Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/8 nk. 17-22
  • Zalá na komipekisa mpe tika yango efuluka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na komipekisa mpe tika yango efuluka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali na ntina, kasi ezali pɛtɛɛ te
  • Komipekisa na kotalela mayoki na biso
  • Mayoki na biso mpe bandeko na biso
  • Ekoki kosalema!
  • Mpo na nini komipekisa​—ezali na ntina mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tolóna mbuma oyo ete komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na kozwa mbano, zalá na komipekisa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bóbakisa na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/8 nk. 17-22

Zalá na komipekisa mpe tika yango efuluka

‘Bobakisa komipekisa wana ezali bino na . . . kondima.’​—2 PETELO 1:5, 6, MN.

1. Moklisto akoki kopesa litatoli na libaku nini oyo limonanaka mingi te?

YESU alobaki ete: “Bakomema bino liboso ya bayangeli mpe liboso na bakonzi na ntina na ngai, mpo na litatoli epai na bango.” (Matai 10:18, MN) Soki obyangami liboso ya moyangeli moko, mosambisi, to mokonzi, okoloba makambo nini? Mbala mosusu, okolobela liboso ntina oyo ozali wana, likambo oyo ofundami na yango. Elimo ya Nzambe ekosalisa yo mpo na yango. (Luka 12:11, 12) Kasi okanisi ete tozali kolobela komipekisa? Otalelaka yango lokola likambo ya ntina mpo na nsango na biso ya boklisto?

2, 3. (a) Lolenge nini Paulo akokaki kopesa litatoli epai na Feliki mpe Dulusila? (b) Mpo na nini komipekisa ezali lisoló libongaki mpenza mpo na Paulo ete aloba na ntina na likambo wana?

2 Tozwa ndakisa ya likambo moko lisalemaki. Témoin de Jéhovah moko akangamaki mpe basambisaki ye. Wana apesamelaki maloba, asepelaki kolimbola bindimeli na ye ya Temwe moklisto. Okoki kotalela lisoló liyebisi likambo wana mpe okomona ete mobali wana apesaki litatoli na tribinale “na ntina na boyengebene, na komipekisa mpe kosambisama oyo ekoya.” Tozali kokanisa mpo na oyo ekómelaki ntoma Paulo wana azalaki na etúka ya Kaisalia. Ezalaki kosambisama ya liboso. “Nsima ya mwa mikolo, Feliki ayei elongo na Dulusila, mwasi na ye, oyo azalaki Moyuda, mpe atindi kobyanga Paulo mpe ayokaki ye koloba na ntina na kondima kati na Klisto Yesu.” (Misala 24:24, MN) Lisoló na bato liyebisi ete Feliki “amipesaki na koboma mpe na kosala mabe mingi, mpe asalelaki nguya na ye ya bokonzi na mayele ya moombo moko.” Abalaki mbala mibale liboso na kopusa Dulusila ete aboma libala (kobukáká mobeko ya Nzambe), mpe akómaki mwasi na ye ya misato. Mbala mosusu ezali ye [Dulusila] nde alingaki koyoka nsango ya boklisto, lingomba ya sika.

3 Na ntango wana nde Paulo alobaki “na ntina na boyengebene, na komipekisa, mpe na kosambisama oyo ekoya.” (Misala 24:25, MN) Ekoki kozala ete maloba wana mamonisaki bokeseni kati na mitinda ya kosambisa mityami na Nzambe mpe mabe mpe bokesene oyo Feliki na Dulusila bazalaki na yango. Paulo akanisaki mbala mosusu na kopusa Feliki ete asalela boyengebene na likambo na ye. Kasi mpo na nini kolobela “komipekisa mpe kosambisama oyo ekoya”? Babalani wana ya misala na mbindo balukaki koyeba oyo esɛngami na “kondima kati na Klisto Yesu.” Na yango, basengelaki koyeba ete kondimela ye esɛngi kozala na bokonzi likoló ya makanisi na bango, maloba, mpe misala na bango, oyo elimboli bongo komipekisa. Bato nyonso bakozongisa monoko epai na Nzambe na ntina na makanisi na bango, na maloba mpe na misala na bango. Na bongo, oyo eleki ntina na kosambisama ya Feliki kati na likambo ya Paulo, ezalaki kosambisama oyo ezalaki kozela moyangeli wana mpe mwasi na ye liboso na Nzambe. (Misala 17:30, 31; Baloma 14:10-12) Na bososoli nyonso, likoló na nsango oyo ayokaki na Paulo, “Feliki aokaki nsɔmɔ.”

Ezali na ntina, kasi ezali pɛtɛɛ te

4. Mpo na nini komipekisa ezali likambo moko ya ntina na boklisto ya solo?

4 Ntoma Paulo atalelaki komipekisa lokola likambo ya ntina mingi kati na boklisto. Ntoma Petelo, moko na baninga ya penepene na Yesu, andimaki yango. Wana akomaki mokanda epai na baoyo ‘bakozala na motindo na Nzambe’ na likoló, Petelo apesaki toli ya komonisa bizaleli mosusu oyo bizalaki na ntina mingi, lokola kondima, bolingo, mpe komipekisa. Na bongo, komipekisa esangisamaki kati na elaká oyo ete: “Soko makambo oyo mazwami mpe mayikani kati na bino, ekopekisa bino ete bolɛmba te mpe bozanga kobota mbuma te mpo na boyebi ya solo na Nkolo na biso Yesu Klisto.”​—2 Petelo 1:1, 4-8, MN.

5. Mpo na nini tosengeli mingi mpenza komibanzabanza na ntina na komipekisa?

5 Nzokande, oyebi ete ezali mpasi te mpo na koloba ete tosengeli komonisa komipekisa, kasi ezali mpasi mpo na kosalela yango kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Moko na bantina ezali ete, komipekisa ezali komonana mingi te. Na 2 Timoté 3:1-5, Paulo amonisaki bizaleli oyo bisengeli komonana na ntango na biso, na “mikolo ya nsuka.” Moko na makambo oyo mamonisi eleko na biso ezali ete mingi bakozala bato “bazangi komipekisa.” Ezali yango nde tozali komona na zingazinga na biso, boye te?

6. Lolenge nini kozanga komipekisa ezali komonana na mikolo na biso?

6 Bato mingi bakanisi ete “kobimisa makambo nyonso” to “kotomboka” ezali malamu mpo na kolongono ya nzoto. Likanisi wana lizwami epai na bato na lokumu oyo bazali ndakisa mpo na bato mingi, mpe bango bamonani lokola nde bakoki te komipekisa na likambo moko mpe bakosalaka na kopusama na mayoki mabimi na ntango wana. Na ndakisa, mingi na baoyo balingi kozala basali na masano basili komesena na komonisa mayoki ya mobulu, ata nkanda makasi. Okoki komikundola te, to otangaki ata na zulunalo te, masoló ya bitumba makasi, botomboki ya ebele na bato na boumeli ya milulu ya masano? Nzokande, mposa na biso ezali te mpo na koloba mingi likoló na bandakisa ya kozanga komipekisa. Tokoki kotanga ebele ya makambo kati na yango tosengeli komonisa komipekisa​—kolya na biso mpe komela na biso, etamboli na biso epai na basi to mibali, mpe ntango mpe mosolo tozali kobimisa mpo na kominanola. Kasi, na esika ya kotalela makambo mingi likolólikoló, tika totalela likambo ya ntina mingi kati na yango tosengeli komonisa komipekisa.

Komipekisa na kotalela mayoki na biso

7. Eteni nini ya komipekisa oyo ebongi mpenza na kotyelama likebi?

7 Mingi kati na biso bazali mpenza kolónga kobongisa to kopekisa misala na bango na makambo mosusu. Tozali koyiba te, tozali kosala pite te soko mpe koboma te; toyebi ete mibeko ya Nzambe mizali kokweisa yango. Kasi, tozali nde kolónga kopekisa mayoki na biso? Na boumeli ya ntango, baoyo bazali kokoka te kopekisa mayoki na bango bazali mbala mingi kosuka na kozanga komipekisa kati na misala na bango. Na yango, totya likebi likoló na mayoki na biso.

8. Jéhovah azali kosɛnga biso nini na ntina na mayoki na biso?

8 Jéhovah Nzambe asɛngi biso te ete tozala lokola bikeko bizangi kososola, mpo ete tozala na mayoki te mpe tomonisa yango te. Na nkunda ya Lazare, Yesu “anyokwamaki kati na elimo mpe atungisamaki.” Na nsima, “Yesu atangisaki mpisoli.” (Yoane 11:32-38, MN) Na komipekisáká mpenza na misala na ye, amonisaki liyoki likeseni wana abenganaki basenzi na mbongo na tempelo. (Matai 21:12, 13; Yoane 2:14-17) Bayekoli na ye ya sembo bamonisaki mpe mayoki ya mozindo. (Luka 10:17; 24:41; Yoane 16:20-22; Misala 11:23; 12:12-14; 20:36-38; 3 Yoane 4) Nzokande, basosolaki ete basengelaki komipekisa mpo ete mayoki na bango emema bango na lisumu te. Baefese 4:26 (MN) emonisi yango polele ete: “Bosilika nde bosala lisumu te; tika te ete moi molimwa naino bozali na nkanda na bino.”

9. Mpo na nini kopekisa mayoki na biso ezali na ntina mingi?

9 Ekoki kozala likáma soki moklisto moko asali lokola nde azali komonisa komipekisa, nzokande mayoki na ye mapekisami te. Kanisa oyo esalemaki ntango Nzambe andimaki mbeka ya Abele: “Kaina asilikaki mingi mpe elongi na ye ezalaki na nkanda. Jéhovah alobaki na Kaina ete: ‘Mpo na nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda? Soki osali malamu, okondimama te? Kasi soki osali malamu te, lisumu lizali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo.’” (Genese 4:5-7) Kaina aboyaki kopekisa mayoki na ye, yango ememaki ye na koboma Abele. Kozanga kopekisa mayoki ekomemaka na kosala likambo lizangi kopekisama.

10. Tozwi liteya nini na ndakisa ya Hamana?

10 Tozwa lisusu ndakisa moko na mikolo ya Mardokai mpe Estere. Hamana, moto ya lokumu na mboka, asilikaki na likambo oyo ete Mardokai azalaki kofukamela ye te. Na nsima, Hamana akanisaki na libunga nyonso ete akondimama epai na mokonzi. “Na mokolo yango, Hamana atɛlɛmaki na kosepela mpe na esengo kati na motema. Nde wana Hamana amonaki Mardokai na ekuke na mokonzi ete atɛlɛmaki te mpe alɛngaki liboso na ye te, atondaki na nkanda mpo na Mardokai. Nde Hamana akangaki motema na ye mpe akendaki na ndako na ye.” (Estere 5:9, 10) Nokinoki, azalaki na mayoki ya esengo. Nzokande, nokinoki azalaki lisusu na nkanda mpo ete amonaki moto oyo ye ayinaki. Wana Biblia elobi ete “Hamana akangaki motema,” okanisi ete azalaki ndakisa ya komipekisa? Soko moke te. Na ntango wana, Hamana apekisaki misala na ye mpe amonisaki mayoki na ye te, kasi apekisaki nkanda na ye ya zuwa te. Mayoki na ye mamemaki ye na kosala likita mabe mpo na koboma moto.

11. Matáta nini ebimaki kati na lisangá ya Filipi, mpe mbala mosusu ezalaki mpo na ntina nini?

11 Bobele bongo, kozanga kopekisa mayoki na mikolo na biso ekoki mpenza komema likámá epai na baklisto. Bamoko bakoloba ete: ‘Oyo ekoki kosalema na lisangá te.’ Nzokande yango ekoki mpenza kosalema. Baklisto bapakolami mibale ya mboka Filipi bazalaki na matáta makasi, oyo elobelami polele te na Biblia. Kanisa lokola nde likambo yango lizalaki boye: Evodi abyangi bandeko mibali mpe bandeko basi mpo na kolya soko mpo na kominanola. Sintuke abyangamaki te, mpe azokisamaki na motema. Mbala mosusu ye mpe azongisaki yango na koboyáká kobyanga Evodi na libaku mosusu. Babandaki bongo komonisana mabunga; na nsima, batikaki kolobana. Na likambo lokola oyo, matáta mauti mpenza na kozanga kobyangama mpo na kolya? Te. Wana ezali bobele montentei (étincelle). Ntango bandeko bapakolami wana ya basi bapekisaki mayoki na bango te, montentei mokómaki mɔ́tɔ makasi. Matáta maumelaki mpe makómaki makasi, kino esɛngaki ete ntoma moko apesa lisungi.​—Bafilipi 4:2, 3.

Mayoki na biso mpe bandeko na biso

12. Mpo na nini Nzambe apesi biso toli oyo ezwami na Mosakoli 7:9?

12 Solo mpenza, ezali pɛtɛɛ te ete moto apekisa mayoki na ye wana asalelami mabe, azokisami, to bakaniseli ye mabe. Jéhovah ayebi yango, mpamba te azali kotalela boyokani ya bato uta ebandeli ya mokili. Nzambe apesi biso toli ete: “Yoka nkanda noki kati na elimo na yo te, mpo ete nkanda ekoumela na motema ya bazoba.” (Mosakoli 7:9) Ozali komona ete Nzambe azali liboso kotya likebi na mayoki, kasi na misala te. (Masese 14:17; 16:32; Yakobo 1:19) Omituna yo moko ete: ‘Nasengeli komibanzabanza mpo na kopekisa mayoki na ngai?’

13, 14. (a) Na mokili, nini ezali kobima soki mayoki mapekisami te? (b) Makambo nini makoki komema baklisto na kokangana nkanda?

13 Na mokili, bato mingi bakopekisaka mayoki na bango te mpe bazali komipesa na kozongisa mabe na mabe​—oyo ezali koswa, ata na mobulu, na ntina na mabe ya solo to ya makanisi mpamba oyo basaleli bango moko to bandeko na bango. Soki mayoki mapekisami te, ekoki kozala na bopusi ya mabe na boumeli ya ntango molai. (Tala Genese 34:1-7, 25-27; 49:5-7; 2 Samwele 2:17-23; 3:23-30; Masese 26:24-26.) Ata ekólo na bango ezali nini to ezalela na bango ezali nini, baklisto basengeli mpenza kotalela mayoki wana ya koyina mpe kokangana nkanda ete ezali mabe, ebongi na kokima yango. (Levitike 19:17) Ozali kotalela likambo ya kokima kokangana nkanda lokola eteni na yo ya komipekisa na ntina na mayoki?

14 Lolenge moko na likambo ya Evodi mpe Sintuke, koboya kopekisa mayoki ekoki kobimisa mikakatano lelo oyo. Ndeko mwasi moko akoki kosilika soki abyangami te na feti ya libala. To mbala mosusu soki mwana na ye to ndeko na ye abyangami te. To mbala mosusu ndeko mobali moko asombaki vuatire epai na ndeko mosusu, nsima ya mwa ntango, ezali kotambola lisusu te. Ata soki ekufi mpo na ntina nini, yango ekozokisa makanisi ya basusu, bakopekisa mayoki na bango te mpe bakosilika. Nini ekoki bongo kosalema?

15. (a) Matomba mabe nini mazali kobima soki baklisto bakangani nkanda? (b) Biblia epesi toli nini likoló na ezaleli ya kokangana nkanda?

15 Soki moto oyo asiliki asali makasi te mpo na kopekisa mayoki na ye mpe kozongisa kimya elongo na ndeko, akoki kokanga nkanda na motema. Yango ezali kosalema wana Temwe moko azali kosɛnga ete batinda ye te na etuluku moko ya Boyekoli ya Mokanda mpo ete “azali na boyokani te” elongo na moklisto mosusu to na libota moko lizali koyangana wana. Oyo nde mawa! Biblia elobi ete ezali nsɔni mpo na baklisto ete bafundana na bisambiselo ya mokili, kasi ezali lisusu nsɔni soki tokokima ndeko moko na ntina na mabe moko ya kala oyo asalelaki biso to mosangani moko ya libota na biso, boye te? Mayoki na biso mamonisi ete tozali kopesa motuya mingi na bikangiseli ya makila koleka kimya elongo na bandeko na biso ya mibali mpe basi? Tozali nde koloba ete tokoki kokufa mpo na ndeko na biso ya mwasi, nzokande mayoki na biso mazali kopusa biso mpenza sikawa na kotika kolobisa ye? (Tala Yoane 15:13.) Nzambe alobi na biso polele ete: “Bózongisaka mabe mpo na mabe te. . . . Soki ekoki, lokola emonani na bino, bozala na kimya elongo na bato nyonso. Balingami, bóbukanisa mpo na bino mpenza te, kasi botika esika na nkanda.”​—Baloma 12:17-19; 1 Bakolinti 6:7.

16. Abalayama apesaki ndakisa nini ya malamu na ntina na kopekisa mayoki?

16 Na esika ya kobomba nkanda na motema, kolanda kopekisa mayoki na biso ezali malamu mpo na kozongisa kimya to kolongola ntina ya matáta. Tomikundola na ntango oyo mboka ekokaki lisusu te ete bibwele ya Abalayama ezala esika moko na oyo ya Lota, mpe ete basali na bango babandaki koswana. Abalayama amitikaki kopusama na mayoki na ye? To amonisaki komipekisa? Na boboto nyonso, apesaki likanisi mpo na kosilisa matáta wana na kimya: moko na moko asengelaki kokende na esika na ye. Mpe apesaki Lota nzela ya kopona liboso. Komonisáká ete azalaki na nkanda te soko mpe zuwa te, na nsima, Abalayama abundelaki Lota.​—Genese 13:5-12; 14:13-16.

17. Libungá nini Paulo mpe Balanaba basalaki na libaku moko, kasi nini esalemaki na nsima?

17 Na ntina na komipekisa, tokoki lisusu kozwa liteya na likambo libimaki kati na Paulo mpe Balanaba. Nsima na kotambola elongo na boumeli ya bambula mingi, bawelanaki makasi na ntina na likambo ya komema Malako na mobembo. “Ntembe makasi ebimaki, bongo bakabwanaki, mpe Balanaba akamataki Malako mpe akendaki na masuwa kuna na Kupulu.” (Misala 15:39) Na libaku oyo, mibali wana bateli bapekisaki mayoki na bango te; likambo oyo lisengeli kozala likebisi mpo na biso. Soki yango ekómelaki bango, yango ekoki mpe kokómela biso. Atako bongo, bapesaki nzela te na kokabwana to kozongisana mabe na mabe ete ekóla. Lisoló limonisi ete bandeko wana bapekisaki mayoki na bango mpe na nsima, basalaki elongo kati na kimya.​—Bakolose 4:10; 2 Timoté 4:11.

18. Moklisto oyo ateli akoki kosala nini soki azokisami na motema?

18 Tokoki komizela ete makambo makozokisaka, ata kokanga nkanda, ebima kati na libota ya Nzambe. Yango ezalaki na ntango na Baebele mpe na mikolo ya bantoma. Ezali komonana lisusu kati na basaleli ya Jéhovah na mikolo na biso, mpo ete biso nyonso tozangi kokoka. (Yakobo 3:2) Yesu apesaki toli na bayekoli na ye ete basala noki mpo na kosilisa matáta oyo mabimi kati na bandeko. (Matai 5:23-25) Kasi eleki lisusu malamu kopɛngola yango na kokólisáká lisusu ezaleli na biso ya komipekisa. Soki ozali komiyoka ete otungisami to ozokisami na likambo moko ya moke oyo lisalemaki to lilobamaki na ndeko na yo ya mobali soko ndeko na yo ya mwasi, mpo na nini te kopekisa mayoki na yo mpe kobosana yango? Ezali mpenza na ntina ya koluka kokutana na mozalani na biso, lokola soki nde esengelaki mpenza mpo na kokitisa motema na biso, ete andima libunga na ye? Epai mosusu, lolenge nini osengeli kopekisa mayoki na yo?

Ekoki kosalema!

19. Mpo na nini ebongi mpenza ete lisoló na biso litalela likambo ya kopekisa mayoki na biso?

19 Totaleli mingi mpenza eteni moko ya komipekisa: kopekisa mayoki na biso. Mpe yango ezali likambo ya ntina mingi mpo ete soki tokopekisa mayoki na biso te, yango ekoki komema na kozanga kopekisa lolemo na biso, mposa na biso ya kosangisa nzoto, bizaleli na biso mpo na kolya, mpe makambo mingi mosusu ya bomoi oyo tosengeli komonisa komipekisa. (1 Bakolinti 7:8, 9; Yakobo 3:5-10) Atako bongo, zalá na molende mpamba te, okoki mpenza koyekola komipekisa.

20. Lolenge nini tokoki kondimisama ete tokoki komibongisa lisusu?

20 Jéhovah alingi mpenza kosalisa biso. Ndenge nini tokoki kondimisama? Mpo ete komipekisa ezali moko na mbuma ya elimo na ye. (Bagalatia 5:22, 23) Na bongo, soki tozali kosala makasi mpo na kozala bato babongi na kozwa elimo santu ya Jéhovah mpe soki tozali kosala makasi mpo na komonisa mbuma na yango, boye tokokoka kozala na komipekisa mingi. Tóbosana te elaká oyo na Yesu, ete: “Tata oyo azali na likoló [akopesa] elimo santu epai na baoyo bazali kosɛnga ye yango!”​—Luka 11:13; 1 Yoane 5:14, 15.

21. Ozwi ekateli nini na ntina na komipekisa mpe mayoki na yo na mikolo mizali koya?

21 Tokanisa te ete yango ekozala pɛtɛɛ. Ekoki kozala mpasi mingi mpo na baoyo bakólaki esika moko na bato oyo bayebi kopekisa mayoki na bango te, mpo na baoyo bakosilikaka noki, to mpo na baoyo bameka naino komipekisa te. Kozala na komipekisa mpe kofulukisa yango ekoki kozala ntembe monene mpo na moklisto. Nzokande, yango ekoki kosalema. (1 Bakolinti 9:24-27) Lokola tozali sé kobɛlɛma na nsuka na biloko ya ntango oyo, mikakatano mpe masɛnginya ezali sé kobakisama. Tozali na mposa te ya mwa ndambo moke ya komipekisa, kasi nde na mposa ya mingi koleka! Talela komipekisa na yo mpenza. Soki omoni makambo oyo kati na yango osengeli kobongisa, sala makasi mpo na yango. (Nzembo 139:23, 24) Sɛnga Nzambe ete apesa yo elimo na ye mingi. Akoyoka yo mpe akosalisa yo, mpo ete komipekisa na yo ezala mpe efuluka.​—2 Petelo 1:5-8.

Makambo mabongi na kokanisa

◻ Mpo na nini kopekisa mayoki na yo ezali na ntina mingi?

◻ Tozwi liteya nini na ndakisa ya Hamana, ya Evodi mpe Sintuke?

◻ Nini tokomeka kosala mpenza na bosembo nyonso soki basaleli biso mabe?

◻ Lolenge nini komipekisa ekoki kosalisa biso na kopɛngola ezaleli ya kokangana nkanda?

[Elilingi na lokasa 18]

Ntango atɛlɛmaki liboso ya Feliki mpe Dulusila, Paulo alobaki na ntina na boyengebene mpe komipekisa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto