Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Octobre nk. 26-27
  • Bokóli kati na myango ya kosilisa mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokóli kati na myango ya kosilisa mpasi
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bisika oyo bazali kosalisa mpasi
  • Mitindo mingi oyo mpasi ekoki kosalisama
  • Bilikya ya kobikisama
  • Mpasi oyo ekozala lisusu te
    Lamuká!—1994
  • Eleki monguna mabe
    Lamuká!—1994
  • Etikali moke—mokili ezangi mpasi ekoya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ozali na mpasi ya mokɔngɔ?
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Octobre nk. 26-27

Bokóli kati na myango ya kosilisa mpasi

ELEKI kala mingi te, bobele ntalo moke ya minganga nde bazalaki na boyebi malamu likoló na mpasi, mpe ata lelo, mingi bayebi naino yango te. Eleki mwa bambula, monganga John Liebeskind, prezidá ya kala ya Fondation internationale de lutte contre la douleur, alobaki ete: “Nakanisi te ete ezali na eteyelo moko ya makambo ya monganga kati na mokili epai bazali kosala koleka ngonga minei na boumeli ya mibu minei mpo na kolakisa lolenge ya koluka koyeba mpasi mpe kosalisa yango.”

Nzokande, na meko oyo mpasi ezalaki koyebana malamu, milende mingi misalemaki mpo na kosalisa yango. Na bongo, baoyo banyokwami na mpasi bazali na elikya malamu. Zulunalo American Health eyebisaki ete: “Banso, tokoki kozala na esengo ete minganga bandimi sikawa ete mpasi ekoumelaka ezali elembo mpamba te, kasi ezali nde maladi oyo esengeli kosalisama.” Likanisi oyo lisili komema bokóli monene ya ebele ya bakliniki esalemi mpenzampenza mpo na kosalisa mpasi.

Bisika oyo bazali kosalisa mpasi

Monganga John J. Bonica afungolaki kliniki ya liboso oyo esalemaki mpenzampenza mpo na kosalisa mpasi na États-Unis. Alobi ete: “Na 1969, bakliniki ya motindo wana ezalaki bobele 10 na mokili mobimba.” Kasi motuya ya bakliniki esalemi mpenzampenza mpo na kosalisa mpasi esili kobakisama mingi mpenza na boumeli ya mibu 25 oyo euti koleka. Bakliniki ekosalisaka mpasi ezali sikawa koleka nkóto, mpe momonisi ya ebongiseli moko ya guvernemá mpo na kosalisa baoyo bazwami na mpasi ekosilaka te, alobaki ete, “mosusu ya sika ezali kofungolama pene na mokolo nyonso.”a

Kanisá mpo na oyo yango elimboli! Monganga Gary Feldstein, anesthésiologiste ya mboka New York, amonisi ete: “Babɛli oyo basengelaki kotambola bakilomɛtɛlɛ nkámá mingi soko nkóto mingi mpo na koluka kosalisa nzoto, bakoki lelo oyo kosalisama pene na esika oyo bafandi.” Soki ozali konyokwama na mpasi, ekípi ya bato oyo bayekoli lolenge ya kosalisa yango ekoki kozala lipamboli monene.

Linda Parsons, mwasi ya mokɛngɛli-motamboli moko ya Batatoli ya Yehova, azalaki konyokwama na mpasi na mokɔngɔ na boumeli ya bambula mingi. Akendaki epai na minganga mingi, kasi mpasi na ye ezalaki kokita te. Mokolo moko, na sanza ya Máí ya mobu oyo mouti koleka, wana ayebaki lisusu eloko ya kosala te, mobali na ye afungolaki búku ya banimero ya telefone mpe atalaki banimero ezalaki na nsé na liloba mpasi. Amonaki nimero ya telefone ya kliniki moko ezali pene na esika oyo bazalaki kosala mosala ya kosakola na súdi ya Californie. Elaká epesamaki, mpe mwa mikolo na nsima, Linda akendeki mpo na mbala ya liboso kokutana na monganga mpe balukaki koyeba soki ezalaki maladi nini.

Bibongiseli bikamatamaki mpo na kosalisa Linda kozanga ete alala na lopitalo. Azalaki kokende na kliniki mbala misato na pɔ́sɔ mpe azalaki lisusu kosalisama na ndako na ye. Nsima ya mwa bapɔ́sɔ, aokaki mbongwana monene. Mobali na ye ayebisi ete: “Nazali komikundola wana alobaki na ngai mokolo moko na mpokwa, ete: ‘Likambo ya kokamwa! Nazali kooka lisusu mpasi mpenza te.’” Mwa basanza na nsima, Linda atikaki kokende mbala na mbala na kliniki.

Lisungi oyo Linda azwaki mpo na kobika na mpasi na ye ekokani na oyo ezali kopesama na bakliniki mingi esalemi mpenzampenza mpo na kosalisa mpasi. Motindo ya bakliniki yango ezali kosɛnga lisalisi ya ekípi moko ya basáli oyo bameseni na mosala motaleli kɔ́lɔngɔnɔ ya nzoto, likambo oyo, mpo na monganga Bonica, ezali “mwango moleki malamu mpo na kobundisa mpasi oyo ekosilaka te.” Na ndakisa, lolenge nini Linda asalisamaki na mpasi na ye?

Mitindo mingi oyo mpasi ekoki kosalisama

Mwa búku moko ya kliniki emonisi mwango mosalelamaki mpo na kobundisa yango: “Moto na moto azali koleka liboso ya monganga, oyo akomeka koluka koyeba eloko oyo ebandisi mpasi yango mpe, na nsima, myango mibongi mpe lolenge malamu ya kosalisa ekoyebisama polele . . . Batekiniki mpe myango ya sikisiki mizali kosalelama mpo na kopesa nzela na nzoto ete ebimisa ba ‘endorphines’ (biloko oyo nzoto ekobimisaka yango moko) mpo na kokitisa mpasi mpe mitungisi, mpe kotika komela nkisi ntango nyonso.”

Linda asalisamaki na lolenge mingi, kati na yango ezalaki na oyo babéngi ete acupuncture mpe TENS, masini na lontiliki oyo ekolekisamaka likoló ya loposo mpo na konyɔlisa misisá. Azalaki kosalisama na nzela ya électrostimulation (kosalisama na nzela ya masini na lontiliki ekolekisamaka likoló ya nzoto mpo na konyɔlisa misisá) na kliniki moko mpe apesamelamaki TENS ya moke mpo na kosalela yango na ndako. Rétroaction biologique​—mwango kati na yango mobɛli alakisami mpo na kozala nkolo na mitungisi ya nzoto mpe kobongola yango mpo na kokitisa mpasi​—esalelamaki mpe lokola.

Asalisamaki mpe na kinésithérapie, mwango ya konyɔlisa nzoto na nzela na oyo babéngi ete massages na mabɔkɔ. Nsima na oyo nyonso, Linda abandaki kolanda manáka ya kosala ngalasísi, mpe yango ekómaki eteni ya ntina mingi ya kosalisa nzoto. Ngalasísi ezali na ntina mingi, mpo ete, lokola esili komonana, yango ezali kobimisa lisusu ba endorphines oyo ezalaki lisusu mingi te mpo na mpasi ekosilaka te. Kasi, likambo monene lizali nde na kosalisa baoyo bazali na mpasi ete bálanda manáka malamu ya ngalasísi.

Mingi na baoyo bazali konyokwama na mpasi ekosilaka te, baoyo bazali kokende na bakliniki ekosalisaka mpasi bazali komela ebele ya bankisi mpo na kokitisa mpasi. Linda asalaki mpe bongo. Kasi, auti kotika bankisi na ye, oyo ezali moko na mikano milandami na bakliniki oyo ekosalisaka mpasi. Linda aokaki mpasi mpo na yango te. Monganga Ronald Melzack, oyo ayekoli mingi mpasi, ayebisaki ete na “boyekoli oyo bosalemaki likoló ya bato koleka 10 000 oyo bazikaki . . . , moto moko te amonanaki ete azalaki liboso komela bankisi oyo epesamaka mpo na kokitisa mpasi na boumeli ya ntango oyo balekisaki na lopitalo.”

Lokola mbala mingi, makanisi ezali na bopusi monene likoló na mpasi ekosilaka te, bakliniki ezali mpenza komeka kosalisa babɛli ete bálimwisa mpasi na bango. Monganga Arthur Barsky, molakisi na eteyelo mpo na makambo ya monganga na Harvard, alimbolaki ete: “Oyo ezali yo kokanisa, oyo ezali yo komizela na yango, mabanzo na yo likoló na oyo ezali yo kooka​—makambo nyonso wana mazali na bopusi monene likoló na oyo yo ozali kooka.” Na yango, babɛli basalisami na kotya makanisi likoló na makambo mosusu na esika ya kotya yango likoló na mpasi na bango.

Bilikya ya kobikisama

Bakliniki wana ya sika ekosilisa mpasi nyonso epai ya bato? Atako lolenge ya kosalisa oyo emonisami awa ekoki kozala malamu, osengeli kozala na bososoli mpo na kopona kliniki oyo ekoki to monganga oyo ayekoli mpenzampenza mpasi. Atako bongo, tosengeli kolekisa ndelo te mpo na oyo tokoki komizela na yango.

Tómonisa yango na likambo oyo lisalemaki mpenza: Stephen Kaufman, mosani oyo akotómboláká biloko ya kilo mingi, oyo asanganaki mpe na masano ya Olympiques, azalaki kooka ntango nyonso lokola elɛmɛ mpo na mpasi ekosilaka te oyo azalaki na yango ntango moto moko mabe abɛtaki ye lisasi na nkingo. Nsima ya sanza mwambe ya kolanda manáka ya kosalisama, akómaki lisusu na makasi ya kosala ntango nyonso mpe, na nsima, azongelaki momekano. Atako bongo, alobaki ete: “Ndambo na ntango, misapi na ngai ya makolo mizali kobimisa mɔ́tɔ makasi lokola nde babwaki yango kati na mai mazali kotɔka.”

Na yango, atako bokóli nyonso wana ya kitoko oyo minganga bazwi, emonani polele ete bato bakoki kolónga te mpo na kokokisa elaká ya Biblia oyo ete: ‘Mpasi ekozala lisusu te.’ (Emoniseli 21:4) Na bongo, lolenge nini mokano wana mokokokisama?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lamuká! ezali kotinda te epai na kliniki moko ya sikisiki soko mpe lolenge moko ya sikisiki mpo na kosilisa mpasi yango.

[Bililingi na lokasa 27]

Myango mikeseni mpo na kosalisa mpasi, kati na yango, kosalisama na nzela ya masini na lontiliki oyo ekolekisamaka likoló ya nzoto mpo na konyɔlisa misisá

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto