Makambo oyo tosengeli komikundola mpo na Ekaniseli
Na mbula oyo Ekaniseli ekozala na mokolo ya lomingo mwa 8 Aprili. Bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo oyo elandi:
◼ Ntango bozali kobongisa ngonga oyo molulu yango ekosalema, bóbosana te ete limpa na vinyo ekolekisama te liboso ete moi elala.
◼ Bato nyonso, bakisa mpe ndeko oyo akosala lisukulu, basengeli koyeba ngonga mpenzampenza oyo molulu yango ekobanda mpe esika oyo yango ekosalema.
◼ Lolenge ya limpa mpe ya vinyo oyo ekosalelama esengeli kozala oyo ebongi mpe ebongisama liboso na ntango.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1985 na lokasa 17 (ebimeli ya Lifalanse).
◼ Basaani, bakɔpɔ, mpe mesa ya malamu mpe elamba ya mesa, esengeli kobongisama malamu mpe kotyama libela na kati ya Ndako ya Bokonzi.
◼ Ndako ya Bokonzi to esika mosusu oyo molulu yango ekosalema esengeli kopɛtolama malamu liboso.
◼ Bosengeli kopona libela bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakotambwisa limpa na vinyo mpe koyebisa bango mokumba na bango mpe lolenge ya kokokisa yango malamu.
◼ Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa na vinyo epai ya ndeko nyonso oyo azali mopakolami mpe azali ebɔsɔnɔ, mpe azali na makoki ya koyangana te.
◼ Soki masangá mingi ekosalela Ndako ya Bokonzi moko, basengeli koyokana malamu mpo na kosala ete bituluku ya bato etondana te na ekɔteli ya ndako, na balabala, mpe na bisika ya kotɛlɛmisa mituka.