Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Juillet lok. 31
  • Bokeseni kati na bato na mbongo mpe babola ezali se kobakisama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokeseni kati na bato na mbongo mpe babola ezali se kobakisama
  • Lamuká!—2000
  • Masolo mosusu
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Bana—bozwi to mokumba?
    Lamuká!—1993
  • Lokoso​—⁠Lolenge nini ezali kobebisa biso?
    Lamuká!—1997
  • Babola bazali se kozinda na bobola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Juillet lok. 31

Bokeseni kati na bato na mbongo mpe babola ezali se kobakisama

Kati na zulunalo UNDP Today, mokanda moko ya ebongiseli oyo babengi Programme des Nations unies pour le développement, tokoki kotánga ete: “Bobola ekiti mingi na mokili na boumeli ya mbula soki ntuku mitano oyo koleka ndenge ekitaki na boumeli ya bikeke mitano oyo elekaki liboso. Kobanda 1960, na mikili ya bobola, bana bazali kokufa lisusu mingi te, mpo na likambo ya kozanga kolya malamu, likoló na bato misato oyo kala bazalaki na mpasi, moko akómi kolya malamu mpe likoló na bana minei oyo bakokaki te kokɔta kelasi, lelo oyo moko akoki kokɔta kelasi.” Kasi, mokanda yango elobi lisusu ete atako makambo ezali kobonga, bobola “ezali se kobakisama.”

Likambo ya mawa koleka, bokeseni kati na bato oyo bafandi esika moko ezali mpe kobakisama. Catherine Bertini, mokambi-mokonzi ya Programme alimentaire mondial alobi ete: “Bato oyo bazali kolya malamu te mpe oyo bazali kokufa nzala bazali lelo mingi koleka ndenge bazalaki esili koleka mbula moko.” Ya solo, na mikili ya bobola, bato milio 840 bazali ntango nyonso na nzala, bato mosusu koleka miliare moko bamelaka mai ya pɛto te, mpe bato pene na miliare moko na ndambo babikelaka na mwa mbongo oyo ekoki ata dolare moko te mokolo na mokolo. Mary Robinson, haut-commissaire ya ONU mpo na makambo matali ntomo ya bato, alobi ete “likama oyo tozali na yango ezali te mpo mokili ekabwani, mikili ya bozwi epai mpe mikili ya bobola epai, kasi ekabwani nde kati na mikili ya bozwi mingi koleka mpe mikili oyo ekokóma na bozwi ata moke te.”

Lokola mokili mobimba ekómi na bato miliare motoba, yango ekosɛnga mbongo ntalo boni mpo ete bokeseni ezala mingi te kati na bato ya mbongo na babola? Ezali mpenza mpasi te mpo na kosala yango. ONU ekanisi ete soki babakisi kaka dolare miliare 9 (dolare 1,50 na moto moko) mpo na mbula mobimba, yango ekopesa bato batwalɛti ya malamu mpe mai ya pɛto na mokili mobimba, mpe soki babakisi dolare miliare 13 (soki dolare 2 na moto), yango ekokoka mpo ete moto nyonso na mokili akenda na lopitalo ya malamu mpe aliya malamu. Atako ezali komonana ete motuya ya mbongo yango ezali mingi, kasi ezali moke mpenza soki bakokanisi yango na mbongo oyo mokili ezali kobimisa mpo na makambo mosusu. Na ndakisa, na mbula moko oyo euti koleka, mokili ebimisaki dolare miliare 435 (koleka dolare 70 na moto moko) mpo na piblisite mpe dolare miliare 780 (dolare 130 na moto) mpo na makambo ya bitumba. Emonani polele ete, kosala ete bokeseni ezala mingi te kati na bato ya mbongo na babola ezali te likambo ya kozwa mbongo mingi kasi ezali nde likambo ya koyeba kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto