Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 124-lok. 128
  • Bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Liwa mpe lisekwa ya Yesu—Ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bakufi bakozonga lisusu na bomoi!
    Lamuká!—2009
  • Nzambe alingi ete moto azala na bomoi ya esengo kati na paradis
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 124-lok. 128

Bomoi

Ndimbola: Eloko oyo ekesenisaka milona, banyama, bato, mpe bikelamu ya elimo na biloko oyo ezangi bomoi. Biloko oyo emonanaka, oyo ezali na bomoi ekolaka, elyaka mpe emɛlaka, eninganaka, mpe ebotaka. Molona ezali na bomoi kasi ezali molimo te mpo ekoki kokanisa to koyoka te. Milimo oyo ezali na mabele, na ndakisa banyama mpe bato, ezalaka na nguya ya bomoi oyo esalaka mosala kati na yango mpe etambwisaka yango; nguya yango esimbami na mpema.

Mpo tóloba ete moto azali mpenza na bomoi asengeli kozala na bomoi ya kokoka na makambo na yango nyonso. Molimo ya moto ekufaka. Kasi basaleli ya Nzambe oyo bazali sembo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko ya kokoka, mingi kati na bango bakozwa bomoi yango awa na mabele, mpe basusu oyo babengami “etonga moke,” bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Ntango baoyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe na likoló basekwaka, bakómaka bikelamu ya elimo mpe lisusu bazwaka bomoi ya kozanga kokufa, elingi koloba bomoi oyo esimbami te na biloko lokola kolya to komɛla.

Bomoi ya moto ezali na ntina nini?

Mpo bomoi na biso ezala na ntina, tosengeli liboso koyeba nani azali Liziba ya bomoi. Soki bomoi na biso ebimaki kaka pwasa, bomoi ya moto elingaki kozala na ntina moko te, mpe tokokaki kozala na elikya moko te mpo na mikolo ezali koya. Kasi Misala 17:24, 25, 28 elobi ete: “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso. Mpamba te na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” Emoniseli 4:11 elobi lisusu boye mpo na Nzambe: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Talá mpe nkasa 397-403, na motó ya likambo “Nzambe.”)

Soki moto azali na bomoi oyo eyokani te na masɛngami mpe toli ya Nzambe, oyo apesi mpo na kozala na esengo, yango ekoki komemela moto yango mikakatano. Bagalatia 6:7, 8 ekebisi biso ete: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka; mpo moto oyo azali kolona mpo na nzoto na ye akobuka libebi oyo euti na nzoto na ye.”​—Talá mpe Bagalatia 5:19-21. (Talá mpe motó ya likambo “Lipanda.”)

Lokola bato babotamaka na lisumu ya Adama, yango nde esalaka ete lelo oyo bázala mpenza na bomoi ya malamu te ndenge Nzambe akanaki yango na ebandeli. Mpo na etumbu oyo Nzambe apesaki Adama nsima ya lisumu na ye, Baroma 8:20 elobi ete, “biloko oyo ezalisamá [bato] ekómisamaki eloko mpamba.” Ntoma Paulo akomaki mpo na ezaleli na ye moko ya moto ya masumu ete: “Nazali na nzoto ya mosuni, natɛkamá mpo nazala moombo ya lisumu. Mpo malamu oyo nalingi nasalaka yango te, kasi mabe oyo nalingi te yango nde nasalaka. Na motema na ngai, nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na binama na ngai. Ngai moto ya mawa!”​—Rom. 7:14, 19, 22-24.

Soki tozali kotosa mitinda ya Biblia mpe tozali kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso, tokozwa bolamu ya solosolo banda lelo mpe bomoi na biso ekozala mpenza na ntina. Tobakiselaka Nzambe eloko te mpo tozali kosalela ye; ateyaka biso ‘mpo na litomba na biso moko.’ (Yis. 48:17) Biblia epesi toli oyo: “Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo, mpo boyebi ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na kati ya Nkolo.”​—1 Ko. 15:58.

Biblia epesi biso elikya ya bomoi ya seko ya kokoka soki tondimi bibongiseli oyo Nzambe azwaki mpo tózala na bomoi mpe soki tozali kotambola na banzela na ye. Elikya yango etongami mpenza likoló ya moboko malamu; ekoyokisa biso nsɔni te; mpe soki tozali kosala makambo oyo eyokani na elikya yango bomoi na biso ekozala na ntina banda sikoyo.​—Yoa. 3:16; Tito 1:2; 1 Pe. 2:6.

Nzambe asalaki bato kaka mpo bázala na bomoi ya ntango mokuse mpe na nsima bákufa?

Eba. 2:15-17: “Yehova Nzambe akamataki moto [Adama] mpe atyaki ye na elanga ya Edene mpo na kolona yango mpe kobatela yango. Lisusu Yehova Nzambe apesaki moto etinda oyo: ‘Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.’” (Ntango Nzambe alobelaki liwa na vɛrsɛ oyo, alobaki te ete moto asengeli kaka kokufa, kasi amonisaki ete kokufa ekouta na lisumu. Yango wana akebisaki Adama mpo akima liwa. Talá Baroma 6:23.)

Eba. 2:8, 9: “Yehova Nzambe alonaki elanga na Edene, epai ya ɛsti, mpe kuna atyaki moto oyo ye asalaki. Bongo Yehova Nzambe akolisaki na mabele nzete nyonso ya kitoko na kotala mpe malamu na kolya mpe lisusu nzete ya bomoi na katikati ya elanga.” (Ebandeli 3:22, 23 emonisi ete nsima ya lisumu ya Adama, Nzambe abenganaki Adama ná Eva na Edene mpo bálya mbuma ya nzete ya bomoi te. Na yango emonani ete soki Adama akobaka kotosa Mozalisi na ye, nsukansuka Nzambe alingaki kotika ye alya mbuma ya nzete yango mpo amoni ete abongi kozala na bomoi ya seko. Lokola nzete ya bomoi ezalaki na kati ya Edene, yango emonisi ete moto akokaki kozala na bomoi ya seko.)

Nz. 37:29: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Elaka yango emonisi polele ete mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe mpo na moto ebongwani te.)

Talá mpe lokasa 313, na motó ya likambo “Liwa.”

Kasi bomoi ya mokuse oyo tozali na yango lelo mpe oyo etondi na mikakatano, yango nde bomoi oyo tosengelaki kozala na yango?

Rom. 5:12: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Soki biso nyonso tosangolá liwa, ezali te mpo Nzambe akanaki yango, kasi nde mpo na lisumu ya Adama.) (Talá motó ya likambo “Makambo nyonso etángamá.”)

Yobo 14:1: “Moto, oyo abotamá na mwasi, azalaka na bomoi mokuse mpe atondi na mpasi.” (Vɛrsɛ oyo emonisi mpenza ndenge oyo bomoi ezalaka na mokili oyo ya masumu.)

Nzokande, ata soki lelo bomoi na biso etondi na mikakatano, ekoki kozala na ntina mpe kopesa biso esengo. Mpo na koyeba ntina ya bomoi, talá nkasa 124, 125.

Bampasi oyo tokutanaka na yango awa na mabele ezali nde mpo na kokata nani akokende na likoló?

Talá nkasa 270-276, na motó ya likambo “Likoló.”

Tozali na molimo oyo ekufaka te, oyo etikalaka na bomoi soki moto akufi?

Talá nkasa 391-395, na motó ya likambo “Molimo.”

Nini ekoki kosalisa biso tózala na elikya ya bomoi ya malamu koleka bomoi ya ntango mokuse oyo tozali na yango lelo oyo?

Mat. 20:28: “Mwana ya moto [Yesu Kristo] ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”

Yoa. 3:16: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”

Ebr. 5:9: “[Yesu Kristo] nsima ya kokómisama moto oyo akoki na nyonso, azwaki mokumba ya kokamba na lobiko ya seko bato nyonso oyo bazali kotosa ye.” (Talá mpe Yoane 3:36.)

Ndenge nini elikya ya bomoi ya seko ekokokisama?

Mis. 24:15: “Nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Bato oyo bakosekwa ezali bato ya sembo oyo basalelaki Nzambe na ntango ya kala mpe ebele ya bato oyo bayebaki mpenza makambo ya Nzambe ya solo te mpo bákoka kondima to koboya banzela na ye.)

Yoa. 11:25, 26: “Yesu alobaki na ye [ndeko mwasi ya moto oyo ye azongisaki na bomoi] ete: ‘Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi; mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali kondimela ngai, akokufa mokolo moko te. Ondimi yango?’” (Na yango, longola lisekwa, Yesu alobelaki mpe elikya mosusu mpo na bato oyo bakozala na bomoi ntango nsuka ya mokili mabe oyo ekoya. Baoyo bazali na elikya ya koyangelama na Bokonzi ya Nzambe awa na mabele bazali na elikya ete bakobika mpe bakokufa ata mokolo moko te.)

Ndenge nini nzoto ya moto emonisi ete moto asalemá mpo akufa te?

Eyebani malamu ete bɔɔngɔ ya moto ezali na makoki ya kosala makambo mingi koleka oyo esalaka na boumeli ya bomoi ya moto, bomoi oyo eumelaka kaka mbula 70 to mpe mbula 100. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete bɔɔngɔ ya moto “ezali na makoki mingi koleka makoki oyo moto asalelaka na bomoi na ye.” (1976, Vol. 12, lok. 998) Carl Sagan, moto moko ya siansi, alobi ete bɔɔngɔ ya moto ekoki kobomba makambo oyo “ekoki kotondisa babuku minene soki milio 20, elingi koloba babuku nyonso oyo ezali na babibliotɛkɛ ya minene koleka na mokili.” (Cosmos, 1980, lok. 278) Mpo na bɔɔngɔ mpe makoki na yango ya “kobomba makambo,” Isaac Asimov, moto moko ya siansi, akomaki ete bɔɔngɔ “ezali mpenza na makoki ya kobomba makambo nyonso oyo moto ayekoli mpe oyo akutaná na yango na bomoi na ye mbala koleka miliare moko.”​—The New York Times Magazine, 9 Ɔkɔtɔbɛ 1966, lok. 146. (Mpo na nini bɔɔngɔ ya moto ezali na makoki ya ndenge wana soki moto asengelaki kosalela makoki yango te? Na yango, lokola moto azali na makoki ya koyekola makambo kozanga nsuka, yango emonisi ete asalemaki mpo akufa te, boye te?)

Bomoi ezali mpe na baplanɛti mosusu?

Zulunalo moko (The New York Times) elobi ete: “Eleki sikoyo mbula 25 . . . bato bazali koluka soki bomoi ezalaka na baplanɛti mosusu . . . Mosala yango monene ya koyekola bamilio ya minzoto na lisalisi ya bamasini epesi naino elembeteli moko te oyo emonisi ete bomoi ezali na baplanɛti mosusu, longola kaka na Mabele.”​—2 Yuli 1984, lok. A1.

Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi ete: “[Longola mabele, oyo ezali moko ya baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na moi] ezali na planɛti mosusu te oyo ezali na bomoi. Kasi soki ezali ete planɛti mosusu ezali na bomoi, longola baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na moi, boye ekoki kozala ete bomoi ebimaki mpe ebongwanaki mokemoke tii ekóma ndenge ezali lelo.” (1977, Vol. 22, lok. 176) (Banda ntango yango, bato ya mayele bamoná ebele ya baplanɛti mosusu oyo ebalukaka zingazinga ya moi te, kasi bazwá elembeteli moko te ete bomoi ezali kuna. Nzokande, ndenge buku oyo touti kotánga emonisi yango, ekoki kozala ete soki bato bazali kobimisa mbongo ebele mpo na koyeba soki bomoi ezali na baplanɛti mosusu, mbala mosusu balingi nde kozwa elembeteli oyo emonisi ete bomoi ebimaki kaka pwasa, ete moto azalisamaki na Nzambe te, mpe na yango akozongisa monɔkɔ epai na ye te, boye te?)

Biblia emonisi ete bomoi ezalaka kaka na mabele te. Nzambe ná baanzelu, oyo bazali bilimo, baleki mpenza moto na mayele mpe na nguya. Basilá kosolola na bato mpe bayebisá bango ndenge bomoi ebandá mpe ndenge oyo mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango na mokili ekosila. (Talá mitó ya makambo “Biblia” mpe “Nzambe.”)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto