Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/3 nk. 3-5
  • Myango ya bato mpo na kotya kimya na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Myango ya bato mpo na kotya kimya na mokili mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwango monene na bato
  • Koswana na bikólo
  • “Nsima na koswana na bikólo”
  • Kimya na mokili mobimba ezali nde komonana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mokili mozangi bitumba ekoki kosalema?
    Lamuká!—1996
  • Myango mpo na kimya na mokili mobimba mikolónga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nani akoki kotya kimya ya seko?
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/3 nk. 3-5

Myango ya bato mpo na kotya kimya na mokili mobimba

“Tolingi kobongisa mbebá wana makambo nyonso makosila. Tolingi kosala nyonso ekoki na biso mpo na kopesa nzela na oyo nakoki kobenga na elikya nyonso ete ebongiseli ya sika na mokili mobimba.”​—Maloba ya George Bush, prézida ya États-Unis, na janvier 1991, mwa ntango moke nsima na ebandeli na etumba na bango na Irak.

“Likanisi ya Ebongiseli ya Sika ya mokili mobimba lilobelami na prézida Bush, limonisi ntina na nguya ya lotómo mpe ya endimiseli oyo ete mabota manso mazali na mokumba mpo na kotya bonsomi mpe bosembo. Awa koswana esili kati no mikili, eleko na sika ebandi.”​—Maloba ya ntóma ya États-Unis na mboka Australie, na août 1991.

“Na mpokwa oyo, awa ezali ngai kotala bokóli ya démocratie kati na mokili, ntango mosusu. . . ntango mosusu tobɛlɛmi mpenza na mokili yango ya sika koleka na liboso.”​—Maloba ya George Bush, prézida ya États-Unis, na septembre 1991.

BAKONZI mingi ya mokili, lokola prézida Bush, bazali kolobela mikolo mizali koya na elikya nyonso. Elikya na bango ezali mpenza na moboko? Makambo oyo masili kosalema uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mazali kopesa nzela na kozala na motindo na elikya wana? Okanisi ete bakonzi ya politike bakoki komema libateli na mokili mobimba?

Mwango monene na bato

Lisoló moko lipesamaki na televizio na motó na likambo Goodbye War (Etumba esili libela), elimboli ete: “Na boumeli na bambula mibale ya nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, koleka milió moko na bato babomamaki na sanza nyonso.” Na eleko wana, mabota mazwaki mposa noki ya kosala mwango oyo mokopekisa motindo na etumba wana ete ebima lisusu te. Wana matáta mazalaki naino makasi, bamonisi ya bikólo 50 basalaki mwango moleki monene mpo na libateli na mokili mobimba oyo basalaki naino yango liboso te: Charte des Nations unies (mokanda ya mibeko ya Mabota Masangani). Maloba na yango ya ebandeli mamonisaki ekateli ya “kobatela mabota makoya nsima ete mazwa mpasi na etumba te.” Basangani ya Lisangá ya Mabota baoyo bayaki nsima, basengelaki “kosala na bomoko mpo na kotya kimya mpe libateli na mokili mobimba.”

Mikolo ntuku minei na moko na nsima, mpepo moko ebwakaki bombe atomique na engumba Hiroshima, na mboka Japon. Ekweaki na centre-ville, mpe ebomaki koleka bato 70 000. Bombe wana mpe oyo ebwakamaki mikolo misato nsima na engumba Nagasaki, esukisaki etumba na mboka Japon. Na ntango Alemanye, mboka oyo eyokanaki na Japon, etikaki kobunda na mokolo ya 7 mai 1945, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki. Kasi yango ezalaki nsuka na bitumba nyonso?

Te. Kobanda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokili mozwi koleka matáta mike 150, oyo ebomaki koleka bamilio 19 ya bato. Emonani ete, mwango monene ya O.N.U. ememi naino libateli na mokili mobimba te. Likambo nini libongaki te?

Koswana na bikólo

Basali na myango ya O.N.U. bakanisaki te na ntina na kowelana oyo ekólaki nokinoki kati na bamboka oyo ezalaki liboso na boyokani na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bikólo mingi bapesaki lisungi na etumba wana mpo na nguya oyo babengaki yango ete koswana na bikólo mpe oyo, na ndambo moko, ezalaki etumba kati na biyangeli ya communisme mpe ya capitalisme. Na esika na kosangisa nguya na bango mpo na kopekisa etumba, ngambo mibale na masangani ya Bikólo epesaki lisungi na banguna mibale kati na matata mabimaki na mboka mpe babundisaki lisusu mikili ya Azia, ya Afrika mpe ya Amerika.

Na nsuka na bambula 1960, koswana na bikólo ekitaki mwa moke. Esilaki na 1975 na ntango mabota 35 batyaki mabɔkɔ na oyo babengi ete boyokani ya Helsinki. Kati na mikili oyo mityaki mabɔkɔ, ezalaki Union soviétique mpe États-Unis, mpe mikili ya Mpótó oyo miyokani na yango. Bango nyonso bapesaki elaká ya kotya “kimya mpe libateli,” mpe na koboya “kosalela matumoli to na kosalela bokasi, soko mpo na kotɛmɛla bolamu ya ekólo to mpe lipandá ya politike ya Ekólo moko, soko na motindo nyonso oyo moyokani te na mikano ya Lisangá ya mabota.”

Kasi makanisi wana mapesaki matomba malamu te. Na ebandeli ya bambula 1980, bonguna ya banguya minene ya mokili mobimba bokómaki makasi. Makambo mabebaki mpenza kino na mobu 1982, M. Javier Perez de Cuellar, secrétaire général ya sika ya Lisangá ya mabota, andimaki kokwea ya lisangá na ye mpe abengaki mabota oyo basangana mpo na kobundisa “mobulu mozali lisusu komonana na mokili mobimba.”

Nzokande, lelo oyo, secrétaire général ya O.N.U. mpe bakonzi mosusu bazali komonisa ete bazali na elikya mpenza. Bazulunalo, radio mpe televizio elobeli “nsima na koswana na bikólo.” Lolenge nini mbongwana wana esalemaki?

“Nsima na koswana na bikólo”

Likita na ntina na libateli mpe boyokani na mikili ya Mpótó, liye liyanganisaki Bikólo 35, likokisaki mosala moko monene. Na septembre 1986, mikili oyo miyanganaki na yango mityaki mabɔkɔ na oyo babengi ete mokanda ya likita ya Stockholm, kolobeláká lisusu mokumba na bango liboso na boyokani ya Helsinkia botyamaki mabɔkɔ na mobu 1975. Mokanda ya likita ya Stockholm mozali na mibeko mingi mitali bokɛngɛli na misala ya basodá. SIPRI (Institut ya bolukiluki mpo na kimya na mboka Stockholm) eyebisi kati na Annuaire na yango ya mobu 1990 (angl.) ete: “Matomba ya bambula misato oyo euti koleka mazali mpenza kolendisa mpe makambo mabandi kokokisama na koleka yango ekomami kati na mokanda ya likita ya Stockholm.”

Na nsima, na 1987, banguya minene ya mokili mobimba basalaki boyokani monene bosengisaki ete babebisa mindoki na bango nyonso basili kopika na mabelé mpe babengi yango ete missiles, oyo ekoki kobwakama longwa na ntaká ya bakilometele 500 kino na bakilometele 5 500. SIPRI elobi ete: “Kobebisama ya ba missiles mpe bisika bibongisami mpo na kobwaka ba missiles elandami lokola yango ekanamaki mpe mitinda ya boyokani mitósami mpenza na ngambo na ngambo.”

Meko mosusu ekamatamaki mpo na kokitisa likámá ya etumba ya nikleere. Na ndakisa, na 1988, banguya minene ya mokili mobimba basalaki boyokani na ntina na “ba missiles oyo ekobwakamaka longwa na continent moko kino mosusu mpe ba missiles ekobwakamaka longwa na nsé na mai.” Liboso na kobwaka bibundeli motindo wana, nguya moko na moko esengeli koyebisa mosusu, “soko ngonga ntuku mibale na minei na liboso na date oyo ebongisami mpo na kobwaka yango, koyebisa mpe ekokwea kino etando nini mpe esika nini mpenza yango ekanami kokwea.” Engebene SIPRI, boyokani yango “bozali mpenza kolongola nzela nyonso oyo ekoki kobimisa makama na bikólo, likambo likoki kobimisa etumba ya nikleere na mokili mobimba.”

Na ntango yango, myango mpo na kotya libateli na mokili mobimba mizalaki sé kobakisama. Na sanza ya mai 1990, na likita moko ya banguya minene ya mokili mobimba lisalemaki na Washington, Mikhaïl Gorbatchev, prézida ya Union soviétique, apesaki likanisi ete ngambo mibale ya mabota ya Mpótó batya mabɔkɔ na mokanda na boyokani mpo na kimya. Na juillet, mikili 16 ya Mpótó, basangani ya O.T.A.N. (Organisation du traité de l’Atlantique Nord), miyanganaki na engumba Londres. Eyano na likanisi ya Mikhaïl Gorbatchev ezalaki ete ngambo nyonso mibale batya mabɔkɔ na “maloba na bango nyonso kati na yango [bandimi] mpenza ete bakozalana lisusu banguna te mpe [bayebisi] mposa na bango ya kotika kosalela matumoli to mpe kosalela bokasi.” Zulunalo moko ya Afrika elobelaki likambo yango na lokasa na liboso na titre oyo ete: “Bokóli na lombango epai na kimya ya mokili mobimba.”

Na nsima, na mokolo mozalaki liboso ete likita ya banguya minene ya mokili mobimba esalema na engumba Helsinki, na mboka Finlande, molobeli moko ya boyangeli ya Amerika, alobaki ete: “Liboso na likámá ya etumba [ya Proche-Orient], bato bazalaki kosala mwango mosusu mpo na kimya ya mokili mobimba.” Kimya elóngaki te na na ntango Irak akendaki kobundisa Koweït mpe Proche-Orient nyonso mbɛlɛ ekɔtaki na etumba. Kasi, na lotómo ya Lisangá ya mabota, nguya moko ya mokili mobimba oyo ekambamaki na États-Unis, ezongisaki babundisi kino na mboka na bango. Bomoko kati na bikólo bamonisamaki na etumba wana mpo na kokóma na mokano bobele moko, ememaki bato mosusu na kozwa elikya ete eleko na sika ya boyokani esili kobanda.

Uta ntango wana, makambo ya mokili mobimba masili kozwa bokóli mosusu. Mingi mpenza, ebongiseli oyo ebengamaki liboso ete Union soviétique esili mpenza kobongwana. Oyo babengi ete États baltes, basili kosakola lipandá na bango mpe bikólo mosusu ya Union soviétique esili kolanda mwango wana. Matáta makasi kati na bikólo masili kobima na bamboka oyo emonanaki lokola ete ezalaki na ngambo moko na nsé na boyangeli ya communisme oyo esangisaki yango nyonso. Na nsuka na mobu 1991, Union soviétique ekufaki libela.

Mbongwana minene likoló na makambo ya politike esili kopesa lotómo mingi epai na Lisangá ya mabota. Mpo na yango, zulunalo New York Times elobi ete: “Mpo na lisangá ya mokili mobimba, kokita na koswana na mokili mobimba mpe elimo ya sika ya boyokani kati na États-Unis mpe Union soviétique ekoki kolimbola ete ekokokisa mokumba ya sika monene kati na makambo ya bikólo.”

Ntango ekoki sikawa mpo na lisangá yango liumeli uta mibu 47 ete limonisa makoki na yango? Tokɔti mpenza na oyo États-Unis abengaki yango ete “ekeke ya sika mpe mbula nkɔto ya sika ya kimya, ya bonsomi mpe bolamu?”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Boyokani yango bozali na esika ya liboso mpe bozali na ntina mingi kati na molongó oyo motyamaki mabɔkɔ na mikili oyo Canada, États-Unis, Union soviétique mpe mikili mosusu 32, na likita na mboka Helsinki. Boyokani ya ntina mingi eyebani na nkombo Mibeko ya nsuka na Likita na ntina na libateli mpe boyokani na mikili ya Mpótó. Mokano na bango ya liboso ezalaki kokitisa matáta kati na mikili ya Est mpe ya Ouest.​—World Book Encyclopedia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto