Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Aprili
“Na mangomba mingi ya bokristo babatisaka bato. Okanisi boni, batisimo ezali na ntina? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli mwa makambo ya ntina.” Pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16, mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aprili
“Bato bapesaka makanisi ndenge na ndenge mpo na Yesu. Bato mosusu bakanisaka ete azalaki Masiya oyo alakamaki. Bamosusu bakanisaka ete azalaki kaka moto moko boye ya malamu. Basusu mpe balobaka ete azalaki kutu te. Bongo yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ete ezali na ntina tóyeba solo na ntina na Yesu. [Tángá Yoane 17:3.] Zulunalo oyo emonisi biyano ya Biblia na mituna oyo bato bamitunaka mingi na ntina na Yesu.”
Lamuká! Aprili
“Tozali kotala bato na mabota na bango mpo na kosolola na bango. Ondimaka ete mabota ezali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge lelo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá esika mabota mingi ezwaki toli oyo ebongi. [Tángá Nzembo 119:105.] Zulunalo oyo elobeli ndenge baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko balongaki mokakatano yango mpo balandaki toli ya Biblia.”