Oyanolaka wana moto moko abyangi yo?
LISOLÓ YA SHINICHI TOHARA
NA NTANGO nazalaki elenge, nalukaki Nzambe te, nalukaki mpe litambwisi na ye te. Bankoko na ngai balongwaki na Japon mpo na kokende na Hawaii, mpe baboti na ngai bazalaki na lingomba ya Buda. Bazalaki mpenza bandimi ya molende te, mpo na yango, nazalaki komibanzabanza te na ntina na Nzambe.
Nayekolaki évolution mpe nakómaki kokanisa ete kondima ete Nzambe azali, ezalaki mpenza bozoba. Atako bongo, ezalaki ngai kosala bakelasi, mateya ya sianse mamemaki ngai na kolanda astronomie, physique mpe biologie. Na butu, nazalaki kotala na likoló mpe nazalaki komituna lolenge nini myoto nyonso mityamaki kuna. Mongongo moko moke moutaki na motema mobandaki kotuna ete: ‘Ezali na Nzambe moko te oyo azali kokamba biloko oyo nyonso?’ Nayaki kondima ete esengelaki kozala na Moto moko likoló na biso. Motema na ngai mobandaki kotuna na makasi nyonso ete: ‘Nzambe yango azali nani?’
Wana nasilisaki ba humanités na ngai, namipesaki mingi na mosala na ngai ya mécanicien na izini ya masanga, mpe nazalaki lisusu kozwa ntango te ya kokanisa mozindo na ntina na Nzambe. Mosika te, nakutanaki na Masako, oyo na nsima, akómaki mwasi na ngai na 1937, mpe tozwaki esengo ya kobota bana misato. Masako amimonisaki mpenza moninga ya sembo mpe mama oyo amipesaki na mosala makasi!
Lokola nakómaki na libota sikawa, nabandaki kokanisa mingi na ntina ya avenir na biso. Nabimaki lisusu na libanda mpo na kotala myoto. Nandimisamaki ete Nzambe moko azalaki. Nayebaki te soki Nzambe yango azalaki nani, atako bongo nabandaki koluka ye na lolenge nyonso. Nazalaki kolɔmba ntango nyonso ete: ‘Soki ozali, salisa libota na ngai ete likoka kozala na esengo.’
Libyangi na ngai lindimamaki
Uta tobalanaki, tofandaki bobele epai na baboti na ngai, kasi na 1941, tozwaki ndako na biso moko na Hilo, na Hawaii. Bobele mwa moke nsima na kokota na ndako na biso ya sika, ba Japonais babundisaki mboka Pearl Harbor, na le 7 décembre 1941. Na eleko wana ya mobulu, bato nyonso bazalaki komitungisa mpo na mikolo mizalaki liboso.
Sanza moko nsima na etumba wana ya Pearl Harbor, nazalaki kosukola vuatire na ngai mpe mobali moko abelemaki na ngai mpe apesaki ngai mokanda moko oyo ezalaki na motó ya likambo Enfants. Amilakisaki ete nkombo na ye Ralph Garoutte, mosakoli Témoins de Jéhovah. Nazalaki kokanga ntina te na oyo azalaki koloba, kasi lokola nazalaki na mposa ya Nzambe, nazwaki mokanda yango. Na poso elandaki, Ralph azongaki mpo na kosenga ete nayekola Bibila elongo na ye. Atako nasilaki koyoka nsango ya Biblia, kasi ezalaki mbala ya liboso ya komona yango. Nandimaki boyekoli ya Biblia, mwasi na ngai mpe leki na ye ya mwasi basanganaki na boyekoli yango.
Nakamwaki na koyoka ete Biblia ezali Liloba na Nzambe. (2 Timoté 3:16, 17) Likambo oyo ete Jéhovah azali na mokano, esepelisaki ngai mingi mpenza. Azali Mozalisi oyo nazalaki koluka! (Yisaya 45:18) Tosepelaki lisusu mingi na koyoka ete paradis ya ebandeli oyo ebungaki, ekozongisama awa na mabelé, mpe tokoki kozala kati na yango. (Emoniseli 21:1-4) Wana ezalaki eyano ya libyangi na ngai epai na Nzambe.
Tozalaki kosolola na bato nyonso na ntina ya solo oyo toutaki koyeba yango. Baboti na ngai bakanisaki ete tozwi ligboma, kasi yango elembisaki biso te. Nsima na sanza misato ya boyekoli ya Biblia na molende, ngai mpe mwasi na ngai tozwaki batisimo na le 19 avril 1942, lokola elembo ya komipesa epai na Jéhovah Nzambe. Yoshi, leki ya Masako mpe mobali na ye Jerry, baoyo basanganaki na biso kati na boyekoli ya Biblia, bazwaki batisimo elongo na biso. Tozalaki bobele na boyebi moke ya Makomami Mosantu, kasi yango ekokaki mpo na kopusa biso na kolinga kosalela Nzambe.
Lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki naino kongala, nakanisaki ete etikalaki moke ete nsuka eya, bongo ngai mpe mwasi na ngai tolingaki mpenza kokebisa bato mpo na yango. Garoutte mpe mwasi na ye bazalaki lokola ndakisa na biso kati na mosala yango. Bazalaki ba pionniers, elingi koloba ba Témoins de Jéhovah oyo bamipesi na mosala ya kosakola ntango nyonso. Namekaki kokokanisa ezalela ya makambo na biso na oyo ya Ralph. Ye azalaki na mwasi mpe na bana minei. Ngai nazalaki na mwasi mpe na bana misato mpamba. Soki azalaki na makoki ya kosala bongo, ngai mpe nakokaki kosala motindo moko. Bongo, na sanza elandaki batisimo na biso, tosengaki mosala ya pionnier.
Liboso ete tondimama na mosala ya pionnier, nalongolaki biloko oyo ezalaki na ntina mingi te, kati na yango lindánda, saxophone mpe violon. Nalingaki miziki mingi, kasi nalongolaki biloko nyonso, natikalaki bobele na harmonica. Lisusu, mosala na ngai na izini ya masanga ezalaki lisusu kosepelisa ngai te. (Bafilipi 3:8) Natongaki remorke mpo ezala ndako mpe nazelaki mpo na komona soki Jéhovah alingaki koyanola na masengi na ngai. Nazelaki mingi te. Toponamaki lokola ba pionniers na le ler juin 1942. Tomikotisaka nokinoki kati na mosala ya ntango nyonso mpo na kosalela Jéhovah mpe tozali na mawa te mpo na ekateli oyo tozwaki.
Mosala ya pionnier na Hawaii
Elongo na Garoutte mpe mwasi na ye, tokokisaki mosala na biso na Hawaii, oyo ebéngamaki lisusu Esanga Monene, kati na yango ezalaki na Kona, oyo eyebani mingi mpo na kafe na yango, mpe Kau. Na eleko wana tozalaki kosakola na fono. Ezalaki mwa kilo, kasi tozalaki naino bilenge mpe na makasi. Na yango, fono na lobɔkɔ moko mpe sakosi ya mikanda na lobɔkɔ mosusu, tozalaki kolanda banzela nyonso oyo ekokaki komema epai na bato oyo bakokaki koyoka malamu, na bilanga ya kafé, na bilanga mosusu, mpe bipai nyonso mosusu. Na nsima ya kosala na etuka wana mobimba, totindamaki na Kohala, bobele kati na Esanga Monene. Kohala ezalaki mwa elanga moke ya nkokó, epai ba Caucasiens, ba Philipins, ba Chinois, ba Hawaiiens, ba Japonais, mpe ba Portuguais bazali kofanda. Bato na bato bazalaki na mimeseno na bango, na makanisi na bango, na biloko balingaka mpe na mangomba na bango.
Uta nabandaki mosala ya pionnier, nalukaki lisusu mosala ya mosuni te. Mpo na mwa ntango tozalaki kobika na mosolo oyo nabombaki, mpe ntango tokómaki na bosenga, nabandaki kokende kolɔba mbisi. Likambo ya kokamwa, nazalaki ntango nyonso kozonga na mwa mbisi. Tozalaki kobuka ndunda ya zamba mpe matiti na nsolo kitoko oyo mazalaki pembeni ya nzela mpo na kopesa elengi na bilei na biso ya mpokwa. Nasalelaki mwa litumbo moke ya linzánza, mpe Masako ayekolaki kosala mampa. Ezalaki mampa maleki kitoko oyo nalyaki naino yango te.
Ntango tokendeki na Honolulu mpo na assemblée moko ya boklisto, na 1943, Donald Haslett, oyo azalaki mokengeli ya filiale ya Hawaii, abyangaki biso ete tokende kofanda na ndako moko ya moke oyo etongamaki likoló ya garage ya la Société Watch Tower. Naponamaki lokola mobateli ya lopango ya filiale mpe nazwaki esengo na mosala na ngai ya pionnier na boumeli ya mbula mitano oyo elandaki.
Libyangi oyo namizelaki na yango te
Na 1943, toyokaki ete la Société asili kofungola eteyelo mpo na kobongisa bamisionere na mosala ya kosakola. Tozalaki na mposa mingi ya kokota na eteyelo yango! Baklisto oyo bazalaki na bana babyangamaki te, na yango, nalongolaki likanisi na ngai kuna. Atako bongo, na 1947, ndeko Haslett ayebisaki biso ete la Société alingaki koyeba soki ezali na ba Hawaiiens oyo balingaki kokende na mboka Japon. Atunaki soki makanisi na biso mazali nini, mpe nalobaki lokola Yisaya ete: “Tinda ngai.” (Yisaya 6:8) Mwasi na ngai azalaki na makanisi motindo moko na ngai. Toyanolaki na libyangi ya Jéhovah kozanga kokakatana
Bongo, tobyangamaki elongo na bana na biso misato mpo na kokota na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, mpo na kozwa formation lokola bamisionere. Bato mosusu mitano babyangamaki: Donald mpe Mabel Haslett, Jerry mpe Yoshi Toma, mpe Elsie Tanigawa, mpe biso nyonso tokendeki elongo na New York, na eleko ya mpio ya mobu 1948.
Tokendaki na mokili wana mosusu na bus. Nsima na mikolo misato ya mobembo, biso nyonso tolembaki, mpe ndeko Haslett alobaki ete tolekisa butu mobimba na hotel mpo na kopema. Ezalaki biso kokita na bus, mobali moko abelemaki pene na biso mpe angangaki ete: “Ba Japonais! Nakei na ndako kozwa monduki mpo na koboma bango!”
Ndeko Haslett alobaki ete: “Bazali ba Japonais te. Bazali ba Hawaiiens. Oyebi kokesenisa bango te?” Tobikaki mpo na eyano oyo apesaki nokinoki.
Tosengelaki mpenza kokota na kelasi ya 11 ya Galaad? Yango ezalaki komonana lokola nde ekosalema te. Mosika te, yango ekokisamaki. Na kelasi na biso, Nathan H. Knorr, prezida ya la Société Watch Tower, aponaki banakelasi 25 ete babongisama bobele mpo na kotindama lokola bamisionere na Japon. Lokola nazalaki moto ya mboka Japon, mpe nayebaki mwa moke koloba Japonais, basengelaki ngai ete nalakisa lokotá epai na banakelasi mosusu. Lokola nayebaki yango malamu mpenza te, ezalaki likambo ya petee te; kasi biso nyonso tolongaki.
Na ntango wana, Loy, mwana na biso ya mobali, azalaki na mibu zomi, mpe bana na biso mibale ya basi, Thelma mpe Sally bazalaki, moko na mibu mwambe mpe mosusu na mibu motoba. Bazalaki kosala nini wana tozalaki na kelasi? Bango mpe bazalaki kokenda na kelasi. Bus moko ezalaki komema bango na ntongo mpe kozongisa bango. Wana bazalaki kouta kelasi, Loy azalaki kosala elongo na bandeko na ferme ya la Société, Thelma mpe Sally bazalaki kogumba ba mouchoirs na esika bazalaki kosukola bilamba.
Tobongisi makanisi mpo na kofanda na esika oyo toyebi te
Ntango tozwaki mapolomi na biso ya Galaad na le 1er août 1948, tozalaki motema likoló ete totindama na bamboka oyo tosengelaki kokenda. Ndeko Haslett akendaki liboso na biso mpo na koluka esika oyo bamisionere basengelaki kofanda. Na nsuka, azwaki ndako ya étages mibale na engumba Tokyo, mpe na le 20 août 1949, libota na biso likendeki na efandelo na yango ya sika.
Liboso ya kokóma na Japon, nazalaki mbala mingi kokanisa na ntina na mokili wana ya Orient. Nazalaki kobanza na ntina na bokangami oyo ba Japonais bazalaki na yango epai na bato oyo bazalaki bankolo na bango mpe epai na mokonzi na bango. Ba Japonais mingi bapesaki bomoi na bango mpo na bakonzi na bango wana. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakumbi mpepo oyo babyangamaki ete bakamikaze, bakufelaki mokonzi na bango na kotutáká mpepo na bango na mombunda ya maswa ya etumba ya banguna. Nazali komikundola wana ezalaki ngai kokanisa ete, soki ba Japonais bazali sembo epai na bakonzi na bango bato, bakosala nini soki bayebi Nkolo ya solo, Jéhovah?
Ntango tokómaki na Japon, ezalaki bobele na bamisionere nsambo mpe na mwa ndambo ya basakoli na mboka wana mobimba. Tosalaki elongo, mpe nasalaki makasi mpo na koyeba malamu monoko yango, kino nabandaki boyekoli ya Biblia elongo na bato mingi oyo bazalaki koluka Nzambe na motema na bango mobimba. Mingi kati na bayekoli wana ya liboso, bazali sembo kino lelo.
Mosala ya misionere elongo na bana na biso
Lolenge nini tokokaki kokokisa mosala ya misionere wana ezalaki biso kobokolo bana na biso? Ya solo, nyonso wana esalemaki na nguya ya Jéhovah. Tozalaki kozwa mwa mosolo moke epai ya la Société, mpe Masako azalaki kotongela bana bilamba. Baboti na ngai mpe bazalaki kotindela biso mwa lisungi.
Nsima ya kosilisa kelasi na ye ya secondaire, Loy asalaki na boumeli ya mwa ntango na filiale ya la Société Watch Tower na Japon. Kasi, lokola azalaki na mikakatano ya kolongono ya nzoto na ye, azwaki ekateli ya kozonga na Hawaii mpo na komisalisa. Ye mpe mwasi na ye bazali sikawa kosalela Jéhovah na bosembo nyonso na Californie. Libala na ye lipesaki biso esengo ya kozwa bankoko mike minei. Bango nyonso basili kozwa batisimo, mpe moko na bango azali kosala elongo na mwasi na ye, na Bétel ya Brooklyn, biro monene ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba.
Bana na ngai ya basi, Thelma na Sally, bandimamaki lokola bamisionere nsima wana bakólaki. Thelma azali kosala sikawa lokola misionere na engumba Toyama. Sally abalaki ndeko moko misionere, Ron Trost, mpe bazali na mosala ya zongazonga na mboka Japon uta mibu koleka 25.
Kobanda na Nord kino na Sud
Nsima na kolekisa mibu mibale na Tokyo, totindamaki na engumba Osaka mpo na mibu mibale mosusu. Na nsima, totindamaki na nord, na Sendai, epai kuna tosalaki soko mibu motoba. Bambula wana tolekisaki na Sendai ebongisaki biso mpo na kokende kofanda na Hokkaido, esenga oyo ezali mpenza na nord ya Japon. Ezali na Hokkaido nde bana na biso ya basi bandimamaki lokola bamisionere. Bobele kuna lisusu nde tomeseneki na bileko ya mpio makasi oyo ezalaki kokita kino na nse na zero degré. Oyo nde mbongwana monene nsima ya kofanda na Hawaii, mboka oyo ya molungé mingi!
Na nsima, mokolo moko, nazwaki libyangi mosusu kati na mokanda oyo la Société atindelaki ngai. Basengaki ngai ete nafungola filiale na mboka Okinawa, oyo ezalaki koyangelama liboso na États-Unis. Kolongwa na nsuka ya malili makasi na nord ya mboka Japon mpo na kokenda na mboka oyo esili sikawa kokóma mpenza na sud ya Japon, ezalaki mpenza ntembe monene. Nasengelaki kosala nini? Atako namimonaki ete nakoki te, nakómaki na Okinawa na novembre 1965, elongo na mwasi na ngai ya sembo, lokola yango ezali momeseno. Bomoi na Okinawa esengelaki kozala motindo moko na oyo ya Japon? Mimeseno nini tosengeli kokuta? Bato basengelaki koyanola na nsango ya lobiko ya Jéhovah?
Ntango tokómaki na Okinawa, motuya ya basakoli mozalaki na nse ya 200. Sikawa, bazali koleka 2 000. Na ebandeli, nazalaki kokabola ntango na ngai na mosala ya circonscription mpe na bokengeli ya filiale. Mibembo oyo nazalaki kosala na bisanga esalisaki ngai na kosala boyokani malamu elongo na bandeko ya bisika wana, mpe nazali kotanga lolenge oyo nazalaki kosalela bango lokola libaku kitoko.
Mikakatano mizangaki?
Mosala na biso ya misionere mozangaki mikakatano soki moke te. Wana tozalaki na États-Unis mpo na bopemi na 1968, Masako azwaki maladi mpe basalaki ye lipasó. Balongolaki kanser na misopo na ye mpe azongelaki kolongono na ye nokinoki. Tozalaki te na mosolo ya assurance mpo na monganga, mpe tozalaki kobanga ete mbala mosusu tokokoka te kozonga na esika na biso ya mosala. Kasi tokamwaki mpenza, baninga na biso kati na kondima bazwaki mokumba na makambo nyonso.
Mpo na ngai moko, sikawa nazali kobunda na mikakatano mikokani na oyo ya bato bazali na diabète. Atako nazali mokufeli miso te, kasi miso na ngai mazali komona malamu te. Kasi mpo na boboto na Jéhovah, nazali komileisa na elimo na koyokaka bakasete ya Mosenzeli mpe Réveillez-vous! Lisusu, bandeko mibali mpe basi bazali kosunga ngai na kotangelaká ngai makambo mosusu ya ntina mingi.
Lolenge nini nakoki kolanda kopesa badiskur piblike atako miso na ngai mazalaki komona malamu te? Liboso nazalaki kotya masolo na ngai kati na kasete mpe kosala ba gestes ntango bayoki bazali kolanda. Kasi, nalandaki toli ya mwana na ngai ya mwasi, nabongisaki mwango yango. Sikawa, nazali kotya badiskur kati na magnétophone moke mpe nazali kotya yango liboso na bayoki wana ngai moko nazali kolanda yango na écouteur.
Atako ntango nini tokutanaki na mikakatano, tozali ntango nyonso komitika epai na Jéhovah. Na nsuka, mapamboli oyo mazali kouta na lolenge oyo Jéhovah azali kosilisa mikakatano, mazali ntango nyonso minene koleka mikakatano yango moko. Mwango bobele moko ya komonisa botɔndi na biso ezali bongo kotikala kati na mosala na ye.
Nsima na kolekisa mibu 23 na Okinawa, totindamaki lisusu na esika oyo totindamáká liboso na mboka Japon. Biro monene ya la Société mpe ndako monene ya bamisionere ezali bobele na esika yango ezalaki liboso; ezali ndako ya étage moko oyo ndeko Haslett asombaki eleki mibu mingi sikawa.
Longola ngai mpe Masako, basangani mosusu 11 ya libota na biso bazali bamisionere na Japon. Biso nyonso tozali kotalela yango lokola libaku kitoko na komona bokóli monene oyo Jéhovah asili koyeisa na mboka oyo epai bizaleli ya lingomba ya Buda mpe lingomba ya Shintõ ezali na bopusi mingi likoló na bato. Na Japon, mosala ya kosakola mabandaki malembemalembe, kasi nguya ya Jéhovah ebimisaki “libota” ya basakoli ya nsango malamu koleka 167 000.—Yisaya 60:22.
Nzambe ayanolaki ngai wana nabyangaki ye. Ntango ye abyangaki ngai, nayanolaki malamu. Ngai mpe mwasi na ngai tozali komona ete tosali bobele yango esengelaki biso kosala. Bongo yo? Oyanolaka wana obyangami na Mozalisi na yo?
[Elilingi na lokasa 28]
Libota ya Tohara elongo na ndambo ya ba pioniers ya Hawaii, na 1942
[Elilingi na lokasa 29]
Bana ya Tohara na Galaad, na 1948
[Elilingi na lokasa 31]
Shinichi mpe Masako Tohara basili kokokisa mibu 43 na mosala ya misionere, wana ezali bongo na esengo mpo ete bayanolaki na libyangi