Makita ya mosala mpo na Febwáli
Pɔ́sɔ ebandi na 3 Febwáli
10 mn: Mayebisi. Pesá mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapólo ya lisangá mpo na sanza ya Yanuáli.
20 mn: “ ‘Kondima kati na Liloba ya Nzambe’—Liyangani ya etúká 1997.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Bongisá elakiseli ya miniti 5 oyo ekomonisa tata ya libota azali kosolola na bato ya ndako na ye na ntina na bibongiseli oyo bakozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká.
15 mn: “Tobongisami mpe tokoki mpo na koteya basusu.” (par. 1-6) Lobelá na mokuse baparagrafe 1-2 na kobɛtáká nsɛ́tɛ likoló na ntina ya kotya motema ete na lisalisi ya Yehova tokoki koteya basusu malamu. Mpo na baparagrafe 3-6, lɛngɛlá bilakiseli mibale oyo bikosalema mbala mibale mibale oyo bikomonisa lolenge ya kotambwisa bosololi ya liboso mpe kosala bozongeli ya sika. Kundwelá na basakoli ete ntango tozali kotika mikanda epai na bato, ezali malamu koyebisa bango ete tozali na esengo ya kondima makabo na bango mpo na mosala oyo mozali kosalema na mokili mobimba.
Loyembo 14 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 10 Febwáli
Loyembo 16
15 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti. Lobelá makanisi mauti na bazulunalo ya sika oyo ekoki kosalelama mpo na kobanda lisoló. Pesá makanisi likoló na lolenge oyo tokoki komimonisa epai na moto mpo na kopesa ye litatoli ya libaku malamu. Sɛngá na bayangani ete báloba maloba ya ebandeli oyo basalelaka ntango basakolaka na bamagazini, na balabála, na zándo, na babísi mpe bongo na bongo. Yebisá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na pɔ́sɔ oyo.
15 mn: “Tobongisami mpe tokoki mpo na koteya basusu.” (Par. 7-9) Lobelá lisoló oyo lizwami na Annuaire 1995, lok. 45, na boyokani na bozongeli ya sika mpe bɛtá nsɛ́tɛ likoló na ntina ya kolandela bosepeli nyonso oyo emonani. Sɛngá na mosakoli moko ya makoki ete asala elakiseli na kozwáká makanisi na par. 7-8. Ata soki na ebandeli totiki mikanda mosusu, tosengeli kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kotambwisa boyekoli na lisalisi ya búku Boyebi. Lendisá moko na moko ete amibombela ntango na pɔ́sɔ ya nsima mpo na kosala bozongeli ya sika.
15 mn: Bamposa ya lisangá to lisoló “Kitisá mokumba na yo ntango nyonso epai na Yehova.” Lisukúlu ya kolendisa lizwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzeli ya 1 Apríli 1996, nkasa 27-30.
Loyembo 15 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 17 Febwáli
Loyembo 21
10 mn: Mayebisi.
15 mn: “Bato ya mitindo nyonso bakobika.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Sɛngá na bayangani ete bálobela na mokuse mwa makambo oyo mazali komonisa lolenge oyo balóngaki komema bato oyo bauti na bisika bikeseni ete básepela na nsango malamu.
20 mn: Tópesa litatoli na lisalisi ya etamboli na biso malamu. Nkulutu moko azali kotambwisa lisoló elongo na bilenge mibale to misato likoló na makanisi mauti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1987, nkasa 10-20. Pesá makanisi oyo mauti na mikanda, mpe makanisi ya makambo oyo mamonanaka na esika bofandi, oyo mazali kolakisa lolenge batáli bakamwaki mingi na etamboli malamu ya bilenge baklisto.
Loyembo 23 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 24 Febwáli
Loyembo 20
5 mn: Mayebisi.
10 mn: Mokomeli ya lisangá akotalela Biyano na mituna na bino.
15 mn: “Tozali ‘kosakola liloba.’ ” Ekosalema na mituna mpe biyano. Pesá mwa makanisi oyo mazali komonisa ete toyebi malamumalamu motuya ya Liloba ya Nzambe.—Talá Lamuká! ya 22 Yúni 1984, nk. 10-12, ebimeli ya Lifalansé.
15 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Mársi. Lobelá makambo ya ntina oyo mazwami kati na búku, na ndakisa: (1) mitó ya likambo ya mikapo oyo ezali kosimba motema, (2) bililingi ya lángi, (3) bitánda mpe bakalati oyo ebongi na koteya, (4) mituna oyo milamwisaka bososoli. Engebene oyo elobelamaki na lisoló oyo lileki, lendisá bayangani ete básalela vɛrsɛ́ moko ya sikisiki na lisoló na bango. Lendisá mokomoko ete azwa mikanda mpo na pɔ́sɔ.
Loyembo 26 mpe libondeli ya nsuka.