Makambo mazali koleka na mokili
◼ Na mokili mobimba, pene na bato milio 200, elingi koloba bato mitano likoló na mokama (5 %), oyo bazali na mbula kobanda 15 tii 65, bamɛlaki bangi na mbula oyo euti koleka.—RAPPORT MONDIAL SUR LES DROGUES 2005, OFFICE DES NATIONS UNIES CONTRE LA DROGUE ET LE CRIME.
◼ Baankɛti emonisi ete elenge oyo azali komona mobulu ya kobɛta masasi, azali na likama mbala mibale koleka ya kosala makambo oyo amoni, na mbula mibale oyo ekolanda.—ZULUNALO SCIENCE, ÉTATS-UNIS.
◼ Na lopitalo moko ya São Paulo, na Brésil, basi mingi (16,8 %) oyo bazwaki bango na maladi ya kansɛr ya libɛlɛ, na mbula moko, ezali baoyo bakokisi naino mibu 35 te. Soki maladi yango eyebani ntango ezali naino na ebandeli, basalisaka yango mpe mingi (90 %) esilaka.—FOLHA ONLINE, BRÉSIL.
Mpo olɛmbaka te
Zulunalo moko (The Vancouver Sun) elobi ete bato oyo bayekoli kolɛmba babengi yango “moko ya maladi minene ya ntango na biso.” Ankɛti moko emonisaki ete “pene na bato misato likoló na minei ya Amerika ya Nɔrdi, balobaka ete balingaka mpenza kosala likambo moko ya sika na bomoi na bango.” Na batoli oyo zulunalo yango epesi mpo na kobundisa kolɛmba, totángi oyo: “Tiká naino kosala makambo oyo ezali kolɛmbisa yo,” “yekolá likambo moko ya sika,” “salá mosala moko ya ntina oyo ekosɛnga báfuta yo te,” “saláká ngalasisi, na ndakisa . . . kotambola na makolo,” mpe “monisáká botɔndi.”
Boombo ya mikolo oyo
Na ankɛti oyo Bureau international du Travail (BIT) esalaki, “na mokili mobimba, basalisaka bato pene na milio 12,3 misala na makasi.” Balobi ete pene na milio 2,4 ya bato yango batɛkaka bango. Misala oyo basalisaka moto na makasi—oyo batindaka moto asala ata soki alingi te—ekoki kozala kindumba, mosala ya soda, mpe misala mpo na kofuta nyongo, misala oyo bafutaka bato malamu te to bafutaka bango eloko te, mpo bazali kokata mbongo ya nyongo. Juan Somavia, Mokambi ya BIT, alobi ete misala ya ndenge wana “elongolaka bato ntomo na bango mpe ebebisaka lokumu na bango.”
Biblia ya mobimba ya liboso na monɔkɔ ya Kriol
Zulunalo moko (The Sydney Morning Herald) elobi ete “basilisi kobongola Biblia ya liboso, kobanda Genese tii Emoniseli, na monɔkɔ moko ya mboka, na Australie.” Biblia yango ya sika na monɔkɔ ya Kriol, oyo ekobima na 2007, ekosalisa bato pene na 30 000 oyo bafandaka na bamboka ya mosika na nɔrdi ya Australie. Zulunalo yango elobi ete “mosala ya kobongola Biblia yango eumeli mbula 27.” Alliance biblique universelle elobi ete, “mabongoli ya sika 22 ya Kondimana ya sika ebimaki na 2004.” Sikoyo, bato bakoki kotánga Biblia, ya mobimba to ya ndambo, na minɔkɔ 2 377.
Molunge na kati ya mituka oyo etɛlɛmi
Zulunalo moko (Pediatrics) elobi ete na mobu 2004, na États-Unis, bana 35 bakufaki na molunge mpo batikaki bango na kati ya mituka oyo etɛlɛmi. Baankɛti emonisi ete soki na libándá molunge ezali makasi koleka 30 °C, molunge na kati ya motuka ekoki komata noki mpe kokóma na 57 °C tii 68 °C. Ata soki na libándá molunge ezali ya 22 °C, molunge na kati ya vuatire ekoki komata mbala mibale koleka, soki motuka etɛlɛmi miniti 15 tii 30. Kofungola maninisa ya vuatire to kotya masini oyo epesaka malili mwa ntango moke liboso ya kokata mɔtɔ esalaka mpenza eloko te. Bato oyo bakomaki lisolo yango bakanisi ete soki bato bayebi likambo yango, bakopengola likama yango.