Tóbyanga bazalani na biso ete bálanda moto oyo alekaki bato nyonso
1 Engebene Matai 5:14, Yesu alobaki epai ya bayekoli na ye ete: “Bino bozali [pole, NW] na mokili.” Bango basengelaki kolobela bipai binso Bokonzi ya Yehova mpe bibongiseli bitondi na bolingo oyo akamataki mpo na lobiko, na nsima ya Yesu. Koyebáká mokumba wana kati na makanisi, tokokabola buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo na sanza ya Yuni. Talá mwa makanisi oyo tokolinga mbala mosusu kolanda.
2 Nsima ya komiyebisa, tokoki koloba makambo oyo malandi na maloba na biso moko:
▪“Bato mingi bazali komituna soki Yesu azalaki moto ya lolenge nini na ntango azalaki na bomoi awa na mabelé. Na makanisi na yo, kati na makambo nini akesenaki na bato mosusu? [Tiká ete ayanola.] Buku oyo kitoko, Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ezali kolobela makambo minene ya bomoi na ye mpe ya mosala na ye mpe ezali kopesa biso likoki ya kososola mpo na koyeba moto ya lolenge nini ye azalaki. Nsima ya kotánga yango, basusu bazwaki liyoki ete bauti kozala na ye esika moko, ete bamonaki mosala na ye.” Bendá likebi likoló na elilingi ya liboso ya buku esika motó na likambo ezali. Na nsima, monisá maloba ya ebandeli, mpe tángá paragrafe ya mibale na nsé na motó na likambo moke “Toluka koyeba Yesu mpo na bolamu na biso.” Soki moto yango asepeli, meká kolakisa ye buku yango.
3 Tokoki mpe koloba ete:
▪“Na komonáká makambo mabe nyonso oyo mazali kobima na bisika nyonso kati na mokili, basusu bazali komituna mbala mosusu soki Yesu azali mpenza komibanzabanza mpo na biso. Yo okanisi nini mpo na yango?” Tiká moto yango ayanola. Fungolá buku Moto oyo alekaki bato nyonso na mokapo 24 mpe monisá na mokuse ntina oyo Yesu ayaki awa na mabele. Nsima na yango tangá Yoane 15:13 na kolobeláká mingi bolingo ya solo ya Yesu mpo na bazalani na ye. Tóluka ete tózala na bazulunalo ya sika, mwa buku moko to trakte moko ebongi, mpo na kolakisa yango epai na moto yango soki aboyi kozwa buku.
4 Talá likanisi mosusu:
▪“Bilenge mingi balukaka ndakisa moko mpo na kolanda, kasi bandakisa malamu ezalaka mingi te. Yesu Klisto atikelaki biso nyonso ndakisa moko ya kokoka. [Tangá 1 Petelo 2:21.] Bomoi na ye mobimba etongamaki likoló na losambo oyo azalaki kopesa epai na Tata na ye ya likoló. Na likanisi na yo, nini ekokaki kosalema soki bato mingi basalaki milende mpo na komekola ye?” Tiká moto yango ayanola. Bótalela paragrafe ya misato ya lokasa lozwami liboso na oyo ya nsuka ya buku, epai kuna bizaleli na Yesu bimonisami. Limbolá ndenge nini buku moto oyo alekaki bato nyonso ekoki kosalisa moko na moko kati na biso mpo na kokóma baklisto malamu koleka.
5 Mbala mosusu tokosepela kosalela likanisi moko lokola oyo:
▪“Na ntango bazali kolobela Yesu Klisto, bato mingi bazali kotalela ye, lokola elɛzi, lokola moto oyo azali kobunda na mpasi ya liwa. Likanisi na bango na ntina na Yesu esuki bobele na kobotama na ye mpe na kufa na ye. Mbala mingi balobelaka te makambo kitoko oyo alobaki mpe oyo asalaki na boumeli ya bomoi na ye. Oyo asalaki etaleli bato nyonso oyo bazalaki na bomoi ezala kala to sikawa. Yango wana ezali na ntina ete tóluka koyeba mingi likoló na makambo ya kokamwa oyo ye asalaki mpo na biso.” Tangá Yoane 17:3. Monisá lokasa ya liboso ya maloba na ebandeli ya buku moto oyo alekaki bato nyonso mpe tangá paragrafe ya minei. Yebisá sikisiki ete likoki ezali ya komizwela buku oyo mpe monisá lolenge nini kosalela yango mpo na boyekoli ya moto ye moko.
6 Tóbosana te kokoma bosepeli oyo emonisamaki mpe mikanda oyo totiki, mpo na kosala bozongeli ya sika. Lokola ntango ezali naino, tóluka na molende nyonso bato ya motema sembo, mpe tósalisa bango ete bákóma bayekoli ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto.—Mat. 16:24.