Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/7 nk. 3-6
  • Etikali moke—mokili ezangi mpasi ekoya!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etikali moke—mokili ezangi mpasi ekoya!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli kopamela Nzambe?
  • Mpasi ekosila ntango nini?
  • Mpasi oyo ekozala lisusu te
    Lamuká!—1994
  • Eleki monguna mabe
    Lamuká!—1994
  • Bokóli kati na myango ya kosilisa mpasi
    Lamuká!—1994
  • Bomoi bozangi mpasi ekoya mosika te!
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/7 nk. 3-6

Etikali moke​—mokili ezangi mpasi ekoya!

ETIKALI moke mokili ezangi mpasi ekoya? Oyo ekozala mpenza nsango malamu mpo na baoyo bazali konyokwama mbala na mbala, ezala na mosuni, na makanisi to na mayoki! Na ndakisa, bamilió na bato bakotonda na esengo soki babikisami na bampasi makasi ya mosuni oyo bakanser mosusu ezali kobimisa, bampasi makasi ya motó, mpe anjine ya ntolo. Baoyo batungisami na mpasi makasi ya motó bakosepela mpenza mpo na kosikolama na minyokoli na bango oyo mbala mingi ezali mpasi mpo na kolimbola yango. Mpe bamilió mosusu bakotonda na esengo soki mpenza konyokwama na makanisi oyo bazali koyoka mpo na bobangi, mpo na mawa, mpo na ngambo, mpo na motungisi to mpo na monyokoli ekokaki kolimwa. Kasi tolingi mpenza ete bampasi nyonso oyo elimwa?

Allan Basbaum, anatomiste ya université ya californie, na San Francisco alobi ete, “kozanga koyoka mpasi ata moke ezali libebi’’. Maloba na ye ezali solo. Lokola ngonga ekolaka likama, mpasi ya mosuni ezali koyebisa biso ete likambo moko ya mabe esalami na nzoto.

Kozanga likoki ya koyoka mpasi na nzoto ekoki mpenza kozala libebi, lokola emonisi yango zulunalo Time: “Esekeli kitoko ya elenge mobali moke ya mibu zomi na mibale ekeseni mpenza na bomoto na ye ya mawa. Maboko na ye mpe makolo na ye mabebi mpe matengami, lokola soki abelaki maladi na nkombo rachitisme (kozanga ya vitamine). Azangi misapi mingi. Mpota monene ezipi libolongo na ye, mpe bambebu na ye oyo ezali koseka ezali ya koswama makasi. Moto nyonso akotalela ye lokola mwana moko abetamaki mingi . . . Abotamaki na mbeba moko oyo azwaki epai na baboti na ye oyo esalamaka mpenza mingi te mpe yango ezali kopesa ye nzela ete ayoka mpasi te. Misapi na ye mitutamaki to mizikisamaki mpo alongolaki te maboko na ye likoló na eloko moko ya moto to ya likama. Mikuwa na ye ebebi mpe etengami mpo atutisaki yango makasi na ntango ya botamboli to ya bokimi mbangu. Mabolongo na ye mazokisamaki mpo amitutaki na biloko oyo bizokisaka oyo akokaki kooka yango te. Amibukaki mokuwa to amibukaki loketo bongo mpo azangaki koyoka mpasi ete abenga moto mpo akoka kosalisa ye.”

Bato mosusu bazali kopamela Nzambe nokinoki kolobaka ete ezali ye nde azali mobandisi ya bampasi oyo bato mingi bazali na yango. Kasi, tokoki mpenza kopamela Nzambe mpo na bampasi oyo bato bazali na yango?

Tosengeli kopamela Nzambe?

Ekoki sikawa penepene na mibu 6 000, bato bazali konyokwama na mpasi na nzoto, na makanisi mpe na mayoki. Na yango, esili koleka bikeke 19, ntoma Paulo amonaki na bosembo nyonso ete: “Biloko nyonso bizalisami na Nzambe, bizali kokimela elongo.” (Baloma 8:22) Atako bankisi oyo ezali kolembisa mpasi ezali mingi kati na ba pharmacies, mpe milende ya minganga mpe ya baoyo bakosalisaka bokono ya motó (ba pisikiatre), bato bazali konyokwama ntango nyonso na bampasi ya mitindo nyonso. Bamoko bafingaki Nzambe mpo na bampasi oyo bazalaki koyikela yango mpiko, na ndakisa na mwasi na Yobo, oyo, eleki sikawa ebele na bikeke, atindaki mobali na ye ete afinga Nzambe. Nzokande, lokola Yobo ye moko ayebaki yango, ezalela motindo wana ezali mabe mpe ezali na esika te.​—Yobo 2:9, 10.

Soki lelo oyo bato bazali konyokwama na mpasi, na bosembo nyonso, bakoki mpenza te kopamela Nzambe. Ezali nde mabe ya mobuki na lokuta oyo azangi komonana mpe ya baboti na biso ya liboso. Ndenge nini?

Makomami mazali koyebisa ete ekelamu moko ya elimo, atako azalaki sembo na ebandeli, akomaki na lokoso ya bokonzi. Na ebandeli ya bomoi na moto awa na mabelé, amonaki kati na makanisi na ye bato bafandi kati na paradis ya mabelé mpe bazali komonisa bokangami ya kokoka epai na Jéhovah, Nzambe Moni-na-Nguya-Nyonso. Kopusamaka na motema na ye, oyo ekomaki mabe, ekelamu wana ya elimo atombokelaki Mozalisi, mpamba te azalaki kolula mpo na ye moko losambo mpe bosembo ya bato. Mikano na ye ya mabe mimonanaki polele ntango abukaki lokuta na kosalelaka bongo mayele mabe. Ezali na boye nde lisumu ekotaki na mokili.

Jéhovah alobaki na moto ya liboso, Adam, ete soki alei mbuma ya nzete na koyeba malamu mpe mabe, akokufa (Genese 2:15-17) Kasi Eva, mwasi ya Adam, abendamaki na kobuka mobeko yango. Kosalelaka nyoka lokola molobeli, ekelamu wana ya elimo, Mokosi, alobaki na ye: “Bino bakokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolia yango, miso na bino (oyo na Eva mpe mobali na ye) makofungwama, mpe bino (bango mibale) bokozala pelamoko na Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:1-5) Ezalaki lokuta ya liboso, oyo epesaki epai na elimo mabe wana nkombo ya nsoni ya “tata na lokuta”. (Yoane 8:44.) Biblia ezali kolobela lolenge na ye oyo asalelaki nyoka kati na elanga ya Edene ntango ezali komonisa elimo mabe wana lokola ’’nyoka ya kalakala, ye oyo abiangami Motemeli mpe Satana’’.​—Emoniseli 12:9.

Mpo na lisumu, bato bazali kokimela; bazali kotungisama na mpasi. Na boyokani na liloba na Nzambe, bobele mokolo wana oyo Adam asalaki lisumu, Nzambe asakolaki etumbu ya liwa epai na basumuki. Engebene mobeko, liboso na Jéhovah, Adam mpe Eva bakufaki mokolo wana. (Tala Luka 20:37, 38) Na Edene, Jéhovah alobaki na mwasi ya liboso nsima wana asalaki lisumu: “Nakobakisa mpasi na yo (mingi) na kobota; okobota bana na mpasi.” (Genese 3:16) Mpo na Adam, asengelaki kozala na bomoi moko ya mpasi na libanda ya elanga na Edene, na mabelé oyo ekomaki naino paradis te. Jéhovah alobaki na ye: “Na motoki na elongi na yo okolia (limpa), kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete ezwamaki na yango, mpo ete ozali putulu, mpe ekozonga kati na putulu.” (Genese 3:17-19) Tala ndenge bato babandaki konyokwama na mpasi.

Na yango, konyokwama na mpasi euti na kozanga kokoka, na lisumu mpe na liwa oyo tozwaki na Adam lokola libula. Ezali yango nde Paulo alobaki na maloba oyo: “Na bongo, mabe (masumu) ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe (masumu). Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe (masumu).” (Baloma 5:12) Kasi Liloba na Nzambe ezali kosalisa biso na koyika mpiko liboso na mpasi, mpamba te ezali kolimbola biso mpo na nini Jéhovah apesi nzela na yango, mpe ezali kopesa biso elikya ete ekosila. Nzambe apesaki nzela epai na mokosi ‘tata na lokuta’, Satan le Diable, ete anyokola mosembwi Yobo mpe na bongo komeka bosembo na ye. Diable alobaki ete Yobo azalaki kosalela Nzambe mpo na litomba, kasi mpo na bolingo te. (Yobo 1:8-12) Kasi Yobo atikalaki sembo epai na Nzambe, komonisa ete bato na kozanga kokoka bakoki kosalela ye na bolingo mpe kosimba na bosembo nyonso bokonzi na ye, ata ntango kondima na bango emekami makasi. Koyika mpiko na Yobo mpe bosembo na ye epesaki nzela na kosantisama ya nkombo na Jéhovah, yango emonisaki ete Satana azali mobuki na lokuta mpe ememaki matomba minene epai na tata na mabota wana ya ndakisa. (Yobo 42:12-17; Yakobo 5:11) Engebene makambo oyo Yobo akutanaki na yango, tokoki kosukisa ete, ntango mokano na Jéhovah ekokokana, bato bakosikolama na mpasi. Kasi ndenge nini tokoki kozala na elikya?

Ndenge nini mpasi ekosila

Na yango, Jéhovah abongisaki mwango moko ya nguya mingi koleka mpo na kosikola bato na mpasi. Asalaki yango na lisalisi ya mbeka na lisiko ya Mwana na ye Yesu Klisto. Yesu azali “Mwana na Mpate na Nzambe oyo azali kolongola masumu na mokili”. (Yoane 1:29.) Ayaki na mabelé, “mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye (bomoi na ye ya moto na kokoka) lokola lisiko mpo na mingi”. (Matai 20:28.) Na kozanga botosi, Adam abungisaki bomoi ya moto na kokoka, elongo na lotomo na yango nyonso mpe na bilikya na yango. Nzokande, ezali mpenzampenza yango nde esombamaki na nzela na mbeka na lisiko na Yesu. (1 Timote 2:5, 6; Baebele 7:26) Ya solo, “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko”.​—Yoane 3:16.

Nzambe alakaki mpe polele ete mpasi esengeli kozwa nsuka. Kosakolaka eleko oyo mpasi oyo euti na lisumu ekozala lisusu te, ntoma Yoane na kopemama na Nzambe akomaki ete:

“Namonaki likoló na sika, na nse na sika, mpo ete likoló na liboso, na nse na liboso esili kolongwa Mai monene mpe ezalaki te . . . . Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete: ‘Tala, efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa (matanga, MN), na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.’ Mofandi na kiti na bokonzi (Jéhovah Nzambe) alobi ete: ‘Nazalisi biloko nyonso biloko na sika.’ Alobi mpe ete: ‘Koma ete maloba oyo mazali sembo, na solo.”’​—Emoniseli 21:1-5.

Mosika te bato na botosi bakokoka kosepela mpenza na matomba nyonso ya mbeka na lisiko na Yesu. Yango ekosalema na nse na boyangeli ya Bokonzi oyo mpo na yango basembwi bazali kosambela uta kala na maloba oyo: “Tata na biso ozali na likoló, nkombo na yo ezala mosantu! Tika bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalema, na nse pelamoko na makóló!” (Matai 6:9, 10) Kati na Bokonzi ya likoló, Yesu Klisto akoyangela kino akotya banguna na ye na nse na makolo na ye, bakisa mpasi mpe monguna ya nsuka, liwa.​—1 Bakolinti 15:25, 26.

Na ntembe te, mpo na oyo etali bato na botosi, mosika te Nzambe ‘akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa, na matanga, na kolela, na mpasi ekozala lisusu te’. (Emoniseli 21:4.) Na ntango yango, maloba malandi, oyo mazali sikawa kokokisama na elimo, makokokana solo: “Ɛ molimo na ngai, sanzola Jehovah . . . ye oyo akolimbisaka bokesene na yo nyonso, akobikisaka yo na maladi na yo nyonso.” “Mofandi moko akoloba te ete: ‘Ngai nazali na maladi.”’​—Nzembo 103:1-3: Yisaya 33:24.

Mpasi ekosila ntango nini?

Nsuka ya konyokwama na mpasi ebelemi. Ya solo, yango ezali mpo na ntango na biso, mpo na libota na biso. Kokokisama na bisakweli ya Biblia emonisi ete tozali kobika na nsuka ya ntango na biloko mabe. Bitumba, nzala mpe koningana na mabelé oyo emonanaki naino boye te liboso, bakisa mpe kosakolama ya nsango malamu oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosala sikawa kati na mabelé mobimba, ezali kati na elembo ndenge na ndenge ya “kozonga” na Yesu kozanga komonana kati na nkembo ya Bokonzi na likoló.​—Matai 24:3,14, 21, 34.

Mosika te, “likoló na liboso na nse na liboso”, biloko na ntango na Satan le Diable, elongo na lolenge na yango na koyangela, ekolimwa nyonso. “Mai” na kongala oyo ezali bongo bato mabe ekozala lisusu te. Na yango, tozali penepene ya komona “mabelé na sika”, lisangá ya bato na sembo, oyo eyangelami na “makóló ya sika”, boyangeli epambolami na Nzambe, “mabelé ya sika” mpe “makoló na sika” kati na yango “boyengebene ekozala mingi”.​—Emoniseli 21:1; 2 Petelo 3:13.

Zala na mpiko na kokanisaka na mapamboli oyo boyangeli ya sika, Bokonzi na Nzambe ekomema mosika te. Oluka koyeba makambo mingi na ntina etali mokili ya sika epai kuna ata mpasi to liwa ekozala te. Zala na esengo uta sikawa na ntina na mokolo wana mopambolami, mokolo oyo mosili kobelema, epai kuna baoyo nyonso balingaka Jéhovah Nzambe mpe bazali kotosa ye bakozala na bomoi kati na mokili moko mozangi mpasi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto