Osengeli kondima ete bomoi na yo esila kotangama?
NA BATO NYONSO oyo bamonisami awa,bobele Yesu Klisto nde andimaki likanisi yango te. Bongo likanisi na ye ezalaki boni?
Buku oyo elobeli bomoi na Yesu, oyo ekomamaki na ekeke ya liboso (mikanda ya Matai, Malako, Luka mpe Yoane), emonisi ete azalaki kondima ete moto na moto ekoki kozala na bopusi na avenire na ye, elingi koloba kozala na bopusi na makambo oyo ekoki koyela ye.
Na ndakisa, Yesu alobaki ete Nzambe ‘akopesa biloko malamu epai na baoyo bakosenga ye yango’ mpe ete “ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, akobika.” Bobele bongo, ntango bafandi na Yelusaleme baboyaki koyoka likebisi oyo ekokaki kobikisa bomoi na bango, Yesu alobaki te ete etongamaki bongo. Kasi alobaki ete: “Bolingaki te.”—Matai 7:7-11; 23:37, 38; 24:13.
Tokoki mpe kososola likanisi na Yesu na kotalela likambo ye alobaki na ntina na likama oyo ekomaki na Yelusaleme, wana elobaki ye boye: “Lisusu mpo na bango zomi na mwambe baoyo ndako molai na Siloama ekweaki na bango mpe ebomaki bango, bokanisi ete bango balekaki bato nyonso bafandi na Yelusaleme na mabe? Nalobi na bino ete, Te.” (Luka 13:4, 5) Omoni ete Yesu alobaki te ete liwa esilaki kotangama mpo na bato wana 18. Alobaki mpe te ete bakufaki mpo bazalaki mabe koleka bamosusu. Na kokesena na Bafalisai na eleko na ye, baoyo bazalaki kotya boyokani kati na likanisi oyo ete nyonso esila kotangama mpe ekateli ya moto na moto, Yesu azalaki koteya ete moto akoki kozwa ekateli mpo na avenire na ye.
Bobele bongo, bantoma na Yesu bazalaki koteya ete lobiko epesami epai na bato nyonso. Ntoma Paulo akomaki boye: “Osili koyeba Makomi na bulee, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika.” Mpe ntoma Petelo alobaki ete: “Lokola bana babotami sika, boyoka mposa na mabele sembo na elimo ete mpo na yango bokola kino lobiko.” (2 Timote 3:15; 1 Petelo 2:2; tala lisusu Misala 10:34, 35; 17:26, 27) Mokanda Encyclopedie de la religion et de l’éthique (Angl.) ya Hastings emonisi polele ete bakomi na ekeke ya mibale mpe na ekeke ya misato, lokola Justin, Origéne mpe lrénée, ‘bayebaki eloko moko te na ntina na endimeli oyo ete nyonso esila kobongisama (prédestination); bazalaki koteya ete moto na moto’ akokaki kozwa ekateli na ye moko.
Kasi mpo na nini Yesu mpe baklisto ya liboso bazalaki kondima te ete bomoi ya moto esila kobongisama, nzokande na lolenge moko to mosusu, ezalaki mingi kati na bazalani na bango, bakisa mpe Bayuda, bazalaki kondima likanisi oyo ete nyonso esila kotangama? Moko na bantina ezali boye ete likanisi yango etondi na mindondo. Totanga bobele mibale: Likanisi oyo ete nyonso esila kotangama ezali koyokana te na bizaleli na Nzambe; ekweisami na makambo oyo mazali kosalema Epai mosusu, ezali likama mpo na bomoi na yo ya sikawa mpe ya mikolo mikoya. Botaleli ya mozindo na ntina na likambo yango ekomonisa yo soko mpo na nini ezali bongo.
Makambo mabimi na likanisi oyo ete nyonso esila kotangama mpe bizaleli na Nzambe
Na Athènes, na ekeke ya misato liboso na ntango na biso, filozofe moko na nkombo Zénon de cittium azalaki koteya epai na bana kelasi na ye ete bandima “likambo nyonso ekoyela bango na bomoi lokola likambo lileki malamu liyeli bango na nkuku”. Kasi mokolo mosusu ntango Zénon ayokaki ete moombo na ye ayibaki, awanganaki mateya na ye moko. Ndenge nini? Ntango abetaki moyibi, moombo yango azongisaki boye: “Kasi soki nayibaki, ezali mpo etangamá bongo.”
Moombo ya Zénon ezalaki na elonga. Soko ondimaka ete bomoi ya moto esila kobongisama, na boye kopekisa moto ete azala moyibi te ekokani na moto oyo azali komona mabe ete mboto ya lilala ebimisa nzete ya malala. Kasi, bobele lokola mboto ya lilala, moto alandi se nzela oyo esilaki kobongisama Makanisi motindo yango ezali komema kino wapi?
Soko basali na mabe bazali se kolanda bomoi oyo esila kobongisama, yango elingi koloba ete ye oyo abongisaki bomoi na bango nde azali kosala mabe. Nani moto asalaki bango? Engebene baoyo bateyaka ete bomoi esila kotangama, ezali Nzambe ye moko. Soko topusi lisusu makanisi mosika, Nzambe akoki kozala Ebandeli ya mabe nyonso, ya mobulu mpe monyoko oyo moto asili kosala kino sikawa. Okanisi nini na yango?
Lisolo moko ya zulunalo Nederlands Theologisch Tijdschrift (Zulunalo ya teoloji ya ba Néerlandais) emonisi ete likanisi motindo yango “emonani lokola ezali ya Nzambe, nzokande yango ezali bongo te mpo na baklisto”. Mpo na nini? Mpo ete yango ekeseni na likanisi oyo bakomi na Biblia bapesaki na ntina na Nzambe. Tala na ndakisa maloba oyo mazwami na Nzembo oyo ekomamaki na kopemama na Nzambe: “Ozali Nzambe oyo akosepela na mabe te.” “Ye oyo akolinga mobulu, solo mpenza molimo na Ye ekoyina ye.” “(Mokonzi Masiya aponami na Nzambe) Akosikola milimo na bango na monyoko mpe na mobulu.” (Nzembo 5:4; 11:5; 72:14) Na polele mpenza, makambo mabimi na likanisi oyo ete nyonso esila kotongama ezali kotemela bizaleli na Nzambe.
Fatalisme mpe makambo mazali kosalema
Kasi tokoloba boni mpo na makama makoutaka na biloko na kozalisama? Ebongisamaki liboso te mpo ezala, nde yango wana nzela ya kopengola yango ezali te?
Makambo oyo mazali kosalema emonisi nini? Tala makambo mamonanaki nsima na boyekoli likoló na bantina na makama makoutaka na biloko na kozalisama, na lolenge emonisami na NRC Handelsblad zulunalo ya Hollande: “Kino sikawa, koningana na mabelé, mai mazali kozindisa mokili. kobukana na mabelé mpe mipepe makasi . . . ezali kotalelama kino lelo oyo lokola makama mauti na biloko bizalisami. Kasi, soko totaleli likambo yango malamu tokomona ete lolenge oyo moto asaleli mingi mpenza biloko na kozalisama ebimisi makama minene kino ete ezingelo na biso ekoki komibatela lisusu te na makamá. Yango wana, makama mauti na biloko bizalisami ezali koboma bato mingi koleka liboso.”
Mai oyo mazindisaki mabelé na mokili ya Bangladesh, oyo elobelami na lisolo ya liboso, ezali mpenza ndakisa. Bato na mayele bazali koloba sikawa ete “ndenge zamba mingi esili kokatama na mokili na Népal, na nord ya lnde mpe na Bangladesh ezali ntina monene mpo na kozinda ya mboka Bangladesh kati na mai na bambula oyo euti koleka.” (Zulunalo Voice.) Rapport mosusu emonisi ete kokatama na banzete mingi epesi nzela ete mai etondaka mbala na mbala na Bangladesh, longwa na kosalema bobele mbala moko na boumeli ya mibu 50, kino na mbala moko sikawa nsima na mbula 4. Lolenge oyo moto asaleli ezingelo na bisika mosusu ya mokili ebimisi mpe makambo mosusu ya mpasi: biloko bizali kokauka mpo na moi makasi, zamba ezali kosila mpe mabelé mazali kobukana. Na yango, ezali nde mpo na misala ya moto, oyo mbala mingi esili kobimisa makama mauti na biloko bizalisami to esili kobakisa mpasi oyo euti na biloko yango kasi ezali te makambo mabombami oyo esila kotangama.
Soko ezali bongo, moto asengeli mpe kosala likambo oyo ekeseni, elingi koloba kolembisa makamá. Esili kosalema bongo? Ee. Talela makambo malandi: UNICEF (Fonds des Nations unies pour l’enfance) elimboli ete na boumeli ya bambula mingi bana mingi na mokili ya Bangladesh bakufaki miso. Ezalaki mpo ete yango esila kotangama bongo? Soko moke te. Nsima wana bamonisi ya UNICEF balongaki na kolakisa bamama ete baleisaka bana na bango bobele loso mpamba te, kasi bapesaka mpe bango bambuma mpe ndunda, maladi ya miso ebandaki kosila. Mbongwana oyo ya lolenge na kolya esili kobikisa bana mingi na Bangladesh mpo ete bakufa miso te.
Bobele bongo, bato oyo batiki komela likaya, bazali kotikala lisusu na bomoi, na mwayene mbula misato to minei koleka bameli makaya Batambwisi mituka oyo bazali kolata ceinture oyo ebongisami mpo na komibatela bazali na makoki mingi ya kobika na likama koleka batambwisi mituka oyo balati ceinture yango te. Emonani polele ete ezali misala na biso nde ezali na bopusi na bomoi na biso, kasi ezali te ete yango esila kotangama.
Makama oyo mazali kobimisama na endimeli oyo ete esila kotangama
Lokola tosilaki koloba yango, endimeli oyo ete nyonso esila kotangama ekoki koyeisa bomoi na biso mokuse. Na ndenge nini? Kotangaka “bandakisa ya endimeli yango, oyo eleki lisusu nsomo”, mokanda Encyclopedie des religions (Angl.) elobi ete: “Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tozalaki koyoka nsango ya batambwisi na masuwa ya Japon oyo bazalaki komipesa na liwa na ntango na etumba, mpe nsango ya basoda SS oyo bazalaki komiboma (Schutzstaffel) na boyangeli ya Hitler na ntina na likanisi oyo ete bomoi oyo ezali na motuya koleka bomoi ya bato awa na mabelé esila kobongisama (Schicksal).” Mpe bobele mokanda yango, emonisi ete kala mingi te, “masolo ya bopusi oyo bosalemaki epai na bato ete bamiboma, likanisi oyo elendisamaki na lingomba likoló ya ba piblisite oyo etalelami lokola matumoli mpo na lingomba ya islam . . . masolo yango masili kokóma lokola likambo ya mabe mpenza te na masolo oyo esalemi mpo na Proche-Orient.” Masolo yango malimboli ete basoda mingi ya bilenge bakendaki na etumba, bamindimisaki ete “soko ekomamaki te ete moko na bango asengelaki kokufa, likama ezalaki te”.
Nzokande, ata bateyi na ba musulmans oyo bayebani mingi baboyaki molende motindo yango. Na ndakisa, mokonzi moko ya lingomba ya musulman alobaki ete: “Soko moto azali kati na móto, asengeli kotika ete mokano na Nzambe esalema; kasi soki akoti naino na moto te, akoki komibwaka kati na yango te.” Nde na mawa, bibele na basoda balandaki te toli ya mokonzi wana ya lingomba. Ekanisami ete na boumeli na mbula mwambe ya etumba, bato na lran 400 000 bakufaki, elingi koloba bakufi mingi koleka Baameriké oyo bakufaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba Solo mpenza, likanisi oyo ete nyonso esila kotangama ekoki koyeisa bomoi na yo mokuse. Ekoki kobebisa bomoi na yo mpo na mikolo mikoya. Na ndenge nini?
Mpo ete mondimi ya likanisi oyo ete nyonso esila kotangama andimi ete avenire ekoki kopengolama te mpe esengeli kokokana lokola makambo oyo maleka, akoki kokolisa ezaleli ya mabe. Ezaleli nini? Mokanda Encyclopédie de théologie (Angl.) eyanoli boye: “Moto . . . akomiyoka ete azangi nguya, azali eloko mpamba mpe esika na ye ekoki kozwama na moto mosusu kati na bomoi kasi ye akoki komilongola na yango te. Yango ekokolisa epai na moto elimo ya bopotu oyo eyokani malamu mpenza na likanisi oyo engebene yango makambo manso mazali kotambola lokola yango esila kotangama.”
Na nini elimo ya kozanga kosala makasi ezali likama? Etindaka moto mbula mingi akanisa ete akoki kolonga te, ezaleli yango ekomisaka lokola zoba moto oyo akanisaka ete nyonso esila kotangama mpe ekopekisa ye na komityela mikano ya kokokisa, to ekopekisa ye koyanola na libyangami kitoko oyo Nzambe apesi biso: “Moko na moko oyo ayoki mposa na komela! Yaka epai na mai . . . . Sembola litoi epai na ngai mpe yaka na ngai. Yoka, mpe molimo na yo ekobika.” (Yisaya 55:1-3). Soko endimeli oyo ete nyonso esila kotongama epekisi moto ete ‘aya’ mpe ‘eyoka’, ezalela yango ekopekisa ye ete azanga likoki ya ‘kotikala na bomoi’ mpo na libela kati na Paradis oyo mosika te ekozongisama awa na mabelé. Akobungisa eloko ya motuya mpenza!
Okanisi nini? Soko okolaki na esika oyo likanisi oyo ete nyonso esila kotongama ezali kotambwisa makanisi na bato, mbala mosusu ondimaki likanisi yango kozanga ntembe. Kasi, makanisi oyo mamonisami kati na lisolo oyo epesi yo nzela mbala mosusu ya koyeba ete bomoi na yo ya sikawa mpe ya mikolo mikoya, ezali kotalela mingi misala na yo.
Lokola tomonaki yango, makanisi malamu, makambo masili kosalema mpe oyo eleki nyonso mpenza, Makomami mosantu emonisi ete tosengeli te kozala na elimo na moto oyo azali na elimo oyo ete akoki kolonga te. Yesu apesi biso elendiseli oyo: “Meka makasi kokota na ekuke na nkaka.” (Luka 13:24) Alingaki koloba nini? Molimboli moko na Biblia alobi ete: “Liloba na greke esalelami awa euti na masano na bagreke. Na lisano ya bopoti mbango . . . bazalaki kosala makasi, kosala nyonso to bazalaki kobimisa milende nyonso mpo na kolonga.” Yesu alendisi biso ete tosala makasi mpo na kolonga na esika ete tolemba nzoto liboso na komeka.
Na yango, ebongi malamu kobengana elimo ya kozanga kosala makasi oyo euti na endimeli oyo ete nyonso esila kotangama Omikotisa na bopoti mbango mpo na bomoi lokola Liloba na Nzambe elendisi yo, mpe kotika te ete endimeli oyo ete nyonso esila kotangama elembisa yo. (Tala 1 Bakolinti 9:24-27) Bakisa lombango na yo na koyanoláká nokinoki na libyangami oyo ekomami na kopemama na Nzambe ete: ‘Pona bomoi ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.’ Okoki kosala yango ndenge nini? ‘Na kolingáká Jéhovah Nzambe na yo, na kotosaka mongongo na ye mpe na kokangamáká na ye.’ Nakoseláká bongo, okolonga, mpamba te Jéhovah akozala ‘bomoi na yo mpe bolai ya mikolo na yo.’—Deteronome 30:19, 20.
[Elilingi na lokasa 7]
Moise ateyaki te endimeli oyo ete nyonso esila kotangama kasi alobaki ete: “Pona bomoi ete otikala na bomoi.”