Lisolo ya bomoi
Yehova apambolaka mpenza baoyo babatelaka nzela na ye
YA ROMUALD STAWSKI
Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Sɛtɛmbɛ 1939, bitumba ezalaki makasi na nɔrdi ya Pologne. Nazalaki na mbula libwa mpe nakendeki esika moko oyo bitumba ezalaki pene na biso mpo na kotala. Makambo namonaki kuna ezalaki nsɔmɔ, bibembe elalaki na mabelé mpe milinga etondaki na esika yango. Atako nazalaki kokanisa ndenge nakokóma na ndako kozanga kozwa likama, mituna eyaki na makanisi na ngai: “Mpo na nini Nzambe atiki makambo mabe boye esalema? Azali mpenza na ngámbo nini?”
NTANGO etumba elingaki kosila, Banazi bakómaki kokanga bilenge na makasi mpo na kokómisa bango basoda. Moto nyonso oyo aboyi, bazalaki kokakisa ye na nzete to kotya ye na ntolo elembo oyo bakomi “motɛki” to “mobomi mboka.” Engumba na biso, Gdynia ezalaki na katikati ya basoda ya Allemagne mpe ya Union soviétique. Ntango tobimaki na libándá ya engumba mpo na kotoka mai, masasi ná babombe ezalaki koleka biso likoló ya mitó, mpe leki na ngai Henryk akufaki na masasi. Lokola bitumba ekómaki ndongo, mama amemaki biso nyonso bana minei mpe tokendaki kobombama na esika moko na nse ya mabelé. Kuna, Eugeniusz, leki na ngai ya mobali ya mbula mibale akufaki na maladi moko ya mongongo (diphtérie).
Namitunaki lisusu boye: “Nzambe azali wapi? Mpo na nini atiki bampasi oyo nyonso?” Atako nazalaki mondimi ya molende ya Katolike mpe nazalaki kozangisa losambo te, nazwaki biyano na mituna yango te.
Nandimi solo ya Biblia
Biyano na mituna na ngai eutaki na esika oyo nazalaki kutu kokanisa te. Etumba esilaki na mobu 1945, mpe na ebandeli ya mobu 1947, Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na biso na Gdynia. Mama na ngai asololaki na Motatoli yango, kasi ngai mpe nayokaki mwa makambo mosusu oyo basololaki. Emonanaki lokola makambo yango ezali solo, yango wana ntango abengaki biso na likita moko ya boklisto, tondimaki kokende. Nsima ya sanza moko kaka, atako nayebaki naino solo ya Biblia malamumalamu te, nabandaki kosakola elongo na etuluku moko ya Batatoli nsango ya mokili moko ya malamu, epai bitumba mpe mobulu ekozala te. Yango epesaki ngai esengo mingi.
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1947, nazwaki batisimo na liyangani moko ya zongazonga oyo esalemaki na mboka Sopot. Na sanza ya mitano ya mbula oyo elandaki, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe nazalaki kolekisa ntango na ngai mingi na mosala ya kosakola nsango ya Biblia. Bakonzi ya mangomba ya mboka na biso batɛmɛlaki mosala na biso makasi mpe bakómaki kotinda bato básala biso mabe. Mokolo moko, ebele ya bato oyo basilikaki balandaki biso, babambaki biso mabanga mpe babɛtaki biso lokola banyama. Mokolo mosusu, bamamɛlo ná basángo batindaki etuluku moko ya bato mpo bábɛta biso. Tomibombaki na biro moko ya bapolisi, kasi bato yango bazingaki esika yango, mposa na bango ezalaki bábɛta biso kaka. Nsukansuka, bapolisi mosusu bayaki mpe bakimisaki biso.
Na ntango wana, lisangá ezalaki na teritware yango te. Ntango mosusu, tozalaki kolekisa butu mobimba libándá na kati ya zamba. Tozalaki na esengo mpo tokokaki kosakola ata soki makambo ezalaki malamu te. Lelo oyo, masangá ya minene ezali na mboka yango.
Mosala na Betele mpe bolɔkɔ
Na mobu 1949, babengaki ngai na Betele ya Łódź. Oyo nde libaku malamu kosala na esika wana! Likambo ya mawa, naumelaki kuna te. Na Yuni 1950, sanza moko liboso mosala na biso epekisama, bakangaki ngai ná bandeko mosusu ya Betele. Bamemaki ngai na bolɔkɔ mpe na nsima, bazalaki konyonga ngai mpo naloba makambo.
Lokola tata na ngai azalaki kosala na masuwa oyo ezalaki kokende na New York mbala na mbala, bakonzi oyo bazalaki kosambisa ngai bazalaki kotinda ngai naloba ete tata azalaki kotɛka basɛkɛlɛ ya mboka na biso na États-Unis. Bazalaki konyonga ngai na ndenge moko ya mabe. Lisusu, bapolisi minei balandisaki ngai mituna mpo nayebisa bango makambo oyo nayebi na ntina na ndeko Wilhelm Scheider, oyo azalaki kotambwisa mosala ya Batatoli ntango wana na Pologne. Babɛtaki ngai na banzete na makolo. Lokola nalalaki na mabelé mpe makila ezalaki kobima, namonaki ete nakómi na nsuka mpe nagangaki mbala moko, “Yehova, bikisá ngai!” Bakamwaki mpe batikaki kobɛta ngai. Nsima ya mwa miniti, bakweaki na mpɔngi. Nasepelaki mpe makasi ezongaki. Yango endimisaki ngai ete Yehova ayokaka mpenza ntango basaleli na ye oyo bamipesi epai na ye baleleli ye. Likambo yango ekómisaki kondima na ngai makasi mpe eteyaki ngai kotyelaka Nzambe motema na ngai mobimba.
Na lapolo na bango oyo bapesaki nsima ya kosambisa ngai, bakɔtisaki makambo ya lokuta oyo ngai nalobaki te. Ntango naboyaki, polisi moko alobaki na ngai boye: “Okoyebisa na tribinale!” Moninga moko oyo tozalaki na ye na bolɔkɔ ayebisaki ngai nabanga te, mpo prokirɛrɛ moko ya basoda akotala lapolo yango, mpe yango ekopesa ngai libaku ya komonisa lokuta ya makambo oyo bakoselaki ngai. Makambo elekaki mpe bongo kaka.
Mosala ya zongazonga mpe bolɔkɔ mosusu
Babimisaki ngai na bolɔkɔ na Yanuali 1951. Sanza moko na nsima, nakómaki mokɛngɛli-motamboli. Atako mosala na biso epekisamaki, nazalaki kosala elongo na bandeko mosusu mpo na kolendisa masangá mpe kosalisa Batatoli oyo bapanzanaki mpo bapolisi bazalaki kolukaluka bango. Tolendisaki bandeko bákoba kosakola. Bambula na nsima, bandeko wana basalisaki mpenza bakɛngɛli-batamboli mpe basalaki mingi mpo na kobimisa mpe kokabola mikanda na kobobambama.
Mokolo moko na Aprili 1951, ntango tosilisaki likita moko ya boklisto, bapolisi oyo bazalaki kolandalanda ngai bakangaki ngai na balabala. Lokola naboyaki koyanola na mituna na bango, bamemaki ngai na bolɔkɔ ya Bydgoszcz mpe babandaki kosambisa ngai na butu wana kaka. Bayebisaki ngai natɛlɛma na efelo mikolo motoba butu moi, kolya te mpe komɛla te, mpe esika yango etondaki na milinga ya makaya oyo bapolisi yango bazalaki komɛla. Bazalaki kobɛta ngai na fimbo ya nzete mpe kozikisa ngai na mɔtɔ ya makaya. Ntango bamonaki ete makanisi na ngai ebungi, basopelaki ngai mai mpe babandaki lisusu kosambisa ngai. Nabondelaki Yehova apesa ngai makasi, mpe asalisaki ngai.
Ntango oyo nalekisaki na bolɔkɔ ya Bydgoszcz ebimisaki mpe mbuma malamu. Kuna, nasakolaki solo ya Biblia epai ya bato oyo bakokaki koyoka yango te. Ya solo, mabaku ya kopesa litatoli ezalaki mingi. Lokola bato ya bolɔkɔ bazalaki kobunda na mpasi mpe bazangaki elikya, bazalaki kofungola mpenza matoi mpe mitema mpo na koyoka nsango malamu.
Mbongwana mibale ya minene
Na mobu 1952, mwa moke nsima ya kobima na ngai na bolɔkɔ, nakutanaki na Nela, ndeko moko ya mwasi oyo azalaki mobongisi-nzela ya molende. Azalaki mobongisi-nzela na sudi ya Pologne. Na nsima, akómaki kosala na esika moko ya bisika oyo tozalaki kobimisa mikanda na biso na kobombama; tozalaki kobenga bisika yango, “fulu ya mampa.” Ezalaki mosala moko makasi oyo ezalaki kosɛnga kozala ekɛngɛ mpe na elimo ya komipesa. Tobalanaki na 1954, mpe tokobaki na mosala ya mobongisi-nzela tii ntango tobotaki Lidia, mwana na biso ya mwasi. Na nsima, mpo na kosalisa ngai nakoba na mosala ya zongazonga, tozwaki ekateli ete Nela atika mosala ya mobongisi-nzela, azonga epai na biso mpo abatelaka mwana na biso.
Na mbula wana kaka, tosengelaki kozwa ekateli mosusu ya ntina mingi. Basɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli ya etúká na eteni monene ya ekólo Pologne. Tobondelaki mpo na likambo yango. Nayebaki ete ezali na ntina mingi kolendisa bandeko na biso na ntango wana oyo mosala epekisamaki. Bakangaki bandeko mingi na ntango yango, yango wana esengelaki mpenza kolendisa bandeko na elimo. Na lisalisi ya Nela, nandimaki mokumba yango. Yehova asalisaki ngai mpe nasalaki mosala yango mbula 38.
Nakómi kokɛngɛla bisika ya kobimisa mikanda
Na ntango wana, mokɛngɛli ya etúká azalaki mpe na mokumba ya kokɛngɛla bisika ya kobimisa mikanda, oyo ezalaki na bisika ya kobombama. Bapolisi bazalaki ntango nyonso kolandela biso, kolukaluka bisika oyo tozali kobimisa mikanda mpo na kokanga yango. Bazalaki mpe kolonga kokanga bisika yango mosusu, kasi tozalaki soki moke te kozanga bilei ya elimo oyo tosengelaki na yango. Emonanaki polele ete Yehova azali kosunga biso.
Mpo na kobenga moto aya kosala mosala ya kobimisa mikanda oyo ezalaki mosala moko makasi mpe ya likama, asengelaki kozala sembo, ekɛngɛ, kozala na elimo ya komipesa mpe moto ya botosi. Bizaleli wana nde ezalaki kosala ete bisika ya kobimisa mikanda ekoba kosala kozanga ete bapolisi bámona yango. Kozwa esika ya malamu mpo na kotya masini ya kobimisa mikanda na kobombama ezalaki mpe pɛtɛɛ te. Bisika mosusu ezalaki komonana malamu, kasi bandeko oyo bazalaki kofanda wana bazalaki na bokɛngi te. Bipai mosusu, atako bandeko bazalaki na bokɛngi, bisika ezalaki malamu te. Bandeko bazalaki mpenza komipesa. Nazalaki kosepela mingi na bandeko wana nyonso oyo nazwaki libaku ya kosala na bango.
Kosakola nsango malamu
Na bambula wana ya mpasi, bazalaki ntango nyonso kofunda biso ete tozali kosala mosala oyo epekisami, oyo ezali kobebisa makanisi ya bato mpe bazalaki komema biso na batribinale. Ezalaki mpenza mokakatano mpamba te tozalaki na baavoka te oyo bakokaki kosambaka mpo na biso. Baavoka mosusu bazalaki motema malamu, kasi basusu bazalaki kobanga mpo na nsango oyo bazalaki kopanza Batatoli na ntango wana mpe baboyaki kokwea na nkanda ya bakonzi. Atako bongo, Yehova ayebaki mposa na biso, mpe na ntango ebongi, akokisaki mposa na biso.
Alojzy Prostak, mokɛngɛli-motamboli moko ya engumba Cracovie, abɛtamaki makasi ntango bazalaki kosambisa ye mpe bamemaki ye na lopitalo ya bolɔkɔ. Lokola atikalaki sembo na komekama makasi oyo akutanaki na yango na makanisi mpe na nzoto, bato mosusu ya bolɔkɔ oyo bazalaki na lopitalo bakómaki kopesa ye limemya mpe lokumu. Moko na bango azalaki avoka na nkombo ya Witold Lis-Olszewski, oyo akamwaki mpenza na mpiko oyo ndeko Prostak amonisaki. Avoka yango asololaki na ye mbala mingi mpe alakaki ye ete, “soki kaka nabimi na bolɔkɔ mpe nazongeli mosala na ngai, nakobanda kosamba mpo na Batatoli ya Yehova.” Mpe akokisaki maloba na ye.
Olszewski asalaki biro na ye moko ya baavoka, oyo bazalaki mpenza na ekateli ya kosalisa biso. Na ntango oyo botɛmɛli ezalaki makasi, bazalaki kosamba mpo na bandeko makambo soki 30 na sanza, elingi koloba likambo moko na mokolo! Lokola Olszewski azalaki na mposa ya koyeba malamumalamu makambo nyonso, basɛngaki ngai nazalaka mingi pembeni na ye. Tosalaki bongo mbula nsambo, kobanda na bambula ya 1960 tii na bambula ya 1970.
Na boumeli ya ntango yango, nayekolaki makambo mingi ya mibeko. Nazalaki kotala mbala na mbala ndenge bazalaki kosambisa bandeko, ndenge baavoka bazalaki kosamba mpo na bango to kofunda bango, batekiniki ya kosamba, mpe ndenge bandeko bazalaki kosamba. Makambo wana nyonso oyo nayebaki esalisaki bandeko, mingimingi baoyo bazalaki kosamba na batribinale mpo bazali Batatoli, mpo báyeba makambo oyo bakoki koloba mpe báyeba ntango nini basengeli koboya koloba.
Ntango bafundi ndeko moko na tribinale, Olszewski azalaki mbala mingi kolekisa butu mobimba na bandako ya Batatoli ya Yehova. Azalaki kosala bongo te mpo azangaki makoki ya kofutela ndako, kasi azalaki nde kokokisa maloba oyo alobaki mokolo moko ete, “liboso ya kokende na tribinale, nakolinga koyeba makambo na bino mingi.” Na lisalisi na ye, tolongaki makambo mingi oyo tosambaki. Asambaki makambo mingi mpo na ngai, mpe azalaki kolinga soki moke te nafuta ye. Na libaku moko, aboyaki kozwa lifuta mpo na makambo 30 oyo asambaki mpo na biso. Mpo na nini? Alobaki boye: “Nalingi kopesa mabɔkɔ ata mwa moke na mosala na bino.” Mpe mosala oyo azalaki kosalela biso, ekokaki kosɛnga mbongo mingi. Bakonzi babandaki kotya Olszewski ná ekipi na ye miso mpo na mosala oyo bazalaki kosalela biso, kasi yango elɛmbisaki ye te mpo na kosalisa biso.
Ezali mpasi kolobela litatoli malamu oyo bandeko na biso bapesaki ntango bazalaki kosamba. Bato mingi bazalaki koya na batribinale mpo na kotala ndenge bandeko bazali kosamba mpe mpo na kolendisa bango. Na mbula moko oyo bandeko basambaki mingi, baoyo bayaki kolendisa bango bakómaki tii 30 000. Ezalaki mpenza ebele ya Batatoli!
Mokumba ya sika
Na mobu 1989, balongolaki mobeko oyo epekisaki mosala na biso. Mbula misato na nsima, batongaki Betele ya sika mpe basalaki molulu ya kofungola yango. Babengaki ngai nakende kosala kuna, na Biro ya makambo etali boyokani elongo na minganga, mpe nasepelaki na mosala yango mingi. Tozalaki bandeko misato na biro yango. Tosalisaki bandeko na biso oyo bakutanaki na likambo ya makila mpe tosalisaki bango bákangama na ekateli na bango ya boklisto na ntina na makila.—Misala 15:29.
Ngai ná mwasi na ngai tosepelaki mingi na libaku malamu ya kosalela Yehova na mosala ya kosakola. Nela azalaki ntango nyonso kosalisa ngai mpe kolendisa ngai. Ezala nazali na makambo mingi ya kosala mpo na kokokisa mikumba na ngai to nakɔti bolɔkɔ, mwasi na ngai azalaki komilelalela te mpo nazali na ndako te, mpe nakobosana likambo yango ata mokolo moko te. Na bantango ya mpasi, na esika ye moko amitungisa, azalaki nde kobɔndisa basusu.
Na ndakisa, na mobu 1974, bakangaki ngai ná bakɛngɛli-batamboli mosusu. Bandeko mosusu oyo bayebaki likambo yango, bakendeki koyebisa mwasi na ngai na boboto nyonso. Ntango bamonaki ye, batunaki ete, “Ndeko Nela olingi tóyebisa yo likambo?” Liboso, abangaki makasi, akanisaki ete nakufi. Kasi, ntango bayebisaki ye likambo oyo esalemaki, motema ekitaki ye mpe alobaki ete: “Akufi te! Ezali mbala ya liboso te akɔta bolɔkɔ.” Bandeko bayebisaki ngai na nsima ete bakamwaki makasi na makanisi na ye malamu.
Atako tokutanaki na makambo ya mpasi, Yehova azalaki ntango nyonso kopambola biso mpo tóbatelaki nzela na ye. Tozali mpenza na esengo mpamba te mwana na biso ya mwasi Lidia ná mobali na ye, Alfred DeRusha, bamonisi ete bazali baklisto ya malamu. Babɔkɔli bana na bango ya mibali, Christopher ná Jonathan mpe basalisi bango bámipesa epai ya Nzambe mpe bákóma basaleli na ye, yango ebakisi esengo na biso. Leki na ngai ya mobali, Ryszard, mpe oyo ya mwasi, Urszula, bazalaki mpe baklisto ya sembo bambula mingi.
Yehova atiki biso soki moke te, mpe tozali na mposa ya kokoba kosalela ye na motema mobimba. Tomoni mpenza bosolo ya maloba ya Nzembo 37:34 oyo: “[Zelá Yehova, NW] mpe batelá nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili.” Tozali kozela ntango yango na motema mobimba.
[Elilingi na lokasa 17]
Na elanga ya fololo ya ndeko moko na engumba Cracovie, 1964
[Elilingi na lokasa 18]
Ngai ná mwasi na ngai Nela, mpe mwana na biso, Lidia, na 1968
[Elilingi na lokasa 20]
Ngai ná elenge mobali moko Motatoli liboso básala ye lipaso ya motema kozanga kozongisa makila
[Elilingi na lokasa 20]
Ngai ná monganga Wites, mokonzi ya minganga oyo basalaka bana mike lipaso ya motema kozanga kozongisa bango makila, na lopitalo ya Katowice
[Elilingi na lokasa 20]
Ngai ná Nela, na 2002