Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/95 lok. 3
  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 12/95 lok. 3

Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babuku ezali ya kokangama, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 4 Sɛtɛmbɛ kino na pɔsɔ ya 18 Desɛmbɛ 1995. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso miye mipesami. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso mizali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. “Mwana mobali” oyo alobelami na Yisaya 66:7 emonisi kobotama ya libota ya elimo ya baklisto bapakolami na 1919, kasi emonisi te kobotama ya Bokonzi ya Masiya na 1914. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89 1/9 lok. 18.]

2. Yisaya 38:5 ezali kosalisa biso na kososola ete malɔmbɔ oyo masalemi na bosolo nyonso makoki kopusa Yehova na kosala likambo oyo mbɛlɛ akokaki kosala yango te soki obondelaki ye te. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/4 lok. 14.]

3. Moto, ekelamu na bolɛmbu awa na mabele, akoki kosepelisa Mozalisi ya molɔngɔ mobimba to mpe koyokisa ye mawa. (Yis. 63:10) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 15/6 lok. 15]

4. Yilimia 1:5 elongisi likanisi oyo limonisami na Biblia ete bomoi ebandaka uta ntango mwasi abandi zemi. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá wF89 15/6 lok. 29]

5. Yisaya 53:5, 12 esakolaki ete Yesu Klisto asengelaki kokufa lokola mbeka na lisiko mpo na masumu ya basusu. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/10 lok. 14.]

6. Yisaya 48:17 ezali mpenza koyebisa biso ete tósalela Liloba ya Nzambe kati na bomoi na biso mpe tósosola biso moko ete mitindá oyo mizwami kati na yango mizali kopesa matomba. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/3 lok. 12]

7. Atako Batatoli ya Yehova basanganaka te na mitindo nyonso ya makambo ya politiki, nzokande bapekisaka basusu te ete bákɔta na etuluku moko boye ya politiki, to básala bowelani mpo na kozwa ebonga kati na bokonzi, to bápona moto moko na ntango ya vɔti.[uw lok. 166 par. 12]

8. Basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso na eleko ya Klisto bayebaki te mokili ya sika oyo tozali kolikya kozwa yango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/2 lok. 11]

9. Siruse akómaki “mopakolami” na Yehova, atako ezali na elembeteli moko te oyo emonisi ete basopaki mafuta likoló na motó na ye. (Yis. 45:1) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 15/11 lok. 30.]

10. Mpo na kosalela Nzambe na bokangami makasi, baklisto basengeli koyeba mokolo mpe ngonga oyo Yehova akolongola ebongiseli ya Satana awa na mabele. [uw lok. 176 par. 2]

Yanolá na mituna milandi:

11. Ntango nini moklisto asengeli kosolola na monganga na ye na ntina na ekateli oyo azali na yango ya koboya makila? [uw lok. 158 par. 9]

12. Na lolenge nini Yesu asanganaki na mokili te? [uw lok. 161 par. 2]

13. Kolobela Liloba ya Nzambe na mpiko nyonso elimboli nini te? [uw lok. 175 par. 13]

14. Soki tondimi mpenza nsango malamu, mokumba nini tozali na yango? [uw lok. 169 par. 2]

15. Kati na mabota nyonso oyo mazali awa na mabele, wapi ‘libota na boyengebene oyo lizali kobatela etamboli ya sembo’ liboso na Nzambe, mpe banani bazali kobakisama na libota yango? (Yis. 26:2, 15) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/1 nk. 10-11.]

16. Engebene Yisaya 32:1, 2, wapi mokumba ya liboso bankulutu bazali na yango? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 1/4 lok. 30.]

17. Mateya mauti na Nzambe mabimisi matomba nini ya polele kati na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba? (Yis. 54:13) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 1/3 lok. 17.]

18. Baevanzile nini misato mpe mikapo nini na yango milobeli elembo oyo esangisi makambo ndenge na ndenge ya komonisa “nsuka ya ebongiseli ya biloko”? [uw lok. 178 par. 5]

19. Mpo na nini, kati na lisolo na ye ya kala, Senakeliba akokaki te komikumisa na kolonga Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda, lolenge amikumisaki ntango alongaki Lakisi, engumba makasi ya Yuda? (Yis. 37:36) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 1/6 lok. 6.]

20. Kati na Yisaya 27:1, “Lewiatana” ezali elilingi ya nani mpe ya nini? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá wF86 15/8 lok. 31.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Ntango moklisto akɔti lopitalo, asengeli koyebisa na nzela ya ․․․․․․․ ete makila másalelama te epai na ye, mpe asengeli ye moko ․․․․․․․ na ntina na yango epai na monganga oyo akobanda kosalisa ye. [uw lok. 158 par. 9]

22. Mitindo mibale ya komonisa ete tozali kotya motema epai na Yehova ezali koyangana ntango nyonso na ․․․․․․․ mpe ya komibalola mbala na mbala epai na ye na nzela ya ․․․․․․․ . [uw nk. 170-171 par. 5-7]

23. Yesu azalaki ․․․․․․․ mpo na Bayuda, kasi akómaki ․․․․․․․ ya moboko oyo likoló na yango Yehova atongi ndako na ye ya elimo mpo na kokokisa Yisaya 8:14 mpe 28:16. [si lok. 116 par. 36]

24. Eyangeli oyo elobelami na Baefese 1:9, 10 etongami likoló na ․․․․․․․, mpe na nzela na ye bato bazwi likoki ya ․․․․․․․ liboso na Nzambe; bamoko bazali na elikya ya kokende na ․․․․․․․, basusu na elikya ya kofanda awa na ․․․․․․․. [uw lok. 186 par. 6]

25. “Bana na Nzambe” oyo balobelami na Baloma 8:19-21 bazali bana bapakolami na elimo oyo basili kozwa mbano na bango na ․․․․․․․, mpe bakomonisama ntango bato awa na ․․․․․․․ bakomona polele ete bana yango babandi mosala, kosanganáká na Klisto mpo na ․․․․․․․ ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. [uw lok. 188 par. 11]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. Baklisto ya liboso bafingamaki ete bazali bayini na bato mpo ete (bazalaki te kosolisa bato bazangi kondima; bazalaki te kosambela bikeko; baboyaki kominanola ya mobulu mpe ya mbindo). [uw lok. 163 par. 7]

27. Kati na lisese ya Yesu oyo lizali na Matai 13:36-43, nganu ezali elilingi ya (bato ya sembo na ntango ya kala, ebele monene; baklisto bapakolami), nzokande matiti mabe mazali komonisa (bato nyonso oyo bazangi kondima; baklisto ya lokuta; bakomeli mpe Bafalisai). [uw lok. 179 par. 7]

28. Nsima wana bakonzi ya politiki bakoboma mangomba ya lokuta, bakobalukela na kotumola nyonso (ebongiseli ya mombongo; Mabota Masangani; baoyo bazali kosimba bokonzi ya Yehova). [uw lok. 182 par. 13]

29. na 1914, ezalaki na bato soko (1100; 5100; 10100) oyo bazalaki kosakola na molende. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 1/9 lok. 16]

30. Toyebi lisolo ya bomoi ya Yilimia malamu koleka oyo ya basakoli mosusu nyonso ya kala, longola bobele ya (Danyele; Yisaya; Mose). [si lok. 118 par. 6]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Lev. 17:11, 12; Yis. 43:10; Yil. 7:31; Yoa. 8:41, 44, 47; Mis. 4:13

31. Kozanga kotánga kelasi mingi esalaka te ete moto azanga makoki ya kokóma mosakoli ya mpiko ya nsango malamu. [uw lok. 172 par. 8]

32. Kosalelama bobele moko ya makila kati na Makomami ezali mpenza komonisa ezaleli na yango ya bulɛɛ mpe ezali kolakisa polele motuya ya mbeka ya Klisto. [uw lok. 159 par. 11]

33. Bobele maloba te, kasi misala ya moto mpe elimo na ye ezali komonisa polele nani azali tata na ye ya elimo. [uw lok. 186 par. 5]

34. Yehova akitanaki moto moko te; ezali ata na nzambe moko te oyo azalaki liboso na ye, mpe ekozala ata na nzambe moko te na nsima na ye mpo ete azali seko na seko, Mokonzi Monene. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 15/1 lok. 22.]

35. Mikóló mingi na mikolo ya lelo bakoki ata moke te kokaba bana na bango lokola mbeka epai na bikeko, nzokande bamilio mingi ya bana bazali kobomama na nko nyonso na nzela ya kolongola zemi, mpe bamilio ya bilenge basili kopesama lokola mbeka wana batindamaki na bitumba mpe babungisaki bomoi na bango kuna. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá wf88 15/1 lok. 31.]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto