Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Febwali
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Marsi
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 2/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 13 Febwali

Loyembo 121

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali mpe Lamuká! ya Febwali. Elakiseli moko ekomonisa mosakoli azali kopesa litatoli na esika moko oyo bato bazalaka mingi.

Min. 10: Ozali kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova? Lisukulu ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 7-10.

Min. 25: “Bendá likebi ya bato na ‘pole ya mokili.’”a Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Tángá nkombo ya basakoli oyo basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Lobelá makita mosusu ya mosala ya kosakola oyo bobongisi. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na manaka oyo bapesi lokola ndakisa, na lokasa 5 ya siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 2005.

Loyembo 224 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Febwali

Loyembo 89

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Luká mabaku ya kosakola.”b Sɛngá mosakoli moko oyo azali na mikakatano alobela nini esalisaki ye azwa mabaku ya kopesa litatoli.

Min. 20: “Lisalisi oyo ezali mpasi te komona yango.”c Ekosalema na nkulutu moko. Lobelá mpe na mokuse makanisi oyo ezali na Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1998 mpe ya Novɛmbɛ 2000.

Loyembo 1 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Febwali

Loyembo 20

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Febwali. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi mpe Lamuká! ya Marsi.

Min. 10: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: Ndenge ya kolakisa buku Biblia eteyaka. Na sanza ya Marsi tokolakisa buku yango ya sika. Salelá makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006, nkasa 3-6; na nsima zongelá makanisi oyo bapesi mpo na kobanda masolo oyo ebongi na teritware na bino mpe salá elakiseli. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango basalelaki buku ya sika, mingi mpenza epai ya bato oyo babandi koyekola na bango Biblia sika.

Loyembo 148 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 6 Marsi

Loyembo 51

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lokola trakte ezalaka mpasi te mpo na komema yango mpe ezalaka na bililingi ya kitoko, ebongi mpenza tósalelaka yango mpo na kobanda kosolola na bato ntango tozali kosakola ndako na ndako, ntango tozali kosakola na bisika oyo bato bazalaka mingi, mpe ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela trakte ya sika Etikali moke bampasi nyonso esila! mpo na kobanda kosolola na moto. Lobelá vɛrsɛ moko kati na bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lokasa 2 ya trakte yango.

Min. 15: “Monisá ete osepelaka na bato​—Na komibongisáká.”d Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa basakoli mibale bazali kobongisa ndenge ya kolakisa buku Biblia eteyaka. Baponi lolenge moko ya kobanda lisolo na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006 mpe babandi kolobela ndenge oyo bakoki koloba yango na maloba na bango moko, mpe koyokanisa yango na bato ya teritware na bango. Elakiseli esuki ntango balingi komekameka maloba yango ya kobanda lisolo na mongongo makasi.

Min. 20: “Salelá biloko oyo okoki kolakisa bato mpo na koteya.”e Ntango ozali kolobela kasɛti-video mokomoko oyo balobeli na lisolo oyo, lakisá ezipeli na yango mpe tángá mwa maloba ya mokuse oyo elobeli makambo oyo ezali na kati. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo bakutanaki na yango ntango basalelaki bakasɛti-video na mosala ya kosakola.​—Talá Annuaire ya 1997, lok. 54, mpe Annuaire ya 1995, nk. 50-51.

Loyembo 68 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto