Liteya 36
Esukiseli malamu mpe boumeli ya diskur
1-3. Ndenge nini okoki kopesa esukiseli moko ekangani na teme ya diskur na yo?
1 Maloba na yo ya nsuka ezali oyo bato bakomikundola yango liboso. Na yango, esukiseli ya diskur na yo esengeli ebongisama malamumalamu. Esengeli komonisa polele bapwɛ́ minene oyo bayoki na yo basengeli kosimba mpe esengeli kozongela teme mpo na mbala ya nsuka. Maloba oyo oponi mpo na kosukisa diskur na yo mpe lolenge oyo okolobela yango, ekopusa bayoki ete bakoka kosala eloko. Ezali yango tosengi na yo ete otya likebi ntango okokoma na pwɛ́ “Esukiseli malamu, elongobani” oyo esengami kati na lokasa ya Toli mpo na balobi.
2 Esukiseli ekangisami na teme ya diskur. Mpo na koyeba ndenge nini okoki kokangisa esukiseli ya diskur na teme ya diskur, tosengi na yo ete otala lisusu makambo tolobaki na Boyekoli 27. Elingi koloba te ete ozongela liloba mokomoko oyo ezali kati na teme; okoki kosala bongo soki okanisi ete ekosalisa yo, mingimingi soki ozali moyekoli ya sika; kasi maloba ya nsuka masengeli kokundola teme epai na bayoki mpe kolakisa bango eloko nini basengeli kosala.
3 Soki maloba ya nsuka ezali na boyokani na teme te, wana lisolo ekosuka na lolenge moko elongobani te. Ata esukiseli na yo ezali bobele rézimé ya bapwɛ́ minene, nzokande osengeli kobakisa fraze moko to mibale etali teme to likanisi oyo esimbi diskur mobimba.
4-9. Mpo na nini esengeli ete esukiseli na yo elakisa epai ya bayoki eloko nini basengeli kosala?
4 Esukiseli emonisi bayoki eloko nini basengeli kosala. Lokola ntina ya diskur ezalaka mpo na kopusa bayoki ete basala eloko moko to kondimisa bango likambo moko, makanisi ya nsuka oyo okobimisa masengeli koluka mokano oyo. Na yango, mokano ya liboso ya maloba ya nsuka ezali ya komonisa na bayoki eloko nini basengeli kosala mpe koyikisa bango mpiko ete basala bongo.
5 Yango wana, esika ekozala yo komonisa polele ntina ya diskur, maloba ya nsuka masengeli kolobama na bosolo nyonso mpe na endimiseli, mpo na kopusa bayoki ete basala eloko. Na nsuka ya lisolo, bafraze mikuse ezalaka na nguya mingi. Nzokande, ata motindo nini ya bafraze okosalela, esengeli kozala na bantina makasi ya kopusa bato na kosala boye to boye mpe komonisa bango bolamu nini bakozwa na kosalaka bongo.
6 Esukiseli esengeli kolongobana na makambo oyo outi koloba. Na maloba mosusu, esengeli kopusa bayoki na kosala engebene makambo yo outi koloba kati na nzoto ya diskur to diskur mpenzampenza. Esukiseli ekobakisela bayoki bingengiseli mpo na oyo basengeli kosala, engebene makambo bayoki kati na diskur, mpe soki esukiseli yango ezali na nguya, ekopusa bango na kosala eloko.
7 Mbala mingi, maloba na biso ya bosukisi na masolo na biso ya ndako na ndako ezalaka na bolembu. Ezalaka bongo ntango tozangi komonisa moto eloko nini tolingi ete asala, na ndakisa asomba mokanda to andima ete tozongela ye.
8 Bobele bongo na eteyelo, esukiseli ya lisolo ekozala na bolembu soki ezali bobele rézimé, kozanga komonisa na bayoki eloko nini basengeli kosala. Luka nzela ya kokokisa makambo na bayoki mpe kondimisa bango ete makanisi oyo ozali kopesa ezali na motuya monene mingi.
9 Ba oratere mosusu bamonaki ete lolenge moko malamu ya kosukisa diskur ezali ete basala rézimé moko mokuse, kosalelaka teme mpe mikapo ya ntina mingi oyo batangisaki na boumeli ya lisolo. Na kozongelaka na mokuse makanisi ya diskur na yo na lisalisi ya mwa mikapo, lokola okosalaka yango ndako na ndako, okomonisa wapi likanisi ya ntina monene, nde lisusu okopesa na bayoki mwa makanisi mosusu ya ntina oyo bakokoka koyebisa yango na bato mosusu. Metode oyo ezali ya kolongobana mpe ya malamu mingi, mpamba te ezali wana mokano ya liboso ya maloba ya nsuka.
10-14. Pesa mwa makanisi na ntina etali bolai ya esukiseli.
10 Bolai ya esukiseli. Atako mbala mingi tokotalaka montre, nzokande makonga ya montre ezali yango te ekokata mpo na bolai boni ekozala na esukiseli ya lisolo na biso. Esukiseli ezali na bolai bokoki soki ezali makasi mpe ekokisi mokano na yango. Matomba nde makomonisa soki esukiseli elekaki molai to elekaki mokuse. Ezali yango mokengeli na eteyelo to ndeko oyo aponami mpo na kopesa yo toli akotalela ntango bakosenga yo pwɛ́ “Bolai ya esukiseli” kati na fiche ya Toli mpo na balobi.
11 Lokola ndakisa mpo na komonisa ete bolai ya esukiseli ekoki kokesena na kotalelaka nzoto ya diskur, tala esukiseli mokuse ya mokanda ya Mosakoli (12:13, 14) mpe tala esukiseli molai, oyo Yesu asalelaki na nsuka na Lisolo na ye likoló na ngomba. (Mat. 7:24-27) Ezali bisukiseli mibale oyo bolai na yango mpe motindo na yango ekeseni, nzokande nyonso mibale ekokisi mokano na yango.
12 Ebongi te ete esukiseli ebimela bayoki mbalakaka. Maloba oyo okosalela na esukiseli ya lisolo esengeli komonisa na bato ete lisolo ekomi kobelema na nsuka na yango, bobele mpo na ndimbola na yango te kasi lisusu na ton oyo okosalela mpo na kolobela yango. Maloba na yo ya kosukisa mpe lolenge oyo ozali kolobela yango esengeli kokamba lisolo kino esukiseli moko elongobani. Ekoki te ete esukiseli ezala molaimolai. Soki epesi rézimé ya diskur te mpe soki esimbi mposa ya bayoki te, elakisi ete eleki molai. Luka ya mokuse.
13 Soki ozali oratere ya sika, ebongi malamu ozala na esukiseli mokuse, ya petee mpe ya direke. Pengola bisukiseli oyo bileki molai mingi.
14 Soki bozali ba oratere mibale na masolo malandani to soki ozali na mokumba na programme ya likita ya mosala, esukiseli na yo esengeli kozala na boyokani na maloba ya ebandeli ya lisolo oyo ezali kolanda; na motindo yango ekozala mokuse. Nzokande, eteni mokomoko ya programme esengeli kozala na esukiseli oyo ebongi na mokano mozali kolukama. Litomba yango nde ekomonisa soki esukiseli ezali na bolai ekoki.
15-18. Mabe nini ekozala soki ozangi kotosa minite bapesaki yo mpo na diskur na yo?
15 Boumeli ya diskur. Bolai ya esukiseli ezali eloko bobele moko ya ntina te; ebongi lisusu kotya likebi na boumeli ya eteni mokomoko ya diskur. Yango wana fiche ya Toli mpo na balobi ezali na pwɛ́ “Boumeli ya diskur” na esika na yango mobimba.
16 Ntango ezali na ntina. Soki oratere amilengeli malamu, akokeba mpo na boumeli ya diskur na ye. Soki boye te, akomeka kosopa makanisi nyonso oyo abongisaki mpe akolekisa minite bapesaki ye. Soki diskur eleki molai, ekokokisa mokano na yango te, mpamba te bayoki bakomi na motema mokuse, bakomi kotalatala montre na bango mpe bazali kotya lisusu likebi na maloba ya oratere te. Esukiseli, oyo esengeli komonisa ndenge ya kosalela makanisi mapesami mpe kopusa bato na kosala eloko, ekoyokana te. Ata oratere asali makasi ete aloba yango, nzokande litomba mpenza ekomonana te mpo bayoki basili komona ete ngonga eleki.
17 Molobi oyo ayebi kotosa minite na ye te azali kosala mabe epai na bayoki na ye mpe epai na ye moko. Komonaka ete etikali na ye bobele mwa minite moke, akoluka ete asopa nyonso oyo abongisaki; kasi kosalaka bongo, ntango mosusu akobanda kolenga, mpe ata ndenge nini, diskur na ye ekosimba mpenza te. Epai mosusu, molobi oyo amoni ete abongisaki makambo mingi te nzokande minite bapesaki ye ezali naino mingi, akomekama na kobenda bafraze na ye ete ezala milai, mpe kosalaka bongo, diskur na ye ekoki kokoma mobulu.
18 Ya solo, mokengeli na eteyelo akoyebisaka moyekoli nyonso soki alekisi minite, kasi ezali mawa mpo na moyekoli mpe mpo na bayoki soki lisolo ekatami bongo. Molobi asengeli komikotela lisolo na ye mpo ete akoka koloba yango nyonso. Bayoki bakotikala na nzala soki bayoki esukiseli ya diskur te. Molobi oyo azali na momeseno ya kolya baminite azali na limemya te mpo na bamosusu, to mpe amilengelaka te.
19, 20. Mpo na nini kotosa minite bapesi yo ezali na ntina mingi na likita ya mosala to na assemblée?
19 Ntango ba oratere mingi bazali kolandana mpo na likita moko, boumeli ya diskur mokomoko ezali na ntina mpenza. Na ndakisa, likita ya mosala ekozalaka mingimingi na biteni misato. Nzokande, soki ndeko mokomoko alye minite moko to mibale, likita ekoki kosila na retard ata ya 3 minite. Atako ezali bobele mwa minite moke oyo ndeko mokomoko alye, nzokande ekopesa mokakatano na bandeko mosusu oyo bakokenda kozwa bus, ntango mosusu bakobima naino likita esili te, mpo ete bazanga bus ya nsuka te. Ntango mosusu mpe mibali oyo bazali bandimi te, bayei kokamata basi na bango; nzokande bakosilika soki likita esili na retard. Atako boni, matomba makozala malamu te.
20 Soki oratere oyo azali liboso ya oratere mosusu atiki baminite mingi, ekoki kobimisa mobulu. Na ndakisa, na ntango ya assemblée, soki oratere oyo bapesaki diskur ya 30 minite asali bobele 20 minite, programme ekoki kobeba soki oratere oyo akolanda ye azali prêt te mpo na komata na estrade.
21-24. Tanga mwa mikakatano emonanaka na likambo etali kotosa minite mpe ezalaka bongo mpo na nini?
21 Soki oratere abongisi makanisi maleki mingi, ntembe ezali te ete akolya minite. Ntina mpenzampenza oyo bandeko mingi balekisaka ntango epesameli bango ezali mpo balingaka koloba mingi. Yango wana ebongi osenzela na yango uta ebandi yo kobongisa diskur. Kasi boumeli ya diskur esengeli kozala mokakatano te mpo na yo soki osili kolonga kobongisa bapwɛ́ nyonso oyo ezali liboso kati na lokasa ya Toli mpo na balobi. Soki oyebi kobimisa bapwɛ́ minene mpe kotya yango na molongo malamu kati na plan, okomona ete mpasi ezali te mpo na kokabola minite na pwɛ́ mokomoko. Mpe soki pwɛ́ oyo ezali kosengama na yo pene na nsuka na lokasa ya Toli, ezali mpo ete pwɛ́ yango etali mingi bapwɛ́ mosusu oyo tosilaki kolobela liboso.
22 Na likambo etali ntango, eloko emonanaka mingi ezali ete bandeko balekisaka minite epesameli bango; baoyo batikaka minite bazalaka mpenza mingi te. Oratere oyo amibongisi malamu azali na ebele ya makanisi oyo akoki koteya na yango bato, kasi asengeli kokeba ete asalela bobele oyo ekoki na minite oyo bapesaki ye.
23 Nzokande, ba oratere ya sika mpe baoyo bameseni naino te, ntango mosusu batikaka baminite. Basengeli koyekola kosalela ngonga nyonso oyo epesami na bango. Na ebandeli, bakozala na mokakatano mpo na kokokisa ntango epesameli bango, kasi bakotya molende nyonso ekoki na bango ete batosa ngonga. Nzokande, soki moyekoli abongisaki mpe asali lisolo moko oyo bato basepeli na yango, ata atiki mwa minite, ekotangama lokola bolembu te. Ekozala bolembu soki nde lisolo yango eleki mokuse mingi mpe minite etikali ezali ebele.
24 Lolenge malamu ya koyeba soki boumeli ya diskur ebongi to ebongi te ezali boye ete okoka kotalela litomba na yango likoló na bayoki. Ntango mokengeli na eteyelo apesi elembo ete minite esili, moyekoli akoki kosilisa fraze na ye. Soki alongi kosilisa yango na motindo boye ete bayoki bamoni ete atiki eloko te, likambo ya kotosa ntango ekozala pwɛ́ ya bolembu te mpo na ye.
25-29. Ndenge nini molobi akoki kosenzela mpo na baminite ya diskur na ye?
25 Ndenge nini okoki kobongisa malamu boumeli ya lisolo na yo? Eloko ya liboso, ezali ete oyekola malamu lisolo na yo. Ezali bobele likambo ya kobongisa makanisi ya diskur te, kasi lisusu kokanisa na lolenge oyo okolobela yango. Soki lisolo ebongisami malamu mpe omeki yango, mbala mingi mokakatano ekozala te mpo na kotosa minite oyo bapesi yo.
26 Na ntango osali plan na yo, monisa polele wapi bapwɛ́ minene. Monisa lisusu bapwɛ́ oyo elandi yango mpo na kosimba yango mpe mosusu oyo elandi lisusu. Tya elembo na oyo omoni ete ekoki kozanga te kati na lisolo na yo, mpe na mosusu oyo omoni ete ekoki kotikala pembeni. Na boumeli ya lisolo na yo, soki omoni ete minite ekokoka te, okoki kotika pembeni bapwɛ́ ya mike mpe kolobela bobele makanisi minene.
27 Mbala mingi tosalaka boye kati na mosala ya kosakola. Mpamba te, wana ekomaka biso na liboso ya ndako moko, soki moto alingi koyoka biso, tokoki kosolola na ye na boumeli ya minite mingi. Nzokande, soki azali na ntango te, tokoki koloba na ye ata na minite moko to mibale soki yango esengeli. Nini esalisaka biso na kosala libongwani motindo oyo kozanga mpasi? Ezali mpo toyebi bapwɛ́ minene ya lisolo na biso mpe toyebi wapi bapwɛ́ mike elandi yango mpo na kokokisa lisolo, nzokande ekoki kotikama pembeni soki ntango ezali te. Ezali se ndenge moko mpo na badiskur oyo tozali kosala na estrade.
28 Mpo na komisunga na likambo oyo, oratere akoki koluka na plan na ye esika nini ezali katikati ya lisolo na ye mpe kotya elembo na marge na esika wana. Soki ezali diskur moko molai, akoki kokabola yango ata na biteni minei. Ekokoma ye na bisika wana oyo atye bilembo, akoki kotala montre na ye mpo na komona soki azali kokende malamu. Soki amoni ete minite ekei nzokande ye azali naino nsima kati na lisolo na ye, wana ntango ekoki mpo ete abanda kotika pembeni bapwɛ́ mike. Soki asali boye te, akokoka kokoma na maloba ya nsuka ya lisolo na ye te mpe bayoki bakopusama na eloko te. Nzokande, ebongi te ete molobi abanda kotalatala montre na ye to mpe kotala yango polele mpenza na miso ya bato nyonso, mpamba te kosalaka bongo ekoki kopengwisa likebi ya bayoki. Mpe akoloba te epai ya bayoki ete azali pressé mpo ntango ezali lisusu mingi te. Ebongi asala na motindo boye ete bayoki bamona te ete atelengani mpo na ntango.
29 Boumeli ya diskur mobimba etali ndenge okaboli baminite mpo na maloba ya ebandeli, mpo na bapwɛ́ minene ya nzoto ya diskur mpe mpo na maloba ya bosukisi. Bokaboli ya baminite oyo ekozala te bobele ntango omoni ete minite bapesaki yo ebelemi na nsuka. Soki osenzeli malamu na pwɛ́ oyo uta ebandeli, okosala diskur moko kitoko oyo baminite ekabolami malamu na biteni nyonso, mokomoko engebene bonene na yango mpe ntina na yango.