nsima nakobengisa babomi-nyama ebele,

Mpe bakoluka bango ndenge balukaka nyama na ngomba nyonso mpe na ngomba nyonso ya moke

Mpe na madusu ya mabanga.

17 Mpo miso na ngai ezali likoló ya eloko nyonso oyo basalaka.*

Babombani te liboso na ngai,

Libunga na bango mpe ebombani te na miso na ngai.

18 Libosoliboso, nakopesa bango etumbu makasi mpenza mpo na libunga na bango mpe lisumu na bango,+

Mpo bakómisi mabele na ngai eloko mpamba na bikeko na bango ya bosɔtɔ oyo ezangi bomoi

Mpe batondisi libula na ngai na biloko na bango oyo eyinamá.’”+

19 Ee Yehova, makasi na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai,

Esika na ngai ya kokima na mokolo ya mpasi,+

Bato ya bikólo bakoya epai na yo longwa na bansuka ya mabele

Mpe bakoloba ete: “Libula oyo bankɔkɔ na biso bazwaki ezali kaka lokuta,

Eloko ya mpamba mpe makambo oyo epesaka litomba te.”+

20 Moto akoki nde komisalela banzambe

Nzokande bazali mpenza banzambe te?+

21 “Bongo nakosala ete báyeba,

Na ntango yango nakosala ete báyeba makasi na ngai mpe nguya na ngai,

Mpe bakoyeba mpenza ete nkombo na ngai ezali Yehova.”

17 “Lisumu ya Yuda ekomami na ekomeli ya ebende.

Na nsɔngɛ ya diama, yango ekatami mayemi na etanda ya motema na bango

Mpe na maseke ya bitumbelo na bango,

 2 Wana bana na bango bazali kokanisa bitumbelo mpe banzete na bango ya losambo*+

Pembeni na nzete oyo etondi na nkasa, na bangomba mike oyo etombwaná,+

 3 Na bangomba oyo ezali na esobe ya monene.

Biloko na yo, biloko na yo nyonso ya motuya, nakopesa yango mpo epunzama+

—Ɛɛ bisika na yo oyo etombwaná mpo na lisumu oyo esalemi na bateritware na yo nyonso.+

 4 Yo moko okotika libula oyo napesaki yo.+

Mpe nakosala ete osalela banguna na yo na mokili oyo oyebi te,+

Mpo opelisi nkanda na ngai lokola mɔtɔ.*+

Ekopela mpo na libela.”

 5 Talá oyo Yehova alobi:

“Alakelama mabe moto* oyo azali kotyela moto mpamba motema,+

Oyo azali kotya motema na makasi ya moto,*+

Mpe oyo motema na ye ezali kotika Yehova.

 6 Akokóma lokola nzete oyo ezali yango moko na mokili ekauká.

Akomona te ntango bolamu ekoya,

Kasi akofanda na bisika ekauká na esobe,

Na mokili ya mungwa epai moto moko te akoki kofanda.

 7 Apambolama moto* oyo azali kotyela Yehova motema,

Oyo atyelaka Yehova elikya.+

 8 Akokóma lokola nzete oyo elonami pembeni ya mai,

Oyo ezali kotinda misisa na yango tii na mokɛli.

Akomona te ntango molunge ekoya,

Kasi nkasa na ye ekotondana mpenza.+

Mpe na mbula ya eleko ya kokauka makasi akomitungisa te,

Mpe akotika te kobota mbuma.

 9 Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.+

Nani akoki koyeba yango?

10 Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema,+

Natalatalaka makanisi oyo ebombaná mpenza,*

Mpo na kofuta moto na moto na kolanda etamboli na ye,

Mpe misala na ye.+

11 Moto oyo azali konduka bomɛngo, kasi na bosembo te+

Azali lokola ekwale* oyo eyanganisi maki oyo yango ebwaki te,

Akotika bomɛngo yango na katikati ya bomoi na ye,

Mpe na nsuka akomonana zoba.”

12 Kiti ya bokonzi ya nkembo ya Nzambe etombwani uta na ebandeli,

Kuna nde esika mosantu na biso ezali.+

13 Ee Yehova, elikya ya Yisraele,

Baoyo nyonso bazali kotika yo bakopɔla na nsɔni.

Baoyo bazali kopɛngwa mpe kotika yo* bakokomama nkombo na mabele,+

Mpo batiki Yehova, liziba ya mai ya bomoi.+

14 Bikisá ngai, Ee Yehova, mpe nakobika.

Sikolá ngai, mpe nakosikolama,+

Mpo ezali yo nde nasanzolaka.

15 Talá! Bato mosusu bazali koloba na ngai ete:

“Mpo na nini liloba ya Yehova ekokisami naino te?+

Ekokisama sikoyo!”

16 Kasi ngai, natiki te kolanda yo mobateli ya mpate,

Nalingaki ata moke te ete mokolo yango ya libebi eya.

Oyebi malamu eloko nyonso oyo mbɛbu na ngai elobi;

Nyonso wana esalemi na miso na yo.

17 Kopesa ngai nsɔmɔ te.

Ozali esika na ngai ya kokima na mokolo ya mpasi.

18 Tiká banyokoli na ngai bápɔla na nsɔni,+

Kasi kotika ngai te napɔla na nsɔni.

Salá ete bálɛnga na nsɔmɔ,

Kasi kosala te ete ngai nalɛnga na nsɔmɔ.

Yeiselá bango mokolo ya mpasi,+

Panzá bango mpe bebisá bango mpenza.*

19 Talá oyo Yehova alobi na ngai: “Kende, mpe tɛlɛmá na porte ya bana ya bato, oyo bakonzi ya Yuda bakɔtelaka mpe babimelaka, mpe na baporte nyonso ya Yerusaleme.+ 20 Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Bóyoka liloba ya Yehova, bino bakonzi ya Yuda, bato nyonso ya Yuda mpe bino nyonso bafandi ya Yerusaleme, baoyo bozali kokɔta na baporte oyo. 21 Talá oyo Yehova alobi: “Bókeba,* bómema mokumba moko te na mokolo ya sabata mpe bókɔtisa mokumba moko te na baporte ya Yerusaleme.+ 22 Bosengeli te kobimisa mokumba ata moko na bandako na bino na mokolo ya sabata; mpe bosengeli kosala ata mosala moko te.+ Bókoba kosantisa mokolo ya sabata, kaka ndenge napesaki bankɔkɔ na bino mitindo.+ 23 Kasi bayokaki te mpe batyaki likebi te,* mpe na motó makasi nyonso* baboyaki kotosa mpe kondima disiplini.”’+

24 “‘“Nzokande soki botosi mpenza ngai,” Yehova alobi bongo, “mpe bokɔtisi ata mokumba moko te na baporte ya engumba oyo na mokolo ya sabata mpe soki bozali kosala mosala ata moko te mpo na kokoba kosantisa mokolo ya sabata,+ 25 bakonzi ná bankumu oyo bafandi na kiti ya bokonzi ya Davidi+ bakokɔta mpe na baporte ya engumba oyo, bakomata na makalo mpe na bampunda, bango ná bankumu na bango, bato ya Yuda mpe bafandi ya Yerusaleme;+ mpe bato bakofanda na engumba oyo mpo na libela. 26 Mpe bato bakouta na bingumba ya Yuda, uta na zingazinga ya Yerusaleme, na mokili ya Benyamina,+ na mokili ya nse,+ na etúká ya ngombangomba mpe na Negebe,* bakomema na ndako ya Yehova makabo mobimba ya kotumba,+ bambeka,+ makabo ya mbuma,+ olibana, mpe bambeka ya kopesa matɔndi.+

27 “‘“Kasi soki botosi ngai te mpe bokobi kosantisa mokolo ya sabata te, soki bomemi mikumba, mpe bokɔti na yango na baporte ya Yerusaleme na mokolo ya sabata, nakotumba baporte na yango, mpe mɔtɔ ekozikisa mpenza bandako milai ya kofanda ya Yerusaleme+ mpe mɔtɔ yango ekobomama te.”’”+

18 Yehova alobaki na Yirimia ete: 2 “Tɛlɛmá mpe kitá tii na ndako ya moyemi-mbɛki,+ mpe kuna nakoyokisa yo maloba na ngai.”

3 Na yango nakitaki tii na ndako ya moyemi-mbɛki, mpe kuna azalaki kosala mbɛki.* 4 Kasi mbɛki oyo moyemi-mbɛki azalaki kosala na mabele* ebebaki na lobɔkɔ na ye. Na yango asalaki na mabele yango mbɛki mosusu, kaka ndenge alingaki.*

5 Bongo Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 6 “‘Ee bato ya Yisraele, nakoki te kosala na bino ndenge moyemi-mbɛki oyo azali kosala?’ Yehova alobi bongo. ‘Talá! Lokola mabele na lobɔkɔ ya moyemi-mbɛki, bino mpe bozali bongo na lobɔkɔ na ngai, Ee bato ya Yisraele.+ 7 Ntango nyonso oyo nakoloba mpo na kopikola, kokweisa to kobebisa ekólo moko to bokonzi moko,+ 8 mpe soki ekólo yango etiki mabe na yango oyo nalobelaki, ngai mpe nakobongola makanisi na ngai* mpo na mpasi oyo nakanisaki komemela yango.+ 9 Kasi ntango nyonso oyo nakoloba mpo na kotonga mpe kolona ekólo moko boye to bokonzi moko boye, 10 mpe soki esali oyo ezali mabe na miso na ngai mpe etosi ngai te, nakobongola makanisi na ngai:* nakosala lisusu te bolamu oyo nakanisaki kosalela yango.’

11 “Sikoyo, nabondeli yo, lobá na bato ya Yuda mpe na bato oyo bafandi na Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kobongisela bino mpasi moko boye mpe nazali kokanisa ndenge ya kopesa bino etumbu. Nabondeli bino, bóbongwana, bótika etamboli na bino ya mabe, mpe bóbongisa etamboli mpe misala na bino.”’”+

12 Kasi balobaki ete: “Ozali koloba na yo kaka mpamba!+ Mpo tokosala kaka ndenge biso tozali kokanisa mpe moto na moto akosala na kolanda motó makasi ya motema mabe na ye.”+

13 Bongo talá oyo Yehova alobi:

“Nabondeli bino, bótuna na kati ya bikólo.

Nani ayoká likambo ya boye?

Ngɔndɔ ya Yisraele asali likambo moko oyo eleki nsɔmɔ.+

14 Nɛjɛ ekolimwa nde na mabanga oyo etombwaná ya Liban?

To mai ya malili oyo ezali kouta mosika mpe ezali kotíyola, ekokauka nde?

15 Kasi bato na ngai babosani ngai.+

Mpo bazali kopesa bambeka* na bikeko,+

Mpe bazali kosala ete bato bábɛta libaku na banzela na bango, banzela na bango ya kala,+

Mpo na kotambola na banzela oyo ebongisami te mpe oyo ezipami te,*

16 Mpo na kokómisa mokili na bango eloko ya nsɔmɔ+

Mpe eloko ya kotyola* mpo na libela.+

Moto nyonso oyo akoleka wana akokamwa na nsɔmɔ mpe akoningisa motó na ye.+

17 Nakopalanganisa bango liboso ya monguna lokola mopɛpɛ ya ɛsti.

Na mokolo ya likama na bango, nakolakisa bango mokɔngɔ, kasi elongi te.”+

18 Mpe balobaki boye: “Bóya, tósalela Yirimia likita,+ mpo mobeko* ekozala ntango nyonso epai ya banganga-nzambe na biso, mpe toli epai ya bato ya bwanya mpe liloba epai ya basakoli. Bóya, tóloba mabe mpo na ye,* mpe tótya likebi ata moke te na oyo azali koloba.”

19 Ee Yehova, tyelá ngai likebi,

Mpe yoká makambo banguna na ngai bazali koloba.

20 Esengeli nde kozongisa mabe mpo na malamu?

Mpo batimweli ngai* libulu.+

Kanisá ndenge natɛlɛmaki liboso na yo mpo na koloba malamu na bango,

Mpo na kolongola nkanda makasi na yo epai na bango.

21 Na yango, tiká bana na bango bákufa na nzala,

Mpe tiká bato bákufa na mopanga.+

Basi na bango bázanga bana, mpe bákóma basi oyo mibali bakufá.+

Mibali na bango bákufa na maladi mabe,

Bilenge na bango bábomama na mopanga na etumba.+

22 Tiká koganga eyokana uta na bandako na bango

Ntango okomemela bango bapunzi na pwasa.

Mpo batimoli libulu mpo na kokanga ngai

Mpo batye mitambo mpo na makolo na ngai.+

23 Kasi yo, Ee Yehova,

Oyebi malamu makanisi nyonso na bango ya mabe.+

Kozipa libunga na bango te,

Mpe kolongola lisumu na bango te liboso na yo.

Tiká bábɛta libaku liboso na yo+

Pesá bango etumbu na nkanda na yo.+

19 Talá oyo Yehova alobi: “Kende mpe sombá epai ya moyemi-mbɛki molangi oyo esalemi na mabele.+ Zwá bankulutu mosusu ya bato mpe bankulutu mosusu ya banganga-nzambe, 2 mpe kende tii na Lobwaku ya mwana ya Hinome,+ oyo ezali na esika ya kokɔta na Porte ya Bipaso. Mpe kuna sakolá maloba oyo nazali koyebisa yo. 3 Okoloba ete: ‘Bóyoka liloba ya Yehova, bino bakonzi ya Yuda mpe bino bafandi ya Yerusaleme. Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi:

“‘“Nazali komema mpasi na esika oyo, mpe moto nyonso oyo akoyoka yango akoyoka mpasi na motema.* 4 Ezali mpo batiki ngai+ mpe basali ete esika oyo eyebana lisusu te.+ Na esika oyo bazali kopesa mbeka na banzambe mosusu oyo bango, bankɔkɔ na bango mpe bakonzi ya Yuda bayebaki te, mpe batondisi esika oyo na makila ya bato oyo bazali na likambo te.+ 5 Batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala mpo na kotumba na mɔtɔ bana na bango lokola makabo mibimba ya kotumbela Baala,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe nalobelaki te, mpe oyo eyá ata moke te na makanisi na ngai.”’*+

6 “‘“Na yango, talá! mikolo ezali koya,” Yehova alobi bongo, “ntango esika oyo ekobengama lisusu te Tofete to Lobwaku ya mwana ya Hinome, kasi nde Lobwaku ya Koboma.+ 7 Nakobebisa mikano ya Yuda mpe ya Yerusaleme na esika oyo. Nakosala ete bákwea na mopanga liboso ya banguna na bango mpe na mabɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma bango.* Mpe nakopesa bibembe na bango ezala bilei mpo na bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya mabele.+ 8 Mpe nakokómisa engumba oyo eloko ya nsɔmɔ mpe eloko ya kotyola.* Moto nyonso oyo akoleka wana akotikala monɔkɔ polele na nsɔmɔ mpe akobɛta piololo mpo na mpasi nyonso oyo ekokómela yango.+ 9 Mpe nakoleisa bango mosuni ya bana na bango ya mibali mpe ya basi. Lokola engumba ekozingama mpe bakolɛmba nzoto mpo banguna na bango ná bato oyo balukaka koboma bango* bakozinga bango. Bakolya moto na moto mosuni ya moninga na ye.”’+

10 “Na yango buká molangi yango na miso ya mibali oyo bazali kokende elongo na yo, 11 mpe lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ndenge wana nde nakobuka bato oyo mpe engumba oyo, ndenge moto abukaka mbɛki oyo esalemi na moyemi-mbɛki, na ndenge oyo bakoki kobongisa yango lisusu te; mpe bakokunda bibembe na Tofete tii esika ya kokunda ekozala lisusu te.”’+

12 “‘Ndenge wana nde nakosala esika oyo,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bafandi na yango, mpo na kokómisa engumba oyo lokola Tofete. 13 Mpe bandako ya Yerusaleme ná bandako ya bakonzi ya Yuda ekokóma mbindo lokola esika oyo Tofete,+ ɛɛ bandako nyonso oyo likoló ya bansamba na yango, bazalaki kopesa mbeka na limpinga mobimba ya likoló+ mpe esika bazalaki kosopela banzambe mosusu makabo ya masanga.’”+

14 Ntango Yirimia autaki na Tofete, epai Yehova atindaki ye asakola, atɛlɛmaki na lopango ya ndako ya Yehova mpe alobaki na bato nyonso ete: 15 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali komemela engumba oyo mpe basite na yango nyonso mpasi nyonso oyo nalobaki mpo na yango, mpo na motó makasi na bango* baboyi kotosa maloba na ngai.’”+

20 Sikoyo Pashure mwana ya Imere, nganga-nzambe, oyo azalaki mpe kapita oyo azalaki kokamba makambo na ndako ya Yehova, azalaki koyoka Yirimia ntango azalaki kosakola makambo yango. 2 Bongo Pashure abɛtaki mosakoli Yirimia mpe akɔtisaki ye na bikanga-makolo+ oyo ezalaki na porte ya likoló ya Benyamina, oyo ezalaki na ndako ya Yehova. 3 Kasi na mokolo oyo elandaki ntango Pashure abimisaki Yirimia na bikanga-makolo, Yirimia alobaki na ye ete:

“Yehova abengi yo na nkombo Pashure te, kasi Nsɔmɔ bipai nyonso.+ 4 Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Nakokómisa yo eloko ya nsɔmɔ mpo na yo moko mpe mpo na baninga na yo nyonso, bakokwea na mopanga ya banguna na bango wana miso na yo ezali kotala;+ mpe nakopesa Yuda mobimba na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, akomema bango na mboka mopaya na Babilone mpe akoboma bango na mopanga.+ 5 Mpe nakopesa na lobɔkɔ ya banguna na bango bozwi nyonso ya engumba oyo, biloko na yango nyonso, biloko na yango nyonso ya motuya, mpe biloko nyonso ya motuya ya bakonzi ya Yuda.+ Bakopunza yango, bakozwa yango mpe bakomema yango na Babilone.+ 6 Kasi mpo na yo, Ee Pashure, mpe bato nyonso oyo bafandi na ndako na yo. Bokokende bakangami; okokende na Babilone mpe okokufa kuna mpe bakokunda yo ná baninga na yo nyonso kuna, mpo osakweli bango makambo ya lokuta.’”+

 7 Okosi ngai, Ee Yehova, mpe nakosami.

Osaleli makasi na yo epai na ngai, mpe olongi.+

Nakómi eloko ya kosɛka mokolo mobimba.

Moto nyonso azali kotyola ngai.+

 8 Mpo ntango nyonso oyo nazali koloba, nasengeli koganga mpe kosakola ete

“Mobulu mpe libebi.”

Mpo liloba ya Yehova ekómeli ngai likambo ya kosambwa mpe ya kotyolama mokolo mobimba.+

 9 Bongo nalobaki: “Nakotánga nkombo na ye te,

Mpe nakoloba na nkombo na ye lisusu te.”+

Kasi na motema na ngai ekómaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai,

Mpe nakokaki lisusu te kobomba yango;

Nakokaki kokangela yango motema te.+

10 Mpo nayokaki bansango mabe mingi;

Nsɔmɔ ezingaki ngai.+

“Bófunda ye, tófunda ye!”

Moto nyonso oyo azali komonisa ete azali na kimya elongo na ngai azalaki kozela ete nasala likambo moko ya mabe:+

“Mbala mosusu akosala libunga moko ya bozoba,

Mpe tokoki kolonga ye mpe kozongisela ye mabe.”

11 Kasi Yehova azalaki elongo na ngai lokola mobundi-etumba moko ya nsɔmɔ.+

Yango wana baoyo bazali konyokola ngai bakobɛta libaku mpe bakolonga te.+

Bakopɔla na nsɔni mpenza, mpo makambo na bango ekotambola malamu te.

Kosambwa na bango ekoumela libela mpe bato bakobosana yango te.+

12 Kasi yo, Ee Yehova ya mampinga, ozali kotalatala moto ya sembo;

Omonaka motema mpe makanisi oyo ebombaná mpenza.*+

Tiká namona ndenge okozongisela bango mabe,+

Mpo napesi likambo na ngai ya kosamba na mabɔkɔ na yo.+

13 Bóyembela Yehova! Bósanzola Yehova!

Mpo abikisi mobola* na lobɔkɔ ya basali-mabe.

14 Mokolo oyo nabotamaki elakelama mabe!

Mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai epambolama te!+

15 Alakelama mabe moto oyo amemelaki tata na ngai nsango malamu mpe alobaki ete:

“Baboteli yo mwana, mwana mobali!”

Yango esepelisaki ye mingi.

16 Moto yango akóma mpenza lokola bingumba oyo Yehova akweisá kozanga mawa.

Ayoka kolela na ntɔngɔ mpe makɛlɛlɛ ya etumba na midi.

17 Mpo na nini abomaki ngai te ntango nazalaki naino na libumu ya mama na ngai,

Mpo mama na ngai akóma lilita na ngai

Mpe libumu na ye etikala na zemi ya libela?+

18 Mpo na nini nabimaki na libumu

Mpo namona mpasi mpe nanyokwama,

Mpo bomoi na ngai esuka na nsɔni?+

21 Oyo ezali maloba oyo Yehova alobaki na Yirimia, ntango Mokonzi Zidikiya+ atindelaki ye Pashure+ mwana ya Malakiya mpe Sefania+ mwana ya Maaseya, nganga-nzambe, mpo na kosɛnga ye ete: 2 “Tobondeli yo, tuná Yehova mpo na biso, mpo Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone azali kobundisa biso.+ Mbala mosusu Yehova akosalela biso likambo moko ya kokamwa, Nebukadenezare akotika kobundisa biso.”+

3 Yirimia alobaki na bango boye: “Talá oyo bokoloba na Zidikiya: 4 ‘Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: “Nazali kobalusela bino bibundeli ya etumba oyo ezali na mabɔkɔ na bino, oyo bozali kobundisa na yango mokonzi ya Babilone+ mpe Bakaladea oyo bazingi bino na libándá ya efelo, mpe nakoyanganisa bango na katikati ya engumba oyo. 5 Mpe ngai moko nakobunda na bino+ na lobɔkɔ na ngai ya makasi mpe ya nguya, na nkanda, na nkanda makasi mpe na kosilika makasi.+ 6 Nakobɛta bato oyo bafandi na engumba oyo, moto ná nyama. Bakokufa na maladi moko monene ya mabe.”’+

7 “‘“Mpe nsima na yango,” Yehova alobi bongo, “talá oyo ekokómela Zidikiya mokonzi ya Yuda, basaleli na ye, bato mpe baoyo bakotikala na kati ya engumba oyo, baoyo bakobika na maladi mabe, na mopanga mpe na nzala: nakokaba bango na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma bango,*+ akoboma bango na mopanga. Akoyoka mpasi na motema te mpo na bango, akomonisela bango motema mawa te mpe akoyoka mawa ata moke te.”’+

8 “Mpe okoloba na bato oyo boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Nazali kotya liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya liwa. 9 Baoyo bakotikala na engumba oyo bakobomama na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe; kasi baoyo nyonso bakobima mpe bakokende komitika na mabɔkɔ ya Bakaladea oyo bazingi bino, bakotikala na bomoi, mpe bakobikisa bomoi na bango.”’+

10 “‘“Mpo nazwi ekateli ya komemela engumba oyo* mpasi, kasi bolamu te,”+ Yehova alobi bongo. “Ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone,+ mpe akozikisa yango na mɔtɔ.”+

11 “‘Ee bino bato ya ndako ya mokonzi ya Yuda, bóyoka liloba ya Yehova. 12 Ee bato ya libota ya Davidi, bótala oyo Yehova alobi:

“Bókataka makambo na bosembo mokolo na mokolo,

Bóbikisaka moto oyo bazali koyiba ye epai ya mobubi,+

Noki nkanda na ngai engala lokola mɔtɔ+

Epela mpe moto ya koboma yango azala te

Mpo na misala na bino ya mabe.”’+

13 “‘Talá nazali kotɛmɛla yo, Ee mwasi oyo ofandi na lobwaku,*

Ee libanga ya mokili patatalu,’ Yehova alobi bongo.

‘Mpo na bino baoyo bozali koloba: “Nani akokita kobundisa biso?

Mpe nani akokɔta na bisika na biso ya kofanda?”

14 Nakopesa bino etumbu mpo na misala na bino,’+

Yehova alobi bongo.

‘Mpe nakotya mɔtɔ na zamba na ye,

Mpe ekozikisa biloko nyonso oyo ezali zingazinga na ye.’”+

22 Talá oyo Yehova alobi: “Kitá na ndako ya mokonzi ya Yuda, mpe yebisá ye nsango oyo. 2 Osengeli koloba boye: ‘Yoká liloba ya Yehova, Ee mokonzi ya Yuda, yo moto ozali kofanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, yo elongo na basali na yo mpe bato na yo, baoyo bazali kokɔta na baporte oyo. 3 Talá oyo Yehova alobi: “Bókata likambo na bosembo mpe na boyengebene. Bóbikisa moto oyo bazali koyiba ye epai ya mobubi. Bónyokola mopaya ata moko te, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá bósala bango mabe te.+ Mpe na esika oyo, bósopa te makila ya moto oyo azali na likambo te.+ 4 Mpo soki botosi mpenza liloba oyo, bakonzi oyo bafandi na kiti ya bokonzi ya Davidi+ bakokɔta na baporte ya ndako oyo, bakomata na makalo mpe na bampunda, bango ná basali na bango mpe bato na bango.”’+

5 “‘Kasi soki botosi te maloba oyo, nazali kolapa ndai na nkombo na ngai moko,’ Yehova alobi bongo, ‘ete ndako oyo ekokóma esika oyo ebebisami.’+

6 “Talá oyo Yehova alobi mpo na ndako ya mokonzi ya Yuda:

‘Ozali lokola Gileade na miso na ngai,

Lokola nsɔngɛ ya Liban.

Kasi nakokómisa yo esobe;

Bato bakofanda ata na engumba na yo moko te.+

 7 Nakotinda* babebisi mpo bábundisa yo,

Moto na moto ná bibundeli na ye.+

Mpe bakokata banzete na yo ya sɛdrɛ oyo eleki kitoko

Mpe bakobwaka yango na mɔtɔ.+

8 “‘Mpe bato ya bikólo ebele bakoleka pene na engumba oyo mpe bakolobana ete: “Mpo na nini Yehova asali boye na engumba oyo monene?”+ 9 Mpe bakoyanola bango boye: “Ezali mpo batikaki kondimana ya Yehova Nzambe na bango mpe bagumbamelaki banzambe mosusu mpe basalelaki bango.”’+

10 Bólela te mpo na moto oyo akufi,

Mpe bóyoka mawa te mpo na ye.

Bólela mingi nde mpo na moto oyo azali kokende,

Mpo akozonga lisusu te mpo na komona mokili epai abotamaki.

11 “Mpo talá oyo Yehova alobi mpo na Shalume*+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda oyo azali koyangela na esika ya Yosiya tata na ye,+ oyo alongwe na esika oyo: ‘Akozonga awa lisusu te. 12 Mpo akokufa epai bamemi ye na mboka mopaya, mpe akomona mokili oyo lisusu te.’+

13 Mawa na moto oyo azali kotonga ndako na ye mpe bashambrɛ na ye ya likoló,

Kasi nakozanga bosembo,*

Oyo azali kosalisa moninga na ye mosala kaka mpamba,

Mpe azali koboya kofuta ye;+

14 Moto oyo azali koloba ete: ‘Nakomitongela ndako moko monene

Oyo ezali na bashambrɛ minene ya likoló.

Nakosalela yango bafɛnɛtrɛ

Mpo na koyeisa yango kitoko, nakolatisa yango mabaya ya sɛdrɛ mpe nakopakola yango langi ya motane pɛɛ.’

15 Okokoba nde koyangela mpo ozali kosalela nzete ya sɛdrɛ mingi koleka basusu?

Tata na yo alyaki mpe amɛlaki,

Kasi asalaki makambo na bosembo mpe na boyengebene,+

Mpe makambo etambolaki malamu mpo na ye.

16 Abundelaki lotomo ya moto ya mpasi mpe ya mobola,

Yango wana makambo etambolaki malamu.

‘Yango te koyeba ngai?’ Yehova alobi bongo.

17 ‘Kasi miso mpe motema na yo etyami na eloko mosusu te, kaka na makambo oyo:

Koluka litomba na yo ya mabe, kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,

Mpe kobɔtɔla ná kobuba.’

18 “Na yango talá oyo Yehova alobi mpo na Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda:

‘Bakolela mpo na ye te ete:

“Mawa, ndeko na ngai ya mobali! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi!”

Bakolela ye te ete:

“Mawa, Ee nkolo! Mawa, mokonzi!”

19 Akokundama ndenge mpunda ekundamaka,+

Akobendama mpe akobwakama libándá

Na baporte ya Yerusaleme.’+

20 Matá na Liban mpe gangá,

Tombolá mongongo na yo na Bashane.

Mpe gangá uta na Abarime,+

Mpo baoyo nyonso balingaka yo makasi babukanibukani.+

21 Nalobaki na yo na ntango oyo ozalaki komiyoka ete obatelami.

Kasi olobaki ete: ‘Nakotosa te.’+

Yango nde nzela na yo banda bolenge na yo,

Mpo otosaki mongongo na ngai te.+

22 Mopɛpɛ ekomema mosika babateli na yo nyonso ya mpate,+

Mpe baoyo nyonso balingaka yo makasi bakokende bakangami.

Bongo okoyoka nsɔni mpe okosambwa mpo na mpasi na yo nyonso.

23 Ee yo oyo ofandi na Liban,+

Oyo ofandi na zumbu* na banzete ya sɛdrɛ,+

Okolelalela* mpenza ntango mpasi makasi ekokwela yo,

Mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota!”+

24 Yehova alobi boye: “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ ‘ata soki Konia*+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, azalaka lopɛtɛ ya kotya kashɛ na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nalingaki kolongola ye wana! 25 Nakopesa yo na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma yo,* na lobɔkɔ ya baoyo ozali kobanga, na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone mpe na lobɔkɔ ya Bakaladea.+ 26 Yo ná mama na yo oyo abotaki yo nakobwaka bino na mokili mosusu epai bobotamaki te, mpe kuna nde bokokufa. 27 Mpe bakozonga te na mokili oyo balingaka mingi.*+

28 Moto oyo Konia, azali nde mbɛki oyo batyoli, oyo babuki,

Mbɛki oyo moto moko te azali na mposa na yango?

Mpo na nini ye ná libota na ye babwakami na nse

Mpe babwakami na mokili oyo bayebi te?’+

29 Ee mabele,* mabele, mabele, yoká liloba ya Yehova.

30 Talá oyo Yehova alobi:

‘Bókoma ete moto oyo azali na mwana te,

Lokola moto oyo akolonga ata moke te na bomoi na ye,*

Mpo moto moko te ya libota na ye akolonga

Kofanda na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe koyangela lisusu na Yuda.’”+

23 Yehova alobi boye: “Mawa na babateli ya mpate oyo bazali kobebisa mpe kopalanganisa bampate ya esika na ngai ya koleisa bibwɛlɛ matiti!”+

2 Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na babateli ya mpate oyo bazali koleisa bato na ngai: “Bozali kopalanganisa bampate na ngai; bozali kaka kopanza yango, mpe botyeli yango likebi te.”+

“Nakopesa bino etumbu mpo na misala na bino ya mabe,” Yehova alobi bongo.

3 “Na nsima nakoyanganisa esika moko bampate na ngai oyo etikali uta na mikili nyonso epai napalanganisaki yango,+ mpe nakozongisa yango na esika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti,+ ekobota mpe ekokóma mingi.+ 4 Nakotɛlɛmisela yango babateli oyo bakoleisa yango mpenza,+ ekobanga lisusu te, ekolɛnga na nsɔmɔ te, mpe moko te ekozanga,” Yehova alobi bongo.

5 “Talá! Mikolo ezali koya,” Yehova alobi bongo, “ntango nakotɛlɛmisela Davidi etape* ya boyengebene.+ Mokonzi moko akoyangela,+ akomonisa bososoli, akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+ 6 Na mikolo na ye, Yuda ekobikisama,+ mpe Yisraele ekofanda na kimya.+ Bakobenga ye na nkombo oyo: Yehova azali Bosembo na biso.”+

7 Nzokande Yehova alobi boye, “mikolo ezali koya, bakoloba lisusu te ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi, ye oyo abimisaki bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito!’+ 8 Kasi bakoloba nde ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi, moto oyo abimisaki bato ya Yisraele na mokili ya nɔrdi mpe na mikili nyonso epai napalanganisaki bango,’ mpe bakofanda mpenza na mokili na bango.”+

9 Na likambo etali basakoli:

Motema na ngai ezoki.

Mikuwa na ngai nyonso ezali kolɛnga.

Nazali lokola moto oyo alangwe

Lokola moto oyo amɛli vinyo koleka ndelo,

Mpo na Yehova mpe mpo na maloba na ye mosantu.

10 Mpo mokili etondi na bato ya ekobo;+

Mpo na elakeli mabe mokili ezali kolela+

Mpe bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na esobe ekauki.+

Etamboli na bango ezali mabe, mpe basaleli nguya na bango na ndenge ya mabe.

11 “Mosakoli ná nganga-nzambe bakómi mbindo.*+

Nakuti mabe na bango ata na ndako na ngai,”+ Yehova alobi bongo.

12 “Na yango, nzela na bango ekokóma mosɛlu mpe molili,+

Bakotindika bango mpe bakokwea.”

Mpo nakomemela bango mpasi,

Na mbula oyo nakopesa bango etumbu,” Yehova alobi bongo.

13 “Mpe namoni makambo ya nsɔni epai ya basakoli ya Samaria.+

Bazali kosakola na nkombo ya Baala,

Mpe babungisi bato na ngai Yisraele nzela.

14 Mpe namoni makambo ya nsɔmɔ epai ya basakoli ya Yerusaleme.

Bazali kosala ekobo+ mpe bomoi na bango etondi na lokuta;+

Bazali kolendisa* basali-mabe,

Bazali kotika te kosala mabe.

Na miso na ngai bango nyonso bazali lokola Sodoma,+

Mpe bafandi na yango lokola Gomora.”+

15 Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga alobi mpo na basakoli:

“Talá nazali koleisa bango mbondo

Mpe komɛlisa bango mai oyo ezali na pwazɔ.+

Mpo lipɛngwi euti na basakoli ya Yerusaleme epalangani na mokili mobimba.”

16 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

“Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali kosakwela bino.+

Bazali kokosa bino.*

Emonaneli oyo bazali koloba, euti na motema na bango moko,+

Kasi euti te na monɔkɔ ya Yehova.+

17 Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete,

‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+

Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kolanda motema makasi na ye ete,

‘Mpasi ata moko te ekokómela bino.’+

18 Mpo nani atɛlɛmi na etuluku ya baninga ya motema ya Yehova

Mpo amona mpe ayoka liloba na ye?

Nani atye likebi na liloba na ye mpo ayoka yango?

19 Talá! Nkanda ya Yehova ekobɛta lokola mopɛpɛ makasi;

Lokola mopɛpɛ makasi oyo ezali kobalukabaluka, ekokwea na motó ya bato mabe.+

20 Nkanda ya Yehova ekokita te

Tii akokokisa mpe akosala makambo oyo akanaki.

Na eleko ya nsuka ya mikolo bokokanga mpenza ntina na yango.

21 Natindaki basakoli te, kasi bapotaki mbangu.

Nalobaki na bango te, kasi basakolaki.+

22 Nzokande, soki batɛlɛmaki na etuluku ya baninga na ngai ya motema,

Mbɛlɛ bayokisaki bato na ngai liloba na ngai

Mpe mbɛlɛ basalisaki bango bátika etamboli na bango ya mabe mpe misala na bango ya mabe.”+

23 “Nazalaka Nzambe kaka na penepene, kasi Nzambe na mosika te?” Yehova atuni bongo.

24 “Moto akoki nde kobombana na esika oyo ngai nakoki komona ye te?”+ Yehova atuni bongo.

“Nakoki te komona eloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele?”+ Yehova atuni bongo.

25 “Nayoki basakoli oyo bazali kosakola lokuta na nkombo na ngai balobi, ‘Nalɔti ndɔtɔ! Nalɔti ndɔtɔ!’+ 26 Tii ntango nini basakoli bakokoba koloba lokuta? Bazali basakoli oyo balobaka lokuta oyo euti na motema na bango.+ 27 Bazali koluka kobosanisa bato na ngai nkombo na ngai na nzela ya bandɔtɔ na bango oyo bazali koyebisana, kaka ndenge batata na bango babosanaki nkombo na ngai mpo na Baala.+ 28 Mosakoli oyo alɔti ndɔtɔ, aloba ndɔtɔ yango; kasi moto oyo azali na liloba na ngai, asengeli koloba yango na bosembo nyonso.”

“Matiti ezali nini liboso ya mbuma?” Yehova atuni bongo.

29 “Liloba na ngai ezali te lokola mɔtɔ,+ mpe ezali te lokola marto ya kotula oyo ezali kobukabuka libanga?”+ Yehova atuni bongo.

30 “Na yango nakopesa etumbu na basakoli oyo bazali koyibana maloba na ngai bango na bango,”+ Yehova alobi bongo.

31 “Nakopesa etumbu na basakoli oyo bazali kosalela lolemo na bango mpo na koloba ete, ‘talá oyo alobi!’”+ Yehova alobi bongo.

32 “Nakopesa etumbu na basakoli oyo basakolaka bandɔtɔ ya lokuta,” Yehova alobi bongo, “baoyo bazali koyebisa yango mpe bazali kobungisa bato na ngai nzela mpo na makambo na bango ya lokuta mpe komikumisa na bango.”+

“Kasi natindaki bango te mpe napesaki bango mitindo te. Na yango, bakomemela bato oyo eloko moko te ya malonga,”+ Yehova alobi bongo.

33 “Mpe soki bato oyo to mosakoli to nganga-nzambe atuni yo ete: ‘Mokumba ya kilo* ya Yehova ezali nini?’ Osengeli koyanola bango ete: ‘“Bino nde bozali mokumba ya kilo! Nakobwaka bino,”+ Yehova alobi bongo.’ 34 Kasi soki mosakoli to nganga-nzambe to bato balobi ete, ‘Nsango ya Yehova ezali mokumba ya kilo!’ Nakopesa etumbu na moto yango mpe na bato ya ndako na ye. 35 Talá oyo moto na moto azali koloba na moninga na ye mpe na ndeko na ye: ‘Yehova apesi eyano nini? Mpe Yehova alobi nini?’ 36 Kasi bóloba lisusu te ete nsango ya Yehova ezali mokumba ya kilo, mpo moto na moto azali kosala ete liloba na ye ezala kilo, mpe bobongoli maloba ya Nzambe ya bomoi, Yehova ya mampinga, Nzambe na biso.

37 “Talá oyo okoloba na mosakoli: ‘Eyano nini Yehova apesi yo? Mpe Yehova alobi nini? 38 Mpe soki bozali kaka koloba ete: “Nsango ya Yehova ezali mokumba ya kilo!” talá oyo Yehova alobi: “Lokola bozali koloba ete: ‘Liloba oyo ezali nsango ya mokumba ya kilo ya Yehova,’ nzokande nayebisaki bino bóloba te ete: “Nsango ya Yehova ezali mokumba ya kilo!”’ 39 Talá! Nakotombola bino mpe nakobwaka bino mosika na ngai, bino mpe engumba oyo napesaki bino ná bankɔkɔ na bino. 40 Mpe nakomemela bino nsɔni mpe kosambwa ya libela, oyo bato bakobosana te.”’”+

24 Bongo Yehova amonisaki ngai kitunga mibale ya figi etyami liboso ya tempelo ya Yehova, wana Nebukadenezare mokonzi ya Babilone asilaki komema na mboka mopaya Yekonia*+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, ná bankumu ya Yuda mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe bato oyo basalaka biloko ya bibende,* amemaki bango longwa na Yerusaleme tii na Babilone.+ 2 Kitunga moko ezalaki na bafigi ya malamu mpenza, lokola bafigi ya ebandeli mpe kitunga mosusu ezalaki na bafigi ya mabe mpenza, mpe ekokaki kolyama te mpo ezalaki mabe.

3 Bongo Yehova atunaki ngai boye: “Ozali komona nini, Yirimia?” Mpe nayanolaki ete: “Bafigi; bafigi ya malamu ezali malamu mpenza, kasi bafigi ya mabe ezali mabe mpenza, mpe ekoki kolyama te mpo ezali mabe.”+

4 Na yango Yehova alobaki na ngai ete: 5 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Kaka ndenge bafigi oyo ezali malamu, ndenge wana nde nakotalela bato ya Yuda oyo bamemami na mboka mopaya, baoyo natindi longwa na esika oyo tii na mokili ya Bakaladea. 6 Nakobatela bango mpo bázala malamu, mpe nakozongisa bango na mokili oyo.+ Nakotonga bango mpe nakobuka bango te; nakolona bango, mpe nakopikola bango te.+ 7 Nakopesa bango motema oyo ekozala na mposa ya koyeba ngai, ete ngai nazali Yehova.+ Bakokóma bato na ngai, mpe ngai nakokóma Nzambe na bango,+ mpo bakozongela ngai na motema na bango mobimba.+

8 “‘Kasi talá oyo Yehova alobi mpo na bafigi ya mabe oyo ekoki kolyama te mpo ezali mabe:+ “Ndenge wana nde nakotalela Zidikiya+ mokonzi ya Yuda, bankumu na ye, bafandi ya Yerusaleme oyo babiki, baoyo batikali na mokili oyo mpe baoyo bazali kofanda na mokili ya Ezipito.+ 9 Mpasi oyo nakomemela bango ekozala mabe mpenza, makonzi nyonso ya mabele ekobanga ntango nakokómisa bango eloko ya nsɔmɔ.+ Na bisika nyonso oyo nakopalanganisa bango,+ bato bakotyola bango, bakozwa bango ndakisa ya bato oyo balakelami mabe, bakosɛka bango mpe bakolakela bango mabe.+ 10 Mpe nakotindela bango bitumba,+ nzala mpe maladi mabe,+ tii bakosila na mabele oyo napesaki bango mpe bankɔkɔ na bango.”’”

25 Nzambe alobaki na Yirimia mpo na bato nyonso ya Yuda na mbula ya minei ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, elingi koloba, mbula ya liboso ya bokonzi ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone. 2 Talá oyo mosakoli Yirimia alobaki mpo na bato nyonso ya Yuda mpe mpo na bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme:

3 “Yehova azali koloba na ngai esali sikoyo mbula 23, banda mbula ya 13 ya bokonzi ya Yosiya+ mwana ya Amone, mokonzi ya Yuda, tii mokolo ya lelo, nazalaki koloba na bino mbala na mbala,* kasi boyokaki te.+ 4 Mpe Yehova atindelaki bino basaleli na ye nyonso basakoli, azalaki kotinda bango mbala na mbala,* kasi bozalaki koyoka te mpe kotya likebi te.*+ 5 Bazalaki koloba ete: ‘Tobondeli bino, bótika etamboli na bino ya mabe mpe misala na bino ya mabe.+ Na yango, bokokoba kofanda ntango molai na mabele oyo Yehova apesaki bino ná bankɔkɔ na bino banda kala. 6 Bósambela te banzambe mosusu, bósalela bango te mpe bógumbamela bango te, mpo bozali kosilikisa ngai na ndenge bozali kosala bikeko, noki te nakopesa bino etumbu.’

7 “‘Kasi boyokelaki ngai te,’ Yehova alobi bongo, ‘kutu bosilikisaki ngai na bikeko oyo bosalaki, yango wana napesaki bino etumbu.’+

8 “Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘“Lokola botosaki maloba na ngai te, 9 nazali kobengisa mabota nyonso ya nɔrdi,”+ Yehova alobi bongo, “nazali kobengisa Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mosaleli na ngai,+ mpe nakosala ete bábundisa mokili oyo,+ bafandi na yango mpe bikólo nyonso oyo ezali zingazinga.+ Nakobebisa yo mpe mabota oyo mpe nakokómisa yango eloko ya nsɔmɔ, eloko ya kotyola* mpe bisika oyo ebebisamá mpo na libela. 10 Nakosilisa epai na bango makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala,+ lokito ya enikelo ya mabɔkɔ mpe pole ya mwinda. 11 Mpe mokili oyo mobimba ekokóma esika oyo ebebisami, eloko ya nsɔmɔ, mpe bato ya bikólo oyo bakosalela mokonzi ya Babilone mbula 70.”’+

12 “‘Kasi ntango mbula 70 ekokoka,+ nakopesa mokonzi ya Babilone mpe ekólo oyo etumbu mpo na libunga na bango,’+ Yehova alobi bongo, ‘mpe nakokómisa mokili ya Bakaladea esika oyo etikali mpamba mpo na libela.+ 13 Nakokokisa maloba nyonso oyo nalobaki mpo na mokili yango, nyonso oyo ekomami na buku oyo, oyo Yirimia asakweli bikólo nyonso. 14 Mpo bikólo mingi mpe bakonzi minene,+ bakokómisa bango baombo na bango,+ nakopesa bango etumbu na kolanda misala na bango mpe makambo oyo basalaki.’”+

15 Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobaki na ngai: “Zwá kɔpɔ oyo ya vinyo ya nkanda na lobɔkɔ na ngai, mpe mɛlisá yango bikólo nyonso oyo nazali kotinda yo epai na bango. 16 Bakomɛla mpe bakotengatenga, bakosala makambo lokola bato ya magboma mpo na bitumba oyo nazali kotinda na kati na bango.”+

17 Nazwaki kɔpɔ yango na lobɔkɔ ya Yehova mpe namɛlisaki bikólo nyonso oyo Yehova atindaki ngai epai na bango:+ 18 nabandaki na Yerusaleme mpe bingumba ya Yuda,+ bakonzi na yango mpe bankumu na yango, mpo na kokómisa yango esika oyo ebebisami, eloko ya nsɔmɔ, eloko ya kotyola* mpe elakeli mabe,+ ndenge ezali lelo oyo; 19 Na nsima namɛlisaki yango Farao mokonzi ya Ezipito mpe basaleli na ye, bankumu ya mboka mpe bato na ye nyonso,+ 20 mpe bapaya nyonso oyo bazalaki kofanda na bango, bakonzi nyonso ya mokili ya Uze, bakonzi nyonso ya mokili ya Bafilistia,+ Ashekelone,+ Gaza, Ekrone mpe batikali ya Ashedode; 21 Edome,+ Moabe+ mpe bato ya Amone;+ 22 bakonzi nyonso ya Tire, bakonzi nyonso ya Sidone+ mpe bakonzi ya esanga oyo ezali na etúká ya mbu; 23 Dedane,+ Tema, Buze mpe baoyo nyonso bazali na nsuki oyo ekatami na mpakatoi;+ 24 bakonzi nyonso ya Baarabe+ mpe bakonzi nyonso ya bato ndenge na ndenge oyo bafandaka na esobe; 25 bakonzi nyonso ya Zimiri, bakonzi nyonso ya Elame+ mpe bakonzi nyonso ya Bamede;+ 26 bakonzi nyonso ya nɔrdi, oyo bazali pene mpe mosika, moko nsima na mosusu, mpe makonzi mosusu nyonso ya mabele; mpe mokonzi ya Sheshake*+ akomɛla nsima na bango.

27 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bómɛla, bólangwa, bósanza, bókwea mpe bótɛlɛma te+ mpo nazali kotinda banguna na bino mpo bábundisa bino.”’ 28 Mpe soki baboyi kozwa kɔpɔ yango na lobɔkɔ na yo mpo na komɛla, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bosengeli komɛla yango! 29 Mpo talá! Soki nazali komema libosoliboso mpasi na engumba oyo ebengami na nkombo na ngai,+ bongo bino, bokozwa etumbu te?”’+

“‘Bokozwa etumbu, mpo nazali kobenga mopanga mpo na kobundisa bato nyonso oyo bafandi na mabele,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.

30 “Mpe osengeli kosakwela bango maloba oyo nyonso, okoloba na bango ete,

‘Yehova akoganga longwa na likoló,

Longwa na esika mosantu na ye oyo afandaka akoyokisa mongongo na ye.

Akoganga makasi. Akosakola lisambisi mpo na baoyo bazali na esika oyo afandaka,

Akoganga lokola bato oyo bazali konyata vinyo na ekamwelo,

Akoyembela bato nyonso oyo bafandi na mabele loyembo ya bolongi.’

31 “‘Makɛlɛlɛ ekoyokana tii na bansuka ya mabele,

Mpo Yehova azali na likambo ná bikólo.

Akosambisa bato nyonso.*+

Mpe akokaba bato mabe mpo bábomama na mopanga,’ Yehova alobi bongo.

32 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

‘Talá! Mpasi moko ezali kopanzana longwa na ekólo moko tii na ekólo mosusu,+

Mpe nakobimisa mopɛpɛ moko ya makasi longwa na bisika oyo eleki mosika na mabele.+

33 “‘Na mokolo yango bato oyo Yehova akoboma bakozala longwa na nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele. Bakolela bango te, bakosangisa bibembe na bango te mpe bakokundama te. Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.’

34 Bóganga na kolela, bino babateli ya mpate, mpe bóbelela!

Bómibalolabalola na mabele, bino bankolo ya etonga,

Mpo ntango na bino ya kobomama mpe ya kopalangana eyei,

Mpe bokokwea lokola mbɛki moko ya kitoko!

35 Babateli ya mpate bazali na esika ya kokima te,

Mpe bankolo ya etonga bazali na esika ya kobombana te.

36 Bóyoka! Babateli ya mpate bazali koganga

Mpe bankolo ya etonga bazali koganga na kolela,

Mpo Yehova azali kobebisa esika na bango ya koleisa bibwɛlɛ matiti.

37 Mpe bisika ya kofanda ya kimya ekómi bisika oyo ezangi bomoi

Mpo na kongala ya nkanda ya Yehova.

38 Atiki esika na ye ya kobombana lokola mwana-nkɔsi,*+

Mpo mokili na bango ekómi eloko ya nsɔmɔ

Mpo asalelaki mopanga kozanga mawa

Mpe mpo na nkanda na ye ya kongala.”

26 Na ebandeli ya bokonzi ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, Yehova alobaki na Yirimia ete: 2 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Tɛlɛmá na lopango ya ndako ya Yehova, mpe lobá mpo na bato nyonso ya bingumba ya Yuda oyo bazali koya kosambela* na ndako ya Yehova, yebisá bango makambo nyonso oyo napesi yo mitindo; kolongola liloba moko te. 3 Mbala mosusu bakoyoka mpe moto na moto akotika etamboli na ye ya mabe, mpe nakobongola makanisi na ngai* mpo na mpasi oyo nakanisaki komemela bango mpo na misala na bango ya mabe.+ 4 Lobá na bango ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Soki boyokeli ngai te mpe botosi te mibeko* oyo natyeli bino, 5 mpe boyoki te maloba ya basaleli na ngai basakoli, baoyo nazali kotindela bino mbala na mbala,* mpe baoyo boyokeli bango te,+ 6 nakokómisa ndako oyo lokola Shilo,+ mpe nakokómisa engumba oyo eloko ya elakeli mabe epai ya bikólo nyonso ya mabele.’”’”+

7 Mpe banganga-nzambe ná basakoli mpe bato nyonso bayokaki Yirimia ntango azalaki koloba maloba oyo na tempelo ya Yehova.+ 8 Na yango, ntango Yirimia asilisaki koloba makambo nyonso oyo Yehova apesaki ye mitindo ete aloba na bato nyonso, banganga-nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye, mpe balobaki na ye boye: “Okokufa mpenza. 9 Mpo na nini osakoli na nkombo ya Yehova mpe olobi ete: ‘Ndako oyo ekokóma lokola Shilo, engumba oyo ekobebisama mpe moto akozala te mpo na kofanda kuna’?” Mpe bato nyonso bazingaki Yirimia na ndako ya Yehova.

10 Ntango bankumu ya Yuda bayokaki maloba yango, babimaki na ndako ya mokonzi mpe bamataki na tempelo ya Yehova mpe bafandaki na ekɔtelo ya porte ya sika ya Yehova.+ 11 Banganga-nzambe ná basakoli balobaki na bankumu mpe na bato nyonso ete: “Moto oyo abongi na etumbu ya liwa,+ mpo asakoli makambo ya mabe mpo na engumba oyo ndenge bino moko boyoki yango na matoi na bino.”+

12 Bongo Yirimia alobaki na bankumu nyonso mpe bato nyonso ete: “Yehova nde atindaki ngai nasakola maloba nyonso oyo boyokaki mpo na ndako oyo mpe engumba oyo.+ 13 Sikoyo bóbongisa etamboli na bino mpe misala na bino, mpe bótosa mongongo ya Yehova Nzambe na bino, mpe Yehova akobongola makanisi* na ye mpo na mpasi oyo alobi ete akomemela bino.+ 14 Kasi mpo na ngai, nazali na lobɔkɔ na bino. Bósala ngai ndenge emonani malamu mpe sembo na miso na bino. 15 Kaka nde bóyeba ete soki bobomi ngai, bino, engumba oyo mpe bafandi na yango, bokomema ngambo ya makila ya moto oyo azali na likambo te, mpo ya solo Yehova nde atindaki ngai epai na bino mpo nayebisa bino makambo oyo nyonso.”

16 Bongo bankumu ná bato nyonso balobaki na banganga-nzambe mpe na basakoli ete: “Moto oyo abongi te na etumbu ya liwa, mpo alobaki na biso na nkombo ya Yehova Nzambe na biso.”

17 Lisusu, bankulutu mosusu ya mokili batɛlɛmaki mpe babandaki koloba na lisangá mobimba ya bato ete: 18 “Mika+ moto ya Moreshete asakolaki na mikolo ya Ezekiasi+ mokonzi ya Yuda mpe alobaki na bato nyonso ya Yuda ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

“Siona ekobalolama lokola elanga,

Yerusaleme ekokóma engumba oyo ebebabebá,+

Mpe ngomba ya Ndako* ekokóma lokola bisika oyo etombwaná na zamba.”’+

19 Ezekiasi mokonzi ya Yuda ná bato nyonso ya Yuda babomaki nde ye? Abangaki nde Yehova te mpe asɛngaki Yehova te ete amonisela ye boboto* mpo Yehova abongola makanisi na ye mpo na mpasi oyo alobaki akomemela bango?+ Na yango, tozali koluka mpasi monene mpo na biso moko.*

20 “Mpe ezalaki na moto mosusu oyo azalaki kosakola na nkombo ya Yehova, Uriya mwana ya Shemaya moto ya Kiriate-yearime.+ Oyo asakolaki maloba lokola oyo ya Yirimia mpo na engumba oyo mpe mokili oyo. 21 Mokonzi Yehoyakime,+ bato na ye nyonso ya nguya ná bankumu nyonso bayokaki maloba na ye, mpe mokonzi alukaki koboma ye.+ Ntango Uriya ayokaki yango na mbala moko akómaki kobanga, mpe akimaki na Ezipito. 22 Bongo mokonzi Yehoyakime atindaki Elenatane+ mwana ya Akabore na Ezipito elongo na bato mosusu. 23 Babimisaki Uriya na Ezipito mpe bamemaki ye epai ya mokonzi Yehoyakime, oyo abomaki ye na mopanga+ mpe abwakaki ebembe na ye na lilita ya bato nyonso.”

24 Kasi Ahikame+ mwana ya Shafane+ asalisaki Yirimia, na yango akabamaki te na lobɔkɔ ya bato mpo abomama.+

27 Na ebandeli ya bokonzi ya Yehoyakime mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, Yehova alobaki na Yirimia: 2 “Talá oyo Yehova alobi na ngai: ‘Omisalela bansinga mpe bikanganeli, mpe tyá yango na nkingo na yo. 3 Mpe tindelá yango mokonzi ya Edome,+ mokonzi ya Moabe,+ mokonzi ya Baamone,+ mokonzi ya Tire+ mpe mokonzi ya Sidone+ na lobɔkɔ ya bamemi-nsango oyo bazali koya na Yerusaleme epai ya Zidikiya mokonzi ya Yuda. 4 Pesá bango mitindo oyo mpo na bankolo na bango:

“‘“Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi; talá oyo bosengeli koloba na bankolo na bino: 5 ‘Ngai nde nasalá mabele, bato mpe banyama oyo bazali likoló ya etando ya mabele, na nguya na ngai monene mpe na nguya ya lobɔkɔ na ngai;* mpe napesi yango na moto oyo nasepeli.*+ 6 Mpe sikoyo napesi mikili oyo nyonso na lobɔkɔ ya mosaleli na ngai, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone; napesi ye mpe ata banyama ya zamba mpo esalela ye. 7 Mpe bato ya bikólo nyonso bakosalela ye, mwana na ye mpe mwana ya mwana na ye, tii ntango oyo bokonzi na ye ekokóma na nsuka,+ ntango bato ya bikólo mingi mpe bakonzi minene bakokómisa ye moombo na bango.’+

8 “‘“‘Soki ekólo moko to bokonzi moko eboyi kosalela Nebukadenezare mokonzi ya Babilone to eboyi kotosa mokonzi ya Babilone, nakopesa ekólo yango etumbu na nzela ya bitumba,+ ya nzala mpe ya maladi mabe,’ Yehova alobi bongo, ‘tii nakosilisa yango na lobɔkɔ na ye.’

9 “‘“‘Na yango, bóyokela te basakoli na bino, basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná, balɔti ndɔtɔ na bino, bato na bino ya misala ya maji, banganga-nkisi na bino, baoyo bazali koloba na bino ete: “Bokosalela mokonzi ya Babilone te.” 10 Mpo bazali kosakwela bino makambo ya lokuta, soki boyokeli bango bokomemama mosika ya mokili na bino, nakopalanganisa bino mpe bokokufa.

11 “‘“‘Kasi mpo na ekólo oyo ekotosa mokonzi ya Babilone mpe ekosalela ye, nakondima etikala* na mabele na yango,’ Yehova alobi bongo, ‘mpo na kolona yango mpe kofanda wana.’”’”

12 Ata Zidikiya+ mokonzi ya Yuda nalobaki na ye kaka bongo ete: “Bótosa mokonzi ya Babilone mpe bósalela ye ná bato na ye mpe bokokoba kozala na bomoi.+ 13 Mpo na nini yo ná bato na yo bókufa na bitumba,+ na nzala+ mpe na maladi mabe+ ndenge Yehova alobi mpo na ekólo oyo ezali kosalela mokonzi ya Babilone te? 14 Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino ete: ‘Bokosalela mokonzi ya Babilone te,’+ mpo bazali nde kosakwela bino makambo ya lokuta.+

15 “‘Mpo natindi bango te,’ Yehova alobi bongo, ‘kasi bazali kosakola makambo ya lokuta na nkombo na ngai. Soki boyoki bango, nakopalanganisa bino mpe bokokufa, bino ná basakoli oyo bazali kosakwela bino.’”+

16 Mpe nalobaki na banganga-nzambe mpe na bato nyonso oyo ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bóyoka te maloba ya basakoli oyo bazali kosakwela bino ete: “Talá! Etikali moke, bisaleli ya ndako ya Yehova oyo ememamaki na Babilone ezongisama!”+ Mpo bazali kosakwela bino makambo ya lokuta.+ 17 Bóyokela bango te. Bósalela mokonzi ya Babilone mpe bokokoba kozala na bomoi.+ Mpo na nini engumba oyo ekóma esika oyo ebebá? 18 Kasi soki bazali basakoli mpe soki makambo bazali koloba ezali mpenza liloba ya Yehova, nabondeli bino, tiká bábondela Yehova ya mampinga, ete bisaleli oyo etikali na ndako ya Yehova mpe na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe na Yerusaleme ekende na Babilone te.’

19 “Mpo talá oyo Yehova alobi mpo na makonzí,+ ebombelo monene ya mai,*+ bashario+ mpe bisaleli mosusu oyo etikali na engumba oyo, 20 biloko oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone azwaki te ntango amemaki Yekonia mwana ya Yehoyakime, mokonzi ya Yuda, na mboka mopaya longwa na Yerusaleme tii na Babilone, elongo na bato nyonso ya lokumu ya Yuda mpe ya Yerusaleme;+ 21 ɛɛ, talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi mpo na bisaleli oyo etikali na ndako ya Yehova, na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe na Yerusaleme: 22 ‘“Bakomema biloko yango na Babilone+ mpe kuna nde ekotikala tii mokolo oyo nakotyela yango likebi,” Yehova alobi bongo. “Nakozwa yango mpe nakozongisa yango na esika oyo.”’”+

28 Na mbula yango, na ebandeli ya bokonzi ya Zidikiya+ mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, ya mbula ya minei, mosakoli Hanania mwana ya Azure, oyo autaki na Gibeone,+ alobaki na ngai na ndako ya Yehova, na miso ya banganga-nzambe mpe ya bato nyonso ete: 2 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Nakobuka ekanganeli ya mokonzi ya Babilone.+ 3 Etikali mbula mibale* nakozongisa na esika oyo bisaleli nyonso ya ndako ya Yehova oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone azwaki na esika oyo mpe amemaki yango na Babilone.’”+ 4 “‘Nakozongisa na esika oyo Yekonia+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya, oyo bakendaki na Babilone,’+ Yehova alobi bongo, ‘mpo nakobuka ekanganeli ya mokonzi ya Babilone.’”

5 Bongo mosakoli Yirimia alobaki na mosakoli Hanania na miso ya banganga-nzambe mpe na miso ya bato nyonso oyo batɛlɛmaki na ndako ya Yehova. 6 Mosakoli Yirimia alobaki boye: “Amen!* Yehova asala bongo! Yehova akokisa maloba na yo oyo osakoli, azongisa longwa na Babilone tii na esika oyo bisaleli ya ndako ya Yehova mpe bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya! 7 Kasi, nabondeli yo, yoká nsango oyo nazali koloba na yo mpe na bato nyonso. 8 Basakoli oyo babimaki liboso na ngai mpe liboso na yo banda kala, bango mpe bazalaki kosakola mpo na mikili mingi mpe mpo na makonzi minene, bazalaki kosakola makambo etali etumba, mpasi mpe maladi mabe. 9 Soki mosakoli asakoli kimya, mpe esakweli na ye ekokisami, ekomonana polele ete Yehova nde atindaki mosakoli yango.”

10 Na yango mosakoli Hanania azwaki ekanganeli na nkingo ya mosakoli Yirimia mpe abukaki yango.+ 11 Bongo Hanania alobaki lisusu na miso ya bato nyonso ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Etikali mbula mibale, ndenge wana nde nakobuka ekanganeli ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone mpe nakolongola yango na nkingo ya bikólo nyonso.’”+ Mpe mosakoli Yirimia akendaki.

12 Ntango mosakoli Hanania abukaki ekanganeli na nkingo ya mosakoli Yirimia, na nsima Yehova ayebisaki Yirimia nsango oyo: 13 “Kende mpe lobá na Hanania boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Obuki ekanganeli ya nzete,+ kasi na esika na yango okosala ekanganeli ya ebende.” 14 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Nakotya ekanganeli ya ebende na nkingo ya bikólo oyo nyonso, mpo básalela Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mpe basengeli kosalela ye.+ Ata mpe banyama ya zamba nakopesa ye.”’”+

15 Bongo mosakoli Yirimia alobaki na mosakoli Hanania+ boye: “Nabondeli yo, yoká, Ee Hanania! Yehova atindi yo te, kasi yo moko nde otindi bato oyo bátya motema na makambo ya lokuta.+ 16 Na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Talá! Nazali kolongola yo na mabele. Na mbula oyo okokufa, mpo otindi bato bátombokela Yehova.’”+

17 Bongo mosakoli Hanania akufaki na mbula yango, na sanza ya nsambo.

29 Talá maloba ya mokanda oyo mosakoli Yirimia atindaki longwa na Yerusaleme epai ya bankulutu oyo bazalaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya, banganga-nzambe, basakoli mpe bato nyonso oyo Nebukadenezare amemaki na mboka mopaya longwa na Yerusaleme tii na Babilone, 2 atindaki yango wana mokonzi Yekonia,+ mama-mokonzi,*+ bakapita ya ndako ya mokonzi, bankumu ya Yuda ná ya Yerusaleme, mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe bato oyo basalaka biloko ya bibende* babimaki na Yerusaleme.+ 3 Atindaki mokanda yango na lobɔkɔ ya Elasa mwana ya Shafane+ mpe Gemaria mwana ya Hilikiya, oyo Zidikiya+ mokonzi ya Yuda atindaki na Babilone epai ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone. Mokanda yango elobaki boye:

4 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi na bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya, baoyo nasalaki ete bámemama na mboka mopaya longwa na Yerusaleme tii na Babilone ete: 5 ‘Bótonga bandako mpe bófanda kuna, bólona bilanga mpe bólya mbuma na yango. 6 Bóbala mpe bóbota bana mibali mpe ya basi; bózwela bana na bino ya mibali basi mpe bóbalisa bana na bino ya basi, mpo bango mpe bábota bana mibali mpe ya basi. Bókóma mingi kuna, mpe motángo na bino ekita te. 7 Mpe bóluka kimya ya engumba epai namemi bino na mboka mopaya, mpe bóbondela Yehova mpo na bolamu na yango, mpo soki ezali na kimya, bokozala na kimya.+ 8 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bótika te ete basakoli na bino mpe bato na bino oyo basakolaka makambo oyo ebombaná oyo bazali kati na bino bákosa bino,+ mpe bóyoka te bandɔtɔ na bango oyo bazali kolɔta. 9 Mpo ‘bazali kosakwela bino makambo ya lokuta na nkombo na ngai. Natindi bango te,’+ Yehova alobi bongo.”’”

10 “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Ntango mbula 70 ekokoka na Babilone nakotyela bino likebi,+ nakokokisela bino elaka na ngai ya malamu na ndenge nakozongisa bino na esika oyo.’+

11 “‘Mpo nayebi malamu makanisi oyo nazali na yango mpo na bino,’ Yehova alobi bongo, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te,+ mpo na kopesa bino bomoi ya malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.+ 12 Mpe bokobenga ngai, bokoya kobondela ngai, mpe ngai nakoyoka bino.’+

13 “‘Bokoluka ngai mpe bokozwa ngai,+ mpo bokoluka ngai na motema na bino mobimba.+ 14 Mpe nakotika ete bózwa ngai,’+ Yehova alobi bongo. ‘Mpe nakoyanganisa bakangami na bino mpe nakosangisa bino esika moko uta na bikólo nyonso mpe na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ Yehova alobi bongo. ‘Mpe nakozongisa bino na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+

15 “Kasi bino bolobi: ‘Yehova abimiseli biso basakoli na Babilone.’

16 “Mpo talá oyo Yehova alobi na mokonzi oyo afandi na kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe na bato nyonso oyo bafandi na engumba oyo, bandeko na bino oyo bamemami te na mboka mopaya elongo na bino, 17 ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Nazali kotindela bango bitumba, nzala mpe maladi mabe,+ mpe nakokómisa bango lokola bambuma ya figi oyo ebebá, oyo ekoki kolyama te mpo ezali mabe mpenza.”’+

18 “‘Mpe nakotungisa bango na bitumba,+ na nzala mpe na maladi mabe, mpe nakokómisa bango eloko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele,+ eloko ya kokamwa, eloko ya kotyola+ mpe ya nsɔni kati na bikólo nyonso epai napalanganisi bango,+ 19 mpo bayoki maloba na ngai te oyo natindelaki bango na nzela ya basaleli na ngai basakoli,’ Yehova alobi bongo, ‘natindaki bango mbala na mbala,’*+

“‘Kasi boyokaki te,’+ Yehova alobi bongo.

20 “Yango wana, bóyoka liloba ya Yehova, bino nyonso baoyo bomemamaki na mboka mopaya, baoyo natindi longwa na Yerusaleme tii na Babilone. 21 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi mpo na Ahaba mwana ya Kolaya mpe Zidikiya mwana ya Maaseya, baoyo bazali kosakwela bino makambo ya lokuta na nkombo na ngai:+ ‘Talá nazali kopesa bango na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mpe akoboma bango na miso na bino. 22 Likambo oyo ekokómela bango, bato ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya bakokóma koloba yango lokola elakeli mabe ete: “Yehova asala yo lokola Zidikiya mpe lokola Ahaba, baoyo mokonzi ya Babilone atumbaki na mɔtɔ!” 23 Mpo basali makambo ya bozoba mpenza na Yisraele,+ bazali kosala ekobo na basi ya baninga na bango mpe bazali koloba maloba ya lokuta na nkombo na ngai, likambo oyo napesaki bango mitindo te.+

“‘“Nayebi makambo oyo basali mpe nazali motatoli,”+ Yehova alobi bongo.’”

24 “Mpe okoloba na Shemaya+ moto ya Nehelame ete: 25 ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Lokola otindi mikanda na nkombo na yo epai ya bato nyonso oyo bazali na Yerusaleme, epai ya Sefania+ mwana ya Maaseya, nganga-nzambe, mpe epai ya banganga-nzambe nyonso, ete: 26 ‘Yehova akómisi yo nganga-nzambe na esika ya nganga-nzambe Yehoyada, mpo okóma mokɛngɛli ya ndako ya Yehova, ozala na mokumba ya kopesa etumbu na moto nyonso ya ligboma oyo azali kosala lokola mosakoli, mpe kotya ye na bikanga-makolo mpe na ekanga-nkingo ná mabɔkɔ;*+ 27 bongo sikoyo, mpo na nini opameli te Yirimia moto ya Anatote,+ oyo azali kosala lokola mosakoli mpo na bino?+ 28 Kutu atindeli biso nsango na Babilone ete: “Ekoumela! Bótonga bandako mpe bófanda kuna, bólona bilanga mpe bólya mbuma na yango,+—”’”’”

29 Ntango Sefania+ nganga-nzambe atángaki mokanda yango na matoi ya mosakoli Yirimia, 30 Yehova alobaki na Yirimia ete: 31 “Tindelá bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya nsango ete: ‘Talá oyo Yehova alobi mpo na Shemaya moto ya Nehelame: “Lokola Shemaya asakweli bino, nzokande natindaki ye te, mpe aluki kotinda bino bótya motema na makambo ya lokuta,+ 32 na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Nazali kopesa Shemaya moto ya Nehelame mpe libota na ye etumbu. Moto moko te ya libota na ye akobika na kati ya bato oyo; mpe akomona te bolamu oyo nakosalela bato na ngai,’ Yehova alobi bongo, ‘mpo atindi bato bátombokela Yehova.’”’”

30 Yehova alobaki na Yirimia ete: 2 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Komá na buku maloba nyonso oyo nazali koloba na yo. 3 Mpo “talá! mikolo ezali koya,” Yehova alobi bongo, “nakoyanganisa bakangami ya bato na ngai, Yisraele mpe Yuda,”+ Yehova alobi bongo, “mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bango, mpe bakozwa yango lisusu.”’”+

4 Talá maloba oyo Yehova alobi na Yisraele mpe na Yuda.

 5 Talá oyo Yehova alobi:

“Toyoki lokito ya bato bazali kolɛnga;

Nsɔmɔ, mpe kimya ezali te.

 6 Nabondeli bino, bótuna soki mobali akoki kobota.

Bongo mpo na nini namoni mobali nyonso ya makasi atye mabɔkɔ na libumu*

Lokola mwasi oyo azali kobota?+

Mpo na nini bilongi nyonso elɛmbilɛmbi?

 7 Aa mawa! Mpo mokolo yango ezali mokolo moko ya mpasi.*+

Mosusu lokola yango ezali te,

Ntango moko ya mpasi mpo na Yakobo.

Kasi akobika na yango.”

8 “Mpe na mokolo yango,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “nakobuka ekanganeli na nkingo ya bato na ngai, mpe nakokata bansinga na bango, mpe bapaya bakokómisa bango lisusu te baombo. 9 Bakosalela Yehova Nzambe na bango mpe Davidi mokonzi na bango, oyo nakobimisela bango.”+

10 “Mpe yo, mosaleli na ngai Yakobo, kobanga te,” Yehova alobi bongo,

“Mpe kozala na nsɔmɔ te, Ee Yisraele.+

Mpo nakobikisa yo uta na mosika

Mpe nakobikisa bana na yo uta na mokili oyo bakangamaki.+

Yakobo akozonga, akozala na kimya mpe akotungisama te,

Mpe moto ata moko te akobangisa bango.”+

11 “Mpo nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo,” Yehova alobi bongo,

“Nakosilisa bato nyonso kati na bikólo nyonso epai napalanganisaki yo.+

Kasi nakosilisa yo te.+

Nakosembola yo na ndenge oyo ebongi,

Mpe nakozanga te kopesa yo etumbu.”+

12 Mpo talá oyo Yehova alobi:

“Nkisi ezali te mpo na mpasi na yo.+

Mpota na yo ekosila te.

13 Moto ya kolobela likambo na yo azali te,

Ndenge ya kosilisa mpota na yo ezali te.

Nkisi ezali te mpo na yo.

14 Baoyo nyonso bazalaki kolinga yo makasi babosani yo.+

Bazali kolukaluka yo lisusu te.

Lokola ngambo na yo ezali monene mpe mpo na ebele ya masumu na yo,+

Nabɛti yo na fimbo ndenge monguna abɛtaka,+

Napesi yo etumbu ndenge moto ya nko apesaka.

15 Mpo na nini ozali kolela mpo na mpasi na yo?

Mpasi na yo ekosila te!

Lokola ngambo na yo ezali monene mpe mpo na ebele ya masumu na yo,+

Yango wana nasali yo bongo.

16 Na yango, baoyo nyonso bazali kolya yo bakolyama,+

Banguna na yo nyonso mpe bakokende bakangami.+

Baoyo bazali kopunza yo bakopunzama,

Mpe baoyo nyonso bazali kobɔtɔla yo biloko nakosala ete biloko na bango ebɔtɔlama.”+

17 “Kasi nakozongisa yo nzoto makasi, mpe nakosilisa bampota na yo,”+ Yehova alobi bongo.

“Atako bazalaki kobenga yo mwasi oyo babenganá mpe koloba ete:

‘Siona, oyo moto moko te azali koluka.’”+

18 Talá oyo Yehova alobi:

“Nazali koyanganisa bakangami ya bahema ya Yakobo,+

Mpe nakoyokela batabernakle na ye mawa.

Engumba ekotongama lisusu likoló ya ngomba na yango,+

Mpe ndako molai ya makasi ekotɛlɛma na esika na yango mpenza.

19 Mpe matɔndi ná mongongo ya baoyo bazali kosɛka ekobimela kuna.+

Nakokómisa bango mingi, mpe motángo na bango ekokita te;+

Nakokómisa bango ebele mpenza,*

Mpe bakozala eloko mpamba te.+

20 Bana na ye bakokóma ndenge bazalaki kala,

Mpe liyangani na ye ekopikama makasi liboso na ngai.+

Nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bazali konyokola ye.+

21 Moto ya nguya oyo akoyangela ye, akozala moko na bango,

Mpe mokonzi na ye akouta na libota na ye.

Nakosala ete apusana pene mpe akopusana penepene na ngai.”

“Mpo soki te, nani akondima* kopusana penepene na ngai?” Yehova atuni bongo.

22 “Mpe bokokóma bato na ngai,+ mpe ngai nakozala Nzambe na bino.”+

23 Talá! Nkanda ya Yehova ekobɛta lokola mopɛpɛ makasi,+

Lokola mopɛpɛ makasi oyo ezali kobalukabaluka, ekokwea na motó ya bato mabe.

24 Nkanda ya Yehova ekokita te

Tii akokokisa mpe akosala makambo oyo akanaki.+

Na eleko ya nsuka ya mikolo bokokanga ntina na yango.+

31 Yehova alobi boye: “Na ntango yango, nakokóma Nzambe mpo na mabota nyonso ya Yisraele, mpe bango bakokóma bato na ngai.”+

 2 Talá oyo Yehova alobi:

“Bato oyo babikaki na bitumba bandimamaki na esobe

Ntango Yisraele azalaki kokende na esika na ye ya kopema.”

 3 Yehova abimelaki ngai uta na mosika mpe alobaki:

“Nalingá yo na bolingo ya seko.

Yango wana nabendi yo epai na ngai na bolingo ya sembo.*+

 4 Nakotonga yo lisusu mpe okotongama lisusu.+

Ee ngɔndɔ ya Yisraele, okozwa lisusu bambonda na yo ya mike ya mabɔkɔ

Mpe okokɔta na mabina ya esengo.*+

 5 Okolona lisusu bilanga ya vinyo na bangomba ya Samaria.+

Baloni bakolona mpe bakolya mbuma na yango.+

 6 Mpo ekozala na mokolo oyo bakɛngɛli na bangomba ya Efraime bakobelela ete:

‘Bótɛlɛma, tómata na Siona, epai ya Yehova Nzambe na biso.’”+

 7 Mpo talá oyo Yehova alobi:

“Bóganga makasi na esengo mpo na Yakobo,

Bóganga makasi mpo bozali bato ya liboso kati na bikólo.+

Bósakola yango; bósanzola mpe bóloba ete:

‘Ee Yehova, bikisá bato na yo, batikali ya Yisraele.’+

 8 Nazali kozongisa bango uta na mokili ya nɔrdi.+

Nakoyanganisa bango uta na bisika oyo eleki mosika na mabele.+

Kati na bango moto oyo akufá miso mpe motɛngumi akozala,+

Mwasi ya zemi mpe oyo azali kobota bakozala, bango nyonso elongo.

Bakozonga awa lokola lisangá moko monene.+

 9 Bakoya na kolela.+

Nakozongisa bango awa wana bakobondela ngai mbala na mbala.

Nakotambwisa bango na mikɛli* ya mai,+

Na nzela ya malamu epai bakobɛta libaku te.

Mpamba te nazali Tata mpo na Yisraele, mpe Efraime azali mwana na ngai ya liboso.”+

10 Bóyoka liloba ya Yehova, bino bikólo,

Bósakola yango na kati na bisanga ya mosika:+

“Moto oyo apanzaki Yisraele akoyanganisa ye.

Akobatela ye ndenge mobateli ya mpate abatelaka etonga na ye.+

11 Mpo Yehova akosikola Yakobo+

Mpe akobikisa ye na lobɔkɔ ya moto oyo aleki ye na makasi.+

12 Bakoya mpe bakoganga na esengo na esika etombwaná ya Siona+

Mpe bakosepela mpo na bolamu* ya Yehova,

Mpo na blé, vinyo ya sika,+ mafuta,

Bana ya bampate mpe ya bangɔmbɛ.+

Bakokóma* lokola elanga oyo ezwaka mai malamu,+

Mpe bakolɛmba lisusu ata moke te.”+

13 “Na ntango yango ngɔndɔ akobina na esengo,

Bilenge mibali mpe mibange mibali, bango nyonso elongo.+

Nakobongola mawa na bango esengo,+

Nakobɔndisa bango mpe nakopesa bango esengo na esika ya mawa.+

14 Nakopesa banganga-nzambe bilei mingi,*

Mpe bato na ngai bakotonda na bolamu na ngai,”+ Yehova alobi bongo.

15 “Talá oyo Yehova alobi:

‘Mongongo moko ezali koyokana na Rama,+ komilelalela ná mongongo ya kolela ya mawa:

Rashele moto azali kolela bana na ye.+

Aboyi kobɔndisama mpo na bana na ye,

Mpo bazali lisusu te.’”+

16 Talá oyo Yehova alobi:

“‘Pekisá mongongo na yo kolela mpe miso na yo kobimisa mai ya miso,

Mpamba te mbano ezali mpo na mosala na yo,

Bakozonga longwa na mokili ya monguna,’+ Yehova alobi bongo.

17 ‘Mpe elikya ezali mpo na yo,’+ Yehova alobi bongo,

‘Bana na yo bakozonga na teritware na bango.’”+

18 “Nayoki mpenza Efraime azali komilelalela ete:

‘Osemboli ngai mpe nasembolami,

Lokola mwana-ngɔmbɛ oyo eteyami te.

Zongisá ngai, mpe nakozonga na lombangu,

Mpo ozali Yehova Nzambe na ngai.

19 Nayokaki mawa mpe nazongelaki Nzambe;+

Nsima ya kosalisa ngai nakanga ntina, nabɛtaki ebɛlɔ na ngai na mawa.

Nayokaki nsɔni mpe nasambwaki,+

Mpo namemaki nsɔni ya masumu na ngai oyo nasalaki na bolenge.’”

20 “Efraime azali te mwana ya motuya epai na ngai, mwana oyo nalingaka mingi?+

Mpo ndenge nazali koloba mabe mpo na ye, ndenge mpe nakokanisa ye lisusu.+

Yango wana nayoki motema mpasi mpo na ye.

Nakoyokela ye mpenza mawa,” Yehova alobi bongo.+

21 “Tɛlɛmisá bilembo ya nzela na yo moko,

Mpe tyá makonzí ya mabanga oyo ezali komonisa nzela.+

Tyá likebi na nzela ya monene, epai osengeli kokende.+

Zongá, Ee ngɔndɔ ya Yisraele. Zongá na bingumba oyo ezali ya yo.

22 Tii ntango nini okobunga nzela, Ee mwana mwasi oyo azangi bosembo?

Mpo Yehova asali likambo moko ya sika na mabele:

Mwasi akolukaluka mobali.”

23 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Bakoloba lisusu maloba oyo na mokili ya Yuda mpe na bingumba na yango, ntango nakoyanganisa bakangami na bango: ‘Yehova apambola yo, Ee esika ya kofanda ya bosembo,+ Ee ngomba mosantu.’+ 24 Mpe kuna bafandi ya Yuda ná ya bingumba na yango nyonso, baloni-bilanga mpe baoyo bakambaka bitonga bakofanda elongo.+ 25 Mpe nakokokisa mposa ya moto oyo alɛmbi, mpe baoyo balɛmbi mpo na nzala nakotondisa bango.”+

26 Nsima na yango nalamukaki mpe nafungolaki miso, mpe mpɔngi na ngai ekómaki elɛngi mpo na ngai.

27 Yehova alobi ete: “Talá! Mikolo ezali koya nakolona bato ya ndako ya Yisraele mpe ya Yuda na momboto* ya moto mpe na momboto ya bibwele.”+

28 “Kaka ndenge natyelaki bango likebi mpo na kopikola, kokweisa, kobuka, kobebisa mpe kosala mabe,+ ndenge wana nde nakotyela bango likebi mpo na kotonga mpe mpo na kolona,”+ Yehova alobi bongo. 29 “Na mikolo yango bakoloba lisusu te ete: ‘Batata nde balyaki mbuma ya vinyo ya mobɛsu,* kasi mino ya bana nde eyokaki ngayi.’+ 30 Kasi moto na moto akokufa mpo na libunga na ye moko. Moto nyonso oyo akolya mbuma ya vinyo ya mobɛsu,* mino na ye nde ekoyoka ngayi.”

31 Yehova alobi boye: “Talá! Mikolo ezali koya, nakosala kondimana ya sika ná bato ya Yisraele mpe ya Yuda.+ 32 Ekozala te kondimana lokola oyo nasalaki ná bankɔkɔ na bango na mokolo oyo nasimbaki lobɔkɔ na bango mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito,+ ‘kondimana na ngai oyo babukaki,+ atako nazalaki nkolo* na bango,’ Yehova alobi bongo.”

33 “Mpo talá kondimana oyo nakosala ná bato ya Yisraele nsima ya mikolo yango,” Yehova alobi bongo. “Nakotya mobeko na ngai na kati na bango,+ mpe nakokoma yango na motema na bango.+ Nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.”+

34 “Mpe bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: ‘Yebá Yehova!’+ mpo bango nyonso bakoyeba ngai, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene kati na bango,”+ Yehova alobi bongo. “Mpo nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.”+

35 Yehova, Moto oyo asalá moi mpo epesa pole na moi,

Moto oyo atyelá sanza mpe minzoto mibeko mpo engɛngisa na butu,

Moto oyo atombokisaka mbu mpo mbonge na yango ezala na yikiyiki,

Oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga, alobi boye:+

36 “‘Soki kaka mibeko yango ezali lisusu na ntina te,

Bana ya Yisraele bakozala lisusu ekólo te liboso na ngai,’” Yehova alobi bongo.+

37 Talá oyo Yehova alobi: “‘Kaka ndenge lola kuna na likoló ekoki komekama te mpe miboko ya mabele awa na nse ekoki koyebana te, ndenge moko mpe nakoki te kobwaka bato nyonso ya libota ya Yisraele mpo na nyonso oyo basali,’ Yehova alobi bongo.”+

38 Yehova alobi boye: “Talá! Mikolo ezali koya, ntango engumba oyo ekotongama+ mpo na Yehova banda na Ndako Molai ya Hananele+ tii na Litumu ya Porte.+ 39 Mpe nsinga ya komeka molai+ ekokende alima tii na ngomba moke ya Garebe, mpe ekobaluka tii na Goa. 40 Mpe Lobwaku* mobimba ya bibembe mpe ya putulu ya mɔtɔ,* mpe mikala nyonso ya bilanga tii na Lobwaku ya Kidrone,+ tii na litumu ya Porte ya Bampunda+ na ngámbo ya ɛsti, ekozala eloko moko mosantu mpo na Yehova.+ Ekopikolama ata moke te, mpe ekokweisama lisusu te.”

32 Na mbula ya zomi ya bokonzi ya Zidikiya mokonzi ya Yuda, elingi koloba, na mbula ya 18 ya Nebukadenezare, Yehova alobaki na Yirimia.+ 2 Na ntango yango, mampinga ya basoda ya mokonzi ya Babilone ezingaki Yerusaleme, mpe mosakoli Yirimia akangamaki na bolɔkɔ na Lopango ya Bakɛngɛli+ oyo ezali na ndako ya mokonzi ya Yuda. 3 Mpo Zidikiya mokonzi ya Yuda akangaki ye na bolɔkɔ,+ alobi: “Mpo na nini ozali kosakola makambo ya boye? Ozali koloba, ‘Talá oyo Yehova alobi: “Nakopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, mpe akobɔtɔla yango,+ 4 mpe Zidikiya, mokonzi ya Yuda, akobika te na lobɔkɔ ya Bakaladea, mpo akopesama mpenza na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, akosolola na ye na elongi boye, mpe akomona ye na miso.”’+ 5 ‘Akomema Zidikiya na Babilone, mpe akotikala kuna tii nakotyela ye likebi,’ Yehova alobi bongo. ‘Ata soki bozali kokoba kobunda na Bakaladea bokolonga te.’”+

6 Yirimia alobaki ete: “Yehova alobaki na ngai boye: 7 ‘Talá Hanamele mwana ya Shalume ndeko ya tata na yo akoya epai na yo mpe akoloba: “Sombá elanga na ngai oyo ezali na Anatote,+ mpo yo nde ozali mpenza na lotomo ya kosikola yango.”’”+

8 Hanamele mwana ya ndeko ya tata na ngai ayaki epai na ngai, ndenge Yehova alobaki, na kati ya Lopango ya Bakɛngɛli, mpe alobaki na ngai ete: “Nabondeli yo, sombá elanga na ngai oyo ezali na Anatote, na mokili ya Benyamina, mpo yo nde ozali na lotomo ya kozwa yango, mpe ya kosikola yango. Sombá yango.” Na bongo, nayebaki ete ezali liloba ya Yehova.

9 Yango wana nasombaki elanga ya Hanamele mwana ya ndeko ya tata na ngai, oyo ezalaki na Anatote. Namekaki kilo ya mbongo+ ya kopesa ye: shekele* nsambo mpe mbongo ya palata zomi. 10 Bongo nakomaki mokanda ya kosomba elanga,+ natyaki elembo, nabengaki batatoli+ mpe namekaki kilo ya mbongo na bimekeli-kilo. 11 Nazwaki mokanda yango ya kosomba elanga, oyo etyamaki elembo na kolanda mitindo ná mibeko, mpe mosusu oyo etyamaki elembo te, 12 mpe napesaki mokanda yango epai ya Baruke+ mwana ya Neria+ mwana ya Mahaseya na miso ya Hanamele mwana ya ndeko ya tata na ngai, na miso ya batatoli oyo bakomaki na mokanda ya kosomba elanga, na miso ya Bayuda nyonso oyo bafandaki na Lopango ya Bakɛngɛli.+

13 Sikoyo napesaki Baruke mitindo na miso na bango ete: 14 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Zwá mikanda oyo, mokanda oyo ya kosomba elanga, oyo etyami elembo, ná mokanda mosusu oyo etyamaki elembo te, tyá yango na mbɛki ya mabele, mpo eumela ntango molai.’ 15 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bandako, bilanga mpe bilanga ya vinyo ekosombama lisusu na mokili oyo.’”+

16 Nsima ya kopesa Baruke mwana ya Neria mokanda ya kosomba elanga, nabondelaki Yehova ete: 17 “Ee, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova! Talá! osalaki likoló ná mabele na nguya na yo monene+ mpe na nguya ya lobɔkɔ na yo. Eloko moko te ekamwisaka yo mpenza, 18 omonisaka bolingo ya sembo epai ya bato nkóto nkóto, otikaka ete bana bázwa etumbu ya masumu oyo batata na bango basalaki,+ ozali Nzambe ya solo, ozali monene, ozali na nguya, Yehova ya mampinga nde nkombo na yo. 19 Mikano na yo ezali minene mpe misala na yo ezali na nguya,+ yo oyo miso na yo etalatalaka nyonso oyo bana ya bato basalaka,+ mpo na kopesa moto na moto na kolanda etamboli mpe misala na ye.+ 20 Osalaki bilembo mpe makamwisi na mokili ya Ezipito, oyo eyebani tii na mokolo ya lelo, mpe na ndenge yango omisalelaki nkombo na Yisraele mpe na kati ya bato,+ ndenge ezali lelo. 21 Mpe obimisaki bato na yo Yisraele na mokili ya Ezipito, na bilembo, na makamwisi, na nguya ya lobɔkɔ na yo, na makasi na yo* mpe na makambo minene ya nsɔmɔ.+

22 “Na nsima, opesaki bango mokili oyo olapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete okopesa bango,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ 23 Bakɔtaki mpe bazwaki yango, kasi batosaki yo te mpe batosaki mobeko na yo te. Basalaki eloko moko te oyo opesaki bango mitindo ete básala, yango wana osali ete mpasi oyo nyonso ekómela bango.+ 24 Talá! Bato bayei, basali mwa bangomba ya mabele mpo na kobɔtɔla engumba.+ Mpe mpo na bitumba,+ nzala mpe maladi mabe,+ engumba yango ekokwea mpenza na mabɔkɔ ya Bakaladea oyo bazali kobundisa yango, ndenge ozali komona yango sikoyo, nyonso oyo olobaki ekokisami. 25 Kasi, yo Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova, oyebisi ngai ete: ‘Sombá elanga na mbongo mpe bengá batatoli,’ atako engumba ekopesama mpenza na lobɔkɔ ya Bakaladea.”

26 Na yango, Yehova alobaki na Yirimia ete: 27 “Talá, nazali Yehova, Nzambe ya bato nyonso.* Ezali nde na likambo moko oyo ekamwisaka ngai mpenza? 28 Talá oyo Yehova alobi: ‘Nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya Bakaladea mpe na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mpe ye akozwa yango.+ 29 Mpe Bakaladea oyo bazali kobundisa engumba oyo bakokɔta na kati, bakotya engumba yango mɔtɔ mpe bakotumba yango,+ ná bandako oyo likoló ya bansamba na yango bato bazalaki kopesa bambeka epai ya Baala mpe kosopela banzambe mosusu makabo ya masanga, mpo na kosilikisa ngai.’+

30 “‘Mpo bato ya Yisraele mpe ya Yuda basali kaka oyo ezali mabe na miso na ngai, banda na bolenge na bango,+ bato ya Yisraele bazali kaka kosilikisa ngai na misala na bango,’ Yehova alobi bongo. 31 ‘Mpo engumba oyo, banda mokolo oyo batongaki yango, tii na mokolo ya lelo, ezali eloko oyo epesaka ngai kaka nkanda mpe esilikisaka ngai makasi mpenza,+ esengeli mpenza kolongwa na miso na ngai,+ 32 mpo na mabe nyonso ya bato ya Yisraele mpe ya Yuda oyo basali mpo na kosilikisa ngai, bango, bakonzi na bango,+ bankumu na bango,+ banganga-nzambe na bango, basakoli na bango,+ bato ya Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme. 33 Bakobaki kopesa ngai mokɔngɔ na bango kasi elongi te;+ atako nazalaki koluka koteya bango mbala na mbala,* kasi moto moko te kati na bango azalaki koyoka mpo na kondima disiplini.+ 34 Mpe bazalaki kotya biloko na bango ya bosɔtɔ na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai, mpo na kokómisa yango mbindo.+ 35 Lisusu, batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala oyo ezali na Lobwaku ya mwana ya Hinome,*+ mpo na kotumba na mɔtɔ* bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na Moleke,+ likambo oyo napesaki bango mitindo te,+ mpe oyo eyá ata moke te na makanisi na ngai* mpo na kosala likambo yango oyo eyinamá, mpo na kosalisa Yuda lisumu.’

36 “Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na engumba oyo bozali koloba ete ekopesama mpenza na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone na nzela ya bitumba, nzala mpe maladi mabe, 37 ‘talá nakoyanganisa bango longwa na mikili nyonso epai napalanganisaki bango na nkanda na ngai, na nkanda na ngai ya kongala mpe na kosilika makasi,+ nakozongisa bango na esika oyo mpe nakosala ete báfanda na kimya.+ 38 Bakozala bato na ngai, mpe ngai nakozala Nzambe na bango.+ 39 Nakopesa bango motema moko+ mpe nakosala ete bálanda kaka nzela moko, mpo na bolamu na bango mpe ya bana na bango oyo bakoya nsima na bango.+ 40 Mpe nakosala ná bango kondimana moko oyo ekoumela seko,+ nakotika te kosalela bango malamu,+ mpe nakotya kobanga na ngai na kati ya mitema na bango mpo bátika ngai te.+ 41 Nakosepela makasi kosalela bango malamu,+ mpe nakolona bango mpenza na mokili oyo,+ na motema na ngai mobimba mpe na molimo na ngai mobimba.’”*

42 “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Kaka ndenge namemeli bato oyo mpasi monene oyo nyonso, ndenge wana mpe nakomemela bango bolamu* nyonso oyo nalaki bango.+ 43 Mpe bilanga ekosombama lisusu na mokili oyo+ atako bozali koloba ete: “Ezali esika oyo etikali mpamba, moto azali te mpe nyama ya zamba ezali te mpe epesami na lobɔkɔ ya Bakaladea.”’

44 “‘Bato bakosomba bilanga na mbongo, bakokoma na mokanda ya kosomba mpe bakotya yango elembo, bakobenga batatoli na mokili ya Benyamina,+ na bisika oyo ezali zingazinga ya Yerusaleme, na bingumba ya Yuda,+ na bingumba ya etúká ya ngombangomba, na bingumba ya mokili ya nse+ mpe na bingumba ya sudi, mpo nakozongisa bakangami na bango,’+ Yehova alobi bongo.”

33 Wana Yirimia akangamaki naino na Lopango ya Bakɛngɛli,+ Yehova alobaki na ye mpo na mbala ya mibale ete: 2 “Talá oyo Yehova Mokeli ya mabele alobi: Yehova moto asalaki yango mpe apikaki yango makasi, Yehova nde nkombo na ye: 3 ‘Bengá ngai, nakoyanola yo, mpe na mbala moko nakoyebisa yo makambo minene, oyo okoki kokanga ntina te mpe oyo oyebi te.’”+

4 “Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na bandako ya engumba oyo mpe mpo na bandako ya bakonzi ya Yuda oyo bato babuki mpo na komibatela na kozingama ya mwa bangomba ya mabele mpe mopanga ya banguna;+ 5 mpe mpo na baoyo bazali koya kobunda na Bakaladea, kotondisa bisika na bibembe ya bato oyo nabomi na nkanda na ngai mpe na nkanda na ngai ya kongala, nalongoli likebi na ngai na engumba oyo mpo na mabe nyonso oyo basali: 6 ‘Nazali kosala ete abika mpe azala nzoto kolɔngɔnɔ,+ nakobikisa bango mpe nakopesa bango kimya mpe solo mingi mpenza.+ 7 Nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yisraele,+ mpe nakotonga bango ndenge nasalaki na ebandeli.+ 8 Nakopɛtola bango na ngambo nyonso ya masumu oyo basalelaki ngai,+ nakolimbisa ngambo nyonso ya masumu na bango mpe kobuka mibeko na bango.+ 9 Mpe akokóma mpo na ngai nkombo moko oyo ezali kopesa esengo, lisanzoli mpe kitoko liboso ya bikólo nyonso ya mabele oyo bakoyoka nsango ya bolamu nyonso oyo nazali kosala.+ Bakozala na nsɔmɔ mpe bakolɛnga+ mpo na bolamu mpe kimya nyonso oyo nakosalela engumba oyo.’”+

10 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na esika oyo okoloba ete etikali mpamba, moto azali te mpe bibwɛlɛ ezali te, na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme oyo etikali mpamba, moto azali te, moto afandi kuna te mpe bibwɛlɛ ezali te, bakoyoka lisusu 11 makɛlɛlɛ ya kosepela mpe ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala, mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bópesa Yehova ya mampinga matɔndi, mpo Yehova azali malamu;+ bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko!”’+

“‘Bakomema likabo ya kozongisa matɔndi na ndako ya Yehova,+ mpo nakozongisa bakangami ya mokili ndenge ezalaki na ebandeli,’ Yehova alobi bongo.”

12 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na esika oyo etikali mpamba, oyo moto azali te mpe bibwɛlɛ ezali te mpe na bingumba na yango nyonso, bisika ya koleisa banyama matiti ekozala lisusu mpo babateli ya mpate bápemisa bitonga na bango.’+

13 “‘Na bingumba ya etúká ya ngombangomba, na bingumba ya mokili ya nse, na bingumba ya sudi, na mokili ya Benyamina, na bisika oyo ezali zingazinga ya Yerusaleme+ mpe na bingumba ya Yuda,+ bitonga ekoleka lisusu na nse ya mabɔkɔ ya moto oyo azali kotánga yango,’ Yehova alobi bongo.”

14 “‘Talá! Mikolo ezali koya,’ Yehova alobi bongo, ‘nakokokisa elaka ya malamu oyo nalobi mpo na bato ya Yisraele mpe ya Yuda.+ 15 Na mikolo yango mpe na ntango yango, nakobimisela Davidi mwa nzete ya sika* ya boyengebene,+ mpe ye akosala makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+ 16 Na mikolo yango, Yuda ekobika+ mpe Yerusaleme ekofanda na kimya.+ Mpe ekobengama boye: Yehova azali Bosembo na biso.’”+

17 “Mpo talá oyo Yehova alobi: ‘Ekozala ntango nyonso na moto moko ya libota ya Davidi oyo akofanda na kiti ya bokonzi ya Yisraele.+ 18 Ekozala ntango nyonso na kati ya banganga-nzambe Balevi, moto oyo akotɛlɛma liboso na ngai mpo na kopesa likabo mobimba ya kotumba, mpo na kotumba makabo ya mbuma mpe kopesa bambeka.’”

19 Mpe Yehova alobaki lisusu na Yirimia ete: 20 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bokoki nde kobuka kondimana oyo nasalá ná moi mpe kondimana oyo nasalá ná butu, mpo moi ná butu ebima te na ntango na yango?+ 21 Te. Ndenge moko mpe eloko moko te ekoki kobuka kondimana na ngai oyo nasalá na mosaleli na ngai Davidi,+ mpe kopekisa ete azala na mwana te oyo azali koyangela na kiti na ye ya bokonzi,+ eloko moko mpe te ekoki kobebisa kondimana oyo nasalá na banganga-nzambe Balevi, basaleli na ngai.+ 22 Kaka ndenge limpinga ya likoló* ekoki kotángama te, mpe zɛlo ya mbu ekoki komekama te, ndenge wana nde nakokómisa mingi bato ya libota* ya Davidi mosaleli na ngai mpe Balevi oyo bazali kosalela ngai.’”

23 Yehova alobaki lisusu na Yirimia ete: 24 “Oyoki te makambo bato oyo bazali koloba ete: ‘Yehova akobwaka mabota mibale oyo aponaki’? Mpe bazali kosalela bato na ngai makambo kozanga limemya, mpe bazali kotalela bango lisusu te lokola ekólo.

25 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Ndenge kaka kondimana na ngai mpo na moi mpe butu ebongwanaka te,+ mpe mibeko oyo natyá mpo na likoló mpe mabele ebongwanaka te,+ 26 ndenge moko mpe nakobwaka ata moke te bato ya libota* ya Yakobo mpe ya Davidi mosaleli na ngai, mpe eloko moko te ekopekisa ngai kozwa bayangeli na libota* na ye mpo báyangela bana* ya Abrahama, ya Yisaka mpe ya Yakobo. Mpo nakosangisa bakangami na bango+ mpe nakoyokela bango mawa.’”+

34 Ntango Nebukadenezare mokonzi ya Babilone mpe mampinga ya basoda na ye nyonso mpe makonzi nyonso ya mabele, ezalaki na nse ya boyangeli na ye, mpe bato ya bikólo nyonso bazalaki kobundisa Yerusaleme mpe bingumba na yango nyonso, Yehova alobaki na Yirimia ete:+

2 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Kende mpe lobá na Zidikiya+ mokonzi ya Yuda ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nazali kopesa engumba oyo na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, mpe akotumba yango na mɔtɔ.+ 3 Okobika te na lobɔkɔ na ye, mpo okokangama mpenza mpe okopesama na lobɔkɔ na ye.+ Mpe okomona mokonzi ya Babilone boye na miso, akosolola na yo na elongi boye, mpe okokende na Babilone.’+ 4 Nzokande, yoká oyo Yehova alobi, Ee Zidikiya mokonzi ya Yuda, ‘Talá oyo Yehova alobi mpo na yo: “Okokufa te na mopanga. 5 Okokufa na kimya,+ mpe nsima ya kokunda yo bakotumba mpaka ya malasi ndenge basalaki mpo na batata na yo, bakonzi ya kala oyo bazalaki liboso na yo, mpe bakolela yo na maloba oyo: ‘Aa! Ee nkolo!’ mpo ‘ngai nalobi liloba yango,’ Yehova alobi bongo.”’”’”

6 Mosakoli Yirimia alobaki na Zidikiya mokonzi ya Yuda maloba yango nyonso na Yerusaleme, 7 wana mampinga ya basoda ya mokonzi ya Babilone bazalaki kobundisa Yerusaleme mpe bingumba nyonso ya Yuda oyo etikalaki,+ Lakishi+ mpe Azeka;+ oyo etikalaki na kati ya bingumba ya Yuda.

8 Yehova alobaki na Yirimia; nsima wana Mokonzi Zidikiya asalaki kondimana na bato nyonso oyo bazalaki na Yerusaleme mpo na kosakwela bango bonsomi,+ 9 moto na moto asengeli kotika baombo na ye Baebre bákende, ya mobali mpe ya mwasi, mpo moko te asengeli kokanga ndeko na ye Moyuda lokola moombo. 10 Bongo bankumu nyonso mpe bato nyonso batosaki. Basalaki kondimana mpo moto na moto atika moombo na ye ya mobali mpe moombo na ye ya mwasi akende, mpe kokanga bango lokola baombo lisusu te mpo na ntango molai. Batosaki mpe batikaki bango bákende. 11 Kasi, mwa moke na nsima bazongisaki baombo ya mibali mpe ya basi oyo bango batikaki bákende, mpe bazongisaki bango baombo na makasi. 12 Bongo Yehova alobaki na Yirimia. Yehova ayebisaki ye ete:

13 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Nasalaki kondimana na bankɔkɔ+ na bino na mokolo oyo nabimisaki bango na mokili ya Ezipito, na ndako ya baombo,+ nalobaki: 14 “Na nsuka ya mbula nsambo, mokomoko na bino asengeli kotika ndeko na ye Moebre ya mobali akende, oyo atɛkamaki epai na yo mpe oyo asaleli yo mbula motoba; osengeli kotika ye akende.”+ Kasi bankɔkɔ na bino bayokaki ngai te mpe batosaki ngai te. 15 Mpe bino bobongoli makanisi na bino kala te* mpe bosali oyo ezali malamu na miso na ngai na ndenge bozali kosakola bonsomi epai ya bandeko na bino, mpe bosali kondimana liboso na ngai na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai. 16 Kasi bobongoli lisusu makanisi na bino, botuki nkombo na ngai+ na ndenge bozongisi baombo ya mibali mpe ya basi oyo botikaki bákende esika balingi, mpe bozongisaki bango baombo na makasi.’

17 “Yango wana, talá oyo Yehova alobi: ‘Botosi ngai te na ndenge bozali kosakola bonsomi, moto na moto epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mozalani na ye.+ Sikoyo nakopesa bino bonsomi,’ Yehova alobi bongo, ‘bonsomi ya kokufa na bitumba, na maladi mabe mpe na nzala,+ mpe nakosala ete bókóma eloko ya nsɔmɔ mpo na makonzi nyonso ya mabele.+ 18 Mpe talá oyo ekokómela bato oyo babuki kondimana na ngai, na ndenge basaleli te maloba ya kondimana oyo basalaki liboso na ngai ntango bakataki na biteni mibale mwana-ngombɛ mpe balekaki katikati ya biteni yango,+ 19 elingi koloba, bankumu ya Yuda, bankumu ya Yerusaleme, bakapita ya ndako ya mokonzi, banganga-nzambe mpe bato nyonso ya mokili oyo balekaki katikati ya biteni ya mwana-ngɔmbɛ yango: 20 Nakopesa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma bango,* bibembe na bango ekokóma bilei ya bandɛkɛ ya likoló mpe ya banyama ya mabele.+ 21 Mpe nakopesa Zidikiya mokonzi ya Yuda ná bankumu na ye na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma bango* mpe na lobɔkɔ ya mampinga ya basoda ya mokonzi ya Babilone,+ oyo bazali kolongwa epai na bino.’+

22 “‘Talá nakopesa mitindo,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe nakozongisa bango na engumba oyo, bakobundisa yango, bakobɔtɔla yango mpe bakotumba yango na mɔtɔ;+ mpe nakokómisa bingumba ya Yuda esika oyo etikali mpamba, epai moto ata moko te afandaka.’”+

35 Yehova alobaki na Yirimia na mikolo ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, ete: 2 “Kende na ndako ya Barekabe,+ sololá na bango mpe memá bango na ndako ya Yehova, na moko ya bisika ya kolya; na nsima pesá bango vinyo bámɛla.”

3 Bongo nazwaki Yaazania mwana ya Yirimia mwana ya Habazinia, bandeko na ye, bana na ye nyonso, mpe bato nyonso ya ndako ya Barekabe, 4 namemaki bango na ndako ya Yehova, na esika ya kolya ya bana ya Hanane mwana ya Yigadalia, moto ya Nzambe ya solo, oyo ezalaki pene na esika ya kolya ya bankumu, oyo ezalaki likoló ya esika ya kolya ya Maaseya mwana ya Shalume mokɛngɛli-porte. 5 Bongo natyaki liboso ya bato ya ndako ya Barekabe bakɔpɔ mpe bagobɛlɛ oyo etondi na vinyo mpe nalobaki na bango ete: “Bómɛla vinyo.”

6 Kasi balobaki ete: “Tokomɛla vinyo te, mpo Yehonadabe+ mwana ya Rekabe, nkɔkɔ na biso, apesaki biso mitindo ete: ‘Ezala bino to bana na bino, bosengeli komɛla vinyo ata mokolo moko te. 7 Mpe bosengeli te kotonga ndako, kolona mboto, to kozala na elanga ya vinyo. Kasi bosengeli nde kofanda ntango nyonso na bahema, mpo bózala na bomoi molai na mokili oyo bozali kofanda lokola bapaya.’ 8 Na yango tozali kokoba kotosa mitindo nyonso oyo Yehonadabe mwana ya Rekabe nkɔkɔ na biso apesaki biso; biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe bana na biso ya basi, tomɛlaka vinyo ata moke te. 9 Mpe totongaka bandako te mpo na kofanda, tozalaka na elanga ya vinyo te, to elanga, to momboto. 10 Tozali kaka kofanda na bahema mpe kotosa mitindo nyonso oyo Yehonadabe nkɔkɔ na biso apesaki biso. 11 Kasi ntango Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki kobundisa mokili,+ tolobaki: ‘Bóya, tókɔta na Yerusaleme mpo tókima limpinga ya basoda ya Bakaladea mpe ya bato ya Siri, mpe sikoyo tozali kofanda na Yerusaleme.’”

12 Mpe Yehova alobaki na Yirimia ete: 13 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Kende, mpe lobá na bato ya Yuda mpe na bafandi ya Yerusaleme ete: “Bozalaki te kozwa ntango nyonso elendiseli ya kotosa maloba na ngai?”+ Yehova atuni bongo. 14 “Yehonadabe mwana ya Rekabe, apesaki bana na ye mitindo, ete bámɛla vinyo te, mpe batosaki maloba na ye ndenge bamɛlaka vinyo te tii lelo, bazali kotosa mobeko ya nkɔkɔ na bango.+ Nzokande, nalobi na bino mbala na mbala,* kasi botosi ngai te.+ 15 Mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli, nazalaki kotinda bango mbala na mbala,*+ koloba ete: ‘Nabondeli bino, moto na moto atika etamboli na ye ya mabe,+ mpe asala oyo ezali sembo, mpe bótosa te banzambe mosusu mpe bósalela bango te. Bongo bokokoba kofanda na mokili oyo napesaki bino mpe bankɔkɔ na bino.’+ Kasi botyaki likebi te* mpe boyokaki te. 16 Bana ya Yehonadabe mwana ya Rekabe batosi mobeko ya nkɔkɔ na bango oyo apesaki bango mitindo,+ kasi bato oyo bayokaki ngai te.”’”

17 “Na yango talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Nazali kokweisela Yuda mpe bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme mpasi nyonso oyo nayebisaki bango,+ mpo nalobaki na bango kasi bayokaki te, mpe nazalaki kaka kobenga bango kasi bayanolaki te.’”+

18 Mpe Yirimia alobaki na bato ya libota ya Barekabe ete: “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Lokola botosi mitindo ya Yehonadabe nkɔkɔ na bino mpe bozali kokoba kotosa mitindo na ye nyonso mpe kosala kaka ndenge apesaki bino mitindo, 19 talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Yehonadabe mwana ya Rekabe akozanga moto te mpo na kosalela ngai.”’”

36 Sikoyo na mbula ya minei ya bokonzi ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, Yehova alobaki na Yirimia ete: 2 “Zwá rulo* mpe komá na kati maloba nyonso oyo nalobi na yo mpo na Yisraele, Yuda+ mpe mpo na bikólo nyonso,+ banda na mokolo ya liboso oyo nalobaki na yo, na mikolo ya Yosiya tii na mokolo ya lelo.+ 3 Mbala mosusu ntango bato ya libota ya Yuda bakoyoka mpasi nyonso oyo nakani komemela bango, bakoki kotika etamboli na bango ya mabe, mpo nalimbisa libunga mpe lisumu na bango.”+

4 Na yango Yirimia abengaki Baruke+ mwana ya Neria, ayebisaki ye maloba nyonso oyo Yehova alobaki na ye mpe Baruke akomaki yango na rulo.*+ 5 Bongo Yirimia apesaki Baruke mitindo ete: “Nakangami. Nazali na likoki te ya kokɔta na tempelo ya Yehova. 6 Na yango, yo nde osengeli kokɔta mpe kotánga na mongongo makasi maloba ya Yehova oyo nayebisaki yo okoma na rulo. Tángá yango na matoi ya bato na tempelo ya Yehova na mokolo ya kokila bilei; lisusu okotánga yango na matoi ya bato nyonso ya Yuda oyo bauti na bingumba na bango. 7 Mbala mosusu Yehova akoyoka kosɛnga na bango mpo na koluka kondimama mpe moto na moto akotika etamboli na ye ya mabe, mpo nkanda mpe nkanda ya kongala oyo Yehova alobi mpo na bato oyo ezali makasi mpenza.”

8 Bongo Baruke mwana ya Neria asalaki nyonso oyo mosakoli Yirimia apesaki ye mitindo: akendaki na tempelo ya Yehova mpe atángaki na mongongo makasi maloba ya Yehova oyo ezali na rulo.*+

9 Sikoyo na mbula ya mitano ya bokonzi ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda, na sanza ya libwa, bafandi nyonso ya Yerusaleme mpe bato nyonso oyo bautaki na bingumba ya Yuda mpo na kokɔta na Yerusaleme basakolaki kokila bilei liboso ya Yehova.+ 10 Bongo Baruke atángaki na mongongo makasi mpe na matoi ya bato nyonso, maloba ya Yirimia oyo ezali na rulo,* na tempelo ya Yehova, na esika ya kolya* ya Gemaria+ mwana ya Shafane+ mosali-bakopi,* na lopango ya likoló, na ekɔtelo ya porte ya sika ya tempelo ya Yehova.+

11 Ntango Mikaya mwana ya Gemaria, mwana ya Shafane ayokaki maloba nyonso ya Yehova oyo ezali na rulo* yango, 12 Akitaki na ndako ya mokonzi, na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ. Bankumu* nyonso bafandaki wana: sɛkrɛtɛrɛ Elishama,+ Delaya mwana ya Shemaya, Elenatane+ mwana ya Akabore,+ Gemaria mwana ya Shafane ná Zidikiya mwana ya Hanania mpe bankumu mosusu nyonso. 13 Mikaya ayebisaki bango maloba nyonso oyo ayokaki ntango Baruke atángaki na mongongo makasi makambo oyo ezali na rulo,* na matoi ya bato.

14 Bongo bankumu nyonso batindaki Yehudi mwana ya Netania, mwana ya Shelemia mpe mwana ya Kushi aloba na Baruke ete: “Yaká na rulo oyo otángaki na matoi ya bato.” Baruke mwana ya Neria azwaki rulo yango na lobɔkɔ na ye mpe akendaki epai na bango. 15 Balobaki na ye ete: “Tobondeli yo, fandá, mpe tángelá biso yango na mongongo makasi.” Na yango, Baruke atángelaki bango na mongongo makasi.

16 Ntango kaka bayokaki maloba nyonso, batalanaki na nsɔmɔ, mpe balobaki na Baruke ete: “Tosengeli mpenza koyebisa mokonzi maloba oyo nyonso.” 17 Mpe batunaki Baruke ete: “Tobondeli yo, yebisá biso, ndenge nini okomaki maloba oyo nyonso. Yirimia nde ayebisaki yo okoma makambo oyo nyonso?” 18 Baruke ayanolaki bango boye: “Ɛɛ, ye nde alobaki na ngai maloba oyo nyonso, mpe nakomaki yango na rulo* oyo na mai ya mokanda.” 19 Bankumu balobaki na Baruke boye: “Kende komibomba, yo ná Yirimia, mpe bóyebisa moto moko te esika bozali.”+

20 Bongo batikaki rulo na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ Elishama mpe bakɔtaki na esika ya mokonzi na lopango, mpe bayebisaki ye makambo nyonso oyo bayokaki.

21 Na yango mokonzi atindaki Yehudi+ azwa rulo yango. Mpe azwaki yango na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ Elishama. Yehudi abandaki kotánga yango na matoi ya mokonzi mpe ya bankumu nyonso oyo batɛlɛmaki pembeni ya mokonzi. 22 Mokonzi afandaki na ndako ya eleko ya malili makasi, na sanza ya libwa,* lituka ezalaki kopela liboso na ye. 23 Ntango nyonso oyo Yehudi azalaki kosilisa kotánga ngámbo misato to minei ya lokasa ya rulo, mokonzi azalaki kopasola eteni yango na mbeli ya sɛkrɛtɛrɛ, mpe kobwaka yango na mɔtɔ oyo ezalaki na lituka tii rulo nyonso esilaki na kati ya mɔtɔ oyo ezalaki na lituka. 24 Ezala mokonzi to basaleli na ye nyonso, bayokaki nsɔmɔ te mpo na makambo oyo bayokaki, mpe moto moko te apasolaki bilamba na ye. 25 Atako Elenatane,+ Delaya+ mpe Gemaria+ babondelaki mokonzi mpo atumba rulo yango te, kasi ayokelaki bango te. 26 Lisusu, mokonzi apesaki mitindo epai ya Yerahemeele mwana ya mokonzi, Seraya mwana ya Aziriele mpe Shelemia mwana ya Abadeele ete bákende kokanga sɛkrɛtɛrɛ Baruke mpe mosakoli Yirimia, kasi Yehova abombaki bango.+

27 Ntango mokonzi atumbaki rulo oyo ezalaki na maloba oyo Yirimia ayebisaki Baruke akoma, Yehova alobaki lisusu na Yirimia+ ete: 28 “Zwá rulo mosusu, komá na kati na yango maloba nyonso oyo ezalaki na rulo ya liboso, oyo Yehoyakime mokonzi ya Yuda atumbaki.+ 29 Mpe osengeli koloba na Yehoyakime mokonzi ya Yuda ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Yo otumbi rulo oyo, mpe olobi ete: ‘Mpo na nini okomi na kati na yango ete: “Mokonzi ya Babilone akoya mpenza mpe akobebisa mokili oyo mpe akosilisa moto ná nyama kati na yango”?’+ 30 Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na Yehoyakime mokonzi ya Yuda: ‘Akozala na moto te oyo akofanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,+ mpe ebembe na ye ekobwakama libándá na molunge na moi mpe na mpiɔ makasi na butu.+ 31 Nakosɛnga ye, bana* na ye mpe basaleli na ye bázongisa monɔkɔ mpo na libunga na bango, nakomemela bango, bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bato ya Yuda mpasi nyonso oyo nalobi mpo na bango,+ mpo bayokaki te.’”’”+

32 Bongo Yirimia azwaki rulo mosusu mpe apesaki yango Baruke mwana ya Neria, sɛkrɛtɛrɛ,+ akomaki na yango maloba nyonso ya Yirimia, oyo ezalaki na rulo* oyo Yehoyakime mokonzi ya Yuda atumbaki na mɔtɔ.+ Mpe babakiselaki yango maloba mosusu mingi lokola oyo wana.

37 Mpe mokonzi Zidikiya+ mwana ya Yosiya abandaki koyangela na esika ya Konia*+ mwana ya Yehoyakime, mpo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone akómisaki ye mokonzi na mokili ya Yuda.+ 2 Kasi ye, basaleli na ye ná bato ya mokili yango bayokaki te maloba ya Yehova oyo alobaki na nzela ya mosakoli Yirimia.

3 Mokonzi Zidikiya atindaki Yehukale+ mwana ya Shelemia mpe Sefania+ mwana ya Maaseya nganga-nzambe epai ya mosakoli Yirimia, alobi: “Tobondeli yo, bondelá Yehova Nzambe na biso mpo na bolamu na biso.” 4 Yirimia azalaki kotambola ndenge alingi na kati ya bato, mpo batyaki ye naino te na bolɔkɔ.+ 5 Sikoyo limpinga ya basoda ya Farao eutaki na Ezipito.+ Ntango Bakaladea oyo bazingaki Yerusaleme bayokaki nsango na bango, balongwaki na Yerusaleme.+ 6 Na nsima, Yehova alobaki na Yirimia ete: 7 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá oyo bokoloba na mokonzi ya Yuda, moto oyo atindaki bino bótuna ngai ete: “Talá! Limpinga ya basoda ya Farao oyo bazali koya epai na bino mpo na kosalisa bino bakozonga na mokili na bango, na Ezipito.+ 8 Mpe Bakaladea bakozonga, bakobundisa engumba oyo, bakozwa yango mpe bakotumba yango na mɔtɔ.”+ 9 Talá oyo Yehova alobi: “Bómikosa te na koloba boye: ‘Bakaladea bakolongwa mpenza mosika na biso,’ mpo bakokende te. 10 Ata soki bobomi limpinga mobimba ya basoda ya Bakaladea oyo bazali kobunda na bino mpe kaka bato oyo bazoki nde batikali, bakotɛlɛma, bakobima na bahema na bango mpe bakotumba engumba oyo na mɔtɔ.”’”+

11 Ntango limpinga ya basoda ya Bakaladea balongwaki liboso ya Yerusaleme mpo na limpinga ya basoda ya Farao,+ 12 Yirimia alingaki kobima na Yerusaleme mpo na kokende na mokili ya Benyamina,+ mpo na kozwa likabo na ye kuna na kati ya bato na ye. 13 Kasi ntango akómaki na Porte ya Benyamina, kapita oyo azalaki kokɛngɛla, nkombo na ye Yiriya mwana ya Shelemia mwana ya Hanania, azalaki wana. Akangaki mosakoli Yirimia, alobaki na ye: “Ozali kokima mpo na kokende epai ya Bakaladea!” 14 Kasi Yirimia alobaki ete: “Ezali lokuta! Nazali kokima te mpo na kokende epai ya Bakaladea.” Kasi ayokelaki ye te. Bongo Yiriya akangaki Yirimia mpe amemaki ye epai ya bankumu. 15 Bankumu basilikelaki Yirimia makasi,+ babɛtaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ,*+ na ndako ya sɛkrɛtɛrɛ Yehonatane, oyo bakómisaki yango ndako ya bolɔkɔ. 16 Batyaki Yirimia na bolɔkɔ* na bashambrɛ oyo nsamba na yango egumbamá, mpe afandaki kuna mikolo mingi.

17 Mokolo moko Mokonzi Zidikiya atindaki bato báya na ye, mpe mokonzi atunaki ye mituna na ndako na ye na kobombana.+ Atunaki ye boye: “Yehova ayebisi yo likambo moko?” Yirimia ayanolaki: “Ɛɛ!” Mpe akobaki ete: “Okokabama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone!”+

18 Yirimia alobaki lisusu na Mokonzi Zidikiya boye: “Lisumu nini nasaleli yo, basaleli na yo mpe bato oyo, mpo bótya ngai na bolɔkɔ? 19 Sikoyo, wapi basakoli na bino oyo basakwelaki bino ete ‘Mokonzi ya Babilone akoya te kobundisa bino ná mokili oyo’?+ 20 Sikoyo yoká, nabondeli yo, Ee nkolo na ngai mokonzi. Nabondeli yo, moniselá ngai boboto, kozongisa ngai na ndako ya sɛkrɛtɛrɛ Yehonatane te,+ noki nakufa kuna.”+ 21 Bongo Mokonzi Zidikiya apesaki mitindo ete bátya Yirimia na bolɔkɔ na Lopango ya Bakɛngɛli,+ mpe bazalaki kopesa ye mokolo na mokolo limpa ya libungutulu oyo ezalaki kouta na balabala ya basali-mampa,+ tii mampa nyonso esilaki na engumba.+ Mpe Yirimia akobaki kofanda na Lopango ya Bakɛngɛli.

38 Mpe Shefatia mwana ya Matane, Gedalia mwana ya Pashure, Yukale+ mwana ya Shelemia ná Pashure+ mwana ya Malakiya bayokaki maloba oyo Yirimia azalaki koloba na bato nyonso ete: 2 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Moto oyo akotikala na engumba oyo akokufa na bitumba, na nzala mpe na maladi mabe.+ Kasi moto oyo akokende komitika* epai ya Bakaladea nde akotikala na bomoi, akokoba kozala na bomoi mpe akobatela bomoi na ye.’+ 3 Talá oyo Yehova alobi: ‘Engumba oyo ekopesama mpenza na lobɔkɔ ya limpinga ya basoda ya mokonzi ya Babilone, mpe akozwa yango.’”+

4 Bankumu balobaki na mokonzi ete: “Tobondeli yo, moto oyo abomama,+ mpo na maloba na ye azali kolɛmbisa* basoda oyo batikali na engumba oyo, ata mpe bato nyonso. Mpo moto oyo azali kolukela bato oyo kimya te, kasi mpasi.” 5 Mokonzi Zidikiya azongisaki ete: “Talá! Azali na mabɔkɔ na bino, mpo mokonzi azali na likambo ya kosala te mpo na kopekisa bino.”

6 Bazwaki Yirimia mpe babwakaki ye na libulu ya kobomba mai ya Malakiya mwana ya mokonzi, oyo ezalaki na Lopango ya Bakɛngɛli.+ Bakitisaki Yirimia na bansinga. Nzokande mai ezalaki te na kati ya libulu yango, kaka pɔtɔpɔtɔ, mpe Yirimia abandaki kozinda na kati ya pɔtɔpɔtɔ yango.

7 Ebede-meleke+ moto ya Etiopi, moto oyo azalaki mokube* mpe azalaki na ndako ya mokonzi, ayokaki ete batye Yirimia na libulu ya kobomba mai. Nzokande mokonzi afandaki na Porte ya Benyamina,+ 8 bongo Ebede-meleke abimaki na ndako ya mokonzi mpe alobaki na mokonzi ete: 9 “Ee nkolo na ngai mokonzi, makambo oyo bato oyo basali mosakoli Yirimia ezali mabe mpenza! Babwaki ye na libulu ya kobomba mai, mpe akokufa na nzala kuna, mpo mampa ezali lisusu te na engumba.”+

10 Na yango, mokonzi apesaki Ebede-meleke moto ya Etiopi mitindo ete: “Zwá elongo na yo bato 30 na esika oyo, mpe bimisá mosakoli Yirimia na libulu ya kobomba mai liboso ete akufa.” 11 Ebede-meleke akendaki na bato elongo na ye mpe akɔtaki na ndako ya mokonzi na nse ya esika ya kobomba mosolo,+ mpe kuna bazwaki biteni ya bilamba oyo enzuluká mpe biteni ya bilamba oyo ebebabebá, bakitisaki yango na bansinga na libulu ya kobomba mai epai Yirimia azalaki. 12 Bongo Ebede-meleke moto ya Etiopi alobaki na Yirimia ete: “Nabondeli yo, tyá biteni ya bilamba oyo enzuluká mpe biteni ya bilamba oyo ebebabebá na katikati ya mapeka na yo ná bansinga.” Yirimia asalaki bongo. 13 Babendaki Yirimia na bansinga mpe babimisaki ye na libulu ya kobomba mai. Mpe Yirimia akobaki kofanda na Lopango ya Bakɛngɛli.+

14 Mokonzi Zidikiya atindaki bato mpe bazwaki mosakoli Yirimia bamemaki ye epai na ye na esika ya kokɔta ya misato, oyo ezali na tempelo ya Yehova, mpe mokonzi alobaki na Yirimia ete: “Nazali na likambo moko ya kotuna yo. Kobombela ngai likambo moko te.” 15 Yirimia alobaki na Zidikiya: “Soki nayebisi yo, okoboma ngai mpenza. Mpe soki napesi yo toli, okoyokela ngai te.” 16 Mokonzi Zidikiya alapelaki Yirimia ndai na kobombana ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, moto oyo apesá biso bomoi oyo,* nakoboma yo te, mpe nakopesa yo na lobɔkɔ ya bato oyo te, oyo bazali koluka koboma yo.”*

17 Bongo Yirimia alobaki na Zidikiya boye: “Talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Soki okei mpe omitiki* epai ya bankumu ya mokonzi ya Babilone, okotikala na bomoi* mpe engumba oyo ekotumbama na mɔtɔ te, mpe yo ná bato ya libota na yo bokotikala na bomoi.+ 18 Kasi soki okei te komitika* epai ya bankumu ya mokonzi ya Babilone, engumba oyo ekopesama na lobɔkɔ ya Bakaladea, bakotumba yango na mɔtɔ,+ mpe okobika te na lobɔkɔ na bango.’”+

19 Na yango, Mokonzi Zidikiya alobaki na Yirimia ete: “Nazali kobanga Bayuda oyo bakimi mpe bakei epai ya Bakaladea, mpo soki napesami na mabɔkɔ na bango bakosala ngai mabe mpenza.” 20 Kasi Yirimia alobaki ete: “Bakopesa yo na lobɔkɔ na bango te. Nabondeli yo, tosá mongongo ya Yehova na makambo oyo nazali koyebisa yo, mpe makambo ekotambola malamu mpo na yo, mpe okokoba kozala na bomoi. 21 Kasi soki oboyi kokende komitika,* talá likambo oyo Yehova amonisi ngai: 22 Talá! Basi nyonso oyo batikali na ndako ya mokonzi ya Yuda bamemami epai ya bankumu ya mokonzi ya Babilone,+ mpe bazali koloba ete:

‘Bato oyo otyelaki motema* bakosi yo mpe balongi yo.+

Basali ete lokolo na yo ezinda na pɔtɔpɔtɔ.

Mpe sikoyo, bakei na ngámbo mosusu.’

23 Basi na yo ná bana na yo nyonso bazali komema bango epai ya Bakaladea, okobika te na lobɔkɔ na bango, kasi mokonzi ya Babilone akokanga yo,+ mpe mpo na yo engumba oyo ekotumbama na mɔtɔ.”+

24 Bongo Zidikiya alobaki na Yirimia ete: “Koyebisa moto moko te makambo oyo, mpo okufa te. 25 Mpe soki bankumu bayoki ete nasololi na yo mpe bayei, bayebisi yo ete: ‘Tobondeli yo, yebisá biso, likambo nini oyebisi mokonzi? Kobombela biso eloko moko te, mpe tokoboma yo te.+ Mokonzi ayebisi yo nini?’ 26 osengeli koyebisa bango ete: ‘Nazalaki kosɛnga mokonzi ete azongisa ngai te na ndako ya Yehonatane noki nakufa kuna.’”+

27 Na nsima, bankumu nyonso bayaki epai ya Yirimia mpe batunaki ye mituna. Ayebisaki bango makambo nyonso oyo mokonzi apesaki ye mitindo aloba. Bongo balobaki na ye lisusu eloko te, mpo moto moko te ayokaki masolo na bango. 28 Yirimia akobaki kofanda na Lopango ya Bakɛngɛli tii mokolo oyo Yerusaleme ekweaki;+ azalaki kaka kuna ntango Yerusaleme ekweaki.+

39 Na mbula ya libwa ya bokonzi ya Zidikiya mokonzi ya Yuda, na sanza ya zomi, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ná limpinga mobimba ya basoda na ye bayaki na Yerusaleme, mpe bazingaki yango.+

2 Na mbula ya 11 ya bokonzi ya Zidikiya, na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, bapasolaki nzela na efelo ya engumba.+ 3 Mpe bankumu nyonso ya mokonzi ya Babilone bakɔtaki mpe bafandaki na Porte ya Kati,+ elingi koloba, Nergale-sharezere, oyo azalaki Samagare, Nebo-saresekime oyo azalaki Rabasarise, Nergale-sharezere oyo azalaki Rabamage,* mpe bankumu nyonso ya mokonzi ya Babilone oyo batikalaki.

4 Ntango Zidikiya mokonzi ya Yuda mpe basoda nyonso bamonaki bango, bakimaki,+ babimaki na engumba butubutu na nzela ya elanga ya mokonzi, balekaki na porte oyo ezali kati na bifelo mibale, mpe bakobaki kokende na nzela ya Araba.+ 5 Kasi limpinga ya basoda ya Bakaladea elandaki bango, mpe bazwaki Zidikiya na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko.+ Bakangaki ye mpe bamemaki ye epai ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone na Ribla,+ na mokili ya Hamate,+ mpe kuna mokonzi akatelaki ye etumbu. 6 Mokonzi ya Babilone abomaki bana ya Zidikiya na Ribla na miso na ye, mpe mokonzi ya Babilone abomaki bato nyonso ya lokumu ya Yuda.+ 7 Abomaki miso ya Zidikiya, na nsima akangaki ye na bikangeli ya kwivre, mpo na komema ye na Babilone.+

8 Bakaladea batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato,+ mpe babukaki bifelo ya Yerusaleme.+ 9 Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki na Babilone bato mosusu oyo bazalaki naino na engumba, bato oyo bakimaki epai na ye, mpe moto nyonso oyo atikalaki.

10 Kasi Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki na mokili ya Yuda bana-mboka mosusu oyo bazalaki mpenza babola, oyo bazalaki mpenza na eloko te. Na mokolo yango, apesaki bango bilanga ya vinyo mpe bilanga mpo básala.*+

11 Sikoyo, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone apesaki Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi mitindo mpo na Yirimia ete: 12 “Zwá ye, batelá ye; kosala ye mabe moko te, mpe salelá ye eloko nyonso oyo akosɛnga yo.”+

13 Na yango Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, Nebushazebane oyo azalaki Rabasarise,* Nergale-sharezere oyo azalaki Rabamage* mpe bato nyonso ya lokumu ya mokonzi ya Babilone batindaki bato 14 mpe babimisaki Yirimia na Lopango ya Bakɛngɛli+ mpe bapesaki ye epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ mpo amema ye na ndako na ye. Na yango afandaki kati na bato.

15 Ntango Yirimia akangamaki na Lopango ya Bakɛngɛli,+ Yehova alobaki na ye ete: 16 “Kende mpe lobá na Ebede-meleke+ moto ya Etiopi ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Talá nazali kokokisa maloba na ngai mpo na engumba oyo, nakomemela bango mpasi kasi bolamu te mpe na mokolo yango, okomona yango mpenza na miso.”’

17 “‘Kasi nakobikisa yo na mokolo yango,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe okokabama te na lobɔkɔ ya bato oyo ozali kobanga.’

18 “‘Mpo nakobikisa yo mpenza na likama, mpe okobomama te na mopanga. Okobikisa bomoi na yo,+ mpo otyelaki ngai motema,’+ Yehova alobi bongo.”

40 Yehova alobaki na Yirimia nsima wana Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki ye akende na Rama.+ Amemaki ye kuna mabɔkɔ ekangami na minyololo, mpe azalaki na kati ya bato nyonso ya Yerusaleme mpe ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya na Babilone. 2 Bongo mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki Yirimia mpe alobaki na ye boye: “Yehova Nzambe na yo asakolaki mpasi oyo ekweli esika oyo, 3 mpe Yehova asalaki ete ekokisama kaka ndenge alobaki, mpo bino bosalelaki Yehova lisumu mpe botosaki ye te. Yango wana likambo oyo ekómeli bino.+ 4 Lelo nazali kolongola yo minyololo oyo ezali na mabɔkɔ na yo. Soki emonani malamu na miso na yo ete oya elongo na ngai na Babilone, yaká, mpe nakobatela yo. Kasi soki olingi te koya elongo na ngai na Babilone, koya te. Talá! Mokili mobimba ezali liboso na yo. Kende esika nyonso oponi.”+

5 Lokola Yirimia azalaki naino kokakatana mpo na kozonga, Nebuzaradane alobaki na ye: “Zongá epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ oyo mokonzi ya Babilone apesi mokumba ya kokamba bingumba ya Yuda, mpe fandá na ye kati na bato; to esika nyonso oyo olingi.”

Mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki ye ndambo ya biloko ya kolya ná likabo mpe atikaki ye akende. 6 Bongo Yirimia ayaki epai ya Gedalia mwana ya Ahikame na Mizipa+ mpe afandaki elongo na ye na kati ya bato oyo batikalaki na mokili.

7 Na nsima, bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki na esobe ná bato na bango, bayokaki ete mokonzi ya Babilone apesi Gedalia mwana ya Ahikame mokumba ya kokamba babola oyo bamemamaki te na Babilone, mibali, basi mpe bana.+ 8 Bongo bayaki epai ya Gedalia na Mizipa.+ Ezalaki Yishimaele+ mwana ya Netania, Yohanane+ ná Yonatane, bana ya Karea, Seraya mwana ya Tanumete, bana ya Efai Monetofa mpe Yezania+ mwana ya Momaakate, bango ná bato na bango. 9 Gedalia mwana ya Ahikame mwana ya Shafane alapelaki bango mpe bato na bango ndai ete: “Bóbanga kosalela Bakaladea te. Bófanda na mboka oyo mpe bósalela mokonzi ya Babilone, mpe makambo ekotambola malamu mpo na bino.+ 10 Ngai nakotikala na Mizipa, mpo nazala momonisi na bino epai ya* Bakaladea oyo bakoya epai na biso. Kasi bino bóyanganisa vinyo, mbuma ya eleko ya molunge ná mafuta, bóbomba yango na bambɛki na bino mpe bófanda na bingumba na bino oyo bozwi.”+

11 Mpe Bayuda nyonso oyo bazalaki na Moabe, Amone, Edome mpe baoyo bazalaki na mikili mosusu nyonso, bayokaki ete mokonzi ya Babilone atikaki ete bato mosusu báfanda na Yuda mpe ete apesaki Gedalia mwana ya Ahikame mwana ya Shafane mokumba ya kokamba bango. 12 Bongo Bayuda nyonso babandaki kozonga uta na bisika nyonso epai bapalanganisaki bango, mpe bayaki na mokili ya Yuda, epai ya Gedalia na Mizipa. Bayanganisaki vinyo ná mbuma ya eleko ya molunge, ezalaki mingi mpenza.

13 Yohanane mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki na esobe bayaki epai ya Gedalia na Mizipa. 14 Balobaki na ye boye: “Oyebi te ete Baalisi, mokonzi ya bana ya Amone,+ atindi Yishimaele mwana ya Netania mpo aboma yo?”*+ Kasi Gedalia mwana ya Ahikame andimelaki bango te.

15 Bongo Yohanane mwana ya Karea alobaki na Gedalia na kobombana na Mizipa ete: “Tiká nakende mpe naboma Yishimaele mwana ya Netania, mpe moto moko te akoyeba. Mpo na nini aboma yo, mpo na nini bato nyonso ya Yuda oyo bayanganisami epai na yo bápalanganisama mpe bato ya Yuda oyo batikali bákufa?” 16 Kasi Gedalia+ mwana ya Ahikame alobaki na Yohanane mwana ya Karea boye: “Kosala likambo oyo te, mpo makambo oyo ozali koloba mpo na Yishimaele ezali lokuta.”

41 Na sanza ya nsambo, Yishimaele+ mwana ya Netania mwana ya Elishama, oyo azalaki moto ya libota ya mokonzi* ayaki elongo na bato mosusu zomi epai ya Gedalia mwana ya Ahikame, na Mizipa.+ Wana bazalaki kolya elongo na Mizipa, 2 Yishimaele mwana ya Netania ná bato yango zomi oyo bazalaki elongo na ye batɛlɛmaki mpe babomaki Gedalia mwana ya Ahikame, mwana ya Shafane na mopanga. Bongo abomaki moto oyo mokonzi ya Babilone apesaki mokumba ya kokamba mokili. 3 Yishimaele abomaki Bayuda nyonso oyo bazalaki elongo na Gedalia na Mizipa, ata mpe basoda ya Bakaladea oyo bazalaki wana.

4 Na mokolo ya mibale nsima ya kobomama ya Gedalia, wana moto ata moko te ayebaki naino likambo yango, 5 bato 80 bautaki na Shekeme,+ na Shilo+ mpe na Samaria,+ bakati mandefu na bango, bilamba na bango epasukipasuki, bamikatakikataki nzoto,+ mpe bazalaki na likabo ya mbuma ná olibana+ na lobɔkɔ na bango mpo na komema na tempelo ya Yehova. 6 Bongo Yishimaele mwana ya Netania abimaki na Mizipa mpo na kokutana na bango, azalaki kolela wana azalaki kotambola. Ntango akutanaki na bango, alobaki na bango boye: “Bóya epai ya Gedalia mwana ya Ahikame.” 7 Kasi ntango kaka bakɔtaki na kati ya engumba, Yishimaele mwana ya Netania ná bato na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu ya kobomba mai.

8 Kasi ezalaki na bato zomi kati na bango oyo balobaki na Yishimaele ete: “Koboma biso te, mpo tobombi na esobe biloko oyo: blé, ɔrje, mafuta ná mafuta ya nzoi.” Bongo Yishimaele abomaki bango te ná bandeko na bango. 9 Sikoyo Yishimaele abwakaki bibembe ya bato oyo abomaki na libulu monene ya kobomba mai, libulu oyo Mokonzi Asa asalaki mpo na kobanga Baasha mokonzi ya Yisraele.+ Ezalaki na libulu yango nde Yishimaele mwana ya Netania atondisaki na bato oyo babomamaki.

10 Yishimaele akangaki bato nyonso oyo batikalaki kati na bato oyo bazalaki na Mizipa,+ ná bana basi ya mokonzi mpe bato nyonso oyo batikalaki na Mizipa, oyo Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki na mabɔkɔ ya Gedalia+ mwana ya Ahikame. Yishimaele mwana ya Netania akangaki bango mpe akendaki mpo na kokatisa na ngámbo ya Baamone.+

11 Ntango Yohanane+ mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bayokaki mabe nyonso oyo Yishimaele mwana ya Netania asalaki, 12 bazwaki bato nyonso mpe bakendaki kobunda na Yishimaele mwana ya Netania, mpe bakutaki ye pene ya mai minene* na Gibeone.

13 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yishimaele basepelaki ntango bamonaki Yohanane mwana ya Karea ná bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye. 14 Bongo bato nyonso oyo Yishimaele amemaki bakangami uta na Mizipa+ babalukaki mpe bazongaki ná Yohanane mwana ya Karea. 15 Kasi Yishimaele mwana ya Netania mpe bato mwambe na ye bakimaki liboso ya Yohanane, mpe bakendaki epai ya Baamone.

16 Yohanane mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bazwaki bato nyonso oyo batikalaki na Mizipa, bato oyo babikisaki na lobɔkɔ ya Yishimaele mwana ya Netania, nsima ya koboma Gedalia+ mwana ya Ahikame. Uta na Gibeone bazongaki na mibali, basoda, basi, bana ná bakapita ya ndako ya mokonzi. 17 Bongo bakendaki mpe bafandaki na Kimehame oyo ezalaki pene na Beteleme,+ mpo bazalaki na mposa ya kokende na Ezipito+ 18 mpo na Bakaladea. Mpo bakómaki kobanga bango, mpo Yishimaele mwana ya Netania abomaki Gedalia mwana ya Ahikame, moto oyo mokonzi ya Babilone apesaki mokumba ya kokamba mokili.+

42 Bongo bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda, Yohanane+ mwana ya Karea, Yezania mwana ya Hoshaya mpe bato nyonso, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene, bapusanaki 2 mpe balobaki na mosakoli Yirimia ete: “Tobondeli yo, yoká kosɛnga na biso mpo na koluka kondimama, mpe bondelá Yehova Nzambe na yo mpo na bolamu na biso, mpo na bolamu ya bato oyo nyonso batikali, mpo kaka bato moke nde batikali,+ ndenge okoki komona yango. 3 Yehova Nzambe na yo ayebisa biso nzela oyo tosengeli kotambola mpe likambo oyo tosengeli kosala.”

4 Mosakoli Yirimia alobaki na bango ete: “Nayoki. Nazali kobondela Yehova Nzambe na bino ndenge bosɛngi. Nyonso oyo Yehova akoyanola bino nakoyebisa bino. Nakobombela bino eloko te.”

5 Bayanolaki Yirimia ete: “Yehova azala motatoli ya solo mpe ya sembo epai na biso, soki tosali te kaka ndenge Yehova Nzambe na yo akoyebisa biso na nzela na yo. 6 Ezala malamu to mabe, tokotosa Yehova Nzambe na biso, moto oyo tozali kotinda yo epai na ye. Na yango, makambo ekotambola malamu mpo na biso, mpo tokotosa Yehova Nzambe na biso.”

7 Mikolo zomi na nsima, Yehova alobaki na Yirimia. 8 Bongo abengisaki Yohanane mwana ya Karea ná bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene.+ 9 Ayebisaki bango ete: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele, moto oyo bosɛngaki ngai nabondela ye mpo na bolamu na bino, alobi: 10 ‘Soki botikali mpenza na mokili oyo, nakotonga bino mpe nakobuka bino te, nakolona bino mpe nakopikola bino te, mpo nakoyoka mawa mpo na mpasi oyo namemeli bino.+ 11 Bóbanga te mpo na mokonzi ya Babilone, moto oyo bozali kobanga.’+

“‘Bóbanga mpo na ye te, mpo nazali elongo na bino, mpo na kobikisa mpe kosikola bino na lobɔkɔ na ye,’ Yehova alobi bongo. 12 Nakoyokela bino mawa,+ mpe akoyokela bino mawa mpe akozongisa bino na mokili na bino.

13 “‘Kasi soki bolobi: “Te, tokotikala na mokili oyo te!” mpe botosi te Yehova Nzambe na bino 14 mpe bolobi: “Te, kasi tokokende nde na mokili ya Ezipito,+ epai tokomona etumba te, tokoyoka lokito ya liseke te, tokozala na nzala ya limpa te; mpe kuna nde tokofanda”; 15 bóyoka liloba ya Yehova, Ee bato ya Yuda oyo botikali. Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Soki bozwi mpenza ekateli ya kokende na Ezipito mpe bokei kofanda kuna,* 16 na yango bitumba oyo bozali kobanga ekokómela bino kuna na mokili ya Ezipito, nzala makasi oyo bozali kobanga ekolanda bino tii na Ezipito, mpe bokokufa kuna.+ 17 Mpe bato nyonso oyo bazwi ekateli ya kokende kofanda na Ezipito, bakokufa na bitumba, na nzala mpe na maladi mabe. Ata moto moko te akotikala na bomoi to akokima mpasi oyo nakobimisela bango.”’

18 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Kaka ndenge nkanda na ngai mpe nkanda na ngai ya kongala esopaneli bato ya Yerusaleme,+ ndenge yango nde nkanda na ngai ekosopanela bino mpo bozali kokende na Ezipito, mpe bokokóma elakeli mabe, eloko ya nsɔmɔ, eloko ya libabe, ya nsɔni,+ mpe bokomona esika oyo lisusu te.’

19 “Yehova alobi mpo na bino, Ee bato ya Yuda oyo botikali. Bókende na Ezipito te. Bosengeli mpenza koyeba ete nakebisi bino lelo 20 ete libunga na bino ekosala ete bóbungisa bomoi na bino. Mpo botindi ngai epai ya Yehova Nzambe na bino, bolobi: ‘Bondelá Yehova Nzambe na biso mpo na bolamu na biso, mpe yebisá biso nyonso oyo Yehova Nzambe na biso akoloba, mpe tokosala yango.’+ 21 Mpe nayebisi bino lelo, kasi bokotosa Yehova Nzambe na bino te mpe bokosala eloko moko te oyo ayebisi ngai nayebisa bino.+ 22 Na yango, bóyeba mpenza ete bokokufa na bitumba, na nzala mpe na maladi mabe na esika oyo bozali kosepela kokende kofanda.”+

43 Ntango kaka Yirimia asilisaki koloba na bato nyonso maloba nyonso ya Yehova Nzambe na bango, liloba nyonso oyo Yehova Nzambe na bango atindaki ye ayebisa bango, 2 Azaria mwana ya Hoshaya, Yohanane+ mwana ya Karea, mpe bato nyonso ya lofundo balobaki na Yirimia boye: “Ozali koloba lokuta! Yehova Nzambe na biso atindi yo te oloba: ‘Bókende kofanda na Ezipito te.’ 3 Kasi Baruke+ mwana ya Neria nde azali kotinda yo oloba bongo mpo tókabama na lobɔkɔ ya Bakaladea, mpo báboma biso to bámema biso na mboka mopaya na Babilone.”+

4 Na yango Yohanane mwana ya Karea, bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda mpe bato nyonso batosaki Yehova te, baboyaki kotikala na mokili ya Yuda. 5 Kutu Yohanane mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda bazwaki bato nyonso ya Yuda oyo batikalaki, baoyo bautaki na bikólo nyonso epai bapalanganisaki bango, mpe bazongaki kofanda na mokili ya Yuda.+ 6 Bazwaki mibali, basi, bana, bana basi ya mokonzi mpe moto nyonso* oyo Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki elongo na Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ ná mosakoli Yirimia mpe Baruke mwana ya Neria. 7 Mpe bakɔtaki na mokili ya Ezipito, mpo batosaki Yehova te, mpe bakendaki tii na Tahapanehese.+

8 Bongo Yehova alobaki na Yirimia na Tahapanehese ete: 9 “Zwá mabanga minene na mabɔkɔ na yo, mpe na miso ya mibali Bayuda, bombá yango na pɔtɔpɔtɔ, na pavema ya babriki oyo ezali na esika ya kokɔta na ndako ya Farao, na Tahapanehese. 10 Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Nazali kobengisa Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, mosaleli na ngai,+ mpe nakotya kiti na ye ya bokonzi likoló ya mabanga oyo nabombi, mpe akotanda hema ya nkembo na ye likoló na yango.+ 11 Akokɔta mpe akobɛta mokili ya Ezipito.+ Basusu bakokufa na maladi oyo ebomaka, basusu bakomemama bakangami mpe basusu bakokufa na bitumba.+ 12 Nakotya mɔtɔ na batempelo* ya banzambe ya Ezipito,+ mpe akotumba bango mpe akomema bango bakangami. Akomilínga mokili ya Ezipito ndenge mobateli ya mpate amilíngaka elamba na ye, mpe akolongwa kuna na kimya. 13 Mpe akobukabuka makonzí ya Bete-shemeshe* oyo ezali na mokili ya Ezipito, mpe akotumba batempelo* ya banzambe ya Ezipito.”’”

44 Talá oyo Nzambe ayebisaki Yirimia aloba mpo na Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na mokili ya Ezipito,+ baoyo bazalaki kofanda na Migidole,+ Tahapanehese,+ Nofe*+ mpe na mokili ya Patrose,+ ete: 2 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bomoni mpasi nyonso oyo namemeli Yerusaleme+ mpe bingumba nyonso ya Yuda, lelo ezali esika moko oyo ebebisamá, mpe moto moko te azali kofanda kuna.+ 3 Ezali mpo na makambo ya mabe oyo bosalaki mpo na kosilikisa ngai na ndenge bozalaki kokende kopesa bambeka+ mpe kosambela banzambe mosusu oyo boyebaki te, ezala bino, to bankɔkɔ na bino.+ 4 Nakobaki kotindela bino basaleli na ngai nyonso, basakoli, nazalaki kotinda bango mbala na mbala,* na maloba oyo: “Nabondeli bino, bósala te likambo ya bosɔtɔ oyo nayinaka.”+ 5 Kasi boyokaki te, botyaki likebi te mpe botikaki mabe na bino te, bokobaki kopesa banzambe mosusu bambeka.+ 6 Bongo nkanda na ngai ya kongala mpe nkanda na ngai esopanaki, etumbaki bingumba ya Yuda ná babalabala ya Yerusaleme mpe bisika oyo ebebisamá, etikalá mpamba, lokola na mokolo ya lelo.’+

7 “Mpe sikoyo talá oyo Yehova, Nzambe ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Mpo na nini bozali komilukela mpasi moko monene? Mpo mobali, mwasi, mwana ná mwana oyo azali naino komɛla mabɛlɛ, na kati ya Yuda, bango nyonso bakokufa, moto moko te akotikala. 8 Mpo na nini bozali kosilikisa ngai na misala na bino, na ndenge bozali kopesa banzambe mosusu bambeka na mokili ya Ezipito, esika bokendaki kofanda? Bokosila, bokokóma eloko ya elakeli mabe mpe ya nsɔni na kati ya bikólo nyonso ya mabele.+ 9 Bobosani nde makambo mabe ya bankɔkɔ na bino, makambo mabe ya bakonzi ya Yuda,+ makambo mabe ya basi na bango,+ makambo mabe na bino moko mpe makambo mabe ya basi na bino,+ oyo esalemaki na mokili ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme? 10 Tii na mokolo ya lelo bomikitisi te, bomonisi ata bobangi te,+ botosi mobeko na ngai te mpe malako oyo natyaki liboso na bino mpe bankɔkɔ na bino.’+

11 “Na yango, talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Nazwi ekateli ya komemela bino mpasi, kobebisa Yuda mobimba. 12 Nakoboma na Ezipito bato nyonso ya Yuda oyo batyaki motó makasi mpe bakendaki kofanda na Ezipito.+ Bakokufa na bitumba* mpe na nzala; kobanda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene, bakokufa na bitumba* mpe na nzala. Bakokóma elakeli mabe, eloko ya nsɔmɔ, libabe mpe eloko ya nsɔni.+ 13 Nakopesa bato oyo bazali kofanda na Ezipito etumbu, ndenge napesaki Yerusaleme etumbu, na bitumba,* na nzala mpe na maladi mabe.+ 14 Mpo na bato ya Yuda oyo batikali, baoyo bakei kofanda na mokili ya Ezipito, moto moko te akobika to akotikala na bomoi mpo na kozonga na mokili ya Yuda. Bakozala na mposa makasi ya kozonga mpe ya kofanda kuna, kasi bakozonga te, longola kaka mwa bato oyo bakobika.’”

15 Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kopesa banzambe mosusu bambeka, mpe basi nyonso oyo batɛlɛmaki wana, oyo basalaki etuluku moko monene, mpe bato nyonso oyo bazalaki kofanda na mokili ya Ezipito,+ na Patrose,+ bayanolaki Yirimia ete: 16 “Oyo olobi mpo na nkombo ya Yehova, tokosala yango te. 17 Kasi tokosala mpenza nyonso oyo tolobi, tokopesa Mokonzi-mwasi ya likoló* bambeka mpe tokosopela ye makabo ya masanga,+ kaka ndenge biso, bankɔkɔ na biso, bakonzi na biso ná bankumu na biso tosalaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme, ntango tozalaki kotonda na limpa, tozalaki bato ya bomɛngo, mpe tomonaki mpasi ata moke te. 18 Banda totiki kopesa Mokonzi-mwasi ya likoló* bambeka mpe kosopela ye makabo ya masanga, tozangi eloko nyonso, tokufi na bitumba* mpe na nzala.

19 Basi babakisaki boye: “Mpe ntango tozalaki kopesa Mokonzi-mwasi ya likoló* bambeka mpe kosopela ye makabo ya masanga, mibali na biso bapesaki biso nzela te ya kosalela ye bagato ya mbeka oyo esalemaki na elilingi na ye mpe kosopela ye makabo ya masanga?”

20 Bongo Yirimia alobaki na bato nyonso, na mibali ná basi na bango mpe na bato nyonso oyo bazalaki koloba na ye ete: 21 “Bambeka oyo bino, bankɔkɔ na bino, bakonzi na bino, bankumu na bino mpe bato ya mokili oyo bopesaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme+—Yehova akanisaki yango mpe atyelaki yango likebi! 22 Nsukansuka Yehova akokaki lisusu te kokanga motema mpo na misala na bino ya mabe, mpe makambo ya bosɔtɔ oyo bosalaki, mpe mokili na bino ekómaki esika oyo ebebisamá, eloko ya nsɔmɔ mpe elakeli mabe, esika oyo moto moko te afandi, lokola na mokolo ya lelo.+ 23 Mpasi oyo ekómeli bino lelo ezali mpo bopesaki bambeka yango, bosalelaki Yehova lisumu na ndenge boboyaki kotosa Yehova mpe boboyaki kolanda mibeko na ye, malako na ye mpe makundoli na ye.”+

24 Yirimia akobaki koloba na bato nyonso mpe na basi nyonso ete: “Bóyoka liloba ya Yehova, bino nyonso bato ya Yuda oyo bozali na mokili ya Ezipito. 25 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Oyo bino mpe basi na bino bolobi na minɔkɔ na bino, bosali yango na mabɔkɔ na bino, mpo bolobi: “Tokokokisa mpenza bilako oyo tosalaki, ya kopesa Mokonzi-mwasi ya likoló* bambeka mpe kosopela ye makabo ya masanga.”+ Bino basi bokokokisa mpenza bilako na bino mpe bokokokisa bandai na bino.’

26 “Na yango bóyoka liloba ya Yehova, bino bato nyonso ya Yuda oyo bofandi na mokili ya Ezipito: ‘“Talá, nalapi ndai na nkombo na ngai monene,” Yehova alobi bongo, “moto moko te ya Yuda oyo afandi na mokili mobimba ya Ezipito akotánga nkombo na ngai na ndai na ye+ ete: ‘Lokola Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova azali solo na bomoi!’+ 27 Sikoyo nazali na likanisi ya komemela bango mpasi kasi likambo moko ya malamu te;+ bato nyonso ya Yuda oyo bazali na mokili ya Ezipito bakokufa na bitumba* mpe na nzala, tii bakosila.+ 28 Kaka bato moke nde bakobika na bitumba,* mpe bakolongwa na mokili ya Ezipito mpo na kozonga na mokili ya Yuda.+ Bongo bato nyonso ya Yuda oyo batikali, oyo bakendaki kofanda na mokili ya Ezipito, bakoyeba soki liloba ya nani ekokisami, ya ngai to ya bango!”’”

29 “‘Mpe talá elembo mpo na bino,’ Yehova alobi bongo, ‘ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, mpo bóyeba ete mpasi oyo nalobaki mpo na bino ekokokisama mpenza. 30 Talá oyo Yehova alobi: “Nazali kokaba Farao Hofra, mokonzi ya Ezipito, na lobɔkɔ ya banguna na ye mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma ye,* kaka ndenge nakabaki Zidikiya mokonzi ya Yuda na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone, oyo azalaki monguna na ye mpe azalaki koluka koboma ye.”’”*+

45 Oyo ezali maloba oyo mosakoli Yirimia alobaki na Baruke+ mwana ya Neria, ntango akomaki na buku maloba oyo Yirimia+ ayebisaki ye na mbula ya minei ya bokonzi ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda ete:

2 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na yo, Baruke, 3 ‘Yo olobi: “Mawa na ngai, mpo Yehova abakisi mawa na mpasi na ngai! Nalɛmbi mpo na kolelalela na ngai, mpe namoni esika ya kopema te.”’

4 “Osengeli koloba na ye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá! Oyo natongá nazali kobuka yango, mpe oyo naloná nazali kopikola yango, elingi koloba mokili mobimba.+ 5 Kasi ozali koluka makambo* minene mpo na yo moko. Tiká koluka makambo yango.”’

“‘Mpo mosika te nakomemela bato nyonso* mpasi,’+ Yehova alobi bongo, ‘mpe esika nyonso oyo okokende nakosala ete obikisa bomoi na yo.’”+

46 Talá oyo Yehova alobaki na mosakoli Yirimia mpo na bikólo:+ 2 Mpo na Ezipito,+ na oyo etali limpinga ya basoda ya Farao Neko+ mokonzi ya Ezipito, oyo azalaki pene ya Ebale Efrate, oyo balongaki ye na Karakemishe, epai ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone na mbula ya minei ya bokonzi ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda:

 3 “Bóbongisa banguba na bino ya mike* mpe ya minene,

Mpe bópusana mpo na etumba.

 4 Bókanga bampunda bansinga, mpe bómata, bino basoda oyo botambolaka na mpunda,

Bómibongisa mpe bólata bikɔti na bino.

Bóyeisa makɔnga na bino sɛlisɛli mpe bólata bakazaka ya bibende.

 5 ‘Mpo na nini namoni bango bazali kolɛnga na nsɔmɔ?

Bazali kozonga nsima, babundi-bitumba na bango babukanibukani.

Bakimi na nsɔmɔ, babundi-bitumba na bango batali nsima te.

Kobanga ezali bipai nyonso,’ Yehova alobi bongo.

 6 ‘Bato ya mbangu bakoki kokima te, mpe babundi-bitumba bakoki kobika te.

Na nɔrdi pembenipembeni ya Ebale Efrate,

Babɛti libaku mpe bakwei.’+

 7 Nani oyo azali komata lokola Ebale Nile,

Lokola bibale oyo mai na yango ezali kotomboka?

 8 Ezipito ezali komata lokola Ebale Nile,+

Lokola bibale oyo mai na yango ezali kotomboka.

Mpe ezali koloba: ‘Nakomata mpe nakozipa mabele.

Nakobebisa engumba mpe bafandi na yango nyonso.’

 9 Bómata, bino bampunda!

Bótambola mbangu na ndenge ya ligboma, bino makalo!

Babundi-bitumba bápusana,

Kushi ná Puti, baoyo bazali kosalela nguba,+

Mpe Baludime,+ baoyo bazali kosalela mpe kogumba* litimbo.+

10 “Mokolo yango ezali ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, mokolo ya kozongisa mabe na banguna na ye. Mopanga ekolya, ekotonda mpe ekomɛla makila na bango, mpo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, azali kobongisa mbeka na mokili ya nɔrdi pene ya Ebale Efrate.+

11 Matá na Gileade mpo ozwa balsame,+

Ee ngɔndɔ mwana mwasi ya Ezipito.

Obakisi kaka mpamba bankisi ya kobikisa yo,

Mpo nkisi ya kobikisa yo ezali te.+

12 Bikólo eyoki nsango ya kosambwa na yo,+

Mpe mokili etondi na koganga na yo.

Mpo babɛti libaku, mobundi moko atutani na mobundi mosusu.

Mpe bango nyonso mibale bakwei elongo.”

13 Talá oyo Yehova alobaki na mosakoli Yirimia na oyo etali koya ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone mpo na kobundisa mokili ya Ezipito:+

14 “Bóyebisa yango na Ezipito, bósakola yango na Migidole,+

Bósakola yango na Nofe* mpe na Tahapanehese.+

Bóloba ete: ‘Bótɛlɛma na bisika na bino mpe bómibongisa,

Mpo mopanga ekolya zingazinga na bino nyonso.

15 Mpo na nini bato na bino ya nguya bakɔmbɔlami?

Batɛlɛmi te na esika na bango,

Mpo Yehova atindiki bango.

16 Ebele bazali kobɛta mabaku mpe kokwea.

Bazali kolobana ete:

“Tɛlɛmá, tózonga epai ya bato na biso mpe na mokili na biso,

Mpo na mopanga oyo ezali konyokola.”’

17 Kuna basakoli ete:

‘Farao mokonzi ya Ezipito azali kosala makɛlɛlɛ ya mpamba

Atiki libaku* eleka kaka boye.’+

18 Mokonzi oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga alobi boye: ‘Lokola nazali solo na bomoi,’

Akoya* lokola Tabore+ katikati ya bangomba

Mpe lokola Karamele+ pembeni ya mbu.

19 Kangá bisaka na yo mpo na kokende na mboka mopaya,

Ee mwana mwasi oyo azali kofanda na Ezipito.

Mpo Nofe* ekokóma eloko ya nsɔmɔ,

Ekotyama mɔtɔ* mpe moto moko te akofanda kuna.+

20 Ezipito ezali lokola mwana-ngɔmbɛ ya mwasi ya kitoko,

Kasi nzinzi oyo eswaka ekoyela ye uta na nɔrdi.

21 Ata basoda na ye ya kofutela oyo bazali na katikati na ye bazali lokola bana-ngɔmbɛ ya mafutamafuta,

Kasi bango mpe bazongi nsima mpe bakimi elongo.

Batɛlɛmi te.+

Mpo mokolo ya likama na bango eyeli bango,

Ntango ya kopesa bango etumbu.’

22 ‘Mongongo na ye ezali lokola ya nyoka oyo ezali kokima,

Mpo bazali koya nsima na ye na nguya ya bomoi, na bipasola,*

Lokola bato oyo bazali kokata banzete.*

23 Bakokata zamba na ye,’ Yehova alobi bongo, ‘atako ezalaki komonana ete bato bakoki kokɔta kuna te.

Mpo bazali mingi koleka mayoyo,* bakoki kotángama te.

24 Mwana mwasi ya Ezipito akoyokisama nsɔni.

Akokabama na lobɔkɔ ya bato ya nɔrdi.’+

25 “Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Nazali kolandela Amone+ nzambe ya No,*+ Farao, Ezipito, banzambe na ye+ mpe bakonzi na ye, ɛɛ, Farao mpe bato nyonso oyo bazali kotyela ye motema.’+

26 “‘Nakokaba bango na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma bango,* mpe na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone+ ná basaleli na ye. Kasi na nsima, akofanda epai na ye lokola na mikolo ya kala,’ Yehova alobi bongo.+

27 ‘Kasi yo, mosaleli na ngai Yakobo, kobanga te,

Mpe kolɛnga na nsɔmɔ te, Ee Yisraele.+

Mpo nakobikisa yo uta na esika ya mosika epai ozali

Mpe bana* na yo uta na mokili oyo bazali bakangami.+

Yakobo akozonga, akozala na kimya, mpe moto moko te akotungisa ye,

Moto ata moko mpe te akobangisa bango.+

28 Na yango, kobanga te, mosaleli na ngai Yakobo,’ Yehova alobi bongo, ‘mpo nazali elongo na yo.

Nakosilisa bato nyonso kati na bikólo nyonso epai napalanganisaki yo,+

Kasi nakosilisa yo te.+

Nakosembola yo na ndenge oyo ebongi,+

Kasi nakozanga te kopesa yo etumbu.’”

47 Talá liloba oyo Yehova ayebisaki mosakoli Yirimia mpo na Bafilistia,+ liboso Farao abundisa Gaza. 2 Talá oyo Yehova alobi:

“Talá! Mai ezali kouta na nɔrdi.

Ekokóma mokɛli ya mai oyo ezali kozindisa.

Mpe ekozindisa mokili yango ná eloko nyonso oyo ezali na kati,

Engumba ná bato oyo bafandi na kati.

Bato bakoganga,

Mpe moto nyonso oyo azali kofanda na mokili yango akoganga na kolela.

 3 Ntango bakoyoka makɛlɛlɛ ya basabo ya bampunda na ye,

Ndenge ezali kobɛtabɛta mabele, lokito ya makalo na ye ya etumba,

Yikiyiki ya bapine na ye,

Batata bakozonga ata nsima te mpo na kosalisa bana na bango,

Mpo bakozanga mpiko,

 4 Mpo mokolo oyo ezali koya ekobebisa Bafilistia nyonso,+

Ekolongola Tire,+ Sidone+ mpe bato nyonso oyo basungaka bango.

Mpo Yehova akobebisa Bafilistia,

Baoyo batikali oyo bautaki na esanga ya Kafitore.*+

 5 Libandi* ekoya na Gaza.

Bakangisi Ashekelone monɔkɔ.+

Ee yo oyo otikali na lobwaku na bango ya patatalu,

Tii ntango nini okokoba komikatakata?+

 6 Ah! Mopanga ya Yehova!+

Tii ntango nini okofanda nyɛɛ te?

Zongá na kati ya libenga na yo.

Pemá mpe fandá kimya.

 7 Ndenge nini yango ekoki kofanda nyɛɛ

Ntango Yehova apesi yango mitindo?

Atindi yango mpo ebɛta Ashekelone

Mpe pembenipembeni ya mbu.”+

48 Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele alobi mpo na Moabe:+

“Mawa na Nebo,+ mpo abebisami!

Kiriataime+ ayokisami nsɔni, mpe akangami.

Esika makasi ya kobombana* eyokisami nsɔni mpe eningisami.+

 2 Bakosanzola lisusu Moabe te.

Na Heshibone,+ basali likita mpo na kokweisa ye:

‘Bóya, tóbebisa ye mpo azala lisusu ekólo te.’

Ee Madamene, yo mpe osengeli kofanda nyɛɛ.

Mpo mopanga ezali kolanda yo.

 3 Makɛlɛlɛ ya koganga ezali kouta na Horonaime,+

Makɛlɛlɛ moko monene ya kobebisa mpe ya kobuka.

 4 Moabe abebisami.

Bana na ye ya mike bazali koganga.

 5 Na nzela oyo emati na Luhite, bato bazali komata na kolela.

Mpe na nzela oyo ekiti uta na Horonaime bato bazali koyoka koganga ya mpasi mpo na libebi.+

 6 Bókima; bóbikisa bomoi na bino,*

Bosengeli kokóma lokola nzete ya jenevriye na esobe.

 7 Lokola otyeli misala na yo mpe biloko na yo ya motuya motema,

Yo mpe okokangama.

Mpe Kemoshe+ akomemama na mboka mopaya,

Elongo na banganga-nzambe mpe bankumu na ye.

 8 Mobebisi akokɔta na engumba nyonso,

Mpe ata engumba moko te ekobika.+

Lobwaku* ekobebisama

Mpe mabele ya patatalu ekosilisama nyɛɛ, kaka ndenge Yehova alobi.

 9 Bótya elembo mpo na Moabe bino bato,

Mpo ntango bingumba na ye ekokwea, bato na ye bakokima

Mpe bingumba na ye ekokóma eloko ya nsɔmɔ,

Moto akofanda kuna te.+

10 Alakelama mabe moto oyo azali kokokisa mosala ya Yehova na bolɛmbu!

Alakelama mabe moto oyo azali kopekisa mopanga na ye esopa makila!

11 Bamoabe bazali na kimya banda bolenge na bango,

Lokola vinyo likoló ya mbɔtɔ na yango.

Basopami te longwa na mbɛki moko tii na mbɛki mosusu,

Mpe batikalá ata te komemama na mboka mopaya.

Yango wana elɛngi na bango etikali kaka ndenge ezalaka,

Mpe nsolo na bango ebongwani te.

12 “‘Na yango, talá! Mikolo ezali koya,’ Yehova alobi bongo, ‘nakotinda bato básopa yango. Bakobalusa yango mpe bakotika bambɛki yango mpamba mpe bakobukabuka bilokó na bango ya minene. 13 Mpe Bamoabe bakoyoka nsɔni mpo na Kemoshe, ndenge kaka bato ya Yisraele bayoki nsɔni mpo na Betele, eloko oyo bazalaki kotyela motema.+

14 Ndenge nini bozali koloba ete: “Tozali bilombe ya etumba, tozali pene mpo na etumba”?’+

15 ‘Moabe abebisami,

Bato bakɔti na bingumba na ye,+

Mpe bilenge na bango ya mibali ya makasi koleka babomami,’+

Yango nde liloba ya Mokonzi, oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga.+

16 Likama oyo ekokwela Bamoabe ezali mosika te,

Mpe kokwea na bango ezali koya mbangu mpenza.+

17 Bato nyonso oyo bazali zingazinga na bango bakoyokela bango mawa,

Bato nyonso oyo bayebi nkombo na bango.

Bóloba na bango ete: ‘Ee talá ndenge lingenda ya nguya ebukani, lingenda ya kitoko!’

18 Kitá, longwá na nkembo na yo,

Mpe fandá na mposa,* Ee yo mwana mwasi oyo afandaka na Dibone,+

Mpo mobebisi ya Moabe ayei mpo na kobundisa yo,

Mpe akobebisa bisika na yo oyo ebatelami makasi.+

19 Tɛlɛmá pene na nzela mpe talá, mwasi oyo ofandi na Aroere.+

Tuná mobali oyo azali kokima mpe mwasi oyo azali komibikisa ete: ‘Likambo nini?’

20 Moabe ayokisami nsɔni, alɛngi na nsɔmɔ.

Gangá na kolela mpe belelá.

Bósakola na Arnone+ ete Moabe abebisami.

21 “Ngonga ya kosambisa eyei mpo na mabele ya patatalu:+ mpo na Holone, Yahaze,+ Mefaate,+ 22 Dibone,+ Nebo,+ Bete-diblataime, 23 Kiriataime,+ Bete-gamule, Bete-meone,+ 24 Keriote,+ Bozera ná bingumba nyonso ya mokili ya Moabe, oyo ezali mosika mpe oyo ezali pene.

25 “‘Nguya ya Moabe esili,*

Lobɔkɔ na ye ebukani,’ Yehova alobi bongo.

26 ‘Bólangwisa ye,+ mpo amikumisi liboso ya Yehova.+

Moabe amibalolibaloli na kati ya biloko oyo asanzi,

Mpe bato nyonso bazali kosɛka ye.

27 “‘Yo osɛkaki Yisraele te?+

Okutaki ye na kati ya miyibi

Mpo oningisa motó mpe oloba mabe mpo na ye?

28 Bótika bingumba mpe bófanda likoló ya libanga, bino bato oyo bofandi na Moabe,

Mpe bókóma lokola ebenga oyo ezali kotonga bazumbu* na yango pembenipembeni ya monɔkɔ ya lidusu.’”

29 “Toyoki nsango ya lolendo ya Moabe—azali na lofundo mingi—

Mpo na kotombwana na ye, lolendo na ye, komitombola na ye mpe lofundo ya motema na ye.”+

30 “‘Nayebi nkanda makasi na ye,’ Yehova alobi bongo,

‘Kasi bilobaloba na ye ekosala eloko te.

Bakosala eloko moko te.

31 Yango wana nakoganga na kolela mpo na Moabe,

Mpe nakoganga mpo na Moabe mobimba.

Bakolelalela mpo na bato ya Kiri-herese.+

32 Nakolela mpo na yo, kolela moko oyo eleki kolela mpo na Yazere,+

Ee nzete ya vinyo ya Sibima.+

Bitape na yo oyo ezali kobimisa bafololo ekatisi mbu.

Ekómi na mbu, na Yazere.

Mobebisi abebisi mbuma na yo ya eleko ya molunge

Mpe mbuma na yo ya vinyo na ntango ya kobuka mbuma ya vinyo.+

33 Kosepela mpe esengo elongolami na elanga ya banzete ya mbuma

Mpe na mokili ya Moabe.+

Nasali ete vinyo esila na bikamwelo ya vinyo.

Moto moko te akonyatanyata mbuma ya vinyo na koganga ya esengo.

Ekozala koganga ya ndenge mosusu.’”+

34 “‘Koganga ya Heshibone+ eyokani tii na Eleale,+

Mongongo na bango eyokani tii na Yahaze;+

Kobanda na Zoare tii na Horonaime,+ tii na Eglate-shelishiya.

Mpo ata mai ya Nimirime ekokauka mpenza.+

35 Nakolimwisa na Moabe

Moto oyo azali komema likabo na esika oyo etombwaná

Mpe moto oyo azali kopesa bambeka epai ya nzambe na ye. Yehova alobi bongo.

36 Yango wana motema na ngai ekolelalela* mpo na Moabe, lokola piololo,*+

Mpe motema na ngai ekolelalela* mpo na bato ya Kiri-herese, lokola piololo.*

Mpo bozwi oyo akómi na yango ekosila.

37 Mpo motó nyonso ezali na libandi,+

Mpe mandefu nyonso ekatami.

Bampota ezali na mabɔkɔ nyonso,+

Mpe ngɔtɔ* ezali na loketo na bango!’”+

38 “‘Na bansamba nyonso ya Moabe

Mpe na bisika na yango minene ya bato nyonso,

Bato bazali kaka kolela.

Mpo nabuki Moabe

Lokola mbɛki oyo babwaki,’ Yehova alobi bongo.

39 ‘Talá ndenge ayoki nsɔmɔ! Bóganga na kolela!

Talá ndenge Moabe apesi mokɔngɔ, ayoki nsɔni!

Moabe akómi eloko ya kosɛka,

Mpe eloko ya nsɔmɔ epai ya bato nyonso oyo bazali zingazinga na ye.’”

40 “Mpo talá oyo Yehova alobi:

‘Talá! Kaka ndenge mpongo ekitaka na lombangu na nse,+

Ndenge wana nde monguna akosembola mapapu na ye likoló ya Moabe.+

41 Bakozwa bingumba,

Bakɔbɔtɔla bisika na ye ya makasi.

Na mokolo yango, babundi-bitumba ya Moabe

Bakoyoka mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota.’”

42 “‘Mpe Moabe akozala lisusu ekólo te,+

Mpo amikumisi liboso ya Yehova.+

43 Nsɔmɔ ná libulu mpe motambo ezali liboso na yo,

Ee moto oyo ofandi na Moabe,’ Yehova alobi bongo.

44 ‘Moto nyonso oyo akokima mpo na nsɔmɔ akokwea na libulu,

Mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo.’

‘Mpo nakopesa Moabe etumbu na mbula oyo natyá,’ Yehova alobi bongo.

45 ‘Baoyo bazali kokima batɛlɛmi na elili ya Heshibone, makasi esili bango.

Mpo mɔtɔ ekouta na Heshibone,

Mpe lolemo ya mɔtɔ ekouta kati na Sihone;+

Ekozikisa elongi ya Moabe

Mpe nsɔngɛ ya motó ya babundi ya mobulu.’+

46 ‘Mawa na yo, Ee Moabe!

Bato ya Kemoshe+ bakufi.

Mpo bana na yo ya mibali bamemami bakangami,

Mpe bana na yo ya basi bakei na mboka mopaya.+

47 Kasi nakoyanganisa bakangami ya Moabe na eleko ya nsuka ya mikolo,’ Yehova alobi bongo.

‘Kosambisama ya Moabe esuki awa.’”+

49 Talá oyo Yehova alobi mpo na Baamone:+

“Yisraele azali nde na bana te?

Azali nde na mozwi-ya-libula te?

Mpo na nini Malakame+ azwi Gade?+

Mpe mpo na nini bato na ye bazali kofanda na bingumba ya Yisraele?”

 2 “‘Bongo, talá! mikolo ezali koya,’ Yehova alobi bongo,

‘Ntango nakosala ete bileko ya kokebisa ya etumba* eyokana mpo na Raba+ ya bana ya Amone.+

Akokóma libondo ya mabele oyo etikali mpamba,

Mpe bingumba oyo esimbami* na ye ekozikisama na mɔtɔ.’

‘Mpe Yisraele akozwa mabele ya baoyo bazwaki mabele na ye,’+ Yehova alobi bongo.

 3 ‘Gangá na kolela, Ee Heshibone, mpo Ai abebisami!

Bóbelela, Ee bingumba oyo esimbami na Raba.

Bólata ngɔtɔ.*

Bóganga na kolela, mpe bótambolatambola na kati ya mapango ya mabanga,*

Mpo Malakame akokende na mboka mopaya

Elongo na banganga-nzambe na ye mpe bankumu na ye.+

 4 Mpo na nini ozali komikumisa mpo na mabwaku,*

Mpo na mokili na yo ya patatalu epai mai ezali kotíyola,

Ee mwana mwasi oyo azangi bosembo,

Moto oyo ozali kotya motema na biloko na yo ya motuya,

Mpe ozali koloba: “Nani akoya kobundisa ngai?”’”

 5 “‘Talá, nazali komemela yo likambo moko ya nsɔmɔ,’ Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga alobi bongo,

‘Ekouta na bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo.

Bokopanzana moto na moto na nzela na ye,

Mpe moto moko te akoyanganisa baoyo bakimi.’”

 6 “‘Kasi nsima na yango, nakoyanganisa Baamone oyo bakangamaki,’ Yehova alobi bongo.”

7 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi mpo na Edome:

“Bwanya ezali lisusu te na Temane?+

Bato ya mayele bazali lisusu te na toli ya malamu ya kopesa?

Bwanya na bango epɔli?

 8 Bókima! Bózonga nsima!

Bókende mpe bófanda na esika ya mozindo, Ee bato oyo bofandi na Dedane!+

Mpo nakomemela Esau likama,

Ntango ngonga na ngai ya kopesa ye etumbu ekoya.

 9 Soki babuki-mbuma ya vinyo bakɔteli yo,

Bakotika mwa mbuma ya kolɔkɔta te?

Soki miyibi bakɔteli yo na butu,

Bakobebisa kaka nyonso oyo balingi.+

10 Kasi ngai, nakotika Esau bolumbu.

Nakotika bisika na ye ya kobombana polele,

Mpo akokoka te kobombana.

Bana na ye, bandeko na ye mpe bato oyo bafandi penepene na ye bakobebisama bango nyonso,+

Mpe akozala lisusu te.+

11 Tiká bana na yo oyo batata bakufá,

Ngai moko nakobatela bango na bomoi,

Mpe basi na yo oyo mibali bakufá bakotyela ngai motema.”

12 Mpo talá oyo Yehova alobi: “Talá! Soki baoyo bakatelá bango etumbu te ya komɛla kɔpɔ basengeli komɛla yango, bongo yo, okanisi ete okozanga etumbu? Te okozwa etumbu, mpo osengeli komɛla yango.”+

13 “Mpo nalapi ndai na nkombo na ngai moko,” Yehova alobi bongo, “ete Bozera ekokóma eloko ya nsɔmɔ,+ eloko ya nsɔni, libebi mpe elakeli mabe; mpe bingumba na yango nyonso ekokóma bisika oyo ebebisamá mpo na libela.”+

14 Nayoki nsango moko oyo euti epai ya Yehova,

Motindami moko oyo atindami kati na bikólo, alobi:

“Bóyangana elongo mpe bóya kobunda na ye,

Bómibongisa mpo na etumba.”+

15 “Mpo talá! Nakómisi yo mpamba na kati ya bikólo,

Otyolami kati na bato.+

16 Kolɛngisa oyo olɛngisaki

Lofundo ya motema na yo ekosi yo,

Ee yo oyo ofandi na kati ya madusu ya mabanga,

Ozwi esika oyo etombwaná ya ngomba moke.

Ata soki otongi zumbu* na yo na likoló lokola mpongo,

Uta kuna nakokitisa yo na nse,” Yehova alobi bongo.

17 “Mpe Edome akokóma eloko ya nsɔmɔ.+ Moto nyonso oyo azali koleka pembeni na ye akotala ye na nsɔmɔ mpe akobɛta piololo mpo na mpasi na ye nyonso. 18 Ndenge Sodoma ná Gomora mpe bingumba na yango oyo ezalaki zingazinga ebebisamaki,”+ Yehova alobi bongo, “moto moko te akofanda kuna mpe moto moko te akotya ndako na ye kuna.+

19 “Talá! Moto moko akomata lokola nkɔsi+ oyo ezali kobima na mwa bazamba oyo ekangamakangamá oyo ezali pembenipembeni ya Yordani, kasi na mbala moko nakosala ete akima mosika na esika yango. Nakotyela bango moto oyo naponi mpo atambwisa bango. Mpo nani azali lokola ngai, mpe nani akoki kotɛlɛmɛla ngai? Mobateli ya mpate nani akoki kotɛlɛma liboso na ngai?+ 20 Na yango, Ee bino bato, bóyoka ekateli* oyo Yehova azwi mpo na Edome, mpe likambo oyo akanisi kosala mpo na bafandi ya Temane:+

Ya solo, bakobengana bana-mpate ya etonga.

Mpo na bango, akosala ete esika na bango ya kofanda etikala mpamba.+

21 Mabele eningani mpo na lokito ya kokwea na bango.

Koganga ezali!

Lokito na yango eyokani mosika tii na Mbu Motane.+

22 Talá! Kaka lokola mpongo, akomata mpe akokita na lombangu na nse,+

Mpe akosembola mapapu na ye likoló ya Bozera.+

Na mokolo yango, babundi-bitumba ya Edome

Bakoyoka mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota.”

23 Mpo na Damasi:+

“Hamate+ mpe Arpade bayokisami nsɔni,

Mpo bayoki nsango ya mabe.

Balɛmbi nzoto.

Mbu etomboki mpe ekoki kofanda nyɛɛ te.

24 Damasi alɛmbi nzoto.

Abaluki mpo na kokima, kasi nsɔmɔ ekangi ye.

Mikakatano mpe mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota ekangi ye.

25 Ndenge nini engumba ya masanzoli esundolami te,

Sité oyo esepelisaka makasi?

26 Mpo bilenge mibali na ye bakokwea na bisika minene ya bato nyonso,

Mpe basoda nyonso bakokufa na mokolo yango,” Yehova ya mampinga alobi bongo.

27 “Nakotya mɔtɔ na efelo ya Damasi,

Mpe ekozikisa bandako milai ya makasi ya Bene-hadade.”+

28 Mpo na Kedare+ mpe makonzi ya Hazore, oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone alongaki, talá oyo Yehova alobi:

“Bótɛlɛma, bómata na Kedare,

Mpe bóboma bana mibali ya Ɛsti.

29 Bózwa bahema mpe bitonga na bango,

Bilamba ya hema na bango mpe biloko na bango nyonso.

Bómema mpe bakamela na bango.

Mpe bato bakobelela bango ete: ‘Nsɔmɔ ezali bipai nyonso!’”

30 “Bókima, bókima mosika;

Bókende mpe bófanda na esika ya mozindo, Ee bato oyo bofandi na Hazore,” Yehova alobi bongo.

“Mpo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone abongisi mayele moko,

Azali na mokano moko mpo na kobundisa bino.”

31 “Bótɛlɛma, bómata mpo na kobunda na ekólo oyo ezali na kimya,

Oyo efandi na kimya!” Yehova alobi bongo.

“Ezali na baporte te mpe bikangiseli te. Bafandaka kaka bango moko.

32 Bakamela na bango ekokóma eloko ya kopunza,

Mpe ebele ya bibwɛlɛ na bango eloko oyo epunzami.

Nakopalanganisa bango na banzela nyonso,*

Baoyo nsuki na bango ekatami na mpakatoi,+

Mpe nakoyeisa likama na bango uta na banzela nyonso,” Yehova alobi bongo.

33 “Mpe Hazore ekokóma esika oyo bambwa ya zamba* efandaka,

Esika oyo etikalá mpamba mpo na libela.

Moto moko te akofanda kuna,

Mpe moko te akotya ndako na ye kuna.”

34 Talá oyo Yehova alobaki na mosakoli Yirimia mpo na Elame+ na ebandeli ya boyangeli ya Zidikiya+ mokonzi ya Yuda: 35 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Talá nazali kobuka litimbo ya Elame,+ esika nguya na bango eutaka.* 36 Nakomemela Elame mipɛpɛ minei uta na nsuka minei ya likoló. Mpe nakopanza bango na mipɛpɛ yango nyonso, ekozala na ekólo moko te oyo bato ya Elame oyo bapalanganisami bakozanga kokende.’”

37 “Nakobukabuka Baelame liboso ya banguna na bango mpe liboso ya baoyo bazali koluka koboma bango;* mpe nakomemela bango mpasi, nkanda na ngai ya kongala,” Yehova alobi bongo. “Mpe nakotinda mopanga nsima na bango tii nakosilisa bango nyɛɛ.”

38 “Mpe nakotya kiti na ngai ya bokonzi na Elame,+ mpe kuna nakobebisa mokonzi mpe bankumu,” Yehova alobi bongo.

39 “Kasi na eleko ya nsuka ya mikolo, nakoyanganisa bakangami ya Elame,” Yehova alobi bongo.

50 Talá oyo Yehova alobaki na mosakoli Yirimia mpo na Babilone,+ mpo na mokili ya Bakaladea:

 2 “Bóyebisa yango kati na bikólo mpe bósakola yango.

Bótombola elembo mpe bósakola yango.

Bóbomba eloko te!

Bóloba: ‘Babilone ezwami!+

Bele apɔli na nsɔni.+

Merodake akómi kobanga.

Bililingi na ye epɔli na nsɔni.

Bikeko na ye ya bosɔtɔ* ekómi kobanga.’

 3 Mpo ekólo moko euti na nɔrdi eyei kobundisa ye.+

Ekómisi mokili na ye eloko ya nsɔmɔ;

Moto moko te azali kofanda kuna.

Moto mpe nyama bakimi;

Bakei na bango.”

4 Yehova alobi boye: “Na mikolo yango mpe na ntango yango, bato ya Yisraele, mpe bato ya Yuda, bakoya elongo.+ Bakolela wana bazali kotambola,+ mpe bango nyonso bakoluka Yehova Nzambe na bango.+ 5 Bakotuna nzela ya kokende na Siona, bakotalisa bilongi na bango na nzela yango,+ bakoloba: ‘Bóya mpe tósala lisusu kondimana na Yehova oyo ekoumela mpo na libela, oyo bato bakobosana te.’+ 6 Bato na ngai bakómi etonga ya bampate oyo ebungi.+ Babateli na bango babungisi bango nzela.+ Bamemaki bango likoló ya bangomba. Batambwisitambwisi bango longwa na ngomba monene tii na ngomba moke. Babosani esika na bango ya kopema. 7 Baoyo nyonso bamoni bango balei bango,+ mpe banguna na bango balobi: ‘Tomemi ngambo te, mpo basaleli Yehova lisumu, liziba ya bosembo mpe elikya ya bankɔkɔ na bango, Yehova.’”

 8 “Bókima, bólongwa na kati ya Babilone,

Bóbima na mokili ya Bakaladea,+

Mpe bózala lokola banyama* oyo ezali kolakisa etonga nzela.

 9 Mpo talá nazali kobengisa mpe komema

Etuluku moko ya bikólo minene uta na mokili ya nɔrdi mpo na kobundisa Babilone.+

Bakoya kobundisa bango na molɔngɔ lokola basoda;

Akozwama kuna.

Makula na bango ezali lokola oyo ya mobundi-etumba

Azali kozangisa moto bana;+

Bakozonga nsima te kozanga kobimisa likambo.

10 Kaladea akokóma eloko ya kopunza.+

Baoyo nyonso bazali kopunza ye bakotonda mpenza,”+ Yehova alobi bongo.

11 “Mpo bokobaki kosepela,+ bokobaki kozala na esengo

Ntango bozalaki kopunza libula na ngai.+

Mpo bokobaki kobɛtabɛta makolo lokola mwana-ngɔmbɛ ya mwasi kati na matiti,

Mpe bokobaki koganga lokola bampunda.

12 Mama na bino ayokisami nsɔni.+

Ye oyo abotaki bino alɛmbi nzoto.

Talá! Azali moke koleka na kati ya bikólo,

Esobe oyo ezangi mai mpe mokili ekauká.+

13 Mpo na nkanda ya Yehova, bato bakofanda kati na ye te;+

Na mobimba na ye akokóma esika oyo etikalá mpamba.+

Moto nyonso oyo akoleka pene ya Babilone, akotala ye na nsɔmɔ

Mpe akobɛta piololo mpo na bampasi na ye nyonso.+

14 Bóya na molɔngɔ lokola basoda mpo na kobundisa Babilone bipai nyonso,

Bino nyonso oyo bogumbaka* litimbo.

Bóbwakela ye mbanzi, bóbatela ata mbanzi moko te,+

Mpo asaleli Yehova lisumu.+

15 Bóganga na mongongo ya etumba mpo na ye bipai nyonso.

Azingami.*

Makonzí na ye ekwei, bifelo na ye ebukani,+

Mpo Yehova nde azongiseli ye mabe.+

Bózongisela ye mabe.

Bósala ye kaka ndenge asalaki.+

16 Bóboma moloni na Babilone

Mpe moto oyo azali kosimba likwangola na ntango ya kobuka mbuma.+

Mpo na mopanga oyo ezali komonisa mpasi, moto na moto akobaluka epai ya bato na ye,

Moto na moto akokima na mokili na ye moko.+

17 “Bato ya Yisraele bazali bampate oyo epanzani.+ Bankɔsi epalanganisi bango.+ Liboso mokonzi ya Asiri alyaki bango,+ na nsima Nebukadenezare mokonzi ya Babilone abukabukaki mikuwa na bango.+ 18 Bongo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Nakopesa mokonzi ya Babilone ná mokili na ye etumbu ndenge kaka napesaki mokonzi ya Asiri etumbu.+ 19 Mpe nakozongisa Yisraele na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti,+ mpe akolya matiti na Karamele, na Bashane+ mpe na etúká ya ngombangomba ya Efraime+ mpe ya Gileade,+ akotonda.’”*

20 Yehova alobi boye: “Na mikolo yango mpe na ntango yango,

Bakoluka libunga ya Yisraele,

Kasi ekozala te;

Mpe masumu ya Yuda ekomonana te,

Mpo nakolimbisa bato oyo natikaki na bomoi.”+

21 “Matá mpo na kobundisa mokili ya Merataime mpe bafandi ya Pekode.+

Bábomama mpe bábebisama mpenza,” Yehova alobi bongo,

“Salá nyonso oyo napesi yo mitindo.

22 Makɛlɛlɛ ya etumba ezali na kati ya mokili,

Likama moko monene.

23 Talá ndenge marto ya kotula oyo epanzaka bikólo ya mabele mobimba ekatami mpe ebukani!+

Talá ndenge Babilone ekómi eloko ya nsɔmɔ na kati ya bikólo!+

24 Natyeli yo motambo mpe okangami, Ee Babilone,

Mpe oyebaki yango te.

Ozwamaki mpe okangamaki,+

Mpo otɛmɛlaki Yehova.

25 Yehova afungoli ndako na ye ya kobomba biloko,

Mpe abimisi bibundeli ya nkanda na ye.+

Mpo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga,

Azali na mosala na mokili ya Bakaladea.

26 Bóyela ye uta na bisika ya mosika.+

Bófungola bisika na ye ya kobomba milona.+

Bótondisa biloko na ye oyo apunzi, lokola mipiko ya mbuma.

Bóbebisa ye mpenza.+

Moto ata moko te atikala.

27 Bóboma bana-ngɔmbɛ na ye nyonso ya mibali;+

Bámemama mpo na kobomama.

Mawa na bango, mpo mokolo na bango ekómi,

Ntango na bango ya kozwa etumbu!

28 Ezali na makɛlɛlɛ ya bato oyo bazali kokima,

Baoyo bazali kolongwa na mokili ya Babilone,

Mpo na kosakola na Siona ndenge Yehova Nzambe na biso azongisi mabe,

Ndenge azongisi mabe mpo na tempelo na ye.+

29 Bóbengisa bato oyo babwakaka mbanzi mpo na kobundisa Babilone,

Baoyo nyonso bagumbaka* litimbo.+

Bótyela ye kaa zingazinga, ata moto moko te akima.

Bózongisela ye na kolanda mosala na ye.+

Bósalela ye kaka ndenge asalaki.+

Mpo asali na lofundo nyonso epai ya Yehova,

Epai ya Mosantu ya Yisraele.+

30 Yango wana bilenge na ye ya mibali bakokwea na bisika minene ya bato nyonso,+

Mpe basoda na ye nyonso bakokufa* na mokolo yango,” Yehova alobi bongo.

31 “Talá! Nazali monguna na yo,+ Ee motomboki,”+ Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga alobi bongo,

“Mpo mokolo na yo ekoya mpenza, ntango oyo nakopesa yo etumbu.

32 Ee yo motomboki okobɛta libaku mpe okokwea,

Moto moko te akotɛlɛmisa yo.+

Nakotya mɔtɔ na bingumba na yo,

Mpe ekozikisa eloko nyonso zingazinga na yo.”

33 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

“Bato ya Yisraele mpe ya Yuda banyokwami,

Mpe baoyo nyonso bazwaki bango bakangami bakangi bango.+

Baboyi kotika bango bákende.+

34 Kasi mosikoli na bango azali makasi.+

Yehova ya mampinga nde nkombo na ye.+

Akosamba mpenza likambo na bango,+

Mpo apemisa mokili+

Mpe amema yikiyiki na bafandi ya Babilone.”+

35 “Mopanga ezali mpo na kobunda na Bakaladea,” Yehova alobi bongo,

“Mpo na kobunda na bato oyo bafandi na Babilone, kobunda na bankumu na ye mpe kobunda na bato na ye ya bwanya.+

36 Mopanga ezali mpo na kobunda na basakoli ya lokuta,* mpe bakosala mpenza na bozoba.

Mopanga ezali mpo na kobunda na babundi-bitumba na ye, mpe bakokóma na nsɔmɔ.+

37 Mopanga ezali mpo na kobunda na bampunda na bango, mpe na makalo na bango ya etumba,

Mpe kobunda na bato ya ndenge nyonso oyo bazali kati na ye,

Mpe bakokóma lokola basi.+

Mopanga ezali mpo na kobunda na biloko na ye ya motuya, mpe bakopunzama.+

38 Libebi ekweli mai na ye, mpe ekokauka.+

Mpo ezali mokili ya bikeko,*+

Mpe mpo na bimonaneli na bango ya kobangisa, bazali kaka kosala makambo na ndenge ya ligboma.

39 Bongo banyama oyo efandaka na mokili ekauká ekofanda elongo na banyama oyo egangaka,

Mpe bamaligbanga* ekofanda epai na ye.+

Moto ata moko te akofanda lisusu epai na ye,

Ekozala mpe esika oyo moto akofanda te mabota na mabota.”+

40 “Ndenge Nzambe abebisaki Sodoma ná Gomora+ mpe bingumba na yango oyo ezalaki zingazinga,”+ Yehova alobi bongo, “moto moko te akofanda kuna mpe moto moko te akotya esika na ye ya kofanda kuna.+

41 Talá! Bato ya ekólo moko bazali koya longwa na nɔrdi;

Ekólo moko monene mpe bakonzi minene+ bakotɛlɛma na nguya mpe bakoya

Uta na bisika eleki mosika na mabele.+

42 Basalelaka mbanzi mpe likɔnga moke.+

Bazali na nko mpe bakoyokela moto mawa te.+

Lokito ya batambwisi-mpunda na bango,

Ezali lokola mbu oyo ezali kotomboka.+

Lokola moto moko; batɛlɛmi na molɔngɔ ya etumba mpo na kobundisa yo, Ee mwana mwasi ya Babilone.+

43 Mokonzi ya Babilone ayoki nsango na bango,+

Mpe makasi esili ye.+

Akómi komitungisa,

Mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota.

44 “Talá! Moto moko akomata lokola nkɔsi oyo ezali kobima na mwa bazamba oyo ekangamakangamá oyo ezali pembenipembeni ya Yordani, kasi na mbala moko nakosala ete bákima mosika na esika yango. Nakotyela bango moto oyo naponi mpo atambwisa bango.+ Mpo nani azali lokola ngai, mpe nani akoki kotɛlɛmɛla ngai? Mobateli ya mpate nani akoki kotɛlɛma liboso na ngai?+ 45 Na yango, Ee bino bato, bóyoka ekateli* oyo Yehova azwi mpo na Babilone,+ mpe likambo oyo akanisi mpo na mokili ya Bakaladea.

Ya solo, bakobengana bana-mpate ya etonga.

Mpo na bango, akosala ete esika na bango ya kofanda etikala mpamba.+

46 Mabele eningani mpo na lokito ya kokwea ya Babilone

Mpe makɛlɛlɛ ekoyokana na kati ya bikólo.”+

51 Talá oyo Yehova alobi:

“Talá nazali kobimisa mopɛpɛ moko oyo ebebisaka,

Ekobebisa Babilone+ mpe bafandi ya Lebe-kamai.*

 2 Nakotindela Babilone bapupoli,

Bakopupola ye mpe bakotika mokili na ye mpamba;

Bakobundisa ye bipai nyonso na mokolo ya mpasi.+

 3 Moto oyo abwakaka mbanzi agumba* litimbo na ye te.

Mpe moto moko te oyo alati kazaka na ye ya bibende atɛlɛma.

Bómonisela bilenge na ye motema mawa te.+

Bóbebisa limpinga na ye nyonso.

 4 Mpe bakokwea bibembe na mokili ya Bakaladea,

Batɔbɔlami na babalabala na ye.+

 5 Mpo na Yisraele mpe Yuda, Nzambe na bango, Yehova ya mampinga, atiki bango te lokola basi oyo mibali bakufá.+

Kasi na miso ya Mosantu ya Yisraele, mokili na bango* etondi na ngambo.

 6 Bókima, bólongwa na kati ya Babilone,

Bóbikisa bomoi na bino.*+

Bókufa te mpo na libunga na ye.

Mpo ntango ekoki mpo Yehova azongisa mabe.

Azali kozongisela ye mabe oyo asalaki.+

 7 Babilone azalaki kɔpɔ ya wolo na lobɔkɔ ya Yehova;

Alangwisaki mabele mobimba.

Bikólo emɛlaki vinyo na ye;+

Yango wana bikólo ekómaki na ligboma.+

 8 Babilone akwei na pwasa, mpe abukani.+

Bóganga na kolela mpo na ye!+

Bózwa balsame mpo na mpasi na ye; mbala mosusu akobika.”

 9 “Tomekaki kobikisa Babilone, kasi akokaki kobika te.

Bótika ye mpe moto na moto akende na mokili na ye.+

Mpo kosambisama na ye ekómi tii na likoló;

Etombwami likoló lokola mapata.+

10 Yehova amoniseli biso bosembo.+

Bóya, tóyebisa na Siona mosala ya Yehova Nzambe na biso.”+

11 “Bópelisa makula;+ bózwa banguba.*

Yehova atindi* bakonzi ya Bamede bákende etumba,+

Mpo azali na likanisi ya kobebisa Babilone.

Mpo Yehova azali kozongisa mabe, kozongisa mabe mpo na tempelo na ye.

12 Bótombola elembo+ mpo na kobundisa bifelo ya Babilone.

Bókɛngɛla makasi, bótya bakɛngɛli.

Bóbongisa bato oyo bazali kotya motambo.

Mpo Yehova nde abongisi mayele moko,

Mpe akokokisa oyo alaki mpo na bato oyo bafandi na Babilone.”+

13 “Ee mwasi oyo ofandi likoló ya mai mingi,+

Ná biloko mingi ya motuya,+

Nsuka na yo ekómi, matomba ozalaki kozwa ekómi na nsuka.+

14 Yehova ya mampinga ye moko alapi ndai ete:

‘Nakotondisa yo na bato, ebele lokola mayoyo,

Mpe bakoganga na koganga ya bolongi mpo na yo.’+

15 Azali Moto oyo asalaki mabele na nguya na ye,

Moto oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na bwanya na ye,+

Mpe Oyo atandaki likoló na mayele na ye.+

16 Soki ayokisi mongongo na ye,

Mai oyo ezali na likoló ekómaka na yikiyiki,

Mpe asalaka ete mapata* emata uta na nsuka nyonso ya mabele.

Atindaka mokalikali nzela moko na mbula,*

Abimisaka mopɛpɛ na bandako na ye ya kobomba biloko.+

17 Moto nyonso asalaka makambo na bozoba mpe na kozanga mayele.

Mosali bibende nyonso akoyokisama nsɔni mpo na ekeko;*+

Mpo ekeko na ye ya ebende* ezali lokuta,

Mpe elimo* ezali te kati na yango.+

18 Yango ezali ndɔtɔ mpamba,+ mosala ya kosɛka.

Na ntango oyo Nzambe akopesa yango etumbu ekobebisama.

19 Likabo ya Yakobo ezali te lokola biloko wana,

Mpo ye azali Moto oyo asalaki eloko nyonso,

Ata lingenda ya libula na ye.+

Yehova ya mampinga nde nkombo na ye.”+

20 “Ozali lingenda monene na ngai, ebundeli ya etumba,

Nakosalela yo mpo na kobukabuka bikólo,

Nakosalela yo mpo na kobebisa makonzi.

21 Nakosalela yo mpo na kobukabuka mpunda ná motambwisi na yango.

Nakosalela yo mpo na kobukabuka likalo ya etumba ná motambwisi na yango.

22 Nakosalela yo mpo na kobukabuka mobali mpe mwasi.

Nakosalela yo mpo na kobukabuka mobange mpe elenge.

Nakosalela yo mpo na kobukabuka elenge mobali ná elenge mwasi.

23 Nakosalela yo mpo na kobukabuka mobateli ya mpate ná etonga na ye.

Nakosalela yo mpo na kobukabuka moloni-bilanga ná banyama na ye oyo ekangani mibalemibale.

Nakosalela yo mpo na kobukabuka baguvɛrnɛrɛ ná bayangeli-basungi.

24 Mpe nakozongisela Babilone ná bato nyonso oyo bafandi na Kaladea

Mabe na bango nyonso oyo basali na Siona liboso na miso na bino,”+ Yehova alobi bongo.

25 “Talá nazali koyela yo,+ Ee ngomba oyo ebebisaka,” Yehova alobi bongo,

“Yo mobebisi ya mabele mobimba.+

Nakosembolela yo lobɔkɔ na ngai mpe nakobalolabalola yo na mabanga

Mpe nakokómisa yo ngomba oyo eziki.”

26 “Epai na yo bato bakozwa te libanga ya ntina mingi* to libanga ya moboko,

Mpo okokóma esika oyo etikalá mpamba mpo na libela,”+ Yehova alobi bongo.

27 “Bótombola elembo na mokili.+

Bóyula liseke na kati na bikólo.

Bóbongisa* bikólo mpo na kobundisa Babilone.

Bóbengisa makonzi ya Ararate,+ Mini ná Ashekenaze mpo na kobundisa ye.+

Bózwela ye mosali oyo akomaka basoda ya sika.

Bómatisa bampunda lokola ebele ya mayoyo ya mikemike.

28 Bóbongisa* bikólo mpo na kobundisa ye,

Bakonzi ya Media,+ baguvɛrnɛrɛ na yango mpe bayangeli-basungi na yango nyonso

Mpe mikili nyonso oyo bazali koyangela.

29 Mabele ekoningana mpe ekolɛnga,

Mpo Yehova akokokisa makambo oyo akani kosala Babilone:

Mokili ya Babilone ekokóma eloko ya nsɔmɔ, moto moko te akofanda kuna.+

30 Babundi-bitumba ya Babilone bakimi kobunda.

Bafandi na bisika na bango ya makasi.

Makasi na bango esili.+

Bakómi lokola basi.+

Bandako na ye etyami mɔtɔ.

Bikangiseli ya baporte na ye ebukani.+

31 Motindami moko azali kopota mbangu mpo na kokutana na motindami mosusu,

Mpe momemi-nsango moko mpo na kokutana na momemi-nsango mosusu,

Mpo na kopesa mokonzi ya Babilone nsango ete engumba na ye ezwami esika nyonso,+

32 Ete bisika oyo bakatisaka mai na makolo ezwami,+

Ete batumbi bamasuwa ya papirisi na mɔtɔ,

Mpe ete mibali ya etumba babangi makasi.”

33 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi:

“Mwana mwasi ya Babilone azali lokola esika ya kotutatuta mbuma.

Ezali ntango ya konyatanyata ye makasi.

Mosika te mpenza ntango ya kobuka mbuma ekoya mpo na ye.”

34 “Nebukadenezare mokonzi ya Babilone alei ngai;+

Atye ngai na mobulu.

Atiki ngai ndenge batikaka mbɛki oyo ezali na eloko te na kati.

Amɛli ngai lokola nyoka moko monene;+

Atondisi libumu na ye na biloko na ngai ya kitoko.

Abwaki ngai.*

35 ‘Babilone afuta mpo na bampota oyo azokisi ngai mpe nzoto na ngai!’ Mwana mwasi ya Siona alobi bongo.+

‘Mpe ngambo ya makila na ngai eya likoló ya bafandi ya Kaladea!’ Yerusaleme alobi bongo.”

36 Na yango, talá oyo Yehova alobi:

“Talá nazali kosamba likambo na yo,+

Mpe nakozongisa mabe mpo na yo.+

Mpe nakokaukisa mbu na ye mpe mabulu na ye ya mai.+

37 Mpe Babilone ekokóma mabondo ya mabanga,+

Esika bambwa ya zamba* efandaka,+

Eloko ya nsɔmɔ mpe ya kobɛtɛla piololo,

Moto akofanda kuna te.+

38 Bango nyonso elongo bakoganga lokola bana-nkɔsi.*

Bakonguluma lokola bana-nkɔsi.”

39 “Ntango bakokóma na mposa makasi, nakobongisela bango fɛti mpe nakolangwisa bango,

Mpo básepela;+

Bongo bakolala mpɔngi ya libela,

Oyo bakolamuka te,”+ Yehova alobi bongo.

40 “Nakomema bango lokola bana-mpate mpo na kobomama,

Lokola bampate-mibali ná bantaba.”

41 “Ee talá ndenge Sheshake* azwami,+

Mpe ndenge Lisanzoli ya mabele mobimba ezwami!+

Talá ndenge Babilone akómi eloko ya nsɔmɔ kati na bikólo!

42 Mbu emati likoló ya Babilone.

Ezipami na ebele ya bambonge na yango.

43 Bingumba na ye ekómi eloko ya nsɔmɔ, mokili oyo ezangá mai mpe mokili ekauká.

Mokili oyo moto akofanda te, mpe moto akoleka kuna te.+

44 Nakopesa Bele+ etumbu na Babilone,

Mpe nakobimisa na monɔkɔ na ye biloko oyo amɛlaki.+

Bikólo ekosopana epai na ye lisusu te,

Mpe efelo ya Babilone ekokwea.+

45 Bóbima kati na ye, bato na ngai,+

Bóbikisa bomoi na bino*+ na nkanda ya kongala ya Yehova!+

46 Motema na bino elɛmba te mpe ebanga te mpo na nsango oyo ekoyokana na mokili.

Na mbula moko bokoyoka nsango,

Mpe na mbula oyo ekolanda bokoyoka nsango mosusu,

Bokoyoka nsango ya mobulu na mokili mpe moyangeli moko akobunda na moyangeli mosusu.

47 Bongo, talá! mikolo ezali koya

Ntango nakotya likebi na ngai na bikeko ya Babilone.

Mokili na ye mobimba ekoyokisama nsɔni,

Bato na ye nyonso bakokwea bibembe na kati na ye.+

48 Likoló mpe mabele ná biloko nyonso oyo ezali na kati

Ekoganga na esengo mpo na Babilone,+

Mpo babebisi bakoyela ye uta na nɔrdi,”+ Yehova alobi bongo.

49 “Ezali te kaka mpo Babilone asalaki ete bato ya Yisraele bákwea bibembe+

Kasi lisusu na Babilone, bato ya mabele mobimba bakweaki bibembe.

50 Bino bato oyo bobiki na mopanga, bókoba kokende. Bótɛlɛma te!+

Bókanisa Yehova uta na mosika,

Mpe bókanisa Yerusaleme.”+

51 “Topɔli na nsɔni, mpo toyoki makambo ya kotyola.

Kosambwa ezipi bilongi na biso,

Mpo bapaya babundisi bisika mosantu ya ndako ya Yehova.”+

52 “Boye, talá! mikolo ezali koya,” Yehova alobi bongo,

“Nakotya likebi na ngai na bikeko na ye,*

Mpe na mokili na ye mobimba, moto oyo azoki akolelalela.”*+

53 “Ata soki Babilone amati na likoló,+

Ata soki akómisi makasi bisika na ye ya libateli oyo etombwaná makasi,

Bato oyo bakobebisa ye bakouta epai na ngai,”+ Yehova alobi bongo.

54 “Bóyoka! Koganga euti na Babilone,+

Lokito ya likama moko monene euti na mokili ya Bakaladea,+

55 Mpo Yehova azali kobebisa Babilone,

Mpe akosukisa mongongo na ye monene,

Mpe mbonge na bango ekotomboka lokola mai mingi.

Makɛlɛlɛ ya mongongo na bango ekoyokana.

56 Mpo mobebisi akoyela Babilone;+

Babundi-bitumba na ye bakozwama,+

Matimbo na bango ekobukana,

Mpo Yehova azali Nzambe oyo apesaka moto na moto etumbu oyo ebongi na ye.+

Akopesa mpenza etumbu.+

57 Nakolangwisa bankumu na ye, bato na ye ya bwanya,+

Baguvɛrnɛrɛ na ye, bayangeli-basungi na ye mpe babundi-bitumba na ye,

Mpe bakolala mpɔngi ya libela,

Oyo bakolamuka te,”+ Mokonzi oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga nde alobi bongo.

58 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi:

“Efelo ya Babilone, atako ezali monene, ekobebisama mpenza,+

Mpe baporte na ye, atako ezali molai, ekotumbama na mɔtɔ.

Bato ya bikólo bakoboma nzoto kaka mpamba;

Bato ya bikólo bakolɛmba kaka mpo na koboma mɔtɔ.”+

59 Talá mitindo oyo mosakoli Yirimia apesaki Seraya mwana ya Neria+ mwana ya Mahaseya ntango akendaki elongo na Zidikiya mokonzi ya Yuda na Babilone na mbula ya minei ya boyangeli na ye; Seraya azalaki mokonzi ya basoda oyo atalelaka biloko. 60 Yirimia akomaki na buku moko mpasi nyonso oyo esengelaki kokómela Babilone, maloba nyonso oyo ekomamaki mpo na Babilone. 61 Lisusu, Yirimia alobaki na Seraya ete: “Soki okómi na Babilone mpe omoni yango, osengeli kotánga na mongongo makasi maloba oyo nyonso. 62 Bongo okoloba boye: ‘Ee Yehova, olobaki mpo na esika oyo ete, ekobebisama mpe moto moko te akofanda lisusu kuna, ezala moto to nyama, mpe ekotikala esika oyo ebebisamá mpo na libela.’+ 63 Mpe soki osilisi kotánga buku oyo: kangisá yango na libanga, mpe bwaká yango na katikati ya Efrate. 64 Na nsima okoloba boye: ‘Ndenge wana nde Babilone akozinda mpe akotɛlɛma lisusu te+ mpo na mpasi oyo nazali komemela ye; mpe bakolɛmba.’”+

Maloba ya Yirimia esuki awa.

52 Zidikiya+ azalaki na mbula 21 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 11 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Hamutale+ mwana ya Yirimia, moto ya engumba Libina. 2 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, kaka ndenge Yehoyakime asalaki.+ 3 Makambo wana nyonso ekómelaki Yerusaleme mpe Yuda, mpo Yehova azalaki na nkanda makasi, yango wana nsukansuka alongolaki bango na miso na ye.+ Mpe Zidikiya atombokelaki mokonzi ya Babilone.+ 4 Na mbula ya libwa ya boyangeli ya Zidikiya, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi ya sanza yango, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki ná limpinga mobimba ya basoda na ye mpo na kobundisa Yerusaleme. Batyaki kaa mpo na kobundisa engumba yango mpe batongaki efelo ya kozinga yango epai na epai.+ 5 Mpe bazingaki engumba tii na mbula ya 11 ya boyangeli ya Mokonzi Zidikiya.

6 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei,+ nzala ezalaki makasi na engumba mpe bato ya mokili yango bazalaki lisusu na biloko ya kolya te.+ 7 Nsukansuka, batɔbɔlaki efelo ya engumba mpe basoda nyonso bakimaki butubutu, balekaki na porte oyo ezalaki kati na bifelo mibale pene na elanga ya mokonzi, wana Bakaladea bazalaki kozinga engumba; mpe bakobaki kokende na nzela ya Araba.+ 8 Kasi basoda ya Bakaladea balandaki mokonzi mpe bakangaki Zidikiya+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko; mpe basoda na ye nyonso bapanzanaki, batiki ye. 9 Na nsima, bakangaki mokonzi Zidikiya, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone na Ribla, na mokili ya Hamate, mpe akatelaki ye etumbu. 10 Mpe mokonzi ya Babilone abomaki bana ya Zikidiya na miso na ye, abomaki mpe bankumu nyonso ya Yuda kuna na Ribla. 11 Na nsima mokonzi ya Babilone atɔbɔlaki Zidikiya miso,+ akangaki ye na bikangeli ya kwivre, amemaki ye na Babilone mpe atyaki ye na bolɔkɔ tii na mokolo ya liwa na ye.

12 Na sanza ya mitano, na mokolo ya zomi ya sanza yango, elingi koloba, na mbula ya 19 ya boyangeli ya Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, Nebuzaradane oyo azalaki mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, mpe mosaleli ya mokonzi ya Babilone, ayaki na Yerusaleme.+ 13 Atumbaki ndako ya Yehova,+ ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yerusaleme; atumbaki mpe ndako nyonso ya monene na mɔtɔ. 14 Mpe limpinga mobimba ya basoda ya Bakaladea oyo bazalaki elongo na mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi babukaki bifelo oyo ezingaki Yerusaleme.+

15 Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki na Babilone bato mosusu oyo bazalaki naino na engumba, amemaki mpe bato oyo bakimaki epai ya mokonzi ya Babilone mpe basali ya mayele oyo batikalaki.+ 16 Kasi Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki na mokili ya Yuda bana mboka mosusu oyo bazalaki mpenza babola, mpo bázala basali-bilanga ya vinyo mpe bato oyo bazali kotindama na mosala makasi.+

17 Mpe Bakaladea babukabukaki makonzí ya kwivre+ oyo ezalaki na tempelo* ya Yehova, ná bashario+ mpe ebombelo monene ya mai ebengami mbu ya kwivre+ oyo ezalaki na tempelo* ya Yehova, bamemaki kwivre yango na Babilone.+ 18 Bazwaki mpe bambɛki, bapau, biloko ya koboma mɔtɔ, mabakuli,+ bakɔpɔ+ ná bisaleli nyonso ya kwivre oyo bazalaki kosalela na mosala ya tempelo. 19 Mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki basaani,+ biloko ya kotya mɔtɔ, mabakuli, bambɛki, bitɛlɛmiselo-miinda,+ bakɔpɔ, mpe mabakuli oyo ezalaki ya wolo ya solosolo mpe ya palata ya solosolo.+ 20 Mpo na makonzí mibale, ebombelo monene ya mai, bangɔmbɛ-mibali 12 ya kwivre+ oyo ezalaki na nse ya ebombelo yango monene ya mai, mpe bashario, oyo Mokonzi Salomo asalaki mpo na ndako ya Yehova, bakokaki te koyeba kilo ya kwivre oyo basalelaki biloko yango.

21 Mpo na makonzí yango, likonzí mokomoko ezalaki na molai ya mapeko* 18, nsinga ya mapeko 12 ezalaki kozinga yango;+ bonene na yango ezalaki bonene ya misapi minei ya lobɔkɔ,* mpe ezalaki polele na kati. 22 Mpe motó oyo ezalaki likoló na yango ezalaki ya kwivre, molai ya motó yango ezalaki mapeko mitano+ mpe eloko oyo basalá lokola monyama mpe bambuma ya nzete ya grenade oyo ezingaki motó yango esalemaki na kwivre. Likonzí ya mibale ezalaki kaka ndenge moko na oyo ya liboso, ezalaki mpe na bambuma ya grenade. 23 Ezalaki na bambuma ya grenade 96 zingazinga, bambuma nyonso ya grenade ezalaki 100 likoló ya eloko oyo basalá lokola monyama, epai na epai.+

24 Mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi akangaki mpe Seraya+ nganga-nzambe mokonzi, Sefania+ nganga-nzambe ya mibale mpe bakɛngɛli misato ya baporte,+ 25 Lisusu na engumba, akangaki mpe kapita moko ya ndako ya mokonzi oyo azalaki kotalela makambo ya basoda, bapesi-toli nsambo ya mokonzi oyo bazalaki na engumba, mpe sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi ya basoda, oyo azalaki koyanganisa basoda ya ekólo, mpe mibali 60 kati na bana mboka, oyo bazalaki naino na engumba. 26 Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki bango mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babilone na Ribla. 27 Mokonzi ya Babilone abomaki bango na Ribla+ na mokili ya Hamate. Ndenge wana nde balongolaki bato ya Yuda na mokili na bango mpe bamemaki bango na mboka mopaya.+

28 Talá bato oyo Nebukadenezare amemaki na mboka mopaya: na mbula ya nsambo, Bayuda 3 023.+

29 Na mbula ya 18 ya mokonzi Nebukadenezare,+ bato* 832 bautaki na Yerusaleme.

30 Na mbula ya 23 ya bokonzi ya Nebukadenezare, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki Bayuda na mboka mopaya, bato* 745.+

Bango nyonso bazalaki bato* 4 600.

31 Na mbula ya 37 ya komemama ya Yehoyakine+ mokonzi ya Yuda na mboka mopaya, na sanza ya 12, na mokolo ya 25 ya sanza yango, Evile-merodake mokonzi ya Babilone, na mbula oyo akómaki mokonzi, abimisaki* Yehoyakine mokonzi ya Yuda na bolɔkɔ.+ 32 Alobaki na Yehoyakine na boboto mpe apesaki ye esika ya lokumu koleka* bakonzi mosusu oyo bazalaki mpe bakangami na Babilone. 33 Bongo Yehoyakine alongolaki bilamba ya bolɔkɔ, mpe akómaki kolya na mesa ya mokonzi tii na nsuka ya bomoi na ye. 34 Mokolo na mokolo, mokonzi ya Babilone azalaki kopesa ye biloko ya kolya, mikolo nyonso ya bomoi na ye, tii mokolo akufaki.

Mbala mosusu elimboli, “Yehova akumisi.”

To, “naponaki yo.”

Lil., “liboso obima na libumu.”

To, “natyaki yo pembeni.”

To, “elenge.”

Lil., “moto oyo azali kolamuka.”

To, “nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene.”

Lil., “kopupola likoló.” Ezali komonisa nzungu oyo batye likoló ya mɔtɔ oyo bazali kopupola.

To, “bazali kobimisa milinga.”

Lil., “okokanga mokaba na loketo na yo.”

To, “bolingo ya sembo.”

To, “bisanga.”

To, “mbala mosusu na kati ya mabanga.”

To, “oyo nkingo etondi na nsuki.”

To, “Memfisi.”

Elingi koloba, “lobɔkɔ ya ebale Nile.”

Elingi koloba, “Efrate.”

To, “mpo molimo na yango ezali na mposa.”

Lil., “sanza na yango.”

To, “banzambe ya bapaya.”

Lil., “Moarabe.”

Lil., “elongi na ngai ekokwela bino te.”

To, “banzambe ya bapaya.”

To mbala mosusu, “mobali na bino.”

Lil., “na kolanda motema na ngai.”

Lil., “mpo na mampinga ya bikólo.”

Lil., “moninga na ye.”

To, “malɔmbɔ.”

To, “nzambe ya nsɔni.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bóbɛta ntolo.”

Lil., “motema.”

Lil., “motema.”

To, “kasi mopanga ekómi na molimo na biso.”

Maloba ya ntɔki mpo na kolobela moto, mbala mosusu komonisa mawa to komitya na esika ya moto.

Elingi koloba, “baoyo bazalaki kotalatala engumba mpo na koyeba ntango ya kobundisa yango.”

Lil., “misɔpɔ na ngai.”

Lil., “bifelo ya motema na ngai.”

To mbala mosusu, “lokito ya koganga ya etumba.”

To, “bwanya.”

To, “nakoyoka mawa te.”

To, “bazali koluka molimo na yo.”

To, “molimo na ngai elɛmbi.”

Lil., “kasi balɛmbaki te.”

Lil., “nzela.”

To, “molimo na ngai esengeli te.”

To mbala mosusu, “Azali te.”

Lil., “bozali na motema te.”

To, “elimo na ngai esengeli te.”

Lil., “Bómisantisa.”

To, “mpii.”

Lil., “Matoi na bango ekatamá ngenga te.”

Lil., “baoyo batondi na mikolo.”

To, “kobukana.”

To, “mateya.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, “Yirimia.”

To, “Nkuka.”

Ezali kolobela bandako nyonso ya lopango ya tempelo.

To, “milinga ya bambeka.”

Lil., “nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba.”

Ebengeli ya nzambe-mwasi oyo Bayisraele bapɛngwi bazalaki kosambela. Mbala mosusu nzambe-mwasi oyo apesaka mabota.

To, “kosilikisa; kotumola.”

To, “toli.”

Lil., “mokolo na mokolo nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango.”

Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”

Lil., “elongolami na monɔkɔ na bango.”

To, “ya komipesa.”

Talá Ndimbola ya maloba, “Gehena.”

Lil., “motema na ngai.”

Talá Ndimbola ya maloba, “Gehena.”

To, “bantango oyo etyamá.”

Lolenge moko ya ebenga ya zamba oyo ezalaka moke.

To, “mateya.”

To, “basɛkrɛtɛrɛ.”

To, “kobukana.”

To, “bikeko na bango oyo eyemami.”

To, “pomade oyo ekitisaka motema.”

To, “monganga.”

To, “molimo na ngai esengeli.”

To, “bambulú.”

To, “mateya.”

To, “bolingo ya sembo.”

To, “likwangola na ye ya mokuse.”

Ekeko ya moto oyo batyaka na elanga mpo na kokimisa bandɛkɛ.

Vɛrsɛ 11 ekomamaki libosoliboso na monɔkɔ ya Aramɛyɛ.

To, “mbɔngi ya mai.”

To mbala mosusu, “asalelá kutu mbula baporte.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

To, “ekeko na ye ya ebende oyo enyangwisami.”

To, “mpema.”

To, “kobwaka lansi; bilingongo.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bambulú.”

Emonani ete azali koloba na Yirimia.

To, “Ezala bongo.”

Lil., “Nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kokebisa.”

To, “milinga ya bambeka.”

Elingi koloba, Yirimia.

Elingi koloba, “bambeka oyo epesami na tempelo.”

To, “mayoki na ngai ya kati.” Lil., “bangɛi na ngai.”

To, “baoyo bazali koluka molimo.”

To, “mayoki na bango ya kati.” Lil., “bangɛi na bango.”

To, “molingami ya molimo na ngai.”

To mbala mosusu, “ezali kolela.”

Lil., “mosuni nyonso.”

Lil., “ndako.”

To, “molimo na ngai ekolela.”

To, “mwasi ya lokumu.”

To, “ekɔti ya bokonzi.”

To, “ezingami.”

To, “Moetiopia.”

To, “bato na bango ya mpamba.”

To, “mabulu ya kotɔka mai.”

To, “bambulú.”

Lil., “mopanga.”

To, “molimo na yo eyini.”

To, “molimo na ngai elingaki kotala bato oyo te.”

To mbala mosusu, “Mitindo minei ya lisambisi.” Lil., “Mabota minei.”

To mbala mosusu, “Ozali kaka kozonga nsima.”

Lil., “noki olongola ngai.”

To, “nsango ya makaneli.”

To, “Okokóma lokola monɔkɔ na ngai.”

Mimeseno ya matánga ya bapakano, emonani ete ezalaki kosalema na Yisraele na ntango ya lipɛngwi.

Lil., “na banzela na bango nyonso.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosuu, “Mpo opeli lokola mɔtɔ na nkanda na ngai.”

To, “Mobali makasi.”

Lil., “Akómisi mosuni lobɔkɔ na ye.”

To, “Mobali makasi.”

To, “mayoki ya kati.” Lil., “bangɛi.”

Ndɛkɛ oyo ezali lokola nsoso.

Lil., “kotika ngai.” Emonani ete ezali kolobela Yehova.

To, “buká bango mbala mibale.”

To, “Bókeba mpo na molimo na bino.”

Lil., “basembolaki litoi na bango te.”

Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”

To, “na sudi.”

Lil., “azalaki kosala mosala likoló ya bayiká ya moyemi-mbɛki.”

To, “mabele ya lima.”

Lil., “kaka ndenge emonanaki malamu na miso ya moyemi-mbɛki asala yango.”

To, “nakoyoka mawa.”

To, “nakoyoka mawa.”

To, “milinga ya bambeka.”

To, “etongamá te.”

Lil., “eloko ya kobɛtɛla piololo.”

To, “mateya.”

Lil., “tóbɛta ye na lolemo.”

To, “molimo na ngai.”

Lil., “matoi na ye ekoyoka mpasi.”

Lil., “motema na ngai.”

To, “baoyo bazali koluka molimo na bango.”

Lil., “eloko ya kobɛtɛla piololo.”

To, “baoyo bazali koluka molimo na bango.”

Lil., “bakómisi nkingo na bango makasi mpo.”

To, “mayoki ya kati.” Lil., “bangɛi.”

To, “molimo ya mobola.”

To, “baoyo bazali koluka molimo na bango.”

Lil., “Natɛmɛli engumba oyo mpo na.”

To, “lobwaku patatalu.”

Lil., “Nakosantisa.”

Abengami mpe Yehoahaze.

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “zála.”

To, “Okokimela.”

Abengami mpe Yehoyakine to Yekonia.

To, “baoyo bazali koluka molimo na yo.”

To, “na mokili oyo bazali kotombola molimo na bango.”

To, “mokili.”

Lil., “mikolo na ye.”

To, “mozwi ya libula.”

To, “bapɛngwi.”

Lil., “Bazali kolendisa mabɔkɔ ya.”

To, “Bazali kotondisa bino na bilikya ya mpamba.”

To, “Nsango ya kilo.”Liloba ya Ebre ezali na ndimbola mibale: maloba ya kilo oyo euti epai ya Nzambe to eloko moko ya kilo.

Abengami mpe Yehoyakine to Konia.

To mbala mosusu, “batongi ya bifelo makasi ya libateli.”

Lil., “nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba.”

Lil., “kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda.”

Lil., “bosembolaki litoi na bino mpo na koyoka te.”

Lil., “eloko ya kobɛtɛla piololo.”

Lil., “eloko ya kobɛtɛla piololo.”

Liloba oyo ezali lolenge moko ya ekomeli ya polele te ya Babele (Babilone).

Lil., “mosuni nyonso.”

To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

To, “kogumbama.”

To, “nakoyoka mawa.”

To, “mateya.”

Lil., “nazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda.”

To, “akoyoka mawa.”

To, “ya tempelo.”

To, “akitisa motema.”

To, “milimo na biso.”

Lil., “na lobɔkɔ na ngai oyo esembolami.”

Lil., “na moto oyo namoni malamu na miso na ngai.”

Lil., “epema.”

Elingi koloba, saani ya monene ya kwivre oyo ezalaki na tempelo, oyo bazalaki kobenga Mbu.

Lil., “bambula ya mikolo.”

To, “Ezala bongo.”

To, “mwasi ya lokumu.”

To mbala mousu, “batongi ya bifelo makasi ya libateli.”

Lil., “nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango.”

To, “bibende ya nkingo.”

To, “na loketo.”

Lil., “mokolo moko monene.”

To mbala mosusu, “Nakokumisa bango.”

Lil., “akopesa motema na ye ndanga mpo na.”

To, “nakobi komonisela yo bolingo ya sembo.”

To, “okokɔta na mabina ya baoyo bazali kosɛka.”

To, “mabwaku.”

To, “makambo ya malamu oyo euti epai.”

To, “Molimo na bango ekokóma.”

Lil., “mafuta.”

To, “libota.”

Vinyo oyo eteli te.

Vinyo oyo eteli te.

To mbala mosusu, “mobali.”

To, “Lobwaku patatalu.”

To, “putulu oyo etondi mafuta. Elingi koloba, putulu oyo esangani na mafuta ya bambeka.”

Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

Lil., “na lobɔkɔ oyo esembolami.”

Lil., “mosuni nyonso.”

Lil., “kolamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpe koteya.”

Talá Ndimbola ya maloba, “Gehena.”

Lil., “mpo na kolekisa na mɔtɔ.”

Lil., “motema na ngai.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “makambo ya malamu.”

To, “mozwi-ya-libula.”

Yango ezali kolobela minzoto.

Lil., “momboto.”

Lil., “momboto.”

Lil., “momboto.”

Lil., “momboto.”

Lil., “lelo.”

To, “koluka molimo na bango.”

To, “koluka molimo na bango.”

Lil., “kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba.”

Lil., “kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda.”

Lil., “bosembolaki litoi na bino te.”

Lil. “rulo ya buku.”

Lil. “rulo ya buku.”

To, “buku.”

To, “buku.”

To, “shambrɛ.”

To, “mokomeli.”

To, “buku.”

To, “bakapita ya ndako ya mokonzi.”

To, “buku.”

To, “buku.”

Eteni ya mibale ya sanza ya zomi na moko mpe eteni ya liboso ya sanza ya zomi na mibale. Talá Ap. B15.

Lil., “momboto.”

To, “buku.”

“Abengami mpe Yehoyakine to Yekonia.”

Lil., “batyaki ye na ndako ya bikangeli.”

Lil., “ndako ya libulu ya kobomba mai.”

Lil., “akobima.”

Lil., “mabɔkɔ ya.”

To, “kapita ya ndako ya mokonzi.”

To, “oyo asalelá biso molimo oyo.”

To, “bazali koluka molimo na yo.”

Lil., “obimi.”

To, “molimo na yo ekokoba kozala na bomoi.”

Lil., “obimi.”

Lil., “kobima.”

Lil., “Bato oyo bazalaki na kimya elongo na yo.”

To, “mokonzi ya bato ya maji (Moto ya astroloji).”

To mbala mosusu, “mpo na kosalisa bango misala na makasi.”

To, “kapita ya ndako ya mokonzi.”

To, “mokonzi ya bato ya maji (Moto ya astroloji).”

Lil., “kotɛlɛma liboso ya.”

To, “aboma molimo na yo.”

Lil., “momboto ya bokonzi.”

To mbala mosusu, “ebele ya mai.”

To, “kofanda mpo na mwa ntango.”

To, “molimo nyonso.”

Lil., “bandako.”

To, “ndako (tempelo) ya moi, elingi koloba, Héliopolis.”

Lil., “bandako.”

To, “Memfisi.”

Lil., “kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda.”

Lil., “mopanga.”

Lil., “mopanga.”

Lil., “mopanga.”

Ebengeli ya nzambe-mwasi oyo Bayisraele bapɛngwi bazalaki kosambela. Mbala mosusu nzambe-mwasi oyo apesaka mabota.

Ebengeli ya nzambe-mwasi oyo Bayisraele bapɛngwi bazalaki kosambela. Mbala mosusu nzambe-mwasi oyo apesaka mabota.

Lil., “mopanga.”

Ebengeli ya nzambe-mwasi oyo Bayisraele bapɛngwi bazalaki kosambela. Mbala mosusu nzambe-mwasi oyo apesaka mabota.

Ebengeli ya nzambe-mwasi oyo Bayisraele bapɛngwi bazalaki kosambela. Mbala mosusu nzambe-mwasi oyo apesaka mabota.

Lil., “mopanga.”

Lil., “mopanga.”

To, “baoyo bazalaki koluka molimo na ye.”

To, “azalaki koluka molimo na ye.”

To, “kolikya makambo.”

Lil., “Mosuni nyonso.”

Banguba ya mike, oyo mbala mingi babwaki-mbanzi bazalaki kosalela.

Lil., “konyata.”

To, “Memfisi.”

Lil., “ntango oyo etyamá.”

Elingi koloba, “Moto oyo akolonga Ezipito.”

To, “Memfisi.”

To mbala mosusu, “ekokóma mokili oyo etikalá mpamba.”

To, “basóka.”

To, “kolɔkɔta nkoni.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, “Thèbes.”

To, “baoyo bazali koluka molimo na bango.”

Lil., “momboto.”

Elingi koloba, “Krɛtɛ.”

Elingi koloba, “bakolongola nsuki na mitó na bango mpo na matanga mpe nsɔni.”

To, “Esika ya kombombana oyo etombwaná.”

To, “milimo na bino.”

To, “Lobwaku patatalu.”

To mbala mosusu, “na mokili oyo ekauká.”

Lil., “Liseke ya Moabe ekatani.”

To, “bazála.”

To, “ekozala na yikiyiki.”

Elingi koloba, “piololo oyo bazalaki kobɛta na ntango ya kokunda ebembe.”

To, “ekozala na yikiyiki.”

Elingi koloba, “piololo oyo bazali kobeta na ntango ya kokunda ebembe.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “makɛlɛlɛ ya koganga ya etumba.”

To, “bingumba oyo ezali zingazinga.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “mapango ya etonga.”

To, “mabwaku patatalu.”

To, “zála.”

To, “toli.”

Lil., “mipɛpɛ nyonso.”

To, “bambulú.”

Lil., “ebandeli ya nguya na bango.”

To, “baoyo bazali koluka molimo na bango.”

Mbala mosusu, liloba ya Ebre oyo esalelami awa ezali komonisa liloba nyɛi. Ezali kolobela eloko ya koyokela mpii.

To, “bampate-mibali mpe bantaba-mibali.”

Lil., “bonyataka.”

Lil., “Apesi lobɔkɔ na ye.”

To, “molimo na ye ekotonda.”

Lil., “banyataka.”

Lil., “bakokangisama monɔkɔ.”

To, “bato ya bilobaloba.”

To, “bikeko oyo eyemami.”

To, “ba-otrishe.”

To, “toli.”

Liloba oyo ezali lolenge moko ya ekomeli ya polele te ya Kaladea.

Lil., “anyata.”

Elingi koloba, “mokili ya Bakaladea.”

To, “milimo na bino.”

To mbala mosusu, “kotondisa libenga ya makula.”

Lil., “alamusi elimo ya.”

To, “mbɔngi ya mai.”

To mbala mosusu, “asalelá kutu mbula baporte.”

To, “ekeko oyo eyemami.”

To, “ekeko na ye ya ebende oyo enyangwisami.”

To, “mpɛma.”

To, “libanga ya litumu.”

Lil., “Bósantisa.”

Lil., “Bósantisa.”

To, “Asukoli ngai na mai.”

To, “bambulú.”

To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

Liloba oyo ezali lolenge moko ya ekomeli ya polele te ya Babele (Babilone).

To, “milimo na bino.”

To, “bikeko na ye oyo eyemami.”

To, “akokimela.”

Lil., “ndako.”

Lil., “ndako.”

Lipeko moko = 44,5 cm. Talá Ap. B14.

Bonene ya mosapi moko = 1,85 cm. Talá Ap. B14.

To, “milimo.”

To, “milimo.”

To, “milimo.”

Lil., “atombolaki motó ya.”

Lil., “atombolaki kiti na ye ya bokonzi koleka bakiti ya bokonzi ya.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto