Mwango ya kosilisa maladi yango na mokili mobimba: Ekoki kozwama?
MINGANGA bandimi ete maladi ya ntolo ezali mokakatano ya mokili mobimba oyo ezali kosɛnga ete mokili mobimba bápesa mabɔkɔ mpo na kosilisa yango. Ekólo moko te ekoki kopɛngola maladi ya ntolo kozanga kosalana elongo na bikólo mosusu, mpamba te pɔsɔ na pɔsɔ bamilio ya bato bakendaka na bikólo bikeseni.
Bato mingi bandimi ete kosalana elongo na mokili mobimba esɛngaka ete mikili ya bozwi misalisa mikili ya bobola, epai kuna maladi ya ntolo ezali konyokola bato mingi koleka. Lokola monganga Arata Kochi alobi yango, “ezali likambo ya ntina ete mikili ya bozwi misalisa mikili ya bobola mpo na kobundisa maladi ya ntolo, liboso ete etumba yango esalema na mikili na bango moko.”
Kasi mikili ya bozwi, mizali kotalela naino makambo oyo bazali komona ete esengeli kosalema liboso ya makambo mosusu, mpe bazwi bikateli noki te mpo na kosalisa mikili ya bobola ete bábundisa maladi ya ntolo. Mikili mosusu ya bobola yango moko mbala mingi mizalaka na bopɔtu ya kotya likebi na makambo matali kolɔngɔnɔ ya nzoto, mizali nde kobimisa mosolo mingi mpo na kosomba bibundeli. Na katikati ya mobu 1996, bobele bato ya maladi ya ntolo 10 likoló na monkama nde bazalaki kosalisama na mwango ebéngami “Kosalisama na ntango mokuse mpe kosɛnzɛlama na monganga” mpe mwa bato moke bazalaki kosala mpo na kopɛngola ete maladi yango epalangana te.
O.M.S. elobi ete: “Boyebi ezali, nkisi mpe ya ntalo moke mpo na kobikisa maladi ya ntolo ezali komonana uta bambula mingi. Sikawa mokili ezali nde na mposa ya milende makasi ya bato ya nguya, bopusi na bango mpe mawa na bango oyo ekondimisa ete bankisi yango esalelami malamu mpenza kati na mokili mobimba.”
Maladi ya ntolo ekosila na mikolo mizali koya
Tokoki kozala na elikya ete bato ya nguya mpe ya bopusi bakosilisa mokakatano yango? Mokomi na nzembo oyo apemami akomaki kati na Biblia ete: “Ndimela bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Na bongo, tokoki kozala na elikya epai na nani? Vɛrsɛ mosusu elobi ete: “Esengo na ye oyo Nzambe na Yakobo azali kosunga ye; oyo azali na [Yehova] Nzambe na ye; ye oyo asalaki lola mpe mokili, mai-na-monana mpe biloko nyonso izali kati na yango.”—Nzembo 146:3, 5, 6.
Lokola azali Moyemi mpe Mozalisi ya mabelé, Yehova Nzambe azali na nguya mpe bwanya ya kotya nsuka na maladi. Ayokelaka bato mawa? Na nzela ya mosakoli na ye oyo apemami, Yehova alaki ete: “Nakoyokela bango mawa lokola tata ayokelaka mwana na ye ya mobali oyo azali kosalela ye.”—Malaki 3:17, NW.
Mokapo ya nsuka ya Biblia ezali komonisa emonaneli oyo epesamaki epai na ntoma Yoane. Amonaki “nzete na bomoi kobotaka mbuma na mitindo zomi na mibale, sanza na sanza kobotaka mbuma na sanza, mbuma na sanza.” Nzete yango ya elilingi mpe mbuma oyo yango ezali kobota ezali komonisa bibongiseli ya Nzambe oyo ekopesa nzela na bato ya botosi ete báfanda na bomoi ya seko awa na mabelé.—Emoniseli 22:2.
Yoane akomaki lisusu ete: “Nkasa na nzete izali mpo na kobikisa bato na mabota.” Nkasa ya elilingi izali komonisa mapamboli mauti na Nzambe oyo makopesa nzela na kobikisama ya bato, na elimo mpe na mosuni. Na yango, tokoki kondimisama ete na mokili ya sika ya boyengebeni na nsé na boyangeli ya Nzambe, maladi ya ntolo ekosilisama nyonso mpe libela na libela.—Emoniseli 21:3, 4.
[Elilingi na lokasa 8]
Nzambe alaki kobikisama ya bato libela na libela