Mpasi oyo ekozala lisusu te
MPASI oyo ekolongolama wana elaká ya Biblia ekokokana, ekozala mpasi oyo tozali kozwa mpo na kozanga kokoka euti na moto ya liboso. Mpasi wana esangisi mpe oyo ekoki kobéngama ete mpasi ekosilaka te.
Na esika ya kozala elembo ya maladi soko ya mpotá, mpasi ekosilaka te ekokisami na “ngonga ya likebisi oyo ebɛtami na ntango malamu te,” oyo ekoki kopekisama te. Ezali mpasi wana nde ezali kosɛngisa mosolo mingi mpe kobebisa bomoi ya bamilió na bato mbula na mbula.
Monganga Richard A. Sternbach, moto oyo ayekoli makambo matali mpasi, akomaki ete: “Na kokesena na mpasi makasi, mpasi ekosilaka te ezali elembo ya maladi te; ezali ngonga ya likebisi te.” Zulunalo Emergency Medicine eyebisaki ete: “Mpasi ekosilaka te ezali na ntina te.”
Na bongo, na bambula oyo euti koleka, minganga mingi basili kotalela motindo na mpasi wana lokola maladi mpenza. Kati na búku Management of Pain (Lolenge ya kosalisa mpasi), oyo bazali kosalela lelo mpo na makambo matali mpasi, monganga John J. Bonica alobi ete: “Wana yango ekómi makasi, mpasi ezali elembo ya maladi to mpe ya mpotá. Soki nde ezali kosila te, yango moko nde maladi.”
Milende mpo na koyeba bantina ya mpasi
Mpasi emonisi naino mabombami na yango nyonso te. Zulunalo American Health elobaki ete: “Bato na mayele bazali kosala milende makasi mpo na koyeba libombami liumeli mingi mpe ya kokamwa na ntina na mpasi.” Eleki mwa bambula, ekanisamaki ete mpasi ezalaki lolenge ya mayoki oyo mauti na misisá mizali na loposo mpe eleki na bɔɔngɔ́ na nzela na bansinga oyo itongisi misisá, lolenge moko na biyokeli (miso, matoyi, mabɔkɔ). Kasi, likanisi mpamba wana lizalaki solo te. Lolenge nini?
Likambo moko limemaki na bososoli ya sika ezali bongo boyekoli oyo bosalemaki likoló ya elenge mwasi moko oyo azalaki kooka mpasi te. Nsima ya liwa na ye, na 1955, boyekoli oyo bosalemaki likoló na bɔɔngɔ́ na ye mpe misisá na ye, eyaki kobongola makanisi na ntina na mpasi. Zulunalo The Star Weekly Magazine ya Yulí 30, 1960, elobi ete: “Minganga wana balukaki nsɔngɛ ya misisá. Soki yango ezalaki te, mbɛlɛ ekokaki kolimbola ntina oyo azalaki kooka mpasi te. Nzokande yango ezalaki, mpe emonanaki ete ezalaki mpenza malamu.
“Na nsima, minganga batalelaki bansinga ya misisá oyo bakanisaka ete ezali kotongisa nsɔngɛ ya misisá na bɔɔngɔ́. Awa nde esika mbébá esengelaki komonana. Kasi, eloko moko ezalaki te. Nsinga nyonso oyo bakokaki kotala ezalaki mpenza malamu, longola bobele oyo ebebisamaki na mpotá.
“Na nsuka, babandaki kotalela bɔɔngɔ́ ya elenge mwasi wana; yango mpe ezalaki na mbébá moko te. Engebene boyebi mpe mateya ya eleko wana, elenge mwasi wana asengelaki mpenza kooka mpasi, nzokande ye azalaki kooka ata nyɔmitíti te.” Kasi, azalaki kooka lolenge ntonga ezalaki kokɔ́ta na loposo mpe, ata kotɔbɔlama ntonga ezalaki koswa ye te, nzokande akokaki koyeba kokesenisa ntango bamamaki ye na motó ya ntonga mpe ntango bamamaki ye na nsɔngɛ ya ntonga.
Ronald Melzack, ye oyo, na bambula 1960, asanganaki na kobimisama ya liteya oyo lindimamaki na bato mingi, atángi ndakisa mosusu ya makambo ndenge na ndenge oyo mataleli mpasi. Alobaki ete: “Madame Hull alakisaki lokolo na ye oyo ezalaki lisusu te [oyo esilaki kokatama], mpe alobelaki mpasi oyo azalaki kooka lokola nde balekisaki ebende ya mɔ́tɔ makasi katikati na misapi na ye ya makolo.” Kati na nimero moko ya zulunalo Maclean’s ya 1989, Melzack alobaki ete ‘naino apesi ndimbola ya polele te likoló na oyo azali kobénga ete mpasi “na makanisi mpamba.”’ Lisusu, ezali na oyo babéngi ete mpasi etindami, mpasi oyo moto akoki kozwa yango na enama moko ya nzoto, kasi akooka mpasi na enama mosusu.
Nzoto mpe makanisi bakosalaka elongo
Mpasi elimbolami lelo lokola “bosalani elongo kati na nzoto mpe makanisi.” Kati na búku na ye, Pain in America (Mpasi na Amerika), oyo abimisaki yango na 1992, Mary Sheridan alobaki ete “kooka mpasi eutaka mpenza na makanisi kino elimo ekoki mbala mosusu koboya kondima ete mpasi ezali to, ntango mosusu, kozalisa yango mpe kobatela yango ntango molai nsima wana mpasi makasi esilaki.”
Ezaleli ya moto, makanisi na ye, bomoto na ye, lolenge ya kookela mpe makambo mosusu ezali na ntina monene kati na lolenge ya kosala liboso na mpasi. Monganga Bonica amonisi ete: “Bobangi mpe mitungisi ekobakisaka mpasi.” Moto akoki bongo koyekola kolónga mpasi. Monganga Wilbert Fordyce, molakisi oyo ayekoli mingi makambo oyo makopesaka mpasi, alimboli ete:
“Oyo etalelami ezali te ete mpasi ezali likambo ya solo te. Yango ezali mpenza likambo ya solo. Oyo etalelami ezali nde likambo ya koyeba bantina oyo ezali mpenza kobongola yango. Soki nalobeli yo na ntina na limpa batye jambon, okooka mposa ya kolya. Yango ezali solo. Ozali na mposa ya kolya mpo ete esengeli bongo, nzokande, ozali na limpa ná jambon te. Bato bazalaka na mayoki kobila ezalela ya makambo. Ezalela ya makambo ezali na bopusi likoló na lolenge ya bomoi, na kobima ya nsoi, na kotambola ya makila, na vitesi oyo bilei bizali kogumbwana na likundú, mpasi, mpe makambo ya motindo nyonso.”
Lolenge yango ekoki kobakisa mpasi, bobele bongo mayoki na yo mpe makanisi na yo ekoki kosilisa to mpe kokitisa yango. Tózwa ndakisa: monganga-mopasoli misisá ayebisaki ete wana azalaki elenge, alingaki mpenza elenge mwasi moko na boye ete, na ntango afandaki pene na ye likoló na efelo moko moke oyo ezipamaki na ngalasi, aokaki malili te soko mpasi mpe te. Alobaki ete: “Loposo na ngai ebongwanaki mpo na malili. Tofandaki wana na boumeli ya miniti 45, mpe naokaki eloko te.”
Bandakisa ya motindo boye ezali mingi mpenza. Wana babɛti na ndembó bazali kosana to wana basodá bazali na etumba, bakoki kozoka mpotá monene nde kooka bobele mwa mpasi na ntango wana, to mpe kooka ata eloko moko te. David Livingstone, mobali oyo atambolaki mingi na mikili ya Afrika, ayebisaki lolenge alandamaki na nkosi oyo ebangisaki ye mingi “lokola mbwa mabe ekolɛngisaka mpoko. Nsɔmɔ . . . elongolaki ngai mayoki nyonso kino naokaki mpasi te.”
Esengeli koyeba ete basaleli ya Yehova Nzambe, baoyo bazali kotalela ye na kimya nyonso, na elikya nyonso mpe na motema mobimba, baokaka mpasi te na bantango mosusu. Moklisto moko amikundolaki ete: “Likambo ya kokamwa, nsima ya kobetama mangénda ya liboso, nayokaki lisusu eloko moko te. Nazalaki bobele koyoka lokito ya mangénda, lokola kobetama ya mbonda na mosika.”—Lamuká! ya Yanuáli-Mársi 1994, lokasa 15.
Lolenge oyo kooka mpasi ezali kobongwana
Mpo na komeka kolimbola mwa makambo mazali kobulunganisa na ntina na mpasi, na 1965, Ronald Melzack mpe Patrick Wall, molakisi ya zebi ya nzoto ya bikelamu ya bomoi, babimisaki liteya moko lindimamaki mingi na bato, oyo ete koyeba ekɔtɛlo ya mpasi. Ebimeli ya 1990 ya búku oyo monganga Bonica abimisaki na ntina na mpasi, elobi ete liteya wana lizalaki “moko na matambe minene kati na bolukiluki likoló na mpasi mpe lolenge ya kosilisa yango.”
Na boyokani na liteya wana, bansango ya mpasi oyo etindami na bɔɔngɔ́ elekisami na ekɔngɔleli oyo ete mafuta ya mokuwa (moelle épinière) na ekɔtɛlo moko ezangi komonana. Soki bansango mosusu etondisi elekelo wana, bansango ya mpasi ekokóma bobele moke kati na bɔɔngɔ́. Na ndakisa, soki omitumbi mwa mɔ́tɔ moke na mosapi, okooka mpasi moke soki okuluti yango to soki oningisi yango, mpamba te bansango mosusu oyo ezali ya mpasi te esilaki kotindama na mafuta ya mokuwa mpo na kopekisa elekelo ya bansango ya mpasi.
Na 1975, bolukiluki mpo na koyeba mpasi ekólaki lisusu na ntango bayaki komona ete nzoto na biso ezali kobimisa biloko bikokani na morphine oyo bibéngami ete endorphines. Bato mosusu bakoki kooka mpasi mwa moke to kozanga kooka yango mpo ete nzoto na bango ezali kobimisa ba endorphines na koleka ndelo. Biloko wana bikoki mpe kongɛngisa malamu libombami litali kopekisa mpasi na nzela na lolenge ya kosalisa oyo babéngi yango ete acupuncture, mwango oyo minganga bakotingisaka ntonga ya mike mpenza na nzoto ya moto (esalelami mingi na ba chinois). Engebene matatoli makeseni, mapasó na kati na motema masalemaki epai na babɛli oyo bazalaki kotala, wana bazalaki koyeba makambo, mpe baokaki mpasi te nsima na kosalela bobele acupuncture. Mpo na nini mpasi ezali kookama te?
Basusu bakanisi ete bantonga ezali kokólisa kobimisama ya ba endorphines, biloko bikokitisaka mpasi mpo na mwa ntango moke. Likanisi mosusu ezali oyo ete, acupuncture ezali kosilisa mpasi mpo ete bantonga ezali kolendisa bansinga ya misisá oyo ezali kotinda bansango mosusu na esika ya bansango ya mpasi. Bansango wana ekokanga bikɔtɛlo ya mafuta ya mikuwa, kopekisáká bansango ya mpasi ete ekóma na bɔɔngɔ́ te, esika ekoutaka mayoki ya mpasi.
Liteya ya koyeba ekɔtɛlo ya mpasi, mpe likambo oyo ete nzoto ezali kobimisa biloko oyo bikokitisaka mpasi, ekoki mpe kolimbola ntina oyo makanisi mpe mayoki ezali na mokumba monene mpo na kobakisa to kokitisa mpasi. Na yango, na ntina na Livingstone, nsɔmɔ oyo ezwaki ye mpo na bokutani ya pwasa na nkosi ekólisaki kobima ya endorphines mpe etondisaki bansango mosusu kati na mafuta ya mikuwa na esika ya bansango ya mpasi. Yango wana mpasi na ye ezalaki bobele moke.
Atako bongo, lokola tolobaki yango liboso, makanisi mpe mayoki makoki kozala na bopusi bokeseni. Soki ezali mpenza makasi, kobulungana na makanisi mpo na bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kobakisa mayoki ya mpasi, na kopesáka motema likoló, na kobimisáká mikakatano, mpe na kokangisáká misisá.
Atako bongo, baoyo banyokwami na mpasi bazali na bantina ya kozala na elimo ya kolónga. Ezali bongo mpo ete babɛli mingi bazali lelo kosalisama na mitindo mileki malamu. Bokóli wana bouti na boyebi boleki malamu likoló na monyokoli monene oyo ete mpasi. Monganga Sridhar Vasudevan, prezidá ya Académie américaine de lutte contre la douleur, alobaki ete: “Likanisi oyo ete mpasi yango moko ekoki mbala mosusu kozala maladi, ebongolaki lolenge ya kosalisa yango na bambula 1980.”
Mbongwana nini esili kosalema na lolenge ya kosalisa mpasi? Motindo na kosalisa nini eleki malamu?
[Elilingi na lokasa 25]
Lolenge nini acupuncture ezali kokitisa to mpe kosilisa mpasi?