Etanda ya makambo ezali na kati
15 Yanuali 2012
© 2012 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.
Nimero ya boyekoli
MASOLO YA BOYEKOLI
27 FEBWALI 2012-4 MARSI 2012
Bakristo ya solo bamemyaka Liloba ya Nzambe
LOKASA 4 • NZEMBO: 113, 116
5-11 MARSI 2012
Tósɛnzɛla lokola bantoma ya Yesu
LOKASA 9 • NZEMBO: 125, 43
12-18 MARSI 2012
Tókanga ntina ya ‘makambo ya ebandeli ya solo’
LOKASA 16 • NZEMBO: 107, 13
19-25 MARSI 2012
Tópesaka Yehova bambeka na molimo mobimba
LOKASA 21 • NZEMBO: 66, 56
26 MARSI 2012-1 APRILI 2012
Bonganga-nzambe moko ya bokonzi mpo na bolamu ya bato nyonso
LOKASA 26 • NZEMBO: 60, 102
NTINA YA MASOLO YA BOYEKOLI
LISOLO YA BOYEKOLI 1 NKASA 4-8
Lisolo oyo ekomonisa ndenge banda kala bakristo ya solo balukaka litambwisi ya Liloba ya Nzambe. Lisolo yango elobeli mokapo ya mobu 2012.
LISOLO YA BOYEKOLI 2 NKASA 9-13
Lisolo oyo elobeli mateya misato oyo tokoki kozwa epai ya bantoma mpe bakristo mosusu ya ekeke ya liboso na likambo etali kosɛnzɛla. Boyekoli yango esengeli kolendisa ekateli na biso ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe.
MASOLO YA BOYEKOLI 3, 4 NKASA 16-25
Mibeko ya Moize esɛngaki ete Bayisraele bápesaka Yehova bambeka. Bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te. Kasi lelo, Yehova azali kosɛnga basaleli na ye bámonisaka botɔndi epai na ye na balolenge mosusu. Masolo oyo ekolimbola ndenge Mibeko ya Moize esalisaka biso tósala yango.
LISOLO YA BOYEKOLI 5 NKASA 26-30
Bato basengeli mpenza kozongisa boyokani na Nzambe. Lisolo oyo emonisi ndenge bonganga-nzambe moko ya bokonzi ekosalisa na kozongisa boyokani yango, mpe elobeli ndenge ekopesa biso mapamboli.
MASOLO MOSUSU
3 Oyo ezali nimero ya boyekoli!
14 “Nakokoka kosakola ndenge nini?”
15 Tósala ete boyekoli na biso esepelisaka mpe esalisaka biso mpenza
EZIPELI: Wenze moko na engumba San Cristóbal de las Casas, na Mexique. Ndeko moko ná mwasi na ye, oyo bazali babongisi-nzela, bayekolaki monɔkɔ ya Tzotzil mpe bazali koteya libota moko na monɔkɔ yango
MEXIQUE
MOTÁNGO YA BATO
108 782 804
BASAKOLI
710 454
MOSALA YA KOBONGOLA
Minɔkɔ 30 ya mboka