Makambo mazali koleka na mokili
Banzete epɛtolaka mopɛpɛ na bingumba
Zulunalo moko ya Londres (The Sunday Times) elobi boye: “Mpo na mbala ya liboso, bato ya mayele bayebi ndenge banzete ndenge na ndenge epɛtolaka mopɛpɛ.” Na wɛsti ya Angleterre, bato ya siansi ya ekólo yango mpe ya Écosse bayekolaki na boumeli ya mbula misato mwa ndambo ya mabelé oyo bazwaki pembenipembeni ya banzete soki 32 000 mpo na koluka koyeba banzete nini emɛlaka biloko ya pwazɔ oyo ezalaka na mopɛpɛ. Balukaki mpe koyeba soki biloko yango ya pwazɔ ezali mingi to te na mopɛpɛ mpe na mopɛpɛ oyo babengi couche d’ozone. Banzete oyo babengi frêne, mélèze mpe pin sylvestre nde emonanaki ete epɛtolaka mopɛpɛ malamu koleka banzete mosusu; nzokande banzete lokola chêne, saule mpe peuplier emonanaki ete epɛtolaka mpenza mopɛpɛ te.” Mosala wana oyo bato yango ya mayele basali emonisi ete “banzete epɛtolaka malamu mopɛpɛ mbala misato koleka matiti.” Yango wana, ntango bayekoli likambo yango na lisalisi ya ordinatɛrɛ, bamoni ete soki ndambo (50%) ya bilanga nyonso oyo ezali na wɛsti ya Angleterre ezalaka na banzete, mbɛlɛ biloko mingi ya pwazɔ (20%) oyo ezalaka na mopɛpɛ ezali te.
Mitindo ya sika ya makako
Na zamba ya Amazone, Marc van Roosmalen, oyo ayekolaka bomoi ya bamakako, amonaki mitindo mibale ya sika ya makako. Mitindo yango eyei kobakisama na mitindo mosusu mwambe oyo bamoni na zamba yango kobanda 1990. Ntango bakomi ya zulunalo moko (National Geographic Today) batunaki ye, Marc van Roosmalen alobaki boye: “Nsima ya komona banyama wana nyonso, nayebi sikoyo ete toyebaki naino malamu te zamba ya Amazone.” Marc van Roosmalen, oyo banda 1996 amoni mitindo mitano ya sika ya makako, abakisi ete koluka mitindo oyo eyebani naino te “etali kaka te bato oyo bamesani na mosala yango.” Bamonaki mitindo mingi ya sika kaka na kokenda na bamboka ya mosika ya ba Indiens mpe koyekola banyama oyo bato ya bamboka yango babɔkɔlaka. Ntango azalaki kolobela mitindo wana ya sika oyo bamonaki, Anthony Rylands, oyo ayekolaka bomoi ya banyama ayebisaki na zulunalo moko ya Brésil (Folha de S. Paulo) boye: “Lokola bakómi kobebisa zamba ya Amazone, mitindo mosusu ya nyama ekoki kolimwa, liboso kutu bato báyeba yango.”
Na Georgie, balingi mangomba mosusu te
Zulunalo moko (The New York Times) ekomaki boye: “Lelo, Batatoli ya Yehova balingaki kosala liyangani na elanga moko pembeni ya mai moko, kasi lobi na butu etuluku moko ya bato ya mobulu bayaki na esika yango. Mibali soki ntuku mibale oyo balataki bikulusu ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Georgie, bakómaki na bisi mpe bapanzaki ndako ya Ushangi Bunturi, nkolo esika yango. Batyaki Babiblia, mikanda ya makambo ya Nzambe mpe biloko nyonso ya Bunturi libándá mpe batumbaki yango . . . Basopaki mazuti na pisini oyo basalaki mpo na kobatisa bato. Bapolisi mpe bazalaki, ata mpe komanda ya bapolisi ya mboka yango . . . Bakangaki moto te . . . Likambo yango esalemaki lokola nde babongisaki yango malamu liboso.” Atako bakómi konyokola bato mingi mpo na lingomba na bango, zulunalo Times elobi ete “na mikili mingi oyo kala ezalaki na Union soviétique, bakisá mpe Russie, ezali na Georgie nde balekisi konyokola bato ya mangomba ya mikemike, mpe guvɛrnɛma ezali kosala eloko te mpo na kopekisa minyoko yango. Na mibeko ya mboka oyo basali nsima ya kopanzana ya Union soviétique, Georgie etikelá bato lotomo ya kosambela. Nzokande, mobulu ezali se koya makasi: mbala na mbala, bato ya mobulu mpe baoyo batumbaka biloko ya bato bazali se kobebisa biloko ya bato mpe kobɛta bato.”
Bilenge balingi “mangomba ya loyenge”
Zulunalo moko ya Allemagne (Nassauische Neue Presse) ebimisaki lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bilenge balingi ‘mangomba ya loyenge.’ ” Na lisolo yango, balobelaki makambo oyo esalemaki na liyangani ya liboso oyo lingomba ya Protesta ya etúká ya Hesse-Nassau ebongisaki mpo na bilenge. Bilenge soki 4 400 bazalaki na liyangani yango, oyo eumelaki mikolo mitano. Na liyangani yango, babongisaki baseminɛrɛ, masolo, milulu ya losambo ya butu oyo bapɛlisaki babuji mpe bazalaki koyemba banzembo; masano ya ndenge na ndenge mpe ezalaki, bazalaki mpe kobɛta miziki.” Zulunalo yango ebakisi ete “na milulu koleka 220 oyo basalaki, babosanaki mpenza koyekola Biblia mpe kosala losambo ndenge basalaka kala. Pastɛrɛ moko ya elenge akamwaki mpenza ntango ayokaki “bilenge bazali kosɛnga koyekola Biblia, likambo oyo bato mingi bamonaka yango motungisi.” Elenge moko alobaki boye: “Mpo na koloba solo, na liyangani yango balobelaki makambo ya Nzambe kaka moke, kasi loyenge nde ezalaki.”
Mangomba mpe bitumba
Zulunalo moko (USA Today) elobi ete: “Na mikolo na biso, na bitumba oyo ezali kosopa makila mingi mpe ya nsɔmɔ mingi . . . mangomba mpe ezali na kati.” Yango wana, ezali mpasi mpo na kosilisa bitumba yango. Zulunalo yango ebakisi ete: “Ezali mpasi kosalela mayele oyo bikólo to bato basalelaka mpo na kosilisa matata, na ndakisa kondima kosala makambo oyo basusu basɛngi mpe kondima kolimbisa makambo oyo eleká, soki bato na bato oyo bazali kobunda bazali kondima ete Nzambe azali na ngámbo na bango. Ezalaka bongo ata soki ezali mangomba te nde ebandisi etumba moko, oyo bato bazali kobunda yango ntango mosusu mpo na makambo oyo etali losambo te lokola kowela mabelé to bokonzi, kasi basaleli nde mangomba mpo na kotinda bato bápesa mabɔkɔ na etumba yango.” Lokola bato oyo bazali kobunda bazali na mangomba ekeseni, ezalaka ntango mosusu mpasi mpo ete bándima kotika kobunda ata mpo na mwa ntango moke. Na ndakisa, na bitumba oyo eutaki kobunda na Kosovo, bazwaki likanisi ete basoda bátika kobunda mwa moke na eleko ya Pasika, kasi likambo yango elongaki te mpamba te dati oyo Bakatolike basalaka Pasika ekokani te na oyo ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Zulunalo yango elobi : “Nsukansuka, bayokanaki kaka te mpo na kotika kobunda ata mwa moke.”
Sida “elekeli” bato
Zulunalo moko ya Angleterre (The Lancet) oyo elobelaka makambo ya minganga, elobi ete: “Na mokili mobimba, bato milio 40 bazali na mikrobe ya sida, bato milio 20 basili kokufa na sida, mpe mbula na mbula bana 750 000 bazali kobotama na mikrobe ya sida.” Kaka na mobu 2001, bato milio mitano bazwaki mikrobe ya sida mpe bato milio misato bakufaki na sida. Peter Piot, mokambi ya ebongiseli ya ONU mpo na makambo ya sida, alobi ete maladi yango “elekeli” bato, nzokande ezali naino kaka “na ebandeli.” Ndenge ye amoni, nsima ya mbula 20, bato milio 70 bakokufa na sida. Na bingumba mosusu ya Afrika na nse ya Sahara, soki tozwi bato 100, kobanda na bato 30 tii 50 bazali na mikrobe ya sida. Lokola bilenge mingi bazali kokufa na sida, likama ezali ete kobanda sikoyo tii 2020 bato mingi (koleka 25%) oyo bakoki kosala misala bakozala lisusu te. Zulunalo yango ebakisi boye: “Mikakatano oyo yango ezali kobimisa epai ya bana ekosala ete ezala mpasi mpenza mpo na nkita ya bamboka yango ebonga.” Na Zimbabwe, “soki tozwi bana 5 oyo bazali kokola, mwana 1 ntango akokóma elenge asengeli koyeba akoki kokufela tata to mama.”
Matomba ya mabɛlɛ ya mama
Sanjay Gupta, monganga ya motó, akomaki na zulunalo moko (Time) ete “mpo na bana oyo babotami sika, ezali na bilei mosusu te oyo eleki” mabɛlɛ ya mama. “Bana oyo bamɛlisaka bango mabɛlɛ bakendaka na lopitalo mingi te, babɛlaka matoi mingi te, basalaka pulupulu mingi te, babimaka makwanza to buyibuyi mingi te mpe babɛlaka mingi te bamaladi mosusu lokola bana oyo bapesaka bango miliki na biberɔ.” Balobaka mpe ete mabɛlɛ ya mama ebatelaka mwana na bamaladi ya mpema. Ankɛtɛ moko oyo basalaki na Danemark emonisi ete “bana oyo bamɛlisá bango mabɛlɛ na boumeli ya sanza nsambo tii sanza libwa, ntango bakómi mikóló bazali na mayele mingi koleka bana oyo bamɛlisá bango mabɛlɛ bobele pɔsɔ mibale to ata pɔsɔ mibale ekokaki te.” Ebongiseli moko ya minganga ya bana (Académie américaine de pédiatrie) elobi ete mwana asengeli komɛla mabɛlɛ ya mama na boumeli ya sanza motoba, mpe soki likoki ezali, na boumeli ya mbula mobimba to koleka.” Zulunalo moko (U.S. News & World Report) emonisi ete “komɛlisa bana mabɛlɛ epesaka matomba kaka epai ya bana te.” Ntango bayekolaki likambo yango epai ya basi 150 000 na mikili 30, bamonaki ete “mbala nyonso oyo mwasi amɛlisi mwana na boumeli ya sanza zomi na mibale, likama ya kozwa kansɛr ya libɛlɛ ezali kokita (4,3%).” Kasi ezali mawa mingi, mpamba te “bobele katikati ya basi nyonso ya Amerika nde bamɛlisaka bana na bango, mpe basalaka yango na boumeli ya sanza soki mibale to misato mpamba.”
Boyokani malamu kati ya libota ekoki kopekisa bana bámɛla bangi
Ankɛtɛ moko oyo Paul McArdle, profɛsɛrɛ na Iniversite ya Newcastle na Angleterre, asalaki epai ya bilenge ya Allemagne, ya Angleterre, ya Irlande, ya Italie mpe ya Pays-Bas “emonisi ete soki bilenge mingi na mikili ya Mpoto bakómaka komɛla bangi, yango ezali mpo mabota na bango ezalaki na boyokani ya malamu te to bakolaki na balabala.” Ndenge zulunalo moko (The Daily Telegraph) ya Londres elobaki yango, ntango bilenge bazali kofanda esika moko na baboti na bango nyonso mibale mpe bazali na boyokani malamu na bango, mingi mpenza na mama na bango, kaka moke (16,6%) nde bakómaka komɛla bangi. Kasi, soki ezali bongo te, mingi na bango (42,3%) bamɛlaka bangi. McArdle abakisi ete: “Na televizyo, bazali komonisa epai ya bana ete bangi ezali mabe mpe na biteyelo bazali kopekisa bana komɛla bangi, kasi nakanisi ata moto moko te azali kolobela mokumba ya baboti na likambo yango. . . . Nakanisi lolenge malamu ya kobundisa likambo ya komɛla bangi etaleli libosoliboso boyokani malamu na kati ya libota.”