Nini ekokómela bibundeli na mikolo ezali koya?
NA BAMBULA oyo euti koleka, bakonzi ya politiki ya mokili mobimba bafandaki mpo na kolobela ndenge bakoki kosilisa mombongo ya kobombana ya bibundeli ya mike. Likita monene ya ONU (Assemblée générale) etalelaki likambo yango. Basalaki balapolo, bamonisaki makambo oyo esengeli kosalema, mpe bazwaki mikano. Kasi, bato mosusu ya mayele balobi ete soki bakonzi batii likebi kaka na mombongo ya kobombana ya bibundeli, yango emonisi ete batɛki minene ya bibundeli—elingi koloba baguvɛrnɛma—ezali na likambo te.
Kasi, mpo na likambo etali kotɛka bibundeli, ezali mpasi mpo na koyeba mombongo oyo endimami na mibeko ya Leta mpe oyo endimami te. Tosengeli koyeba ete bibundeli mingi oyo bazali koloba lelo ete ezali kotɛkama na kobombana etɛkamaki liboso engebene mibeko ya Leta. Mbala mingi, ekómaka ete bibundeli oyo batɛkelaki yango liboso basoda to bapolisi, báyiba yango mpe ekóma kotɛkama na ndenge ya kobombana. Lisusu, esalemaka mpe ete bibundeli oyo etɛkamaki liboso epai ya moto moko etɛkama lisusu epai ya moto mosusu kozanga ete motɛki ya liboso ayeba to apesa ndingisa na ye. Lisolo moko ebimaki na zulunalo Arms Control Today elobi ete: “Baguvɛrnɛma esengeli kaka te kotungisa bato oyo basalaka mombongo ya kobombana ya bibundeli ya mike, kasi basengeli mpe kotalela nini oyo bango moko bazali kosala na mombongo ya bibundeli oyo ezali kosalema lelo na ndenge ya kobombana.” Atako bato mingi bazali kokanisa ete nsukansuka bakonzi bakozwa meko mpo na kopekisa mombongo ya bibundeli ya mike, mopanzi-nsango moko alobaki ete: “Lokola toyebi ete bikólo mitano oyo ezalaka na ebongiseli ya [ONU] oyo babengi Conseil de sécurité nde etɛkaka bibundeli mingi (80%) koleka bikólo mosusu nyonso na mokili mobimba, namoni ete tosengeli ntango mosusu te kosepela nokinoki lokola nde tosili kolonga na likambo yango.”
Likambo mosusu oyo ezali kosala ete ezala mwa mpasi mpo na koyeba kokɛngɛla ndenge oyo bibundeli ya mike mpe bibundeli ya minene ezali kotɛkama na mokili ezali oyo: kosala bibundeli yango ezalaka mpenza likambo ya mpasi te. Atako mikili soki zomi na mibale mpamba nde ezali na baizini ya kosala bibundeli ya makasi lokola ba chars ya bitumba, mpepo ya bitumba, mpe masuwa ya bitumba, kasi baizini koleka 300 ezali lelo oyo kosala bibundeli ya mike na mikili soki 50. Lokola baizini ya kosala bibundeli ezali se kobakisama, yango ezali kosala kaka te ete bato bákóma na bibundeli mingi, kasi ezali mpe kopesa nzela na bato ya mobulu, batomboki mpe babomi-bato ete bango mpe bákoma na bibundeli mingi.
Makambo oyo ebimisaka ntembe makasi
Kino awa, tolobeli mingi kaka lolenge oyo bato basalelaka bibundeli ya mike na mikili oyo bitumba ezali. Nzokande, na mikili oyo ezali na kimya, kotya mibeko na makambo etali kotɛka mpe kosomba bibundeli ebimisaka ntembe makasi kati na bato. Baoyo bazali kosɛnga ete Leta atya mibeko ya makasi na likambo yango bazali koloba ete ntango mindoki ezali kokóma mingi, babomi-bato mpe bazali kokóma mingi. Balobi ete na États-Unis, epai bibundeli ezali mingi mpe mibeko ya makasi ezali te mpo na kopekisa bato batambolakatambolaka na mindoki, bato bazali kobomama mingi; kasi na Angleterre, epai mibeko mpo na oyo etali kotɛka mpe kosomba mindoki ezali makasi, bato bazali kobomama mingi te. Bato oyo bazali kolinga te ete mibeko ya makasi etyama na makambo ya mindoki bazali kokakatana te mpo na kozongisa ete na ekólo Suisse, epai bato mingi bakoki kozwa mindoki kozanga nkaka, bato bazali kobomama mingi te.
Mpo na kokómisa ntembe yango makasi koleka, bolukiluki oyo esalemaki emonisi ete na États-Unis bato oyo babomamaka na mindoki te bazali mingi koleka bato nyonso oyo babomamaka na bikólo mingi ya Mpoto ezala na mindoki to na mindoki te. Nzokande, ezali na bikólo mosusu oyo bato oyo babomamaka na mindoki te bazali mingi koleka bato nyonso oyo bazali kobomama na États-Unis ezala na mindoki to na mindoki te.
Esalemaka mbala mingi ete ntango moto azali kopesa mitángo ya bolukiluki moko oyo esalemi, apesa mitángo ya malamu to mitángo ya malamu te kaka mpo na kolongisa makanisi na ye. Mpo na likambo etali kotya mibeko na makambo ya kotɛka mpe kosomba mindoki, emonanaka ete soki moto moko abimisi likanisi mpo na kolobela yango, moto mosusu mpe akobimisa likanisi mpo na kotɛmɛla yango. Likambo yango ezali mpasi. Kasi, bato ya mayele bandimi ete longola likambo ya kozala na mondoki, makambo mosusu mingi ezali kosala ete bato bábomaka bato.
Na États-Unis, ezali na ebongiseli moko (National Rifle Association) eyebani mingi oyo ezali lisangá ya bato oyo bazali na mindoki; bato yango balobaka mbala na mbala ete: “Mindoki ebomaka te; bato nde babomaka.” Mpo na bango, atako basali mondoki mpo na koboma, kasi yango moko ebomaka te. Moto nde abɛtaka yango, akoki kobɛta yango na nko to na nko te. Bato mosusu mpe bakoki koloba ete mindoki nde epesaka bato nzela ya koboma.
Kokómisa mipanga bisaleli ya bilanga
Na kotalela Biblia, koboma bato ekosila te soki kaka balongoli mindoki na mabɔkɔ ya bato oyo balingaka koboma bato. Makambo oyo etindaka na koboma bato euti libosoliboso na bizaleli ya bato, kasi kaka te na mindoki. Mpo na kosilisa mokakatano yango, esengeli mpenza ete bato bábongola bizaleli mpe makanisi na bango. Mosakoli Yisaya apemamaki na Nzambe mpe akomaki ete: “[Nzambe] akosambisa kati na mabota, akopamela mpe bikólo mingi; [bakokómisa mipanga na bango bisaleli ya bilanga, NW] mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:4.
Elikya yango ezali ndɔtɔ ya mpamba te ndenge bato mosusu bakoki kokanisa yango. Lelo oyo, na mokili mobimba, esakweli yango ya Yisaya ezali kokokisama epai ya baklisto ya solo. Ndenge oyo bazali kobongola, na elobeli ya elilingi, bibundeli mpo ekóma bisaleli ya kimya, ezali komonisa mposa makasi ya kosepelisa Nzambe mpe ya kozala na kimya elongo na basusu. Mokolo mosusu, na nse ya Bokonzi ya Nzambe, moto nyonso awa na mabele akofanda na kimya mpenza. (Mika 4:3, 4) Mindoki ekoboma bato lisusu te. Bato mpe bakoboma lisusu te. Bibundeli oyo ebomaka ekosalelama lisusu te.
[Bililingi na lokasa 10]
“Bakokómisa mipanga na bango bisaleli ya bilanga”