Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Avril nk. 6-9
  • Bolóngi kati na mokili oyo etondi na lokoso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolóngi kati na mokili oyo etondi na lokoso
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Salá nyonso oyo okoki kosala na makambo okutani na yango
  • Pɛngolá kobebisama na lokoso
  • Kobwaka soko moke te elikya ya kolónga
  • Tópɛngola motambo ya lokoso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kanisa mokili ezangi lokoso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Libota na lokoso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na makambo ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Avril nk. 6-9

Bolóngi kati na mokili oyo etondi na lokoso

“NDENGE nini nakoki kolónga?” James Scott amitunaki motuna yango ntango abungaki na bangomba ya Himalaya mpe azalaki lisusu na elikya te ya kolónga. Azalaki mpenza kati na likámá ya kokufa na malili to na nzala. Amikundolaki ete amonaki bato oyo bazalaki kobunda karaté “kobungisa nguya na bango mokemoke, mpe likofi moko nsima na mosusu ezalaki kolɛmbisa makasi na bango, kino . . . bazangaki mpenza makasi ya kobunda.” Alobaki ete: “Yango ezali lolenge nayokaki ntango namikangisaki na mbeto na ngai ya mobembo mpe na kolɛmba nyonso nalyaki mwa bangalasi. Mpiko nyonso esilaki ngai mpe mposa ya kozala na bomoi elongwaki. Nalɛmbá naino ndenge wana te.”​—Búku Lost in the Himalayas.

Lelo oyo, bato mingi bazali lokola ye​—bakangami kati na mokili oyo etondi na lokoso. Okoki komiyoka ete ozali konyokwama mpe kokweisama na bolɛmbu nyonso. Bobele bato moke nde bakoki mpenza kopɛngola matomba mabe ya mbalakaka oyo mauti na lokoso. Na kotaleláká epai ofandi na mokili, mikakatano ozali kokutana na yango mikoki kokesana mpenza​—lokoso ezali kobebisa bato na mikili ya bobóla na kokesana mpenza na bato ya mikili ya bozwi. Atako bongo, ezala mikakatano ya lolenge nini, ntango mosusu okoki koyekola lolenge ya kopɛngola likámá na nzoto, na mayoki, mpe na elimo kino lisungi ekoya. Na lolenge nini? Na kolandáká toli ya ntina oyo epesami na bato ya ntɔ́ki.

Makambo mibale ya ntina mazali kati na toli na bango. Likambo ya liboso ezali bongo kopɛngola mikakatano miuti na bizaleli mabe oyo biyebani. Búku The Urban Survival Handbook elobi ete: “Mwango na yo esengeli kozala kopɛngola makámá mazangi ntina . . . mpe kokitisa mbeba euti na makámá oyo okoki kopɛngola yango te.” Likambo ya mibale​—mpe mbala mosusu ya ntina mingi koleka​—ezali bongo kotalela ezaleli na yo. Búku The SAS Survival Handbook elobi ete: “Kozala na likanisi ya kolónga ezali malamu lokola koyika mpiko mpe boyebi.”

Salá nyonso oyo okoki kosala na makambo okutani na yango

Búku Staying Alive​—Your Crime Prevention Guide elobi ete: “Na États-Unis, nsima ya miniti 22 nyonso, moto moko azali kobomama, nsima ya segɔ́ndɛ 47 nyonso bazali koyiba biloko ya moto moko, mpe nsima ya sɛgɔ́ndɛ 28 nyonso, bazali kosala moto moko mabe mpenza.” Kati na bizalela motindo wana, okoki kosala nini? Okoki mpenza kopɛngola komikómisa moto oyo akoki kozwama na bolɛmbu nyonso liboso ya makámá motindo wana. Zalá na bokɛngi mpe na angɛlɛ. Salá oyo okoki kosala mpo na kopɛngola likámá.a

Na ndakisa, kobebisa ezaleli na yo te na kozaláká moto ya bindimandima. Zulunalo The New York Times elobi ete Baamerikɛ́ 18 likoló ya monkámá bandimi ete​—bayibaki bango bankóto ya badolare na bayibi oyo bakosaka bato ya bindimandima. Mbala mingi bato yango oyo bayibelamaka bazali mibangé lokola mwasi moko ya mibu 68 mokufeli-mobali, bayibaki ye badolare 40 000. Lisoló na ye libimaki na zulunalo na motó na likambo ete: “Soki ozali mobangé, bayibi bamonaka badolare.”

Kasi esengeli na yo te ete ozala lokola moto oyo azangi bokɛngi mpe azali kozela ete báyiba ye. Búku Staying Alive ekebisi na maloba oyo: “Kebá na bankoi oyo bakoya epai na bino na bilamba na mpate.” Mwasi-mobangé moko ya mibu 70 asalelaki toli yango. Balobaki na ye ete abanda kofuta assurance bobele ya badolare 10 na sanza mpo na bankisi ya monganga. Lapólo elobi ete: “Likambo moko oyo mwasi-mobangé yango asengelaki kosala ezalaki kopesa na mosali na kompanyi ya assurance badolare 2 500 liboso.” Aboyaki. Na kobengáká kompanyi ya assurance na telefone, ayaki koyeba ete moto yango azalaki moyibi. “Wana azalaki kotyela motɛki na assurance yango kɔ́pɔ ya mibale ya tíi, alekisaki ntango mpe na nsima bapolísi bayaki mpe bakangaki ye.”

Kosala oyo okoki kosala mpo na komibatela elongobani na toli oyo epesami kati na Biblia. “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” (Masese 14:15; 27:12) Bato mingi baboyaka Biblia kolobáká ete esilá ngala mpe ezali na ntina te. Kasi batoli na yango ekoki kosalisa yo ete olónga. Mokonzi na mayele Salomo akomaki ete: “Mayele [lokola oyo ezwami kati na Biblia] ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.”​—Mosakoli 7:12.

Batángi mingi ya zulunalo Lamuká! basili komona ete yango ezali mpenza solo. Na ndakisa, na boyokani na toli oyo elobelami na Deteronome 22:23, 24, basusu basili kozwa libateli na kongangáká makasi ntango bakutanaki na likámá ya kobebisama to mobulu mosusu. Basusu balandaki toli ya Biblia etali kopɛngola mbindo nyonso oyo “ezali kobebisa nzoto to elimo.” (2 Bakolinti 7:1, The Twentieth Century New Testament) Na bongo, basili komibatela na masɛnginya ya batɛki makaya mpe bilangwiseli, oyo bazali kozwa mosolo na kobebisáká kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bato. Batángi mingi mpe basili kopɛngola motambo ya basakoli oyo bazali koluka mosolo na nzela ya televizyó mpe bato ya politiki oyo batondi na mposa ya bokonzi. (Talá etanda, na lokasa 7.) Tángá Biblia. Okoki kokamwa na lolenge ezali mpenza kopesa lisungi libongi.

Pɛngolá kobebisama na lokoso

Ya solo, ezali na likámá mosusu ya lokoso​—okoki komikómisa moto ya lokoso. Yango ekoki kolongolela yo bizaleli mosusu ya kitoko oyo ezali kokesenisa biso bato na banyama. Kolobeláká mombongo oyo moto akoki kotya ntalo ya biloko ye moko, motali moko alobaki ete: “Bato ya mombongo oyo bazali na lokoso bazalaki koluka mabaku nyonso mpo na kozwa matomba oyo eleki ndelo. Lokoso ekómi mingi koleka . . .” Ata ngulu ezali na lokoso te lokola bato mosusu ya mombongo oyo balukaka kozwa matomba na mabaku nyonso! Babosani mpenza toli malamu oyo Yesu apesaki ete: “Kebá mpe sɛnzɛlá na ntina na lokoso nyonso.”​—Luka 12:15.

Yesu Klisto apesaki toli yango mpamba te ayebaki ete na lolenge mabe mpenza okoki komibebisa yo moko soki lokoso ekangi yo. Mposa ya biloko ya mosuni​—mpe lisusu, mposa ya bokonzi mpe ya kosangisa nzoto​—okoki kozika na mposa yango kati na bomoi na yo, koyibáká yo ntango to lobanzo nyonso oyo okokaki kozala na yango mpo na bato to mpo na matomba ya elimo. Kati na búku na ye The Midas Touch, Anthony Sampson alobi ete: “Mosolo esili kokóma lingomba.” Na lolenge nini? Mosolo ekómi nzambe. Makambo mosusu nyonso makabami lokola mbeka na ntina na lokoso mpe bozwi. Likambo lileki ntina ezali bongo kozwa mbano. Soki mbano ezali mingi koleka, ekozala malamu koleka. Nzokande, na likambo oyo, ezala ntango boni okomipesa na yango, lokoso ya biloko ya mosuni ekosilisama soko moke te. Mosakoli 5:10 elobi ete: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te.” Bobele bongo, “ye oyo alingi” bokonzi, azali na mposa ya biloko ya mosuni, mposa ya kosangisa nzoto akotonda soko moke te, ata soki azwi yango mingi.

Kobwaka soko moke te elikya ya kolónga

Likambo moko ya ntina mingi mpo na kolónga ezali bongo kozala ntango nyonso na elikya mpe na makanisi ya kolónga. Mbala mosusu ezali na mwa makambo mike oyo okoki kosala mpo na kopɛngola bopusi ya bato ya lokoso. Na ndakisa, bato oyo bazali konyokwama na nzala, bakoki kosala bobele mwa likambo moke mpo na kopɛngola ezalela na bango ya mpasi. Nzokande, kobwaka elikya te; kolɛmba te. Búku The SAS Survival Handbook elobi ete: “Ezalaka mpasi te kolɛmbisa nzoto, kokwea mpe komiyoka mawa” ntango ozwami kati na ezingelo mabe mpe ya likámá. Komizindisa te kati na makanisi ya kozanga kolónga mpe kati na bobángi. Okoki kokamwa na lolenge okoki koyika mpiko. Búku yango elobi lisusu ete: “Mibali mpe basi basili komonisa ete bakoki kolónga kati na botɛmɛli.” Lolenge nini basalaki yango? Elobi ete balóngaki “mpo ete bazwaki ekateli ya kolónga.” Zwá ekateli ete mokili oyo ya lokoso elónga yo te.

James Scott, oyo tolobelaki liboso, abikisamaki na Ngomba Himalaya oyo ekokaki mbala mosusu kokóma bongo lilita na ye. Alobaki ete etumba na ye mpo na kobika eteyaki ye likambo moko ya ntina mingi. Likambo nini? Alobaki ete: “Kati na bomoi, ezali na mokakatano moko te ya mpasi koleka oyo ezangi koyikelama mpiko.” Tim Macartney-Snape, momati-ngomba oyo azalaki na eksperiansi mingi, oyo akamwaki ete James Scott azalaki na likoki ya kotikala ntango molai kino azwamaki na bomoi, azwaki mpe liteya. Alobaki ete: “Wana ozali ata na mwa elikya moke, kolɛmba soko moke te.” Na bongo, ezala ezaleli ya mabe ndenge nini, okoki kokómisa yango mabe koleka soki obwaki elikya nyonso. Kobwaka soko moke te elikya ya kolónga.

Kasi ezali na mwa “elikya moke,” to nkɔnzɔ ya kolónga na mokili oyo mozindisami na lokoso? Tokobikisama na likámá ya bato ya lokoso oyo bazali kobebisa mabelé mpe bomoi ya bamilió ya bato? Ɛɛ, elikya ya solo mpo na kobikisama ezali. Talelá eyano ya Biblia kati na lisoló lilandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Mobulu​—Okoki komibatela na yango,” kati na Lamuká! ya 22 Apríli 1989, nkasa 7-​10 (ebimeli ya Lifalansé).

[Etanda na lokasa 7]

Makebisi oyo ya Biblia mabongi mpenza na ntango na biso

Masese 20:23 “Bipimeli na bozito bikeseni izali eloko na koboyama na [Yehova]; epimelo na bozito na lokuta ezali malamu te.”

Yilimia 5:26, 28 “Zambi bato mabe bakozwamaka kati na bato na ngai; bakolambelaka lokola ye oyo azali kotya malónga; babongisi malónga, bakokamata bato. Bakómi bazwi, bazali kongɛnga, ɛɛ, baleki misala na bato mabe; bakosambisaka na boyengebene te, likambo na mokufeli-tata ete lilonga, likambo na mozangi, bakosambisa yango te.”

Baefese 4:17-​19 “Bongo, nazali koloba mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete bótambolaka pelamoko ekotambolaka bapakano na makanisi na bango na mpamba. Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango. Bazali koyoka mawa te, bamipesi na makambo na nsɔ́ni ete básala makambo na bosɔtɔ na bilulela.”

Bakolose 3:5 “Bongo, bóboma bizaleli na bino biuti na nsé: pite, mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe mpe bilulela oyo ezali losambo na bikeko.”

2 Timoté 3:1-5 ‘Kasi ososola likambo oyo ete, na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkó, bato babimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali koangana nguya na yango. Opengwa ndenge yango.’

2 Petelo 2:3, NW “Na bilulela na bango bakozwa litomba kati na bino na maloba na kokosa. Nde ekweli ebongisami mpo na bango; longwa na kala ezali kolambela mpamba te. Libebi mpo na bango ekolala te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto