Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tókomaka makambo etali bato oyo basepeli
“Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.” (1 Tim. 4:16) Toli wana oyo ntoma Paulo apesaki Timote na litambwisi ya elimo ya Nzambe emonisi ete tózala basakoli ya sika to ya kala, tosengeli kosala milende mpo na kokolisa makoki na biso ya kosakola. Mpo na kosalisa biso na likambo yango, masolo ya sika ekobanda kobima na Mosala na biso ya Bokonzi oyo ekozala na moto ya likambo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola.” Lisolo mokomoko ekolobela mayele moko ya ntina, mpe ekopesa biso mwa makanisi oyo ekomonisa ndenge ya kosalela yango na mosala ya kosakola. Na boumeli ya sanza, biso nyonso tolendisami ete tótyela mayele yango likebi mingi. Na nsuka ya sanza, lisolo moko na Likita ya mosala ekopesa biso likoki ya kolobela matomba oyo tozwi na ndenge tosalelaki mayele yango. Na sanza oyo, tolendisami ete tókomaka makambo etali bato oyo basepeli na nsango malamu.
Mpo na nini ezali na ntina?: Mpo na kokokisa etinda oyo tozwá, tosengeli kosuka kaka na kosakola te. Tosengeli kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu mpe koteya bango, mpo na kobwaka mai na mboto ya solo oyo tolonaki. (Mat. 28:19, 20; 1 Ko. 3:6-9) Yango esɛngi tókutana lisusu na moto yango, tólobela makambo oyo ezali kotungisa ye mpe tólobela na mozindo lisolo oyo tosololaki na ye mbala eleki. Na yango, ntango tokutani na moto oyo asepeli, ezali na ntina tókoma makambo oyo etali moto yango.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Ntango ozali kokoma makambo, yebisáká bandeko oyo ozali kosakola elongo na bango makambo ozali kokoma.