Tózalaka ntango nyonso na mosala mingi
1 Basaleli ya Yehova bazalaka na mosala mingi. Bazali na ebele ya mikumba ya kokokisa kati na mabota na bango, na misala na bango mpe na eteyelo. Longola nyonso wana, bazali ntango nyonso na “mosala mingi kati na mosala ya Nkolo.” (1 Kol. 15:58) Esengeli na biso kobongisa makita ya lisangá oyo masalemaka pɔsɔ na pɔsɔ mpe koyangana na yango. Tolendisami ete tólekisa pɔsɔ moko te kozanga kosangana na mosala ya kosakola. Tosengeli komibombela mpenza ntango mingi mpo na koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ biso moko mpe kati na libota. Bankulutu mpe basaleli na misala bazali na ebele ya mikumba kati na lisangá. Mbala mosusu, esɛngamaka ete tósalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi.
2 Na bantango mosusu, ekoki kokóma basusu kati na biso bámiyoka ete makambo ya kosala maleki mingi. Nzokande, bato oyo bazalaka na mosala mingi bakoki kozala kati na baoyo baleki kozala na esengo, soki bazali na bokatikati mpe na makanisi malongobani.—Mos. 3:12, 13.
3 Ntoma Paulo azalaki moto oyo azalaki na mosala mingi. Longola likambo oyo ete azalaki kokokisa bamposa na ye na kosaláká bahema, amipesaki mingi kati na mosala koleka bantoma mosusu. Amimonisaki ete azalaki mopalanganisi ya nsango malamu oyo alɛmbaka te, na kosakoláká liboso na bato mpe na ndako na ndako, kozanga komonisa bopɔtu mpo na mikumba na ye ya mobateli kati na etonga. (Mis. 20:20, 21, 31, 34, 35) Atako azalaki na makambo mingi ya kosala, Paulo azalaki ntango nyonso pene na kosala mingi kati na mosala na ye mpo na Yehova.—Talá Baloma 1:13-15.
4 Paulo abatelaki bokatikati na ye mpe motema ya esengo na kotyáká motema likoló na nguya oyo Yehova akokaki kopesa ye. Na miso na ye, mosala na ye mpo na Nzambe ezalaki na ntina mingi mpe azalaki kozwa bosepeli mingi na ntina na yango. (Filp. 4:13) Ayebaki ete Nzambe akobosana mosala na ye te. (Ebe. 6:10) Esengo ya kosalisa bazalani na ye ete báyeba Yehova ezalaki na bopusi likoló na ye. (1 Tes. 2:19, 20) Kondimisama oyo azalaki na yango ya komona kokokisama ya elikya na ye oyo ezwaki moboko likoló ya Biblia ebatelaki molende na ye.—Ebe. 6:11.
5 Bobele bongo, tótalela bolamu oyo mosala na biso ekoki kopesa biso. Kozala na biso mpe kosangana na biso na makita pɔsɔ na pɔsɔ ezali kolendisa biso mpe ezali koyikisa basusu mpiko. (Ebe. 10:24, 25) Milende ya sembo oyo tozali kosala mpo na koyebisa nsango malamu epai na bato nyonso ezali kopesa nzela ete lisangá ekola, mpamba te tozali kobatela bosepeli oyo bato bazali komonisa mpe tozali kosalisa bato na sika ete básangana elongo na biso. (Yoa. 15:8) Na kosungáká baoyo bazali na mposa ya lisalisi, tozali koyeisa makasi bikanganeli na biso mpe tozali kopesa nzela na elimo ya boyokani kati na lisangá (Yak. 1:27) Oyo eleki mpenza, na ndakisa ya Paulo, tóbosana soki moke te ete na komipesáká mingi na misala malamu tozali kosepelisa Yehova Nzambe. Tozali kotala likambo ya kosalela ye ete ezali libaku moko kitoko. Mpo na biso, lolenge mosusu ya bomoi ya malamu koleka yango ezali te.
6 Na kozaláká na mosala mingi, tozali komizwela bolamu mosusu. Ntango ekomonana ete ezali koleka nokinoki wana tozali kolanda ebongiseli moko malamu ya elimo. Na koyebáká ete mokolo na mokolo oyo mozali koleka mozali kobɛlɛmisa biso na mokili ya sika, tokondima na esengo nyonso bomoi ya kosepelisa oyo tozali na yango sikawa. Tozali lisusu koyeba ete ezali likambo ya mayele kozala na mosala mingi, mpo ete tozali na ntango mingi te ya kolanda mikano mpamba ya mokili oyo.—Ef. 5:15, 16.
7 Ya solo, mosala mozali mingi kati na mosala ya Nkolo. Kasi tokoki kozala na esengo soki tokobi kotya motema epai na Yehova Nzambe mpe epai na Yesu Klisto, baoyo bazali kobɔndisa biso mpe bazali kopesa biso mbano.—Mat. 11:28-30; 1 Yoa. 5:3.