Lisolo ya bomoi
Tozwi ebele ya mapamboli mpo tobatelaki elimo ya misionɛrɛ
YA TOM COOKE
Mokolo moko, na nsima ya midi, mboka ezalaki kimya; na mbala moko, lokito ya mindoki ebandaki. Masasi ezalaki kolekaleka na banzete ya lopango na biso. Ezalaki likambo nini? Mosika te toyokaki ete Général Idi Amin abɔtɔli bokonzi ya ekólo Ouganda. Ezalaki na 1971.
MPO na nini ngai ná mwasi na ngai, Ann, totikaki Angleterre, ekólo oyo ezalaki na kimya, mpe toyaki na ekólo moko ya Afrika oyo ezalaki mpenza na kimya te? Nakoki koloba ete nazali moto oyo abangabangaka te, kasi ndakisa ya molende oyo baboti na ngai bamonisaki na mosala ya Bokonzi nde epesaki ngai mposa ya mosala ya misionɛrɛ.
Nabosanaka te mokolo ya liboso oyo baboti na ngai bakutanaki na Batatoli ya Yehova; ezalaki na sanza ya Augusto 1946. Batɛlɛmaki na porte mpe basololaki ntango molai na bato mibale oyo bayaki na ndako na biso. Bapaya yango, Fraser Bradbury ná Mamie Shreve, bazongaki lisusu mbala mingi, mpe na basanza oyo elandaki, bomoi ya baboti na biso ebongwanaki mpenza.
Ndakisa ya mpiko ya baboti na ngai
Baboti na ngai bamipesaki na makambo mingi na mboka na biso. Na ndakisa, mwa moke liboso bábanda koyekola Biblia, batondisaki bafɔtɔ ya Winston Churchill na ndako. Ntango basengelaki kosala voti nsima ya etumba, bato ya komite ya Parti Conservateur bazalaki kosala makita na bango na ndako na biso. Baboti na ngai bayebanaki mpe na bakonzi mingi ya lingomba mpe bakonzi ya mboka. Atako nazalaki kaka na mbula libwa na ntango wana, namonaki ete bandeko na biso basepelaki te ntango bayokaki ete tolingi kokóma Batatoli ya Yehova.
Ndakisa ya Batatoli oyo tozalaki koyangana na bango, ndenge bamipesaki mpe bazalaki kobanga te, elendisaki baboti na ngai bámipesa na mosala ya kosakola. Mosika te tata akómaki kosala masukulu na ekoliseli-lolaka liboso ya bamagazini na Spondon, mboka na biso, mpe biso bana tozalaki kotɛlɛma na bisika oyo bato balekaka mingi mpo na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! Lokuta mabe, soki namoni bana-kelasi na biso, nazalaki komona lokola nde nazinda na mabelé.
Ndakisa ya baboti na ngai elendisaki yaya na ngai ya mwasi, Daphne, abanda mosala ya mobongisi-nzela. Na 1955, akɔtaki na Gileadi, eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpe batindaki ye misionɛrɛ na Japon.a Nzokande, Zoe, leki na ngai ya mwasi, atikaki kosalela Yehova.
Ngai nazalaki naino kotánga kelasi ya koyema mpe kobongisa bililingi mpo na mikanda. Na ntango wana, bana-kelasi bazalaki kolobela mingi likambo ya kosɛngisa bilenge básala mosala ya soda. Ntango nayebisaki bango ete na kotosa lisosoli na ngai, nakoki kondima mosala ya soda te, bakanisaki ete nazali kosala lisɛki. Likambo yango epesaki ngai mabaku mingi ya kosolola masolo ya Biblia na bana-kelasi mosusu. Mosika te, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ ya sanza 12 mpo naboyaki kosala mosala ya soda. Moninga na ngai moko ya kelasi oyo asepelaki na mateya ya Biblia akómaki mwasi na ngai. Kasi, tiká Ann ye moko ayebisa bino ndenge ayekolaki solo.
Ndenge Ann ayebaki solo
“Baboti na ngai bazalaki kosambela te, mpe nazwaki batisimo na lingomba moko te. Kasi nazalaki kosepela mingi na makambo ya Nzambe mpe nazalaki kokende na lingomba nyonso oyo baninga na ngai bamemi ngai. Nakómaki na mposa ya koyeba Biblia ntango nayokaki masolo oyo Tom ná Motatoli mosusu bazalaki kosolola na bana-kelasi mosusu na eteyelo. Ntango Tom ná Motatoli mosusu bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda, likambo yango etungisaki ngai.
“Tozalaki kotindelana mikanda na Tom ntango azalaki na bolɔkɔ, mpe nakómaki kosepela na Biblia makasi. Ntango nakendaki kolanda bakelasi na ngai na Londres, nandimaki koyekola Biblia na Muriel Albrecht. Muriel azalaká misionɛrɛ na Estonie, mpe ye ná mama na ye balendisaki ngai mingi. Nsima ya mwa bapɔsɔ, nakómaki koyangana na makita mpe kokende kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na gare ya engbunduka ya Victoria Station.
“Nazalaki na lisangá ya Southwark, na sudi ya Londres. Na lisangá na biso tozalaki na bandeko ya mikili ndenge na ndenge, oyo mingi kati na bango bazalaki na bozwi te. Atako nazalaki mopaya, bazalaki kozwa ngai lokola ndeko na bango mpenza. Bolingo oyo namonaki na lisangá yango endimisaki ngai ete namonaki mpenza solo, mpe nazwaki batisimo na 1960.”
Mikano na biso ebongwani te, kasi tokokisi yango na ndenge mosusu
Na nsima, ngai ná Ann tobalanaki na 1960, mpe tozalaki na mokano ya kokóma bamisionɛrɛ. Kasi makambo ebongwanaki mpo Ann akómaki na zemi. Mwana na biso Sara abotamaki, kasi ngai ná Ann tozalaki kaka na mposa ya kokende na ekólo moko oyo bazalaki na mposa ya basakoli mingi. Nakomaki mikanda na bikólo ndenge na ndenge mpo na koluka mosala, mpe na 1966, bakonzi ya ministère de l’éducation ya Ouganda bakomelaki ngai ete nakoki kokende kosala kuna. Kasi, na ntango wana, Ann akómaki lisusu na zemi ya mwana na biso ya mibale. Bato mosusu bamonaki ete soki tokei na mboka mopaya ekozala ekateli ya malamu te. Tosololaki na monganga na biso mpe ayebisaki biso boye: “Soki bolingi mpenza kokende, bosengeli kokende liboso ete zemi ya mwasi na yo ekokisa sanza nsambo.” Tokendaki mbala moko na Ouganda. Yango wana, baboti na biso bamonaki te mwana na biso ya mibale, Rachel, liboso akokisa mbula mibale. Lelo oyo, lokola biso moko tokómi na bankɔkɔ, tozali na botɔndi mingi mpo na elimo ya komipimela oyo baboti na biso bamonisaki.
Ntango tokómaki na Ouganda na 1966, tozalaki na esengo, kasi tozalaki mpe kobanga. Ntango kaka tokitaki na mpɛpɔ, eloko ekamwisaki biso ezali balangi ndenge na ndenge oyo tomonaki. Balangi yango ezalaki kongɛnga makasi. Esika ya liboso tofandaki ezalaki pene na mwa engumba ya Iganga, na ntaka ya kilomɛtrɛ 50 na Jinja, engumba oyo ezali na motó ya Ebale Nil. Batatoli oyo bazalaki mwa penepene na biso ezalaki mwa etuluku oyo bazalaki na Jinja. Bamisionɛrɛ Gilbert Walters ná mwasi na ye Joan mpe Stephen Hardy ná mwasi na ye Barbara nde bazalaki kotambwisa mwa etuluku yango. Nasɛngaki na mosala ete bátinda biso na Jinja mpo tózala na likoki ya kopesa etuluku yango mabɔkɔ. Mwa moke nsima ya kobotama ya Rachel, tokómaki kofanda na Jinja. Kuna tozalaki na esengo ya kosala elongo na Batatoli wana ya sembo mpe etuluku yango ekolaki tii ekómaki lisangá ya mibale na Ouganda.
Libota mobimba na mosala ya kosakola na mboka mopaya
Ngai ná Ann tomonaka ete tobɔkɔlaki bana na biso na esika ya malamu mpenza. Tozalaki na esengo ya kosala na bamisionɛrɛ oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge mpe kosalisa mwa lisangá yango ya sika ekola. Tozalaki kosepela mpenza na bandeko na biso ya Ouganda, oyo mbala mingi bazalaki koya kotala biso na ndako. Stanley Makumba ná mwasi na ye Esinala bazalaki mpenza kolendisa biso.
Kasi, tozalaki koyamba kaka bandeko te epai na biso, mpamba te banyama ndenge na ndenge ezalaki na zamba oyo ezalaki zingazinga na biso. Bangubu ezalaki kobima na Ebale Nil na butu mpe koya kotambola pembeni mpenza ya ndako na biso. Nazali koyeba lisusu mokolo oyo nguma moko ya mɛtrɛ 6 ekɔtelaki biso na lopango. Mbala mingi tozalaki kokende kotala banyama na zamba, epai bankɔsi mpe banyama mosusu ezalaki kotambola na bonsomi.
Na mosala ya kosakola, bato ya mboka bazalaki kokamwa biso mpenza; ezalaki mbala ya liboso bamoná pusupusu ya mwana. Mbala mingi ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, ebele ya bana bazalaki kolanda biso na nsima. Bato bazalaki kotalatala biso mpe bazalaki kosimba bebe ya mondele. Tozalaki kosepela na mosala ya kosakola mpo bato bazalaki na bonkonde mpenza. Lokola kobanda boyekoli ya Biblia na bato yango ezalaki mpasi te, tozalaki kokanisa ete bango nyonso bakoyamba solo. Nzokande, bato mingi bazalaki kokakatana mpo na kotika makambo ya bonkɔkɔ. Kasi, mingi mpe bandimaki kotosa mitinda ya Biblia, mpe mpo na yango lisangá ezalaki kokola. Liyangani ya zongazonga ya liboso oyo tosalaki na Jinja na 1968 ezalaki mpenza likambo monene. Tobosanaka te ntango bato mosusu oyo toyekolaki na bango Biblia bazwaki batisimo na Ebale Nil. Kasi, kimya wana ezalaki lisusu mpo na ntango molai te.
Epekiseli: Komekama mpo na kondima mpe ntango ya kosalela mayele
Na 1971, Général Idi Amin abɔtɔlaki bokonzi. Yikiyiki ekɔtaki na Jinja, mpe likambo oyo nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo esalemaki ntango tozalaki komɛla tii na kati ya lopango. Na boumeli ya mbula mibale oyo elandaki, babenganaki ebele ya bato ya Azia oyo bazalaki kofanda na Ouganda. Bapaya mingi bamonaki malamu bátika ekólo yango, mpe makambo ebebaki mingi na biteyelo mpe na balopitalo. Na nsima basakolaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami. Mpo na kobatela biso, bakonzi ya ministère de l’Éducation batindaki biso na engumba-mokonzi, Kampala. Kokende na Kampala esalisaki biso na ndenge mibale. Lokola toyebanaki mpenza te na Kampala, bato bazalaki kolandela biso te. Tozalaki na mingi ya kosala na lisangá mpe na mosala ya kosakola.
Bomoi na biso ekokanaki na ya Brian Wallace ná mwasi na ye Marion mpo bazalaki mpe na bana mibale; bango mpe bazwaki ekateli ya kotikala na Ouganda. Tozalaki na esengo mingi ya kosala na bango na lisangá ya Kampala na ntango wana ya mpasi. Tozalaki kolendisama mpenza ntango tozalaki kotánga masolo ya bandeko oyo bazalaki kosala na bikólo oyo mosala ya kosakola epekisamaki. Tozalaki koyangana na mwa bituluku ya mikemike mpe, mbala moko na sanza, tozalaki koyangana bato mwa mingi na jardin botanique ya Entebbe, mpe tozalaki kosala na boye ete bato bákanisa tozali kosala fɛti. Bana na biso bazalaki kosepela na yango.
Tosengelaki kozala na bokɛngi na mosala ya kosakola. Komona mindele bazali kokende kotala bato ya Ouganda na bandako na bango ekokaki kobenda likebi ya bato. Yango wana tozalaki kosakola na bamagazini, na baapartema mpe na bainivɛrsite. Lolenge moko oyo nazalaki kobanda masolo na bamagazini ezalaki ya kotuna eloko moko oyo nayebi ete esili, na ndakisa sukali to loso. Soki namoni ete motɛki azali komibanzabanza na ndenge mpasi ezali kokɔta na mboka, nazalaki mbala moko koyebisa ye nsango ya Bokonzi. Mayele yango ezalaki kosimba mpenza. Batɛki mosusu bazalaki kondima ete nazongela bango, mpe mbala mosusu bazalaki kokabela ngai mwa ndambo ya biloko oyo ezalaki komonana lisusu mpenza te.
Na ntango yango, mobulu ezalaki se kobakisama. Lokola boyokani ezalaki lisusu te na kati ya Ouganda ná Angleterre, bakonzi baboyaki nasala kɔntra ya sika. Yango wana na 1974, nsima ya kolekisa mbula mwambe na Ouganda, na mawa na motema, tokabwanaki na bandeko na biso. Kasi, elimo na biso ya misionɛrɛ ebungaki te.
Tokei na Nouvelle-Guinée
Na Yanuali 1975, tozwaki mosala na Papouasie-Nouvelle-Guinée. Tolekisaki mbula mwambe ya mosala ya esengo na mokili yango ya Pasifike. Tozalaki na boyokani malamu na bandeko mpe mosala na biso ya kosakola ezalaki mpenza kobota mbuma.
Libota mobimba totalelaka bambula oyo tozalaki na Papouasie-Nouvelle-Guinée lokola bambula ya badrame. Mbula na mbula, bazalaki kopesa biso mokumba ya kobongisa na bandeko mosusu drame ya liyangani ya etúká, mpe tozalaki kosepela mingi na bantango yango! Tozalaki kosangana na mabota mingi oyo bazalaki kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, mpe yango esalisaki mingi bana na biso na kokola na elimo. Mwana na biso ya liboso, Sara, abalaki mobongisi-nzela monene moko, Ray Smith, mpe bango mibale bakómaki babongisi-nzela monene pene ya Irian Jaya (lelo oyo Papua, etúká moko ya ekólo Indonésie). Kuna bazalaki kofanda na ndako ya ndɛlɛ na mwa mboka moko ya moke, mpe Sara alobaka ete ntango oyo balekisaki kuna ezalaki formasyo monene mpo na ye.
Makambo ebongwani
Nsima ya kolekisa mbula mwambe na Papouasie-Nouvelle-Guinée, baboti na ngai bakómaki na mposa ya bato mpo na kosalisa bango. Kasi, na esika biso tózonga na Angleterre, bandimaki tókende kofanda na bango na Australie, epai tokendaki na 1983. Balekisaki mpe mwa ntango elongo na ndeko na ngai ya mwasi, Daphne, oyo azalaki naino kofanda na Japon. Nsima ya liwa ya baboti na ngai, ngai ná Ann tozwaki ekateli ya kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe yango epesaki biso nzela ya kozwa mokumba oyo ebangisaki ngai mwa moke.
Ntango kaka tobandaki mosala ya mobongisi-nzela, basɛngaki ngai nazala mokɛngɛli ya zongazonga. Banda bomwana na ngai, ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá na biso, nazalaki komona yango likambo moko monene. Sikoyo, ngai moko nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Na misala nyonso oyo tosalaki tii na ntango wana, mosala ya zongazonga elekaki mpasi, kasi mbala na mbala Yehova azalaki kosalisa biso na ndenge oyo tomonaki naino te.
Ntango Ndeko Theodore Jaracz, mokɛngɛli ya zone, ayaki kotala filiale ya Australie na 1990, totunaki ye ayebisa biso soki tobongi lisusu na mosala ya zongazonga te mpo tokómi mibange. Atunaki biso ete: “Bokosepela kokende na Bisanga Salomon?” Nsukansuka, ntango ngai ná Ann tokómaki na mbula koleka 50, batindaki biso mpo na mbala ya liboso na mosala ya misionɛrɛ.
Tokómi kosala na “Bisanga ya Bisengo”
Bisanga Salomon eyebani mpe na nkombo ya Bisanga ya Bisengo; mpe tolekisi ntango moko ya esengo na boumeli ya mbula koleka 10 oyo tosali awa. Ngai ná Ann tomonaki boboto ya bandeko ya Bisanga Salomon ntango nazalaki mokɛngɛli ya etúká. Ndenge oyo bazalaki koyamba biso ezalaki mpenza kosimba mitema na biso, mpe bango nyonso bazalaki motema molai ntango nazalaki koloba na bango na lokota ya Pidgin, oyo ngai nazalaki kokanisa ete bazali koloba mwa malamu; monɔkɔ moko oyo ezali na maloba moke mpenza.
Ntango tokómaki na Bisanga Salomon, mwa moke na nsima, batɛmɛli bamekaki kopekisa biso kosalela ndako na biso ya Mayangani. Bato ya Lingomba ya Anglican bafundaki Batatoli ya Yehova na tribinale ete ndako na biso ya Mayangani ya sika na engumba Honiara ekɔtaki na mabelé na bango. Guvɛrnema elongisaki bango, kasi biso tomemaki likambo yango na Tribinale Monene. Soki kaka ekateli ya tribinale yango ekweisaka biso, tolingaki kobuka Ndako ya Mayangani ya bisika 1 200 oyo etongamaki sika.
Elekaki pɔsɔ mobimba mpo tribinale ekata likambo yango. Ntango avoka na bango azalaki kosamba, amonaki mpenza ete basí balongi. Kasi, avoka na biso, Ndeko Warren Cathcart oyo autaki na Nouvelle-Zélande, akweisaki efundeli na bango mokomoko. Mokolo ya mitano, nsango ya makambo oyo ezalaki koleka na tribinale epanzanaki, mpe bakonzi ya lingomba, bakonzi ya Leta, mpe bandeko na biso baklisto bayaki ebele na tribinale. Nazali koyeba lisusu libunga oyo basalaki na etanda oyo bakomaka makambo oyo bazali kosambisa na tribinale yango. Bakomaki ete: “Guvɛrnema ya Bisanga Salomon mpe Lingomba ya Mélanésie bazali kosamba na Yehova.” Tolongaki na likambo yango.
Kasi, mwa kimya oyo ezalaki ntango wana na Bisanga ya Bisengo eumelaki te. Na ekólo yango lisusu, mobulu mpe bitumba ebimaki mpo basoda babɔtɔlaki bokonzi. Lokola bikólo ndenge na ndenge ya mboka yango bazalaki koyokana te, nsukansuka bitumba ebimaki. Na mokolo ya 5 Yuni 2000, guvɛrnema ekweaki mpe barebɛlɛ bakɔtaki na mboka-mokonzi. Na boumeli ya mwa bapɔsɔ, ndako na biso ya Mayangani ekómaki esika ya kotya bato oyo bazalaki kokima bamboka na bango. Bakonzi bakamwaki komona ete bandeko na biso baklisto ya bikólo nyonso oyo ezalaki kowelana bafandaki esika moko na Ndako ya Makita mpe na kimya lokola libota moko. Likambo yango epesaki litatoli malamu mpenza!
Ata barebɛlɛ bamonaki mabe te ndenge Batatoli ya Yehova baboyaki kokɔta na kowelana yango. Kutu, mokonzi moko ya barebɛlɛ andimaki kopesa biso ndingisa ya koleka na motuka na ngámbo oyo banguna na bango bazalaki mpo tókende kotikela mwa etuluku ya bandeko mikanda mpe biloko mosusu. Ntango tokutanaki na bandeko yango oyo tokabwanaki na bango mwa basanza, biso nyonso totangisaki mpisoli.
Makambo mingi ya kotɔnda Yehova mpo na yango
Soki tokanisi bomoi na biso na mosala ya Yehova, tomonaka makambo mingi oyo tosengeli kotɔnda Yehova mpo na yango. Tozali na esengo ya komona bana na biso ná mibali na bango, Ray ná John, bazali kaka sembo na mosala ya Yehova. Basungaki biso mingi ntango tozalaki na mosala ya misionɛrɛ.
Banda mbula 12 sikoyo, ngai ná Ann tozali na libaku malamu ya kosala na biro ya filiale ya Bisanga Salomon, mpe na boumeli ya ntango yango, tomoni ndenge basakoli ya Bokonzi babakisami mbala mibale koleka ndenge bazalaki liboso, bakómi koleka 1 800. Eleki mwa ntango, nazwaki libaku mosusu ya kokɔta na kelasi mpo na basangani ya bakomite ya filiale, na Patterson, na etúká ya New York. Ya solo mpenza, tolekisi bomoi moko ya esengo mpe tozwi ebele ya mapamboli mpo tobatelaki elimo ya misionɛrɛ.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Nous sommes toujours allés de l’avant” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Yanuali 1977, ebimeli ya Lifalanse.
[Elilingi na lokasa 23]
Mokolo ya libala na biso, na 1960
[Elilingi na lokasa 24]
Na Ouganda, Stanley Makumba ná mwasi na ye, Esinala, bazalaki mpenza kolendisa libota na biso
[Elilingi na lokasa 24]
Sara azali kokɔta na ndako ya baninga ya kartye
[Elilingi na lokasa 25]
Nayemaki bililingi mpo na koteya bato ya Bisanga Salomon
[Elilingi na lokasa 25]
Na likita ná bandeko ya lisangá moko ya mosika na Bisanga Salomon
[Elilingi na lokasa 26]
Libota na biso lelo oyo