Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ie nk. 3-4
  • Bomoi ezalaka nsima ya liwa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ezalaka nsima ya liwa?
  • Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motuna moko, biyano ndenge na ndenge
  • Liteya ya moboko ya mangomba mingi
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠bato bazali na bindimeli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Molimo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Nini ekómelaka biso soki tokufi?
ie nk. 3-4

Bomoi ezalaka nsima ya liwa?

“Zambi nzete ezali na elikya ete soko ekokatama, ekotoa [“ekobima,” NW] lisusu . . . Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?”​—MOSE, MOSAKOLI MOKO YA KALA.

1-3. Lolenge nini bato mingi balukaka kobɔndisama ntango bakufeli moto oyo balingaka?

NA ENGUMBA New York, na ndako moko oyo bazalaki kolela mowei, baninga mpe bandeko ya libota basalaki molɔngɔ mpe bazalaki koleka malembemalembe zingazinga na ebembe. Bazalaki kotala na likebi nyonso ebembe ya elenge mobali moko ya mbula 17. Baninga na ye ya kelasi bazalaki koyeba ye lisusu te. Mwango basalisaki ye oyo ebéngami chimiothérapie, elongolaki ye nsuki ebele na motó; kanser ekɔndisaki ye mingi mpenza. Oyo ezalaki mpenza ebembe ya moninga na bango? Bobele mwa basanza liboso ete akufa, azalaki na mikano mingi, kotunatuna mituna mingi, azalaki na nzoto makasi​—azalaki mpenza kosepela kozala na bomoi! Lokola motema na ye motondaki na mawa, mama ya mwana mobali yango alukaki kozwa mwa elikya mpe ntina ya komibɔndisa na kokanisáká ete atako ndenge nini, mwana na ye azalaki naino na bomoi. Na mai na miso, azalaki kozongela mbala na mbala mateya oyo bateyaki ye, kolobáká ete: “Tommy azali sikawa na esengo mingi koleka. Nzambe alingaki ete Tommy azala elongo na ye kuna na likoló.”

2 Na ekólo Inde, na engumba Jamnagar, oyo ezali mosika mpenza na New York na ntaka ya kilomɛtɛlɛ pene na 11 000, moto moko ya mombongo oyo azalaki na mibu 58 akufaki mpe bana na ye misato ya mibali bazalaki kobongisa ebembe ya tata na bango likoló na etumbelo lokola bonkɔkɔ na bango esɛngi. Na moi makasi ya midi, mwana ya liboso abandaki molulu ya kotumba nzoto ya tata na bango: azwaki mɔ́tɔ na mwa nzete moko mpe apelisaki nkoni minene, atyaki likoló na ebembe, biloko ndenge na ndenge oyo bibimisaka nsolo malamu, mpe abakisaki mpaka na malasi. Ntango mɔ́tɔ ebandaki kopela makasi, babandaki kobondela na mongongo makasi wana bazalaki kozongelazongela maloba oyo na lokota ya Sanskrit: “Tiká molimo oyo ekufaka te ekoba kozala na bomoi kino ekokóma na bosolo ya nsuka.”

3 Ntango bana mibali yango misato bazalaki kotala ndenge nzoto ya mowei ezalaki kozika, mokomoko azalaki komituna na motema ete: ‘Nakoki solo kondima ete bomoi ezalaka nsima ya liwa?’ Lokola bakolaki na bisika bikeseni, moto na moto amipesaki eyano na ye moko. Leki na bango azalaki kondima mpenza ete molimo ya tata na bango oyo balingaki mingi, ekobotama mbala na mbala kino ekokóma na bomoi ya lokumu koleka. Mwana mobali ya mibale andimaki ete soki moto akufi, azali lokola moto alali mpɔngi, ayebi eloko moko te. Yaya na bango alobaki ete liwa ezali bobele liwa, mpamba te, na makanisi na ye, moto moko te akoki koyeba na bosikisiki oyo ekómelaka biso soki tokufi.

Motuna moko, biyano ndenge na ndenge

4. Motuna nini ezali kotungisa bato uta kalakala?

4 Bomoi ezalaka nsima ya liwa? Motuna oyo ezali kotungisa bato uta kalakala. Hans Küng, nganga-mayele ya Lingomba ya Katolike, alobaki ete: “Ata banganga-mayele ya teoloji bazali kokoka te kopesa eyano ya sikisiki soki batuni bango motuna oyo.” Na boumeli ya bileko, bato ya mabota nyonso bazali komituna motuna yango, mpe biyano oyo bazali kozwa ezali ndenge na ndenge.

5-8. Ebele ya mangomba eteyaka nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?

5 Ebele na baklisto ya nkombo bandimaka ete nsima ya liwa, bato malamu bakendaka na likoló mpe bato mabe babwakamaka na lifelo. Nzokande, Bahindu bandimaka ete nsima ya liwa, molimo ebotamaka mbala na mbala. Kolobeláká likanisi ya Bamizilma, Amir Muawiyah, mokambi ya ndakonzambe moko ya Bamizilma, alobaki ete: “Tondimaka ete nsima ya liwa, mokolo ya kosambisama ekozala, na ntango wana tokotɛlɛma liboso ya Nzambe, Allah, bobele lokola tosambaka liboso na bazuzi.” Engebene endimeli ya Bamizilma, Allah akozwa ekateli mpo na bomoi ya moto mokomoko: akotya moto boye na paladiso mpe moto mosusu na lifelo.

6 Na mboka Sri Lanka, bandimi ya Lingomba ya Bouddha mpe Bakatolike bafungolaka bikuke mpe maninisa ya ndako epai kuna moto akufi. Bapelisaka mwinda, mpe batyaka mowei na sanduku ya ebembe wana makolo na ye matalani na ekuke ya ndako. Bakanisaka ete na kosaláká bongo, bazali kosalisa elimo to molimo ya mowei ete ebima noki na ndako.

7 Engebene Ronald M. Berndt, profesere na Iniversite ya Wɛsti ya ekólo Australie, bafandi ya liboso ya ekólo yango bandimaka ete “bato bazalaka na elimo oyo ekoki kobebisama te.” Na bituluka mosusu ya Afrika, bato bandimaka ete nsima ya liwa bato mpamba bakómaka bilimu ya nguya mpe baoyo bazalaki bato ya lokumu bakómaka bilima oyo bato ya bomoi bakokumisa mpe bakopesa mabondeli, na ntina na etɛlɛmɛlo na bango ya bilimu oyo bitambwisaka mboka.

8 Na bisika mosusu, bindimeli oyo ete bakufi bakoki kozala na molimo oyo ekufaka te, euti na kosangisama ya mateya ya bonkɔkɔ mpe ya mateya ya boklisto. Na ndakisa, na Afrika ya Wɛsti, soki moto akufi, Bakatolike mpe Baprotesta babombaka talatala nyonso ya ndako, noki bato bátala yango mpe bámona elimo ya mowei. Yango wana, mikolo 40 nsima ya liwa ya molingami moko, bandeko mpe baninga basalaka molulu ya komata ya molimo na likoló.

Liteya ya moboko ya mangomba mingi

9, 10. Nini ezalaka mpenza liteya ya moboko ya mangomba mingi?

9 Na motuna ya koyeba nini ekómelaka biso soki tokufi, biyano oyo bipesamaka bizalaka ndenge na ndenge, motindo moko mimeseno mpe bindimeli ya baoyo bapesaka biyano yango bizalaka ndenge na ndenge. Atako bongo, mangomba mingi endimaka mpenza likambo moko oyo: eloko moko kati na moto​—ebéngama molimo, elimo, to elima​—ekufaka te mpe ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa.

10 Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te endimami na ebele na bato na mangomba ya boklisto mpe na bituluku na yango. Ezali mpe liteya ya moboko na Lingomba ya Bayuda. Na Lingomba ya Bahindu, liteya yango nde ezali moboko mpenza ya liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala. Bamizilma bandimaka ete molimo ezalisamaki elongo na nzoto kasi ekobaka kozala na bomoi soki nzoto ekufi. Biyamba mosusu​—ezala ya bato ya Afrika oyo bandimaka ete eloko nyonso oyo ezalisamá ezalaka na elimo, bakisa mpe bindimeli ya Lingomba ya Shinto mpe ya Bouddha​—bindimeli nyonso wana ezali koteya bobele liteya yango moko kasi na mitindo mikeseni.

11. Lolenge nini banganga-mayele mosusu basili kotalela liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?

11 Nzokande, bato mosusu bandimaka ete soki moto akufi, azalaka lisusu na bomoi te. Mpo na bango, ebongi kondima te ete nsima ya liwa, molimo etikaka nzoto mpe ekobaka kozala na bomoi. Miguel de Unamuno, mokomi mpe nganga-mayele ya ekólo Espagne na ekeke ya 20, akomaki ete: “Kondima ete molimo ekufaka te ezali kolinga ete molimo ekoka kokufa te, kasi kolinga yango na ekateli makasi na boye ete bolingi yango ekotinda moto asosola lisusu makambo na mayele te.” Kati na bato minene oyo baboyaki kondima liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, tokoki kotánga bato ya filozofi na ntango ya kala oyo bayebaná, lokola Aristote mpe Épicure, mpe monganga Hippocrate, nganga-mayele ya lokumu koleka na makambo matali monganga, mpe David Hume, moto ya filozofi na ekólo Écosse, mpe nganga-mayele Moarabe Averroës, mpe Jawaharlal Nehru oyo azalaki ministre-mokambi ya ekólo Inde nsima ya lipanda.

12, 13. Mituna nini ya ntina liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebimisi?

12 Kasi motuna oyo ezali naino kotunama: Tozalaka mpenza na molimo oyo ekufaka te? Soki molimo ekufaka solo, lolenge nini liteya yango ya lokuta oyo elobaka ete molimo ekufaka te eyaki kokóma liteya ya moboko kati na mangomba mingi mpenza lelo oyo? Likanisi yango eutaki wapi? Epai mosusu, soki na liwa ya moto, molimo ekufaka solo, elikya nini ezali mpo na bakufi?

13 Tokoki kozwa biyano ya solosolo na mituna yango? Ɛɛ! Mituna yango mpe mituna mosusu oyo mikokani na yango ekoyanolama na mikapo milandi. Ya liboso, tiká tótalela lolenge liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto