Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/01 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 12 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 19 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 26 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Aprili
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 3/01 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 12 Marsi

Loyembo 112

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: Koyekola kotánga mpe kokoma na kati ya basaleli ya Nzambe. (Talá Lamuká! ya 22 Febwali 1994 lok. 7-9.) Lisukulu ya kolendisa ekosalema na nkulutu moko. Monisá ntina oyo basaleli nyonso ya Yehova basengeli koyeba kotánga. Lendisá bato oyo bayebi kotánga te bákɔta na mateya ya koyekola kotánga mpe kokoma. Na nsuka ya lisukulu, sɛngá na bayangani báya na Lamuká! ya 22 Febwali 1994 na Likita ya Mosala na pɔsɔ oyo ekolanda.

Min. 20: “Aprili​—Sanza oyo tosengeli ‘kosala mingi mpe komipesa mpenza.’” (Paragrafe 1-13) Ekosalema na mokɛngɛli-mokambi. Lisolo moko ya esengo ekolobela makambo oyo tolingi kosala na sanza ya Aprili. Lendisá moto nyonso na kati ya lisangá asala nyonso oyo asengeli kosala mpo biso nyonso tómipesa mpenza na mosala ya kosakola na sanza yango.

Loyembo 147 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 19 Marsi

Loyembo 166

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Ndenge ya kosalisa bato báyeba kotánga. (Talá Lamuká! ya 22 Febwali 1994, lok. 4-6.) Lisolo kati na bankulutu mibale. Bendá likebi na makambo oyo ezali na kati ya etanda na lok. 6.

Min. 22: “Aprili​—Sanza oyo tosengeli ‘kosala mingi mpe komipesa mpenza.’” (Paragrafe 14-30) Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lisukulu mpe eteni mosusu oyo eponami ekosalema na mituna mpe biyano. Moto nyonso asengeli kosala programe oyo ebongi mpo asakola mingi na boumeli ya sanza ya Aprili. Lobelá programe mobimba oyo ebongisami mpo na mosala ya kosakola na sanza yango. Lendisá bandeko nyonso oyo bakoki básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe bázwa formilɛrɛ na nsima ya likita.

Loyembo 188 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 26 Marsi

Loyembo 204

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Monisá ete ntango ezali naino mpo na kotondisa formilɛrɛ mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili. Lendisá bandeko nyonso bálanda manaka ya botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli oyo ebongisami banda na mokolo ya 3 Aprili kino mokolo ya 8 Aprili, ndenge emonisami na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2001. Yebisá mokolo oyo Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya Ekaniseli ekosalema. Kobosana te lisukulu ya sipesiale oyo ekosalema mokolo ya lomingo mwa 1 Aprili, motó ya likambo elobi ete: “Nani akobika?” Lendisá bato nyonso bábanda kobima na mosala ya kosakola kaka na mokolo yango, mpo na bábanda sanza ya Aprili malamu.

Min. 20: “Tiká ete biso nyonso tókumisa Yehova mpe Mwana na ye.” Lisukulu moko ya kolendisa oyo euti na Makomami ekosalema na nkulutu moko. Lendisá moto nyonso asangana na mosala ya ntina mingi oyo ebongisami mpo na sanza ya Aprili mpe asala makasi mpo na kobengisa bato na Ekaniseli.

Min. 15: Tóbongisa ndenge ya kolakisa bazulunalo. Tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na boumeli ya sanza ya Aprili. Lobelá lok. 8, par. 3 mpe 10 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Novɛmbɛ 1996. Limbolá (1) lisolo moko, (2) likambo moko oyo ezali kobenda likebi, (3) motuna moko mpo na kobenda likebi ya moto, mpe (4) mokapo oyo ebongi, oyo ekoki kosalelama malamu mpo na kolakisa zulunalo mokomoko. Salá makasi mpo na kosalela mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Mpo na kosukisa salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosala yango ntango okei kotala moto mpo na mbala ya liboso.

Loyembo 207 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Aprili

Loyembo 220

Min.  9: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Marsi. Lobelá “Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli.”

Min. 18: “Bolingo nde etindaka biso tósakola.”a Limbolá mikapo oyo ezali na kati ya lisolo yango. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Étude perspicace, Volime 2, lok. 633, par. 3. Sɛngá na mosakoli moko oyo asakolaka na molende esili koleka bambula mingi ayebisa ndenge bolingo mpo na Nzambe etindaki ye akoba na mosala ya kosakola. Lendisá basakoli nyonso básangana na mosala ya kopesa litatoli na boumeli ya sanza ya Aprili mpe na sanza mosusu nyonso oyo ekolanda.

Min. 18: “Salisá bato mosusu báyangana na makita.” Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Yuli 1996, par. 14-16, epesi makanisi mosusu mpo na ndenge ya komema bayekoli ya Biblia na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Monisá ndenge mwa buku Azali kosɛnga (liteya 5, paragrafe 7) mpe buku Boyebi (mokapo 5, paragrafe 22) ekoki kosalelama banda ntango mosakoli abandi koyekola na moto Biblia mpo na kolendisa ye ete abanda koyangana na makita. Mpo na komonisa yango, salá elakiseli moko oyo ebongisami malamu oyo ekomonisa mosakoli moko ya molende azali kolendisa moyekoli moko ya Biblia akanisa malamumalamu likambo ya koyangana na makita.

Loyembo 47 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto