Aprili—Sanza oyo tosengeli ‘kosala mingi mpe komipesa mpenza’
1 Mpo na basaleli ya Yehova, bapɔsɔ oyo ezalaka liboso to nsima ya Ekaniseli ezalaka ntango ya malamu mpo na komanyola. Yango ezali ntango ya kokanisa malamumalamu makambo oyo liwa ya Klisto ekokisaki mpe kotalela elikya oyo Nzambe apesi biso na nzela ya makila ya Yesu. Ntango ozali kokanisa Ekaniseli ya mokolo ya 19 Aprili na mbula eleki, likambo nini ezali koya na makanisi na yo? Okoki koyeba lisusu bilongi oyo omonaki na mpokwa yango? Elimo malamu oyo ezalaki na kati ya Ekaniseli? Mateya ya ntina mingi oyo euti na Biblia oyo epesamaki kuna mpe mabondeli ya mozindo? Mbala mosusu ozwaki mokano ya komonisela Yehova mpe Yesu botɔndi mingi mpo na bolingo oyo bamoniselaki yo. Ndenge nini ozali sikoyo kozwa litomba ya makambo oyo omanyolaki?
2 Ezali polele ete basaleli ya Yehova bamonisaka botɔndi kaka na maloba te. (Kols. 3:15, 17) Mingimingi, na sanza ya Aprili na mbula eleki, tomonisaki botɔndi na biso mpo na bibongiseli ya Yehova oyo etali lobiko na ndenge tomipesaki mingi na mosala ya boklisto. Babongisi-nzela basungi bazalaki bankóto ebele, balekaki motango oyo bazalaki na mbala eleki na teritware na biso (83 %). Milende na bango, na milende oyo basakoli nyonso ya Bokonzi basalaki epesaki nzela ete tósala ngonga mingi, tókabola bazulunalo mingi, mpe tózongela bato mingi koleka. Esengo na biso ezalaki lisusu mingi ntango tomonaki ebele ya bato ya sika babandi koyekola Biblia mpe bato mingi koleka bayanganaki na Ekaniseli!
3 Na ntembe te, bosolo ya elikya na biso ezali kotinda biso tósala. Ezali ndenge ntoma Paulo akomaki ete: “Mpo ete tozali kosalaka mosala mpe kobuna etumba mpo na bongo, zambi tosili kolikya epai na Nzambe na bomoi, ye oyo azali Mobikisi na bato nyonso mpe na koleka na baoyo bazali kondima.”—1 Tim. 4:10.
4 Na eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo, ndenge nini okomonisa kondima na yo na bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na bomoi? Na sanza ya Aprili ya mbula eleki, motango ya basakoli ekómaki mingi koleka bambula nyonso oyo eleká. Tokoleka lisusu motango yango na sanza ya Aprili ya mbula oyo? Tozali na likoki ya kosala yango. Kasi basakoli nyonso, ezala baoyo bazwá batisimo to baoyo bazwi naino batisimo te, basengeli kosala. Ebele ya bato ya sika bakoki mpe kokokisa masɛngami mpo na kobanda kosakola. Yango wana, ntango ozali kozwa bibongiseli mpo na kosala mingi mpe komipesa mpenza na mosala na sanza oyo ya Aprili, talelá ndenge oyo okoki kolendisa bato mosusu, bato ya sika mpe baoyo bameseni naino te na mosala ya kosakola, ete bábima na yo elongo.
5 Tósalisa bandeko mosusu bázongela lisusu mosala na bango: Soki oyebi bandeko mosusu oyo bazali kobima lisusu te na mosala ya kosakola eleki sikoyo sanza moko to sanza mibale, mbala mosusu okoki kolendisa bango mpe kosɛnga bango ete bábima na yo elongo na mosala ya kosakola. Soki na kati ya lisangá ezali na bandeko mosusu oyo batiká kosakola, bankulutu bakosala makasi mpo na kokende kotala bango mpe kolendisa bango bázongela kosakola na sanza ya Aprili.
6 Biso nyonso tosengeli kolanda kosɛnga elimo ya Yehova elendisa biso na kati ya mosala na ye. (Luka 11:13) Tosengeli kosala nini mpo na kozwa elimo yango? Tosengeli kotánga Liloba epemami ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17) Tosengeli lisusu ‘koyoka oyo elimo ezali koloba na masangá’ ntango tozali koyangana na makita nyonso mitano pɔsɔ na pɔsɔ. (Emon. 3:6, NW ) Sikoyo ezali ntango ebongi mpenza mpo na kosalisa bandeko oyo basakolaka sanza na sanza te mpe baoyo batiká kosakola ete bábongisa lisusu lolenge na bango ya koyekola mpe bázongela koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. (Nz. 50:23) Tosalaka yango ntango tozali kosɛnzɛla malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya elimo na biso. Kasi ezali na likambo mosusu oyo esɛngami.
7 Ntoma Petelo alimbolaki ete Nzambe apesaka elimo na ye “epai ya baoyo bazali kotosa bokonzi na ye.” (Mis. 5:32) Kolanda etinda ya “kosakola epai ya bato mpe kopesa litatoli na mozindo” ezali na kati ya botosi motindo wana. (Mis. 1:8; 10:42, NW ) Na yango, atako ezali solo ete tozali na mposa ya elimo ya Nzambe mpo na kolendisa biso ete tósakola, ezali mpe solo ete soki tobandi komonisa mposa na biso ya kosepelisa Yehova, akosalisa biso lisusu mingi. Tiká ete tótalela na motuya moke te ntina ya kobanda kolanda matambe wana ya ntina mingi oyo ezali komonisa mposa na biso ya kotosa!
8 Tósalisa bilenge: Baboti, bomonaka ete bana na bino bazali na mposa ya koyebisa bato mosusu solo? Babimaka elongo na bino na mosala ya kosakola? Bazali na etamboli malamu? Soki ezali bongo, mpo na nini kokakatana? Bósolola na nkulutu moko kati na Komite ya Mosala ya lisangá na bino, mpo na koyeba soki mwana na bino akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te na sanza ya Aprili. (Talá buku Lisanga, lok. 99-100.) Bóyeba ete mwana na bino akoki mpe kosangana na kokumisa Yehova makasi na eleko oyo ya Ekaniseli.—Mat. 21:15, 16.
9 Mama moko moklisto na Géorgie, na États-Unis, azalaki ntango nyonso kolendisa mwana na ye ya moke ya mwasi ete asololaka na bato makambo ya Yehova. Na mbula eleki, ntango mwana yango azalaki na mosala ya kosakola na mama na ye, alakisaki mobali moko mwa buku Azali kosɛnga mpe alimbolaki na mokuse makambo oyo ezali na mitó ya makambo. Mobali yango atunaki ye ete: “Ozali na mbula boni?” Alobaki ete: “Nsambo.” Mobali yango akamwaki na komona ete mwana wana ya moke azali kopesa ndimbola oyo ebongi mpenza. Mobali yango abɔkɔlamaki na kati ya solo kasi alandaki mateya yango te na bomoi na ye. Mosika te, mobali yango na mwasi na ye mpe mwana na bango ya mwasi babandaki koyekola Biblia.
10 Bilenge mingi bazali basakoli, mpe tosepelaka kozala elongo na bango ntango bazali kosakola elongo na biso. Bilenge yango bakoki kolendisa bilenge mosusu ya mbula na bango. Kasi sanza ya Aprili ezali mpe ntango malamu mpo na libota mokomoko ete bábongisa lisusu boyokani na bango na kati ya libota mpe bákóma lisusu makasi na elimo wana bazali kosala elongo na mosala mosantu. Batata ya mabota basengeli kopesa ndakisa na likambo yango.—Mas. 24:27.
11 Tósalisa bato ya sika: Ezali boni mpo na bato ya sika, baoyo bazali koyekola Biblia na yo? Bango mpe bakoki kosala ete sanza oyo ya Aprili ezala na ntina mingi? Mbala mosusu ntango bayekolaki mokapo 2, paragrafe 22, to mokapo 11, paragrafe 14 ya buku Boyebi, bamonisaki mposa na bango ya koyebisa bato mosusu makambo oyo bazali koyekola. Soki bokómi pene na kosilisa buku yango, omibongisa mpo na kosolola likambo yango malamumalamu na bango ntango bokoyekola mokapo 18, paragrafe 8, oyo elobi ete: “Ekoki kozala ete ozali na mposa ya koyebisa bandeko na yo, baninga na yo, mpe bato mosusu makambo oyo ozali koyekola. Ya solo, mbala mosusu osili kosala yango, motindo moko Yesu akabolaki nsango malamu elongo na basusu na lolenge ya libaku malamu. (Luka 10:38, 39; Yoane 4:6-15) Sikawa okoki kolinga kosala mingi.” Yango ezali mpe bongo mpo na bato oyo ozali koyekola na bango?
12 Moto oyo ozali koyekola na ye andimaka Liloba ya Nzambe? Atosaka mitinda ya Biblia? Bomoi na ye ezali na boyokani na mitinda ya Biblia? Ayanganaka na makita ya lisangá? Alingi kosalela Yehova Nzambe? Na yango mpo na nini te kolendisa ye asolola na bankulutu mpo bákoka koyeba soki akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te mpe asala elongo na yo na sanza ya Aprili? (Talá buku Lisanga, lok. 99-100.) Na lolenge yango akomona na miso na ye mpenza, ndenge oyo ebongiseli ya Yehova ekosalisa ye na milende na ye oyo azali kosala mpo na kosalela Yehova.
13 Ya solo, bayekoli mosusu bakolaka mbango koleka bamosusu. Yango wana, na boyokani na malako oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2000 lokasa 4, paragrafe 5-6, basakoli mosusu bazali koyekola buku ya mibale na bato oyo basepelaki na ebandeli, kasi bazalaki na mposa básalisa bango lisusu mpo na kobanda kosakola. Tokolongola elikya te, bato yango ya motema sembo bakokóma bayekoli ya solosolo ya Klisto, “ata nsima ya mwa ntango moke to nsima ya ntango molai.” (Mis. 26:29, NW ) Kasi, soki basanza oyo olekisi mpo na koyekola na moto emonani mpenza ete ezali “ntango molai,” eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo ekoki kozala libaku malamu mpo na moyekoli na yo ete abanda komonisa botɔndi na ye mpo na mbeka ya Klisto, boye te?
14 Ndenge ya kosalisa bango básangana na mosala: Toyekolaka makambo mingi mpo na koyeba ndenge ya kosalisa bato oyo bakokisi masɛngami mpo na kobanda kosakola ntango tozali kotalela ndenge oyo Yesu abongisaki bato mosusu. Atindaki bantoma na ye te mbala moko liboso ya bato ebele ete bábanda koteya bango. Liboso amonisaki ntina ya mosala ya kosakola, alendisaki bango bábondelaka, mpe na nsima apesaki bango makambo misato ya ntina: moninga ya mosala, esika basengelaki kosakola, mpe nsango. (Mat. 9:35-38; 10:5-7; Mko. 6:7; Luka 9:2, 6) Okoki kosala mpe bongo. Ata soki ozali kosalisa mwana na yo moko, moto ya sika oyo azali koyekola, to moto mosusu oyo atiká kosakola, ekozala malamu kosala milende mpo na kolanda malako oyo elandi.
15 Monisá ntina ya mosala yango: Monisá moto yango ntina ya mosala ya kosakola. Monisá ete osepelaka na mosala yango. Yebisá ye masolo oyo ezali komonisa makambo oyo lisangá ezali kosala na mosala ya kosakola. Monisá elimo oyo Yesu amonisaki na Matai 9:36-38. Lendisá moto oyo azali kokana kobanda kosakola to moto oyo atiká kosakola ete abondela mpo akoka kosangana na mosala ya kosakola mpe mpo mosala yango esalema malamu na mokili mobimba.
16 Salá ete moto yango akanisa mabaku ndenge na ndenge ya kopesa litatoli: Lobelá libaku ya kosangana na etuluku ya boyekoli ya mokanda mpo na kopesa litatoli ndako na ndako. Yebisá ye libaku oyo azali na yango ya kosolola na bandeko na ye to kosolola na baninga na ye ya mosala to baninga na ye ya kelasi ntango bazali na bopemi. Ntango azali na kati ya bisi, akoki kobanda lisolo bobele na ndenge oyo azali komonisa ete azali kosepela na bato mosusu oyo bazali na ye na kati ya bisi. Soki biso nde tobandi lisolo, mbala mingi yango epesaka nzela ete tópesa litatoli. Na ntembe te ezali na mabaku mingi oyo tokoki kosalela mpo na koyebisa bato mosusu elikya na biso “mokolo na mokolo.”—Nz. 96:2, 3.
17 Nzokande, ekoleka malamu soki yo na mosakoli ya sika bobimi elongo kozanga koumela na mosala ya kosakola ndako na ndako. Soki otyaki mokano ya kosala mingi na boumeli ya sanza ya Aprili, sɛngá teritware epai ya mosaleli na misala oyo atalelaka makambo ya bateritware. Yango ekopesa bino likoki ya kosala mingi na teritware yango. Na ndakisa, ntango osilisi mosala na yo to ntango ozali kokende na makita to na esika mosusu, okoki komona moto moko na ndako oyo liboso okutaki moto te to na esika oyo moto asepelaki koyoka yo. Soki yango ebongi, okoki kokende kotala moto yango ntango omoni ete ekozala malamu mingi. Na nsima, yango ekosala ete ozala na esengo mpe omiyoka ete ozali mpenza kosangana na mosala ya kosakola.
18 Bongisá nsango oyo ekosepelisa: Kozala na mposa ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe kosakola nsango yango kozanga kokakatana ezali makambo mibale ekeseni, mingimingi mpenza mpo na moto oyo abandi sika to moto oyo atiká kosakola esili koleka ntango mingi. Kosalisa moto ya sika to moto oyo atiká kosakola ete amibongisa malamu ezali lolenge moko malamu ya kosalela ntango na biso. Likita ya Mosala mpe makita mpo na mosala ya kosakola ekoki kopesa biso makanisi oyo ekosalisa biso, kasi eloko moko te eleki komibongisa ya moto ye moko.
19 Ndenge nini okoki kosalisa moto ya sika amibongisa mpo na mosala? Bandá na komonisa ye ndenge ya kolakisa zulunalo, mpe salá ete yango ezala pɛtɛɛ mpe mokuse! Sɛngá bango bákanisa makambo oyo elobelami na radio, na televizyo to na bazulunalo oyo ekoki kobenda likebi ya bato na teritware, mpe na nsima luká makambo oyo ezali na bazulunalo na biso ya sika oyo ezali na boyokani na nsango yango oyo oyokaki. Bómeka elakiseli yango elongo, mpe bósalela yango mbala moko na mosala ya kosakola soki likoki ezali.
20 Omibongisa mpo na bokoli na mikolo ezali koya: Na mbula eleki na mokili mobimba bato oyo bayanganaki na Ekaniseli balekaki milio 14,8. Basakoli bazalaki bobele milio motoba. Yango emonisi ete bato koleka milio 8,8 basepelaki mingi, yango wana bayanganaki na ebongiseli oyo ya ntina mingi epai bayokaki ndimbola ya liteya moko ya ntina mingi na Biblia. Bayebaki bamosusu kati na biso, oyo babendaki mpenza likebi na bango. Mingi kati na bango balobaki malamu mpo na biso, bapesaki makabo mpo na mosala na biso na mokili mobimba, mpe bakɔtelaki biso liboso ya bato mosusu. Ebele ya bato yango bazali komonisa ete bokoli ekoki komonana na mikolo oyo ezali koya. Tokosala nini mpo na kosalisa bango bákola lisusu?
21 Ebele ya bato ya sika oyo bayanganaka na Ekaniseli bayaka mpo moko kati na biso abengisaki ye. Mbala mingi, yango emonisaka ete bazali ata na moto moko kati na bayangani oyo bayebani na ye. Soki moto moko ayei na Ekaniseli mpo tobengisaki ye, tozali na mokumba ya koyamba ye malamu mpe kosalisa ye mpo azwa mpenza litomba na mateya yango. Lokola bato bakozala mingi, tosengeli kosalisa ye azwa esika ya kofanda. Pesá ye Biblia, mpe sɛngá ye ayemba elongo na yo na buku na yo ya nzembo. Tosengeli koyanola na motuna nyonso oyo akotuna. Ndenge ozali kotyela ye likebi na esengo nyonso, ekoki kosala ete asepela mingi. Na ntembe te, biso nyonso tozali na mokumba yango—soki tomoni moto moko oyo toyebi ye te, tokoki kotombela ye boyei malamu, mpe kosolola na moto yango moke mpo na koyeba ye.
22 Koyangana na Ekaniseli ekoki kozala na bopusi mpenza na makanisi ya moto. Lokola moto yango ayei na likita, yango ekoki komonisa ete amoni te eloko oyo abandaki koluka na bisika mosusu oyo azalaki kokende mpe ete biso tozali kopesa ye eloko yango oyo asengeli na yango mpo atalela yango malamumalamu. Koyoka ndimbola ya mbeka ya lisiko ekoki kozala likambo ya sika epai ya moto oyo ayebi te ete bolingo ya Yehova eleki monene. Akoki komona mpenza ete tokeseni na bato mosusu—tozali sembo, tosepelaka na baninga, tozali na bolingo, mpe na limemya. Biloko oyo ezali na kati ya Ndako ya Bokonzi na biso ekokani ata moke te na oyo amonaka na mangomba na bango oyo ezalaka na bikeko mpe milulu ndenge na ndenge oyo ezangi ntina. Na ntembe te, bato ya sika bakomona na kati ya bayangani bato ya lolenge nyonso mpe ete makambo ya kokɔngɔla mabonza ezalaka te. Yango ekoki kolendisa bango ete báya lisusu.
23 Nsima ya Ekaniseli, moto moko asengeli kosalisa moto nyonso ya sika oyo ayanganaki. Soki obengisaki bato, ozali na mokumba. Liboso bákende, osengeli komindimisa ete bayebi mikolo ya makita mosusu oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi. Yebisá bango motó ya likambo ya lisukulu ya bato nyonso oyo ekosalema na pɔsɔ oyo ezali koya. Yebisá bango esika mpe ngonga oyo Boyekoli ya Mokanda ya etuluku oyo ezali pene ya ndako na bango esalemaka. Na nsima, pesá bango buku Boyebi, mpe yebisá bango lisolo oyo ekosalema na pɔsɔ ya 30 Aprili oyo ezali na motó ya likambo ete: “Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?” Limbolá ntina oyo lisangá mobimba ezali kozwa bibongiseli mpo na koyangana na liyangani ya etúká oyo ezali koya.
24 Zwá bibongiseli mpo na kokende kotala bango na bandako na bango. Omindimisa ete bazali na mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi, oyo ekosala ete báyeba mateya ya ntina ya Biblia. Soki babandi naino koyekola te, lendisá bango bábanda koyekola Biblia. Lendisá bango bátánga mwa buku Batatoli ya Yehova, oyo ezali komonisa polele ndenge oyo ebongiseli na biso etambwisamaka. Sɛngá bango bátala kasɛti video Our Whole Association of Brothers (Libota mobimba ya bandeko). Obongisa mpo ete bákutanaka na bato mosusu ya lisangá. Na basanza oyo ekolanda, kendáká kotala bato yango ya sika; bengá bango báyanganaka na makita ntango mokɛngɛli ya zongazonga azali kotala lisangá na bino to ntango bozali na liyangani ya zongazonga to na liyangani ya mokolo moko. Pesá bango libaku ya komimonisa bango moko ete bazali na ‘ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’!—Mis. 13:48, NW.
25 Oyo bankulutu basengeli kosala: Mpo mosala ya kosakola esalema mingi na sanza ya Aprili oyo, yango etaleli mpe mingimingi bankulutu. Soki ozali motambwisi ya etuluku moko ya boyekoli ya mokanda, komá na molɔngɔ makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa moto nyonso na etuluku na bino ya boyekoli ya mokanda mpo asangana mingi na mosala wana ya ntina mingi. Na kati ya etuluku na bino ya boyekoli ezali na moto moko oyo azali elenge, moto ya sika, to moto oyo asakolaka sanza na sanza te, to moto oyo atiká kosakola? Luká koyeba soki baboti, babongisi-nzela, to basakoli mosusu bazwi likanisi ya kosalisa bato yango. Salá nyonso oyo okoki mpo na kosalisa bango. Na sanza ya Aprili ya mbula eleki, ndeko mwasi moko oyo azalaki kosakola sanza na sanza te na boumeli ya mbula mibale asalaki ngonga 50 na mosala ya kosakola. Nini esalisaki ye? Alobaki ete ntango bankulutu bakendeki kotala ye na ndako, yango elendisaki ye mingi.
26 Bankulutu mpe basaleli na misala basengeli kotala soki ya solo mpenza bateritware ezali mingi, soki bazulunalo mpe mikanda ezali mingi mpo na sanza yango. Bokoki kobongisa makita mosusu mpo na mosala ya kosakola? Soki ezali bongo, bosengeli koyebisa bibongiseli yango na lisangá. Likoló na nyonso, ntango bozali kobondela liboso ya bato nyonso, to ntango bozali kobondela bino moko na esika na bino, bósɛnga Yehova mapamboli na ye mpo na sanza oyo mosala ya Bokonzi ekosalema mingi.—Lom. 15:30, 31; 2 Tes. 3:1.
27 Na sanza ya Aprili na mbula eleki, na lisangá moko na Caroline du Nord, na États-Unis, bankulutu balendisaki mpenza mosala ya kosakola mpo esalema mingi. Pɔsɔ na pɔsɔ na makita, bazalaki kosɛnga na basakoli bátalela na libondeli soki bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Ntango nyonso oyo bankulutu na basaleli na misala bazalaki kokutana elongo bazalaki kolobela mingi likambo ya kosala ete sanza ya Aprili ezala sanza ya ntina mingi. Yango esalaki ete basakoli mingi (58 %), bakisa mpe bankulutu na basaleli na misala basalaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza yango!
28 Esengo oyo tozwaka soki tomipesi mpenza: Mapamboli nini tozwaka soki tozali ‘kosala mingi mpe tomipesi mpenza’ na mosala ya kosakola? (1 Tim. 4:10) Mpo na molende oyo lisangá na bango emonisaki na sanza ya Aprili na mbula eleki, bankulutu oyo touti kolobela balobaki boye: “Mbala mingi bandeko balobaka ete kosala elongo esalaki ete bálingana bango na bango mpe bázala na boyokani ya malamu mpenza na kati na bango.”
29 Ndeko mobali moko oyo azali naino elenge mpe azali ebɔsɔnɔ azalaki na mposa makasi ya kosala mosala wana ya ntina mingi na sanza ya Aprili na mbula eleki. Programe ya malamu mpe lisungi ya mama na ye mpe ya bandeko na ye ya elimo na kati ya lisangá esalisaki ye ete asala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Ndenge nini amiyokaki? Alobaki ete: “Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, namiyokaki mpenza ete nazali nzoto makasi.”
30 Ntembe ezali te ete Yehova apambolaka mpenza baoyo bazali kotalela na motuya libaku na bango ya koloba mpo na bokonzi na ye. (Nz. 145:11, 12) Wana tozali kokanisa liwa ya Nkolo, tokangi ntina ete mapamboli ya Nzambe ekozala lisusu mingi na mikolo oyo ezali koya. Ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya kozwa mbano ya bomoi ya seko. Kasi, ayebaki ete yango ezalaki te eloko moko oyo asengelaki kozwa yango bobele soki afandi akangi mabɔkɔ mpe atii elikya. Akomaki boye: “Mpo na boye nakosalaka mosala, nakobundaka na makasi na ye oyo akosalaka kati na ngai.” (Kols. 1:29) Yehova, na nzela ya Yesu, apesaki Paulo nguya ya kokokisa mosala ya kobikisa bomoi, mpe akoki kosala bongo mpo na biso lelo oyo. Olingi komona likambo ya ndenge yango na sanza ya Aprili ya mbula oyo?
[Etanda na lokasa 3]
Yo okolendisa nani ete asakola na sanza ya Aprili?
Mwana na yo?
Moyekoli moko ya Biblia?
Moto moko oyo atiká kosakola?