Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/97 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Osili komibongisa mpo na likama?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Makambo ya kosala mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Salisá basusu báyika mpiko na ntango ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mosala ya kosunga bandeko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 3/97 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Esengeli kosala nini ntango likámá liuti na biloko bizalisami likweli bandeko na biso?

Soki likámá liuti na biloko bizalisami likwei na esika bofandi: Bóbanga te. Bózala kimya mpe bótalela mpenza likambo oyo lileki ntina: bomoi, kasi biloko ya mosuni te. Bópesa lisungi ya lombangu oyo mabota na bino mazali na mposa na yango. Na nsima, bóyebisa na bankulutu ezalela na bino mpe esika bozali.

Bankulutu mpe basaleli na misala bazali na mokumba monene kati na ebongiseli ya kopesa lisungi. Soki mobulungano moko eyebisami, na ndakisa mipepe makasi, bandeko yango bakosala na boye ete moto nyonso azala na esika ya libateli mpe, soki ntango ezali, bakoluka bilei mpe bakokabola yango.

Na nsima, batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli koyeba esika libota mokomoko ezwami mpe ezalela na yango. Esengeli koyebisa na mokɛngɛli-mokambi to nkulutu mosusu ezalela ya libota mokomoko, ata soki manso mazali kotambola malamu. Soki moto moko azoki, bankulutu bakozwa bibongiseli mpo ete azwa lisalisi. Bakopesa mpe biloko ya mosuni oyo bisengeli, na ndakisa: bilei, bilamba, esika ya kolala to bisaleli ya ndako. (Yoa. 13:35; Gal. 6:10) Soki likámá esɛngi kolongwa na esika yango, lokola yango esalemaki kala mingi te na ɛ́sti ya Zaïre, ekozala malamu ete bandeko bázala esika moko, na litambwisi mpe libateli ya nkulutu moko. Ekozala malamu te ete mabota mákabwana mpe mápanzana. Bankulutu ya esika yango bakopesa lisungi ya elimo na lisangá, soki likoki ezali, nokinoki bakokamata bibongiseli mpo na kosala makita. Nsima ya kotalela malamumalamu ezaleli yango, nkulutu moko asengeli, na nkombo ya lisangani ya bankulutu, kosolola na mokɛngɛli ya zongazonga mpo na koyebisa ye soki bato mosusu bazoki, soki Ndako ya Bokonzi ebebi to mpe bandako ya bandeko ibebi, bakisá mpe bamposa mosusu ya bandeko. Mokɛngɛli ya zongazonga akosolola na filiale na nzela ya telefone mpo na kosala lapólo ya likámá yango. Soki esengeli kokamata meko minene, filiale ekotalela makambo matali kopesa lisungi.

Soki likámá liuti na biloko bizalisami likwei na esika mosusu: Tókanisa bandeko na biso basi mpe mibali kati na mabondeli. (2 Kol. 1:8-11) Soki tolingi kopesa bango lisungi ya mosolo, tokoki kotinda makabo na biso epai ya la Société, epai kuna mosolo oyo molɛngɛlami mpo na likambo yango mozali. Talá adrɛsi: Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre. (Mis. 2:44, 45; 1 Kol. 16:1-3; 2 Kol. 9:5-7; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛ́mbɛ 1985, nk. 20-22, ebimeli ya Lifalansé.) Kotinda eloko moko te na esika oyo likámá likwei, lobá bobele soki bandeko oyo bazali kotalela makambo matali lisungi basɛngi bino yango. Na bongo, lisungi likopesama na lolenge lobongi, mpe biloko bikokabolama malamu. (1 Kol. 14:40) Kobénga la Société na telefone mpambampamba te, zambi yango ekoki kotya mikakatano mpo na kozwa bambela (appels) oyo ezali kouta na esika likámá likwei.

Nsima ya kotalela malamumalamu likambo yango, la Société akoyeba soki esengeli kosala komité moko mpo na kopesa lisungi. Bakoyebisa na bandeko oyo batalelami na mokumba yango. Mokomoko asengeli kosala elongo na bankulutu oyo bazali kotambwisa makambo mpo ete bamposa ya bandeko nyonso ekokisama na lolenge lobongi.​​​—Talá búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nk. 310-315.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto