Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/11 nk. 19-23
  • “Esengeli na mokɛngɛli ete azala . . . moto ayebi komipekisa”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Esengeli na mokɛngɛli ete azala . . . moto ayebi komipekisa”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komipekisa: Lisɛngami mpo na bankulutu
  • Kati na boyokani na ye elongo na bato mosusu
  • Komipekisa na makita ya bankulutu mpe na ntango moto moko abyangami na komité ya kosambisa
  • Komipekisa kati na boyokani na bango elongo na basi
  • Komipekisa kati na makambo mosusu
  • Tolóna mbuma oyo ete komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini komipekisa​—ezali na ntina mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na kozwa mbano, zalá na komipekisa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bóbakisa na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/11 nk. 19-23

“Esengeli na mokɛngɛli ete azala . . . moto ayebi komipekisa”

“Esengeli na mokɛngɛli ete azala . . . motu ayebi komipekisa ”​—TITO 1:7, 8, MN.

1, 2. Guillaume d’Orange apesaki ndakisa nini ya moto oyo ayebi kokanga motema, mpe etamboli na ye ememaki bolamu nini?

KITOKO ya moto oyo apekisaki mayoki na Lisolo na bato lipesi biso ndakisa moko kitoko ya moto oyo apekisaki mayoki na ye. Na katikati na ekeke ya zomi na motoba, Guillaume d’Orange, elenge mwana na mokonzi ya Alemanye, azalaki mi bokila elongo na Henri ll mokonzi yo France. Ye ayebisaki Guillaume mwango oyo asalaki elongo na mokonzi ya Espanye mpo na koboma baprotestá nyonso ya France mpe ya Pays-Bas. Wana Henri ll abanzaki ete elenge Guillaume azalaki mokatolike ya molende lokola ye, ayebisaki ye makambo nyonso ya mwango mabe basalaki Guillaume atungisamaki mingi mpo na makambo oyo ayokaki, mpamba te baninga na ye mingi bazalaki baprotestá, kasi abimisaki mayoki na ye te; amonisaki nde bosepeli mingi na makambo mingi oyo mokonzi ayebisaki ye.

2 Nzokande, na eleko moko, Guillaume asalaki mwango mosusu mpo na kokweisa mwango wana mabe; mpe likambo yango libimisaki mbongwana oyo epesaki nzela na nsima ete Pays-Bas elongwa na boombo na bakatolike ya Espanye. Ezali mpo akangaki motema na ntango ayokaki mwango wana mabe nde Guillaume d’Orange azwaki nkombo oyo ete “Guillaume le Taciturne” (Moto na maloba mingi te). Bolóngi ya Guillaume d’Orange esalaki ete baloba na ntina na ye boye ete: “Azalaki mpenza mopesi na lipandá mpe lokumu na Ekólo Hollande.”

3. Banani bazwaka bolamu wana bakɛngɛli baklisto bazali komonisa ezaleli ya komipekisa?

3 Kokanga motema ya Guillaume le Taciturne epesaki bolamu mingi mpo na ye moko mpe na bato ya ekólo na ye. Bobele bongo,bankulutu to bakɛngɛli basengeli kobota mbuma ya elimo santu oyo komipekisa (Bagalatia 5:22, 23) Na kosaleláká ezaleli yango, bakopeka bolamu mingi na lisangá mpe na bango moko lokola Nzokande soko bakozala na komipekisa te, mikakatano mingi mikoki kobima.

Komipekisa: Lisɛngami mpo na bankulutu

4. Batoli nini ya ntóma Paulo emonisi ntina oyo bankulutu basengeli komipekisa?

4 Paulo, oyo azalaki nkulutu, ayebaki ntina na ezaleli ya komipekisa Wana apesaki toli epai na bankulutu oyo bayaki kotala ye longwa na Efese, alobaki na bango ete:‘,“Bokeba mpo ya bino mpenza mpe mpo na etonga.’’ “Bokeba mpo na bino mpenza” elimbolaki ,kati na makambo mosusu ete, ‘bomipekisa, bosɛnzela etamboli na bino.’ Wana atindaki mokanda epai na Timoté, ntóma Paulo alobelaki bobele likanisi yango moko, ete: “Omisɛnzela yo mpenza mpe mateya na yo.” Batoli oyo emonisaki ete Paulo ayebaki makama bomoto na basusu oyo bazalaki kosakola bobele na maloba nde bazalaki ndakisa malamu te pe etamboli na bango.. tala ntina oyo abandaki likebisi na ye ete bamisɛnzela.​—Misala 20:28, MN; 1 Timoté 4:16.

5. Lolenge nini bakɛngɛli baklisto bazali koponama, mpe epai wapi tozali kokuta masɛngami ya bakɛngɛli kati na Makomami?

5 Na nsima na bambula, mokumba oyo Makomami epesi yango epai na bankulutu emonanaki mpenza polele. Lelo oyo, toyebi ete bankulutu basengeli koponama. Baponami na college central ya ba Témoin de Jéhovah to na bamonisi na yango mpenza. college yango ezali komonisa “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Masengami mpo na kozala nkulutu, to mokɛngɛli kati na lisangá na boklisto, mayebisami mingi mpenza na ntóma Paulo kati na 1 Timoté 3:1-7 mpe na Tito 1:5-9.

6, 7. Masengami nini ya bankulutu mazali kotinda bango na komipekisa?

6 Na 1 Timoté 3:2, 3 (MN), Paulo akomaki ete mokɛngɛli esengeli kozala moto na bizaleli malamu. Nkulutu asengeli mpe kozala moto na makambo mabongi: tala bizaleli mibale oyo esɛngi komipekisa Mobali oyo akokisi masɛngami ya nkulutu azali moto akobɛtaka baninga te soko moto na bitumba te. Wana lisusu, esengeli komipekisa. Lisusu, mpo ete azala molangwi na masanga te, mpe amipesa na masanga te, nkulutu asengeli komipekisa​—Tala notes ya Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi ne 1984 likoló na 1 Timoté 3:2, 3.

7 Na Tito 1:7, 8, ntóma Paulo alobi na sikisiki ete mokɛngɛli asengeli kozala moto ya kokanga motema. Kasi, totala ete masɛngami mingi oyo matangami kati na eteni yango ezali kosɛnga komikanga motema to komipekisa. Na ndakisa, mokɛngɛli asengeli kozala na efundeli te, ɛɛ, asengeli kozala na ekweli te. Emonani polele ete nkulutu akokokisa masɛngami yango te soki ayebi komipekisa te.

Kati na boyokani na ye elongo na bato mosusu

8. Bizaleli nini bisengami na bankulutu bizali komonisa ntina ya komipekisa wana ezali bango kopesa batoli?

8 Mokɛngɛli asengeli kozala na motema pɛtɛɛ mpe na motema molai kati na boyokani na ye elongo na baninga na ye kati na kondima, mpe yango esɛngi komipekisa. Na yango tozali kotanga na Bagalatia 6:1 (MN), ete:“Bandeko, ata soko moto anyati litambe mabe naino ye moko asosoli yango te, bino bato bozali na makoki masɛngami na elimo (mingi mpenza bankulutu, bomeka kosembola moto motindo wana kati na elimo ya bopɔlɔ. Omikɛngɛla yo mpenza ete yo moko omekama te.”Mpo na komonisa elimo ya bopɔlɔ, esengeli koyeba komipekisa. Na likambo oyo, komipekisa ezali mpe na ntina mingi epai na nkulutu, mpo ete akoka komisɛnzɛla Bobele bongo, na ntango moto moko azali na mikakatano mpe abengi nkulutu, ezali na ntina mpenza ete nkulutu ayeba kokanga motema. Ata likanisi na ye ezali nini likoló na moto yango, nkulutu asengeli kozala na boboto, na motema pɛtɛɛ mpe koyeba komitya na esika na moto yango. Na esika na kokamata maloba noki mpo na kopesa toli, asengeli nde kozala pene na koyokamela molobani na ye mpe kosala na boye ete moto wana aloba makambo oyo mazali kotungisa ye.

9. Toli nini bankulutu basengeli mpenza kotalela na ntango bakutani na bandeko oyo bazali na mikakatano?

9 Toli oyo ezwami na Yakobo 1:19 (MN) ebongi mpenza na ntango tosengeli kosalisa moto oyo azali na mikakatano, ete: “Bandeko na ngai balingami, boyeba ete esengeli na moto na moto ete azala koyoka noki nde awela koloba te, mpe aoka nkanda noki te.” Ɛɛ, liboso na moto oyo asiliki, nkulutu asengeli kosɛnzɛla ete ayanola ye nokinoki te. Esengeli kokanga motema to komipekisa mpo na kozongisa maloba mabe te na maloba mosusu mabe, ete ozongisa “mabe na mabe” te. (Baloma 12:17) Ye oyo akozongisa mabe na mabe ekoyeisaka bobele makambo minene. Awa lisusu, Liloba na Nzambe lizali kopesa toli malamu epai na bankulutu, kokundoláká bango ete: “Eyano malamu ekosilisaka nkanda.”​—Masese 15:1, MN.

Komipekisa na makita ya bankulutu mpe na ntango moto moko abyangami na komité ya kosambisa

10, 11. Nini ekoki komonana na ntango na makita ya bankulutu, oyo emonisi ntina ya komipekisa kati na mabaku yango?

10 Libaku mosusu oyo bakɛngɛli baklisto basengeli komisɛnzela, ezali na ntango na makita ya bankulutu. Esengeli mbala mosusu komipekisa mpo na koyeba kozwa liloba na kimya ete ekotɛla solo mpe boyengebene. Esengeli mpe komipekisa mpo na kotɛmɛla komekama ya koluka komitómbola na boumeli ya lisoló. Soki nkulutu moko azali na ezaleli wana, ebongi ete nkulutu mosusu apesa ye toli: yango ekozala elembo ya bobóto.​—Tala 3 Yoane 9.

11 Bobele bongo, na ntango na makita yango, nkulutu oyo alingi mpenza kotalela makanisi na ye na motuya mingi akoki kosilika, kino konganga. Oyo nde kozanga komipekisa! Ezaleli wana ekoki kobimisa makama mibale na mbala moko. Libosoliboso, na ntango moto moko asiliki ezali nde litomba epai na moto mosusu, mpamba te oyo asiliki akozala na makoki te mpo na kobimisa makanisi mabongi. Lisusu, na ntango moto moko asiliki, azali na likámá ya kosilikisa bato mosusu ata nkutu kotombokisa bango. Nzokande, soko bankulutu bakebi te, ntembe makasi ekoki kokabola bango, likambo oyo likozala likama mpo na bango mpe mpo na lisangá lokola.​—Tala Misala 15:36-40.

12. Kati na makambo nini bankulutu basengeli kosɛnzɛla mpo na komonisa ezaleli ya komipekisa?

12 Bankulutu bazali lisusu na mposa monene na komipekisa mpo na kopɛngola ezaleli ya koponapona to ya kosalela bokonzi na bango na lolenge mabe. Ezala na maloba to na misala, lisɛnginya ya komitika kopusama na makanisi ya bomoto mazangi kokoka, ezali mpenza makasi. Mbala mingi bankulutu bazwaka meko makasi te na ntango bana na bango to basangani mosusu ya mabota na bango bafundami mpo na etamboli mabe. Na makambo motindo wana, esengeli komipekisa mpo ete bondeko ya makila epekisa bango te na kosalela boyengebene.​—Deteronome 10:17.

13. Mpo na nini ezali ntina ete bankulutu oyo bazali asambisa likambo ya ndeko moko bámonisa ezaleli ya komipekisa?

13 Na ntango moto moko abyangami na komite ya kosambisa esengeli mpenza komipekisa. ’Bankulutu basengeli komonisa ezaleli monene ya kokanga motema mpo ete bapusama na mayoki te. Basengeli komitika te ete balɛmbisama mpo na moto oyo azali kolela. Epai mosusu basengeli te kobungisa kimya na bango na ntango bafundi bango na makambo mingi mpe na ntango batɛmɛlami likambo oyo likoki kosalema soko bakutani na bapɛngwi. Na mabaku wana, maloba na Paulo mabongi mpenza ete: “Moombo na Nkolo akoswanaka te, lisusu asengeli kozala na bopɔlɔ epai na bato banso.” Mpo na komonisa bopɔlɔ na ntango na momekamo makasi esengeli kokanga motema. Na nsima ntóma Paulo amonisaki ete “moombo na Nkolo” asengeli ‘kokanga motema liboso na mpasi, mpe kolakisa batɛmɛli na bopɔlɔ nyonso.’ Mpo na kozala moto na bopɔlɔ mpe kokanga motema na botɛmɛli, esengeli komonisa ezaleli monene ya komipekisa.​—2 Timoté 2:24, 25, MN.

Komipekisa kati na boyokani na bango elongo na basi

14. Toli nini kitoko bankulutu basengeli kolanda kati na boyokani na bango elongo na basi?

14 Bankulutu basengeli mpenza kosɛnzɛla ete bamonisa ezaleli ya komipekisa kati na boyokani na bango elongo na basi. Ebongi te ete nkulutu akende ye moko kotala ndeko mwasi moko. Esengeli kokenda elongo na nkulutu mosusu to na mosaleli na misala. Lokola ayebaki likámá wana, ntóma Paulo apesaki toli epai na Timoté oyo azalaki mpe nkulutu, ete: “Bondela mibangé basi lokola bamama bilenge basi lokola bandeko basi, na peto nyonso.” (1 Timoté 5:1, 2, MN) Bankulutu mosusu bakobɛtaka bandeko basi mwa mbatá na lipeka lokola ekosalaka tata epai na mwana na ye. Bayebaka yango ezali bango kosala? Ya solo, ezali mbala mosusu mpo na mposa ya nzoto, kasi ezali te mpo na bolingo ya bandeko kati na baklisto.​—Tala 1 Bakolinti 7:1.

15. Lolenge nini likambo lisalemaki mpo na kozanga komipekisa ya nkulutu moko, limonisi motindo oyo nsoni ekoki kobwakama likoló na nkombo na Jéhovah?

15 Bankulutu mosusu bazangaki komipekisa kati na boyokani na bango elongo na bandeko basi ya lisanga, mpe yango ebimisaki mikakatano makasi epai na solo. Eleki mwa bambula, nkulutu moko abimisamaki na lisangá mpo ete asalaki ekobo elongo na ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azalaki Témoin de Jéhovah te. Na mpokwa oyo basakolaki kobima na bango na lisangá, mobali wana atondaki na nkanda, akɔtaki na Salle du Royaume na mondoki, mpe abɛtaki masasi na basali na mabe wana. Ata moto te akufaki kati na bango nyonso mibale, mpe nokinoki babotolaki mobali yango mondoki, kasi mokolo molandaki, zulunalo moko ya lokumu ekomaki kati na lokasa na yango ya yambo ete ‘lokito ya mondoki kati na ndakonzambe moko.’ Oyo nde nsoni monene ebwakamaki likoló na lisangá na Jéhovah mpe na nkombo na ye, mpo na kozanga komipekisa ya nkulutu wana.

Komipekisa kati na makambo mosusu

16. Mpo na nini bankulutu basengeli kokɛba ete bazala na komipekisa wana ezali bango kosala badiskur piblike?

16 Nkulutu azali mpe na mposa mpenza na komipekisa na ntango azali kopesa diskur piblike. Molobi na liboso na bato asengeli kozala na mpiko mpe na bobangi te. Basusu bazali komeka kosakana elongo na bayoki na kokotisáká,maloba mingi kati na badiskur na bango bobele mpo na kosekisa bato. Emonani lokola nde bazali kobondela ntango nyonso bayoki na bango; mpe toyebi ete kozanga kotɛmɛla ata lisenginya nini, ezali bongo kozanga komipekisa. Tokoki koloba lisusu ete molobi oyo akolekisa ngonga azangi komipekisa mpe azangi komibongisa malamu.

17, 18. Komipekisa ezali na ntina nini mpo na oyo etali bokatikati oyo nkulutu asengeli kozala na yango kati na misala mikeseni?

17 Atako yango ezali mpasi, nkulutu asengeli kosala makasi mpo na kozala na bokatikati na makambo mingi oyo azali kopesa ntango na ye mpe makasi na ye. Mpo na kolekisa ndelo te, esengeli komipekisa. Ekoki kokóma mbala mosusu ete bankulutu bamipesi mingi mpenza na matomba ya lisangá kino kobosana mabota na bango. Na yango, mokolo mosusu, ndeko mwasi moko asololaki na mwasi ya nkulutu moko likoló na vizite pastorale kitoko oyo mobali na ye ayaki kotala ye. Mwasi ya nkulutu wana akamwaki ete: “Nakosepela soko akosalela ngai mpe vizite pastorale moko!”​—1 Timoté 3:2, 4, 5.

18 Nkulutu azali mpe na mposa ya komipekisa mpo na kozala na bokatikati na ntango oyo azali kolekisa na boyekoli na ye moko mpe na oyo azali kolekisa kati na mosala ya kosakola to na kotala bandeko. Lokola motema na moto mazali na bokosi ekoki kosalema ete nkulutu moko alakisa ntango mingi na mosala oyo ye asepelaka na yango mingi. Soki alingaka mingi kotanga mikanda, akolekisa ntango mingi na boyekoli na ye moko. Soki nde mosala ya ndako na ndako ezali mpasi mpo na ye, akotalela yango na bopotu, mpe akolekisa ntango mingi na kotala bandeko.

19. Mokumba nini bankulutu bazali na yango, oyo ezali komonisa ntina ya komipekisa?

19 Mokumba na ye ya koyeba kobómba makambo ezali kosɛnga na nkulutu ete amonisa ezaleli monene ya komipekisa. Tala toli esengeli mpenza kati na likambo oyo: ’’bimisa likambo na nkuku ya mozalani na yo te.” (Masese 25:9) Nzokande makambo masili komonana malakisi ete yango ezali moko na mabunga oyo bankulutu basalaka mingi. Soko azali na mwasi oyo ye alingi mingi mpe azali na boyokani malamu elongo na ye, nkulutu akoki kopusama na Kobimisa makambo na nkuku to kolobela makambo mosusu na lolenge ete mwasi akozwa makanisi likoló na yango. Wana ebongi te mpe eyokani na mayele te. Mpamba te, yango ezali kobebisa lokumu ya moto. Baklisto mibali mpe basi bakoyaka kotala bandeko na bango bankulutu mpe bakoyebisaka bango makambo na nkuku mpamba te bandimisami ete bakobómba yango. Nkulutu oyo ekoyebisaka makambo na nkuku epai na mwasi na ye, azali kosala mabe; azangi mayele mpe bolingo, mpamba te azali komemisa mwasi na ye mokumba oyo ekoki na ye komema yango te.​—Masese 10:19; 11:13.

20. Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete bankulutu bazala bato bayebi komipekisa?

20 Na ntembe te, komipekisa ezali na ntina koleka, mingi mpenza epai na bankulutu. Lokola basili kozwa libaku kitoko ya kotambwisa libota na Jéhovah, mokumba na bango ezali mpenza monene. Lokola basili kopesa bango mingi, esɛngami mpe na ba mingi. (Luka 12:48; 16:10; tala Yakobo 3:1.) Bankulutu bazali na libaku kitoko mpe na mokumba ya kopesa ndakisa. Lisusu, na mokumba na bango, bakoki kosala malamu mingi to mpe mabe mingi koleka bato mosusu, soko bakomonisa ezaleli ya komipekisa to mpe te. Ezali likambo na kokamwa te soko Paulo alobaki ete: “Esengeli na mokɛngɛli ete azala . . . moto ayebi komipekisa.

Bozongeli

◻ Masɛngami nini na bankulutu mamonisi ete basengeli komipekisa?

◻ Mpo na nini bankulutu bazali na mposa ya komipekisa kati na boyokani na bango elongo na baninga kati na kondima?

◻ Lolenge nini komipekisa esengeli komonisama na ntango na makita ya bankulutu?

◻ Bankulutu basengeli kobunda na nini mpo ete babimisa makambo na nkuku te?

[Elilingi na lokasa 20]

Komipekisa ezali na ntina mingi na ntango na makita ya bankulutu

[Elilingi na lokasa 23]

Bakɛngɛli baklisto basengeli komonisa ezaleli ya komipekisa mpe kosɛnzɛla ete babómba makambo na nkuku oyo bakosambisaka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto