Tólendisa bazalani na biso ete bákóma bayekoli na ye
1 Paulo akomaki, na 1 Bakolinti 3:6 ete: “Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki.” Asalelaki elakiseli wana mpo na kosalisa bandeko na ye ete bákanga ntina ya kosala kati na bomoko na nsé na litambwisi ya Klisto. Na maloba wana, asalisaki mpe bango na koyeba mokumba monene oyo bazali kokokisa kati na mosala ya ntina oyo etali kolóna mpe komwangisa mai.
2 Mosala oyo ya lobiko esengeli kosila na eleko na biso. Biso baoyo tozali baklisto, tozali na mokumba ya kosalisa bazalani na biso ete bákóma bayekoli ya Yesu. (Mis. 13:48) Lolenge nini tosengeli kolandela bosepeli oyo emonisamaki na nzela ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
3 Soki tozongi kotala moto oyo andimaki buku, tokoki koloba ete:
◼“Mbala ya nsuka oyo tomonanaki, tosololaki na ntina na lolenge ya moto oyo Yesu azalaki. Nasepelaki kotikela yo buku moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Eloko nini esimbaki yo mingi koleka kati na mateya mpe bomoto ya Yesu?” Tiká ye ayanola. Kendá na mokapo 113, mpe lobelá ndakisa kitoko ya komikitisa oyo Yesu atikaki. Tangá Bafilipi 2:8 mpo na komonisa lolenge ntoma Paulo azalaki kotalela elimo ya komikitisa ya Yesu. Na bongo, tokoki koloba sikisiki ete likoki ezali ya koyeba lisusu makambo mingi na lisalisi ya boyekoli ya Biblia mbala na mbala.
4 Tokoki mpe koloba ete:
◼“Tolobelaki misala oyo Yesu asalaki na ntango azalaki na mabelé oyo mimonisaki ete azalaki mpenza komibanzabanza mpo na biso. Mpo na yo, na nsuka akosala nini mpo na kobikisa baoyo banyokwami mingi?” Tiká ye ayanola. Fungolá buku na mokapo 133, mpe talelá makanisi ya paragrafe ya mitano. Lakisá elilingi ya lokasa lolandi mpe limbolá soki bomoi ya lolenge nini ekozala na ntango mokano ya Nzambe ekosalema na mabelé lokola yango ezali kosalema sikawa na likoló. Lobelá mingi matomba oyo tokoki komizwela na koyekoláká yango mingi koleka.
5 Soki bosepeli ezalaki moke mbala eleki mpo na kolakisa buku, mbala mosusu ekoki kosalema ete obanda lisolo na lolenge oyo:
◼“Nakanisi ete tozali na likanisi moko mpo na koloba ete bato mingi bazali lelo kotambwisa bomoi na bango na kolanda moto moko oyo bazali kotalela lokola ndakisa. Yesu Klisto azali ndakisa eleki kitoko kati na bandakisa nyonso oyo tokoki kolanda. Nalingi koyebisa yo liteya moko ya ntina oyo ngai nasili kozwa wana nayekolaki ndakisa oyo Yesu atikaki. [Kendá na mokapo 40 ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso mpe bendá likebi likoló ya liteya malamu ya motema mawa na Yesu.] Yango ekundwelaki ngai na nguya nyonso na meko nini esengeli na ngai komonisa ezaleli wana epai na bazalani na ngai.” Tangá Matai 5:7. Soki bosepeli emonani ete ebandi kobakisama mwa mingi sikawa, lakisá ye buku yango, to mwa buku Nzambe azali komibanzabanza mpenza mpo na biso?
6 To mbala mosusu tokolinga komeka lolenge oyo ya pɛtɛɛ mpo na kobanda lisolo:
◼“Mbala ya nsuka oyo nayaki, tolobelaki ntina ya koyekola koyeba Yesu. Tozali kotánga kati na Yoane 17:3 ete kozwama ya boyebi wana ‘elimboli bomoi ya seko.’ Lolenge nini tokoki kozwa yango?” Tiká ye ayanola. Kobá na kolimboláká lolenge nini boyekoli ya Biblia esalemaka mpe lolenge nini kozwela yango litomba.
7 Paulo alobi ete mobuki-mbuma moko na moko “akozwa libonza na ye pelamoko na mosala na ye.” (1 Kol. 3:8) Soki tozali kosala makasi mpo na kosalisa na molende nyonso bazalani na biso ete bákóma bayekoli na Klisto, na ntembe te mbano na biso ekozala monene.