Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/2 nk. 4-5
  • Toutá wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toutá wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Biblia elobaka
  • Ndenge oyo biyano ya Biblia epesaka kimya ya solosolo
  • Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mozalisi oyo abongi kozwa lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nzambe azalaka? Koyeba yango ezali mpenza na ntina?
    Lamuká!—2015
  • Masese 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/2 nk. 4-5

Toutá wapi?

MPO NA NINI EYANO NA MOTUNA YANGO EZALI NA NTINA? Bateyá bato mingi ete bomoi awa na mabelé ebimá kaka boye, ete moto, ná makanisi na ye, mayele mpe mposa na ye ya koyeba ntina ya bomoi, autá na mwa eloko moko boye oyo ezalaki kobongwana tii ntango ekómaki makako, na nsima moto.

Kasi, kanisá naino: Soki ezali ya solo ete tobimá kaka boye mpe Mozalisi azali te, tolingaki kozala lokola bitike. Tolingaki kozanga moto oyo aleki biso na bwanya,​—oyo akoki kopesa biso toli to kosalisa biso tósilisa mikakatano na biso. Tolingaki kobanda kotalela kaka mayele ya bato mpo na kokima makama, kosilisa kowelana ya politiki mpe mikakatano mosusu.

Makanisi ya ndenge wana ekoki kopesa yo kimya ya solosolo? Soki te, tókanisa naino ete Mozalisi azali. Likanisi wana ekopesa biso esengo mpe ekosalisa biso tómona ete bomoi ezali na ntina.

Oyo Biblia elobaka

Biblia eteyaka ete bato bakelamá na Nzambe. Tobimá kaka boye te, kasi tozali bana ya tata moko ya bolingo mpe ya mayele. Yoká ndenge Biblia elobi na mikapo oyo elandi:

Genese 1:27. “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.”

Nzembo 139:14. “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.”

Matai 19:4-6. “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi mpe alobaki ete, ‘Mpo na ntina yango nde moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka’? Na bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka. Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”

Misala 17:24, 25. “Nzambe oyo asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, kozaláká, ndenge Ye azali, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ, mpe asalelamaka mosala na mabɔkɔ ya bato te lokola nde akelelaka na eloko, mpamba te ye moko moto apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.”

Emoniseli 4:11. “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”

Ndenge oyo biyano ya Biblia epesaka kimya ya solosolo

Koyeba ete “libota nyonso . . . na mabelé ezwi nkombo na yango” epai ya Nzambe esalisaka bato bákóma kotalela basusu na ndenge ebongi. (Baefese 3:15) Boyebi wana esalisaka biso mpe tómitalelaka biso moko mpe mikakatano oyo tozali kokutana na yango na ndenge ebongi. Ndenge oyo makanisi na biso ekozala:

Ntango tosengeli kozwa bikateli ya minene, tokobanda komitungisa koleka ndelo te mpo na makanisi ndenge na ndenge oyo bato bapesá. Tokolanda nde toli ya Biblia. Mpo na nini? Mpo “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—2 Timote 3:16, 17.

Ya solo, kolanda toli ya Biblia esɛngaka milende mpe komipimela makambo mosusu. Mbala mosusu, makambo oyo Biblia esɛngaka biso tósala ekoki koyokana te na makanisi ya motema na biso. (Genese 8:21) Nzokande, soki tondimi ete tokelamá na Tata moko ya bolingo oyo azali na likoló, tokondima mpe ete ye nde ayebi nzela eleki malamu oyo tosengeli kolanda. (Yisaya 55:9) Na yango, Liloba na ye elobi na biso boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Soki tolandi toli wana, tokobanda lisusu komitungisa mingi te ntango tokutani na mikakatano to tosengeli kozwa bikateli.

Ntango basusu bazali komona biso mpamba mpo tokeseni na bango, tokomona te ete tozali na nse na bango to tozali na ntina te liboso na bango mpo na mposo to ekólo na bango. Na esika ya kokanisaka bongo, tokomipesa nde lokumu. Mpo na nini? Mpo Tata na biso, Yehova Nzambe, “aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Koyeba bongo ekosalisa biso mpe tómonaka basusu mpamba te. Tokomona ete ezali na ntina te tókanisaka ete toleki bato ya mposo mosusu, mpamba te Nzambe “asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabelé.”​—Misala 17:26.

Na ntembe te, soki toyebi ete bakelaki biso mpe Mozalisi na biso akipaka biso malamu, tokozala na kimya ya solosolo. Kasi, ezali na makambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo tókoba kozala na kimya ya solosolo.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Moto abimá kaka boye?

[Elilingi na lokasa 5]

Koyeba ete Mozalisi akipaka biso ekoki kopesa biso kimya ya solosolo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto