Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 11 Yuli
Loyembo 49
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 6 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli mpe Lamuká! ya 22 Yuli. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli mokomoko, monisá ndenge ya kopesa eyano soki moto alobi “Nazali na mosala.”—Talá buku Comment raisonner, nkasa 19-20, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nkasa 11-12.
Min. 15: Tólakisa mwa babuku na sanza ya Yuli mpe ya Augusto—Eteni 2. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na siplema. Limbolá na mokuse ndenge ya kosalela siplema yango, lobelá etanda ya lokasa 3 mpe makanisi ya ntina oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, na lokasa 8. Lobelá makanisi oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino, mpo na kolakisa mwa babuku na mbala ya liboso oyo tokutani na moto. Bongisá bilakiseli mibale to misato. Mosakoli moko ya elenge asala ata elakiseli moko.
Min. 20: “Tóyebisa bato mingi nsango malamu.”a Ntango bokolobela paragrafe 4, lobelá mpe makambo oyo ezali na mokanda ya biro ya 10 Yanuali 2003, oyo elendisaki kokende kosakola na bisika oyo mposa ezali makasi na teritware na biso. Ntango bokolobela paragrafe 5, lobelá makanisi oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino, oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2005, lokasa 8.
Loyembo 88 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Yuli
Loyembo 173
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2000, lokasa 32. Monisá polele matomba ya kozala na programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, ata ntango tozwi konje mpe na ntango mosusu oyo tozali epai na biso te.
Min. 15: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 11.”b Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli ná moyekoli oyo akómi mosakoli sika bazali komibongisa mpo na kozongela moto moko oyo asepelaki na nsango malamu. Bataleli lisolo oyo basololaki na moto yango mbala eleki mpe bapɔni likanisi moko oyo ebongi, oyo bakolobela ntango bakozongela ye. Babongisi mpe maloba ya ebandeli ya pɛtɛɛ mpe motuna moko oyo bakotuna moto yango na nsuka ya lisolo. Elakiseli ekosuka ntango balingi komekameka lisolo oyo bauti kobongisa.
Min. 20: Salisá basusu básepela na Biblia. Lisolo ya mituna mpe biyano ekouta na buku Tósambela Nzambe, nkasa 24-25, paragrafe 3-6. Salelá mituna ya boyekoli oyo ezali na buku. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na mwa buku Un livre pour tous, lokasa 32.
Loyembo 10 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Yuli
Loyembo 138
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 6 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto mpe Lamuká! ya 8 Augusto. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na elakiseli moko, mosakoli akolakisa moto zulunalo ntango azali kopesa litatoli ya libaku malamu na wenze to na esika mosusu oyo ebongi, oyo bato bazalaka mingi.
Min. 10: Kɔtisá solo na motema ya mwana na yo. (Det. 6:7) Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2002, nkasa 30-31. Lobelá mitinda ya Biblia oyo esalisaka baboti baklisto oyo babalani na bango bazali Batatoli te na kobɔkɔla bana na bango malamu.
Min. 20: “Nyongo oyo tozali na yango epai ya bato mosusu.”c Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2000, lokasa 11, paragrafe 13.
Loyembo 82 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 1 Augusto
Loyembo 187
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli. Sɛngá bayangani báfungola buku Eteyelo ya mosala na lokasa 70, mpe salá lisolo elongo na bayangani na makambo oyo ezali na paragrafe 1-2 mpe etanda “Ndenge ya kopesa biyano na makita ya lisangá.”
Min. 15: “Salisá bana na yo bámesana na mosala ya kosakola.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa moboti moko ná mwana na ye bazali kosalela makanisi ya pɛtɛɛ ya kobanda lisolo. Na nsuka ya elakiseli, moboti akolimbola na mokuse ndenge ya koyebisa bato bápesa makabo.
Min. 15: Osili komeka lolenge moko ya kobanda lisolo oyo ebongi? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lokasa 6. Lobelá makanisi oyo bapesi kuna, mpe monisá ndenge tokoki kosalela makanisi yango mpo na kokabola mikanda oyo tokolakisa na Augusto. Bongisá mpe elakiseli moko to bilakiseli mibale.
Loyembo 218 mpe libondeli ya nsuka.
[Footnotes]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.