Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 2 nk. 6-7
  • Ntango ndeko to moninga na yo akufi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango ndeko to moninga na yo akufi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDENGE OYO BATO MOSUSU BASALAKI
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Ndenge ya komesana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lisalisi mpo na baoyo bazali kolela
    Lamuká!—2011
  • Ndenge ya kosala ntango ozali na mawa makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 2 nk. 6-7
Mwasi ná mobali oyo bazali na mawa batɛlɛmi pene na mai, basimbani mpe bazali kotala mosika

Ntango ndeko to moninga na yo akufi

“Nayebaki eloko ya kosala te ntango yaya na ngai ya mobali akufaki na mbalakaka. Nsima ya basanza, ezalaki kokómela ngai nabanda mbala moko kokanisa ye mpe ezalaki kosala ngai mpasi lokola bazali kotuba ngai mbeli na motema. Ntango mosusu mpe nazalaki koyoka nkanda. Nazalaki komituna mpo na nini akufaki. Nazalaki komipesa foti mpo nasalaki makasi te nalekisaka na ye ntango mwa mingi ntango azalaki na bomoi.”​—Vanessa, na ekólo Australie.

SOKI esilá kokómela yo obungisa moto na liwa, mbala mosusu yo mpe ozalaki koyoka ntango mosusu mawa, ntango mosusu lokola ozali kaka yo moko, mpe ntango mosusu lokola nde moto ya kosalisa yo azali te. Mbala mosusu mpe ozalaki koyoka nkanda, komipesa foti, to mpe kobanga. Ekoki mpe kozala ete ozalaki komituna soki kozala na bomoi ezali kaka na ntina.

Ya liboso, yebá ete koyoka bongo ezali mabe te. Elakisaka kaka ete olingaki mpenza moto wana. Kasi, okoki kosala nini mpo mpasi wana eleka makasi te?

NDENGE OYO BATO MOSUSU BASALAKI

Ata soki ozali koyoka lokola mpasi yango ekosila te, mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo:

ZALÁKÁ NA “NTANGO YA KOLELA”

Bato nyonso bayokaka mawa ndenge moko te mpe baumelaka na mawa mikolo ndenge moko te. Kasi, kolela ekoki kosalisa yo obimisa mpasi oyo ozali na yango na motema. Vanessa alobi lisusu boye: “Ntango mosusu nazalaki kaka kolela; nazalaki na mposa ya kobimisa mpasi wana.” Sofía, oyo ndeko na ye ya mwasi akufaki na mbalakaka, alobi boye: “Soki nakanisi likambo yango, nazalaki koyoka mpasi makasi, lokola nde bazali kofungola mpe kosukola mpota. Esalaka mpasi makasi, kasi esalisaka mpo mpota yango esila.”

LOBÁKÁ NDENGE OYO OZALI KOYOKA

Toboyi te, ntango mosusu okoki kosepela ozala kaka yo moko. Kasi, mpasi ya motema ezali kilo oyo moto asengeli komema ye moko te. Jared, elenge ya mbula 17 oyo tata na ye akufaki, alobi boye: “Nazalaki koloba ndenge oyo nazalaki koyoka. Nayebi te soki bato bazalaki kokanga ntina ya makambo nazalaki koloba, kasi nazalaki koyoka malamu lokola nazalaki koloba.” Janice, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, abakisi likambo moko: “Kosolola na bato mosusu ezalaki mpenza kokitisa ngai motema. Nazalaki komona ete bato yango bazalaki komitya na esika na ngai, mpe nazalaki koyoka te ete nazali kaka ngai moko.”

NDIMÁ BÁSALISA YO

Monganga moko alobi boye: “Moto oyo ndeko to moninga na ye akufi, oyo andimaka básalisa ye ntango [mpasi] ezali naino na ebandeli, azalaka na makasi ya kokende liboso ntango mpasi yango ezali kobongwana.” Yebisá baninga makambo oyo bakoki kosalela yo; ntango mosusu bakoki kozala na mposa ya kosala eloko moko, kasi bazali koyeba te nini basengeli kosala.​—Masese 17:17.

KANGAMÁ NA NZAMBE

Tina alobi boye: “Ntango mobali na ngai akufaki na mbalakaka na maladi ya kanser, ngai ná ye tokokaki lisusu kosolola te; yango wana nakómaki koyebisa Nzambe makambo na ngai nyonso! Na ntɔngɔ ntango nalamuki, nazalaki kosɛnga ye apesa ngai makasi ya kosala misala na ngai. Nzambe asalelá ngai makambo mingi, likoki ya kotánga yango nyonso ezali te.” Tarsha, oyo azalaki na mbula 22 ntango mama na ye akufaki, alobi boye: “Kotánga Biblia mokolo na mokolo ezalaki kopesa ngai makasi. Nazalaki kozanga te kozwa mwa likanisi oyo ekolendisa ngai.”

KANISÁKÁ NTANGO BATO OYO BAKUFÁ BAKOSEKWA

Tina abakisi boye: “Na ebandeli, elikya wana ezalaki kolendisa ngai te mpo nazalaki na mposa namona mobali na ngai kaka na ntango wana mpe bana bazalaki na mposa bámona tata na bango. Kasi sikoyo, nsima ya mbula minei, elikya yango ekómá lokola nsinga oyo nasimbi makasi mpo mai emema ngai te. Nakanisaka ntango nakomona ye lisusu, mpe yango epesaka ngai kimya ná esengo!”

Mpasi na yo ekoki kolimwa na mbala moko te. Kasi, makambo oyo Vanessa alobi ekoki kopesa yo makasi. Alobi boye: “Okoki kokanisa ete okozala na bomoi ya mawamawa mpo na libela; kasi okomona ete mokemoke, esengo ebandi kozonga.”

Kobosana te: mposa ya komona moto oyo akufaki ekosila te na motema na yo; kasi, elakisi te ete bomoi na yo ezali lisusu na ntina te. Nzambe akoki kosalisa yo, okoki kozala na baninga ya malamu mpe kozala na bomoi ya esengo. Longolá yango, mokolo oyo Nzambe akosekwisa bato oyo bakufá ezali lisusu mosika te. Alingi oyamba lisusu ndeko to moninga na yo. Mokolo wana, mpasi ya motema na yo ekolimwa libela!

Makanisi ya Biblia oyo ekoki kosalisa

Nzambe ayebi mpasi mpe kolela na yo.

Mokomi moko ya Nzembo alobaki na Nzambe boye: “Tyá mpisoli na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama. Yango ezali na kati ya buku na yo te?”​—Nzembo 56:8.

Okoki koyebisa Nzambe nyonso oyo ozali na yango na motema.

“Nakobaki koyebisa [Nzambe] mpasi na ngai . . . Ee Yehova,a nabelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.”​—Nzembo 142:2, 5.

Okoki kozala na elikya.

“Lisekwa ekozala.”​—Misala 24:15.

Nzambe alaki ete akosekwisa bato ebele oyo bakufá, mpe azali na mposa makasi ya kosala yango.b​—Yobo 14:14, 15.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia.

b Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na lisekwa, talá buku Sepelá na bomoi libela na libela! liteya 30, ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe okoki kozwa yango ofele na site Internet www.pr2711.com.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto