Mokili mozangi lokoso
“KOZANGA mbongwana monene kati na makanisi ya bato, eloko moko te ekobongwana mpo na bolamu ya biso bato, mpe libebi oyo lizali liboso ya mokili na biso . . . likopɛngolama soko moke te.”—Václav Havel, prezidá ya République Tchèque.
Bato mingi bazali kondima ete ebongiseli ya mokili ya ntango oyo ekoumela lisusu te. Lokola prezidá Václav Havel, basusu bazali komona ete mbongwana monene kati na makanisi mpe misala ya bato ezali mwango bobele moko ya kobika. Na ndakisa, motali moko ya makambo mazali koleka na mokili na ntango oyo alobaki ete: “Mpo na bankámá ya bamilió ya babóla mpenza, elikya mpo na kozwa bilei mpe kokokisama ya bamposa na bango mosusu ya bomoi ekozala soko moke te ya malamu . . . longola bobele soko mabota ya mokili mazwi bikateli makasi ya kobongola bopusi ndenge na ndenge ya ntango oyo.”—Búku Food Poverty & Power.
Nzokande, ezali likambo lilongobani ete tótya elikya na biso ya kolónga likoló na lolenge moko ya mbongwana ya moboko na bizaleli ya bato? Tokoki kotyela mpenza biyangeli motema ete “bízwa bikateli makasi mpo na kobongola bopusi ndenge na ndenge ya ntango na biso”? Basusu bakanisaka bongo. Balobaka ete ‘Nzambe apesá biso bonsomi, mpe ezali mokumba na biso moko ete tóbongola makambo.’ Kasi makambo mabe oyo masalemi kati na lisoló ya bato mazali kotinda biso tómituna soki moto azali na bolingi mpe na makoki ya kosala mbongwana oyo esengeli. Likanisi yango lizali kobwaka elikya te, kasi lilongobani. Okoki nde kopesa bomoi na yo na mabɔkɔ ya monganga-mopasoli oyo oyebi ete bato ya maladi oyo balekaki epai na ye liboso na yo bakufaki bango nyonso?
Mokakatano mouti nde na koteyama?
Kati na búku na ye Developed to Death—Rethinking Third World Development, Ted Trainer alobi ete: “Mokakatano mouti na koteyama.” Abakisi ete soki bato bateyami te mpo na komona ete mbongwana ya moboko esengeli, “tokoki kozala na elikya te ya kozwa mokili moko ya bomoi malamu.” Na ntembe te mposa ezali ya koteya bato na ntina ya mbongwana kati na bizaleli mpe misala soki mokili elingi kobika. Ya solo, yango ezali na ntina, mpe Biblia ezali kolobela ebongiseli ya koteyama motindo wana. Ezali koloba ete mabelé “ekotonda na boyebi na [Yehova].” Na yango, “bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te.”—Yisaya 11:9.
Kasi ezala likambo litali koteyama mingi, to ebongiseli ya mateya ya Nzambe, moko na yango te ekoki kolongola bato ya lokoso oyo bazali kosala basusu mabe mpe kobebisa mabelé. Mateya ekopesa mbongwana bobele epai na bato oyo balingi kobongwana, bato oyo balingi komitambwisa engebene mitindá ya Nzambe. Engebene Yesu Klisto, bazali moke. (Matai 7:13, 14) Na bongo, Biblia ezali te kotya elaka na yango ya mbongwana likoló na elikya moko ya lokuta, ete mokolo mosusu bato bakomona bonene ya mikakatano mpe bakobongola bizaleli na bango. Ezali koloba ete Nzambe akozwa ekateli ya kolongola bato ya lokoso na mokili.
Ekateli ya Nzambe
Bato mingi bazali komona likanisi yango lokola ndɔtɔ to lokola likambo ya lokuta. Búku World Hunger: Twelve Myths elobi ete: “Boyebi ya ekeke ya zomi na mwambe esɛngisi biso ete tóbwaka likanisi ya kondimisa bato ete Nzambe akozwa ekateli mpo na kobongisa bomoi ya bato.” Kasi tosengeli nde kotya kondima na biso na mayele mpe filozofi ya baoyo basili kobungisa kondima na bango epai na ‘Nzambe oyo abongi na kozwa ekateli’? Myango ya bato ya mayele ya mokili mikolónga mpenza?
Ezali likambo ya mayele ete mpo na kobika tosengeli kotya elikya na biso likoló na bisakweli ya solosolo oyo bizwami kati na Biblia, oyo bizali komonisa ekateli ya Nzambe. Kondima bilaka ya Nzambe ezali te bobele “likanisi ya kobɔndisama”—ezali elikya bobele moko ya solosolo oyo tozali na yango mpo na kobika.
“Kobebisa babebisi na mokili”
Nzambe azali kolaka mpenza nini? Alaki ete akolongola na mabelé baoyo bazali kobebisa ezingelo. Emoniseli 11:18 elobi ete azali na “elaka” ya “kobebisa babebisi na mokili.” Yango ekolimbola nini? Ekolimbola nsuka ya baoyo nyonso bazali konyokola babóla mpe konyokola bato oyo basundolami. Nzambe ‘akolóngisa babóla na bato; akobikisa bana na mozangi; mpe akotuta monyokoli.’ Akolongola bato na lokoso mpe akopesa nzela na baoyo banyokwami ete bákóma malamu. “Akobikisa mobóla oyo akonganga . . . Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.”—Nzembo 72:4, 12-14.
Oyo nde mbongwana yango ekomema! Engebene ntoma Petelo, mbongwana yango ekozala malamu na boye ete ekobimisa “makoló na sika mpe mabelé na sika.” (2 Petelo 3:13, NW) Kati na ‘mabelé yango ya sika,’ moto nyonso akosepela na ebele ya biloko oyo mabelé ekobimisa mpo na kokokisa bamposa ya bato. (Mika 4:4) Ata sikawa, bilei ezali mingi mpo na moto nyonso. Mokakatano mozali kouta nde na lolenge mabe ya kokabola yango. Kati na búku na ye Food Poverty & Power, Anne Buchanan alobi ete: “Ekanisami ete tokoki kobimisa biloko mingi na bisika oyo bibongi na milóna na mokili mpo na koleisa bato miliare 38 kino miliare 48.”
Mokili oyo mokobika. Mozalisi na yango “asalaki yango eloko na mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Ekateli ya Nzambe likoló na bato ya lokoso ekosalema na eleko ya “bolɔ́zi monene” oyo ekoumela ntango mokuse. (Matai 24:21) Na bongo, baoyo bakobika na bolɔ́zi monene yango bakosepela na mabelé oyo ekobongwana paladiso, oyo ekotonda na bato basikolami mpenza na monyoko ya lokoso. (Nzembo 37:10, 11; 104:5) Ekozala lokola Biblia elaki yango “[Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:8.
Okoki kozala moko kati na baoyo bakozwa matomba ya esengo na ekateli ya Nzambe ya kolongola lokoso na mabelé. Soki olingi mpenza kosala mokano ya Nzambe, zwá litomba na lisungi nyonso oyo lipesameli yo mpo ete obika sikawa na mokili ya lokoso. Zwá ekateli ya kobika na “bolɔ́zi monene.” Batatoli ya Yehova bazali pene mpo na kosunga yo ete oyekola oyo osengeli koyeba. Kendá kokutana na bango na Ndako ya Bokonzi esika bayanganaka to tindá nkomá na adrɛsi ebongi na yo oyo ezwami na lokasa 5.