Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Avril nk. 4-8
  • Mikano mpo na kobikisa Bana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikano mpo na kobikisa Bana
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koleka bamilió 50 ya bana bazali kati na likámá ya liwa
  • Mai malamu mpo na komela na esika ofandi
  • Matomba mpe mbeba kati na bobɔkɔli bana
  • Basungi mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bana
  • Bobólá, bitumba mpe SIDA
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Bana—bozwi to mokumba?
    Lamuká!—1993
  • Mikano mizwami mpo na kosalisa bana
    Lamuká!—1993
  • Elikya ya solo mpo na Bana
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Avril nk. 4-8

Mikano mpo na kobikisa Bana

“Toyangani na likita ya mokili mobimba mpo na bana, mpo ete tózwa ekateli ya biso banso mpe tósala libyangi ya nokinoki na mikili nyonso awa na nsé mpo na kopesa bomoi ya malamu na bana nyonso”​—Likita ya Mabota masangani, 1990.

BAPREZIDÁ mpe bakonzi ya baguvɛrnɛmá ya mikili koleka 70 bayanganaki na engumba New York na mwa 29 mpe 30 Sɛtɛ́mbɛ 1990 mpo na kolobela makambo matali bana kati na mokili mobimba.

Likita yango lityaki likebi mingi likoló ya minyoko ya bana, likambo ya mawa litali mokili mobimba kasi lizali kolobelama te. Peter Teeley, ntoma ya Etats-Unis na likita yango amonisaki ete: “Soki ndɛkɛ ebengami chouette tachetée ezali kokufa 40 000 na mokolo, mbɛlɛ ekozala likambo moko monene oyo ekosala bato mpasi mingi. Nzokande, bana 40 000 bazali kokufa, kasi bato bazali mpenza komona yango te, soko mpe kolobela yango te.”

Bakambi nyonso ya Bikólo oyo bazalaki na likita yango, bayokanaki ete likambo moko lisengeli kosalema na lombangu. Bazwaki “mokumba ya kotalela liboso mpenza ntómo ya bana, kobika na bango, libateli na bango mpe kokóla na bango.” Mikano nini mizwamaki?

Koleka bamilió 50 ya bana bazali kati na likámá ya liwa

Mokano ya liboso ezalaki mpo na kopesa lisalisi na bana koleka bamilió 50 oyo bazalaki kati na likámá ya liwa na boumeli ya bambula oyo ya 1990. Mingi kati na bango bakoki kobikisama na kosaleláká meko oyo mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.

• Soki bamama banso ya mikili ya bobólá bandimisami na konungisa bana na bango kino na sanza minei to motoba, milió moko ya bana bakoki kobikisama mbula na mbula.

• Kolakisa bato nyonso kosalela thérapeutique de réhydratation orale (T.R.O.) ekokaki kokitisa katikati ya motuya ya kufa ya bana euti na pulúpulú, oyo ebomaka bana bamilió minei mbula na mbula.a

• Kokáta mangwele mpe bankisi oyo epesamaka mpo na kokitisa mikrobe ekoki kopɛngola bamilió ya bawei oyo bakufaki na bokɔnɔ lokola kintutu, tetanosi mpe maladi ya mpanzi.

Ebongiseli oyo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ekoki kosalema? Ekoki mbala mosusu kozwa 2,5 miliare ya badolare na nsuka ya mbula zomi oyo, mpe yango ezali sé mosolo moke mpo na mokili mobimba. Bakompanyi ya makaya ya Etats-Unis ezali kobebisa mosolo wana mbula na mbula mpo na komonisa bililingi ya kobenda bakiliyá na televizyó. Mokolo na mokolo, bikólo ya mokili bizali kobimisa mosolo motindo boye mpo na makambo matali bitumba. Mosolo oyo mokokaki te kosalelama malamu mpo na kobikisa ebele ya bana oyo banyokwami na maladi? Maloba ya Mabota masangani mpo na ntómo ya bana mamonisi ete “mokili mobimba mosengeli kopesa bana, oyo eleki malamu na biloko bazali na yango.”

Ya solo, kopesa na mwana moko na moko bomoi malamu esuki te bobele na kobikisa ye na liwa. Sandra Huffmana, Prezidá ya Centre de prévention de la malnutrition infantile alimbolaki kati na zulunalo Time ete: “T.R.O. ezali kopekisa bokɔnɔ ya pulúpulú te, ezali bobele kopekisa bana ete bákufa na yango te” . . . abakisi, “oyo tosengeli kosala sikawa ezali kozwa myángo mpo na kopɛngola bokɔnɔ yango kasi bobele kopɛngola liwa te.”

Na bongo, mikano mingi mikamatamaki mpo na kobongisa mpe kobikisa bomoi ya bamilió ya bana. (Talá etánda na lokasa 6.) Ata moko te ekozala pɛtɛɛ mpo na kokokisa yango.

Mai malamu mpo na komela na esika ofandi

Felicia Onu azalaki kolekisa ngonga mitano mokolo na mokolo kokende kotoka mai mpo na libota na ye. Mai oyo azalaki komema na ndako mazalaki mbala mingi na mikrobe. (Mai motindo yango epesaka mikrobe oyo ebendaka bokɔnɔ ya pulúpulú.) Kasi na mobu 1984, na Ugwulangwu, mboka na ye oyo ezwami na Ɛ́sti ya Nigeria, libulu ya mai litimolamaki mpe pompi etyamaki.

Sikawa, Felicia asengeli kotambola bamɛtɛlɛ soko 100 mpo na kotoka mai ebongi na komela. Bana na ye bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe bomoi na ye ekómi pɛtɛɛ. Na boumeli ya mibu oyo mibandaki na 1980, bato koleka miliare moko, lokola Felicia bazwi libaku ya kozwa mai ya pɛto. Nzokande, bamilió ya basi mpe bana bazali naino kolekisa bangonga mingi mokolo na mokolo komema bakatini ya mwá mai moke, nkutu oyo basalelaka na Mpótó na ntango bakɔtaka na twalɛtɛ eleki yango na mingi.

Matomba mpe mbeba kati na bobɔkɔli bana

Maximino azali elenge mobali ya mibu 11, afandi na mboka moko mosika na ekólo Colombie. Atako azali kolekisa ngonga mingi mpo na kosunga tata na ye na mosala ya bilanga mokolo na mokolo, azali bongo koyekola malamu na eteyelo. Akendeke kelasi na Escuela Nueva, to eteyelo ya sika, oyo ezali na manáka ya pɛtɛɛ mpo na kosunga bana ete bázonga nsima te ata soki bazangisi kelasi na boumeli ya mwa mikolo, likambo liyaka mbala na mbala, mingimingi na ntango ya kobuka mbuma. Bateyi bazali mingi te na eteyelo ya Maximino. Búku ya mateya mpe ezali mingi te. Bana balendisami ete básalisana na mateya oyo bango bazali kokanga ntina te, mpe bazali kosala bango moko ebele ya misala ya ntina mpo na kotambwisa eteyelo. Bikólo mingi mpe bazali komeka kosalela ebongiseli yango, mingimingi mpo na kosalisa bato oyo bafandi na mboka, epai kuna bato bazali na bozwi moke.

Melinda, elenge mwasi ya mayele ya mibu 11, afandi na mokili mosusu, mosika kolongwa na Colombie, na engumba monene ya Azia. Auti kolongwa na eteyelo mpo na kolekisa bangonga 12 na kolokotáká biteni ya bibende to ya bakopale na moko ya bikunde minene esika babwakaka bosɔtɔ ya engumba. Alobi: “Nalingi kosunga tata na ngai mpo ete tózwa bilei mokolo na mokolo. Soki nasungi ye te, tokokoka kozwa eloko ya kolya te.” Na mikolo ya malamu, Melinda amemaka na ndako bobele 35 cents.

Basungi mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bana

Na Bombay, ezali na kartyé moko ya bato ya bobólá penepene na engumba, kartyé ebengami Malvani, epai kuna makɔnɔ mazali mingi. Nzokande, makambo mazali kobonga na lisalisi ya basungi lokola Neetu mpe Aziz, basungi ya mpiko na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya bato. Batalaka mabota mpo na koyeba soki bana basilaki kokatama mangwele to mpe soki bazali na maladi ya pulúpulú, makwanza to kosila makila. Neetu mpe Aziz bazali bobele na mbula 11. Bamipesi bango mpenza mpo na kosala na ebongiseli oyo ekamatamaki ya kokɛngɛla bana oyo bazali na nsé ya mibu 5. Na lisalisi ya milende na bango mpe ya basusu oyo bazali lokola bango, mpe pene na bana nyonso ya mike ya Malvani basili kokatama mangwele, baboti mingi bayebi kosalela mwángo oyo ya komelisa mwana mai ya mungwa soki mai masili na nzoto mpe nivo ya bopɛto esili kobongisama.

Kati na mokili mobimba, bokati bana mike mangwele mpo na maladi oyo bakobelaka yango mingi ezali sé kobuta. (Talá etánda na lokasa 8.) Koleka bana 70 kati na monkámá na ekólo Bangladesh mpe 95 kati na monkámá na ekólo Chine basili kokatama mangwele. Bato na mayele mpo na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya Nzoto bakanisi ete soki mikili nyonso ya bobólá mikokisi 90 kati na monkámá ya kokatisa bana mangwele, bana nyonso bakoki kobatelama. Mpamba te, soki bana mingi basili kokatama mangwele ekozala mpasi ete makɔnɔ mápalangana.

Bobólá, bitumba mpe SIDA

Likambo ya mawa, wana mwa matomba mazali komonana na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe bobɔkɔli bana, nzokande mpasi isusu izali sé kokóba. Kati na yango ezali: bobólá, bitumba mpe SIDA.

Na bambula euti koleka, babólá bazali kokóma lisusu babólá koleka. Na mikili ya bobólá ya Afrika mpe ya Amerika Latine, makoki ya kosomba biloko ekiti na 10 % to koleka na bambula zomi oyo euti kosila. Kati na mikili yango, epai kuna 75 % ya mosolo ya libota elekisamaka sé na bilei, baboti bazali na makoki te ya kopesa bana na bango bilei bikoki.

‘Leisá bana na yo ndunda mpe makemba,’ wana maloba bayebisaki Grace kati na lopitalo ya mboka na ye. Kasi Grace, mama ya bana 10, oyo azali kofanda na Afrika ya Ɛ́sti, azali na mosolo te ya kosomba bilei, azali mpe kozanga mai ya kokólisa milóna na mabelé na bango ya 1 000 mètres carrés. Bazali na makoki mosusu te mpo na kobikela, bobele kolya masango na madesu, mpe ntango mosusu kofanda nzala. Soki ezali kokóba bobele motindo boye, elikya ezali moke mpo ete makambo mábonga na libota ya Grace, lolenge moko mpo na bamilió ya mabota mosusu.

Bana ya Grace, atako bazali babólá, bazali mwa malamu koleka Kim Seng, elenge mobali ya mibu 8 oyo afandi na Azia ya Súdi-Ɛ́sti. Tata na ye akufaki na etumba ya banamboka mpe mama na ye akufaki na nzala na nsima. Kim Seng alingaki kokufa mpe na nzala, nde asukaki na kokende na káa ya bato bakimá mboka. Milió mitano ya bana kati na mokili mobimba oyo bazali komona mpasi na bakáa ya bato bakimá mboka, mingi kati na bango basili kozwa minyoko lolenge yango.

Na ebandeli ya ekeke oyo, bobele bato mitano kati na monkámá oyo bakufaki na bitumba bazalaki basivili. Lelo, motuya yango momati na bato 80 kati na monkámá, mpe bakufi mingi na bitumba yango ezali basi mpe bana. Baoyo bakufi te, ata bongo bazali kotungisama na makanisi. Mwana moko ya Afrika ya kati na káa ya bato bakimá bitumba alobi: “Nakoki kobosana soko moke te ndenge mama na ngai abomamaki. Bakamataki ye mpe basalaki ye makambo mabe. Na nsima bakangaki ye na nsinga mpe batubaki ye mbeli. . . . Mbala mingi nalɔtaka yango.”

Lokola bitumba bizali kobima na ekólo moko na mosusu, ezali mpasi mpo ete bana bázanga konyokwama lisusu na mobulu ya bitumba. Lisusu, ata mpe baoyo bazwami kati na bitumba yango te, bazali konyokwama na makambo mazali koleka kati na mokili. Makambo matali bitumba mazali kobebisa mosolo oyo mokokaki kosalelama mpo na kobɔkɔla bana, mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto to mpo na makambo matali minganga. Mosolo mozali kolekisama na mikili ya bozwi mpo na makambo matali bitumba, moleki bozwi ya mbula mobimba ya katikati ya bato ya mokili mobimba. Ata mpe mikili 46 ya bobólá mpenza kati na mabelé mizali kobebisa mosolo mingi mpo na kosomba bibundeli kokokana na oyo bazali kopesa na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe kelasi ya bana.

Longola bobólá mpe bitumba, mobomi mosusu azali komonisa bana mpasi kati na mokili. Na boumeli ya mibu 1980, wana matomba malamu mpenza mamonanaki mpo na kobundisa kintútu, tetanosi mpe pulúpulú, bolózi mosusu ya nsɔ́mɔ eyei kobima: SIDA. Organisation Mondiale de la Santé ekanisi ete kino na mobu 2 000, bana milió 10 bakozwa SIDA. Mingi kati na bango bakokufa liboso ya kokokisa mibu mibale ya mbótama mpe mwa ndambo bakobika na mpasi kino mibu 5. Reginald Boulos, monganga oyo atalaka makɔnɔ ya bana, ye moto ya ekólo Haïti amilelaki ete: “Soki meko ezwami nokinoki te, SIDA ekobebisa mpenza matomba nyonso masili kozwama na bambula zomi euti koleka na likambo litali kobikisa bana.”

Oyo nyonso touti kolobela emonisi ete atako mwa matomba mamonani, “kopesa na bana nyonso bomoi ya malamu”, ezali mokano monene mingi. Atako bongo, elikya ezali ete mokolo mosusu ndɔ́tɔ ekokóma likambo ya solo?

[Maloba na nse ya lokasa]

a T.R.O. ezali kopesa na mwana, mai, mongwa mpe miliki oyo azali na yango mposa mpo na kobundisa kosila ya mai na nzoto oyo eutaka na maladi ya pulúpulú. Na mobu 1990, Organisation mondiale de la santé eyebisaki ete lolenge oyo ya kosala esilaki kobikisa bana koleka milió moko na mbula. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya Sɛtɛ́mbɛ 22, 1985 (na ebimeli ya Lifalansé) lokasa 23 kino lokasa 25.

[Etanda na lokasa 6]

Kobikisa bana​—Mikano mpo na bambula 1990

Bikólo oyo biyaki na likita ya mokili mobimba mpo na makambo matali bana bipesaki bilaká ya ntina. Talá mikano oyo bazali kolikya kokokisa yango uta sikawa kino mobu 2000.

Kokata mangwele. Bibongiseli ya kokata mangwele ezali sikawa kobikisa bana milió misato na mbula. Kasi milió mosusu mibale bazali kokufa. Bokati mangwele ya bana na 90 % to koleka, kati na mokili mobimba mpo na maladi oyo babelaka mingimingi ekosalisa mpo na kopɛngola ndambo monene ya bakufi.

Mateya. Na bambula 1980, motuya ya banakelasi ekitaki na mikili ya bobólá koleka. Mokano ezali ete ezalela motindo wana ebongwana, mpe uta sikawa kino mibu soko zomi na nsima, likoki epesama na mwana nyonso akende kelasi.

Kolya malamu te. Bakonzi ya Fonds des Nations Unies pour l’enfance bakanisi ete “na kosalelama ya malamu ya makambo matali nkita,  . . . mokili ezali sikawa na likoki ya koleisa bana nyonso mpe kolónga ndenge ya mabe ya kolya malamu te.” Makanisi mapesamaki mpo na kokitisa katikati na boumeli ya bambula zomi, motuya ya bana oyo bazali kolya malamu te. Na bongo, bana milió monkámá bakolongolama na mpasi ya nzala.

Mai malamu mpo na komela mpe bopɛto na bakabiné. Na 1987, lapólo ya Brundtland elobaki boye: “Na mikili ya bobólá, motángo ya bapompi ya mai penepene ezali elembo malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bato ya mboka koleka motángo ya bambeto ya lopitalo.” Lelo, bato koleka miliare moko bazali na likoki te ya kozwa mai ya malamu mpe koleka mbala mibale mosusu ya bato bazali na bakabiné ya malamu te. Mokano ezali ya kopesa likoki na moto nyonso azwa mai malamu mpo na komela mpe kabiné ya malamu.

Libateli. Na boumeli ya bambula zomi oyo euti koleka, bitumba ebomi mpe ezokisi bana koleka milió mitano. Milió mitano mosusu ya bana batikali libándá, ndako te. Bana wana, bakisá mpe bamilió ya baoyo bazali kolala na balabála, ná baoyo bazali konyokwama na misala, bazali mpenza na mposa ya libateli. Bobembani mpo na makambo ma ntómo ya bana, lelo oyo esangisi mikili koleka monkámá, ezali kokana kobatela bana yango nyonso mpo na kobikisa bango na mobulu mpe na bobubi.

[Etanda na lokasa 7]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

BANTINA YA LIWA YA BANA

(Bana oyo bakokisi naino mibu mitano te)

MILIÓ YA BAWEI NA MBULA (Ndenge emonanaki na 1990):

Kɔsúkɔsú ya kosanza: 0,51 MILIÓ

Tetanosi ya bomwana: 0,79 MILIÓ

Malaria: 1 MILIÓ

Kintútu: 1,52 MILIÓ

Maladi ya kokangama mpema: 2,2 MILIÓ

Pulúpulú: 4 MILIÓ

Bantina mosusu: 4,2 MILIÓ

Esika euti: O.M.S. mpe UNICEF

[Etanda na lokasa 8]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

MILENDE YA KOKATISA BANA MANGWELE KATI NA MIKILI YA BOBÓLÁ (1980-1988)

Motángo kati na monkámá ya bana ya basanza na nsé ya zomi na mibalé oyo bakatami mangwele

1980 1988

D.T.COQ* 24% 66%

POLIO 20% 66%

MALADI MA NTÓLO 29% 72%

KINTÚTU 15% 59%

* D.T.Coq: kokatisa bana mangwele mpo na bamaladi lokola diphtérie, tetanosi mpe kɔ́súkɔ́sú ya kosanza

Esika euti: o.m.s. mpe unicef (mitángo mya 1980 mikɔtisi chine te)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto