“Maladi oyo eleki koboma banda mokili ebandá”
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AFRIKA YA SUDI
“Ata etumba moko te na mokili oyo ebomá bato ndenge sida ezali koboma.”—COLIN POWELL, SECRÉTAIRE D’ÉTAT AMÉRICAIN.
LAPOLO ya libosoliboso oyo minganga basalaki mpo na sida (syndrome d’immunodéficience acquise) ebimaki na sanza ya Yuni 1981. Peter Piot, mokambi ya ebongiseli ya ONU mpo na makambo ya VIH/sida (Onusida) alobi ete: “Moto moko te kati na biso baoyo tozalaki bato ya liboso ya koyekola maladi ya sida na bambula wana ya ebandeli, akokaki kokanisa ete sida ekozala likama monene ndenge ekómi lelo.” Nsima ya mbula 20, sida ekómi lelo maladi oyo eleki koboma bato, mpe makambo nyonso ezali komonisa ete ekoboma lisusu bato mingi koleka.
Balobaka ete bato oyo bazali na mikrobe ya sida (VIH: virus immunodéficience humaine) bakoki koleka milio 36, mpe bato mosusu milio 22 basili kokufa na sida.a Na mobu 2000, bato milio misato bakufaki na sida na mokili mobimba; ezali na mbula wana nde bato mingi koleka bakufaki na sida, banda maladi yango ebandá. Ata na mikili ya bozwi, bato bazali kaka kokufa na sida, atako bazali kopesa bango bankisi ya sida babengi thérapies antirétrovirales.
Sida etondi na Afrika mobimba
Maladi ya sida efandeli mpenzampenza nde bikólo ya Afrika na nse ya Sahara, epai bato ya sida bakoki kozala soki milio 25,3. Bobele na bikólo wana mpamba, bato milio 2,4 bakufaki na sida na mobu 2000. Ezali kuna nde bato bakufaki na sida ebele mpenza (80 %) koleka bisika mosusu nyonso ya mokili. Na bikólo wana, bato bakufaka mingi mpenza nde na sida.b
Afrika ya Sudi ezali ekólo oyo bato ya sida bazali mingi koleka bikólo nyonso ya mokili; bazali soki milio 4,7. Na ekólo yango, na sanza moko bana 5 000 bazali kobotama na mikrobe ya sida (séropositifs). Na likita ya mbala ya 13 oyo esangisaki bato ya bikólo mingi mpo na kolobela likambo ya sida na sanza ya Yuli 2000 na engumba Durban, Nelson Mandela, prezida ya kala ya Afrika ya Sudi, asalaki lisukulu mpe alobaki ete: “Esalaki biso mpasi mingi koyoka ete na Afrika ya Sudi, elenge moko likoló ya mibale kati na bilenge na biso akokufa na sida. Eloko oyo ezali kosala mpasi koleka ezali ete maladi wana mpe mikakatano nyonso oyo yango ezali kobimisa, ndenge balapolo ezali komonisa, tokokaki mpe tokoki kopɛngola yango.”
Sida ekɔteli mpe bikólo mosusu
Bato ebele mpe bazali kozwa sida na Mpoto ya Ɛsti, na Azia mpe na bisanga ya Antilles. Na nsuka ya mobu 1999, bato 420 000 bazalaki na sida na Mpoto ya Ɛsti. Na nsuka ya mobu 2000, balobi ete motuya yango emataki makasi, ekómi soki 700 000.
Ankɛtɛ moko oyo basalaki na bingumba 6 ya minene na Amerika, emonisaki ete bilenge mingi (12,3 %) oyo basangisaka nzoto mibali na mibali bazali na mikrobe ya sida. Lisusu, na kati ya bilenge nyonso oyo bazalaki na mikroke yango, bobele mwa ndambo (29 %) nde bazalaki koyeba ete bazali na mikrobe yango. Monganga oyo akambaki ankɛtɛ yango alobaki ete: “Tolɛmbaki mpenza nzoto na komona ete na mibali wana nyonso oyo bazalaki na mikrobe ya sida, kaka mwa ndambo nde bazalaki koyeba ete bazali na yango. Elingi koloba baoyo bauti kozwa maladi yango sika bazali kopesa yango bato mosusu kozanga koyeba.”
Ntango bato ya mayele oyo bayekolaka bokɔnɔ ya sida basalaki likita moko na Suisse na sanza ya Mai ya mobu 2001, babengaki maladi yango “maladi oyo eleki koboma banda mokili ebandá.” Ndenge touti komona yango, maladi yango efandeli mpenza nde bikólo ya Afrika na nse ya Sahara. Lisolo oyo elandi ekoyebisa ntina yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mitango oyo topesi awa euti na Onusida.
b Talá Lamuká! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2001, nkasa 18-19.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
“Eloko ezali kosala mpasi koleka ezali ete maladi wana . . . mpe . . . mikakatano nyonso oyo yango ezali kobimisa . . . tokokaki, mpe tokoki kopɛngola yango.”—NELSON MANDELA
[Elilingi na lokasa 3]
Bato mingi bayebi te ete bazali na mikrobe ya sida
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
UN/DPI Photo 198594C/Greg Kinch