Tozali na mposa ya mokili na sika
TELEMA naino mwa ntango moke mpe tala na zingazinga na yo. Olingaka nde biloko oyo ozali komona?
Mpo na yo mbala mosusu ozali na ndako moko kitoko na kartye kitoko mpe ebongisami. Ekoki mpe kozala ete osalaka mosala moko malamu oyo mozali kosepelisa yo, mpe ete yo mpe bazalani na yo bozali na kolongono na nzoto malamu. Omiyokaka mpenza na mwa esengo mpe na kimya. Boye te?
Kasi kanisa naino mpo na makambo oyo mazali koleka na mboka mosusu longola oyo epai kuna ofandi, to na mikili misusu longola oyo ya yo. Talela ezalela ya mokili mobimba. Ezali nde komonisa makambo kitoko? Esengo, kimya mpe bolamu ezali kati na yango?
Engebene makambo mosusu bato basakolaki na ebandeli na ekeke ya 20, sianse esengelaki sikawa kopesa bilei mingi mpo na bato nyonso mpe, lisusu kosilisa maladi nyonso minene, mpe kobongisa ezalela ya ezingelo na biso mpe kosala ete eumela mingi, nde eleko na kimya ebandi. Kasi, nini esalemaki mpenza?
Ezali mpasi te na komona ete kimya esila kolongwa na mabelé. Kati na zulunalo L’état du monde—1990 (angl.), Michael Renner akomaki boye: “Uta kala, bato bazali kolendisama na kotula mipangá na bango ete mizala bitimweli. Ezali toli eyei mpenza na ntango na yango. Kowelana makasi ya kosala bibundeli esili komema bato pene na libebi.”
Na mokili mobimba, eyebani malamu ete bamboka mingi esili mpenza kobeba na bitumba ya bana-mboka to mpe na matata mosusu. Engebene mikanda mosusu, bitumba 22 bisalemaki na boumeli ya mobu 1988. Bato boni bakufaki na bitumba yango? Engebene St. Louis Post-Dispatch,zulunalo oyo ebimaka mokolo na mokolo, “kobanda 1988, motuya nyonso ya bato oyo bakufaki na etumba ezalaki 4 645 000. 76% na bango bazalaki basivile.”
Makambo mazali kosalema lelo mazali nde kopesa elikya na mokili moko ya kimya? Tala makambo totangi na lokasa ya San Jose Mercury News, zulunalo moko ya californie: “Balobi ete mikili etiki kokanelama mpe ete tokoki kozala na elikya ya kozala na kimya mosika te. Kasi, na kotaleláká malamu mpenza, bozali komona ete bitumba ezali kosalema mingi na mikili mizali na bozwi mingi te, mpe elikya ya koyokana ezali bobele moke. Ezali wana bitumba oyo biyebani te na mokili. Mpo na mingi na yango, esalamaka ete bakonzi babundisa bato na bango kati na bitumba makasi ya bana-mboka oyo eezali kobima likoló na makambo matali mabelé to mangomba, likoló na matata ya mabota to bibolo, likoló na kotemela bokonzi to mpe drogue . . . Longwa na Afrike ya Est kino na Azi ya Sud-Est, bitumba esili kosala ete bamilio na bato bakima bamboka na bango. Mabelé mabebisami, balopitalo nyonso kobebisa, bibwele bibomami, baboti babomami na miso na bana na bango, bilenge mibali ya mbula 10 bamemisami mindoki mpe nsima bakómisami basoda, bilenge basi babebisami. Kati na bamboka yango oyo mbala mingi babosanaka yango, bitumba esili kobebisa mpe kotya mobulu kati na bomoi ya bato, oyo mbala mosusu ekoki te na kobongisama lisusu . . . Bolukiluki bomonisi ete bitumba bisalemi mingi na bambula 1980 koleka bambula nyonso oyo na lisolo ya bato.”
Ebele ya bato oyo bakimaki na mikili oyo na bozwi mingi, bamoni ete kimya oyo bazalaki na yango mposa ebandi kobeba likoló na makáma ya koboma. Zulunalo U.S.News & World Report elobi ete “atako maloba oyo bazalaki kosakola ete ekosila, koboma esalemi mingi mpenza na boumeli ya bambula 1980 (na Etats-Unis). Tala motuya mpo na mbula mokomoko: bamilio 8, 1 ya makama minene, lokola koboma, makáma mabisami na basali mabe to mpe koyiba . . . Oyo ezali mpenza kotungisa, ezali likambo oyo ya komona kino wapi koboma ekómi kosalema mingi mpe yango kozanga kokana. Ntango nyonso bato bazali kobundisa banguna na bango. Engebene Bureau de statistiques judiciaires ya Etats-Unis, soko koboma elandi kosalema bobele lolenge oyo, 83 % ya bana baoyo bazali lelo na mibu 12 bakozwa likama mokolo moko to mosusu, na mobulu to na makambo mosusu ya lolenge wana . . . Basali na mabe bazali kopesama bitumbu noki te, ata soko basali mabe ya lolenge nini. Na mboka mobimba, baankete na makama minene esalemi, bapolisié bazali kosala ankete bobele ya likambo moko kati na mitano.” Makambo motindo moko ezali kosalema na mokili mobimba. Assemblée générale ya Nations unies esili koyeba ete “kobakisama ya motuya mpe bonene ya koboma ezali kosalema kati na biteni mingi ya mokili.”
Nzokande, ata soko bitumba, bibundeli mpe koboma elimwe lelo oyo na mabelé, bomoi ekozala bobele na likámá. Kati na zulunalo L’état du monde—1990, eteyelo lnstitut Worldwatch elobi ete “kati na mikili oyo ezali na bozwi mingi te, bankama na bamilió na bato bazali na bosenga makasi, bazali na maladi mpe bayebi mokanda te.” “Mokili mobimba—ezala bazwi to babola, bamboka ezali na bibundeli makasi to oyo ezangi yango—bazali na likámá likoló na kobebisama makasi ya ezingelo.”
Ya solo, biloko nyonso oyo ezali ntina mpo na bomoi na mabelé esili kobebisama. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda mokomamaki na Paul Hoffman, rédacteur en chef to mokonzi-mokomi ya zulunalo Discover: “Mabelé mobimba masili mpenza kobebisama (bobele na 1970). Bosoto bozali kotonda kino koleka bibwakelo na biso ya bosoto. Myango oyo bato bazali koluka kobatela banzeté ezali kobimisa mopepe ya móto. Ozone (eboke na mopepe) oyo ezali lokola nguba ya mabelé etikali bobele moke. Bisobe bizali sé koya minene, mpe bazamba ezali sé kosila. Bandenge ya banzete mpe ya banyama ezali kosila na mbango mpenza, 17 na ngonga moko.”
Bakisa likoló na yango, makama mauti na kobebisama ya mabelé mpe mai. Kanisa lisusu na kobakisama ya popilasyo ya mokili mobimba, oyo ezali kosenga ntango nyonso ete mabelé mabongi na kolona makomisama bisika ya kofanda mpe banzela, likambo oyo ekosala ntango nyonso bobele ete bandenge ya banyama mpe banzete esila nyee. Kanisa naino bozangá ya mai ebongi na komela mpe na makama oyo mauti na bambula ezali na acides. Talela lisusu makama oyo mauti na kobebisama ya mopepe mpo na kolongono ya nzoto mpe makama mazali kobimisama na bitika ya nkisi oyo ekobomaka (déchets toxiques). Nyonso wana ezali likámá mpenza monene mpo na mokili mobimba. Tozala banani mpe ata esika nini tofandi, biso nyonso tozali na mposa ya mopepe, ya bilei, ya mai mpe ya biloko ya ntina mpo na kobika. Yango esengeli te kobebisama, mpe esengeli kozala mingi. Engebene zulunalo L’etat du monde 1990, “bambula 1980 ezalaki mpasi mpenza mpo na babola, eleko ya nzala mpe ya kobakisama na motuya ya bakufi.”
Lokola mokili ebebi na bipai nyonso boye, moto moko akoki nde kotya ntembe ete tozali mpenza na mposa na mokili ya sika? Kasi, ebongi mpenza na kolobela likambo yango? Mokili motindo wana ekoki kouta epai wapi? Makámá nini tosengeli kolonga mpo ete mabelé mabebisama lisusu te, kasi mabongisama? Totalela makambo yango.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
WHO photo by P. Almasy